Nzela epai na Nzambe

NZAMBE AJALISAKI MOKILI NA BISO

NYOSO MPE BILOKO NYOSO NA BOMOI

Na ebandeli, Nzambe ajalisaki lora mpe mokili. –Ebandeli 1.1 Mpo na ye Nzambe ajalisaki biloko nyoso na lora mpe na mokili. –Bakolosai 1.16a Bozwa bolamu ya Nkolo, oyo asali lora mpe mokili! Lora ezali ya Nkolo ye moko; kasi apesi mokili mpo na batu. –Njembo 115.15, 16 Mokili ezalaki malamu nyoso ntango Nzambe apesaki yango epai na batu Otanga buku moke oyo mpo na koyeba nini esalamaki.

NZAMBE AJALISAKI BISO

Bongo Nzambe alobaki: “Tosala motu lokola elilingi na biso, azala lokola biso mpenza. Azala mokonzi ya bambisi na mai, ... likolo ya mokili mobimba.” –Ebandeli 1.26a

MOTU AKUMAKI MOTU NA BOMOI

Boye Nkolo Nzambe akamataki putulu ya mabele, asalaki na yango motu. Apemaki pema ya bomoi na zolo na ye, mpe motu akumaki motu na bomoi. –Ebandeli 2.7 Nkolo Nzambe alobaki: “Ezali malamu te mpo na motu kotikala ye moko. Nakosalela ye mosungi.” Bongo Nkolo Nzambe alalisaki Adamu mpongi makasi. Abimisaki mokuwa moko ya mpanzi na ye, mpe akangisaki mosuni na esika yango. Na mokuwa oyo abimisaki na mpanzi ya Adamu, Nkolo Nzambe asalaki na yango mwasi, mpe ayaki na ye epai ya Adamu. –Ebandeli 2.18a, 21, 22

ADAMU MPE EVA BATOSAKI NZAMBE TE

Esengeli toyoka mongongo na Satana mbala moko te. Nkolo Nzambe akamataki motu yango mpe atiaki ye na elanga ya Edene mpo na kolona biloko kuna mpe mpo na kobatela yango. Apesi ye motindo oyo: “Okoki kolia mbuma ya banzete nyoso ya elanga, kasi mbuma ya nzete oyo epesaka mayele ya koyeba makambo malamu na mabe, okoki kolia yango te. Mpo ete mokolo okolia yango, okokufa.” –Ebandeli 2.15-17

NYOKA, NKOMBO NA YE LOKOLA DIABLE TO SATANA,

ANDIMAKI BOKONZI NA NZAMBE TE MPE ALOBAKI LOKUTA.

Bongo nyoka alobaki na mwasi: “Bokokufa solo te.” Mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kolia, kitoko na kotala, mpe yango ezali malamu mpo na kopesa mayele. Yango wana akamataki mbuma moko mpe alei, apesaki mpe mobali oyo azalaki elongo na ye, bongo ye aliaki yango. –Ebandeli 3.4, 6

ADAMU MPE EVA BAKOKAKI LISUSU

TE KOTIKALA KATI NA ELANGA

Nkolo Nzambe abengani motu na elanga ya Edene, mpe atindi ye asala mosala na mabele oyo asalemaki na yango. Atiaki bakeruba na elanga ... Bango bazalaki kopasapasa mopanga ... kopekisa ete motu moko te akuma penepene ya nzete oyo epesaka bomoi. –Ebandeli 3.23b, 24b

MOKOLO ADAMA MPE EVA BASALAKI

LISUMU EZALAKI MOKOLO NA MAWA

MONENE MPONA BATU NYOSO

Masumu ekotaki na mokili mokili mpo na motu moko, Adamu, mpe epesaki kokufa. Boye kokufa esili kokweya likolo na batu nyoso... . –Baroma 5.12 Likambo na Kobosana Te: Batu nyoso babotami na masumu mpe mokolo mosusu bakokufa mpo ete kokufa ekumaki na njela na masusu. (Tanga Baroma 5.12 lesusu.)

NZAMBE APONAKI KOBIKISA BISO NA

NZELA NA KOTINDA MWANA

NA YE MOKO

“Ye akobota mwana mobali oyo okobenga nkombo na ye Yesu, mpo ete Mwana yango akobikisa batu na ye kati na masumu na bango.” –Matayo 1.21 Mpo na kozala ndenge moko na batu, esengaki Mwana ya Nzambe abotami mototo moke na motu. Mpo ete makambo nyoso oyo ezali kati na Nzambe ekamataki nzoto kati na Kristo mpo na kozala na koonda mpenza kati na ye. –Bakolosai 2.9

YESU AZALI NZAMBE NA NZOTO NA BATU

Liboso na Nzambe kojalisa mokili, Liloba ezalaki. Liloba yango ezalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba yango ezalaki Nzambe. Liloba ekumaki motu mpe afandaki kati na biso. –Yoane 1.1, 14a Oyo nyoso ekumaki mpo na kokokisa: "Mwasi oyo alali naino na mobali te akozwa zemi mpe akobota mwana mobali, Oyo bakobenga nkombo na ye Emanuele." (Nkombo oyo elingi koloba: "Nzambe azali elongo na biso".) –Matayo 1.22a, 23 Mpamba te baboti mwana mpo na biso; bapesi biso mwana mobali, bokonzi ekofandela ye na mombeka. Bakopesa ye bankombo oyo: "Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, tata na seko, Nkolo na kimia." –Isaya 9.5

YESU KRISTO — MOBOMA MALAMU

NYOSO MPO NA BISO

Kristo azalaki na masumu moko te. –2 Bakorinto 5.21a Ye asalaki masumu te. –1 Petero 2.22a Motu akokaki kopesa moboma moko te MALAMU NYOSO ekokani mpo na kolongola masumu. Mpo makila na ngombe mpe ntaba ekokaki moko te kolongola masumu. –Baebere 10.4 Yesu azali Mpate ya Nzambe. "Botala Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongoli masumu na mokili." –Yoane 1.29b

YESU APESAKI BOMOI NA YE 11

MPO NA KOBIKISA BISO

Bakangaki Yesu na krusi ya nzete mpo ete batu mabe mingi bayinaki Ye. Kasi kala Nzambe akanisaki kokufa na Ye. Yesu Ye mpenza apesaki bomoi na Ye mpo na kobikisa biso na masumu na biso. Yesu alobaki, “Motu moko alongoli bomoi na ngai te, kasi napesi yango lokola ngai moko nalingi. Nazali na bokasi na kopesa yango, mpe nazali na bokasi na kokamata yango lisusu.” –Yoane10.18a

MAKILA NA MPATE YA NZAMBE ABIKISI BISO

... Na motuya nini Nzambe asombaki bino na yango, ... Ezalaki te mpo na biloko oyo ekoki kobeba lokola mbongo to or. Bofungolamaki mpo na likabo na motuya moene oyo na Kristo, ye azalaki lokola mpate oyo babomi, kitoko, na mpota te. –1 Petero 1.18, 19

BOMA MOSUSU MOKO TE AKOKI KOLONGOLA MASUMU

Tosili kokuma sembo liboso na Nzambe, eleki nyoso tokobika na nkele na Nzambe mpo na ye. –Baroma 5.9b “Yesu, kanisa ngai ntango okozonga kati na bokonzi na yo.” –Luka 23.42b Motu mabe oyo andimaki Yesu mpe azwaki kobikisa. “I say to you, today you will be with Me in Paradise.” —Luke 23:43b Motu mabe oyo andimaki Yesu te boye azwaki kobikisa te.. Kristo akufaki mpo na biso ntango tozalaki naino batu na masumu. –Baroma 5.8b

BATU NYOSO OYO BANDIMI MWANA

NA NZAMBE BAZALI NA BOMOI

“Mpo ete Nzambe alingaki mokili mingi, boye ye apesaki mwana na ye moko, boye motu na motu na kondima ye akokufa te, kasi akozala na bomoi na seko.” —Yoane 3.16 Mpo ye alongolaki biso na nguya na butu mpe akotisaki biso kati na bokonzi na Mwana na ye na bolingo, mpo na ye tosili kobika mpo na makila na ye mpe Nzambe asili kolimbisa masumu na biso. —Bakolosai 1.13, 14 “YE ASILI KOSEKWA!” Anzelu alobaki na basi: “Bobanga te. Nayebi ete bozali koluka Yesu, motu oyo babetaki na krusi. Ye azali awa te, ye asili kosekwa lokola ye alobaki. Boya, bomona esika oyo ye alalaki na yango.” —Matayo 28.5, 6

YESU ALONGOLAKI NA KOKUFA

“Nazali motu na bomoi. Nakufaki kasi sik’oyo nazali na bomoi mpo na seko. Nazali na nguya likolo na kokufa mpe likolo na mokili na bakufi.” —Emoniseli 1.18 “... Mpo ngai nabiki mpe bino bokobika lokola.” —Yoane 14.19b Mpo ete Yesu asili koleka kokufa mpe azali na mafungola na kokufa, esengeli tobanga kokufa lisusu te. Kasi ata nabangi, natiaka motema epai na yo.—Njembo 56.4 (Tala bilaka na Nzambe na page 46.)

YESU AKOKI KOBIKISA YO MPE AZALI

KOBONDELA MPO NA YO

Mpo Yesu azali na bomoi mpo na seko, ye akoki kobikisa, sik’oyo mpe na seko, batu oyo bazali koya epai na Nzambe mpo na ye, mpo ye azali ntango nyoso na bomoi mpo na kobondela Nzambe na ntina na bango. —Baebere 7.24a

BISO NA YO TOKOKI KOZALA NA

BOMOI NA SEKO

YO ozali kolanda nzela nini? Yesu Kristo azali NZELA epai na BOMOI na seko esikamoko na Nzambe. Diable (Satana) azali nzela epai na KOKUFA mpo na seko. Mwana mobali oyo aponi malamu nzela epai na bomoi na seko.

OKOPONA NZELA NINI?

“... Bopona lelo soki bolingi kosalela nani... .” —Yosua 24.15 “Bopona bomoi, mpo bino na bana na bino bobika.” —Kozongela Mibeko 30.19b

YESU AZALI NZELA EPAI NA BOMOI NA SEKO

“Kobikisama ezwami bobele epai na ye moko. Mpo na mokili mobimba Nzambe apesaki nkombo na motu mosusu moko te, oyo batu bakoki kozwa kobikisa mpo na yango.” —Misala 4.12 “Nkolo ezali ngai, bobele ngai moko. Mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.” —Isaya 43.11

MPO NINI ESENGELI TOPONA YESU

SOKO TOLINGI BOMOI NA SEKO?

1 Yesu mpenza akumaki “... Ngai nakumaki mpo ete batu bazala na bomoi....” —Yoane 10.10 2 Yesu mpenza alingaki biso mpe akufaki mpo na biso. Mwana na Nzambe... alingaki ngai, mpe amipesaki mpo na ngai.— Bagalatia 2.20b Yesu akumaki motu, na nzoto mpe makila lokola biso, mpe ye azwaki nzoto na batu... . boye mpo na kokufa na ye, ye akoki kobo ma Satana oyo azali na nguya na kokufa, ... kobikisa batu oyo bazalaki baumbu ntango nyoso na bomoi na bango... . —Baebere 2.14b 3 Bobele makila na Yesu, yango moko, ezali nkisi mpo na masumu. "Makila epesi kolimbisama na masumu mpo yango ezali bomoi na motu." —Levitike 17.11b Bongo makila na Yesu Mwana na ye ezali kopetola biso na masumu nyoso. —Yoane 1.7b Mpo na ye tosili kobika mpo na makila na ye mpe Nzambe asili kolimbisa masumu na biso. —Bakolosai 1.14 4 Yesu mpenza asekwaki na kokufa. Boye toyebi uta Kristo asekwaki kati na bakufi, ye akokufa lisusu te, kokufa ezali na bokonzi likolo na ye lisusu te. —Baroma 6.9 Ye asili kokufa mpo na batu nyoso mpo ete batu oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi mpo na bango mpenza te, kasi bazala na bomoi mpo na motu oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango. —2 Bakorinto 5.15 Yesu alobaki: “Mpo ngai nabiki mpe bino bokobika lokola.” —Yoane 14.19b 5 Eseengeli tozala na Molimo na Kristo kati na 21 biso mpo na kosekwisa mpo na bomoi na seko Kristo azali kati na bino, mpe ye apesi elikia ete bokozwa nkembo na Nzambe —Bakolosai 1.27b Soki Molimo na Nzambe, oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi afandi kati na bino, ... Motu oyo asekwisaki Kristo kati na bakufi akopesa bino bomoi mpo na nzoto na bino oyo ezali eloko na kokufa, ... mpo na Molimo na ye oyo azali kofanda kati na bino. —Baroma 8.11

OYEBA SOLOSOLO ETE MOLIMO NA KRISTO

AFANDI KATI NA YO

Motu oyo azali na Molimo na Kristo te, azali motu na Kristo te. —Baroma 8.9b

YESU ALINGI BANA NYOSO

Nsima na oyo ye amemaki bana na maboko na ye, atiaki maboko likolo na bango moko na moko, mpe apambolaki bango —Mako 10.16 “Nayebi Yesu alingi ngai; Biblia elakisi ngai boye.” Kasi Yesu abengaki bana mike epai na ye, mpe alobaki: “Botika bana mike koya epai na ngai! Bope-kisa bango te, mpo ete Bokonzi na Nzambe ezali mpo na batu bazali na motema lokola bango.” —Luka 18.16 “Bobele boye, Tata na bino na lora alingi te moko na bana mike oyo abunga.” —Matayo 18.14 Soko ozali motinda nini, soko ofandi wapi, Yesu alingi yo mpe akufaki mpo na yo. Yesu azali na mposa ete olinga ye lokola. Okoki kotalisa bolingo na yo mpo na Yesu na nzela ya kotosa ye. “Soki bolingi ngai, bokotosa mibeko na ngai.” —Yoane 14.15 Mwana ayebanaka na makambo ye asalaka. —Maloba ya Mayele 20.11a

NDENGE NINI OKOZWA NJELA EPAI NA NZAMBE

1 Ondima ete osili kosala masumu (tala page 7). Batu nyoso basili kosala masumu mpe basili kozanga nkembo na Nzambe. —Baroma 3.23 2 Yaka epai na Nzambe na nzela na Yesu Kristo. Mpo ete Nzambe azali moko, mpe mosanganisi azali moko kati na Nzambe mpe batu, ye Yesu Kristo. —1 Timoteo 2.5 Mpo na oyo, ye [Yesu] akoki kobikisa, ... batu oyo bazali koya epai na Nzambe mpo na ye. —Baebere 7.25a Yesu alobaki: Mpe motu na koya epai na ngai, nakobwaka ye soki moke te. —Yoane 6.37b 3 Obongola motema, tika masumu na yo. “Boye bobongwa mpe bozonga epai na Nzambe mpo ye alongola masumu na bino.” —Misala 3.19 Mokonzi aumelaka ...mpo ye alingi te motu moko ... akufa, kasi ye alingi ete nyoso babongola motema. —2 Petero 3.9 Kasi soki tobimisi masumu na biso epai na Nzambe, ... ye asalaka makambo sembo, ye akolimbisa masumu na biso. —1 Yoane 1:9a 4 Bimisa masumu na yo epai na Yesu. Koma awa maloba na 1 Yoane 1.9a oyo okozwa likolo na elilingi likolo na maboko ya kobondela na page 25. 5 Tika masumu na yo. Motu oyo abombaka mabe na ye, bomoi na ye ebo-ngaka te; kasi motu oyo andimaka mabe na ye mpe atikaka yango, Nzambe alimbisaka ye. Motu oyo abombaka mabe na ye, bomoi na ye ebo-ngaka te; kasi motu oyo andimaka mabe na ye mpe atikaka yango, Nzambe alimbisaka ye. —Maloba ya Mayele 28.13 Tika mabe mpe sala malamu. —Njembo 37.27a 6 Ndima Yesu Kristo na motema nyoso. Otatoli na monoko na yo liboso na batu nyoso ete Yesu azali mokonzi, mpe soki ondimi na motema nyoso ete Nzambe asili kosekwisa Ye kati na bakufi, okozwa kobikisa. —Romans 10:9b “Ndima Mokonzi Yesu na motema, mpe okozwa kobikisa, yo mpe libota na yo.” —Misala 16.31b Mpo ezali mpo na ngolu na Nzambe bino bosili kobika, na nzela na kondima... . Ezali likabo na Nzambe, ezali te mpo bosalaki makasi mpo na kozwa yango, boye motu moko te akoki komipesa lokumu. —Baefeso 2.8, 9 7 Yamba Yesu Kristo kati na motema mpe bomoi na yo. Yo moko okoki kofungola mwango na motema na yo na koyamba Yesu. Yesu alobaki: “Yoka, nazali kotelema na ekuke na ndako mpe nazali kobeta yango. Soki motu ayoki mongongo na ngai, mpe afungoli ekuke na ndako, nakokota epai na ye, nakolia elongo na ye mpe ye akolia elongo na ngai.” —Emoniseli 3.20 Kasi batu mosusu bayambaki ye, mpe bandimaki ye. Ye apesaki bango ndingisa na kozala bana na Nzambe. —Yoane 1.12

MOKAMBI MPO NA KOBONDELA

Soki osili kobondela liboso te mpe ozali na bosenga na kozwa kosalisa mpo na kobondela, okoki kotala libondeli oyo lokola mokambi. Nkolo Yesu, Napesi Yo mersi mpo ete okufaki mpo na ngai likolo na krusi myo na kolongola masumu na ngai. Nazali na mawa zambi na makambo mabe nyoso nasili kosala. Nasengi Yo kokota motema na ngai mpe kofanda kuna seko. Sikawa nazali kondima ete okopetola motema na ngai. Nakamati Yo lokola Mobkisi mpe Mokonzi na ngai mpenza. Nabondeli na nkombo na yo. Amena.

SOKI YESU AZALI NA MOTEMA NA

YO, OZALI NA BOMOI NA SEKO

Nzambe apesaki biso bomoi ya seko, bomoi oyo ezali kati na Mwana na ye. Motu oyo azali na Mwana, azali na bomoi yango. —1 Yoane 5.11b, 12a “... Motu na koyoka maloba na ngai, mpe na kondima motu oyo atindaki ngai ... asili kolongwa na kokufa mpe asili koleka na bomoi.” —Yoane 5.24b Esika nzoto ekufi, ozali elongo na Nkolo (2 Bakorinto 5.8). “Kristo azali kati na bino, mpe ye apesi bino elikia ete bokozwa nkembo na Nzambe.”(Bakolosai 1.27b). Soki osili kosenga Yesu kobongola masumu na yo, mpe ondimi Yesu lokola Mobikisi na yo, koma nkombo na yo na line na nse: _______________________________________

NDENGE NINI OKOKI KOLANDA YESU

NA KOTIKA TE

Mikolo nyoso, tanga baverse mosusu na Biblia (Maloba na Nzambe) mpe bomba baverse mosusu na motema na yo. Likambo oyo ekosalisa yo. (Baverse mingi ezali kati na buku moke oyo.) Makomi nyoso ebimaki na Nzambe mpe ekokani mpo na kolakisa likambo ya solo, kopamela libunga, kobongisa mabe, mpe kotalisa nzela na ezaleli sembo. —2 Timoteo 3.16

SAA NINI OLINGI, OLOBANA NA

YESU KATI NA MABONDELI

Pesa Yesu mersi mpo na makambo malamu nyoso kati na bomoi na yo. Sanzola Ye mpo na makambo Ye asili kosala mpo na yo mpe mpo na kobikisa yo. Bondela na ntina na bosenga na yo. Bondela na nkombo na Yesu. Ye akoyoka biso soki tosengi eloko ekokani na mokano na ye. —1 Yoane 5.14b “Tata akopesa na bino makambo nyoso bokosenga epai na ye na nkombo na ngai.” —Yoane 16.23b Bobondela mpo na batu na konyokola bino.—Matayo 5.44b

LIBONDELI OYO YESU ALAKISAKI

BAYEKOLI NA YE

(Moyekoli azali motu oyo alandi Yesu.) Yesu alakisaki bayekoli na Ye kobondela boye: “‘Tata na biso oyo azali na lora, Esengeli batu bapesa nkombo na yo lokumu. Esengeli Bokonzi na yo eya. Esengeli makambo olingi esalema na mokili lokola basalaka yango kuna na lora. Pesa biso lelo biloko ya kolia oyo ekokani. Limbisa biso na mabe oyo tosili kosala, lokola tolimbisaka mabe oyo batu basili kosala epai na biso. Kamba biso kati na komekama te, kasi bikisa biso na maboko na motu mabe. [Mpamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali na yo mpo na seko. Amen.']” —Matayo 6.9b-13 Esengeli obomba libondeli oyo kati na motema na yo. Mbala mingi bandimi babondeli boye esikamoko na mangungu.

MIBEKO ZOMI NA NAMBE ELAKISI BISO

NDENGE NINI TOSALA KATI NA BOMOI NA BISO

(Kobima sapita 20) Mibeko minei na liboso ezali na ntina na bolingo na biso mpo na Nzambe 1 “Okumisa banzambe mosusu te, bobele ngai.” 2 “Osala bikeko te mpo na kokumisa, to eloko moko ekokani na biloko... .Ogumbana liboso na banzambe ya ndenge wana te, mpe okumisa bango te.” 3 “Obenga nkombo ya Nkolo, Nzambe na yo, mpambampamba te.” 4 “Okanisa mokolo ya kopema, mpo na kokumisa yango bosantu.” Mibeko motoba na kolanda ezali na ntina na bolingo na biso mpo na batu

MIBEKO ZOMI (eteni na mibale)

5 “Otosaka tata mpe mama na yo.” 6 “Oboma motu te.” 7 “Osala pite te.” 8 “Oyiba te.” 9 “Oloba lokuta na nkombo ya moninga na yo te.” 10 “Olula te ... eloko na maninga ra yo.”

KOTOSA NZAMBE EPESAKA BIYANOLI NA

MABONDELI NA BISO

Tozwaka na maboko na ye biloko nyoso oyo tozali kosenga epai na ye, mpo tozali kotosa mibeko na ye, mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. —1 Yoane 3.22

MIBEKO MIBALE MONENE KOLEKA NYOSO

Bolingo mpo na Nzambe 1 Yesu ayanolaki ye: “‘Esengeli olinga Mokonzi Nzambe na yo na motema na yo nyoso, na molimo na yo nyoso mpe na makanisi na yo nyoso.' Oyo ezali mobeko ya liboso, monene koleka.” —Matayo 22.37, 38 Bolingo mpo na batu 2 “Mpe oyo ezali mobeko ya mibale, yango nde ezali monene lokola: ‘Esengeli olinga moninga na yo lokola yo mpenza.’” —Matayo 22.39 Mibeko Zomi nyoso (pages 34 mpe 35) ezali kati na Mibeko Mibale Monene na Koleka.

BOLINGO EZALI MONENE

KOLEKA NYOSO

“Sapita Monene na Bolingo” (1 Bakorinto 13.1-8, 13) 1 Soki nazali na mayele na kosolola lokota ya batu mpe lokota ya baanzelu, kasi soki nazali na bolingo te, maloba na ngai ekozala bobele lokola mbonda na kosala makelele to lokola ngelengele oyo ezali kolela. 2 Soki nazali na likabo ya kosakola lokola nebi, soki nazali na boyebi nyoso mpe soki nayebi makambo ebombami nyoso, soki nazali na kondima oyo ekokani na kosisa ngomba, kasi soki nazali na bolingo te, nazali mpamba mpenza. 3 Soki nakaboli misolo na ngai nyoso, soki natiki bobele nzoto na ngai kozika, soki nazali na bolingo te, oyo ekopesa ngai litomba moko te. 4 Bolingo ezali na motema molai, bolingo ezali na boboto, bolingo ezali na lokoso te, ekomipesaka lokumu te, ezali na motema na lolendo te. 5 Bolingo esalaka likambo na nsoni moko te, bolingo elukaka bolamu na ye mpenza te, bolingo esilikaka te, bolingo ebombaka nkanda na motema te. 6 Bolingo esepelaka mpo na likambo mabe te, kasi esepelaka mpo na likambo ya solo. 7 Bolingo ememaka makambo nyoso, epesaka biso kokengela kati na makambo nyoso kondima, elikia mpe motema molai. 8 Bolingo ezali na seko, makambo nyoso na kosolola lokola nebi ezali bobele mpo na ntango moke, likambo na kosolola lokota godi ekosuka, boyebi ekosila. 13 Sik’oyo, makambo misato oyo ezali kotikala: kondima, elikia mpe bolingo. Kasi kati na makambo misato oyo, likambo na koleka na monene ezali bolingo.

NZAMBE AZALI BOLINGO

Nzambe azali bolingo, motu oyo afandi kati na bolingo azali kofanda kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kofanda kati na ye. —1 Yoane 4.16b

YESU ALINGI OTATOLA EPAI NA

BATU MOSUSU

(kati na ndako na yo, na kelase, na ndako na Nzambe, bipai nyoso) Yesu alobaki: “Zonga na mboka na yo, kati na libota na yo, osolola bango makambo nyoso Mokonzi na yo asili kosala na ngolu na ye mpo na yo.” —Mako 5.19b

NDENGE NINI OKOKI KOYEBA MWANA

NA NZAMBE NA SOLO

“Bobele boye, bokoyeba banebi ya lokuta mpo na misala na bango.” —Matayo 7.20 “Kasi mbuma na Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema molai, kosalisa batu, boboto, bosembo, motema na mwana, koleka nzoto.” —Bagalatia 5.22, 23a “Mpamba te soki bokolimbisa mabe batu basalaki epai na bino, Tata na bino oyo azali na lora akolimbisa mabe na bino lokola.” —Matayo 6.14

MAKAMBO 7 NZAMBE AYINI

Miso oyo etalaka na lolendo, monoko oyo ebimisaka maloba ya lokuta, maboko oyo ebomaka batu basali eloko moko te, motema oyo ekanisaka koyokisa batu mpasi, makolo oyo ekendeke mbango mpo na kosala mabe, temwe oyo alobaka makambo ya lokuta, motu oyo atiaka songisongi na kati ya bandeko. —Proverbs 6:17-19

MISALA NA NZOTO:

... Komonana kati na ekobo, ... kosambela bikeko, na mayele na mazi, koyinana, koswana,... nkele, kozuna esika monene... . kolangwa na masanga... pe... misala mabe na ndenge oyo... batu na kosala makambo ndenge yango bakozwa bokonzi na Nzambe te. —Bagalatia 5.19-21 ... Babali na kosala pite elongo ... batu na moyibi, batu na lokoso —1 Bakorinto 6.9, 10a

TIKA YESU ATONDISA YO NA MOLIMO NA YE MPE APETOLA YO

“Batu mosusu kati na bino bazalaki boye. Kasi bosili kozwa kopetola na masumu, ... mpo na kozala batu na Nzambe, bosili kokuma sembo liboso na Nzambe na nkombo na Mokonzi Yesu Kristo mpe mpo na Molimo na Nzambe na biso.” —1 Bakorinto 6.11

LIFERO EZALI SOLO ESIKA

(Tanga Luka 16.19-28.) Oyeba solo ozali kondima Yesu Kristo. Ye akokoma nkombo na yo kati na Buku na Bomoi na Ye. Soki bakutaki nkombo na motu kati na buku na bomoi te, babwakaki ye na libulu na moto. —Emoniseli 20.15

BOBELE YESU YE MOKO AZALI

NZELA EPAI NA NZAMBE

Nzambe apesaki biso bomoi ya seko, bomoi oyo ezali kati na Mwana na ye. —1 Yoane 5.11b Mpo ete lifuti na masumu ezali kokufa, kasi likabo oyo Nzambe apesi mpamba ezali bomoi ya seko kati na lisanga elongo na Yesu Kristo Mokonzi na biso. —Baroma 6.23 Motu na kondima Mwana azali na bomoi na seko. Motu na kotosa Mwana te akozala na bomoi yango te, kasi nkele na Nzambe ezali likolo na ye. —Yoane 3.36 Yesu alobaki na ye: “Ngai nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi. Motu moko te akoki kokende epai na Tata na ngai na nzela mosusu, soki ye aleki bobele epai na ngai te.” —Yoane 14.6

LORA EZALI SOLO ESIKA

Na Emoniseli sapita 21 totangi ete kati na likambo lokola ndoto, Yoane amonaki lora na sika mpe mokili na sika “Ye akopakola mai na miso nyoso na miso na bango. Kokufa ekozala lisusu te, mawa, to kolela, to mpasi ekozala lisusu te. Biloko na liboso ekosila.” Bongo motu oyo azalaki kofanda na kiti na mokonzi alobaki: “Sik'oyo, nasali biloko nyoso ya sika.” —Emoniseli 21.4, 5a Yoane amonaki lokola Vile Santu, bobele Yerusalema, kokita na lora, kouta epai na Nzambe. Mpe vile mpenza ezalaki na or kitoko, petwa lokola talatala. Basalaki mabanga na makolo na lopango na lipombo na ndenge nyoso na mabanga na motuya mingi. —Emoniseli 21.18b, 19a

YESU ASILI KOKENDA KOBONGISA ESIKA 45

MPO NA BATU NYOSO OYO BANDIMI YE

Yesu alobaki na bango: “Botika mitema na bino na komitungisa te. Bondima Nzambe mpe bondima ngai lokola. Bisika na kofanda ezali mingi na ndako na Tata na ngai. Nakei kobongisa esika mpo na bino. Soki ezalaki boye te, mbele nasili koloba na bino. Mpe nsima na kokende na kobongisa esika mpo na bino, nakozonga lisusu mpo na kokamata bino epai na ngai, boye esika ngai nazali bino mpe bokozala.” —Yoane 14.1-3

LOBA NSANGO MALAMU EPAI NA BATU MOSUSU

Yesu alobaki: “Bokende na mokili mobimba mpe bosakola Nsango Malamu epai na batu nyoso.” —Mako 16.15b

BILAKA NA NZAMBE EPAI NA BANA NA YE

“Nakotika yo soki moke te, nakolongwa epai na yo soki moke te.” —Baebere 13.5b Mpo Nkolo akopesa motindo na baanzelu na ye, babatela yo bisika nyoso oyo okokende..” —Njembo 91.11 “Mpe motu moko te akoki kobotola bango na maboko na Tata.” —Yoane 10.29b “Nakozala elongo na bino mikolo nyoso kino nsuka na mokili.” —Matayo 28.20b Banga te mpasi oyo okozwa... . Zala motu na kobongwana te kino kokufa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi. —Emoniseli 2.10 “Benga ngai mpe nakopesa yo eyano.” —Yeremia 33.3a

YESU AKOZONGA LISUSU

Batu-ayoso bakosekwa na kokufa. “Mpo ntango ezali koya, ntango bakufi oyo bazali na lilita bakoyoka mongongo na Mwana ya Motu, mpe bakobima na lilita na bango. Batu oyo basili kosala malamu, bakosekwa mpo na kozwa bomoi. Batu oyo basili kosala mabe, bakosekwa mpo na kozwa ngwanga.” —Yoane 5.28b, 29 Na liboso bakufi kati na Kristo bakosekwa.. Nsima yango, biso oyo tokozala naino na bomoi na ntango yango. Nzambe akobenda biso elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Mokonzi kati na mopepe. Boye, tokozala elongo na Mokonzi mpo na seko. –1 Batesalonike 4.17 “Bobondela mpe bolala te, mpo boyebi te mokolo nini ntango yango ekokuma.” —Mako 13.33b

YESU AKOYA NDENGE NINI?

Botala ye azali koya kati na mapata! Batu nyoso bakomona ye. —Emoniseli 1.7a Keba na bakristo na lokuta mpe banebi na lokuta. “Soki motu moko alobi na bino: ‘Botala Masiya azali awa!' to ‘Ye azali kuna!' bondima ye te. Soki balobi na bino: ‘Botala ye azali na esobe!' bokende kuna te. Mpe soki balobi na bino: ‘Botala ye azali kobombana awa!' bondima yango te.” —Matayo 24.23b, 26b YESU AKOYA NOKI KATI NA MAPATA NA LORA “Bongo mitinda nyoso ... bakomona ngai Mwana ya Motu koya kati na mapata na lora elongo na nguya mingi mpe na nkembo mingi.” —Matayo 24.30b

LOYEMBO NA MOBATELI

(Njembo 23) 1 Nkolo azali mobateli na ngai, nakozanga eloko moko te. 2 Apemisaka ngai na kati ya matiti ya mobesu. Akambaka ngai penepene na mai ya kimia. 3 Apesaka ngai nguya, Atambwisaka ngai na banzela ya malamu, mpo na nkombo na ye. 4 Ata nazali kotambola na libulu na molili ya kufa, nakoki kobanga eloko moko te. Mpamba te yo ozali elongo na ngai; nzete na yo mpe lingenda na yo ezali kosalisa ngai. 5 Otandelaka ngai mesa na miso ya banguna na ngai. Opakoli mutu na ngai na mafuta, mpe kopo na ngai etondi mpenza. 6 Solo bolamu mpe ngolu ekolanda ngai ntango nyoso na bomoi na ngai, mpe nakofanda na ndako ya Nkolo mpo na seko.