The New Testament of our Lord and Saviour Jesus Christ

Matié 1

Bakoko ya Yezu

1 Yezu Kristo azali moto ya libota ya David pe ya Abraham. Tala bakombo ya bakoko na ye. 2-6a Kobanda na Abraham tii na mokonzi David, ezalaki: Abraham, Izaak, Jakob, Yuda ná bandeko na ye. Sima na bango: Pères ná Zera (mama na bango ezalaki Tamar), Hesron, Ram, Aminadab, Nashon, Salma, Booz (mama na ye ezalaki Rahab), Obed, Jesé, pe mokonzi David. 6 b-ll Kobanda na David tii tango bamemaki bato ya Yuda na boumbu na Babilone, ezalaki: David, Salomon (mama na ye ezalaki mwasi ya Uriya), Roboam, Abiya, Asa, Jozafat, Yoram, Azarya, Yotam, Akaz, Ezekiya, Manasé, Amon, Yoshiya, pe Yoyakin ná bandeko na ye. 12-16 Kobanda na boumbu tii tango Yezu abotamaki, ezalaki: Yoyakin, Shaltiel, Zorobabel, Abiud, Eliakim, Azor, Sadok, Akim, Eliud, Eleazar, Matan, Jakob, pe Jozef oyo abalaki Maria. Maria nde moto abotaki Yezu. Ye azali Kristo, Mobikisi bazalaki kozela. 17 Bongo kobanda na Abraham tii na David, mabota elandanaki mbala zomi na minei. Kobanda na David tii na tango bamemaki bato ya Yuda na boumbu na Babilone, mabota elandanaki mbala zomi na minei. Pe kobanda tango wana tii na mbotama ya Kristo, mabota elandanaki mbala zomi na minei.

Ndenge Yezu abotamaki

18 Yezu Kristo abotamaki boye: Mama na ye Maria azalaki mwana mwasi oyo Jozef aponaki po ábala ye. Kasi liboso 'tè báfanda ndako moko, Maria azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu. 19 Mobali na ye Jozef azalaki moto malamu, pe alingaki ásambwisa ye té na miso ya bato; akanaki 'tè átika ye kasi áyebisa moto moko té. 20 Tango azalaki kokanisa boye, anjelu ya Nkolo abimeli ye na ndoto, pe alobi na ye: "Jozef mwana ya David, kobanga kobala Maria té, pamba té zemi oyo azali na yango, euti na nguya ya Molimo Mosantu. 21 Akobota mwana mobali pe okopesa ye kombo Yezu. Ezali ye nde moto akobikisa bato na ye na masumu na bango." 22 Makambo wana nyonso esalamaki po na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaká na monoko ya profete na ye: 23 "Elenge mwasi oyo ayebi nzoto ya mobali té akozwa zemi, akobota mwana mobali, pe bakopesa mwana yango kombo Emanuel, elakisi: Nzambe azali na biso." 24 Tango Jozef alamuki na pongi, asali se ndenge anjelu ya Nkolo alakisaki ye, pe abali Maria. 25 Kasi ayebaki nzoto na ye té tii tango abotaki; bongo Jozef apesi mwana kombo Yezu.

Matié 2

Banganga-minzoto bayei kotala Yezu

1 Yezu abotamaki na Betleem, na région ya Yuda, na tango ya mokonzi Erode. Kaka na mikolo wana banganga oyo batalaka minzoto balongwe na mboka na bango na epai moi ebimaka, pe bakomi na Yeruzalem. 2 Batuni bato: " Wapi mokonzi ya Bayuda oyo auti kobotama? Tomonaki monzoto na ye na epai moi ebimaka, pe toyei kokumisa ye." 3 Tango mokonzi Erode ayoki boye, akómi motema likolo, ye ná bato nyonso ya Yeruzalem. 4 Abengi bakonzi ya banganga-Nzambe pe balakisi-Mibeko, bongo atuni bango epai wapi Mesia asengeli kobotama. 5 Bango bazongiseli ye: "Na Betleem, na région ya Yuda. Pamba té profete ya Nzambe akómaká boye: 6 'Yo Betleem, mabelé ya Yuda, ozali mboka ya pamba té na kati ya ba-vile ya Yuda. Ya solo, mokonzi monene akobima epai na yo, oyo akotambwisa ekolo na ngai Israel' " 7 Bongo Erode abengisi banganga na mayele po bato báyeba té, pe atuni bango tango nini monzoto emonanaki. 8 Na sima atindi bango na Betleem, alobi: "Bókende pe bótuna malamu po na mwana. Bongo soki bomoni ye, bóya koyebisa ngai po ngai pe nákende kokumisa ye." 9 Awa bayoki maloba ya mokonzi bakei. Na mbala moko bamoni monzoto oyo bamonaki na epai moi ebimaka; yango ebandi kokende liboso na bango, tii etelemi na likolo ya ndako oyo mwana azalaki. 10 Bayoki esengo mingi, tango bamoni monzoto wana. 11 Bakoti na ndako pe bamoni mwana, ná mama na ye Maria. Bafukami pe bakumisi mwana. Bafungoli biloko na bango, bapesi ye makabo oyo: or, malasi ya kotumba ná mafuta ya mire. 12 Na sima Nzambe alobeli bango na ndoto 'tè bázonga lisusu epai ya Erode té; bongo bazongi na mboka na bango na nzela mosusu.

Bakimi na Ejipte

13 Tango banganga bakei, na sima anjelu ya Nkolo abimeli Jozef na ndoto, pe alobi na ye: "Telema, kamata mwana ná mama na ye; kima na Ejipte, pamba té Erode azali koluka mwana po áboma ye. Fanda kuna tii tango nakoloba na yo 'tè zonga." 14 Kaka na butu wana Jozef atelemi; akamati mwana ná mama na ye, pe akei na bango na Ejipte. 15 Afandaki kuna tii mokolo Erode akufaki. Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaká na monoko y a profete na ye: "Nabengi mwana na ngai álongwa na Ejipte."

Babomi bana mike

16 Tango Erode amoni 'tè banganga bakosi ye, asiliki penza. Atindi basoda na Betleem pe na bamboka ya pembeni, po bákende koboma bana mibali nyonso oyo bazalaki na mbula mibale, ná baoyo bakokisi nanu yango té. Asalaki boye pamba té atangaki mikolo oyo elekaki banda tango banganga bamonaki monzoto. 17 Nyonso wana esalamaki ndenge profete Jeremya alobaká: 18 "Makelele ezali kongala na mboka Rama; bazali kolela pe kosala matanga. Ezali Rashel moto azali kolela bana na ye; aboyi bálongola ye mawa, po bana na ye bakufi."

Balongwe na Ejipte

19 Tango Erode akufi, anjelu ya Nkolo abimeli Jozef na ndoto na Ejipte, 20 alobi na ye: "Telema, kamata mwana ná mama na ye, pe zonga na mboka Israel, pamba té bato oyo bazalaki koluka koboma mwana basi'bakufi." 21 Jozef atelemi, akamati mwana ná mama na ye pe akei na mboka Israel. 22 Kasi tango ayoki 'tè Arkelaus akómi mokonzi ya Yuda na esika ya tata na ye Erode, Jozef abangaki kokende kuna. Nzokande Nzambe alakisi ye na ndoto ndenge asengeli kosala, bongo akei na région ya Galilé, 23 pe afandi na mboka moko kombo na yango Nazaret. Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo baprofete balobaká po na Yezu: "Bakobenga ye moto ya Nazaret."

Matié 3

Mateya ya Yoane Mobatisi

1 Sima ya bambula, Yoane Mobatisi akendeki na esobe ya Yuda, pe abandaki kosakola boye: 2 "Bóbongola mitema, pamba té Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo." 3 Yoane azali moto oyo profete Ezaya alobaká: "Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: 'Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela; bósalela ye nzela moko ya kitoko!" 4 Yoane azalaki kolata elamba basalá na ba-pwale ya shamó, pe mokaba ya poso ya nyama na loketo. Azalaki kolia kaka makonko ná mafuta ya nzoi. 5 Bato ya Yeruzalem, ná bato nyonso ya région ya Yuda pe ya bapembeni ya mai ya Yordan, bazalaki kokende epai na ye. 6 Bazalaki kondima masumu na bango na miso ya bato nyonso, pe Yoane azalaki kobatisa bango na mai ya Yordan. 7 Tango Yoane amoni 'tè ba-Farizé ná ba-Sadusé ebele bazali koya epai na ye po ábatisa bango, abandi koloba na bango boye: "Bino banyoka oyo! Nani apesi bino mayele ya kokima kanda ya Nzambe oyo ezali koya? 8 Bósala makambo oyo ezali kolakisa 'tè bosi'bobongoli mitema. 9 Bótika komiloba bino na bino 'tè: 'Mabe moko té ekoki kokweela biso, pamba té Abraham azali koko na biso.' Nalobi na bino: Nzambe akoki kobongola mabanga oyo, ékóma bana ya Abraham. 10 Basi'babongisi epasola po na kokata misisa ya banzete; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakokata yango pe bakobwaka yango na moto. 11 Ngai nazali kobatisa bino na mai pamba po bóbongola mitema; kasi moto oyo akoya sima na ngai akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na moto. Ye azali na nguya koleka ngai; nakoki ata kutu kolongola ye sapatu té. 12 Asimbi kiyungulu po na koyungula matiti oyo esangani ná mbuma; akobomba blé, kasi akotumba matiti na moto oyo ekufaka té."

Yoane abatisi Yezu

13 Mokolo moko Yezu autaki na Galilé pe ayaki penepene ya Yordan; akómi epai ya Yoane po ázwa batisimo. 14 Kasi Yoane alingaki kobatisa ye té, alobi na ye: "Yo nde moto osengeli kobatisa ngai, bongo ozali koya epai na ngai!" 15 Kasi Yezu azongiseli ye: "Po na sik'oyo, sala kaka. Pamba té esengeli tókokisa makambo nyonso Nzambe alingaka." Bongo Yoane andimi. 16 Tango Yezu asilisi kozwa batisimo, abimi na mai. Kaka na tango wana Likolo efungwani; amoni Molimo ya Nzambe akiti lokola pijon pe ayei kofanda likolo na ye. 17 Mongongo moko euti na Likolo elobi: "Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na ye mingi."

Matié 4

Zabolo ameki Yezu

1 Na sima Molimo amemi Yezu na esobe po zabolo ámeka ye. 2 Mikolo tuku minei mobimba Yezu aliaki té; bongo ayoki nzala. 3 Zabolo apusani penepene na ye pe alobi: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ébongwana bilei." 4 Kasi Yezu azongisi: "Moto akoki kobikela kaka na biloko ya kolia té, kasi azalaka na posa ya nyonso oyo Nzambe alobaka." 5 Bongo zabolo amemi ye na vile ya bosantu; atii ye likolo ya Ndako ya Nzambe, 6 pe alobi na ye: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, ómibwaka na se. Pamba té ekómamá boye: 'Nzambe akotinda ba-anjelu na ye po na yo. Bakoyamba yo na maboko na bango, po ótuta likolo na libanga té.' " 7 Kasi Yezu azongiseli ye: "Ekómamá lisusu na Mikanda: 'Komeka Nkolo, Nzambe na yo té.' " 8 Zabolo amemi ye lisusu na likolo ya ngomba moko ya molai penza, amonisi ye bamboka nyonso ya mokili, pe lokumu ya bakonzi na yango. 9 Alobi na ye: "Nakopesa yo nyonso wana soki ofukameli ngai pe okumisi ngai." 10 Bongo Yezu alobi na ye: "Satan, longwa! Ekómamá boye: 'Fukamela Nkolo Nzambe na yo, pe salela bobele ye.' " 11 Sima zabolo atiki Yezu, bongo ba-anjelu bayei epai na ye pe babandi kosalela ye.

Yezu abandi mosala na Galilé

12 Tango Yezu ayoki 'tè batii Yoane Mobatisi na boloko, akei na Galilé. 13 Alongwe na Nazaret pe akei kofanda na Kafarnaum, vile oyo ezali penepene ya lak ya Galilé, na mabelé ya Zebulon pe ya Neftali. 14 Esalamaki bongo po na kokokisa maloba profete Ezaya alobaká: 15 "Mabelé ya Zebulon pe ya Neftali, epai ya ebale, na ngambo ya Yordan. Galilé, mboka ya bato bayebi Nzambe té! 16 Bato oyo bafandi na kati ya molili bamoni moi ya solo! Baoyo bakangamá na molili ya somo, moi engengeli bango"." 17 Banda tango wana Yezu abandi kosakola boye: "Bóbongola mitema, pamba té Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo."

Yezu abengi bayekoli minei

18 Tango Yezu azalaki kotambola penepene ya lak ya Galilé, amoni baluki-mbisi mibale, kulutu ná leki, Simon (oyo babengaka Piere) pe ndeko na ye André, bazalaki kobwaka monyama na mai. 19 Yezu alobi na bango: "Bólanda ngai. Bokozala lisusu baluki-mbisi té; nakokómisa bino baluki ya bato." 20 Na mbala moko batiki minyama na bango pe balandi Yezu. 21 Tango alongwe wana, amoni lisusu bato mibale, kulutu ná leki, Jake ná Yoane, bana ya Zebedé. Bafandaki na kati ya bwatu esika moko ná tata na bango Zebedé, pe bazalaki kobongisa minyama. Yezu abengi bango. 22 Na mbala moko batiki bwatu ná tata na bango, pe balandi ye. 23 Yezu atambolaki na Galilé mobimba. Azalaki koteya na bandako ya losambo, pe kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye na mokili; bongo abandaki pe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge. 24 Sango na ye epanzanaki tii na région mobimba ya Sirie, pe bamemeli ye bato bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge: bato bazalaki na milimo mabe, baoyo bazalaki na maladi ya ndeke, pe bato bakufa makolo. Yezu abikisi bango. 25 Bato ebele babandaki kolanda ye, bautaki na Galilé, na Bamboka Zomi, na Yeruzalem, na Yuda, pe na ngambo ya Yordan.

Matié 5

Yezu ateyi likolo ya ngomba

1 Tango Yezu amoni bato ebele wana, amati likolo ya ngomba pe afandi. Bayekoli na ye bapusani pembeni na ye, 2 pe abandi koteya bango boye:

Esengo ya solo

3 "Esengo na baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe; bango bazali bato ya mboka na ye. 4 Esengo na baoyo bazali kolela; Nzambe akolongola bango mawa. 5 Esengo na baoyo bazali na mitema ya boboto; bango bakozwa mboka oyo Nzambe alakaká. 6 Esengo na baoyo balukaka kosala bolamu; Nzambe akotondisa bango na bolamu. 7 Esengo na baoyo bayokelaka bato mawa; Nzambe akoyokela bango pe mawa. 8 Esengo na baoyo bazali na mitema pembe; bango bakomona Nzambe. 9 Esengo na baoyo bayeelaka bato boboto; Nzambe akobenga bango bana na ye. 10 Esengo na baoyo banyokwamaka po basalaka malamu; bango bazali bato ya mboka ya Nzambe. 11 "Esengo na bino soki bafingaka bino, soki banyokolaka bino po bozali bayekoli na ngai, soki bakoselaka bino makambo ya ndenge na ndenge. 12 Bósepela! bozala na esengo, po lifuta monene ezali kozela bino na Likolo. Pamba té baprofete oyo bazalaká liboso, banyokolaki bango kaka ndenge wana."

Mungwa ná mwinda

13 "Bino bozali na kati ya bato lokola mungwa. Soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kokómisa yango elengi? Ezali lisusu na mosala té. Babwakaka yango na libanda pe banyataka yango. 14 "Bino bozali na kati ya bato lokola mwinda. Mboka oyo batóngá na likolo ya ngomba ekoki kobombama té. 15 Soki bapelisi mwinda, babombaka yango na se ya katini té, kasi batiaka yango likolo ya mesa, po éngengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako. 16 Yango wana bosengeli kongenga liboso ya bato lokola mwinda, po bámona bolamu oyo bozali kosala, pe bákumisa Tata na bino ya Likolo."

Mateya po na Mibeko

17 "Bókanisa té 'tè nayei po na koboma Mibeko ya Moize pe mateya ya baprofete. Nayei po náboma yango té, kasi po na kokokisa yango. 18 Nalobi na bino, ya solo: tii tango Likolo na se ekolimwa, bakoki kolongola eloko moko té na Mibeko, ata letre ya moke, ata mwa ndambo na yango; liboso makambo nyonso esengeli kosalama. 19 Yango wana, moto oyo aboyaka kotosa ata mobeko ya moke, pe alakisaka bato mosusu básala bongo, akozala moto ya suka na mboka ya Nzambe. Kasi moto oyo atosaka Mibeko pe ateyaka bato mosusu básala bongo, akozala moto ya liboso na mboka ya Nzambe. 20 Nalobi na bino: Bóluka kotosa Nzambe koleka balakisi-Mibeko ná ba-Farizé; soki té bokoki kokóma bato ya mboka na ye té."

Mateya po na kanda

21 "Boyoki 'tè balobaká na bakoko boye: 'Koboma moto té; oyo abomi moto, básambisa ye na bazuzi.' 22 Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo ayokeli ndeko na ye kanda, básambisa ye na bazuzi. Oyo alobi na ndeko na ye: 'Zoba!' básambisa ye na Likita-Monene ya banganga-Nzambe; pe oyo alobi na ndeko na ye: 'Yo ozali na liboma!' ebongi bátinda ye na lifelo. 23 Soki ozali kokende na mesa ya Nzambe po na kopesa ye libonza, pe oyei kokanisa 'tè ozali na likambo ná ndeko na yo, 24 tika libonza na yo pembeni ya mesa ya mabonza, pe kende liboso koyokana ná ndeko na yo; bongo na sima zonga pe pesa libonza na yo na Nzambe. 25 "Soki moto afundi yo, pe bozali kokende epai ya zuzi, sala noki po bóyokana tango bozali nanu na nzela. Soki té moto yango akopesa yo na maboko ya zuzi, bongo zuzi akotinda yo epai ya basoda po bábwaka yo na boloko. 26 Nalobi na bino, ya solo: okobima na boloko té tii tango okofuta nyongo nyonso."

Mateya po na mwasi ya bato

27 "Boyoki 'tè balobaká boye: 'Kotambola na mwasi ya bato té.' 28 Kasi ngai nalobi na bino: soki moto atali mwasi ya bato po na kolula ye, asi'atamboli na ye na motema. 29 Soki ozali kokweya na masumu po na liso na yo ya mobali, longola yango pe bwaka yango mosika! Ebongi malamu ólongola ndambo moko ya nzoto, esika 'tè nzoto mobimba ékende na lifelo. 30 Soki ozali kokweya na masumu po na liboko na yo ya mobali, kata yángo pe bwaka yango mosika! Ebongi malamu ólongola ndambo moko y a nzoto na yo, esika 'tè nzoto mobimba ékende na lifelo."

Mateya po na koboma libala

31 "Balobaká lisusu boye: 'Soki moto aboyi mwasi na ye, ápesa ye mokanda ya koboma libala.' 32 Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo akoboya mwasi na ye, longola bobele soki Mibeko ezali kopekisa 'tè bábalana té, ezali lokola atindi mwasi na ye ásala kindumba. Pe moto oyo akobala mwasi ya ndenge wana azali kosala kindumba."

Mateya po na kokata seleka

33 "Boyoki lisusu 'tè balobaká na bakoko boye: 'Kokata seleka ya lokuta té. Kasi sala makambo oyo olakaki tango okataki seleka na miso ya Nkolo.' 34 Kasi ngai nalobi na bino: bókata seleka ata moke té. Ézala na kombo ya Likolo, po ezali Kiti ya bokonzi ya Nzambe; 35 to na kombo ya mabelé, po ezali esika Nzambe atiaka makolo na ye; to na kombo ya Yeruzalem, po ezali mboka ya Mokonzi monene. 36 Kokata seleka ata moke té po na motú na yo, pamba té okoki kokómisa suki na yo pembe té to mwindu. 37 B 6 1 obaka kaka 'Ezali bongo', to 'Ezali bongo té'. Makambo nyonso oyo babakisaka na maloba wana, eutaka na Monguna ya Nzambe."

Mateya po na kozongisa mabe

38 "Boyoki 'tè balobaká boye: 'Soki moto atoboli yo liso, yo pe tobola ye liso; pe soki alongoli yo lino, yo pe longola ye lino.' 39 Kasi ngai nalobi na bino: soki moto asali yo mabe, kozongisela ye mabe té. Soki moto abéti yo mbata na litama, pesa ye litama mosusu. 40 Soki moto alingi kofunda yo na tribinal po ázwa shemize na yo, pesa ye pe kazaka na yo. 41 Soki moto atindi yo na makasi po ómemela ye kilo mwa moke, yo mema yango mosika. 42 Soki moto asengi yo eloko, pesa ye; soki alingi kodefa eloko epai na yo, defisa ye."

Kolinga banguna

43 "Boyoki 'tè balobaká boye: 'Bólinga baninga na bino, pe bóyina banguna na bino.' 44 Kasi ngai nalobi na bino: bólingaka banguna na bino, bósambelaka po na bato oyo banyokolaka bino. 45 Soki bongo, bokozala penza bana ya Tata na bino ya Likolo. Pamba té ye angengisaka moi na ye na bato ya mabe pe na bato ya malamu; anokisaka mbula epai ya bato oyo basalaka malamu pe epai ya baoyo basalaka mabe. 46 Soki bozali kolinga kaka bato oyo balingaka bino, lifuta nini Nzambe akopesa bino? Ata bato ya mobulu basalaka kaka ndenge wana! 47 Soki bopesaka mbote kaka na bandeko na bino, wana bosali likambo ya kokamwa? Té! Ata baoyo bayebi Nzambe té basalaka kaka ndenge wana! 48 Bozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka."

Matié 6

Mateya po na kosalisa bato bakelelá

1 "Bókeba na ndenge bosalelaka Nzambe. Bósalelaka ye na miso ya bato té po bámonaka bino; soki té bokozwa lifuta té epai ya Tata na bino ya Likolo. 2 "Bongo, tango ozali kosalisa bato bakelelá, kotia makelele té po bato bámona yo. Bato ya lokuta basalaka ndenge wana na ndako ya losambo to na balabala, po bato bákumisa bango. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango. 3 Kasi yo, tango ozali kosalisa bato bakelelá, sala na ndenge 'tè ata moninga na yo ya motema ámona yango té, 4 po makabo na yo ézala ya kobombama. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta."

Mateya po na kosambela

5 "Tango bozali kosambela, bozala lokola bato ya lokuta té! Bango balingaka kotelema na bandako ya losambo pe na ba-balabala po na kosambela, po bato nyonso bámona bango. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango. 5 Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na ndako na yo, kanga yango, sambela Tata na yo oyo azali komonana té. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta. 7 "Tango bozali kosambela, bóloba maloba mingi té ndenge bato oyo bayebi Nzambe té basalaka. Bango bakanisaka 'tè Nzambe akoyokela bango soki bazali koloba mingi. 8 Bólanda bango té. Liboso 'tè bóbanda kosenga ye, Tata na bino asi'ayebi eloko nini bozali na yango posa. 9 Tala ndenge bino bosengeli kosambela: 'Tata na biso ya Likolo, Kombo na yo ézala na lokumu; 10 bokonzi na yo éya; nyonso yo olingi ésalama awa na se ndenge esalamaka na Likolo. 11 Pesa biso lelo bilei oyo ekoki; 12 limbisa biso mabe tosali yo, lokola biso pe tolimbisi mabe basali biso; 13 kotika Monguna ámeka biso té, kasi bikisa biso na mabe. Po bokonzi, nguya pe lokumu ezali ya yo seko. Amen. ' 14 "Pamba té soki bolimbisi bato mabe oyo basalaki bino, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino pe. 15 Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe oyo basalaki, Tata na bino akolimbisa pe masumu na bino té."

Mateya po na komilalisa nzala

16 "Tango bozali komilalisa nzala, bókómisa bilongi mawa-mawa té ndenge bato ya lokuta basalaka. Bakangaka bilongi po bato nyonso bámona 'tè bamilalisi nzala. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango. 17 Kasi yo, soki omilalisi nzala, sukola elongi na yo; bongisa suki na yo, 18 po bato báyeba té 'tè omilalisi nzala; moto akoyeba yango kaka Tata na yo oyo azali komonana té. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta."

Kobomba bomengo na Likolo

19 "Bónduka bomengo na mokili oyo té. Awa na mokili bapese eliaka yango, biloko ebebaka, pe bamiyibi babukaka bandako po na koyiba. 20 Kasi bóbomba bomengo na Likolo, epai ya Nzambe. Kuna bapese eliaka yango té, biloko ebebaka té, pe bamiyibi babukaka bandako té po na koyiba. 21 Pamba té esika bomengo na yo ezali, motema na yo pe ezali kuna."

Kotala malamu

22 "Miso ya moto ezali lokola mwinda; yango moto emonisaka yo. Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza; 23 kasi soki ezali mabe, okozala na molili, okomona eloko té. Se bongo, soki motema na yo ekómi molili, molili yango ekozala makasi koleka."

Nzambe ná mbongo

24 "Moto moko té akoki kosalela bakonzi mibale. Soki azali koyina moko, akolinga mosusu; soki azali kotosa moko, akoboya mosusu. Bokoki kosalela Nzambe té soki bozali baumbu ya mbongo."

Kotia mitema na Nzambe

25 "Yango wana nalobi na bino: bómitungisaka té na komitunaka soki bokolia runi, soki bokomela nini to pe soki bokolata nini. Bomoi eleki bilei té? Nzoto eleki bilamba té? 26 Botala bandeke! Yango ekonaka té, ekongolaka bambuma na bilanga té, pe ebombaka yango té; nzokande Tata na bino ya Likolo moto aleisaka yango. Bino boleki yango na tina té? 27 Ata bomitungisi boni, nani na kati na bino akoki kobakisa mokolo moko na bomoi na ye? 28 "Bongo tina nini bozali komitungisa po na bilamba? Botala ndenge ba-flere ekolaka na esobe! Yango emonaka pasi ya mosala té, pe etóngaka bilamba té. 29 Kasi nalobi na bino: ata Salomon, moto ya bomengo penza, alataki malamu té lokola ba-flere wana. 30 Bókanisa: matiti oyo ezali lelo na esobe, lobi bakoki kotumba yango na móto. Bongo soki Nzambe alatisaka yango boye, akoki pe kolatisa bino té? Po na nini bondimi na bino ezali moke? 31 "Bómitungisaka té po na komituna: Tokolia nini? Tokomela nini? Tokolata nini? 32 Kaka baoyo bayebi Nzambe té bato bamitungisaka po na koluka biloko wana nyonso. Pamba té Tata na bino ya Likolo ayebi 'tè bozali na posa na yango. 33 Bólukaka liboso kokóma bato ya mboka na ye pe kosala makambo ye alingaka, bongo ye akopesa bino biloko mosusu nyonso. 34 Bómitungisa té po na makambo ekoya lobi; lobi ekozala na makambo na yango. Mokolo na mokolo ezali na pasi ekoki na yango."

Matié 7

Kotala bizaleli ya bato té

1 "Botala bizaleli ya bato té; soki té Nzambe pe akotala bizaleli na bino. 2 Pamba té Nzambe akotala bino ndenge bino botalaka bato; pe akosala bino mabe to malamu, kaka ndenge bino bosalaka bango. 3 Po na nini ozali kotala mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo? Nzokande ozali na nzete na liso na yo moko, kasi ozali komona yango té. 4 Ozali koloba na ndeko na yo: 'Tika nálongola yo mwa-lititi oyo ekoti yo na liso.' Ndenge nini okoki koloba bongo? Na liso na yo moko nzete ezali, kasi ozali kokipé yango té. 5 Moto ya lokuta! Longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu po na kolongola mwa-lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo. 6 "Bópesa biloko ya bosantu na bambwa té, soki té bakozonga po báswa bino; bóbwaka bapauni na bino liboso ya bangulu té, soki té bakonyata yango."

Kosenga, koluka, pe kobeta porte

7 "Bósenga pe bokozwa; bóluka pe bokomona; bóbeta porte bongo bakofungolela bino. 8 Pamba té moto nyonso oyo asengaka, azwaka; moto nyonso oyo alukaka, amonaka; pe moto nyonso oyo abetaka porte, bafungolelaka ye. 9 Nani na kati na bino akoki kopesa mwana na ye libanga, soki asengi ye bilei? 10 Nani akoki kopesa ye nyoka, soki asengi ye mbisi? 11 Soki bino bato ya mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, tembe té, Tata na bino ya Likolo akopesa bino biloko eleki malamu, soki bosengi ye. 12 "Nyonso oyo bolingaka 'tè básala bino, bino pe bósala yango na bato mosusu. Wana ezali tina ya mibeko ya Moize pe ya mikanda ya baprofete."

Porte ya moke

13 "Bókota na porte ya moke. Pamba té porte ya kokotela na mboka ya bato bakufa libela ezali monene, pe nzela oyo ememaka bato kuna ezali pasi té; yango wana bato mingi balandaka yango. 14 Kasi porte ya kokotela na mboka ya bato bazali na bomoi ezali moke, pe nzela oyo ememaka bato kuna ezali kaká; yango wana bato mingi balandaka yango té."

Nzete ná mbuma na yango

15 "Bókeba na baprofete ya lokuta! Bayaka epai na bino na poso ya bameme, kasi na mitema na bango bazali bankoi; balingaka kolia bino. 16 Bokoyeba bango na misala na bango. Na nzete ya sende babukaka mbuma ya vinu té. Pe na nzete ya nzube bazwaka mbuma ya figi té. 17 Nzete ya malamu ebotaka mbuma ya malamu; kasi nzete ya mabe ebotaka mbuma ya mabe. 18 Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe té; pe nzete ya mabe ekoki kobota mbuma ya malamu té. 19 Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakataka yango pe babwakaka yango na móto. 20 Boye, po na koyeba baprofete ya lokuta, botala misala na bango."

Nayebi bino té

21 "Ezali té baoyo balobaká na ngai: 'Mokonzi, Mokonzi' nde bakokóma bato ya mboka ya Nzambe; kasi bobele bato oyo basalaka makambo Tata na ngai ya Likolo alingaka. 22 Mokolo nakoyà kosambisa bato, bato mingi bakoloba na ngai: 'Mokonzi, Mokonzi, oyebi té? Na kombo na yo tosakolaki maloba euti na Molimo ya Nzambe. Na kombo na yo tolongolaki milimo mabe. Na kombo na yo tosalaki makamwisi ebele.' 23 Kasi ngai nakoloba na bango: 'Nayebi bino té! Bino bozalaki kotosa Nzambe té, bólongwa liboso na ngai!' "

Bandako mibale

24 "Yango wana, moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai pe atosi yango, akozala lokola moto ya mayele oyo atongi ndako na ye likolo ya mabanga. 25 Mbula ebeti, mai etondi, mopepe makasi eleki pe ebeti na ndako wana; kasi ndako ekwei té, po batóngaki yango likolo ya mabanga. 26 Kasi moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai pe atosi yango té, akozala lokola moto moko ya zoba oyo atóngi ndako na ye likolo ya zelo. 27 Mbula ebeti, mai etondi, mopepe makasi eleki pe ebeti na ndako wana; ndako ekwei, yango nyonso ebukani."

Bokonzi ya Yezu

28 Tango Yezu asilisi koloba, bato nyonso bakamwaki penza po na ndenge ye azalaki koteya. 29 Pamba té ye azalaki koteya lokola balakisi-Mibeko té; kasi lokola moto azali na bokonzi.

Matié 8

Yezu abikisi moto ya maladi ya maba

81 Tango Yezu azalaki kokita ngomba, bato ebele balandi ye. 2 Moto moko azalaki na maladi ya maba ayei epai na ye, afukameli ye, pe alobi: "Mokonzi, soki olingi, okoki kobikisa ngai." 3 Yezu atandi liboko, asimbi ye, pe alobi: "Nalingi yango; bika!" Kaka na tango wana, maladi na ye ya maba esili. 4 Bongo Yezu alobi na ye: "Yoka malamu! Koloba likambo oyo na moto té, kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe, pe pesa libonza ndenge Moize atindá; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo."

Yezu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda

5 Tango Yezu azalaki kokota na Kafarnaum, mokonzi moko ya basoda ya Rome ayei epai na ye, pe abondeli ye boye: 6 "Mokonzi, mosali na ngai alali na ndako, azali lisusu koningana té, pe azali koyoka pasi mingi penza." 7 Yezu alobi na ye: "Nakokende kobikisa ye." 8 Kasi mokonzi ya basoda azongisi: "Mokonzi, ngai nazali Moyuda té. Ndenge nini ókota na ndako na ngai? Loba kaka liloba moko, bongo maladi ekotosa yo pe mosali na ngai akobika. 9 Pamba té ngai pe natosaka bakonzi na ngai; nazali pe na basoda oyo batosaka ngai. Soki nalobi na moko: 'Kende', akei; soki nalobi na mosusu: 'Yaka', ayei; pe soki natindi mosali na ngai: 'Sala mosala oyo', asali yango." 10 Tango Yezu ayoki bongo, akamwe pe alobi boye na bato oyo bazalaki kolanda ye: "Nazali koloba na bino, ya solo: Nanu namoná bondimi ya ndenge oyo té na Israel. 11 Nalobi na bino: bato mingi bakolongwa na epai moi ebimaka pe na epai elalaka; bakoya kokota na mboka ya Nzambe, pe bakozala kolia na feti esika moko ná Abraham, Izaak pe Jakob. 12 Kasi baoyo basengelaki kozala bato ya mboka ya Nzambe bakobwaka bango libanda na molili, esika balelaka pe baliaka mino." 13 Bongo Yezu alobi na mokonzi ya basoda: "Kende na yo; makambo ondimi esalami." Pe mosali na ye abikaki kaka na tango wana.

Yezu abikisi bato ya maladi

14 Yezu akendeki na ndako ya Piere, akuti bokilo ya Piere ya mwasi alali na mbeto, azalaki na fièvre. 15 Yezu asimbi ye na liboko; fièvre esili, atelemi pe abandi kosalela ye. 16 Tango pokwa ekómi, bamemeli Yezu bato mingi bazalaki na milimo mabe. Yezu agangeli milimo mabe pe abimisi yango; abikisi pe bato nyonso ya maladi. 17 Ndenge wana akokisaki makambo profete Ézaya alobaká: "Ye amemaki mokumba ya bapasi na biso, pe alongolaki maladi na biso."

Baoyo balingi kolanda Yezu

18 Awa Yezu amoni bato ebele bazali kotondana epai na ye, alobi: "Tókatisa ngambo". 19 Kaka na tango wana, molakisi-Mibeko moko ayei epai na ye pe alobi: "Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende." 20 Yezu azongiseli ye: "Banyama ya zamba ezali na mabulu na yango, bandeke ezali na ba-zala na yango, kasi ngai Mwana ya Moto nazali na esika ya kolala té." 21 Moyekoli na ye mosusu alobi na ye: "Mokonzi, liboso pesa ngai nzela nákende kokunda tata na ngai." 22 Yezu azongiseli ye: "Landa ngai. Tika bato bakufa bákundana bango na bango."

Yezu alembisi mopepe ná mbonge

23 Yezu akoti na bwatu pe bayekoli na ye bakei ná ye. 24 Na mbala moko mopepe moko ya makasi eleki na lak, bongo mai ebandi kokota na bwatu. Kasi Yezu alalaki pongi. "Bayekoli bapusani pe balamusi ye, balobi: "Mokonzi, bikisa biso, tolingi tókufa!" 26 Yezu azongiseli bango: "Po na nini bozali kobanga? Bondimi na bino ezali moke." Bongo atelemi pe agangeli mopepe ná mai, pe kimia penza ezongi. 27 Bango nyonso bakamwe pe balobi: "Moto oyo azali nani? Ata mopepe ná mai ezali kotosa ye!"

Yezu abikisi bato mibale ya milimo mabe

28 Tango Yezu akómi na ngambo ya lak, na mabelé ya Gadará, bato mibale bayei epai na ye, bautaki na simetiere. Milimo mabe ekotelaki bango, pe bazalaki kotomboka mingi; yango wana bato bazalaki kokoka koleka na nzela wana té. 29 Bato wana babandi koganga: "Mwana ya Nzambe, biso na yo likambo nini? Oyei awa po na kotungisa biso lelo? Tango na biso ekoki nanu té." 30 Nzokande bangulu ebele ezalaki kolia mwa mosika. 31 Milimo mabe ebondeli Yezu boye: "Soki olingi kobengana biso, tinda biso tókende kokota na bangulu wana." 32 Yezu alobi na bango: "Bókende kokota." Milimo mabe ebimi na bato wana pe ekei kokota na bangulu. Na mbala moko bangulu nyonso elongwe likolo ya ngomba; ekei kokweya na kati ya lak pe edindi na mai. 33 Bato bazalaki kokengela bangulu bakimi, bakei na mboka moko ezalaki pembeni. Kuna bayebisi makambo nyonso, pe ndenge esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe. 34 Bongo bato nyonso ya mboka wana babimi po na kokutana na Yezu; tango bamoni ye, basengi ye álongwa na mabelé na bango.

Matié 9

Yezu abikisi moto akufá makolo

Yezu akoti na bwatu, akati lisusu ngambo pe akei na mboka na ye. 2 Bamemeli ye moto moko akufá makolo, alali na mbeto. Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto akufá makolo: "Mwana na ngai, tia molende! Nalimbisi masumu na yo." 3 Balakisi-Mibeko mosusu babandi kolobana bango na bango: "Moto oyo azali kotsiola Nzambe." 4 Yezu ayebaki makanisi na bango, alobi: "Po na nini bozali na makanisi y a mabe boye na mitema na bino? 5 Soki nalobi na ye 'Nalimbisi masumu na yo', to pe nalobi 'Telema pe tambola', nini eleki pasi? 6 Kasi nalingi bóyeba 'tè ngai Mwana ya Moto nazali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili." Bongo alobi na moto akufá makolo: "Telema, kamata mbeto na yo pe zonga na ndako!" 7 Moto wana atelemi pe akei na ndako na ye. 8 Tango bato bamoni boye, babangi mingi penza, pe bapesi Nzambe mersi po akabeli bato bokonzi ya ndenge oyo.

Yezu abengi Matié

9 Yezu alongwe kuna, pe tango azalaki koleka na nzela, amoni moto moko, kombo na ye Matié, afandi na biro oyo bafutaka mpaku. Yezu alobi na ye: "Landa ngai!" Matié atelemi pe alandi ye. 10 Tango Yezu azalaki kolia na ndako ya Matié, bafutisi-mpaku ná bato ya masumu ebele bazalaki na mesa esika moko ná ye pe bayekoli na ye. 11 Awa ba-Farizé bamoni bongo batuni bayekoli na ye: "Po na nini moteyi na bino azali kolia esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?" 12 Yezu ayoki yango pe alobi: "Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té, kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga. 13 Bókende koyekola tina ya makambo oyo ekómamá na Mikanda: 'Bótika kozikisela ngai banyama, kasi bóyokela bato mawa.' Pamba té nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi bobele bato ya masumu."

Yezu ayeeli bato makambo ya sika

14 Bayekoli ya Yoane Mobatisi bayei epai ya Yezu pe batuni ye: "Biso ná ba-Farizé tomilalisaka nzala mbala mingi. Po na nini bayekoli na yo basalaka bongo té?" 15 Yezu azongiseli bango: "Bato bafandi na feti ya libala bakoki kozala na mawa té, tango moto oyo abali azali esika moko ná bango. Kasi mokolo ezali, bakolongola mobali na kati na bango, bongo baoyo bazalaki na feti, bakobanda komilalisa nzala. 16 "Moto moko té akoki kokamata kitendi ya elamba ya sika po ábamba elamba ya kala, pamba té kitendi wana ekopasola elamba ya kala pe lidusu ekokóma monene. 17 Bakoki kotia vinu ya sika na basaki ya kala té; soki basali bongo, basaki ekopasuka, vinu ekopanzana pe basaki wana ekokufa. Batiaka vinu ya sika na basaki ya sika, po bábatela nyonso mibale malamu."

Mwana ya mokonzi moko ya Bayuda Mwasi moko asimbi elamba ya Yezu

18 Awa Yezu azalaki kolobela bango makambo oyo, mokonzi moko ya Bayuda ayei kofukamela ye, pe alobi: "Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik'oyo. Kasi yaka kotiela ye liboko pe akobika." 19 Yezu atelemi pe alandi tata wana Bayekoli na ye pe bakei na ye. 20 Mwasi moko azalaki na maladi ya kobima makila, esali mbula zomi na mibale. Ayei na sima ya Yezu, pe asimbi ye na songe ya elamba, 21 pamba té akanisaki 'tè: "Soki nasimbi ye ata na elamba, nakobika." 22 Kasi Yezu abaluki, amoni ye pe alobi: "Tia molende, mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo." Na mbala moko mwasi yango abiki. 23 Yezu akómi na ndako ya mokonzi wana. Tango amoni bato bazali kobeta miziki po na ebembe, pe bamosusu bazali kotia makelele mingi, 24 alobi: "Bóbima, mwana akufi té, kasi alali pongi." Bango babandi koseka ye. "Yezu abimisi bango nyonso, akoti na ndako, asimbi mwana yango na Hboko, pe ye atelemi. 26 Sango yango epanzanaki bipai nyonso na mboka wana.

Yezu abikisi bato mibale bakufa miso

27 Yezu alongwe kuna. Awa azalaki koleka na nzela, bato mibale bakufa miso balandi ye pe bazalaki koganga boye: "Mwana ya David, yokela biso mawa!" 28 Tango Yezu akómi na ndako, bato wana bakufa miso bayei penepene na ye, pe Yezu atuni bango: "Bondimi na mitema 'tè nakoki kosala bongo?" Bango bazongiseli ye: "Ee, Mokonzi." 29 Bongo Yezu asimbi miso na bango pe alobi: "Ésalama po na bino ndenge bondimi." 30 Pe miso na bango efungwami. Yezu apekisi bango makasi: "Bókeba, moto moko té áyeba makambo oyo!" 31 Kasi bango bakei pe bapanzi sango ya Yezu bipai nyonso na mboka wana.

Yezu abikisi baba

32 Tango balingaki kokende, bamemeli Yezu baba moko oyo azalaki na molimo mabe. 33 Yezu abengani molimo mabe, bongo baba wana abandi koloba. Bato nyonso bakamwe pe balobi: "Nanu tomoná likambo ya boye té na Israel!" 34 Kasi ba-Farizé balobi: "Ezali mokonzi ya milimo mabe moto apesi ye makasi ya kobengana milimo mabe!"

Yezu ayokeli bato mawa

35 Yezu atambolaki na bamboka nyonso ya minene ná ya mike. Azalaki koteya na bandako ya losambo, pe kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye. Abikisaki lisusu bato bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge. 36 Ayokaki mawa mingi na motema, po na ebele ya bato oyo azalaki komona; pamba té balembaki pe bazalaki lisusu na makasi té, lokola bameme ezangi mobokoli. 37 Bongo alobi na bayekoli na ye: "Bambuma ebele etondi na elanga, kasi bato ya kobuka yango bazali mingi té. MBóbondela Kolo ya elanga átinda bato mingi ya mosala po baya kosala na elanga na ye."

Matié 10

Bantoma zomi na mibale

1 Yezu abengi bayekoli na ye zomi na mibale, pe apesi bango nguya ya kobengana milimo mabe pe ya kobikisa maladi ya ndenge na ndenge. 2 Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale: ya liboso Simon (oyo babengaka Piere) ná ndeko na ye André; Jake ná ndeko na ye Yoane, bana ya Zebedé; 3 Filipe ná Bartelemi; Toma ná Matié mofutisi-mpaku; Jake mwana ya Alfé pe Tadé. 4 Simon, oyo azalaki liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda, pe Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu.

Yezu atindi bantoma zomi na mibale

5 Yezu atindi bato wana zomi na mibale pe apesi bango mitindo oyo: "Bókende na bamboka ya bapaya té; bókota pe na ba-vile ya Samarie té. 6 Kasi bókende bobele epai ya bato ya Israel, pamba té bakomi lokola bameme oyo ebungá. 7 Tango bozali kokende, bósakola boye: 'Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo.' «Bóbikisa bato ya maladi ná bato ya maba; bósekwisa bato bakufa; bóbengana milimo mabe. Bozwi biloko ya ofelé; bópesa pe ya ofelé. 9 Bómema ata ebende moko té ya mbongo na ba-poshe na bino; 10 bókamata saki té po na mobembo, to ba-shemize mibale, to sapatu, to pe nzete. Moto oyo asalaka, esengeb! bápesa ye bilei. 11 "Soki bokómi na mboka mokoya monene to ya moke, bóluka moto ya malamu; pe bófanda epai na ye tii mokolo bokolongwa na mboka yango. 12 Soki bokoti na ndako moko, bópesa mbote na boboto nyonso. 13 Soki bato ya ndako wana bazali malamu, bakozwa boboto likolo na bino; kasi soki bazali malamu té, bakozwa eloko té. "Bongo soki baboyi koyamba bino pe balingi koyoka maloba na bino té, bobima na ndako to na mboka wana, pe bópupola makolo po bómema pusiere ya mboka yango epai mosusu té. 15 Nalobi na bino, ya solo: mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, bango bakozwa etumbu eleki oyo ya Sodome pe Gomore."

Minyokoli ekoya

16 "Bóyoka malamu: natindi bino lokola bameme na kati ya bankoi. Yango wana, bozala mayele lokola banyoka; pe bozala bato ya kimia lokola ba-pijon. 17 Bókeba na bato. Bakomema bino epai ya bazuzi, pe bakobeta bino fimbu na bandako na bango ya losambo. 18 Likolo na ngai, bakobanda komema bino epai ya batambwisi ya ba-vile pe bakonzi ya bikolo, po bóyebisa bango sango na ngai; boye bato oyo bayebi Nzambe té bakoyoka yango. 19 Bongo tango bakomema bino, bóbanga té po na makambo bosengeli koloba; tango wana makambo ya koloba ekobima yango moko. 20 Bino té bato bokoloba yango, kasi Molimo ya Tata na bino moto akolobisa bino. 21 "Bato bakoteka bandeko na bango; batata bakotekisa bana na bango; pe bana bakotombokela batata po bábomisa bango. 22 Bato nyonso bakoyina bino po na kombo na ngai; kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, akobika. 23 Soki banyokoli bino na mboka moko, bókima na mboka mosusu. Nalobi na bino, ya solo: bokosilisa koleka na bamboka nyonso ya Israel té, liboso 'tè ngai Mwana ya Moto náya. 24 "Moyekoli aleki molakisi na ye té; mosali aleki mokonzi na ye té. 25 Moyekoli asengeli kosepela soki akokani ná molakisi na ye; pe mosali asengeli kosepela soki akokani ná mokonzi na ye. Lokola bapesi ngai kombo Satan, bakopesa bino bakombo oyo eleki mabe; pamba té ngai nazali na kati na bino lokola shef ya fami."

Moto basengeli kobanga

26 "Yango wana bóbanga bato té! Mokolo ezali, makambo nyonso oyo ebombamá ekomonana polele; pe makambo ya sekele ekoyebana. 27 Oyo nazali koloba na bino na molili, bóloba yango na moi; pe oyo nazali koloba na bino na sekele, bótambola na ba-balabala po bósakola yango. 28 Bóbanga bato té! Bango babo-maka nzoto, kasi bakokaka koboma molimo té. Bóbangaka kaka Nzambe oyo akoki kobwaka molimo ná nzoto mbala moko na lifelo. 29 Batekaka bandeke ya mike na talo moke penza. Ezali boye té? Kasi moko té na kati na yango ekweyaka na se, soki Tata na bino alingi té. 30 Po na bino ezali se bongo. Ata suki na bino, Nzambe asi'atangá yango nyonso. 31 Yango wana bóbanga té! Bino bozali na tina, koleka ebele ya bandeke ya mike!"

Kondima to koboya Yezu

32 "Moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, ngai pe nakondima ye na miso ya Tata na ngai ya Likolo. 33 Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, ngai pe nakowangana ye na miso ya Tata na ngai ya Likolo."

Boboto té, kasi bitumba

34 Bókanisa té 'tè nayeeli bato boboto; nayeeli bango boboto té, kasi bitumba. 35 Nayei po na kokabola mwana mobali ná tata na ye, mwana mwasi ná mama na ye; pe mwasi ya mwana ná bokilo na ye ya mwasi. 36 Ya solo, banguna ya bato ekozala bobele bandeko na bango moko. 37 "Moto oyo alingaka tata to mama na ye koleka ngai, akoki kozala moto na ngai té; oyo alingaka mwana na ye ya mobali to ya mwasi koleka ngai, akoki kozala moto na ngai té. 38 Oyo aboyi komema kuruze na ye pe kolanda ngai, akoki kozala moto na ngai té. 39 Moto oyo alingaka kobatela bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye likolo na ngai, akozwa yango lisusu."

Lifuta

40 "Moto oyo ayambi bino, ayambi penza ngai moko; pe oyo ayambi ngai, ayambi penza Moto oyo atindi ngai. 41 Moto oyo ayambi profete po azali profete, akozwa lifuta oyo Nzambe akopesa na baprofete; pe oyo ayambi moto ya malamu po ye azali malamu, akozwa lifuta oyo Nzambe akopesa na bato ya malamu. 42 Nalobi na bino, ya solo: moto oyo ayambi ata mwana moke po azali moyekoli na ngai, pe apesi ye kopo ya mai ya malili, akozanga lifuta té."

Matié 11

Yoane Mobatisi atindi bato epai ya Yezu

1 Tango Yezu asilisi kopesa bayekoli na ye zomi na mibale mibeko wana, alongwe kuna po ákende koteya pe kosakola na bamboka ya pembeni. 2 Yoane Mobatisi azalaki na boloko pe ayoki sango ya misala ya Kristo. Bongo atindeli ye bayekoli na ye mosusu 3 po bákende kotuna ye: "Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu?" 4 Yezu azongiseli bango: "Bókende koloba na Yoane makambo oyo boyoki pe bomoni: 5 bato bakufa miso bakomi komona; bato bakufa matoi bakomi koyoka; bato bakufa makolo bakomi kotambola; bato bazali na maladi ya maba babandi kobika; bato bakufa babandi kosekwa; pe bato ya mawa babandi koyoka Sango Malamu. 6 Esengo mingi na moto oyo atii tembe té po na ngai." 7 Awa bayekoli ya Yoane bakei, Yezu abandi kotuna bato po na Yoane: "Bokendeki kotala nini na esobe? Mwa-nzete oyo mopepe ezali koningisa? Té! 8 Bongo bokendeki kuna po na nini? Po na kotala moto moko oyo alati bilamba ya kitoko? Té! Po bato balataka bilamba ya kitoko bafandaka na bandako ya bakonzi. 'Bongo bokendeki kotala nani? Profete? Ee, bokendeki kotala profete. Ya solo, nalobi na bino: ye aleki kutu profete. 10 Pamba té Yoane azali moto oyo bakómá boye: 'Nzambe alobi: Tala, natindi ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.' 11 Nalobi na bino, ya solo: na kati ya bato nyonso Nzambe asalá, moko té aleki Yoane Mobatisi. Kasi na kati ya bato ya mboka ya Nzambe, moto ya suka aleki ye. 12 Banda tango Yoane Mobatisi azalaki kosakola tii lelo, Nzambe azali kotia bokonzi na ye; kasi banguna na ye bazali koboya, bazali kutu konyokola bato po bándima yango té. 13 Pamba té liboso 'tè Yoane áya, Mibeko ya Moize pe baprofete nyonso bazalaki koyebisa 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye. 14 Bóndima to bóndima té, Yoane azali Eliya oyo balobaká 'tè akoya. 15 Moto azali na matoi, áyoka! 16 "Kasi bato ya lelo bakokani ná banani? Bakokani ná bana mike bafandi na zando, pe bazali koloba na baninga na bango: 17 'Tobeteli bino miziki, bobini té! Toyembeli bino banzembo ya mawa, boleli té!' 18 Pamba té Yoane ayaki, azalaki komilalisa nzala, bongo babandalri koloba po na ye: 'Azali na ndoki'. 19 Ngai Mwana ya Moto nayei, nazali kolia pe komela; bongo balobi: 'Botala moto oyo, azali kokanisa kaka kolia pe kolangwa; azali moninga ya bafutisi-mpaku pe bato ya masumu!' Kasi mayele ya Nzambe ezali komonana solo na misala na ye."

Ba-vile oyo eboyi kondimela Yezu

20 Bongo Yezu abandi kogangela ba-vile esika ye asalaki makamwisi ebele, po bato ya ba-vile yango babongolaki mitema té. 21 Alobi: "Mawa na yo, vile ya Korazine! Mawa na yo, vile ya Betsaida! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na bino ésalamaka na Tir pe Sidon, mbele bato ya kuna balingaki kolata basaki pe kopakola potopoto, po na kolakisa 'tè babongoli mitema! 22 Yango wana nalobi na bino: mokolo Nzambe akosa-mbisa bato, etumbu na bino ekolekà ya Tir ná ya Sidon. 23 Pe yo Kafarnaum, okanisi 'tè okomata tii na Likolo? Té! Okokita tii na mboka ya bato bakufa! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na yo ésalamaka na Sodome, mbele yango elingaki kozala tii lelo. 24 Yango wana, nalobi na yo: mokolo Nzambe akosambisa bato, etumbu na yo ekoleka ya Sodome!"

Bóya epai na ngai po bópema

25 Na tango wana Yezu alobi: "Ee Tata, Nkolo ya Likolo na se, napesi yo mersi po obombi makambo oyo na bato ya mayele pe na bato bayekolá, kasi olakisi yango na bato pamba. 26 Ya solo, Tata, olingaki ésalama bobele ndenge wana. 27 "Tata na ngai apesi makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko té ayebi ngai; bobele Tata moto ayebi ngai Mwana na ye. Moto moko té ayebi Tata, bobele ngai Mwana moto nayebi ye, ná baoyo nalingi kolakisa bango Tata. 28 "Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona pasi pe bolembi na mikumba; ngai moto nakosalisa bino po bókoka kopema. 29 Pamba té nazali moto ya motema malamu pe ya boboto. Bozala basali na ngai pe bóya kozwa mayele epai na ngai; bongo bokokoka kofanda na kimia. 30 Kosalela ngai ezali pasi té, pe mokumba na ngai ezali kilo té."

Matié 12

Yezu azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema

1 Mokolo moko, Yezu azalaki koleka na bilanga ya blé; ezalaki Mokolo ya Kopema. Bayekoli na ye bayoki nzala, bongo babandi kobuka blé pe kolia yango. 2 Awa ba-Farizé bamoni boye, balobi na Yezu: "Tala, bayekoli na yo bazali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema!" 3 Yezu azongiseli bango: "Bino botangi nanu té makambo David asalaka, tango ye ná bato na ye bazalaki na nzala? 4 Akotaki na Ndako ya Nzambe, bongo ye ná bato na ye baliaki mapa oyo batielaki Nzambe. Nzokande bakokaki kolia yango té, pamba té kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia mapa wana. 5 Nanu botangi Mibeko ya Moize té? Ekómamá 'tè banganga-Nzambe oyo basalaka na Ndako ya Nzambe na Mokolo ya Kopema, basalaka lisumu té atako babukaka mobeko ya Mokolo ya Kopema. 6 Nalobi na bino: makambo bozali komona awa eleki Ndako ya Nzambe. 7 Pamba té ekómamá boye: 'Bótika kozikisela ngai banyama, kasi bóyokelaka bato mawa. Soki boyebaki yango, mbele bolingaki kokweisa bato oyo té; bango basali ata mabe moko té. 8 Pamba té ngai Mwana ya Moto nazali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema."

Yezu abikisi moto akufá liboko

9 Yezu alongwe esika yango pe akei na ndako ya losambo. 10 Kuna ezalaki na moto moko akufá liboko. Bato oyo bazalaki wana baluki nzela ya kofunda Yezu; bongo batuni ye: "Mibeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na Mokolo ya Kopema to té?" 11 Yézu azongiseli bango: "Soki moto moko na kati na bino azali kaka na méme moko, pe soki méme ekwei na libulu na Mokolo ya Kopema, akoki kobimisa yango té? 12 Nzokande moto aleki méme! Boye Mibeko na biso ezali kopesa nzela ya kosala bolamu na Mokolo ya Kopema." 13 Bongo Yezu alobi na moto wana: "Tanda liboko na yo!" Ye atandi yango, pe ekómi malamu lokola liboko na ye mosusu. 14 Ba-Farizé babimi na ndako ya losambo pe bakei kosala likita po na koluka nzela ya koboma Yezu.

Yezu azali "Mosali ya Nkolo"

15 Tango Yezu ayoki makambo yango, alongwe na esika wana, pe bato ebele balandi ye. Abikisi bato nyonso ya maladi, 16 kasi apekisi bango 'tè bápanza sango na ye té. 17 Esalamaki bongo po na kokokisa makambo profete Ezaya alobaká: 18 "Nzambe alobi: Tala mosali na ngai oyo naponá; nalingi ye pe nazali na esengo po na ye. Napesi ye Molimo na ngai, po áyebisa bikolo makambo ngai nalingi. 19 Akoswana na moto té; akotombola mongongo té; akolobaloba pe na balabala té. 20 Lititi oyo elembá akobuka yango té; mwinda oyo elingi kokufa akoboma yango té. Na ndenge wana akolongjsa makambo va bosembo; 21 pe bato ya bikolo nyonso bakotiela ye mitema."

Bafundi Yezu 'tè azali na molimo mabe

22 Bamemelaki Yezu moto moko azalaki na molimo mabe; ye azalaki baba pe akufá miso. Yezu abikisi ye; bongo abandi koloba pe komona. 23 Bato nyonso bakamwe penza pe batunani: "Oyo Mwana ya David té?" 24 Tango ba-Farizé bayoki bongo, balobi: "Moto oyo azali kobengana milimo mabe bobele po Satan, mokonzi ya milimo mabe, apesi ye nguya." 25 Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, bongo alobi na bango: "Soki bato ya mboka moko bakábwani bango na bango, mboka na bango ekokufa. Soki bato ya vile moko to ya libota moko bakábwani, bakoki kozala malamu té. 26 Bongo soki Satan abengani moto na ye, azali nde kobebisa bokonzi na ye moko; ndenge nini bokonzi na ye ekoki koumela? 27 Bino bolobi 'tè mokonzi ya milimo mabe moto apesi ngai nguya ya kobengana milimo mabe; kasi nani moto apesaka bato na bino nguya ya kobengana yango? Bato na bino bango moko nde bazali kokweisa bino. 28 Ngai nabenganaka milimo mabe na makasi ya Molimo ya Nzambe; elakisi 'tè Nzambe asi'abandi kotia bokonzi na ye na kati na bino. 29 "Moto oyo alingi kokota na ndako ya elombe po ayiba biloko na ye, asengeli liboso kokanga elombe wana na singa; na sima akoki koyiba biloko na ye nyonso. 30 "Moto oyo alandaka ngai té, azali koboya ngai; pe oyo asalisaka ngai té po na kosangisa bato, azali kopanza bango. 31 Nalobi na bino: Bato nyonso oyo basali masumu pe batsioli Nzambe, bakoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Molimo Mosantu akoki kozwa bolimbisi té. 32 Moto oyo atsioli ngai, Mwana ya Moto, akoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Moluno Mosantu akoki kozwa bolimbisi té, ézala na tango azali na bomoi to sima ya liwa na ye."

Nzete ná mbuma na yango

33 "Soki bokoni nzete ya malamu, bokozwa mbuma ya malamu; soki bokoni nzete ya mabe, bokozwa mbuma ya mabe. Pamba té bayebaka nzete na mbuma na yango. 34 Bino banyoka! Lokola bozali bato mabe, ndenge nini bokoki koloba makambo ya malonga? Moto nyonso abimisaka makambo oyo etondi na motema na ye. 35 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na ye; moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ezali na motema na ye. 36 Nalobi na bino: mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, akosambisa bango po na maloba nyonso ya pamba-pamba oyo ebimaka na minoko na bango. 37 Maloba na yo nde moto ekolongisa yo to ekokweisa yo."

Ba-Farizé basengi elembo

38 Bongo balakisi-Mibeko mosusu ná ba-Farizé balobi na Yezu: "Moteyi, tolingi ólakisa biso elembo moko." 39 Yezu azongiseli bango boye: "Ndenge nini bato oyo bazali kosenga elembo! Bazali bato mabe pe batosaka Nzambe té. Nzambe akolakisa bino kaka elembo moko: oyo ya profete Jonas. 40 Pamba té ndenge Jonas asalaki mikolo misato na libumu ya mbisi ya monene, se bongo pe ngai Mwana ya Moto nakosala mikolo misato na se ya mabelé. 41 Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, bato ya Ninive bakoya kofunda bino, po bango babongolaki mitema tango bayokaki maloba ya Jonas. Kasi ngai oyo nazali awa, naleki Jonas. 42 Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, mokonzi-mwasi ya mboka Saba akoya kofunda bino, po ye alongwaki mosika po na koya koyoka maloba ya mayele ya Salomon. Kasi ngai oyo nazali awa, naleki Salomon!"

Tango molimo mabe ezongaka

43 "Soki molimo mabe etiki nzoto ya moto, ekendeke kote-lengana na esobe po na koluka esika ya kopema. Soki ezwi esika ya kopema té, 44 emilobaka: 'Nakozongela moto oyo natikaki; ye azali lokola ndako na ngai.' Kasi tango molimo ezongelaka moto yango, ekutaka ye akómi lokola ndako ya kitoko oyo bakombi pe babongisi malamu. 45 Bongo ekendeke kozwa milimo sambo mosusu oyo eleki yango na mabe; pe yango nyonso eyaka nzela moko kofanda na nzoto ya moto wana. Boye suka na ye ekómaka mabe mingi koleka ya liboso. Ekozala ndenge moko po na bino, bato ya mabe."

Mama na Yezu ná bandeko na ye

46 Tango Yezu azalaki koloba na bato, mama na ye ná bandeko na ye bayei, batelemaki na libanda; babandi koluka nzela ya kosolola na ye. 47 Moto moko alobi na Yezu: "Tala, mama na yo ná bandeko na yo bazali na libanda, pe balingi kosolola na yo." 48 Yezu azongiseli moto wana: "Mama na ngai nani? Bandeko na ngai banani?" 49 Bongo alakisi bayekoli na ye na liboko, pe alobi: "Botala, mama na ngai pe bandeko na ngai, bang'oyo! 50 Pamba té moto asalaka makambo Tata na ngai ya Likolo alingaka, ye nde azali ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi pe mama na ngai."

Matié 13

Lisapo ya mokoni-bilanga

1 Mokolo wana Yezu abimi na ndako pe akei kofanda pembeni ya ebale po na koteya. 2 Bato ebele bayei kotondana penepene na ye, yango wana Yezu akotaki na bwatu pe afandi wana; bato nyonso batelemaki na mokili. 3 Yezu ayebisi bango makambo mingi na masapo. Alobi: "Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye. 4 Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela, pe bandeke eyei kolia yango. 5 Mbuma mosusu ekwei na esika ya mabanga; kuna mabelé ezalaki mingi té, yango wana eboti noki-noki. 6 Tango moi ekómi makasi, eziki pe ekauki, po misisa ezalaki mikuse. 7 Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende wana ekoli pe ebomi matiti ya malamu. 8 Kasi mbuma mosusu ekwei na mabelé ya malamu, pe eboti: mosusu eboti bambuma kama, mosusu tuku motoba; pe mosusu tuku misato." 9 Bongo Yezu alobi lisusu: "Moto azali na matoi, áyoka!"

Po na nini Yezu azalaki koloba na masapo

10 Bayekoli bapusani penepene ya Yezu pe batuni ye boye: "Po na nini ozali kolobela bango na masapo?" 11 Ye azongiseli bango: "Bino bokoki koyeba sekele ya Nzambe, ndenge ye akotia bokonzi na ye na mokili; kasi bango bakoki koyeba yango té. 12 Pamba té moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azali na biloko mingi té, bakobotola ye kutu ata mwa ndambo oyo azali na yango. 13 Nazali kolobela bango na masapo, po ata batali, bazali komona té; pe ata batii matoi, bazali koyoka té pe koyeba tina té. 14 Na ndenge wana bazali kokokisa makambo Nzambe alobaká na monoko ya profete Ezaya: 'Ata boyoki ndenge nini, bokoyeba té; ata botali ndenge nini, boko-mona té. 15 Pamba té bato oyo bazangá makanisi; bazali kozipa matoi na bango, bazali kokanga miso na bango. Baboyi komona pe koyoka, baboyi kozwa makanisi. Soki té balingaki kobongola mitema po nábikisa bango.' 16 "Esengo mingi na bino po miso na bino ezali komona, pe matoi na bino ezali koyoka 17 Nalobi na bino, ya solo: Baprofete mingi pe bato ya bosembo bazalaká na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango té; pe bazalaká na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango té."

Yezu alimboli lisapo ya mokoni-bilanga

18 "Bóyoka ndimbola ya lisapo ya mokoni-bilanga. 19 Bato oyo bayoki sango 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye, pe bazweli yango makanisi té, bakokani ná mbuma oyo ekwei na nzela: Monguna ayei pe alongoli mbuma oyo bakoni na mitema na bango. 20 Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na esika ya mabanga; bayoki maloba ya Nzambe pe bayambi yango na esengo, 21 kasi misisa ekoli té na mitema na bango, bandimi kaka na mwa tango moke. Soki bamoni pasi to minyokoli po na maloba ya Nzambe, batiki bondimi na bango noki. 22 Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na kati ya basende. Bayoki maloba ya Nzambe, kasi pasi ya mokili pe bisengo ya bomengo oyo ekosaka bato enyati maloba yango, bongo eboti té. 23 Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu. Bayoki maloba ya Nzambe pe bazweli yango makanisi, bongo bayei kobota mbuma, bamosusu bambuma kama, bamosusu tuku mótoba, pe bamosusu tuku misato."

Lisapo ya matiti ya mabe

24 Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: "Bóyoka ndenge Nzambe azali kotia bokonzi na ye na mokili. Ezali lokola moto moko oyo akonaki mbuma ya malamu na bilanga na ye ya blé. 25 Mokolo moko na butu, tango bato nyonso bazalaki na pongi, monguna ya moto wana ayei, akoni matiti ya mabe na elanga, bongo akei. 26 Tango mbuma ebimi, blé ekoli, matiti ya mabe pe ebimi. 27 Basali bayei koloba na kolo ya elanga: 'Tata, yo okonaki mbuma ya malamu na elanga na yo; bongo matiti oyo ya mabe euti wapi?' 28 Ye azongiseli bango: 'Ézali monguna na ngai moto asali boye.' Bato ya mosala batuni ye: 'Olingi tókende kolongola matiti ya mabe yango?' 29 Ye azongiseli bango: 'Té! Pamba té soki bomeki kopikola matiti ya mabe, tango mosusu bokoki kolongola pe mwa ndambo ya blé. 30 Bótika yango nyonso ékola esika moko tii tango bakobuka mbuma; bongo na tango wana nakoloba na bato ya mosala: Bólongola liboso matiti ya mabe, pe bókangisa yango maboke maboke po na kotumba yango; na sima bókotisa blé na ndako oyo nabombaka biloko na ngai.' "

Lisapo ya mbuma ya mutarde

31 Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: "Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye? Yango ekokani na mbuma babengaka 'mutarde', oyo moto moko akoni na elanga na ye. 32 Mbuma wana ezali moke penza koleka bambuma nyonso. Kasi soki ebimi pe ekoli, elekaka ndunda nyonso na molai, ekómaka nzete pe ebimisaka bitape esika bandeke ekoki kosala ba-zála na yango."

Lisapo ya kisi ya mapa

33 Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: "Bokonzi ya Nzambe ekokani na kisi ya mapa: mama moko asangisi yango na sani monene ya farine, bongo farine nyonso eyei kovimba."

Tina nini Yezu azalaki koloba na masapo

34 Yezu alobelaki bato makambo nyonso wana na masapo. Azalaki koloba na bango bobele na masapo. 35 Asalaki bongo po na kokokisa maloba oyo profete asakolaká: "Nakolobela bango na masapo. Nakoyebisa bango makambo oyo ebombamá banda mokili esalamá."

Yezu alimboli lisapo ya matiti mabe

36 Tango Yezu atiki bato pe azongi na ndako, bayekoli na ye bapusani penepene na ye bongo balobi: "Limbolela biso lisapo ya matiti mabe ya elanga." 37 Yezu azongisi boye: "Moto oyo akoni mbuma ya malamu ezali ngai, Mwana ya Moto. ^Elanga ezali mokili; mbuma malamu ezali bato oyo bandimi bokonzi ya Nzambe; matiti mabe ezali bato ya Monguna; 39 monguna oyo akoni matiti ya mabe ezali zabolo. Tango ya kobuka blé ezali mokolo ya suka, pe bato basalaka na elanga ezali ba-anjelu. 40 Na mokolo ya suka ekozala lokola tango balongolaka matiti ya mabe po na kotumba yango. 41 Ngai Mwana ya Moto nakotinda ba-anjelu na ngai, bongo na mboka na ngai mobimba bakolongola bato nyonso oyo bakweisaka baninga na masumu, pe baoyo basalaka mabe; 42 bakobwaka bango na lifelo, esika balelaka pe baliaka mino. 43 Na tango wana bato oyo batosaka Nzambe bakongenga lokola moi na mboka ya Tata na bango. Moto azali na matoi, áyoka!"

Masapo misato

44 "Kokóma moto ya mboka ya Nzambe ezali lokola kozwa eloko ya talo oyo ebombamá na mabelé. Soki moto moko amoni yango, abombi yango lisusu. Ayoki esengo mingi; akei koteka biloko na ye nyonso pe asombi mabelé wana. 45 "Oyo alingi kokóma moto ya mboka ya Nzambe, esengeli ásala lokola moto ya mombongo oyo azali koluka bapauni ya kitoko. 46 Tango amoni pauni ya talo mingi, akei koteka biloko na ye nyonso pe asombi pauni wana. 47 "Bokonzi ya Nzambe ezali lokola monyama moko babwaki na mai pe ezali kokanga bambisi ya ndenge na ndenge. 48 Soki etondi, baluki-mbisi babendaka yango na mokili, bongo bafandaka po na kopona mbisi. Batiaka bambisi ya malamu na bitunga, pe babwakaka oyo ya mabe. 49-50 Ekozala bongo na mokolo ya suka: ba-anjelu bakoya kopona bato ya malamu, pe bakobwaka bato ya mabe na lifelo. Kuna bakolela pe bakolia mino."

Biloko ya sika pe ya kala

51 Yezu atuni bango: "Boyoki makambo oyo nyonso malamu?" Bango bazongisi: "Ee, toyoki." 52 Bongo Yezu alobi na bango: "Yango wana, molakisi-Mibeko nyonso oyo ayekolá makambo ya mboka ya Nzambe, akokani na kolo ya ndako oyo azali na biloko mingi, bongo abimisaka biloko ya sika pe ya kala."

Bato ya Nazaret baboyi Yezu

53 Tango Yezu asilisi koloba masapo wana, alongwe kuna 54 pe akei na mboka na ye esika akolaki. Azalaki koteya na ndako ya losambo; bongo bato bakamwe mingi penza pe batunani: "Epai wapi azwili mayele oyo? Ndenge nini azali kosala makamwisi boye? 55 Ye azali mwana ya sharpantié té? Mama na ye Maria té? Jake, Jozef, Simon ná Yuda bazali bandeko na ye té? 56 Bandeko na ye nyonso ya basi bazali awa na biso té? Ye azwi makambo nyonso oyo wapi?" 57 Yango wana bakokaki kondimela ye té. Kasi Yezu alobi na bango: "Bapesaka profete lokumu bipai nyonso; kasi na mboka na ye penza pe na libota na ye bakumisaka ye té." 58 Yezu asalaki makamwisi mingi kuna té, po bango bazangaki bondimi.

Matié 14

Liwa ya Yoane Mobatisi

1 Tango mokonzi Erode ayoki sango ya Yezu, 2 alobi na basali na ye: "Ezali Yoane Mobatisi moto asekwi; yango wana azwi nguya ya kosala makamwisi." 3 Pamba té Erode akangisaki Yoane pe atiaki ye na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe. Érode abalaki ye, 4 kasi Yoane alobaki na ye: "Mibeko ezali kopekisa 'tè okoki kobala ye té." 5 Erode alingaki koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato, pamba té bazalaki komona Yoane Mobatisi lokola profete. 6 Nzokande mokolo Erode asalisaki feti ya mbotama na ye, mwana ya Erodiade ya mwasi abinaki liboso ya bato oyo babengi-saki. Asepelisaki Erode mingi, 7 yango wana Érode akataki seleka 'tè akopesa ye eloko nyonso ye akosenga. 8 Mwana alandi maloba ya mama na ye pe asengi na Erode boye: "Pesa ngai sik'oyo motú ya Yoane Mobatisi na sani." 9 Mokonzi Erode ayoki mawa mingi penza, kasi akokisi kaka seleka oyo akataki liboso ya bato oyo abengisaki na feti, bongo alobi bápesa ye yango. 10 Atindi moto moko ákende kokata motú ya Yoane Mobatisi na boloko. 11 Bamemi motú yango na sani pe bapesi yango na mwana mwasi; ye akei kopesa na mama na ye. 12 Bayekoli ya Yoane bayei kokamata ebembe na ye, pe bakundi yango. Bongo bakei koyebisa Yezu makambo oyo elekaki.

Yezu aleisi bato 5.000

13 Awa Yezu ayoki sango ya liwa ya Yoane Mobatisi, alongwe kuna na bwatu pe akei ye moko na esika ya kobombama. Kasi bato bayei koyeba yango, bongo babimi na bamboka, pe balandi ye na makolo. 14 Boye tango Yezu abimi na bwatu, amoni bato ebele pe ayokeli bango mawa mingi na motema; bongo abandi kobikisa bato na bango ya maladi. 15 Na pokwa bayekoli bayei epai ya Yezu, pe balobi na ye: "Esika oyo ezali esobe pamba, pe ngonga esi'eleki. Yebisa bato bákende na bamboka kosomba biloko ya kolia." 16 Yezu azongiseli bango: "Tina ezali té po bákende. Bino moko bópesa bango biloko ya kolia." 17 Kasi bango balobi na ye: "Awa tozali kaka na mapa mitano, ná bambisi mibale!" 18 Yezu azongiseli bango: "Bómemela ngai yango." 19 Bongo alobi na bato nyonso báfanda na matiti; na sima akamati mapa mitano wana ná bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe apesi na bayekoli na ye. Bongo bayekoli na ye bakaboli yango na bato. 20 Bato nyonso balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni oyo etikalaki pe batondisi na yango bitunga zomi na mibale. 21 Bato oyo baliaki bazalaki mibali soki 5.000 , kotanga basi ná bana té.

Yezu atamboli likolo ya mai

22 Sima na yango Yezu atindi bayekoli na ye bákota na bwatu pe bákende kozela ye na ngambo. Kasi ye atikali kuna, azongisi bato na bamboka na bango, 23 bongo amati ye moko na ngomba po na kosambela. Na pokwa, azalaki kaka ye moko; 24 bongo bwatu ekómaki na kati ya lak; mbonge ezalaki kobeta yango po mopepe ezalaki makasi. "Tango tongo elingaki kotana, Yezu abandi kotambola likolo ya mai pe ayei epai na bango. 26 Awa bayekoli bamoni ye azali kotambola likolo ya mai, bayoki somo penza, balobi: "Ezali elima!" Pe babandi koganga po na somo. 27 Kasi na mbala moko Yezu alobi na bango: "Ezali ngai; bótika kobanga." 28 Bongo Piere alobi na ye: "Mokonzi, soki ezali yo, loba na ngai nátambola likolo ya mai pe náya epai na yo." 29 Yezu azongiseli ye: "Yaka!" Piere abimi na bwatu, pe abandi kotambola likolo ya mai po na kokende epai ya Yezu. 30 Kasi tango amoni mopepe ezali koleka, ayoki somo mingi, pe lokola azalaki kodinda na mai agangi: "Mokonzi, bikisa ngai!" 31 Na mbala moko Yezu atandi liboko, asimbi ye pe alobi na ye: "Moto ya bondimi moke! Po na nini otiaki tembe?" 32 Bongo bakoti bango mibale na bwatu pe mopepe esili. 33 Bayekoli oyo bazalaki na kati ya bwatu bafukami liboso ya Yezu, pe balobi: "Ya solo, yo ozali Mwana ya Nzambe!"

Yezu na mboka Jenezaret

34 Awa basilisi kokatisa lak, bakomi na Jenezaret. 35 Bato wana bayebaki Yezu kala, bongo tango bamoni ye bapanzi sango bipai nyonso, pe bamemeli ye bato nyonso ya maladi. 36 Babondeli ye ápesa bango nzela ya kosimba ata songe ya nzambala na ye. Pe bato nyonso oyo bazalaki kosimba ye, babandaki kobika.

Matié 15

Po na mateya ya Bakoko

1 Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko bautaki na Yeruzalem pe bayei epai ya Yezu, bongo batuni ye: 2 "Po na nini bayekoli na yo batosaka mibeko ya bakoko té? Tala, basukolaka maboko té na ndenge ekoki liboso ya kolia." 3 Yezu azongiseli bango: "Bongo bino, po na nini botosaka mibeko ya Nzambe té? Botosaka kaka mibeko euti na bino moko. 4 Pamba té Nzambe alobá: 'Botosaka batata ná bamama na bino. Oyo abwakeli tata na ye to mama na ye lisumá, basengeli koboma ye.' 5 Kasi bino bolobaka: 'Moto akoki koloba na tata pe na mama: lisalisi oyo nalingaki kopesa bino, nabombi yango po na Nzambe. 6 Soki alobi bongo, asengeli lisusu té kosalisa tata ná mama.' Kaka na ndenge wana bozali kokómisa maloba ya Nzambe eloko pamba, po na kotosa mibeko na bino moko. 7 Bato ya lokuta! Profete Ezaya asakolaká maloba ya solo po na bino: 8 'Nzambe alobi: Bato oyo bakumisaka ngai bobele na maloba, kasi na mitema bazali mosika na ngai. 9 Losambo na bango ezali na tina moko té, po balandaka bobele mateya oyo bato balakisá bango.' "

Makambo ebebisaka mitema ya bato

10 Yezu abengaki bato nyonso wana pe alobi na bango: 11 "Bóyoka pe bóyeba 'tè: Eloko ekoti na monoko ya moto, ekoki kobebisa motema na ye té. Kasi oyo ebimaka na monoko na ye, yango nde ebebisaka motema na ye." 12 Bongo bayekoli bapusani penepene ya Yezu pe balobi na ye: "Oyebi 'tè maloba na yo eyokisi ba-Farizé pasi na mitema?" 13 Yezu azongisi: "Nzete nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo akoni té, bakopikola yango. 14 Bótika bango! Bazali lokola balakisi-nzela bakufa miso. Soki moto moko akufá miso azali kolakisa nzela na moto mosusu akufá miso, bango mibale bakokweya na libulu." 15 Piere alobi na ye: "Limbolela biso tina ya maloba yango." 16 Yezu azongisi: "Bino pe bozwi nanu mayele té tii sik'oyo? 17 Boyebi té 'tè biloko nyonso oyo ekotaka na monoko ya moto ekendaka na libumu na ye, bongo na sima ebimaka na libanda. 18 Kasi oyo ebimaka na monoko eutaka na motema: yango nde ebebisaka moto. 19 Pamba té makanisi nyonso ya kosala mabe eutaka na mitema ya bato; ndakisa: kindumba, moyibi, koboma bato, kotambola na basi ya bato, kokosela bato makambo, pe kofinga bato. 20 Wana ezali makambo ebebisaka moto. Kasi soki moto asukoli maboko té liboso ya kolia, yango ekoki kobebisa ye té."

Mwasi moko ya mopaya andimeli Yezu

21 Na sima Yezu alongwe na esika yango, pe akei na mabelé ya vile ya Tir pe ya Sidon. 22 Mwasi moko ya Kananite azalaki kofanda kuna, ayei epai na ye, pe agangi: "Mokonzi, Mwana ya David, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali na molimo mabe pe azali komona pasi mingi." 23 Kasi Yezu azongiseli ye ata liloba moko té. Bongo bayekoli bayei epai na ye pe balobi: "Bengana ye; pamba té azali kolanda biso ná makelele na ye." 24 Yezu azongisi: "Batindaki ngai kaka epai ya bato ya Israel oyo babungá." "Kasi mwasi wana ayei kofukama liboso na ye pe alobi: "Mokonzi, salisa ngai!" 26 Yezu azongisi: "Baka-mataka bilei ya bana té po na kobwakela yango bambwa." 27 Mwasi yango alobi: "Ya solo Mokonzi, kasi bambwa eliaka biteni oyo ekweyaka na se ya mesa ya bakolo na yango." 28 Bongo Yezu azongiseli ye: "Ee, mama! Bondimi na yo ezali makasi. Esalama po na yo ndenge olingi" Pe mwana na ye abiki kaka na tango wana.

Yezu abikisi bato mingi ya maladi

29 Yezu alongwe wana pe akei penepene ya lak ya Galilé. Amati na ngomba moko pe afandi. 30 Bato ebele bayei epai na ye. Bamemi bato bakufa makolo, bato bakufa miso, bato batambolaka té, bababa, pe bato ya maladi ya ndenge na ndenge. Batii bango liboso ya Yezu, bongo ye abikisi bango. 31 Bato bakamwe mingi tango bamoni bababa bakomi koloba, bato ya tengutengu babiki, bato bakufa makolo babandi kotambola, pe bato bakufa miso bakomi komona. Bongo bato nyonso bapesi mersi na Nzambe ya Israel.

Yezu aleisi bato 4 . 000

32 Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi: "Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba té basali mikolo misato mobimba ná ngai, pe bazali lisusu na bilei té. Nalingi kozongisa bango na nzala té, po tango mosusu bakoki kolemba na nzela." 33 Bayekoli batuni ye: "Awa na esobe, esika nini tokoki kozwa biloko ya koleisa bato ebele boye?" 34 Yezu atuni bango: "Bozali na mapa boni?" Bango bazongisi: "Mapa sambo ná ndambo ya bambisi ya mike." 35 Bongo Yezu alobi na bato nyonso báfanda na se. 36 Akamati mapa sambo wana ná bambisi, apesi Nzambe mersi, akatikati yango, bongo bayekoli bakamati yango pe bakaboleli bato nyonso. 37 Bango nyonso balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni etikalaki, batondisi bitunga sambo. 38 Bato oyo baliaki bazali mibali 4.000 , kotanga basi ná bana té. 39 Tango Yezu asilisi kozongisa bato na bamboka na bango, akoti na bwatu pe akei na mboka Magadan.

Matié 16

Ba-Farizé ná ba-Sadusé basengi bilembo

1 Ba-Farizé ná ba-Sadusé bayei epai ya Yezu po na komeka ye; basengi ye ásalela bango elembo moko oyo ekomonisa 'tè nguya na ye euti na Nzambe. 2 Kasi Yezu azongiseli bango boye: " Tango pokwa ekómaka, bino bolobaka: 'likolo ezali motane, mbula ekonoka té.' 3 Pe na tongo-tongo bolobaka: 'Lelo mbula ekonoka, pamba té Likolo eyindi.' Bino boyebi ndenge Likolo ezali kolakisa soki mbula ekonoka to ekonoka té; kasi bilembo ezali kolakisa makambo ya mikolo oyo, boyebi kolimbola yango té. 4 Ndenge nini bato oyo bazali kosenga elembo! Bazali bato mabe pe batosaka Nzambe té. Nzambe akolakisa bino kaka elembo moko: oyo ya Jonas." Bongo atiki bango pe akei na ye.

Mayele mokuse ya bayekoli

5 Tango bayekoli bakatisi ngambo ya ebale, babosanaki komema biloko ya kolia. 6 Bongo Yezu alobi na bango: "Bófungola miso! Ba-Farizé pe ba-Sadusé basalelaka kisi ya mabe po na kolamba mapa!" 7 Bongo babandi kolobana bango na bango: "Azali koloba boye po tomemi mapa té." 8 Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, pe atuni: "Po na nini bozali kolobana bino na bino: 'Tomemi mapa té'? Bato ya bondimi moke! "Boyebi nanu té tii sik'oyo? Bobosani mokolo nasalelaki mapa mitano po na koleisa bato 5.000 ? Botikalaki na bitunga boni? 10 Pe mokolo nasalelaki mapa sambo po na koleisa bato 4.000 , botikalaki na bitunga boni? 11 Ndenge nini bozali kokanisa 'tè nalobelaki bino po na mapa? Bókeba na kisi ya mapa ya ba-Farizé ná ya ba-Sadusé." 12 Na tango wana bayekoli bayei koyeba 'tè Yezu alobaki té po na kisi oyo evimbisaka farine, kasi alobaki bákeba na mateya ya ba-Farizé ná ya ba-Sadusé.

Piere asakoli 'tè Yezu azali Mesia

13 Yezu akei na mabelé oyo ezali pembeni ya Sezaré, vile ya mokonzi Filipe, bongo atuni bayekoli na ye: "Bato balobaká 'tè ngai Mwana ya Moto nazali nani?" 14 Bango bazongisi: "Bato mosusu balobaká 'tè yo ozali Yoane Mobatisi; bamosusu: Eliya; pe bamosusu: Jeremya, to profete moko ya kala." 15 Kasi Yezu atuni bango: "Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?" 16 Simon Piere azongisi: " Yo ozali Mesia, Mwana ya Nzambe ya bomoi." 17 Bongo Yezu alobi na ye: "Esengo mingi na yo, Simon, mwana ya Yoane, pamba té oyo alakisi yo makambo wana ezali moto té, kasi ezali nde Tata na ngai ya Likolo. 18 Bongo ngai nalobi na yo: ozali Libanga, pe na likolo ya libanga oyo nakotónga Eklezya na ngai. Liwa kutu ekokoka kokweisa yango ata moke té. 19 Nakopesa yo bafungola ya mboka ya Nzambe; oyo yo okokanga awa na se, Nzambe pe akokanga yango na Likolo; oyo yo okofungola awa na se, Nzambe pe akofungola yango na Likolo." 20 Na sima Yezu apekisi bayekoli na ye báloba na moto té 'tè ye azali Mesia.

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (I)

21 Banda tango wana Yezu abandi koyebisa bayekoli na ye polele makambo elingi kokweela ye, alobi: "Nasengeli kokende na Yeruzalem, pe kuna bambuta-muntu, bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakoyokisa ngai pasi mingi. Bakoboma ngai kasi na mikolo misato nakosekwa." 22 Bongo Piere abendi ye pembeni, pe abandi koloba na ye: "Mokonzi, yango ekoki kosalema té! Makambo wana ekokweela yo té!" 23 Kasi Yezu abaluki pe alobi na Piere: "Satan, longwa na miso na ngai! Ozali kotiela ngai libaku! Ozali kokanisa makambo ya Nzambe té, kasi bobele ya bomoto." 24 Na sima Yezu alobi na bayekoli na ye: "Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko; ákumba kuruze na ye pe alanda ngai. 25 Pamba té moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango. Kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, akozwa yango lisusu. 26 Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili, eloko nini azwi soki abungisi bomoi na ye? Eloko nini akoki kofuta po ázwa yango lisusu? 27 Etikali moke ngai Mwana ya Moto náya na lokumu ya Tata na ngai nzela moko ná ba-anjelu na ngai. Bongo nakofuta moto na moto na ndenge ya misala na ye. 28 Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bakufa bakomona na miso ndenge ngai Mwana ya Moto nakoya kozwa bokonzi."

Matié 17

Nzambe alakisi lokumu ya Yezu

1 Sima ya mikolo motoba Yezu akamati Piere, Jake ná Yoane, ndeko ya Jake, pe akei na bango na ngomba moko ya molai. Kuna bazalaki kaka banj»o moko. 2 Yezu abongwani na miso na bango; elongi na ye ekomi kongenga lokola moi; pe bilamba na ye ekómi pembe penza. 3 Na mbala moko bayekoli bamoni Moize ná Eliya bazali kosolola ná Yezu. 4 Bongo Piere alobi na Yezu: "Mokonzi, lokola tozali awa ezali malamu. Soki olingi, nakotónga bandako misato ya kapo, moko po na yo, moko po na Moize, pe moko po na Eliya." 5 Tango azalaki koloba, lipata moko ya pembe eyei kozipa bango, pe mongongo euti na lipata elobi: "Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi po na ye. Bóyokela ye." 6 Tango bayekoli bayoki mongongo yango, bakwei bilongi na se, po babangaki mingi. 7 Yezu ayei, asimbi bango pe alobi: "Bótelema, bóbanga té!" 8 Batomboli miso, kasi bamoni lisusu moto té; Yezu atikalaki bobele ye moko. 9 Lokola bazalaki kokita ngomba, Yezu apekisi bango 'tè: "Makambo oyo bomoni, bóloba yango na moto té, tii mokolo ngai Mwana ya Moto nakosekwa." 10 Na sima bayekoli batuni Yezu: "Po na nini balakisi-Mibeko balobaká 'tè Éliya asengeli koya liboso?" 11 Ye azongiseli bango: "Ya solo Eliya akoya po na kobongisa makambo nyonso; 12 kasi ngai nalobi na bino: Eliya asi'ayaki. Bato bandimelaki ye té, kasi basalaki ye ndenge balingaki. Ndenge moko pe bakonyokola ngai, Mwana ya Moto." 13 Awa bayekoli bayoki bongo, bayei koyeba 'tè alobaki na bango po na Yoane Mobatisi.

Yezu abikisi mwana azali na molimo mabe

14 Tango bazongi esika bato bazalaki, moto moko ayei epai ya Yezu, afukameli ye 15 pe alobi: "Mokonzi, yokela mwana na ngai mawa! Azali na maladi ya ndeke, pe azali komona pasi mingi. Tango mosusu akweyaka na móto to na mai. 16 Namemaki ye epai ya bayekoli na yo, kasi bakokaki kobikisa ye té." 17 Yezu azongisi: "A bino, bato mabe! Bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino tii tango nini? Nákanga motema po na bino tii tango nini? Bómemela ngai ye awa!" 18 Yezu agangeli molimo mabe, bongo yango ebimi na nzoto ya mwana, pe kaka na tango wana mwana abiki. 19 Bayekoli bayei epai ya Yezu bango moko, pe batuni ye: "Po na nini biso tokokaki kobengana molimo wana té?" 20 Yezu azongisi: "Po bino bozali na bondimi mingi té. Nalobi na bino, ya solo: bókanisa mbuma oyo babengaka mutarde. Soki bondimi na bino ezalaki na nguya ya ndenge wana, mbele bokokaki koloba na ngomba oyo: 'Longwa awa, kende kuna', pe yango ekolongwa. Ata likambo moko té ekokaki kozala pasi po na bino." 21 Kasi bakoki kobimisa milimo ya ndenge oyo kaka na kobondela pe komilalisa nzala.

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (II)

22 Mokolo moko bayekoli basanganaki bango nyonso na Galilé. Yezu alobi na bango: "Balingi koteka ngai Mwana ya Moto epai ya bato. 23 Bango bakoboma ngai; kasi nakosekwa na mikolo misato." Bongo bayekoli babandi koyoka mawa mingi penza.

Ndenge Yezu afuti mpaku ya Ndako ya Nzambe

24 Tango Yezu ná bayekoli na ye bakomi na Kafarnaum, bato bafutisaka mpaku ya Ndako ya Nzambe bayei epai ya Piere, pe batuni ye: "Moteyi na bino afutaka mpaku ya Ndako ya Nzambe?" "Piere azongisi: "Ee! afutaka." Tango Piere akoti na ndako, Yezu alobi na ye: "Simon, okanisi nini? Banani bafutaka bampaku ya bakonzi ya mokili? Bana na bango to bato mosusu?" 26 Piere azongisi: "Bato mosusu." Bongo Yezu alobi na ye: "Boye bana bafutaka té. "Kasi tófuta mpaku yango kaka, po tóyokisa bato oyo pasi na mitema té. Kende na lak, bwaka ndobo na mai, benda mbisi ya liboso oyo okokanga, pe fungola yango monoko. Okomona mbongo ya ebende; kamata yango, pe pesa bango po na kofuta mpaku ya ngai ná ya yo."

Matié 18

Na mboka ya Nzambe, nani aleki?

1 Na tango wana bayekoli bayei epai ya Yezu pe batuni ye: "Na mboka ya Nzambe, nani aleki?" 2 Yezu abengi mwana moko ya moke, atii ye liboso na bango, 3 pe alobi: "Nalobi na bino, ya solo; soki bobongoli mitema té po bókóma lokola bana mike, bokoki, kokóma ata moke té bato ya mboka ya Nzambe. 4 Na mboka ya Nzambe, moto aleki bato nyonso ezali oyo azangi lofundu pe akómi lokola mwana oyo. 5 Bongo moto oyo ayambaka mwana ya ndenge boye po na kombo na ngai, ayambi ngai moko."

Lisumu ezali likambo monene

6 "Soki moto moko oyo ayebi makambo mingi té andimi ngai, bongo moto mosusu akweisi ye na masumu, ebongi malamu bákanga moto wana libanga moko ya monene na kingo, pe bákende kobwaka ye na kati ya ebale. 7 Mawa mingi na mokili po na ndenge bakweisaka bato na masumu! Makambo ya boye ekoki kozanga té; kasi mawa mingi na moto oyo akweisaka baninga! 8 "Soki ozali kokweya na masumu po na liboko na yo to po na likolo na yo, kata yango pe bwaka yango mosika. Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi ata ozangi liboko to likolo, esika 'tè bábwaka yo na lifelo, ná maboko to makolo nyonso mibale. 'Soki ozali kokweya na masumu po na liso na yo, longola yango pe bwaka yango mosika. Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi ata ozangi liso, esika 'tè bábwaka yo na lifelo ná miso nyonso mibale."

Méme oyo ebungaki, emonani

10 "Bókeba, bótsiola ata moto moko té na kati ya bato oyo bayebi makambo mingi té. Nalobi na bino: ba-anjelu oyo baba-telaka bango bazalaká tango nyonso liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. n Pamba té ngai Mwana ya Moto nayei kobikisa bato oyo babungi. 12 "Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme 100 , bongo abungisi méme moko, akosala nini? Akotika bameme 99 mosusu na likolo ya ngomba, pe akokende koluka oyo ebungi. 13 Nalobi na bino, ya solo: Tango akomona méme wana akoyoka esengo mingi, koleka esengo oyo azali koyoka po na bameme 99 oyo ebungaki té. 14 Ndenge moko pe Tata na bino ya Likolo alingi té 'tè moto moko ábunga na kati ya bato oyo bayebi makambo mingi té."

Kozongela ndeko oyo asali mabe

15 "Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende epai na ye, bongo tango bokozala kaka bino mibale, lakisa mabe oyo ye asali. Soki ayokeli yo, wana akómi lisusu ndeko na yo. 16 Kasi soki aboyi koyokela yo, mema moto mosusu to bato mibale, pamba té Mibeko elobá boye: 'Maloba ya bato mibale to misato ékata makambo nyonso.' 17 Kasi soki ye aboyi koyokela bango, loba likambo wana na lisanga ya bandimi. Bongo soki ye aboyi koyokela lisanga, kamata ye lokola moto ayebi Nzambe té to lokola moto ya mobulu. 18 "Nalobi na bino, y a solo: makambo nyonso bino bokokanga awa na se, Nzambe pe akokanga yango na Likolo; makambo nyonso bokofungola awa na se, Nzambe pe akofungola yango na Likolo. 19 "Pe nalobi na bino: soki awa na mokili bato mibale na kati na bino bayokani po básenga ata nini na losambo, Tata na ngai ya Likolo akopesa bango yango. 20 Pamba té, esika bato mibale to misato basangani na kombo na ngai, ngai nazali na kati na bango."

Lisapo ya mosali oyo alingi kolimbisa té

21 Bongo Piere ayei penepene ya Yezu pe atuni ye: "Mokonzi, soki ndeko na ngai asalaka ngai mabe mbala na mbala, mbala boni nasengeli kolimbisa ye? Ekoki kozala mbala sambo?" 22 Yezu azongiseli ye: "Té! mbala sambo té. Osengeli kolimbisa mbala tuku sambo mbala sambo. 23 Na mboka na ye, Nzambe akosala lokola mokonzi moko oyo abengaki basali na ye po na kotala makambo ya nyongo na ye. 24 Tango abandi kotala makambo yango, bamemeli ye mosali moko azalaki na nyongo na ye mingi penza mayele té! "Moto wana azalaki na mbongo ya kofuta nyongo yango té. Yango wana mokonzi atindi báteka ye lokola moumbu, ná mwasi na ye pe bana, ná biloko nyonso oyo azalaki na yango, po na kofuta nyongo. 26 Mosali wana afukameli mokonzi pe abondeli ye, alobi: 'Mokonzi, kitisa motema, pesa ngai mwa mikolo, pe nakofuta nyongo ha yo.' 27 Mokonzi ayokeli ye mawa, alimbisi ye, pe atiki ye ákende. 28 "Tango mosali wana abimi, akutani ná moninga na ye ya mosala oyo adefaki mwa ndambo ya mbongo epai na ye. Bongo asimbi ye na mongongo pe afini ye makasi, alobi na ye: 'Futa nyongo na ngai!' 29 Moto wana afukameli ye, pe abondeli ye boye: 'Mbuta-muntu, kitisa motema, pesa ngai mwa mikolo, pe nakofuta nyongo na yo.' 30 Kasi ye alingaki té, bongo atii ye na boloko tii tango akofuta nyongo na ye. 31 Basali mosusu oyo bamonaki makambo wana, bayoki mawa mingi pe bakei koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango. 32 Bongo mokonzi abengi moto wana pe alobi na ye: 'Mosali mabe! Ozalaki na nyongo mingi penza, pe nalimbisi yo po obondelaki ngai. 33 Yo pe osengelaki koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai nayokelaki yo.' 34 Mokonzi ayoki kanda penza pe atii mosali wana na boloko po ázwa etumbu tii tango akofuta nyongo nyonso." 35 Bongo Yezu asukisi boye: "Tata na ngai ya Likolo akosala bino pe ndenge wana, soki moko moko na kati na bino alimbisaka ndeko na ye na motema mobimba té."

Matié 19

Mateya ya Yezu po na koboma libala

1 Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, atiki Galilé pe akei na eteni ya mabelé ya Yuda oyo ezali na ngambo ya mai ya Yordan. 2 Bato ebele balandi ye kuna, pe abikisi bato mingi ya maladi. 3 Ba-Farizé mosusu bayei epai ya Yezu po na komeka ye, batuni ye: "Mibeko na biso epesaka nzela na mobali, po aboya mwasi na ye ata na tina nini?" 4 Yezu azongisi: "Nanu botangi Mikanda ya Nzambe té? Ekómamá boye: 'Na ebandeli, tango Nzambe asalaki bato, asalaki bango mobali ná mwasi; 5 bongo alobi: Yango wana, mobali atikaka tata na ye ná mama na ye, pe asanganaka ná mwasi na ye, po bango mibale bákóma moto moko.' 6 Boye bazali lisusu bato mibale té, kasi bakomi se moto moko. Bongo, bato oyo Nzambe asangisi, moto ákabola bango té!" 7 Ba-Farizé bazongisi: "Ndenge nini wana? Moize apesaká nzela boye: mobali akoki koboya mwasi na ye, kasi liboso ákóma mokanda ya koboma libala." 8 Yezu alobi na bango: "Moize apesaki bino nzela ya koboya basi, po boleki mitú makasi. Kasi na ebandeli ezalaki bongo té. 'Nalobi na bino: moto nyonso oyo aboyi mwasi na ye pe abali mwasi mosusu, longola bobele soki Mibeko ezali kopekisa 'tè bábalana té, azali kosala kindumba." 10 Bayekoli na ye balobi: "Soki makambo ya mwasi ná mobali ezali boye, ebongi malamu moto ábala té." 11 Yezu azongiseli bango: "Bato nyonso bakoki kondima mateya oyo té; kaka baoyo Nzambe apesi nguya ya kondima yango. 12 Bato mosusu babalaka té po bakufa mikongo banda babotamá, to babomá bango mikongo; pe bamosusu babalaka té po bamipesá mobimba na makambo ya mboka ya Nzambe. Moto akoki kondima mateya oyo, ándima yango!"

Yezu ayambi bana mike

13 Bato bayeeli Yezu bana mike po átiela bango maboko, pe ábondela Nzambe po na bango; kasi bayekoli babandi kopekisa bango. 14 Bongo Yezu alobi: "Bótika bana mike baya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té mboka ya Nzambe ezali po na baoyo bakokani ná bango." 15 Atieli bango maboko pe alongwe wana.

Moto ya bomengo

16 Moto moko ayei epai ya Yezu pe atuni ye: "Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala po nazwa bomoi ya seko?" 17 Yezu azongiseli ye: "Ndenge nini ozali kotuna ngai po na likambo ya malamu? Kaka Nzambe ye moko nde azali malamu. Soki olingi kokota na mboka ya bomoi, tosaka mibeko." 18 Moto wana atuni: "Mibeko nini?" Yezu azongisi: "Koboma moto té; kosala kindumba té; koyiba té; kokosa moto té; 19 tosaka tata ná mama na yo; linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko." ^Elenge mobali yango azongisi: "Natosaka mibeko wana nyonso; nazangi lisusu nini?" 21 Yezu azongiseli ye: "Soki olingi ózala moto ya kokoka, kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe pesa mbongo na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo. Sima yaka kolanda ngai." 22 Kasi tango elenge mobali ayoki maloba wana, akei na mawa, pamba té azalaki na bomengo mingi koleka. 23 Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye boye: "Solo: bato ya mbongo bakozala na pasi mingi po na kokota na mboka ya Nzambe. 24 Nalobi na bino lisusu: nyama monene oyo babengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na mboka ya Nzambe." "Tango bayekoli bayoki makambo wana, bakamwe mingi pe batuni: "Bongo nani akoki kobika?" 26 Yezu atali bango pe alobi: "Bato bakoki kosala yango ata moke té, kasi Nzambe akoki kosala makambo nyonso." 27 Bongo Piere alobi na ye: "Tala nanu, biso totikaki biloko nyonso pe toyei kolanda yo; eloko nini tokozwa?" 28 Yezu azongiseli bango: "Nalobi na bino, ya solo: Tango Nzambe akosala Likolo na se ya sika, mokolo wana ngai Mwana ya Moto nakofanda na Kiti na ngai ya lokumu; bino bato zomi na mibale oyo bolandi ngai, bokofanda pe na bakiti zomi na mibale, po na kokata makambo ya bikolo zomi na mibale ya Israel. 29 Moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye, tata ná mama na ye, bana na ye, to bilanga na ye po na ngai, akozwa biloko yango mbala kama, pe akozwa bomoi ya seko. 30 Bato mingi bazali sik'oyo liboso, bakokóma bato ya suka; pe bato mingi bazali sik'oyo na suka, bakokóma bato ya liboso."

Matié 20

Basali ya bilanga

1 Bóyoka ndenge Nzambe akosala na mboka na ye. Ekozala lokola moto moko oyo abimaki na tongo-tongo po ákende koluka bato bakoki kosala na bilanga na ye ya vinu. 2 Ayokanaki na bango 'tè bakozwa lifuta ekoki na mokolo moko, pe atindi bango na bilanga na ye. 3 Abimi lisusu na ngonga ya libwa ya tongo, pe amoni bato mosusu oyo bazangi mosala bafandi na zando. 4 Alobi na bango: 'Bino pe bókende kosala na bilanga na ngai; nakofuta bino lifuta ekoki.' 5 Bango pe bakei. Kolo ya bilanga abimi lisusu na midi pe na ngonga ya misato ya pokwa, asali kaka ndenge moko. 6 Na ngonga ya mitano ya pokwa abimi, amoni bato mosusu bafandi na zando. Atuni bango: 'Po na nini bofandi awa moi mobimba, ata mosala té?' 7 Bango balobi: 'Moto ya kozwa biso na mosala azali té.' Ye azongiseli bango: 'Bino pe bókende kosala na bilanga na ngai.' 8 "Tango pokwa ebandi koya, kolo ya bilanga alobi na kapita: 'Benga basali nyonso pe futa bango. Banda na bato oyo nazwaki sima, tii na baoyo nazwaki liboso.' 9 Bato oyo babandaki kosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayei, pe moto na moto azwi lifuta ekoki na mokolo mobimba. 10 Tango bato oyo babandaki mosala na tongo bayei, bakanisaki 'tè bakozwa mbongo koleka bamosusu, kasi bapesi bango pe kaka lifuta ya mokolo moko. 11 Awa bazwi yango, basiliki na kolo ya bilanga 12 pe balobi: 'Bato oyo ozwaki na sima basali kaka ngonga moko, pe ofuti bango ndenge moko ná biso. Kasi biso tosali mokolo mobimba pe tolembi na moi makasi.' 13 Kolo ya bilanga azongiseli moko na bango: 'Ndeko na ngai, nakosi yo té. Toyokanaki 'tè nakofuta yo lifuta ekoki po na mokolo moko. 14 Kamata mbongo na yo, kende. Kasi moto oyo abandaki mosala sima, nalingi kofuta ye ndenge moko ná yo. 15 Boni? Ezali mbongo na ngai. Nakoki kosala na yango té ndenge ngai moko nalingi? Oyoki likunya po nazali moto malamu?' " 16 Bongo Yezu asukisi boye: "Na mboka ya Nzambe pe ekozala ndenge wana: bato oyo bazali na suka bakokóma liboso; pe baoyo bazali liboso, bakokóma na suka."

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (III)

17 Tango Yezu azalaki kokende na Yeruzalem, na nzela abengi bayekoli na ye zomi na mibale pembeni, pe alobi na bango boye: 18 "Bóyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna bakokaba ngai Mwana ya Moto epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe, pe ya balakisi-Mibeko. Bango bakokatela ngai etumbu ya liwa, 19 pe bakokaba ngai na maboko ya bato bayebi Nzambe té. Bakoseka ngai, bakobeta ngai fimbu, pe bakoboma ngai na kuruze. Kasi nakosekwa na mikolo misato."

Olingi kozala mokonzi, zala mosali

20 Bobele na tango wana mwasi ya Zebedé ayei epai ya Yezu, ná bana na ye mibale. Afukameli ye po na kosenga likambo moko. 21 Yezu atuni ye: "Olingi nini mama?" Ye azongisi: "Mokonzi, laka ngai 'tè tango okozwa bokonzi na yo, bana na ngai mibale oyo bakozala kofanda pembeni na yo na bisika ya lokumu, moko na liboko ya mobali, mosusu na liboko ya mwasi." 22 Yezu azongisi: "Eloko bozali kosenga, boyebi yango té. Kopo ya pasi ngai nakomela, bino bokokoka yango?" Bango bazongiseli ye: "Tokokoka kaka." 23 Bongo Yezu alobi na bango: " Ya solo, kopo oyo ngai nakomela, bino pe bokomela yango. Kasi kopona moto oyo akofanda na liboko na ngai ya mobali to ya mwasi, etali ngai té; pamba té Tata asi'abongisá bisika wana po na bato ye aponá." 24 Tango bayekoli mosusu zomi bayoki ndenge wana, basilikeli bandeko yango mibale. "Bongo Yezu abengi bango nyonso pe alobi: "Boyebi 'tè bakonzi ya bikolo balakisaka bokonzi na bango; pe bato minene bamonisaka bato na bango pasi. 26 Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo té. Soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto monene, ámitia mosali na bino. 27 Pe soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto ya liboso, ámikómisa moumbu na bino. 28 Pamba té ngai Mwana ya Moto nayaki po bato básalela ngai té, kasi nayaki nde kosalela bango, pe kopesa bomoi na ngai po na kobikisa bato ebele."

Yezu abikisi bato mibale bakufa miso

29 Tango babimi na Jerikó, bato ebele balandi Yezu. 30 Bato mibale bakufa miso bafandaki pembeni ya nzela. Awa bayoki Yezu azali koleka, babandi koganga: "Mokonzi, Mwana ya David, yokela biso mawa!" 31 Bato bagangeli bango bákanga minoko. Kasi bango balekisi penza koganga makasi: "Mokonzi, Mwana ya David, yokela biso mawa!" 32 Yezu atelemi, abengi bango pe atuni: "Bolingi násala nini po na bino?" 33 Bango bazongiseli ye: "Mokonzi, tolingi miso na biso éfungwana!" 34 Yezu ayokeli bango mawa pe asimbi bango na miso. Kaka na tango wana babandi komona pe balandi ye.

Matié 21

Yezu akoti na Yeruzalem

1 Tango bakomi na mboka Betfajé, penepene ya Yeruzalem, na Ngomba ya ba-OUve, Yezu atindi bayekoli mibale, 2 pe alobi na bango: "Bókende na mboka oyo etalani ná bino. Kuna bokomona punda ya mwasi bakangá esika moko ná mwana na yango. Bófungola yango pe bómemela ngai. 3 Soki moto atuni bino, bóloba na ye: 'Mokonzi azali na posa na yango', bongo akopesa bino yango noki." 4 Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo profete alobaká: 5 "Bóloba na vile ya Sion: tala mokonzi na yo ayei epai na yo. Ayei na boboto, amati na punda." 6 Bayekoli bakei pe basali ndenge Yezu atindaki. 7 Bamemi punda ná mwana na yango; batii yango bilamba na bango, pe Yezu amateli yango. 8 Bato ebele bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela; bamosusu bazalaki kokata mandalala pe kotia yango na bisika Yezu alingaki koleka. 9 Bato oyo bazalaki liboso ya Yezu ná baoyo bazalaki kolanda ye babandaki koganga: "Ozana! Lokumu na Mwana ya David! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! Ozana! Lokumu ézala na Nzambe na Likolo!" 10 Tango Yezu akoti na Yeruzalem, mboka mobimba eningani, pe bato babandi kotuna: "Moto oyo azali nani?" 11 Bato bayaki ná Yezu bazongisi: "Ezali profete Yezu, auti na Nazaret, na région ya Galilé."

Yezu akoti na Ndako ya Nzambe

12 Yezu akoti na Ndako ya Nzambe, abengani bato nyonso oyo bazalaki koteka pe kosomba biloko kuna: abaloli bamesa ya bato bazalaki koshanjé mbongo, ná bakiti ya bato bazalaki koteka bapijon. 13 Na sima alobi na bango: "Ekómamá boye: 'Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya losambo, kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka." 14 Bato bakufa miso ná bato ya tengutengu bayei penepene ya Yezu na Ndako ya Nzambe, pe ye abikisi bango. 15 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko basiliki tango bamonaki makamwisi ye azalaki kosala, pe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya Ndako ya Nzambe: "Lokumu na Mwana ya David!" 16 Bongo balobi na Yezu: "Oyoki makambo bango bazali koloba?" Yezu azongiseli bango: "Ee nayoki. Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekómamá boye: 'Olakisi bana mike pe bana oyo bamelaka mabéle, ndenge bakoki kokumisa yo.' " 17 Na sima atiki bango alongwe na Yeruzalem pe akei kolala na Betanie.

Yezu akausi nzete ya figi

18 Tongo etani, tango Yezu azalaki kozonga na Yeruzalem, abandi koyoka nzala. "Amoni nzete moko ya figi pembeni ya nzela. Apusani penepene na yango kasi amoni eloko té, kaka makasa pamba. Bongo alobi na nzete ya figi: "Mokolo moko té okobota lisusu mbuma!" Na mbala moko nzete ya figi ekauki. 20 Tango bayekoli bamoni bongo, bakamwe mingi penza. Batuni Yezu: "Ndenge nini nzete oyo ekauki na mbala moko boye?" 21 Yezu azongiseli bango: "Nalobi na bino, ya solo: soki bozali penza na bondimi, pe soki bozali kotia tembe té, bokokoka kosala makambo eleki oyo ngai nauti kosala na nzete ya figi. Bokokoka kutu koloba na ngomba oyo: 'Longwa awa! Kende komibwaka na ebale'; pe yango ekosalama. 22 Eloko nyonso oyo bokosenga na losambo, soki botii mitema 'tè bokozwa yango, bokozwa yango kaka."

Nani apesi Yezu bokonzi?

23 Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi koteya bato. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya ekolo bayei penepene na ye pe batuni ye: "Epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi yango?" 24 Yezu azongiseli bango: "Ngai pe nakotuna bino motuna moko kaka; soki bozongi-seli ngai, nakoyebisa bino soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani. "Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa eutaki epai wapi? Epai ya Nzambe to epai ya bato?" Kasi bango babandi kotiana tembe bango na bango, balobi: "Soki tozongisi: 'epai ya Nzambe', ye akotuna biso: 'Po na nini bondimelaki Yoane té?' 26 Kasi soki pe tolobi: 'epai ya bato', tokozwa makambo, po bato nyonso bakamataka Yoane lokola profete." 27 Bongo bazongiseli Yezu: "Toyebi té." Ye alobi na bango: "Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani."

Lisapo ya bana mibale

28 Yezu alobi lisusu: "Bokanisi nini po na makambo oyo: Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Abengi ya liboso pe alobi na ye: 'Mwana na ngai, lelo kende kosala na elanga ya vinu.' 29 Mwana azongisi: 'Naboyi'. Kasi na sima abongoli makanisi pe akei kaka. 30 Sima ya mwa tango abengi lisusu mwana ya mibale pe alobi na ye ndenge moko. Mwana wana azongiseli ye: 'Ee tata, nakokende.' Kasi akei té. 31 Nani na kati ya bana wana mibale asali makambo tata alingi?" Bango bazongisi: "Mwana ya liboso." Bongo Yezu alobi na bango: "Nalobi na bino, ya solo: bafutisi-mpaku ná basi ya ndumba bakokota na mboka ya Nzambe liboso na bino. 32 Pamba té Yoane Mobatisi ayaki epai na bino po na kolakisa bino nzela ya malamu, kasi bondimelaki ye té. Nzokande bafutisi-mpaku pe basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, atako bomonaki bongo, bobongolaki mitema té, bondimelaki ye kaka té."

Lisapo ya bafuteli mabe ya elanga

33 "Bóyoka lisapo mosusu: Moto moko azalaki na elanga, akoni banzete ya vinu, asaleli yango lopango, abongisi libulu moko na kati ya mabanga po na kokamolela vinu, pe atóngi ndako moko ya molai po na kokengela yango; sima atii bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo. 34 Awa tango ya kolongola mbuma ekoki, atindi bato na ye epai ya bafuteli ya elanga, po bákende kozwa ndambo ya mbuma. 35 Kasi bango bakangi bato na ye, babeti moko, babomi mosusu pe babwakefí oyo ya misato mabanga. 36 Kolo ya elanga atindi bato mosusu mingi koleka baoyo ya liboso, kasi bafuteli ya elanga basali bango kaka ndenge moko. 37 Sima na bango nyonso atindeli bango mwana na ye moko, amilobi: 'Bakotosa mwana na ngai.' 38 Kasi tango bafuteli bamoni mwana, balobani bango na bango: 'Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, pe biso tokozwa elanga na ye.' "Bongo bakangi ye, babwaki ye na libanda pe babomi yé." 40 Sima Yezu atuni: "Bongo tango kolo ya elanga akoya, akosala nini po na basali wana?" 41 Bato bazongiseli ye: "Akoyokela bango mawa té, akoboma bango, pe akopesa elanga na bafuteli mosusu. Bango nde bato bakobanda kopesa ye mbuma na ye na tango ekoki." 42 Bongo Yezu alobi na bango: "Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekómamá boye: 'Libanga ba-mason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem. Yango euti na Nkolo, pe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso!" 43 Yezu alobi lisusu: "Yango wana nalobi na bino: bakolongola bino na mboka ya Nzambe pe bakokotisa bato mosusu; bango nde bato bakosala misala ya malamu po na yango. 44 Moto akokweya na likolo ya libanga oyo akopasuka; pe soki libanga wana ekweeli moto moko, ekonika ye." 45 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bayoki masapo wana mibale, pe bayebaki 'tè Yezu azalaki koloba po na bango; 46 bongo babandaki koluka nzela ya kokanga ye, kasi babangaki bato. Pamba té bato bazalaki kokamata Yezu lokola profete.

Matié 22

Lisapo ya feti ya libala

1 Yezu abandi lisusu kobetela bato masapo pe alobi: 2 "Bóyoka ndenge makambo ekobanda koleka na mboka ya Nzambe. Ekozala lokola mokonzi moko oyo asalisi feti ya libala ya mwana na ye. 3 Atindi basali na ye bákende epai ya bato oyo babengisaki, po baya na feti; kasi bango baboyi koya. 4 Atindi basali mosusu pe alobi na bango: 'Bóloba boye na bato oyo nabengisaki: Nasi'nabongisi biloko nyonso; nabomisi bangombe na ngai ná banyama ya mafuta. Bóya na feti ya libala!' 5 Kasi bango bamoni yango makambo ya pamba, pe bakei moto na moto na mosala na ye: mosusu akei na bilanga, mosusu akei kosala mombongo; 6 bamosusu bakangi basali wana, banyokoli bango pe babomi bango. 7 Mokonzi ayoki kanda, atindi basoda na ye po bákende koboma babomi wana pe bázikisa mboka na bango. 8 Na sima alobi na basali na ye: 'Nabongisaki feti malamu, kasi bato oyo nabengisaki bakoki na yango té po na kolia. 'Bókende na ba-balabala ya minene, pe bóbenga bato nyonso oyo bokomona, po baya na feti.' 10 Basali bakei na ba-balabala, pe bamemi bato nyonso oyo bakutaki kuna: ézala bato ya malamu to ya mabe; boye ndako ya feti etondaki. 11 "Tango mokonzi akoti po na kopesa mbote na bato oyo bazalaki na mesa, amoni moto moko alataki bilamba ya feti té. 12 Bongo atuni ye: 'Ndenge nini yo okoteli awa? Olati bilamba ya feti te.' Kasi moto wana azalaki ata na eloko moko té ya kozongisa. 13 Boye mokonzi alobi na basali na ye: 'Bókanga ye makolo ná maboko pe bóbwaka ye libanda na molili, esika bato balelaka pe baliaka mino." 14 Yezu asukisi boye: "Nzambe azali kobengisa bato ebele po bákóma bato ya mboka na ye, kasi bango nyonso té bato bakoki na yango'."

Mpaku ya mokonzi ya Rome

15 Ba-Farizé bakei kosala likita po na koluka nzela ya kokanga Yezu na maloba na ye moko. 16 Batindi bayekoli na bango mosusu ná bato ya Erode po na kotuna ye: "Moteyi, toyebi malamu 'tè yo okosaka té, pe oteyaka makambo ya solo po na nzela ya Nzambe; obangaka bato té, pe otalaka bilongi ya bato té. 17 Lobela biso, okanisi nini po na likambo oyo: Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi ya Rome to té?" 18 Kasi Yezu ayebaki mayele na bango ya mabe, bongo alobi na bango: "Bato ya lokuta! Po na nini bozali komeka ngai? 19 Bólakisa ngai nanu mbongo oyo bafutelaka mpaku." Balakisi ye ebende moko ya mbongo, 20 bongo Yezu atuni bango: "Foto oyo pe kombo oyo bakómá awa ezali ya nani?" 21 Bango bazongisi: "Ya mokonzi ya Rome." Bongo Yezu alobi na bango: "Bópesa mokonzi ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye." 22 Awa bayoki bongo, bakamwe penza; batiki ye pe bakei.

Motuna po na kosekwa

23 Kaka na mokolo wana ba-Sadusé bayei epai ya Yezu. Ezali nde ba-Sadusé bato balobaká 'tè bato bakufa bakoki kosekwa té. 24 Bango batuni ye boye: "Moteyi, Moize alobaká: 'Soki moto akufl pe aboti bana té, ndeko na ye ábala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana.' "Epai na biso ezalaki na mibali sambo, bango nyonso mama moko, tata moko. Oyo ya liboso abali mwasi pe akufi, kasi aboti na ye té; bongo atiki mwasi na ye na maboko ya ndeko na ye. 26 Esalamaki se ndenge moko po na moto ya mibale ná ya misato, tii na oyo ya sambo. 27 Na sima na bango nyonso, mwasi pe ayei kokufa. 28 Bongo mokolo bato bakufa bakosekwa, mwasi wana akozala ya nani? Pamba té bango nyonso babalaki ye." 29 Yezu azongiseli bango: "Namoni 'tè bobosani, po boyebi Mikanda ya Nzambe té, boyebi pe nguya na ye té. 30 Tango bato bakufa bakosekwa, bakobanda kobalana té, kasi bakokokana ná ba-anjelu ya Likolo. 31 Po na likambo etali kosekwa ya bato bakufa, botangá té ndenge Nzambe alobaká na bino? 32 Ye alobaká boye: 'Nazali Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.' Ye azali Nzambe ya bato bakufa té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi." 33 Bato oyo bayokaki ye bakamwe mingi penza po na mateya na ye.

Mobeko nini eleki

34 Tango ba-Farizé bayoki 'tè Yezu asukisi ba-Sadusé, bayei kosangana epai na ye. 35 Moko na kati na bango azalaki molakisi-Mibeko, pe alingaki komeka Yezu; bongo atuni ye boye: 36 "Moteyi, mobeko runi eleki mibeko nyonso?" 37 Yezu azongiseli ye: " 'Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na bomoi na yo mobimba pe na mayele na yo nyonso.' 38 Wana ezali mobeko ya liboso pe eleki monene. 39 Mobeko ya mibale ekokani na yango, yang'oyo: 'Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.' 40 Mibeko nyonso ya Moize pe mateya ya baprofete ezali na kati ya mibeko mibale oyo."

Mesia azali Mokonzi ya David

41 Lokola ba-Farizé bazalaki esika moko, Yezu atuni bango: 42 "Bokanisi nini po na Mesia? Ye azali mwana ya nani? Akozwa ebonga ya nani?" Bango bazongiseli ye: "Azali mwana ya David; akozwa ebonga na ye." 43 Bongo Yezu atuni bango lisusu: "Kasi ndenge nini Molimo Mosantu alakisaká David 'tè ábenga Mesia Mokonzi na ye? Pamba té David alobaká boye: 44 'Mokonzi na ngai, Nkolo alobi na yo: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.' 45 Soki David azalaká kobenga Mesia 'Mokonzi na ngai', bongo ndenge nini ye akoki kozala Mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?" 46 Ata moto moko té akokaki kozongisela ye eyano. Banda mokolo wana moto ata moko té amekaki kotuna ye lisusu.

Matié 23

Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé, bato ya lokuta

1 Bongo Yezu alobi boye na bato pe na bayekoli na ye: 2 "Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé mosala na bango, kolimbolela bato Mibeko ya Moize. 3 Bongo botosaka bango pe bosalaka makambo nyonso bakobanda koloba na bino; kasi bólandaka bizaleli na bango té. Pamba té makambo balobaká, basalaka yango té. 4 Bakangaka mikumba ya kilo pe batiaka yango na mapeka ya bato, kasi bango moko basimbaka yango ata na mosapi té. 5 Misala nyonso oyo basalaka, balukaka kaka bato bámona yango. Biteni ya Mikanda ya Nzambe oyo bato balataka na tango ya kosambela, bango bakómisaka yango milai penza; pe batóngaka basonge ya minene na banzambala na bango. 6 Balingaka bisika ya lokumu na bafeti, pe bakiti ya liboso na bandako ya losambo; 7 balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando, pe bábengaka bango 'Moteyi'. 8 Kasi bino bólingaka té 'tè bábengaka bino 'Moteyi', pamba té bino nyonso bozali bandeko, pe bozali na Moteyi moko kaka. 9 Awa na mokili, bóbengaka moto moko té 'Tata'; pamba té bozali na Tata moko kaka oyo azali na Likolo. 10 Bólingaka té 'tè bato bábengaka bino 'mokonzi', pamba té bozali na Mokonzi moko kaka, ezali Mesia. 11 Moto aleki bino nyonso akozala mosali na bino. 12 Moto oyo amikumisaka, Nzambe akitisaka ye; pe moto oyo amikitisaka, Nzambe akumisaka ye."

Yezu alakisi lokuta na bango polele

13 "Mawa na bino balakisi-Mibeko pe ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bozali kokangela bato nzela oyo bakoki kokotela na mboka ya Nzambe. Bino moko bozali kokota té, pe bozali kopekisa bato oyo balingi kokota. 14 "Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bobotolaka biloko nyonso ya basi oyo bakufelá mibali. Pe kaka na tango wana bosambelaka mingi po bato bákanisa 'tè bozali bato malamu. Yango wana bokozwa etumbu eleki monene! 15 "Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Botambolaka mokili mobimba po na kozwa mopaya moko oyo akondima kosambela Nzambe na biso Bayuda; pe soki bozwi ye bokómisaka ye moto ya lifelo penza koleka bino. 16 "Mawa na bino bolakisaka bato nzela, nzokande bokufá miso! Pamba té bolobaka boye: 'Soki moto akati seleka na kombo ya Ndako ya Nzambe, ezali likambo té. Kasi soki akati seleka na kombo ya or oyo babombá na Ndako ya Nzambe, esengeli átosa seleka na ye.' 17 Bazoba! Bato bakufa miso! Ná or ná Ndako ya Nzambe nini eleki? Or ekómi eloko ya bosantu bobele po batii yango na Ndako ya Nzambe. 18 Bolobaka lisusu 'tè: 'Soki moto akati seleka po na mesa oyo bazikiselaka Nzambe mabonza, ezali likambo té; kasi soki akati seleka na kombo ya libonza oyo ezali na likolo ya mesa, esengeli átosa seleka na ye.' 19 Bato bakufa miso! Ná libonza ná mesa nini eleki? Libonza ekómi eloko ya bosantu po batii yango na mesa ya Nzambe. 20 Moto oyo akataka seleka po na kombo ya mesa ya Nzambe, akati yango po na kombo ya mesa ná ya biloko nyonso ezali na likolo na yango. 21 Oyo akataka seleka na kombo ya Ndako ya Nzambe, akati yango na kombo ya Ndako ya Nzambe ná ya Moto oyo afandaka na kati. 22 Pe oyo akataka seleka po na kombo ya Likolo, akati yango po na kombo ya kiti ya Nzambe ná ya Oyo afandaka na yango. 23 "Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bolongolelaka Nzambe eteni moko na kati ya biteni zomi ya mwa-makasa ya solo kitoko, kasi bobosanaka mibeko oyo eleki minene: kosala bato bolamu, koyokela bango mawa, pe kozala bato ya solo. Wana ezali makambo bosengeli kosala, nzokande kobosana pe té oyo ya liboso. 24 Batambwisi bokufá miso! Bolongolaka ngungi na mai ya komela, kasi bodundaka shamó! 25 "Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bozali lokola bakopo oyo basukoli libanda, kasi na kati botondá na moyibi pe na baposa ya mabe. 26 Ba-Farizé bokufá miso! Bósukola liboso kopo na kati, bongo libanda na yango ekokóma pe peto! 27 "Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bozali lokola basimetiere bapakolá pembe; na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondá na mikuwa ya bato bakufa pe na bosoto ya ndenge na ndenge. 28 Bino pe na libanda bozali komonana lokola bato ya malamu, kasi na kati botondá na lokuta pe na mabe."

Etumbu ya bato ya lokuta

29 "Mawa na bmo balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Batoya lokuta! Botóngelaka baprofete ba-monimá ya kitoko, pe bobongisaka basimetiere ya bato ya bosembo. 30 Bolobaka: 'Soki tózalaka na tango ya bakoko na biso, mbele tolingaki kosangana ná bango té po na koboma baprofete.' 31 Boye bmo moko bondimaka 'tè bozali bana ya bato oyo babomaká baprofete; 32 bongo sik'oyo bósilisa kaka mosala bakoko na bino babandaká. 33 Bino banyoka oyo! Ndenge nini bokosala, po na kokima etumbu ya lifelo? 34 Bóyoka malamu: nakotindela bino baprofete ná bato ya mayele pe balakisi-Mibeko. Kasi bakoboma bamosusu na mbeli to na mabanga pe bamosusu na kuruze; bokobeta bamosusu fimbu na bandako ya losambo, pe bokonyokola bango bipai na bipai. 35 Yango wana, bozali komema ngambo ya makila ya bato nyonso ya bosembo oyo babomaká, kobanda na Abel tii na Zakarya mwana ya Berekya, oyo babomaká na kati ya Ndako ya bosantu ná mesa ya mabonza. 36 Nalobi na bino, ya solo: Bino bokozwa etumbu po na makambo nyonso wana!"

Yezu aleli po na Yeruzalem

37 "A bino bato ya Yeruzalem! Tango Nzambe atindelaka bino baprofete, boboyaka bango pe bobomaka bango na mabanga. Nzokande ngai, mbala na mbala namekaki kosangisa bino pembeni na ngai, ndenge soso esangisaka bana na yango na se ya mapapu; kasi bino boboyaki. 38 Yango wana Nzambe alingi kosundola mboka na bino. 39 Nalobi na bino, banda lelo bokomona ngai lisusu té tii tango bokoloba: 'Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye!"

Matié 24

Yezu ayebisi 'tè Ndako ya Nzambe ekokufa

1 Tango Yezu abimi na Ndako ya Nzambe, bayekoli bayei penepene na ye, balobi: "Tala nanu ndenge batóngá Ndako ya Nzambe!" 2 Bongo Yezu azongiseli bango: "Bomoni yango nyonso? Nalobi na bino, ya solo: libanga ata moko té ekotikala na esika ezali; nyonso wana bakopanza yango."

Pasi pe minyokoli ekoya

3 Bongo Yezu akei kofanda na Ngomba ya ba-OHve, esika moko ná bayekoli na ye. Bango batuni ye balobi: "Yebisa biso tango nini yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè olingi koya kotia bokonzi na yo, pe suka ya mokili ekómi penepene." 4 Yezu azongiseli bango: "Bókeba! Moto moko té ákosa bino! 5 Pamba té bato ebele bakoya na kombo na ngai, bakoloba: 'Nazali Mesia!' pe bakokosa bato mingi. 6 Bokoyoka 'tè bitumba ebimi na bamboka ya penepene to ya mosika. Bóbanga té. Makambo yango esengeli koya, kasi wana ekozala nanu suka té. 7 Ya solo, bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka. Epai na epai nzala ekongala, pe mabelé ekoningana. 8 Yango nyonso wana ekozala kaka lokola ebandeli ya pasi mwasi ayokaka na tango ya kobota. 9 "Na tango wana bakobanda koteka bino, po na komonisa bino pasi pe koboma bino. Bikolo nyonso ekozala koyina bino po bondimeli ngai. 10 Na mikolo wana bato mingi bakosundola bondimi, bakobanda kotekana pe koyinana. 11 Baprofete ebele ya lokuta bakobima pe bakokosa bato mingi. 12 Lokola makambo ya mabe ekoleka, bolingo ya bato ebele pe ekosila. 13 Kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, ye nde akobika. 14 Bakosakola Sango Malamu oyo ya bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba, po bikolo nyonso éyoka yango. Bongo na tango wana suka ekoya."

Yeruzalem ekokufa

15 "Profete Daniel akómaká 'tè Lisumá ya somo ekopikama na Esika ya bosantu.-Moto azali kotanga makambo oyo, áluka koyeba tina na yango!-16 Mokolo bokomona yango, bato oyo bakozala na région ya Yuda basengeli kokima epai ya bangomba. 17 Moto oyo akozala libanda ázonga na kati ya ndako té po na kokamata biloko na ye. 18 Oyo akozala na bilanga ázonga na ndako té po na kokamata kazaka na ye. 19 Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakomelisa bana mabéle na tango wana! 20 Bóbondela Nzambe po mokolo bokokima ézala na tango ya malili té to na Mokolo ya Kopema! 21 Pamba té na tango wana pasi ya somo ekozala. Pasi ya ndenge wana emonaná nanu té uta ebandeli ya mokili tii sik'oyo; ekomonana pe lisusu té. 22 Soki Nzambe ákatelaka bato mikolo ya pasi wana té po ékóma mokuse, mbele ata moto moko té akokaki kobika. Kasi Nzambe akatá yango po na bato oyo ye aponá. 23 "Na tango wana, soki moto alobi na bino: 'Botala! Mesia azali awa!' to: 'Azali kuna!', bóndimela ye té! 24 Pamba té ba-mesia ya lokuta ná baprofete ya lokuta bakobima ebele; bakosala makamwisi minene ya ndenge na ndenge po, soki nzela ezali, bákosa ata bato oyo Nzambe aponá. "Nabanza boyoki. Nasi'nayebisi bino yango libela! 26 "Yango wana soki balobi na bino: 'Botala! Azali na esobe!', bókende té. Soki pe balobi: 'Botala! Abombani awa!', bóndima té. 27 Pamba té ngai Mwana ya Moto nakoya ndenge kake eutaka na Likolo pe engengisaka mokili mobimba, banda na epai moi ebimaka tii na epai elalaka. 28 Epai ebembe ezali, bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana wana."

Koya ya Mwana ya Moto

29 "Soki pasi ya mikolo wana esili, mosusu ya koleka ekoya. Moi ekokóma molili, sanza ekongenga lisusu té; minzoto ekokweya na se; pe nyonso oyo ezali na Likolo ekoningana. 30 Bongo elembo na ngai ekomonana na Likolo. Na tango wana bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, tango bakomona ngai, Mwana ya Moto nazali koya na likolo ya mapata, na nguya pe na lokumu mingi. 31 Kelelo monene ekobeta; nakotinda ba-anjelu bipai nyonso na mokili mobimba, básangisa bato oyo naponá."

Ndakisa ya nzete ya figi

32 "Bókanisa nzete ya figi. Soki bitape na yango ekómi petepete, pe soki makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko y a kobuka mbuma ekómi penepene. 33 Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo yango, bóyeba 'tè etikali moke náya. 34 Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso. 35 Likolo na se ekoleka; kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té."

Kaka Nzambe moto ayebi mokolo wana

36 "Moto moko té ayebi mokolo to ngonga makambo wana ekosalama, ata ba-anjelu ya Likolo, ézala kutu ata ngai Mwana ya Nzambe. Kaka Tata ye moko moto ayebi yango. 37 Mokolo ngai Mwana ya Moto nakoya, makambo ekosalama ndenge ésalamaka na tango ya Noé. 38 Liboso 'tè mai éya kodindisa mokili mobimba, bato bazalaki kolia pe komela, bazalaki kobalana, tii mokolo Noé akotaki na masuwa. 39 Bazalaki kokanisa eloko moko té, tii tango mai eyaki pe ebomi bango nyonso. Ekozala bobele ndenge wana tango ngai Mwana ya Moto nakoya. 40 Soki mibali mibale bakozala na elanga, bakokamata moko pe bakotika mosusu. 41 Soki basi mibale bakozala konika blé, bakokamata moko pe bakotika mosusu, 42 Bókeba, po mokolo Mokonzi na bino akoya, boyebi yango té. 43 Bókanisa nanu! Soki kolo ya ndako ayebi tango moyibi akoya na butu, akolala té, kasi akosala nyonso po bábuka ndako na ye té. 44 Yango wana, bino pe bózalaka na ekenge tango nyonso, pamba té ngai Mwana ya Moto nakoya na ngonga oyo bino boyebi té."

Mosali ya malamu pe mosali ya mabe

45 "Bózalaka lokola mosali ya malamu pe ya mayele, oyo mokonzi na ye atii kapita ya bato na ye nyonso ya mosala, po ápesaka bango bilei na tango ekoki. 46 Mosali wana akozala na esengo mingi tango mokonzi azongi, pe akuti ye azali kosala mosala. 47 Nalobi na bino, ya solo: mokonzi wana akotia biloko na ye nyonso na maboko na ye. 48 Nzokande mosali yango akozala na mawa soki azali moto mabe pe amilobi: 'Mokonzi na ngai azali koya noki té'. 49 Bongo soki abandi kobeta basali mosusu, soki azali kolia esika moko ná bato balangwaka masanga, 50 mokonzi akozonga na mokolo mosali azali kozela ye té, pe na ngonga ye ayebi té. 51 Akopesa ye etumbu moko ya somo; akotia ye na boloko epai ya bato ya mabe, esika balelaka pe baliaka mino."

Matié 25

Lisapo ya bilenge basi zomi

1 "Bóyoka ndenge bato bakokota na mboka ya Nzambe. Ezalaki na (eti ya libala. Bilenge basi zomi, bamwinda na maboko, bakei koyamba mobali oyo akobala. 2 Na kati na bango, mitano bazalaki bazoba, pe mitano mosusu bazalaki mayele. 3 Bazoba bakamataki kaka bamwinda pamba, kasi bamemi mafuta mingi té. 4 Nzokande baoyo ya mayele bamemaki bamwinda na bango ná milangi ya mafuta. 5 Awa mobali azalaki koya noki té, bango nyonso bayoki pongi pe balali. 6 "Na kati ya butu moto moko agangi: 'Mobali ayei! Bókende koyamba ye!' 7 Bongo bilenge basi wana balamuki pe babandi kobongisa bamwinda na bango. 8 Bazoba balobi na baoyo ya mayele: 'Bópesa biso ndambo ya mafuta; bamwinda na biso ezali kokufa.' 'Baoyo ya mayele bazongisi: 'Té! mafuta ekokoka té soki topesi bino. Bókende kosomba ya bino na wenze.' 10 Bazoba bakei kosomba mafuta. Kaka na tango wana mobali ayei, bongo bilenge oyo bamibongisaki bakoti ná ye na ndako ya feti, pe bakangi ndako na fungola. 11 Na sima bilenge ya zoba pe bakomi. Basengi: 'Mokonzi, mokonzi, fungolela biso ndako!' 12 Kasi mobali azongisi: 'Nalobi na bino, ya solo: nayebi bino té.' " 13 Yezu asukisi boye: "Yango wana bózalaka na ekenge, pamba té boyebi mokolo té to ngonga."

Lisapo ya mbongo ya mokonzi

14 "Nzambe akosala lokola moto moko alingaki kokende na mobembo: abengi basali na ye pe apesi mbongo na ye nyonso na maboko na bango, po bábatela yango. 15 Apesi na moto na moto na ndenge ekoki na mayele na ye. Na moto ya liboso apesi maboke mitano ya mbongo, na moto ya mibale maboke mibale, bongo na moto ya misato liboke moko. Na sima akei. 16 Mosali oyo azwaki maboke mitano ya mbongo, akei noki kosalela yango mombongo, pe azwi maboke mitano na likolo. 17 Moto oyo azwaki maboke mibale asali pe ndenge wana, bongo azwi maboke mibale mosusu. 18 Kasi moto oyo azwaki liboke moko akei kotimola libulu na mabelé, pe abombi mbongo ya mokonzi na ye. 19 "Mikolo mingi eleki, mokonzi ya basali wana azongi, pe abengi basali na ye, po bálakisa ye ndenge basalaki na mbongo na ye. 20 Mosali oyo azwaki maboke mitano ayei pe alakisi maboke mitano mosusu, alobi: 'Mokonzi, opesaki ngai maboke mitano. Tala, nazwi maboke mitano mosusu likolo.' 21 Mokonzi na ye azongiseli ye: 'Malamu! Ozali mosali ya malamu pe ya botosi. Osali penza mosala po na makambo ya mike; bongo nakopesa makambo minene na maboko na yo. Yaka epai na ngai, tósepela esika moko.' ^Mosali oyo azwaki maboke mibale ayei pe alobi: 'Mokonzi, opesaki ngai maboke mibale ya mbongo. Tala, nazwi maboke mibale mosusu likolo.' 23 Mokonzi azongiseli ye: 'Malamu! Ozali mosali ya malamu pe ya botosi. Osali penza mosala po na makambo ya mike; bongo nakopesa makambo minene na maboko na yo. Yaka epai na ngai, tósepela esika moko!' 24 Na sima mosali oyo azwaki liboke moko ya mbongo ayei pe alobi: 'Mokonzi, nayebaki 'tè ozali moto moko ya matata: obukaka mbuma ata oyo okoni té. 25 Nabangaki, yango wana nakendeki kobomba mbongo na yo na se ya mabelé. Tala; mbongo na yo yang'oyo.' 26 Mokonzi na ye azongiseli ye: 'Mosali mabe pe ya goigoi! Oyebaki 'tè nabukaka mbuma ata oyo nakoni té; "bongo ebongaki ótia mbongo na ngai na banque, boye lokola nazongi nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi. ^Bóbotola ye liboke ya mbongo wana pe bópesa yango na moto oyo azali na maboke zomi. 29 Pamba té, moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azali na biloko mingi té, bakobotola ye kutu ata ndambo oyo azali na yango. 30 Bóbwaka mosali oyo ya pamba-pamba na libanda, na molili, esika balelaka pe batiaka mino.' "

Mobeko nini zuzi akotala

31 "Mokolo ngai Mwana ya Moto nakoya na lokumu na ngai ya mokonzi, nzela moko ná ba-anjelu na ngai nyonso, nakofanda na kiti na ngai ya lokumu. 32 Bakosangisa bato nyonso ya mokili liboso na ngai, pe nakokabola bango ndenge mobokoli ya bameme akabolaka banyama ya basi ná ya mibali: 33 nakotia oyo ya basi epai, pe oyo ya mibali epai. 34 Bongo nakoloba boye na bato oyo bakozala na liboko na ngai ya mobali: 'Bóya, bino bato Tata na ngai abenisá, pe bókota na mboka abongiselá bino uta ebandeli ya mokili. 35 Pamba té nazalaki na nzala, pe bopesaki ngai bilei; nazalaki na posa ya mai, pe bopesaki ngai mai ya komela; nazalaki mopaya, pe boyambaki ngai na bandako na bino. ^Nazangaki bilamba, pe bopesaki ngai yango; nazalaki na maladi, pe bosalisaki ngai; nakotaki boloko, pe boyaki kotala ngai.' 37 Bato ya malamu bakotuna ngai: 'Mokonzi, tango nini tomonaki yo ozali na nzala, bongo topesaki yo bilei? To ozalaki na posa ya mai, bongo topesaki yo mai ya komela? 38 Tango nini tomonaki yo ozali mopaya, pe toyambaki yo na bandako na biso? To ozangaki bilamba, pe topesaki yo yango? 39 Tango nini tomonaki yo ozali na maladi to okotaki boloko, pe toyaki kotala yo?' 40 Boye nakozongisela bango: 'Nalobi na bino, ya solo: mbala nyonso bosalisaki ata moto ya suka na kati ya bandeko na ngai, bosalisaki ngai!' 41 "Na sima ngai Mokonzi nakoloba boye na bato oyo bakozala na liboko na ngai ya mwasi: 'Bólongwa na miso na ngai, bino bato Nzambe abwaká! Bókende na móto oyo ekufaka té, oyo babongiselá zabolo ná bazabolo na ye. 42 Pamba té nazalaki na nzala, pe bopesaki ngai bilei té; nazalaki na posa ya mai, pe bopesaki ngai mai ya komela té; 43 nazalaki mopaya, pe boyambaki ngai na bandako na bino té; nazangaki bilamba, pe bopesaki ngai yango té; nazalaki na maladi pe nakotaki boloko, kasi bosalisaki ngai té.' 44 Bongo bango bakotuna ngai: 'Mokonzi, tango nini tomonaki yo ozali na nzala, to na posa ya mai? To ozalaki mopaya, ozangaki bilamba, ozalaki na maladi to okotaki boloko, bongo tosalisaki yo té?' 45 Nakozongisela bango: 'Nalobi na bino, ya solo: mbala nyonso bozalaki koboya kosalisa ata moto ya suka na kati ya bandeko na ngai, bozalaki nde koboya kosalisa ngai.' 46 Bongo bango bakozwa etumbu oyo esilaka té; kasi bato ya malamu bakozwa bomoi ya seko."

Matié 26

Bakonzi bayokani bábomisa Yezu

1 Tango Yezu asilisi koloba maloba wana nyonso, alobi na bayekoli na ye: 2 "Boyebi, etikali mikolo mibale tókóma na feti ya Pake; bongo bakoteka ngai Mwana ya Moto, po báboma ngai na kuruze." 3 Kaka na tango wana bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya Bayuda bakei kosangana na ndako ya Kaife, mokonzi ya banganga-Nzambe. 4 Bayokani bákanga Yezu na mayele pe báboma ye; 5 nzokande balobi: "Tokoki kokanga ye na mokolo ya feti té. Soki té, bato bakotomboka."

Mwasi moko asopeli Yezu malasi na motú

6 Mokolo wana Yezu azalaki na Betanie na ndako ya Simon, moto ya maladi ya maba. 7 Mwasi moko ayei penepene na ye, azalaki na molangi basalá na libanga ya kitoko penza, etondá na malasi ya talo mingi, bongo asopeli yango Yezu na motú tango ye afandi na mesa po na kolia. 8 Awa bayekoli bamoni bongo, basiliki balobi: "Po na nini babebisi malasi oyo boye? 9 Bakokaki koteka yango na talo mingi penza, pe kopesa mbongo wana na bato bakelelá!" 10 Yezu ayebaki makambo bango bazalaki koloba pe alobi na bango: "Po na nini bozali kotungisa mama oyo? Likambo ye asali po na ngai ezali malamu. 11 Bato bakelelá bakozala ná bino tango nyonso, kasi ngai nakofanda ná bino libela té. 12 Lokola asopeli ngai malasi oyo, asali bongo po na kobongisa nzoto na ngai, pamba té etikali moke bákunda ngai. 13 Nalobi na bino, ya solo: bipai nyonso bakozala kosakola Sango Malamu oyo na mokili mobimba, bakoloba likambo mama oyo asali, pe bakokanisa ye."

Yudas ateki Yezu

14 Na tango wana moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, kombo na ye Yudas Iskariot, akei epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe, 15 pe atuni bango: "Bokopesa ngai nini soki nakabi Yezu na maboko na bino?" Bongo bango batangi bibende tuku misato ya mbongo pe bapesi ye yango. 16 Banda mokolo wana Yudas akómi koluka nzela ya kokaba Yezu na maboko na bango.

Yezu alei bilei ya Pake ná bayekoli na ye

17 Mokolo ya liboso ya feti ya mapa evimbá té, bayekoli bayei kotuna Yezu: "Esika nini olingi tólambela yo bilei ya Pake?" 18 Ye azongiseli bango: "Bókende na vile na ndako ya songolo, pe bóloba na ye: Moteyi alobi: Tango na ngai ekoki. Nakosala feti ya Pake na ndako na yo, ngai ná bayekoli na ngai." 19 Bayekoli basali ndenge Yezu atindaki bango pe balambi bilei ya Pake. 20 Awa pokwa ekómi, Yezu afandi na mesa ná bayekoli na ye zomi na mibale. 21 Bongo tango bazalaki kolia, Yezu alobi: "Nalobi na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai." 22 Bayekoli bayoki mawa mingi, pe babandi kotuna ye moko moko: "Mokonzi, ezali ngai?" 23 Yezu azongisi: "Moto akoteka ngai ezali moko na kati na bino; azali kolia ná ngai sani moko. 24 Ya solo, ngai Mwana ya Moto nakokufa ndenge ekómamá po na ngai; kasi mawa mingi na moto oyo akoteka Mwana ya Moto. Ebongaki malamu kutu moto wana ábotama té!" "Yudas moto oyo atekaki ye atuni: "Moteyi, ezali ngai?" Yezu azongiseli ye: "Ée, ezali penza yo."

Nzoto ná Makila ya Yezu

26 Tango bazalaki kolia, Yezu akamati lipa, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bayekoli na ye, alobi na bango: "Bókamata bólia. Oyo ezali nzoto na ngai." 27 Na sima akamati kopo, asambeli po na kopesa Nzambe mersi, apesi kopo na bayekoli pe alobi: "Bómela yango bino nyonso. 28 Oyo ezali makila na ngai. Yango nde moto ezali kotia Boyokani na kati ya Nzambe ná bato; bakotangisa yango po bato ebele bázwa bolimbisi ya masumu. 29 Nalobi na bino: banda lelo nakomela lisusu vinu oyo té, tii mokolo nakomela vinu ya sika esika moko ná bino, na mboka ya Tata na ngai." 30 Na sima bayembi banzembo, pe bakei na Ngomba ya ba-OUve.

Yezu ayebisi 'tè Piere akowangana ye

31 Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: "Na butu ya lelo bino nyonso bokobungisa bondimi, po na makambo ekokweela ngai. Pamba té ekómamá boye: 'Nakoboma mobokoli, pe bameme nyonso ekopanzana.' 32 Kasi tango nakosekwa, nakokende na Galilé liboso na bino." 33 Piere alobi na ye: "Ata soki bango nyonso babungisi bondimi po na makambo ekokweela yo, kasi ngai nakobungisa yango ata moke té!" 34 Yezu azongiseli ye: "Nalobi na yo, ya solo: kaka na butu ya lelo, liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té." 35 Piere alobi na ye: "Té, ekosalama té. Ata soki nasengeli kokufa esika moko ná yo, nakoki kowangana yo té." Bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.

Yezu abondeli Nzambe na Jetsemane

36 Bongo Yezu akómi ná bayekoli na ye na elanga moko bábengaka Jetsemane. Alobi na bango: "Bófanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe kuna." 37 Amemi Piere pe bana ya Zebedé mibale Jake ná Yoane. Na mbala moko abandi koyoka mawa pe pasi na motema. 38 Bongo alobi na bango: "Motema na ngai etondi na mawa lokola nákufa. Bótikala awa, pe bókengela ná ngai." 39 Apusani mwa moke, afukami elongi na se, pe abandi kobondela Nzambe boye: "Tata na ngai, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi epai na ngai! Kasi kosala té ndenge ngai nalingi; sala bobele ndenge yo olingi." 40 Na sima azongi epai ya bayekoli misato, pe akuti bango balali pongi. Alobi na Piere: "Ndenge nini bokokaki té kokengela ná ngai ata ngonga moko? 41 Bókengela, pe bóbondela Nzambe, po Monguna ámeka bino té. Ata bozali na molende na mitema, bozali kaka bato; bozangá makasi." 42 Akei lisusu mbala ya mibale pe abondeli Nzambe boye: "Tata na ngai, soki kopo oyo ekoki kolongwa té, bobele námela yango, ésalama kaka ndenge yo olingi." 43 Azongi lisusu epai ya bayekoli na ye, pe akuti bango balali kaka pongi; pamba té miso na bango ekómaki kilo. 44 Yezu atiki bango lisusu, akei kobondela Nzambe mbala ya misato; alobi bobele ndenge moko. 45 Na sima azongi epai ya bayekoli na ye pe alobi na bango: "Esili. Sik'oyo bokoki kolala pe kopema. Tango esi'ekoki po bákaba ngai Mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu. 46 Bótelema, tókende. Tala moto ateki ngai ayei."

Bakangi Yezu

47 Tango Yezu azalaki nanu koloba, Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, ayei ná bato ebele, bamemi bambeli ná banzete. Bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu ya ekolo bato batindaki bango. 48 Nzokande Yudas oyo atekaki Yezu alakisaki bango ndenge bakoyeba ye, alobaki boye: "Moto oyo nakoyamba, ye wana. Bókanga ye." 49 Na mbala moko Yudas apusani penepene ya Yezu, alobi: "Moteyi, mbote", pe ayambi ye. 50 Yezu azongiseli ye: "Moninga na ngai, sala mosala na yo." Bongo bamosusu bapusani, basimbi Yezu pe bakangi ye. 51 Moko ya baoyo bazalaki ná Yezu abimisi mbeli na ye, pe akati mosali ya nganga-Nzambe monene litoi. 52 Bongo Yezu alobi na ye: "Zongisa mbeli na yo na esika na yango; pamba té bato nyonso oyo babundaka na mbeli bakufaka na mbeli. 53 Oyebi té? Soki nasengi lisalisi epai ya Tata na ngai, na mbala moko akotindela ngai basoda na ye, ba-anjelu ebele, koleka kutu ba-batayon zomi na mibale. 54 Kasi soki nasali boye, ndenge nini Nzambe akoko-kisa makambo oyo ekómamá na Mikanda? Pamba té ekómamá 'tè oyo nyonso esengeli kosalama." 55 Na sima Yezu atuni bato wana: "Boni? Nakómi moyibi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete po na kokanga ngai? Mikolo nyonso nazalaki kofanda na Ndako ya Nzambe pe koteya; nzokande bokangaki ngai té. 56 Kasi nyonso oyo esalami po na kokokisa makambo ekómamá na Mikanda ya baprofete." Bongo bayekoli nyonso batiki ye pe bakimi.

Basambisi Yezu na Likita-Monene ya Bayuda

57 Bato oyo bakangaki Yezu bamemi ye na ndako ya Kaife, nganga-Nzambe monene, esika balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bakendeki kosangana. 58 Piere azalaki kolanda Yezu na mosika tii na lopango ya nganga-Nzambe monene. Kuna afandi esika moko ná bakengeli po na kotala ndenge nini likambo yango ekosuka. 59 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bato nyonso ya Likita-Monene bazalaki koluka bato oyo bakoki kokosela Yezu makambo po bábomisa ye. 60 Kasi atako bato mingi bayaki kokosela ye makambo, bazwi likambo moko té tii sima bato mibale bayei, 61 balobi boye: "Moto oyo alobaki: 'Ngai nakoboma Ndako ya Nzambe pe nakotónga yango lisusu na mikolo misato.' " 62 Bongo nganga-Nzambe monene atelemi, atuni Yezu: "Oko-zongisa té? Bato oyo bazali kofunda yo na likambo nini?" 63 Kasi Yezu afandi kaka nyee. Nganga-Nzambe monene alobi na ye: "Kata seleka na kombo ya Nzambe ya bomoi! Yebisa biso soki yo ozali Mesia, Mwana ya Nzambe!" 64 Yezu azongiseli ye: "Ee, ezali penza ngai. Kasi nalobi na bino: banda sik'oyo bokobanda komona ngai Mwana ya Moto, ndenge nakofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso, pe ndenge nakoya na mapata ya Likolo!" 65 Na mbala moko nganga-Nzambe monene atomboki penza, apasoli bilamba na ye, pe alobi: "Atsioli Nzambe! Po na nini tóluka lisusu batemwen? Boyoki ndenge ye atsioli Nzambe! 66 Bino bokanisi nini?" Bango bazongisi: "Asengeli kokufa!" 67 Na sima babwakeli ye soi na elongi pe babeti ye makofi, bato mosusu babeti ye bambata, 68 balobi: "Yo, Mesia, lakisa 'tè ozali profete! Nani moto abéti yo?"

Piere awangani Yezu

69 Piere afandaki libanda na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayei pe alobi na ye: "Yo pe ozalaki ná Yezu, moto ya Galilé." 70 Kasi ye awangani na miso ya bato nyonso alobi: "Makambo ozali koloba na ngai, nayebi yango té." 71 Na sima akei na monoko ya lopango. Mosali mosusu ya mwasi amoni ye pe alobi na bato bazalaki wana: "Moto oyo azalaki ná Yezu ya Nazaret." 72 Piere awangani lisusu pe akati seleka, alobi: "Nayebi moto wana té!" 73 Na sima ya mwa tango moke bato bazalaki kuna bayei penepene ya Piere, pe balobi na ye: "Ya solo, yo ozali moto na bango. Elobeli na yo ezali kofunda yo!" 74 Bongo Piere azongisi: "Nzambe penza! Nayebi moto yango té! Soki nakosi, Nzambe ápesa ngai etumbu!" Kaka na tango wana soso eleli. 75 Bongo Piere akómi kokanisa maloba Yezu alobelaki ye: "Liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té." Piere abimi pe aleli mingi penza.

Matié 27

Bamemi Yezu na tribinal ya Pilate

'Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso ná bambuta-muntu ya ekolo basangani pe bayokani po na kobomisa Yezu. 2 Bakangisi ye minyololo, bakei kopesa ye na maboko ya Pilate, motambwisi ya région ya Yuda.

Liwa ya Yudas

3 Yudas, moto atekaki ye, tango amoni 'tè bakateli Yezu etuittbu ya liwa, ayoki pasi mingi na motema pe akei kozongisa bibende tuku misato ya mbongo wana na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na bambuta-muntu. 4 Alobi na bango: "Nasali mabe po nabomisi moto asali eloko té." Kasi bango bazongiseli ye: "Wana etali biso té! Etali yo moko!" 5 Bongo Yudas abwaki mbongo yango na Ndako ya Nzambe pe atiki bango; na sima akei komitia singa na kingo. 6 Bakonzi ya banganga-Nzambe balokoti mbongo wana pe balobi: "Mibeko na biso epekisá kotia mbongo ya ndenge oyo na sanduku ya Ndako ya Nzambe, po ezali mbongo batangiseli makila ya moto." 7 Tango basilisi koyokana, basombi na yango elanga po na kokundelaka bapaya. Ezalaki elanga ya moto moko asalaka banzungu ya mabelé. 8 Yango wana tii lelo bábengaka elanga yango "Elanga ya Makila". "Esalamaki bongo ndenge profete Jeremya alobaká: "Bakamati bibende tuku misato ya mbongo, yango ezali talo oyo bato ya Israel bakataki po na ye; 10 bongo basombi na yango elanga ya moto asalaka banzungu ya mabelé, ndenge Nkolo atindaki ngai."

Pilate atuni Yezu

11 Yezu atelemi liboso ya Pilate. Pilate atuni ye: "Yo ozali mokonzi ya Bayuda?" Yezu azongisi: "Ee, ezali penza ngai." 12 Tango bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu bazalaki kofunda ye, Yezu azongisaki ata liloba té. 13 Bongo Pilate atuni ye: "Ozali koyoka té ebele ya makambo bazali kofundela yo?" 14 Kasi Yezu azongisi ata liloba moko té. Yango wana Pilate akamwe mingi penza.

Pilate akateli Yezu etumbu ya liwa

15 Mbula na mbula na feti ya Pake, Pilate amesenaki kobimisa moto moko ya boloko oyo bato bazalaki kosenga. 16 Na tango wana ezalaki na moto moko ya boloko ayebanaki mingi, kombo na ye Yezu Barabas. 17 Pilate atuni bato oyo basanganaki wana: "Bolingi nátikela bino nani? Yezu Barabas to Yezu oyo bábengaka Mesia?" 18 Pamba té ayebaki malamu 'tè bango bapesaki Yezu na maboko na ye po na likunya. 19 Tango Pilate afandaki na tribinal, mwasi na ye atindeli ye maloba oyo: "Kokota na makambo ya moto wana té. Asali eloko té. Lelo na butu namonaki pasi mingi na ndoto po na ye." 20 Nzokande bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu bapesi bato mayele po básenga na Pilate átika Barabas pe ábomisa Yezu. 21 Pilate atuni bango lisusu: "Na kati ya bato oyo mibale, bolingi nátikela bino nani?" Bango bazongisi: "Barabas!" 22 Bongo Pilate atuni: "Kasi násala nini na Yezu oyo bábengaka Mesia?" Bazongisi: "Borna ye na kuruze!" "Pilate atuni: "Mabe nini ye asali?" Kasi bango babandi koganga makasi penza: "Boma ye na kuruze!" 24 Tango Pilate amoni 'tè akoki lisusu kosala eloko té, pe bato balingi kotomboka, akamati mai, asukoli maboko liboso ya bato, pe alobi: "Likambo ya makila ya moto oyo etali ngai té. Etali kaka bino moko." 25 Bato nyonso bazongisi: "Likambo té! Makila na ye ézala ngambo na biso pe ya bana na biso!" 26 Bongo Pilate atikeli bango Barabas; abetisi Yezu fimbu pe apesi ye na . maboko na bango po bákende koboma ye na kuruze.

Basoda baseki Yezu

27 Basoda bamemi Yezu na lopango ya Pilate, pe babengisi batayon na bango mobimba, baya kotala ye. 28 Balongoli ye bilamba pe balatisi ye kazaka moko ya motane. 29 Na sima batii ye na motú ekoti moko lokola ya bakonzi, kasi batóngaki yango na nzube. Batii pe nzete na liboko na ye ya mobali, pe babandi kofukamela ye. Baseki ye, balobi: "Mbote, mokonzi ya Bayuda!" 30 Babwakeli ye soi, bakamati nzete wana, pe babetibeti ye na motú. 31 Tango basilisi koseka ye, balongoli ye kazaka pe balatisi ye bilamba na ye, bongo bamemi ye po bákende koboma ye na kuruze.

Batii Yezu na kuruze

32 Tango babimi, bakutani ná moto moko ya mboka Sirène, kombo na ye Simon, pe batindi ye na makasi ámema kuruze ya Yezu. 33 Bakomi na esika moko bábengaka Golgota, elingi koloba "Mokuwa ya Motú". 34 Kuna bapesi Yezu vinu basangisá ná kisi ya bololo penza; Yezu ameki yango, kasi aboyi komela. 35 Awa basilisi kotia ye na kuruze, bakaboli bilamba na ye, babeteli yango zeke. 36 Na sima bafandi wana po na kokengela ye. 37 Na likolo ya motú na ye batiaki mwa-libaya bakómá tina bakatelaki ye etumbu: "Oyo Yezu, mokonzi ya Bayuda." 38 Batiaki pe miyibi mibale na ba-kuruze penepene ya Yezu, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi. 39 Bato oyo bazalaki koleka kuna baningisi mitú pe babandi kotsiola pe kofinga ye, 40 balobi: "Yo moto olingaki koboma Ndako ya Nzambe pe kotónga mosusu na mikolo misato! Soki ozali Mwana ya Nzambe, ómibikisa yo moko, pe kita na kuruze." 41 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bazalaki kosala kaka ndenge wana, babandi koseka pe koloba: 42 " Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa té! Azali mokonzi ya Israel té? Akita sik'oyo na kuruze, bongo tokondima ye! 43 Azalaki kotia motema na Nzambe, e bongo soki Nzambe alingaka ye, ábikisa ye sik'oyo; pamba té alobaki: 'Nazali Mwana ya Nzambe.' " 44 Bamiyibi oyo batiaki na kuruze esika moko ná Yezu bafingaki ye kaka ndenge moko.

Liwa ya Yezu

45 Na midi, molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa. 46 Penepene na ngonga ya misato, Yezu agangi na mongongo makasi penza: "Eli, Eli, lema sabaktani?" Elingi koloba: "Nzambe na ngai! Nzambe na ngai! Po na nini otiki ngai?" 47 Bato mosusu oyo batelemaki wana bayoki ye pe balobi: "Azali kobenga Eliya!" 48 Moko na bango akei mbangu kokamata linuka, atondisi yango ná mai ya ngayi. Akangisi yango na songe ya nzete po na komelisa Yezu. 49 Kasi bamosusu balobi: "Zela tótala soki Eliya akoya kobikisa ye!" 50 Bongo Yezu agangi lisusu makasi penza, pe akati motema. 51 Kaka na tango wana ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na biteni mibale, banda na likolo tii na se. Mabelé eningani, mabanga epasuki, 52 basimetiere efungwani, pe bato mingi ya Nzambe oyo bakufaká basekwi; 53 babimi na basimetiere, pe na sima ya kosekwa ya Yezu bakoti na Yeruzalem. Kuna bato mingi bamonaki bango. 54 Basoda oyo bazalaki kokengela Yezu, ná komandan na bango, tango bamoni mabelé eningani pe makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bayoki somo mingi pe balobi: "Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe!" 55 Basi mingi batelemaki kuna pe bazalaki kotala na mosika; bango bazalaki kolanda Yezu kobanda na Galilé po na kosalela ye. 56 Maria ya Magdala azalaki na kati na bango ná ndoi na ye Maria mama ya Jake ná Jozef, pe ná mama ya Jake ná Yoane, bana ya Zebedé.

Bakundi Yezu

57 Tango pokwa ekómi, moto moko ya mbongo mingi ayei, kombo na ye Jozef; autaki na mboka Arimaté. Ye pe azalaki moyekoli ya Yezu. 58 Akei epai ya Pilate po na kosenga ebembe ya Yezu. Pilate atindi bápesa ye yango. 59 Bongo Jozef akamati ebembe, alingi yango na elamba ya sika, 60 pe atii yango na libulu oyo asalisaki na kati ya mabanga; ezalaki simetiere oyo abongisaki po na ye moko. Na sima apusi libanga moko ya monene po na kokanga monoko ya libulu, pe azongi na ye. 61 Maria ya mboka Magdala ná ndoi na ye bafandaki kuna liboso ya simetiere.

Bakengeli simetiere ya Yezu

62 Sima ya mokolo moko, ezalaki Mokolo ya Kopema, bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bakei epai ya Pilate. 63 Balobi na ye: "Mokonzi, tozali kokanisa makambo moto ya lokuta wana alobaki tango azalaki nanu na bomoi. Ye alobaki: 'Nakosekwa na mikolo misato.' 64 Ebongi ótinda bákengela simetiere mikolo misato; soki té bayekoli na ye bakoya koyiba ebembe, bongo na sima bakoloba na bato: 'Asekwi'. Lokuta wana ekoleka oyo ya liboso na mabe." 65 Pilate azongiseli bango: "Bókamata basoda. Bókende kokengela simetiere na ndenge ekoki." 66 Bongo bakei, batii elembo na libanga bazipelaki libulu, po na kokanga yango libela, pe batiki basoda po na kokengela yango.

Matié 28

Yezu asekwi

1 Mokolo ya Kopema esili, Maria ya Magdala ná ndoi na ye mama na Jake ná Jozef, bakei kotala simetiere. 2 Na mbala moko mabelé ebandi koningana makasi. Anjelu ya Nkolo auti na Likolo ayei kolongola libanga pe afandi likolo na yango. 3 Elongi na ye ezalaki kongenga lokola moi, pe bilamba na ye ezalaki pembe penza. 4 Basoda bayoki somo pe babandi kolenga; bakomi lokola bato bakufi. 5 Anjelu alobi na basi: "Bóbanga té, nayebi 'tè bozali koluka Yezu oyo babomaki na kuruze. 6 Azali awa té! Asi'asekwi ndenge alobaki. Bóya kotala esika nzoto na ye ezalaki. 7 Bókende noki koyebisa bayekoli na ye 'tè: 'Asi'asekwi, pe sik'oyo akei liboso na bino na Galilé; bokomona ye kuna.' Wana ezali sango nayeeli bino." 8 Batiki simetiere noki, bazalaki kobanga mingi, kasi mitema na bango etondaki na esengo; pe bakei mbangu po na koyebisa sango yango na bayekoli ya Yezu. 9 Na mbala moko Yezu ayei liboso na bango pe alobi: "Mbote na bino!" Bango bapusani penepene na ye, bafukami pe basimbi makolo na ye. 10 Bongo Yezu alobi na bango: "Bóbanga té; bókende koloba na bandeko na ngai bákende na Galilé: bakomona ngai kuna."

Basoda bamemi sango epai ya bakonzi

11 Tango basi bazalaki kokende, basoda mosusu oyo bazalaki kokengela simetiere bazongi na mboka, po báyebisa na bakonzi ya banganga-Nzambe makambo nyonso oyo elekaki. 12 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu basangani pe bayokani, bongo bapesi basoda mbongo mingi; 13 pe balobi na bango: "Bóloba boye: bayekoli na ye bayei koyiba ebembe na ye na butu, tango biso tozalaki na pongi. 14 Soki Pilate ayoki likambo wana, tokokitisa ye motema; bóbanga eloko té." 15 Basoda bazwi mbongo, pe basali ndenge balobelaki bango. Yango wana lisolo oyo epanzaná na Bayuda tii na moi ya lelo.

Yezu abimeli bayekoli na ye

16 Bayekoli zomi na moko bakei na Galilé na ngomba oyo Yezu alobaki 'tè akokutana ná bango. 17 Tango bamoni ye, bafukameli ye. Kasi bamosusu na kati na bango bazalaki kaka kotia tembe. 18 Yezu ayei penepene na bango pe alobi: "Nzambe apesi ngai bokonzi nyonso na Likolo pe na se. 19 Bongo bókende epai ya bato ya bikolo nyonso, pe bókómisa bango bayekoli na ngai; bóbatisa bango na kombo ya Tata pe ya Mwana pe ya Molimo Mosantu. 20 Bólakisa bango bátosaka mitindo nyonso napesaki bino. Bóyeba 'tè nazali na bino mikolo nyonso tii na suka ya mokili."

Marko 1

Mateya ya Yoane Mobatisi

1 Oyo ezali Sango Malamu ya Yezu Kristo, Mwana ya Nzambe. 2 Yango ebandaki ndenge profete Ezaya akómaká: "Nzambe alobi: 'Nakotinda ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.' 3 Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: 'Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela; bósalela ye nzela moko ya kitoko!' " 4 Nyonso wana esalamaki, tango Yoane Mobatisi abandaki kosakola na esobe; azalaki koloba boye: "Bóbongola mitema na bino; bóya nábatisa bmo, bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino." 5 Bato nyonso ya région ya Yuda pe ya Yeruzalem bazalaki kokende epai na ye; bazalaki kondima na miso ya bato 'tè basali masumu, pe Yoane azalaki kobatisa bango na mai ya Yordan. 6 Yoane azalaki kolata elamba basala na bapwale ya shamó, pe mokaba ya poso ya nyama na loketo; azalaki kolia kaka makonko ná mafuta ya nzoi. 7 Azalaki kosakola boye: "Moto oyo akoya sima na ngai aleki ngai na nguya; nakoka kutu té kogu-mbama na makolo na ye pe kofungola basinga ya sapatu na ye. 8 Ngai nazalaki kobatisa bino na mai pamba; kasi ye akobatisa bino na Molimo Mosantu."

Yoane abatisi Yezu pe Satan ameki ye

9 Na mikolo wana, Yezu auti na Galilé na mboka Nazaret, pe Yoane abatisi ye na mai ya Yordan. 10 Tango Yezu abimi na mai, amoni Likolo efungwani pe Molimo akiteli ye lokola pijon. 11 Bongo ayoki mongongo moko euti na Likolo, elobi: "Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na yo mingi." 12 Kaka na tango wana Molimo amemi ye na esobe; 13 afandaki na esika ya banyama ya zamba. Kuna Satan ameki ye mikolo tuku minei mobimba; pe ba-anjelu bazalaki kosalela ye.

Yezu abengi bayekoli minei

14 Tango bakangi Yoane na boloko, Yezu akei na Galilé pe abandi kosakola Sango Malamu ya Nzambe, 15 azalaki koloba boye: "Tango esi'ekoki; Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo. Bóbongola mitema pe bóndima Sango Malamu!" 16 Mokolo moko Yezu azalaki koleka penepene ya lak ya Galilé, amoni baluki-mbisi mibale, Simon ná leki na ye André, bazalaki kobwaka monyama na mai. 17 Alobi na bango: "Bólanda ngai. Bokozala lisusu baluki-mbisi té; nakokómisa bino baluki ya bato." 18 Na mbala moko, batiki minyama na bango pe balandi Yezu. 19 Yezu apusani moke pe amoni Jake ná ndeko na ye Yoane, bana ya Zebedé. Bazalaki kobongisa minyama na kati ya bwatu na bango. 20 Yezu abengi bango; bongo batiki tata na bango Zebedé ná bato ya mosala na kati ya bwatu pe balandi Yezu.

Yezu abimisi molimo mabe

21 Yezu ná bayekoli na ye bakendeki na Kafarnaum. Na Mokolo ya Kopema, Yezu akoti na ndako ya losambo pe abandi koteya. 22 Bato bakamwaki mingi na ndenge azalaki koteya; pamba té azalaki koteya bango lokola balakisi-Mibeko té, kasi lokola moto azali na bokonzi. 23 Kaka na tango wana, moto moko ya molimo mabe ayei kokota na ndako ya losambo pe abandi koganga: 24 "Yezu ya Nazaret, biso ná yo likambo nini? Oyei po na koboma biso? Nayebi yo malamu! Ozali Mosantu oyo Nzambe atindi!" 25 Yezu agangeli molimo wana, alobi: "Fanda nyee! Bima na nzoto ya moto oyo!" 26 Molimo yango eningisi moto wana mabe penza, egangi na mongongo makasi pe ebimi. 27 Bato nyonso bakamwe mingi penza, pe babandi kotunana: "Likambo nini wana? Moto oyo azali kopesa mateya ya sika lokola nde azali na bokonzi. Azali kutu kotinda milimo mabe, pe yango ezali kotosa ye!" 28 Yango wana sango ya Yezu epanzanaki bipai nyonso na Galilé mobimba.

Yezu abikisi bato ebele

29 Na tango wana, balongwe na ndako ya losambo pe bakei na ndako ya Simon ná André nzela moko ná Jake pe Yoane. 30 Tango Yezu akómi, bayebisi ye 'tè mama ya mwasi ya Simon alali na mbeto, azali na fièvre. 31 Apusani penepene na ye, asimbi ye na liboko pe atelemisi ye. Fièvre esili, pe abandi kosalela bango. 32 Na pokwa, tango moi esi'ekiti, bamemeli Yezu bato nyonso ya maladi pe ya milimo mabe. 33 Bato nyonso ya mboka bayei kosangana liboso ya ndako. 34 Yezu abikisi bato ebele bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge, pe abimisi milimo mabe mingi. Apekisi yango éloba té, pamba té milimo mabe eyebalri ye.

Yezu atamboli na Galilé mobimba

35 Na tongo-tongo, liboso 'tè moi ébima, Yezu alongwe na Kafarnaum pe akei kofanda ye moko na esobe; kuna abandi kosambela. 36 Simon ná baninga mosusu bakei koluka ye. 37 Tango bamoni ye, balobi: "Bato nyonso bazali koluka yo." 38 Kasi Yezu alobi na bango: "Tókende epai mosusu na mboka ya pembeni. Nasengeli pe koteya kuna. Pamba té, nayei kaka po na yango." 39 Bongo atamboli Galilé mobimba, azalaki koteya bato na bandako ya losambo, pe kobimisa milimo mabe.

Yezu abikisi moto ya maladi ya maba

40 Mokolo mosusu moto moko ya maba ayei, afukameli Yezu pe abondeli ye boye: "Soki olingi, okoki kobikisa ngai." 41 Yezu ayokeli ye mawa; atandi liboko, asimbi ye pe alobi: "Nalingi yango, bika!" 42 Kaka na tango wana maba esili pe abiki. 43 Yezu atindi ye noki na makasi 'tè ákende na mboka. 44 Alobi: "Yoka malamu! Koyebisa moto moko té, kasi kende kolakisa nganga-Nzambe ndenge okómi, pe pesa mabonza ndenge Moize atindá po na moto oyo abiki na maladi ya maba; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo." 45 Kasi ata bongo, moto wana akei koyebisa bipai nyonso ndenge abikaki. Yango wana Yezu akokaki komimonisa lisusu na mboka té, kasi atikalaki na bisika ya esobe. Bongo bato bautaki bipai nyonso bayei epai na ye.

Marko 2

Yezu abikisi moto akufá makolo

1 Sima ya mwa mikolo, Yezu azongi na Kafarnaum, pe bato bayoki 'tè azali na ndako. 2 Bato mingi basanganaki kuna, bongo esika moko té etikalaki, ata na libanda liboso ya porte; pe Yezu azalaki koteya bango maloba ya Nzambe. 3 Na tango wana bato minei bayei, bamemi moto moko akufá makolo. 4 Kasi bakokaki kolakisa ye na Yezu té po na kaká ya bato. Bongo bamati likolo ya ndako, batoboli lidusu esika Yezu azalaki, bakitisi moto akufá makolo kaka ndenge alalaki na etoko na ye. 5 Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto akufá makolo: "Mwana na ngai, nalimbisi masumu na yo." 6 Balakisi-Mibeko mosusu bazalaki kofanda wana, bamituni na se ya mitema: 7 "Ndenge nini moto oyo azali kotsiola Nzambe boye? Nani moto akoki kolimbisa masumu? Kaka Nzambe té?" 8 Yezu asi'ayebaki makanisi na bango, pe atuni: "Po na nini bozali kokanisa ndenge wana? 9 Soki nalobi na moto akufá makolo: 'Nalimbisi masumu na yo', to pe nalobi: 'Telema, kamata etoko na yo pe tambola', nini eleki pasi? 10 Kasi nalingi bóyeba 'tè ngai Mwana ya Moto nazali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili." Bongo alobi na moto akufá makolo: 11 "Nalobi na yo: Telema, kamata etoko na yo pe zonga na ndako." 12 Na mbala moko moto akufá makolo atelemi na miso ya bato nyonso, akamati etoko na ye pe akei. Bango nyonso bakamwe mingi, bapesi Nzambe mersi pe balobi: "Nanu tomoná likambo ya boye té!"

Yezu abengi Levi

13 Yezu akei lisusu kotambola pembeni ya lak ya Galilé. Bato mingi bayei epai na ye, pe azalaki koteya bango. 14 Na tango azalaki koleka, amoni Levi, mwana ya Alfé, afandi na biro oyo bafutaka mpaku. Yezu alobi na ye: "Landa ngai!" Levi atelemi pe alandi ye. 15 Na sima Yezu azalaki kolia na ndako ya Levi. Bafutisi-mpaku ná bato ya masumu ebele bazalaki na mesa ná Yezu pe bayekoli na ye; pamba té bato mingi ya ndenge wana bazalaki kolanda ye. 16 Balakisi-Mibeko oyo bazalaki na lingomba ya ba-Farizé, tango bamoni 'tè Yezu azali kolia esika moko ná bato ya masumu pe bafutisi-mpaku, batuni bayekoli na ye: "Po na nini azali kolia esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?" 17 Yezu ayoki yango pe alobi na bango: "Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té; kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga. Pamba té nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi nayaki kobenga bato ya masumu."

Yezu ayeeli bato makambo ya sika

18 Mokolo mosusu bayekoli ya Yoane Mobatisi ná ba-Farizé bazalaki komilalisa nzala. Bongo bato bayei kotuna Yezu: "Po na nini bayekoli ya Yoane ná ya ba-Farizé bazali komilalisa nzala, kasi bayekoli na yo basalaka bongo té?" 19 Yezu azongiseli bango: "Soki moto abaÛ mwasi pe abengisi baninga na feti ya libala, bakoki komilalisa nzala? Té! Lokola mobali azali esika moko ná bango, bakoki komilalisa nzala té! 20 Kasi mokolo ezali, bako-longola mobali na kati na bango; bongo mokolo wana baninga na ye bakobanda komilalisa nzala. 21 "Moto moko té akamataka kitendi ya sika po ábamba na elamba ya kala; soki asali bongo, kitendi yango ekopasola elamba, pe lidusu ekokóma monene koleka oyo ya liboso. 22 Moto moko té atiaka vinu ya sika na basaki ya kala. Soki asali boye, vinu ekopasola saki, bongo vinu ná saki ekobeba nyonso mibale. Batiaka vinu ya sika na saki ya sika."

Yezu azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema

23 Na Mokolo moko ya Kopema, Yezu azalaki koleka na bilanga ya blé. Na nzela, bayekoli na ye babandi kobuka bambuma ya blé. 24 Ba-Farizé balobi na Yezu: "Tala nanu! po na nini bayekoli na yo bazali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema?" 25 Yezu azongiseli bango: "Botangá nanu té makambo David asalaka, tango ye ná bato na ye bayokaki nzala pe bazangaki biloko ya kolia? 26 Na eleko ya nganga-Nzambe monene Abiatar, David akotaki na Ndako ya bosantu, pe balei mapa oyo batielaki Nzambe. Nzokande kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia mapa wana. Kasi David akamataki yango pe apesi na bato na ye." "Bongo Yezu asukisi boye: "Nzambe asalá Mokolo ya Kopema po na bato; kasi asalá bato po na Mokolo ya Kopema té. 28 Yango wana bóyeba 'tè ngai Mwana ya moto nazali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema."

Marko 3

Yezu abikisi moto akufá liboko

31 Mokolo moko Yezu akoti lisusu na ndako ya losambo. Moto moko azalaki kuna, liboko na ye ekufá. 2 Bato oyo bazalaki wana batali Yezu na mayele, soki akobikisa moto yango na Mokolo ya Kopema, po bazwa nzela ya kofunda ye. 3 Yezu alobi na moto oyo azalaki na liboko ekufa: "Telema awa na miso ya bato nyonso." 4 Pe atuni bato: "Na Mokolo ya Kopema, mibeko na biso epesaka nzela ya kosala malamu to té? Tokoki kobikisa moto oyo azali na pasi to té?" Kasi bango bafandi nyee. 5 Yezu atali bango na kanda. Azalaki na mawa penza po bazalaki komona pasi ya moto ya maladi pamba. Alobi na moto wana: "Tanda liboko!" Atandi yango, pe liboko na ye ekómi malamu. 6 Ba-Farizé babimi na ndako ya losambo, bakei kosala likita ná bato ya Erode, po na koluka nzela ya koboma Yezu.

Bato mingi bayei epai ya Yezu

7 Yezu alongwe wana, pe akei epai ya lak ya Galilé ná bayekoli na ye. Bato ebele ya Galilé balandaki ye. Bato mosusu bauti na région ya Yuda, 8 na Yeruzalem, na Idumé, na ngambo ya Yordan pe na bapembeni ya Tir ná Sidon. Bato mingi penza bayei epai ya Yezu, po bayokaki sango ya misala na ye nyonso. 'Atindi bayekoli 'tè bábongisela ye bwatu moko po bato báfina ye té. 10 Pamba té, abikisaki bato mingi; yango wana bato nyonso ya pasi bazalaki kowela po básimba ye. 11 Tango bato ya milimo mabe bazalaki komona ye, bazalaki kokweya na makolo na ye pe koganga: "Yo ozali Mwana ya Nzambe!" 12 Kasi Yezu apekisi bango makasi 'tè bápanza sango na ye té.

Yezu aponi bantoma zomi na mibale

13 Na sima Yezu amati likolo ya ngomba moko, abengi bato oyo ye moko alingi, pe bango bakei epai na ye. 14 Aponi bato zomi na mibale, pe alobi na bango: "Naponi bino po bózalaka ná ngai. Nakotinda bino bipai na bipai, bókende kosakola Sango Malamu; 15 pe nakopesa bino bokonzi ya kobengana milimo mabe." 16 Bato zomi na mibale oyo aponaki, bang'oyo: Simon (Yezu apesaki ye kombo Piere), 17 Jake ná leki na ye Yoane, bana ya Zebedé (Yezu apesaki bango kombo Boanerges, elakisi "Bato bakokani na kake"), 18 André, Filipe, Bartelemi, Matié, Toma, Jake mwana ya Alfé, Tadé, Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda, "pe Yudas Iskariot oyo atekaki Yezu.

Yezu ná bandeko na ye

20 Tango Yezu azongaki na ndako, bato ebele bayei lisusu kosangana, bongo ye ná bayekoli na ye bazwi ata tango ya kolia té. 21 Awa bandeko na ye bayoki likambo wana, bayei po na kokamata ye, pamba té bazalaki koloba: "Azali komiyeba lisusu té."

Bafundi Yezu 'tè azali na molimo mabe

22 Balakisi-Mibeko oyo bautaki na Yeruzalem balobi na bato: "Satan, mokonzi ya milimo mabe, akoteli ye! Ezali ye moto apesi ye nguya ya kobengana milimo mabe!" "Bongo Yezu abengi bango pe atuni bango: "Ndenge nini Satan akoki kobengana moto na ye?" Pe apesi bango ndakisa: 24 "Soki bato ya mboka moko bakábwani, mboka wana ekoki kozala malamu té. 25 Soki bato ya libota moko bakábwani, libota wana ekotikala malamu té. 26 Bongo soki Satan azali kobunda ná bato na ye, to soki bato na ye bakábwani, makasi na ye ekosila, ekoumela té. 27 "Moto oyo alingi kokota na ndako ya elombe po na koyiba biloko na ye, asengeli liboso kokanga elombe wana na singa; na sima akoki koyiba biloko na ye nyonso. 28 "Nazali koloba na bino, ya solo: Bato nyonso oyo basali masumu pe batsioli Nzambe ata ndenge nini, bakoki kozwa bolimbisi. 29 Kasi oyo atsioli Molimo Mosantu, akoki kozwa bolimbisi ata moke té, po asali lisumu ya seko." 30 Yezu akebisaki bango boye po bango balobaki: "Molimo mabe ekoteli ye!"

Mama na Yezu ná bandeko na ye

31 Mokolo moko mama na Yezu ayei ná bandeko na ye. Batikalaki na libanda pe batindi moto moko po ábenga ye. 32 Bato oyo bafandi penepene ya Yezu, balobi na ye: "Mama na yo ná bandeko na yo bazali koluka yo na libanda." 33 Yezu azongiseli bango: "Mama na ngai nani? Pe bandeko na ngai banani?" 34 Na sima atali baoyo bafandi pembeni na ye pe alobi: "Tala, mama na ngai ná bandeko na ngai bang'oyo! 35 Pamba té, moto oyo asalaka makambo Nzambe alingaka, ye nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi, pe mama na ngai."

Marko 4

Lisapo ya mokoni-bilanga

4 'Yezu abandi koteya bato pembeni ya lak ya Galilé. Bato mingi penza bayei kosangana epai na ye. Bongo akoti na bwatu pe afandi. Bwatu yango ezalaki na mai, pe bato nyonso bazalaki na libongo. 2 Azalaki koteya bango makambo ndenge na ndenge na masapo, alobi: 3 "Bóyoka! Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye. 4 Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela, pe bandeke eyei kolia yango. 5 Mbuma mosusu ekwei na esika ya mabanga. Kuna mabelé ezalaki mingi té, yango wana eboti noki-noki. 6 Tango moi ekómi makasi, eziki pe ekauki, po misisa ezalaki mikuse. 7 Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende wana ekoli pe ebomi matiti ya malamu, bongo ^ango eboti mbuma té. 8 Kasi mbuma mosusu ekwei na mabele ya malamu, ebimi, ekoli pe eboti; mosusu eboti bambuma tuku misato, mosusu tuku motoba, pe mosusu kama." 9 Pe Yezu abakisi: "Moto oyo azali na matoi, áyoka!"

Po na nini Yezu azalaki koloba na masapo

10 Tango Yezu ná bayekoli na ye bazalaki bango moko, baoyo bazalaki pembeni na ye ná bantoma zomi na mibale oyo aponaki, basengi ye álimbola lisapo yango. 11 Ye azongiseli bango: "Nzambe azali kolakisa bino sekele na ye ndenge akotia bokonzi na ye na mokili; kasi bato mosusu bazali koyoka makambo nyonso lokola masapo pamba; 12 boye, 'Ata batali malamu, bakomona eloko té; ata batii matoi, bakoyeba eloko té. Soki té balingaki kobongola mitema, pe Nzambe alingaki kolimbisa bango.' "

Yezu alimboli lisapo ya mokoni-bilanga

13 Sima Yezu alobi na bango: "Boyebi tina ya lisapo wana té? Bongo ndenge nini bokoyeba tina ya masapo nyonso mosusu? 14 Moto oyo akei kokona mbuma, akokani ná moto azali kopanza maloba ya Nzambe. 15 Bato mosusu bakokani ná nzela: Sango Malamu ekweeli bango lokola mbuma ekwei na nzela: soki bayoki yango, Satan ayei kolongola yango na mitema na bango. 16 Bamosusu bakokani ná mbuma ekwei na mabelé oyo etondá na mabanga: Tango bayoki maloba, bandimi yango noki na esengo. 17 Kasi misisa ekoli té na mitema na bango; bandimi kaka po na mwa tango moke. Soki bamoni pasi to minyokoli po na maloba ya Nzambe, batiki bondimi na bango noki. 18 Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na kati ya basende: Bayoki maloba ya Nzambe, 19 kasi pasi ya mokili, bisengo ya bomengo oyo ezali kokosa bato, ná makanisi mosusu ya ndenge na ndenge enyati maloba yango, bongo eboti té. 20 Kasi bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu: Bayoki maloba ya Nzambe, bandimi yango pe baboti mbuma malamu, mosusu tuku misato, mosusu tuku motoba, mosusu kama."

Lisapo ya mwinda

21 Yezu alobi na bango: "Soki moto ayei na mwinda, batiaka yango na se ya katini té to na se ya mbeto, kasi batiaka yango likolo ya mesa. Ezali boye té? 22 Se ndenge wana makambo ebombaná, ekomonana; pe sekele nyonso ekoyebana. 23 Moto oyo azali na matoi, áyoka." 24 Pe Yezu alobi na bango lisusu: "Bókeba na makambo nazali koyebisa bino. Ndenge bino bomipesaka na Nzambe,, kaka ndenge wana pe Nzambe akokabela bino bolamu na ye, kutu akotondisela bino yango. 25 Pamba té moto oyo azali na biloko mingi, akozwa mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa ndambo oyo azali na yango."

Lisapo ya mbuma ekoli yango moko

26 Yezu alobi lisusu: "Tala ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye. Ekozala lokola mbuma bakoni na elanga. 27 Moto oyo akoni yango alalaka na butu pe atambolaka na moi; ha tango wana mbuma ezali kobima pe kokola, kasi ye ayebi té ndenge nini. 28 Mabelé ebimisaka mbuma yango moko: liboso ebandaka na matiti ya mike-mike, sima mitú ya mobesu eyaka kobima, pe na suka mitú etondaka na bambuma. 29 Na tango mbuma eteli, bakamataka mbeli po na kolongola yango pamba té eleko ekoki."

Lisapo ya mbuma ya mutarde

30 Yezu alóbi lisusu: "Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye? 31 Bokonzi ya Nzambe ekokani ná mbuma oyo bábengaka 'mutarde'. Tango bakoni yango, ezali moke penza koleka bambuma nyonso ya mokili; 32 kasi soki basi'bakoni yango, ekolaka, ekómaka molai koleka ridunda nyonso, pe ebimisaka bitape minene esika bandeke ekoki kosala ba-zala na yango." 33 Bongo Yezu azalaki kobetela bato masapo mingi ya ndenge wana, po bákoka koyeba tina ya maloba ya Nzambe oyo azalaki koteya bango. 34 Azalaki koloba na bango bobele na masapo. Kasi soki akómi ye moko ná bayekoli na ye, azalaki kolimbolela bango makambo nyonso.

Yezu alembisi mopepe ná mbonge

35 Kaka na mokolo wana, na pokwa, Yezu alobi na bayekoli na ye: "Tókatisa ngambo ya lak." 36 Bongo batiki bato; pe lokola Yezu azalaki na bwatu, bamemi ye. Babwatu mosusu ezalaki pembeni na ye. 37 Mopepe moko ya makasi ebandi koleka, bambonge ebeti, bwatu ebandi kotonda na mai, pe elingi kodinda. 38 Yezu azalaki na suka ya bwatu, alali pongi, motú likolo ya kusé. Bayekoli balamusi ye pe balobi: "Moteyi, tolingi tókufa! Likambo ya boye omoni yango pamba?" 39 Yezu atelemi, agangeli mopepe pe alobi na mai: "Tika makelele! Fanda nyee!" Bongo mopepe esili pe kimia ezongi penza. 40 Na sima, Yezu alobi na bayekoli: "Po na nini bozali kobanga boye? Ndenge nini bozali kaka kotia mitema na Nzambe té?" 41 Kasi bazalaki na somo mingi penza pe babandi kolobana: "Moto oyo azali nani? Ata mopepe ná mai ezali kotosa ye!"

Marko 5

Yezu abikisi moto azali na milimo mabe

1 Bakomi na ngambo ya lak ya Galilé na mabelé ya Gerazá. 2 Awa Yezu abimi na bwatu, akutani ná moto moko auti na simetiere, azalaki na molimo mabe. 3-4 Moto yango azalaki kaka kofanda na simetiere; moto moko té akokaki kokanga ye, ata na minyololo. Pamba té mbala mingi bazalaki kokanga ye makolo na basinga ya bibende pe maboko na minyololo, kasi azalaki kokata minyololo ná basinga. 5 Mikolo nyonso, butu moi, azalaki kotelengana na simetiere pe na bangomba. Azalaki koganga makasi pe komizokisa na mabanga. 6 Awa amoni Yezu azali nanu mosika, akei mbangu epai na ye, afukameli ye, 7 pe agangi na mongongo makasi: "Yezu, Mwana ya Nzambe ya likolo, biso ná yo likambo nini? Nabondeli yo na kombo ya Nzambe: kopesa ngai etumbu té." 8 Alobi boye pamba té, Yezu alobaki na ye: "Molimo mabe, bima na moto oyo!" 9 Bongo Yezu atuni ye: "Kombo na yo nani?" Ye azongiseli Yezu: "Kombo na ngai 'Lisanga', pamba té tozali mingi!" 10 Pe abondeli ye alobi: "Kobengana biso na mabelé oyo té." 11 Bangulu ebele ezalaki kolia kuna pembeni ya ngomba. 12 Bongo milimo ebondeli Yezu boye: "Tinda biso tókende kokota na bangulu wana." 13 Yezu apesi yango nzela. Bongo milimo mabe ebimi na moto wana pe ekoti na bangulu. Bangulu nyonso, soki 2.000 , ekiti ngomba mbangu, ekei kokweya na kati ya lak pe edindi. 14 Bakengeli ya bangulu bakimi, pe bakei koyebisa sango na vile ya Gerazá pe na bamboka ya mike, bongo bato bayei kotala likambo yango. 15 Awa bakomi epai ya Yezu, bamoni moto oyo azalaki na milimo mabe afandi nyee, alati bilamba, azongeli makanisi ya bomoto. Bongo bato nyonso babandi kobanga. 16 Baoyo bamonaki makambo elekaki, bayebisi bango ndenge moto ya milimo mabe abikaki, pe ndenge esukelaki bangulu. 17 Yango wana bato nyonso basengi Yezu 'tè álongwa na mabelé na bango. 18 Tango Yezu akoti na bwatu, moto oyo azalaki na milimo mabe abondeli ye 'tè ákende nzela moko ná ye. 19 Kasi Yezu apesi ye nzela té; alobi na ye: "Zonga epai ya bandeko na yo, pe yebisa bango makambo minene oyo Nkolo asali po na yo, pe ndenge ayokeli yo mawa." 20 Bongo moto wana akei epai ya Bamboka-Zomi pe abandi kosakola makambo nyonso oyo Yezu asalaki po na ye. Pe bato nyonso bakamwe mingi.

Mwana ya mokonzi moko ya Bayuda Mwasi moko asimbi elamba ya Yezu

21 Yezu akatisi lisusu mai na bwatu. Awa akómi na ngambo, bato ebele bayei kosangana epai na ye na libongo. 22 Mokonzi moko ya ndako ya losambo ayei, kombo na ye Yair; mwana na ye ya mwasi azalaki kobunda na liwa. Tango amoni Yezu, afukameli ye, 23 pe abondeli ye mingi alobi: "Mwana na ngai alingi ákufa. Nasengi yo óya kotiela ye maboko po ábika." 24 Yezu akei nzela moko ná ye. Bato ebele bazalaki kolandalanda ye pe kofinafina ye bipai nyonso. 25 Mwasi moko azalaki na kati ya bato wana, azalaki kobela maladi ya kotanga makila, esali bambula zomi na mibale. 26 Amonaki pasi mingi po na kokende epai ya baminganga ebele, pe asilisaki mbongo na ye nyonso pamba; maladi ebandaki kosila té, kasi pasi ezalaki kaka kokóma makasi. 27 Ayokaki sango ya Yezu, bongo ayei komikotisa na kati ya bato sima na ye, pe asimbi elamba na ye. 28 Pamba té azalaki kokanisa: "Soki nasimbi ata elamba na ye, nakobika." 29 Na mbala moko, makila etiki kotanga pe ayei koyeba 'tè abiki. 30 Kaka na tango wana Yezu ayebaki 'tè nguya na ye esali mosala. Abaluki epai ya bato bazalaki kolandalanda ye pe atuni bango: "Nani asimbi elamba na ngai?" 31 Bayekoli bazongiseli ye: "Omoni 'tè bato ebele bazali kokangana na yo. Ndenge nini ozali kotuna : Nani asimbi ngai?" 32 Kasi Yezu atali epai na epai po ámona nani asalaki yango. 33 Mwasi wana abandi kobanga pe kolenga po ayebaki likambo ekweelaki ye. Bongo ayei kofukamela Yezu pe ayebisi ye makambo nyonso. 34 Yezu alobi na ye: "Mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo. Kende malamu, maladi na yo esili." 35 Awa Yezu azalaki koloba boye, bato bauti na ndako ya Yair bayei koyebisa ye: "Mwana na yo asi'akufi. Tina ya kotungisa lisusu Moteyi ezali té." 36 Kasi tango Yezu ayoki maloba wana, alobi na Yair: "Kobanga té. Tia kaka motema." 37 Apekisi bato mosusu 'tè bálanda ye té, bobele Piere, Jake ná ndeko na ye Yoane. 38 Tango bakomi na ndako ya Yair, Yezu amoni bato bazali kotia makelele, kolela pe koganga makasi. 39 Akoti pe alobi na bango: "Po na nini bozali kolela pe kotia makelele boye? Mwana akufi té, azali kaka kolala pongi." 40 Bango babandi koseka ye. Kasi abimisi bango nyonso; akamati bobele tata ná mama ya mwana pe bayekoli na ye misato, bongo akoti esika mwana azalaki. 41 Asimbi mwana na liboko pe alobi ná ye: "Talita kum", elingi koloba: "Mwana, lamuka." 42 Kaka na tango wana, mwana atelemi pe abandi kotambola. Azalaki na mbula zomi na mibale. Awa bamoni likambo yango, bakamwe mingi penza. 43 Kasi Yezu apekisi bango na makasi 'tè báyebisa yango na moto té. Na sima alobi na bango: "Bópesa mwana biloko ya kolia."

Marko 6

Bato ya Nazaret baboyi Yezu

6 1 Yezu alongwe na esika wana pe akei na mboka na ye penza, nzela moko ná bayekoli na ye. 2 Na Mokolo ya Kopema, abandi koteya na ndako ya losambo. Bato mingi bayoki ye pe bakamwe. Babandi kotunana: "Epai wapi azwili makambo oyo? Ndenge nini azwi mayele boye? Pe ndenge nini azali kosala makamwisi boye? 3 Ezali ye té, sharpantié, mwana ya Maria pe ndeko ya Jake, Jozé, Yuda ná Simon? Pe bandeko na ye ya basi bazalaká awa ná biso té?" Yango wana baboyaki kondimela ye. 4 Bongo Yezu alobi na bango: "Bandimaka profete bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye penza, pe epai ya bandeko na ye." 5 Yezu akokaki kosala makamwisi kuna té; bobele mwa ndambo ya bato ya maladi bayei, atieli bango maboko pe abikisi bango. 6 Kasi akamwe po bato ya Nazaret bazangaki bondimi.

Yezu atindi bayekoli zomi na mibale

Sima, Yezu akei koteya na bamboka nyonso ya pembeni. 7 Abengi bayekoli na ye zomi na mibale pe abandi kotinda bango mibale mibale. Apesi bango nguya ya kobengana milimo mabe. 8 Pe atindi bango boye: "Bómema eloko moko té po na mobembo, kaka nzete ya kotambola. Ezala bilei, saki to mbongo, bómema yango té. 9 Kasi bólata sapatu, ná shemize moko pamba, mibale té." 10 Alobi na bango lisusu: "Tango bokokóma na mboka moko, bófanda kaka na ndako oyo bakopesa bino, tii bokolongwa esika wana. 11 Pe soki bato ya mboka moko baboyi koyamba bino, to balingi koyokela bino té, bólongwa na mboka wana. Po na kolakisa bango 'tè basali mabe, bópupola makolo po bómema mabelé ya mboka yango epai mosusu té." 12 Bongo bayekoli bakei pe babandi koteya bato 'tè bábongola mitema. 13 Babimisi milimo mingi ya mabe, bapakoli mafuta na bato mingi ya maladi pe babikisi bango.

Liwa ya Yoane Mobatisi

14 Na tango wana, mokonzi Erode ayoki sango ya Yezu, pamba té kombo na ye ebandaki koyebana mingi. Bato mosusu bazalaki koloba: "Yoane Mobatisi asekwi! Yango wana azwi nguya ya kosala makamwisi boye." 15 Kasi bamosusu bazalaki koloba: " Ye azali Eliya"; to: "Azali profete, lokola baprofete ya kala." 16 Tango Erode ayoki yango, alobi: "Ezali Yoane Mobatisi oyo nakatisaki motú, ye moto asekwi!" 17 Pamba té Erode atindaki basoda na ye bákanga Yoane. Akangisaki ye basinga pe atiaki ye na boloko. Asalaki boye po na likambo ya Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe. Erode abalaki ye, 18 kasi Yoane apekisaki ye alobaki: "Mibeko ezali kopekisa 'tè okoki kobala mwasi ya ndeko na yo té." 19 Yango wana Erodiade abandaki kobombela ye kanda na motema pe alingaki koboma ye, kasi akokaki té. 20 Pamba té, Erode azalaki kobanga Yoane, po ayebaki 'tè azali moto malamu pe ya bosantu; yango wana abandaki kosala ye mabe moko té. Mateya ya Yoane ezalaki kosilisa ye mayele; kasi ata bongo asepelaki koyoka ye. 21 Nzokande mokolo ya feti ya mbotama ya Erode, Erodiade azwi tango malamu po na likambo oyo azalaki kokana. Erode abengisaki bakonzi ya mboka, bakonzi ya basoda ná bato minene ya région ya Galilé, po baya kolia epai na ye. 22 Tango bazalaki na mesa, mwana ya Erodiade ya mwasi akoti na ndako pe abandi kobina na miso ya Erode pe ya bato nyonso oyo ye abengisaki. Asepelisi bango mingi. Bongo Erode alobi na ye: "Senga ngai eloko nyonso oyo olingi, pe nakopesa yo yango." "Kutu akati seleka boye: "Nyonso oyo okosenga ngai, nakopesa yo; ézala ata ndambo ya mboka na ngai!" ^Elenge mwasi abimi moke pe atuni mama na ye: "Násenga nini?" Erodiade azongisi: "Senga motú ya Yoane Mobatisi." "Bongo ye azongi noki epai ya mokonzi Erode pe alobi: "Nasengi ópesa ngai sika sik'oyo motú ya Yoane Mobatisi na kati ya sani." 26 Mokonzi Erode ayoki mawa mingi penza. Kasi alingaki kopimela ye té, po akataki seleka na miso ya bato nyonso oyo bazalaki na mesa. 27 Bongo atindi soda moko noki po áyeela ye motú ya Yoane Mobatisi. Soda akei, akoti na boloko pe akati Yoane motú. 28 Atii yango na sani, ayei pe apesi na elenge mwasi; ye nde akei kopesa yango na mama na ye. 29 Tango bayekoli ya Yoane bayoki bongo, bakei kokamata ebembe na ye pe bakundi yango.

Yezu aleisi bato 5.000

30 Bantoma zomi na mibale basangani lisusu epai ya Yezu, pe bayebisi ye nyonso oyo basalaki pe bateyaki bato. 31 Yezu alobi na bango: "Bóya kaka bino moko, po tókende na esika moko ya kimia na esobe, pe bópema moke." Alobi boye pamba té, bato mingi penza bazalaki koya pe kokende; pe bantoma bazwi ata tango ya kolia té. 32 Bongo bakoti na bwatu pe bakei bango moko na esika ya kimia. 33 Kasi bato bamoni ndenge bakei, pe bato ebele bayei koyeba yango. Bongo bato mingi bauti na bamboka nyonso balandi na makolo, pe bakomi liboso epai Yezu alingaki kokende. 34 Awa Yezu abimi na bwatu, amoni bato ebele penza. Ayokeli bango mawa po bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobokoli. Pe abandi koteya bango makambo mingi. 35 Lokola tango elekaki penza, bayekoli bayei epai ya Yezu pe balobi na ye: "Esika oyo ezali esobe pamba, pe tango esi'eleki. 36 Yebisa bato oyo bákende na bamboka ya pembeni pe epai ya bato oyo basalaka bilanga, po básomba biloko ya kolia." 37 Yezu azongiseli bango: "Bino moko bópesa bango biloko ya kolia." Kasi bango batuni ye: "Ndenge nini tókende kosomba mapa penepene ya 2.000 po tópesa bango? Tokozwa mbongo wapi?" 38 Yezu atuni bango: "Bozali na mapa boni? Bókende nanu kotala." Bakei kotala, bazongi pe balobi na ye: "Tozali na mapa mitano pe bambisi mibale." 39 Bongo Yezu atindi bayekoli na ye bákabola bato nyonso milongo milongo, pe báfandisa bango na matiti ya esobe. 40 Bafandisi bango na milongo, mosusu ya kama moko, mosusu ya tuku mitano. 41 Yezu akamati mapa mitano wana pe bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi, akatikati mapa pe apesi yango na bayekoli po bákabola yango na bato. Asali se ndenge moko na bambisi wana mibale. 42 Bato nyonso balei pe batondi. 43 Balokoti biteni ya mapa pe ya bambisi oyo etikalaki; batondisi bitunga zomi na mibale. 44 Baoyo baliaki bazalaki mibali soki 5.000.

Yezu atamboli likolo ya mai

45 Sima na yango, Yezu atindi bayekoli na ye bákota na bwatu pe bákende kozela ye na ngambo, epai ya mboka Betsaida. Azongisi bato na bamboka na bango, 46 nzokande ye atikali kuna, bongo akei na ngomba moko po na kosambela. 47 Na pokwa, bwatu ezalaki na kati ya lak, pe Yezu azalaki ye moko na mokili. 48 Amoni 'tè bayekoli bazalaki kokoka kotambwisa bwatu na nkai té, po mopepe ezalaki kozongisa bango sima. Tango tongo elingaki kotana, Yezu abandi kotambola likolo ya mai, pe ayei epai na bango, alingi koleka bango. 49 Awa bamoni ye azali kotambola likolo ya mai, bakanisaki 'tè ezali elima, pe babandi koganga; 50 pamba té bango nyonso bamoni ye pe batondi na somo. Kasi Yezu alobi na bango: "Ezali ngai; bótika kobanga." 51 Apusani penepene, akoti na bwatu pe mopepe esili. Bayekoli bakamwe mingi penza koleka, 52 pamba té, tango Yezu asalaki likamwisi ya mapa bayebaki tina té; bazalaki kaka koyeba eloko moko té.

Yezu abikisi bato na Jenezaret

53 Awa bakatisi mai, bakomi na mabelé ya Jenezaret. Bakangi bwatu na bango na libongo. 54 Tango babimi na bwatu, mbala moko bato bayei koyeba Yezu, 55 bongo bakei mbangu kokamata bato ya maladi na mboka mobimba; batii bango na bitoko, pe bamemi bango na bisika oyo bayoki 'tè Yezu akómi. 56 Bipai nyonso Yezu azalaki koleka, ézala na bamboka ya minene to ya mike to pe na bapembeni na yango, bazalaki kotia bato ya maladi na balabala, pe kobondela Yezu 'tè ápesa bango nzela ya kosimba ata songe ya elamba na ye. Pe bato nyonso oyo bazalaki kosimba ye, babandaki kobika.

Marko 7

Po na mateya ya bokoko

1 Mokolo moko ba-Farizé ná mwa ndambo ya balakisi-Mibeko bautaki na Yeruzalem, bayei kosangana epai ya Yezu. 2 Bamoni bayekoli na ye mosusu bazali kolia maboko mbindo, elingi koloba 'tè basukoli yango na mai té, ndenge mibeko ya bokoko ezali kotinda. 3 Pamba té ba-Farizé ná Bayuda nyonso batosaka mateya ya bakoko: baliaka té soki basukoli maboko malamu penza té. 4 Tango bautaka na zando, baliaka eloko té soki nanu basukoli nzoto té. Bazali kotosa mibeko misusu mingi ya bokoko, ndakisa: ndenge ya kosukola bakopo, bilokú, banzungu ya bibende ná bambeto. 5 Yango wana ba-Farizé ná balakisi-Mibeko batuni Yezu: "Po na nini bayekoli na yo batosaka mibeko ya bokoko té? Tala, bazali kolia kutu maboko mbindo!" 6 Yezu azongiseli bango: "Bino bato ya lokuta! Profete Ezaya asakolaká maloba ya solo po na bino. Ekómamá boye: 'Nzambe alobi: Bato oyo bakumisaka ngai bobele na maloba, kasi na mitema bazali mosika na ngai. 7 Losambo na bango ezali na tina moko té, po balandaka bobele mateya oyo bato balakisá bango.' 8 Bino pe botiá mibeko ya Nzambe pembeni, pe botosaka mibeko oyo euti na bato." 9 Yezu abakisi lisusu: "Ya solo, bino bozali mayele! Bozali koboya mibeko ya Nzambe, po na kotosa oyo euti na bino moko. 10 Pamba té, Moize alobaká: 'Botosaka batata ná bamama na bino. Oyo abwakeli tata na ye to mama na ye lisumá, basengeli koboma ye.' 11 Kasi bino bolobaka: 'Moto akoki koloba na tata pe na mama: lisalisi oyo nalingaki kopesa bino, nabombi yango po na Nzambe.' 12 Soki alobi bongo, bozali kopekisa ye ásalisa tata ná mama té. 13 Kaka na ndenge wana bozali kokómisa maloba ya Nzambe eloko ya pamba, po na kotosa mibeko oyo euti na bino moko. Pe bosalaka makambo mingi ya motindo wana."

Makambo ebebisaka mitema ya bato

14 Sima Yezu abengi lisusu bato, alobi na bango: "Bino nyonso bóyoka ngai. Bóyeba 'tè: 15 Eloko ekoti na monoko ya moto, ekoki kobebisa motema na ye té. Kasi oyo ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye. 16 Moto oyo azali na matoi, áyoka! " 17 Tango Yezu atiki bato pe akoti na ndako, bayekoli na ye batuni ye tina ya maloba yango. 18 Bongo ye alobi na bango: "Bino pe bozali na mayele ya koyeba yango té? Boyebi té 'tè eloko ekoti na monoko ya moto ekoki kobebisa motema na ye té? "Pamba té yango ekotaka na motema té kasi na libumu; na sima ebimaka libanda." Na maloba wana, Yezu alakisi 'tè bato bakoki kolia biloko nyonso. 20 Pe alobi lisusu: "Makambo oyo ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye. 21-22 Pamba té makanisi nyonso ya kosala mabe eutaka na mitema ya bato; ndakisa: kindumba, moyibi, lokoso ya mbongo, mobulu, zuwa, lofundu, makambo ya bozoba, koboma bato, kotambola na basi to na mibali ya bato, kotomboka, kokosa pe kotónga bato. "Makambo nyonso wana ya mabe ebimaka na moto, yango nde ebebisaka motema na ye."

Mwasi moko ya mopaya andimeli Yezu

24 Yezu alongwe na esika yango, akei na mabelé oyo ezali pembeni ya vile ya Tir. Akoti na ndako moko, po alingaki té báyeba 'tè azali wana, kasi akokaki kobombama té. 252 6 Boye mwasi moko ya mboka wana ayoki sango ya Yezu, mwana na ye ya mwasi azalaki na molimo mabe. Bongo akei noki epai ya Yezu pe afukameli ye; abondeli ye ábimisa molimo mabe na mwana na ye. 27 Kasi Yezu alobi na ye: "Tika nanu bana bália liboso, pamba té ezali malamu té kobotola bilei ya bana po na kobwakela bambwa." 28 Mwasi azongiseli ye: "Ya solo, Mokonzi. Kasi bambwa eliaka biloko oyo bana bakweisaka na se ya mesa." 29 Bongo Yezu alobi na ye: "E mama, olobi penza malamu! Kende na boboto; molimo mabe ebimi na mwana na yo." 30 Tango mama yango azongi na ndako, akuti mwana alali na mbeto, molimo mabe esi'ebimaki na ye.

Yezu abikisi moto akufá matoi pe alobaká té

31 Bongo Yezu alongwe lisusu na mabelé ya Tir, aleki na vile ya Sidon, pe akatisi mabelé oyo bábengaka "Bamboka-Zomi", tii akómi na lak ya Galilé. 32 Bayeeli ye moto moko akufá matoi pe azalaki baba, babandi kobondela ye 'tè átiela ye maboko. 33 Yezu amemi ye mwa-mosika ya bato, atii ye misapi na matoi, abwakeli ye soi pe asimbi ye na lolemo. 34 Sima atali na likolo, abimisi mwa-pema moke, pe alobi na baba: "Efata" (elingi koloba: "Fungwana"). 35 Kaka na tango wana, matoi na ye efungwani; pe na mbala moko abandi koloba malamu penza. 36 Yezu apekisi bato báyebisa ata moto moko té. Kasi ata azalaki kopekisa bato ndenge nini, bazalaki kaka kopanza sango na ye koleka! 37 Babandaki kokamwa mingi penza, bazalaki koloba: "Nyonso oyo azali kosala ezali malamu! Azali koyokisa bato bakufa matoi, pe kolobisa ba-baba!"

Marko 8

Yezu aleisi bato 4.000

1 Na mikolo yango, bato bazalaki lisusu mingi penza. Kasi lokola bazalaki na biloko ya kolia té, Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi na bango: 2 "Nazali koyokela bato oyo mawa. Pamba té mikolo misato bafandi ná ngai, bazangi biloko ya kolia. 3 Soki natiki bango bázonga na nzala, bakolemba mingi na nzela, po bamosusu na kati na bango bauti mosika." 4 Bayekoli na ye bazongisi: "Awa na esobe, epai wapi tokoki kozwa biloko ya kopesa bango po bália pe bátonda?" 5 Yezu atuni bango: "Bozali na mapa boni?" Bazongisi: "Ezali sambo." 6 Bongo Yezu ayebisi bato nyonso báfanda na mabelé. Akamati mapa wana sambo, asambeli pe apesi Nzambe mersi. Akatikati yango, apesi na bayekoli po bákabola. Bayekoli pe bakaboli yango na bato nyonso. 7 Bazalaki lisusu na mwa-ndambo ya bambisi mike. Yezu apesi lisusu Nzambe mersi po na yango, pe apesi bayekoli po bákabola. 8 Bato balei pe batomdi; bayekoli balokoti bitunga sambo ya biteni ya biloko oyo etikalaki. 9 Bato bazalaki na esika wana soki 4 . 000 . Na sima Yezu ayebisi bango bázonga na bamboka na bango. 10 Kaka na tango wana akoti na bwatu ná bayekoli na ye, akatisi mai tii na mboka Dalmanuta.

Ba-Farizé basengi elembo

11 Bongo ba-Farizé bakomi epai ya Yezu pe babandi kotia tembe ná ye. Lokola bazalaki koluka komeka ye, basengi ye ásalela bango elembo moko oyo euti na Nzambe. 12 Yezu ayoki mawa po na yango pe alobi: "Po na nini bato ya tango oyo bazali kosenga elembo! Nalobi na bino ya solo, Nzambe akolakisa bato ya tango oyo ata elembo moko té." 13 Sima atiki bango pe akoti lisusu na bwatu po na kokatisa mai.

Mayele mokuse ya bayekoli

14 Bayekoli babosanaki kokamata biloko ya kolia; bazalaki na lipa moko kaka na bwatu. 15 Yezu alobi na bango: "Bókeba! Ba-Farizé ná bato ya Erode basalelaka kisi ya mabe po na kolamba mapa." 16 Bayekoli babandi kolobana: "Azali koloba boye po tozangi mapa!" "Nzokande Yezu ayebaki makanisi na bango, pe atuni bango: "Po na nini bokanisi 'tè nalobaki likolo ya mapa oyo tozangi? Nanu boyebi tina té? Nanu bozwi mayele té? Nanu bofungwani miso té? 18 Bozali na miso, kasi bomonaka té? Bozali na matoi, kasi boyokaka té? Bosi'bobosani makambo nasalaki? 19 Mokolo oyo nasalelaki mapa mitano po na koleisa bato 5.000 , bitunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki?" Bango bazongiseli ye: "Zomi na mibale." 20 Yezu atuni lisusu: "Mokolo oyo nasalelaki mapa sambo po na koleisa bato 4.000 , bitunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki?" Pe bango bazongiseli ye: "Bitunga sambo." 21 Bongo Yezu alobi na bango: "Nanu bozwi mayele té?"

Na Betsaida Yezu abikisi moto akufá miso

22 Bongo bakomi na Betsaida. Kuna bamemeli Yezu moto moko akufá miso, pe babondeli ye 'tè ásimba ye. 23 Yezu asimbi ye na liboko, pe amemi ye mwa-mosika ya mboka. Abwakeli ye soi na miso, atieli ye maboko pe atuni ye: "Ozali komona nini?" 24 Moto wana atali pe alobi: "Nazali komona bato, kasi bazali komonana lokola banzete ezali kotambola." "Yezu asimbi ye lisusu na miso, moto wana atali, abiki, pe abandi komona biloko nyonso malamu. 26 Bongo Yezu atindi ye ázonga na ndako, kasi áleka na kati ya mboka té.

Piere asakoli 'tè Yezu azali Mesia

27 Sima na yango, Yezu ná bayekoli na ye bakei na bamboka ya mike oyo ezali pembeni ya Sezaré, vile ya mokonzi Filipe. Na nzela atuni bango bóye: "Bato balobaká 'tè ngai nazali nani?" 28 Bango bazongiseli ye: "Bato mosusu balobaká 'tè ozali Yoane Mobatisi; bato mosusu: Eliya; pe bamosusu balobaká 'tè ozali moko ya baprofete ya kala." 29 Yezu atuni bango lisusu: "Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?" Piere azongiseli ye: "Ozali Mesia." 30 Bongo Yezu apekisi bango báloba yango na moto té.

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe a kosekwa (I)

31 Sima, Yezu abandi koteya bayekoli na ye: "Ngai Mwana ya Moto nasengeli koyoka pasi mingi. Bakoboya ngai na bambuta-muntu, bakonzi ya banganga-Nzambe pe balakisi-Mibeko. Bakoboma ngai, kasi na mikolo misato nakosekwa." 32 Azalaki koloba yango polele. Tango Piere ayoki yango, abendi ye pembeni pe abandi koloba na ye: "Tika koloba boye!" 33 Kasi Yezu abaluki, atali bayekoli, pe alobi na Piere na makasi: "Satan, longwa na miso na ngai! Ozali kokanisa makambo ya Nzambe té, kasi bobele ya bomoto." 34 Sima, Yezu abengi bato nyonso ná bayekoli na ye, alobi na bango: "Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko, ákumba kuruze na ye pe alanda ngai. 35 Pamba té, moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango. Kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, pe po na Sango Malamu, akobikisa yango. 36 Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili mobimba, eloko nini azwi soki abungisi bomoi na ye? 37 Eloko nini akoki kofuta po ázwa yango lisusu? 38 Bato ya tango oyo bazali bato mabe pe basundolá Nzambe. Soki moto azali koyoka ngai soni na miso na bango, ngai Mwana ya Moto pe nakoyoka soni po na ye, tango nakoya na lokumu ya Tata na ngai, nzela moko ná ba-anjelu ya bosantu."

Marko 9

1 Bongo Yezu alobi na bango lisusu: "Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bakufa bakomona na miso ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye na nguya nyonso."

Nzambe alakisi lokumu ya Yezu

2 Sima ya mikolo motoba, Yezu akamati Jake, Piere ná Yoane, akei ná bango na ngomba mokoya molai. Kuna bazalaki kaka bango moko. Yezu abongwani na miso na bango; 3 bilamba na ye ebandi kongenga makasi pe ekómi pembe penza: na mokili mobimba moto moko té akoki kokómisa bilamba pembe ndenge wana. 4 Bayekoli bamoni Eliya ná Moize, bazali kosolola ná Yezu. 5 Bongo Piere alobi na Yezu: "Moteyi, lokola tozali awa ezali malamu! Toko-tónga bandako misato ya kapo: moko po na yo; moko po na Moize pe moko po na Eliya!" 6 Kasi ayebaki makambo azalaki koloba té, pamba té ye ná baninga na ye mibale bayokaki somo penza. 7 Bongo lipata moko eyei kozipa bango pe mongongo moko ebimi na yango, elobi: "Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo. Bóyokela ye." 8 Kaka na tango wana, bayekoli batali epai na epai, bamoni lisusu moto té, Yezu atikalaki bobele ye moko ná bango. 9 Lokola bazalaki kokita ngomba, Yezu apekisi bango alobi: "Makambo oyo bomoni, bóloba yango na moto té, tii mokolo ngai Mwana ya Moto nakosekwa." 10 Babombi maloba wana na mitema, kasi babandi komitunana: "Kosekwa, eiingi koloba nini?" "Bongo batuni Yezu: "Po na nini balakisi-Mibeko balobaká 'tè Eliya asengeli koya liboso?" 12 Yezu azongiseli bango: "Ya solo, Eliya akoya liboso, po na kobongisa makambo nyonso. Kasi ndenge nini ekómamá lisusu po na ngai 'tè bakoyokisa Mwana ya Moto pasi mingi pe bakomonela ye? 13 Nzokande nalobi na bino: Eliya asi'ayaki, pe bato basalaki ye ndenge balingaki. Wana nde makambo ekómamá po na ye."

Yezu abikisi mwana azali na molimo mabe

14 Tango bazongi epai ya bayekoli mosusu, bamoni bato ebele basangani epai na bango, pe balakisi-Mibeko bazalaki kotiana tembe ná bango. 15 Awa bato bamoni Yezu, bakamwe pe bakimi mbangu po na kopesa ye mbote. 16 Yezu atuni bayekoli na ye: "Po na nini bozali kotiana tembe ná bango?" 17 Moto moko na kati ya bato wana alobi: "Moteyi, nayeeli yo mwana na ngai ya mobali po azali na molimo mabe oyo ekómisá ye baba. 18 Epai nyonso molimo ekangaka ye, ebwakaka ye na mabelé, bongo mwana akómaka kobimisa fulufulu na monoko, aliaka mino pe nzoto na ye ekómaka makasi. Nasengaki bayekoli na yo bábengana molimo yango, kasi bakokaki té." 19 Yezu azongisi: "A bino! Bato bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino tii tango nini? Nákanga motema po na bino tii tango nini? Bómemela ngai ye awa!" ^Bamemeli ye mwana. Tango molimo emoni Yezu, ebandi koningisa nzoto ya mwana makasi; mwana akwei na mabelé, abandi kobaluka pe kobimisa fulufulu na monoko. 21 Yezu atuni tata ya mwana: "Mbula boni abandi kosala boye?" Tata azongiseli ye: "Banda bomwana. 22 Pe mbala mingi molimo ekweisaka ye na móto to na mai po ákufa. Kasi soki okoki, yokela biso mawa pe salisa biso!" 23 Yezu alobi na ye: "Po na nini olobi 'soki nakoki'? Yeba 'tè makambo nyonso ekoki kosalama na moto oyo atii motema na Nzambe." 24 Bongo tata ya mwana abandi koganga: "Natii motema, salisa ngai nálongola tembe, nátia motema penza." 25 Awa Yezu amoni bato bazali koya mingi, agangeli molimo mabe: "Yo molimo moto obomi mwana matoi pe okómisi ye baba, natindi yo: Bima na ye pe kozongela ye lisusu té!" 26 Molimo egangi makasi, eningisi nzoto ya mwana pe ebimi. Mwana akómi lokola moto akufi, yango wana bato mingi oyo bazalaki kotala, bakomi koloba: "Akufi!" 27 Kasi Yezu asimbi ye na liboko, atomboli ye bongo atelemi. 28 Tango Yezu akoti na ndako, azalaki kaka ye moko ná bayekoli na ye. Bango batuni ye: "Po na nini biso tokokaki kobengana molimo yango té?" 29 Bongo Yezu alobi na bango: "Bobele baoyo babondelaka Nzambe mingi bato bakoki kobimisa milimo ya ndenge wana."

Yezu avebisi lisusu ndenge akokufa pe akosekwa (II)

30 Bongo balongwe esika wana, bakatisi mabelé ya Galilé. Yezu alingaki té bato báyeba soki ye azali wapi. 31 Pamba té azalaki koteya bayekoli na ye boye: "Bakoteka ngai Mwana ya Moto epai ya bato. Bango bakoboma ngai, kasi nakosekwa na mikolo misato." 32 Bayekoli bazalaki koyeba tina ya maloba wana té; pe bazalaki kobanga kotuna ye.

Na kati ya bayekoli, nani aleki?

33 Bakomi na Kafarnaum. Tango bakoti na ndako, Yezu atuni bayekoli na ye: "Makambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela?" 34 Kasi bango bafandi nyee, pamba té na nzela bazalaki kotiana tembe po na koyeba soki nani aleki baninga. 35 Yezu afandi, abengi bayekoli nyonso zomi na mibale pe alobi na bango: "Oyo alingi kozala moto ya liboso, ázala sima ya bato nyonso pe ázala mosali na bango." 36 Bongo Yezu azwi mwana moke, atii ye na kati na bango, ayambi ye na maboko pe alobi: 37 "Oyo akoyamba mwana moke boye po na kombo na ngai, ayambi ngai moko. Pe oyo akoyamba ngai, ayambi kaka ngai té, kasi ayambi ná Oyo atindi ngai."

Moto oyo aboyi biso té, azali moto na biso

38 Yoane alobi na Yezu: "Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, kasi atambolaka ná biso té. Bongo topekisaki ye po azali moto na biso té." 39 Kasi Yezu azongisi: "Bópekisa ye té! Pamba té soki moto asali likamwisi na kombo na ngai, na tango wana akokoka kotónga ngai té. 40 Po moto oyo aboyi biso té, azali moto na biso. 41 Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akopesa bino ata kopo ya mai pamba, po bozali bato ya Kristo, akozanga lifuta té."

Lisumu ezali likambo monene

42 "Soki moto moko oyo ayebi makambo mingi té andimi ngai, bongo moto mosusu akweisi ye na masumu, ebongi malamu bákanga moto wana libanga ya monene na kingo, pe bábwaka ye na ebàle! 43 Soki ozali kokweya na masumu po na liboko na yo, kata yango! Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi, ata ozangi liboko moko; esika 'tè ókende ná maboko mibale na lifelo, esika móto esilaka té. 44 Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té, pe móto esilaka té. 45 Soki ozali kokweya na masumu po na likolo na yo, kata yango! Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi na likolo moko; esika 'tè ókende ná makolo mibale na lifelo. 46 Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té, pe móto esilaka té. 47 Pe soki ozali kokweya na masumu po na liso na yo, longola yango! Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya Nzambe na liso moko; esika 'tè ókende ná miso mibale na lifelo. 48 Kuna, nkusu oyo eliaka nzoto ya bato ekufaka té pe móto esilaka té. 49 Boyebi 'tè batiaka mungwa na mabonza nyonso oyo bapesaka na Nzambe. Se bongo móto ya bapasi ezali lokola mungwa oyo ekokómisa moko moko na bino peto. 50 Mungwa ezali eloko ya malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kobongisa yango po ékóma lisusu elengi? Bozala lokola mungwa na kati na bino moko, pe bozala na boboto bino na bino."

Marko 10

Mateya ya Yezu po na koboma libala

1 Tango Yezu alongwe wana, akei na région ya Yuda pe na ngambo ya Yordan. Kuna lisusu bato mingi bayei kosangana epai na ye, pe abandi koteya bango ndenge amesaná. 2 Ba-Farizé mosusu bayei epai na ye pe babandi komeka ye. Batuni ye: "Mibeko na biso epesaka nzela na mobali po aboya mwasi na ye?" 3 Yezu azongiseli bango: "Mobeko nini Moize apesaká bino?" 4 Bango balobi: "Moize apesaká nzela boye: mobali akoki koboya mwasi na ye, kasi liboso ákóma mokanda ya koboma libala." 5 Bongo Yezu alobi na bango: "Moize akóme-laki bino mobeko wana po boleki mitú makasi! 6 Kasi ekómamá lisusu boye: 'Tango Nzambe asalaki mokili, asalaki bato, mobali ná mwasi. 7 Yango wana mobali atikaka tata na ye ná mama na ye pe asanganaka ná mwasi na ye, 8 po bango mibale bákóma moto moko. Boye bazali lisusu bato mibale té, kasi bakomi se moto moko.' 9 Bongo, bato oyo Nzambe asangisi, moto ákabola bango té." 10 Tango bakoti na ndako, bayekoli batuni lisusu Yezu po na likambo yango. 11 Ye alobi na bango: "Moto nyonso oyo aboyi mwasi na ye pe abali mosusu, asali kindumba po atiki mwasi ya liboso. 12 Pe soki mwasi aboyi mobali na ye pe abali mosusu, asali kindumba."

Yezu ayambi bana mike

13 Bato mosusu bayeeli Yezu bana mike po ásimba bango, kasi bayekoli babandi kopekisa bango. 14 Tango Yezu amoni bongo, asiliki pe alobi na bango: "Bótika bana mike baya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té mboka ya Nzambe ezali po na baoyo bakokani ná bango. 15 Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke té, akokota na mboka na ye ata moke té." 16 Sima ayambi bana na tolo na ye, asimbi bango na mitú pe abenisi bango.

Moto ya bomengo

17 Tango Yezu azalaki kotambola na nzela, moto moko ayei mbangu, afukameli ye pe atuni: "Moteyi malamu, nasengeli kosala nini po názwa bomoi ya seko?" 18 Yezu alobi na ye: "Po na nini obengi ngai moto malamu? Moto malamu azali té, kaka Nzambe ye moko. 19 Oyebi Mibeko: Koboma moto té; kosala kindumba té; koyiba té; kokosela moto makambo té; kozwa eloko ya moto na mayele mabe té; tosaka tata ná mama." 20 Moto wana azongiseli ye: "Moteyi, natosaka mibeko wana nyonso banda bomwana na ngai." 21 Yezu atali ye na bolingo pe alobi: "Ozangi kaka eloko moko; kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe pesa mbongo na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo; sima yaka kolanda ngai." 22 Kasi moto yango alembi nzoto po na maloba wana pe akei na mawa, pamba té azalaki na bomengo mingi koleka. 23 Sima Yezu atali bayekoli na ye nyonso, pe alobi na bango: "Bato ya bomengo bakozala na pasi mingi po na kokota na mboka ya Nzambe." 24 Bayekoli bakamwe po na maloba wana. Kasi Yezu alobi na bango lisusu: "Bana na ngai, po na kokota na mboka ya Nzambe ezali pasi! "Nyama monene oyo bábengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na mboka ya Nzambe." 26 Bayekoli bakamwe mingi koleka, pe bakomi kotunana: "Bongo nani akoki kobika?" 27 Yezu atali bango pe alobi: "Bato bakoki kosala yango ata moke té, kasi bobele Nzambe; pamba té Nzambe akoki kosala makambo nyonso." 28 Piere alobi na ye: "Tala nanu, biso totiki biloko nyonso pe tolandi yo." 29 Yezu azongisi: "Nalobi na bino, ya solo: soki moto atiki ndako na ye, bandeko na ye, mama, tata, bana to bilanga na ye po na ngai pe po na Sango Malamu, 30 moto wana akozwa yango mbala kama koleka: bandako, bandeko, bamama, bana ná bilanga pe minyokoli na mikolo oyo; kasi na mikolo ekoya akozwa bomoi ya seko. 31 Bato mingi bazali sik'oyo liboso, bakokóma bato ya suka; pe bato mingi bazali sik'oyo na suka, bakokóma liboso."

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (III)

32 Awa bazalaki na nzela ya Yeruzalem, Yezu azalaki kotambola liboso ya bayekoli na ye pe ya bato mosusu oyo bazalaki kolanda ye. Bango nyonso babandaki kobanga. Yezu asangisi lisusu bayekoli na ye zomi na mibale, pe abandi koyebisa bango makambo elingi kokweela ye. 33 Alobi na bango: "Bóyoka, tozali kokende na Yeruzalem. Kuna bakokaba ngai Mwana ya Moto epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe balakisi-Mibeko. Bango bakokatela ngai etumbu ya liwa pe bakokaba ngai na maboko ya bato bayebi Nzambe té. 34 Bakoseka ngai, bakobwakela ngai soi, bakobeta ngai fimbu pe bakoboma ngai. Kasi nakosekwa na mikolo misato."

Olingi kozala mokonzi, zala mosali

35 Jake ná Yoane, bana ya Zebedé, bayei epai ya Yezu, balobi na ye: "Moteyi, tolingi ósalela biso makambo oyo tokosenga yo." 36 Yezu atuni bango: "Bolingi násala nini po na bino?" 37 Bango bazongiseli ye: "Tango okokóma na bokonzi, fandisa biso pembeni na yo, moko na liboko na yo ya mobali, mosusu na liboko na yo ya mwasi." 38 Kasi Yezu alobi na bango: "Eloko bozali kosenga, boyebi yango té. Kopo ya pasi ngai nakomela, bino bokokoka yango? Batisimo ya pasi ngai nakozwa, bino bokozwa yango?" 39 Bango bazongiseli ye: "Tokokoka kaka!" Bongo Yezu alobi na bango: "Ya solo, kopo oyo ngai nakomela, bino pe bokomela yango; pe batisimo ya pasi oyo ngai nakozwa, bino pe bokozwa yango. 40 Kasi kopona moto oyo akofanda na liboko na ngai ya mobali to ya mwasi, etali ngai té; pamba té Nzambe asi'abongisá bisika wana po na bato ye aponá." 41 Tango bayekoli mosusu zomi bayoki ndenge wana, bakomi kosilikela Jake ná Yoane. 42 Bongo Yezu abengi bango nyonso pe alobi: "Boyebi 'tè bato oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bikolo, balakisaka bokonzi na bango; bato minene bamonisaka bato na bango pasi. 43 Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo té. Soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto monene, ámitia mosali na bino nyonso. 44 Pe soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto ya liboso, ámikómisa moumbu ya bato nyonso. 45 Pamba té ngai Mwana ya Moto nayaki po bato básalela ngai té, kasi nayaki nde kosalela bango, pe kopesa bomoi na ngai po na kolongola bato ebele na boumbu."

Yezu abikisi Bartimé, moto akufá miso

46 Bongo bakomi na vile ya Jeriko. Tango Yezu alongwe kuna ná bayekoli na ye pe bato ebele, amoni moto moko akufá miso azalaki kofanda pembeni ya nzela pè kosenga mbongo. Kombo na ye Bartimé, mwana ya Timé. 47 Awa ayoki 'tè Yezu ya Nazaret azali wana, abandi koganga: "Yezu, Mwana ya David, yokela ngai mawa!" 48 Bato mingi bakomi kogangela ye ákanga monoko. Kasi alekisi penza koganga makasi: "Mwana ya David, yokela ngai mawa!" 49 Yezu atelemi pe alobi: "Bóbenga ye." Bongo babengi ye pe balobi: "Ozali na makila malamu! Yezu azali kobenga yo. Telema!" 50 Bongo abwaki kazaka na ye, apumbwe pe ayei epai ya Yezu. 51 Yezu atuni ye: "Olingi násala nini po na yo?" Moto akufá miso azongisi: "Moteyi, nalingi námona lisusu!" 52 Bongo Yezu alobi na ye: "Kende, bondimi na yo ebikisi yo." Kaka na tango wana, abandi komona pe alandi Yezu.

Marko 11

Yezu akoti na Yeruzalem

1 Bakomi penepene ya Yeruzalem, epai ya mboka Betfajé pe Betanie, pembeni ya Ngomba ya ba-Ôlive. Yezu atindi bayekoli na ye mibale, 2 alobi na bango: "Bókende na mboka oyo etalani ná bino. Tango bokokóma kuna bokomona mwana-punda bakangá na singa; nanu bamatá yango té. Bófungola yango pe bómema yango awa. 3 Soki moto atuni bino: 'Po na nini bozali kosala bongo?' bóloba na ye: 'Mokonzi azali na posa na yango,' bongo akopesa bino yango noki." 4 Bakei pe bamoni mwana-punda bakangá na nzela liboso ya ndako moko, bongo bafungoli yango. 5 Bato mosusu oyo bazalaki wana, batuni bango: "Po na nini bozali kofungola mwana-punda oyo?" 6 Bayekoli bazongiseli bango ndenge Yezu alobaki, pe batiki bango bákende na yango. 7 Bongo bamemeli Yezu mwana-punda, batii yango bilamba na bango, pe Yezu amateli yango. 8 Bato mingi bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela, bamosusu bakendeki kokata matiti ya banzete na bilanga, pe bazalaki kotia yango na nzela. 9 Bato bazalaki kokende liboso, ná baoyo bazalaki kolanda sima, babandaki koganga: "Ozana! Lokumu ézala na Nzambe! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! 10 Bokonzi va koko na biso David elingi koya! Nzambe ábenisa yango! Ozana! Lokumu ézala na Nzambe na Likolo!" 11 Wana ezali ndenge Yezu akofelaki na Yeruzalem. Akei na Ndako ya Nzambe pe atali yango bipai nyonso. Na pokwa abimi, pe azongi na Betanie ná bayekoli na ye zomi na mibale.

Yezu akausi nzete ya figi

12 Sima ya mokolo moko, tango balongwe na Betanie, Yezu abandi koyoka nzala. 13 Amoni na mosika nzete ya figi etondá na makasa; akei kotala soki akoki kozwa mbuma. Kasi tango akómi penepene, amoni eloko té kaka makasa pamba; pamba té eleko ya mbuma nanu ekokaki té. 14 Bongo alobi na nzete ya figi: "Esili libela! Ata mokolo moko té moto akolia lisusu mbuma na yo!" Bayekoli pe bayoki maloba wana.

Yezu akoti na Ndako ya Nzambe

15 Awa bakomi na Yeruzalem, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi kobengana bato oyo bazalaki koteka pe kosomba biloko kuna, abaloli bamesa ya bato bazalaki koshanjé mbongo, ná bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon. 16 Apekisi bato oyo bazalaki komema biloko, bákatisa té na lopango ya Ndako ya Nzambe; 17 apesi bango mateya boye: "Boyebi té? Ekómamá boye: 'Ndako na ngai, bakobenga yango ndako ya losambo po na bikolo nyonso.' Kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka!" 18 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bayoki yango pe babandi koluka nzela ya koboma Yezu. Kasi bazalaki kobanga ye, pamba té bato nyonso bakamwe po na mateya na ye. 19 Tango bakomi na pokwa, Yezu ná bayekoli na ye babimi na Yeruzalem.

Bayekoli batuni Yezu po na nzete ya figi

20 Tongo etani, tango bazalaki koleka lisusu na nzela, bamoni nzete ya figi ekauki tii na misisa, 21 pe Piere akanisi makambo elekaki, alobi na Yezu: "Moteyi, tala nzete oyo opesaki etumbu, ekauki nyonso." 22 Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: "Bótia mitema na Nzambe! 23 Nalobi na bino, ya solo: soki moto alobi na ngomba oyo: longwa wana pe ómibwaka na ebale; pe soki atii tembe té kasi andimi na motema moko 'tè ekosalama ndenge alobi, Nzambe akosala yango po na ye. 24 Yango wana nalobi na bino: soki bozali kosenga eloko na Nzambe, bóndima 'tè bosi'bozwi yango, bongo bokozwa yango. 25 Pe tango bozali kosambela, soki bozali na likambo ná moto mosusu, bólimbisa ye, po Tata na bino ya Likolo álimbisa pe masumu na bino. f 26 Kasi soki bozali kolimbisa baninga té, Tata na bino oyo azali na Likolo akolimbisa pe masumu na bino té. "

Nani apesi Yezu bokonzi?

27 Bongo bayei lisusu na Yeruzalem. Tango Yezu azalaki kotambola na kati ya Ndako ya Nzambe, bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko ná bambuta-muntu ya ekolo bayei epai na ye, 28 pe batuni ye: "Epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi ya kosala makambo oyo?" 29 Yezu azongi- seli bango: "Ngai pe nakotuna bino motuna moko kaka. Soki bozongiseli ngai eyano, ngai pe nakoyebisa bino soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani. 30 Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa eutaki wapi? Epai ya Nzambe to epai ya bato? Bozongi-sela ngai eyano." 31 Kasi bango babandi kotiana tembe bango na bango balobi: "Soki tozongisi: 'epai ya Nzambe', ye akotuna: 'Po na nini bondimelaki Yoane té?' 32 Soki pe tolobi 'epai ya bato', tokosuka wapi?" Pamba té bazalaki kobanga bato, po bango nyonso babandaki kokamata Yoane lokola profete ya solo. 33 Yango wana bazongiseli Yezu boye: "Toyebi té." Bongo Yezu alobi na bango: "Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani."

Marko 12

Lisapo ya bafuteli mabe ya elanga

'Bongo Yezu abeteli bango masapo, alobi: "Moto moko akonaki elanga ya vinu, asaleli yango lopango, abongisi libulu na kati ya mabanga po na kokamola vinu, atóngi ndako moko ya molai po na kokengela yango; sima atii bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo. 2 Na tango ya kolongola mbuma, atindi mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga, po ákende kozwa ndambo ya mbuma. 3 Kasi bango bakangi ye, babeti ye pe bazongisi ye maboko pamba. 4 Kolo ya elanga atindeli bango mosali mosusu; kasi bango bazokisi ye na motú pe bafingi ye. 5 Bongo atindi lisusu moto moko. Oyo nde babomi ye! Sima atindi bato mingi: bamosusu babeti bango, pe bamosusu babomi bango. 6 Bobele moto moko kaka atikalaki epai ya kolo ya elanga, ezali nde mwana na ye ya bolingo. Bongo atindeli bango ye, pamba té amilobaki: 'Bakotosa mwana na ngai'. 7 Kasi bafuteli balobani bango na bango: 'Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, pe biso tokozwa elanga na ye.' 8 Bongo bakangi ye, babomi ye pe babwaki ye mosika ya elanga." 9 Sima Yezu abakisi alobi: "Kolo ya elanga akosala nini? Akoya koboma bafuteli wana, pe akopesa elanga na maboko ya bato mosusu. 10 Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekómamá boye: 'Libanga ba-mason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem. 11 Yango euti na mosala ya Nkolo, tomoni yango na miso pe tokamwe mingi.' " 12 Bakonzi ya Bayuda babandi koluka nzela ya kokanga Yezu, pamba té, bayebaki 'tè alobaki lisapo wana po na bango. Kasi lokola bazalaki kobanga bato, batiki ye pe bakei na bango.

Mpaku ya mokonzi ya Rome

13 Bongo batindi bato mosusu ya ba-Farizé ná ya Erode epai ya Yezu po bámeka kokweisa ye na maloba na ye moko. 14 Bango bayei pe batuni Yezu: "Moteyi, toyebi 'tè okosaka té, obangaka bato té pe otalaka bilongi ya bato té; kasi oteyaka makambo ya solo po na nzela ya Nzambe. Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi ya Rome to té?" 15 Kasi Yezu ayebaki 'tè babombeli ye makambo, bongo alobi na bango: "Po na nini bozali komeka ngai? Bóyeela ngai ebende moko ya mbongo po nátala yango." 16 Bayeeli ye yango, bongo atuni bango: "Foto oyo pe kombo bakómá awa ezali ya nani?" Bazongisi: "Ya mokonzi ya Rome." 17 Yezu alobi na bango: "Bópesa mokonzi ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye." Bango bakamwe penza po na maloba na ye.

Motuna po na kosekwa

18 Bongo ba-Sadusé bayei epai ya Yezu. Ezali bango bato balobaká 'te bato bakufa bakoki kosekwa té. Batuni ye: 19 "Moteyi, Moize akómaká boye: 'Soki moto akufi pe atiki mwasi kasi aboti na ye té, ndeko ya moto akufi asengeli kobala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana.' 20 Na mboka moko ezalaki na bandeko sambo ya mibali, bango nyonso mama moko, tata moko. Kulutu abali mwasi pe akufi, atiki bana té. 21 Oyo ya mibale abali mwasi wana pe akufi, atiki bana té. Ya misato pe ndenge moko. 22 Bango nyonso sambo babalaki mwasi wana bakufí, batiki bana té. Sima na bango nyonso mwasii pe ayei kokufa. 23 Bongo mokolo bato bakufa bakosekwa, ye akozala mwasi ya nani? Pamba té bango nyonso sambo babalaki ye." 24 Yezu azongiseli bango: "Ndenge nini bobosani boye? Ezali po boyebi Mikanda ya Nzambe té; boyebi pe nguya na ye té. 25 Pamba té tango bato bakufa bakosekwa, bakobanda kobalana té, kasi bakokokana ná ba-anjelu ya Likolo. 26 Po na likambo etali kosekwa ya bato bakufa, nanu botangá mokanda ya Moize té? Na lisolo ya nzete oyo ezalaki kopela, Nzambe alobaká na Moize boye: 'Nazali Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.' 27 Ye azali Nzambe ya bato bakufa té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi. Bomoni! Bozali kobosana na ndenge moko ya mabe penza."

Mobeko nini eleki

28 Molakisi-Mibeko moko ayokaki bango tango bazalaki kotiana tembe. Amoni 'tè Yezu azongiseli bango malamu, bongo akei epai na ye pe atuni boye: "Na kati ya Mibeko nyonso, mobeko nini eleki?" 29 Yezu azongiseli ye: "Mobeko eleki nyonso, yang'oyo: 'Bóyoka, bino bato ya Israel, Nkolo Nzambe na biso azali Nkolo se moko. 30 Bólinga Nkolo, Nzambe na bino, na motema moko, na bomoi na bino mobimba, na mayele nyonso pe na makasi nyonso.' 31 Pe mobeko ya mibale, yang'oyo: 'Bólinga baninga na bino ndenge bino moko bomilingaka.' Mobeko mosusu eleki oyo mibale ezali té." 32 Bongo molakisi-Mibeko alobi na Yezu: "Ezali boye, Moteyi! Oyo olobi ezali ya solo: Nzambe azali se moko, mosusu azali té. 33 "Kozikisela Nzambe banyama pe kopesa ye "mabonza ezali malamu, kasi oyo yo olobi ezali malamu penza koleka: Tosengeli kolinga Nzambe na motema moko, na mayele nyonso, na makasi nyonso; pe kolinga baninga ndenge biso moko tomilingaka." 34 Yezu amoni 'te eyano na ye ezali ya malonga, alobi na ye: " Yo ozali mosika té po na kokóma moto ya mboka ya Nzambe." Banda mokolo wana, ata moto moko té amekaki kotuna ye motuna.

Mesia azali mokonzi ya David

35 Tango Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, atuni motuna alobi: "Ndenge nini balakisi-Mibeko bakoki koloba 'tè Mesia azali mwana ya David, oyo akozwa ebonga na ye? 36 Pamba té Molimo Mosantu alakisaká David 'tè áloba boye: 'Mokonzi nà ngai, Nkolo alobi na yo: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.' 37 David ye moko azalaká kobenga Mesia 'Mokonzi na ngai'. Bongo ndenge nini ye akoki kozala mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?"

Balakisi-Mibeko, bato ya lokuta

Bato mingi bazalaki koyoka Yezu na esengo; 38 bongo ye abandaki koteya bango boye: "Bókebaka na balakisi-Mibeko! Bango balingaka kotambola na banzambala ya lokumu. Balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando. Baponaka bisika ya liboso na bandako ya losambo, 39 pe bakiti ya lokumu na bafeti. ""Babotolaka biloko ya basi oyo bakufelá mibali; nzokande bakosanaka kosambela mingi po na kokosa bato. Bango bakozwa etumbu oyo eleki monene!"

Likabo ya mwasi moko akelelá

41 Yezu akei kofanda pembeni ya sanduku ya makabo na Ndako ya Nzambe, pe abandi kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo. Bato ya mosolo bazalaki kotia mbongo mingi. 42 Mwasi moko akufelá mobali ayei, azalaki moto ya kokelela, atii bibende mibale ya mike oyo akokaki kosombela mwa lipa. 43 Bongo Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi na bango: "Nalobi na bino, ya solo: Likabo ya mwasi oyo akufelá mobali pe akelelá eleki ya bato nyonso oyo batii mosolo na sanduku. 44 Pamba té bango nyonso bapesi mosolo oyo bazali na yango posa té; kasi ye na kokelela na ye, apesi mbongo nyonso oyo akokaki kobikela na yango."

Marko 13

Yezu ayebisi 'tè Ndako ya Nzambe ekokufa

1 Tango Yezu abimi na Ndako ya Nzambe, moyekoli moko alobi na ye: "Moteyi, tala mabanga ya minene boye, pe ndako ya monene boye!" 2 Yezu azongiseli ye: "Omoni ndako oyo ya monene? Ata libanga moko té ekotikala na esika ezali. Nyonso wana bakopanza yango."

Pasi pe minyokoli ekoya

3 Bongo Yezu akei kofanda na Ngomba ya ba-OHve, na esika oyo etaláná ná Ndako ya Nzambe. Lokola Piere, Jake, Yoane ná André bazalaki esika moko ná ye, batuni ye balobi: 4 "Yebisa biso tango nini yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè nyonso wana elingi kosuka?" 5 Bongo Yezu alobi na bango: "Bókeba, moto moko té ákosa bino. 6 Bato ebele bakoya na kombo na ngai, bakoloba: 'Ezali ngai moto bozalaki kozela', pe bakokosa bato mingi. 7 Tango bokoyoka 'tè bitumba ebimi na bamboka ya penepene to ya mosika, bóbanga té, po makambo wana esengeli koya; wana ekozala nanu suka té. 8 Ya solo, bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka. Epai na epai mabelé ekoningana, pe nzala ekongala; yango ekozala lokola pasi mwasi ayokaka na tango ya kobota. 9 "Kasi bino, bókeba: bakomema bino na ba-tribinal, pe bakobeta bino fïmbu na bandako ya losambo. Likolo na ngai bakokumba bino epai ya batambwisi ya ba-vile pe bakonzi ya bikolo. Na ndenge wana bokozwa nzela ya koyebisa bango sango na ngai. 10 Pamba té esengeli bósakola Sango Malamu na bikolo nyonso, liboso 'tè suka ékóma. "Bongo tango bakomema bino na tribmal, bóbanga té po na makambo bokoloba. Bóloba kaka oyo ekoyeela bino na tango wana, Pamba té bino té bato bokozala koloba, kasi ezali Molimo Mosantu moto akoloba. 12 Bato bako-tekisa bandeko na bango po báboma bango; batata bakotekisa bana na bango; pe bana bakotombokela batata po bábomisa bango. 13 Bato nyonso bakoyina bino po na kombo na ngai. Kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, ye nde akobika."

Yeruzalem ekokufa

14 "Ekómamá 'tè Lisumá ya somo ekopikama na esika yango ekoki kozala té.-Moto azali kotanga makambo oyo, áluka koyeba tina na yango!-Mokolo bokomona boye, baoyo bakozala na région ya Yuda, bákima epai ya ngomba. 15 Moto oyo akozala na libanda ázonga té na kati ya ndako po na kokamata biloko na ye. 16 Pe oyo akozala na bilanga, ázonga na vile té po na kokamata kazaka na ye. 17 Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakobanda komelisa bana mabéle na tango wana! 18 Bóbondela Nzambe makambo wana éya té na tango ya malili. "Pamba té, mikolo wana pasi ya somo ekozala. Pasi ya ndenge wana emonaná nanu té uta ebandeli ya biloko nyonso Nzambe asalá, tii sik'oyo; ekomonana pe lisusu té. 20 Soki Nkolo ákatelaka bato mikolo ya pasi wana té po ékóma mokuse, mbele ata moto moko té akokaki kobika. Kasi Nkolo akatá yango po na bato oyo ye aponá. 21 "Na tango wana soki moto alobi na bino: 'Botala, Mesia azali awa!' to 'Azali kuna!' bóndimela ye té. 22 Pamba té ba-mesia ya lokuta ná baprofete ya lokuta bakobima ebele, bakosala makamwisi ya ndenge na ndenge po, soki nzela ezali, bákosa ata bato oyo Nzambe aponi. 23 Yango wana bino bókeba! Nasi'naye-bisi bino yango libela."

Koya ya Mwana ya Moto

24 "Kasi na mikolo yango, sima ya pasi wana, mosusu ya koleka ekoya. Moi ekokóma molili, sanza ekongenga lisusu té; "minzoto ekokweya na se, pe nyonso oyo ezali na Likolo ekoningana. 26 Kaka na tango wana, bakomona ngai, Mwana ya Moto, nazali koya na likolo ya mapata, na nguya pe na lokumu mingi. 27 Nakotinda ba-anjelu bipai nyonso na mokili mobimba, pe nakosangisa bato oyo Nzambe aponá."

Ndakisa ya nzete ya figi

28 Bókanisa nzete ya figi. Soki bitape na yango ekómi petepete, pe soki makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko ya kobuka mbuma ekómi penepene. 29 Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo yango, bóyeba 'tè etikali moke náya. 30 Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso. 31 Likolo na se ekoleka; kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té.

Kaka Nzambe moto ayebi mokolo wana

32 "Moto moko té ayebi mokolo to ngonga makambo wana ekosalama, ata ba-anjelu na Likolo, ata ngai Mwana ya Nzambe; kaka Tata ye moko moto ayebi yango. 33 Bókeba, bókengela, po boyebi té tango nini mokolo yango ekoya. 34 Ezali lokola moto moko akei mobembo, atiki ndako na ye pe apesi basali na ye bokonzi. Atikeli moto na moto mosala pe atindi mokengeli 'tè ákengela malamu. 35 Yango wana bókengela malamu, po boyebi té tango nini kolo ya ndako akozonga: soki na pokwa, na midi ya butu, to tango soso ya liboso elelaka, to pe na tongo. 36 Soki té akoya mbala moko kokuta bino bolali pongi! 37 Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango na bato nyonso: Bókengela malamu!"

Marko 14

Bakonzi bayokani bábomisa Yezu

1 Etikalaki mikolo mibale po feti ya Pake ékoka, oyo Bayuda baliaka bobele mapa evimbá té. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakomi koluka nzela ya kokanga Yezu na mayele po báboma ye. 2 Pamba té bazalaki kolobana: "Tokoki kokanga ye na mokolo ya feti té. Soki té bato bakotomboka."

Mwasi moko asopeli Yezu malasi na motú

3 Mokolo moko Yezu azalaki na Betanie na ndako ya Simon, moto ya maladi ya maba. Tango afandi na mesa po ália, mwasi moko ayei, azalaki na molangi basalá na libanga ya kitoko penza, etondá na malasi ya talo mingi. Afungoli molangi yango pe asopeli Yezu malasi na motú. 4 Bato mosusu bazalaki wana basiliki pe batunani: "Po na nini babebisi malasi oyo boye?" 5 Batombokeli mwasi wana, balobi: "Bakokaki koteka yango na talo mingi penza, pe kopesa mbongo na bato bakelelá." 6 Kasi Yezu alobi: "Bótika ye nyee! Likambo ye asáli po na ngai ezali malamu. 7 Bato bakelelá bakozala ná bino tango nyonso, bokoki kosalisa bango mbala nyonso oyo bolingi. Kasi ngai nakofanda ná bino libela té. 8 Asali oyo ekoki na ye: asi'apakoli ngai malasi po na kobongisa nzoto na ngai, pamba té etikali moke bákunda ngai. 'Nalobi na bino, ya solo: bipai nyonso bakozala kosakola Sango Malamu, na mokili mobimba, bakoloba likambo mama oyo asali, pe bakobanda kokanisa ye."

Yudas alingi koteka Yezu

10 Yudas Iskariot, oyo azalaki moko ya bayekoli zomi na mibale, akei koteka Yezu epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe. 11 Tango bayoki likambo yango, basepeli pe balaki ye 'tè bakopesa ye mbongo. Yango wana Yudas akómi koluka ndenge nini akoki kopesa Yezu na maboko na bango.

Yezu alei bilei ya Pake ná bayekoli na ye

12 Ezalaki mokolo ya liboso ya feti ya mapa evimbá té; mokolo wana babomaká bameme po na Pake. Bayekoli batuni Yezu: "Epai wapi olingi tóbongisela yo bilei ya Pake?" 13 Bongo Yezu atindi bayekoli mibale pe alobi na bango: "Bókende na vile; bokomona moto moko amemi elokú ya mai. Bólanda ye 14 tii esika ye akokota. Bóloba na kolo ya ndako boye: 'Moteyi atuni: wapi esika ngai nakoki kolia bilei ya Pake ná bayekoli na ngai?' 15 Bongo ye akolakisa bino esika moko ya monene na ndako na ye na etaje, basi'babongisá yango. Bólambela biso biloko ya kolia kuna." 16 Bayekoli bakei pe bakoti na vile. Bamoni makambo nyonso kaka ndenge Yezu ayebisaki bango. Bongo balambi biloko ya kolia po na Pake. 17 Awa pokwa ekómi, Yezu akei kuna ná bayekoli na ye zomi na mibale. 18 Tango bazalaki kolia, Yezu alobi: "Nalobi na bino, ya solo: moko na kati na bino oyo azali kolia ná ngai, akoteka ngai." 19 Bayekoli bakomi koyoka mawa, pe moko moko abandi kotuna ye: "Ezali ngai?" 20 Yezu azongiseli bango: "Moto akoteka ngai ezali moko na kati na bino zomi na mibale; azali kolia ná ngai sani moko. 21 Ya solo, ngai Mwana ya Moto nakokufa ndenge ekómamá po na ngai; kasi mawa mingi na moto oyo akoteka Mwana ya Moto. Ebongaki malamu kutu moto wana ábotama té."

Nzoto ná Makila ya Yezu

22 Tango bazalaki kolia, Yezu akamati lipa, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bayekoli na ye, alobi: "Bóka-mata, oyo ezali nzoto na ngai." 23 Akamati pe kopo, asambeli po na kopesa Nzambe mersi, apesi kopo na bayekoli na ye, bongo bango nyonso bameli. 24 Alobi na bango: "Oyo ezali makila na ngai. Yango nde moto ezali kotia Boyokani na kati ya Nzambe ná bato; bakotangisa yango po bato ebele bábika. "Nalobi na bino, ya solo: nakomela lisusu vinu oyo té, tii mokolo nakomela vinu ya sika na mboka ya Nzambe." 26 Na sima bayembi banze-mbo, pe bakei na Ngomba ya ba-Olive.

Yezu ayebisi 'tè Piere akowangana ye

27 Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: "Bino nyonso bokobungisa bondimi po na ngai. Pamba té ekómamá boye: 'Nakoboma mobokoli pe bameme ekopanzana.' 28 Kasi tango nakosekwa, nakokende na Galilé liboso na bino." 29 Piere alobi na ye: "Ata soki bango nyonso babungisi bondimi, kasi ngai nakobungisa yango té!" 30 Yezu azongiseli ye: "Nalobi na yo, ya solo: na butu ya lelo oyo, liboso soso élela ata mbala mibale, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té." 31 Kasi Piere abéti tolo, alobi: "Ata soki nasengeli kokufa esika moko na yo, nakoki kowangana yo té." Pe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.

Yezu abondeli Nzambe na Jetsemane

32 Bongo bakomi na elanga moko bábengaka Jetsemane. Yezu alobi na bayekon na ye: "Bófanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe." 33 Amemi Piere, Jake ná Yoane, pe akei na bango. Na mbala moko abandi koyoka motema pasi pe somo. 34 Bongo alobi na bango: "Motema na ngai etondi na mawa lokola nákufa. Bótikala awa pe bókengela!" 35 Apusani mwa moke, afukami na mabelé, abandi kobondela Nzambe 'tè soki ekoki kosalama, tango oyo ya somo élongwa na ye. 36 Alobi: "Aba! (elingi koloba: Tata na ngai!) Yo okoki kosala makambo nyonso. Longola kopo oyo ya pasi. Kasi kosala té oyo ngai nalingi; sala bobele oyo yo olingi." 37 Azongi epai ya bayekoli misato wana pe akuti bango balali pongi. Alobi na Piere: "Simon, osi'olali? Ndenge nini okokaki té kokengela ata ngonga moko? 38 Bókengela pe bóbondela Nzambe po Monguna ámeka bino té! Ata bozali na molende na mitema, bozali kaka bato; bozangá makasi." 39 Sima akei lisusu pe abondeli Nzambe se ndenge ya liboso. 40 Azongi lisusu epai ya bayekoli na ye, pe akuti bango balali kaka pongi, pamba té miso na bango ekómaki kilo; bazangaki likambo ya koloba. 41 Tango azongi mbala ya misato alobi na bango: "Esili; sik'oyo bokoki kolala pe kopema. Tango esi'ekoki, po bákaba ngai Mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu. 42 Bótelema, tókende. Tala moto oyo ateki ngai ayei!"

Bakangi Yezu

43 Tango Yezu azalaki nanu koloba, Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, akómi. Ayei na bato ebele, bamemi bambeli ná banzete na maboko. Bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bato batindaki bango. 44 Nzokande Yudas oyo atekaki Yezu, alakisaki bango ndenge bakoyeba ye, alobaki boye: "Moto oyo ngai nakoyamba, ye wana. Bókanga ye, bómema ye, kasi bókengela ye malamu." 45 Na mbala moko Yudas apusani penepene ya Yezu, alobi na ye: "Moteyi", pe ayambi ye. 46 Bango basimbi Yezu, pe bakangi ye. 47 Moko ya baoyo bazalaki wana abimisi mbeli na ye, akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi. 48 Yezu atuni bango: "Boni? Nakómi moyibi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete po na kokanga ngai? 49 Mikolo nyonso nazalaki koteya na kati na bino na Ndako ya Nzambe, pe bokangaki ngai té. Kasi nyonso oyo esalami po na kokokisa makambo oyo ekómamá na Mikanda." 50 Bongo bayekoli nyonso batiki ye pe bakimi na bango. 51 Nzokande elenge moko ya mobali azalaki kolanda Yezu, alataki kaka liputa ya pamba. Balingaki kokanga ye, 52 kasi ye atiki liputa pe akimi bolumbu.

Basambisi Yezu na Likita-Monene ya Bayuda

53 Bongo bamemi Yezu na ndako ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, esika bakonzi nyonso ya banganga-Nzambe, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko bakendeki kosangana. 54 Piere azalaki kolanda ye na mosika tii na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe; kuna afandi esika moko ná bakengeli pe akómi koyotela móto. 55 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bato nyonso ya Likita-Monene bazalaki koluka bato bakoki kofunda Yezu po bákatela ye etumbu ya liwa, kasi bazwaki ata moto moko té. 56 Pamba té bato mingi bazalaki kokosela ye makambo ya lokuta, kasi maloba na bango ezalaki kokokana té. 57 Bongo bato mosusu batelemi, pe bakoseli ye makambo boye: 58 "Toyokaki ye azali koloba: Ngai nakoboma Ndako ya Nzambe oyo basalá na bato; pe na mikolo misato nakotónga mosusu oyo ekosalama na maboko ya bato té." 59 Kasi ata po na likambo oyo, maloba na bango ezalaki kaka kokokana té. 60 Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemi liboso na bango nyonso, pe atuni Yezu: "Okozongisa té? Bato oyo bazali kofunda yo na likambo nini?" 61 Kasi Yezu afandi nyee pe azongisi ata liloba moko té. Mokonzi ya banganga-Nzambe atuni ye lisusu: "Ozali Mesia, Mwana ya Nzambe?" 62 Yezu azongisi: "Ezali ngai. Pe bokomona ngai, Mwana ya Moto, ndenge nakofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso, pe ndenge nakoya na kati ya mapata ya Likolo." 63 Na mbala moko mokonzi ya banganga-Nzambe atomboki penza, apasoli bilamba na ye pe alobi: "Po na nini tóluka lisusu ba-temwen? 64 Bosi'boyoki ndenge atsioli Nzambe! Bokanisi nini?" Bango nyonso bakati balobi: "Asengeli kokufa!" 65 Bato mosusu na kati na bango babandi kobwakela ye soi, kozipa ye elongi pe kobeta ye makofi. Pe balobi na ye: "Lakisa 'tè ozali profete! Nani abéti yo?" Sima, bakengeli bakamati ye, pe babetibeti ye bambata.

Piere awangani Yezu

66 Tango Piere azalaki na se na kati ya lopango, mwasi moko ayei wana, azalaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe. 67 Amoni Piere azalaki koyotela móto, atali ye pe alobi: "Yo pe ozalaki ná Yezu, moto ya Nazaret!" 68 Kasi ye awangani alobi: "Makambo yo ozali koloba, nayebi yango té, pe namoni tina na yango té." Sima alongwe wana pe akei kofanda na monoko ya lopango. Bongo soso eleli. 69 Kasi mwasi yango amoni ye, pe abandi koyebisa lisusu bato oyo bazalaki wana: "Moto oyo azali moko na bango." 70 Kasi Piere awangani lisusu. Na sima ya mwa tango moke, baoyo bazalaki wana balobi na Piere: "Ya solo, yo ozali moko na bango, pamba té ozali moto ya Galilé." 71 Bongo Piere abandi koloba boye: "Nzambe penza! Nayebi na ngai moto bozali koloba té! Soki nakosi, Nzambe ápesa ngai etumbu!" 72 Kaka na tango wana, soso eleli mbala ya mibale. Bongo Piere akómi kokanisa maloba Yezu alobelaki ye: "Liboso soso élela mbala mibale, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té." Piere ayoki mawa pe abandi kolela.

Marko 15

Bamemi Yezu na tribinal ya Pilate

1 Na tongo-tongo bakonzi ya banganga-Nzambe, bambuta--L «J muntu pe balakisi-Mibeko basangani na Likita-Monene, po bákata likambo. Bango bakangisi Yezu basinga, bamemi ye pe bapesi ye na maboko ya Pilate. 2 Pilate atuni ye: "Yo ozali mokonzi ya Bayuda?" Yezu azongiseli ye: "Ee, ezali penza ngai." 3 Bakonzi ya banganga-Nzambe bafundifundi ye na makambo mingi. "Bongo Pilate atuni ye lisusu: "Okozongisa ata liloba moko té? Yoka ebele ya makambo bazali kofundela yo." 5 Kasi Yezu azongisi lisusu ata liloba moko té; yango wana Pilate akamwe mingi penza.

Pilate akateli Yezu etumbu ya liwa

6 Mbula na mbula na feti ya Pake, Pilate amesanaki kobimisa moto moko ya boloko oyo bato bazalaki kosenga. 7 Nzokande moto moko azalaki na boloko, kombo na ye Barabas. Azalaki kuna esika moko ná bato mosusu oyo babimisaki mobulu na mboka pe babomaki moto. 8 Boye kaka na tango wana bato ebele bayei kosenga Pilate ásalela bango ndenge amesaná kosala. 'Pilate azongiseli bango: "Bolingi nátikela bino mokonzi ya Bayuda?" 10 Pamba té ayebaki malamu 'tè bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki Yezu na maboko na ye po na likunya 11 Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe basati molende epai ya bato, po Pilate átikela bango kaka Barabas. 12 Pilate atuni bango: "Bongo násala nini na moto oyo bábengaka mokonzi ya Bayuda?" 13 Bango bagangi: "Boma ye na kuruze!" 14 Pilate atuni bango: "Likambo nini ya mabe asali?" Kasi bango bagangi lisusu: "Boma ye na kuruze!" 15 Pilate alukaki kosepelisa bato, yango wana atikeli bango Barabas. Abetisi Yezu fimbu, pe apesi ye na maboko na bango po bákende koboma ye na kuruze.

Basoda baseki Yezu

16 Basoda bamemi Yezu na lopango ya Pilate, pe babengisi batayon na bango mobimba. 17 Balatisi Yezu kazaka moko ya motane, pe batii ye na motú ekoti lokola ya bakonzi, kasi batóngaki yango na nzube. 18 Sima babandi kopesa ye mbote balobi: "Mbote mokonzi ya Bayuda!" "Babeti ye mwa-nzete na motú, babwakeli ye soi, pe bafukameli ye lokola nde bazali kokumisa ye. 20 Tango basilisi kosekaseka ye, balongoli ye kazaka ya motane, pe bazongiseli ye bilamba na ye. Sima bamemi ye na libanda po bákende koboma ye na kuruze.

Batii Yezu na kuruze

21 Moto moko ya mboka Sirène, kombo na ye Simon, tata na Alexandre ná Rufus, autaki na bilanga pe azalaki koleka na nzela wana. Basoda batindi ye na makasi ámema kuruze ya Yezu. 22 Bakei na ye esika bábengaka Golgota, elingi koloba "Mokuwa ya Motú". "Bapesi ye vinu basangisá na kisi moko oyo bábengaka mire; kasi Yezu ameli yango té. 24 Sima batii ye na kuruze pe bakaboli bilamba na ye; babeteli yango zeke po báyeba soki elamba nini moto na moto akoki kozwa. 25 Ezalaki na ngonga ya libwa ya tongo, tango batii ye na kuruze. 26 Bakómaki tina ya likambo oyo babomelaki ye na mwa-libaya boye: "Mokonzi ya Bayuda". 27 Batii lisusu bamiyibi mibale na ba-kuruze esika moko ná Yezu, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi. 28 Boye esalami ndenge ekómamá na Mikanda: "Batii ye na molongo ya bamiyibi." 29 Bato oyo bazalaki koleka esika wana bakomi kotsiola pe kofinga ye, balobi: "Ee, yo moto olobaki 'tè okoboma Ndako ya Nzambe pe okotónga yango lisusu na mikolo misato! 30 Ômibikisa yo moko, kita na kuruze!" 31 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bazalaki koseka Yezu kaka ndenge wana, babandi kolobana boye: "Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa té! 32 E yo, olobi 'tè ozali Mesia, mokonzi ya Israel, kita sik'oyo na kuruze po tómona, bongo tóndima yo!" Bamiyibi mibale oyo batiaki na kuruze pembeni ya Yezu, bango pe bafingi ye.

Liwa ya Yezu

33 Ekómi midi, molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa. 34 Bongo na sima ya ngonga ya misato, Yezu agangi na mongongo makasi penza: "Eloi, Eloi, lema sabaktani?" Elingi koloba: "Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, po na nini otiki ngai?" 35 Bato mosusu oyo bazalaki wana, bayoki ye, bongo balobi: "Yoka, azali kobenga profete Eliya!" 36 Moto moko akei mbangu kotondisa linuka na vinu ya ngayi, akangi yango na mwa-nzete, apesi yango na Yezu po ámela. Bongo alobi: "Tika tótala soki Eliya akoya kolongola ye na kuruze." 37 Kasi Yezu agangi makasi penza koleka, pe akati motema. 38 Kaka na tango wana ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na biteni mibale, banda na likolo tii na se. 39 Komandan ya basoda oyo atelemaki liboso ya Yezu, amoni ndenge akataki motema sima ya koganga, alobi: "Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe." 40 Basi mosusu batelemaki pe kuna, bazalaki kotala na mosika. Na kati na bango ezalaki Maria ya mboka Magdala, ná ndoi na ye Maria mama na Jake oyo bábengaka "ya moké" ná Jozé, pe Salomé. 41 Basi wana bazalaká kolanda Yezu pe kosalela ye tango azalaki na Galilé. Basi mosusu pe bazalaki kuna, bayaki nzela moko ná Yezu na Yeruzalem.

Bakundi Yezu

42 Pokwa ekómaki, pe lokola ezalaki tango ya kolengela Mokolo ya Kopema, 43 Jozef ya mboka Arimaté ayei; azalaki moto ya lokumu na kati ya Likita-Monene ya Bayuda; ye pe abandaki kotia motema 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye. Akei na molende nyonso epai ya Pilate, po na kosenga ebembe ya Yezu. 44 Kasi Pilate akamwe tango ayoki 'tè Yezu asi'akufi. Bongo abengi mokonzi ya basoda, atuni ye soki Yezu asi'akufi. 45 Tango mokonzi ya basoda ayebisi ye, Pilate apesi Jozef nzela ya kokamata ebembe. 46 Jozef asombi elamba ya pembe, akitisi ebembe ya Yezu na kuruze, alingi yango na elamba wana, pe akotisi yango na libulu oyo akatisaki na kati ya mabanga. Sima, apusi libanga moko ya monene pe azipi libulu. 47 Maria ya Magdala ná Maria mama na Jozé bazalaki kotala esika bakundi ye.

Marko 16

Yezu asekwi

1 Na pokwa, tango Mokolo ya Kopema esili, Maria ya J. \J Magdala ná ndoi na ye Maria mama na Jake, pe Salomé, basombi malasi po bákende kopakola na ebembe ya Yezu. 2 Bongo na tongo-tongo, tango moi ebandi kobima, bakei na simetiere. 3 Bazalaki kolobana: "Nani akolongolela biso libanga bazipelaki libulu?" "Kasi bátala boye, bamoni 'tè libanga esi'elongwaki, nzokande ezalaki monene penza. 5 Bakoti na kati ya libulu, bamoni elenge mobali moko afandi na liboko ya mobali, alati nzambala ya pembe. Bayokaki somo penza! 6 Kasi ye alobi na bango: "Bóbanga té! Bozali koluka Yezu ya Nazaret oyo babomaki na kuruze; asekwi, azali awa té! Botala esika batiaki ye. 7 Bongo bókende koyebisa Piere ná bayekoli mosusu 'tè Yezu akei liboso na bino na Galilé; bokomona ye kuna, ndenge ayebisaki bino." 8 Balongwe noki na simetiere, bakimi po bazalaki kolenga na somo. Balobi likambo yango ata na moto moko té, po bazalaki kobanga.

Yezu abimeli Maria ya Magdala

9 Awa Yezu asekwi na tongo-tongo, liboso abimeli Maria ya Magdala, oyo ye abenganaki milimo sambo ya mabe. 10 Maria akei koyebisa sango na bayekoli ya Yezu; akuti bango bazalaki kolela pe batondaki na mawa. "Kasi tango bayoki 'tè Yezu azali na bomoi pe Maria amonaki ye, baboyi kondima.

Yezu abimeli bayekoli mibale

12 Sima na yango, Yezu abimeli bayekoli mibale bazalaki kokende na esobe; amonanaki lokola moto mosusu. "Bayekoli wana bazongi pe bayebisi baninga na bango; kasi ata bongo, bandimelaki bango té.

Yezu abimeli bayekoli zomi na moko

14 Sima ya mwa tango moke, Yezu amonani pe na bayekoli zomi na moko tango bazalaki kolia. Asilikeli bango po baboyi kondima pe bazalaki kaka kotia tembe; baboyaki kutu kondimela baninga na bango oyo bamonaki ye penza na miso 'tè asekwi. 15 Bongo alobi na bango: "Bókende kosakola Sango Malamu na mokili mobimba epai ya bato nyonso. 16 Moto oyo akondimela ngai pe akozwa batisimo, akobika. Kasi oyo akondimela ngai té, akozwa etumbu. "Bongo bato bakondima bakobanda kosala makamwisi oyo: bakobimisa milimo mabe na kombo na ngai; bakoloba minoko ya sika; 18 soki basimbi banyoka na maboko to bameli pwazon, bakoyoka pasi ata moke té; bakotiela bato oyo bazali na maladi maboko, pe bango bakobika."

Yezu atombwani na Likolo

19 Tango Nkolo Yezu asilisi koloba makambo wana, atombwani na Likolo, pe akei kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. 20 Bayekoli pe bakei kosakola Sango Malamu bipai nyonso. Nkolo Yezu abandaki kosalisa bango, azalaki kosala makamwisi mingi po na kopesa nguya na maloba na ye.

Luka 1

Tina ya mokanda oyo

1-3 Mbuta-muntu Teofile, Bato mosusu basi'bameká kokóma lisolo ya makambo oyo elekaki na kati na biso. Bakómaki yango kaka ndenge bayokaki epai ya balakisi ya Sango Malamu, oyo bamonaki yango uta ebandeli. Ngai pe natunaki bato malamu-malamu makambo nyonso, ndenge elekaki uta ebandeli, bongo namoni 'tè ebongi nakomela yo lisolo yango polele. 4 Nasali boye po óyeba 'tè nyonso oyo bateyaki yo ezali ya solo.

Anjelu ayebisi mbotama ya Yoane Mobatisi

5 Tango Erode azalaki mokonzi ya région ya Yuda, ezalaki na nganga-Nzambe moko, kombo na ye Zakarya; ye azalaki na molongo ya banganga-Nzambe ya Abiya. Mwasi na ye pe azalaki moto ya fami moko ya banganga-Nzambe, kombo na ye Elizabet. 6 Bango mibale bazalaki bato malamu na miso ya Nkolo, pe bazalaki kotosa mibeko na ye nyonso. 7 Kasi bazalaki na mwana té, po Elizabet azalaki kobota té, pe bango mibale basi'bakómaki mibange. 8 Mokolo moko Zakarya azalaki kosala mosala na ye ya nganga-Nzambe na kati ya Ndako ya Nzambe ya Yeruzalem, pamba té babengaki molongo na ye kaka na mikolo wana. 9 Babetaki zeke ndenge banganga-Nzambe bamesaná kosala; bongo ye moto aponamaki po ákende kotumba malasi na Esika ya bosantu. 10 Na tango wana bato nyonso bazalaki kosambela na libanda. 11 Anjelu moko ya Nkolo abimeli ye, pe atelemi na liboko ya mobali ya mesa batumbelaka Nzambe malasi. 12 Tango Zakarya amoni ye, abandi kolenga pe ayoki somo mingi penza. 13 Kasi anjelu alobi na ye: "Zakarya, kobanga té. Pamba té Nzambe ayoki losambo na yo: mwasi na yo Elizabet akobotela yo mwana mobali; okopesa ye kombo Yoane. 14 Okozala na esengo mingi, pe bato mingi bakosepela po na mbotama na ye. 15 Ye akozala moto monene na miso ya Nkolo; akobanda komela vinu té to masanga ya makasi. Akotonda na Molimo Mosantu, banda na libumu ya mama na ye. 16 Akozongisa bato mingi ya Israel epai ya Nkolo, Nzambe na bango. 17 Akokende liboso ya Nkolo, na nguya pe makasi lokola profete Eliya, akozongisa boyokani na kati ya batata ná bana na bango; pe akosala 'tè bato ya mitú makasi bázwa mayele ya bato malamu; akobongisa bongo bato po na kosalela Nkolo." 18 Zakarya atuni anjelu: "Ndenge nini nakoyeba 'tè makambo wana ezali ya solo? Pamba té biso ná mwasi na ngai tosi'tokómi mibange." 19 Bongo anjelu azongiseli ye: "Ngai nazali Gabriel, natelemaka liboso ya Nzambe po na kosalela ye. Atindi ngai náya koloba na yo pe komemela yo sango oyo ya malamu. 20 Makambo nayebisi yo ekosalama na tango Nzambe atiá. Kasi lokola ondimi yango té, okokóma baba; okoloba lisusu té banda lelo tii mokolo yango." 21 Nzokande bato nyonso bazalaki kozela Zakarya pe bakamwaki po ye aumelaki mingi na Ndako ya Nzambe; 22 kasi tango ye abimi akokaki koloba na bango té, bongo bato nyonso bayaki koyeba 'tè amonaki likambo na kati ya Ndako ya Nzambe. Azalaki kaka kosala bilembo na maboko po na kosolola na bango, pe atikalaki baba. 23 Tango Zakarya asilisi mikolo na ye ya mosala na Ndako ya Nzambe, azongi epai na ye. 24 Na sima ya mwa tango moke mwasi na ye Elizabet azwi zemi pe akei komibomba sanza mitano na kati ya ndako; amilobi: ""Tala likambo Nkolo asali po na ngai! Pamba té alongoli ngai soni na miso ya bato."

Anjelu ayebisi mbotama ya Yezu

26 Tango zemi ya Elizabet ekómi na sanza motoba, Nzambe atindi anjelu Gabriel na mboka moko ya Galilé, kombo na yango Nazaret, "epai ya elenge mwasi oyo akobalana ná Jozef, moto ya libota ya David. Kombo ya elenge mwasi yango Maria. 28 Anjelu akoti na ndako ya Maria pe alobi: "Mbote na yo! Sepela, pamba té Nkolo azali na yo, atondisá yo na bolamu." 29 Tango Maria ayoki maloba wana, abangi pe amituni tina ya mbote wana. 30 Bongo anjelu alobi na ye: "Maria, kobanga té. Nzambe asepeli na yo. 31 Okozwa zemi, okobota mwana mobali; okopesa ye kombo Yezu. 32 Akozala moto monene; bakobanda kobenga ye Mwana ya Nzambe. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David. 33 Akozala mokonzi ya Israel libela; bokonzi na ye ekozala na suka té." 34 Maria atuni anjelu: "Ngai nayebi nanu nzoto ya mobali té; ndenge nini makambo wana ekoki kosalama?" 35 Anjelu azongiseli ye: "Molimo Mosantu akokitela yo; nguya ya Nzambe ekozipa yo lokola lipata. Yango wana mwana oyo okobota akozala mosantu. Bakobanda kobenga ye Mwana ya Nzambe. 36 Ndeko na yo Elizabet kutu ye pe alingi ábota mwana mobali, atako akómi mobange. Bazalaki koloba 'tè akoki kobota té, kasi sik'oyo azali na zemi ya sanza motoba. 37 Pamba té Nzambe akoki kosala makambo nyonso." 38 Bongo Maria alobi: "Nazali mosali ya Nkolo. Ésalama ndenge olobi." Pe anjelu atiki ye.

Maria akei kotala Elizabet

39 Kaka na tango wana Maria akamati nzela, akei noki na mboka moko, epai ya bangomba ya région ya Yuda. 49 Akoti na ndako ya Zakarya pe apesi Elizabet mbote. 41 Tango Elizabet ayoki maloba ya Maria, mwana aningani na libumu na ye, bongo Elizabet atondi na M 6 1 imo Mosantu. 42 Alobi na mongongo makasi: "Nzambe abenisá yo koleka basi nyonso! Abenisa pe mwana oyo okobota. 43 Nakómi nani po mama ya Mokonzi na ngai áya kotala ngai? 44 Pamba té bobele tango nayoki mbote na yo, mwana aningani na libumu na ngai po na esengo. 45 Ya solo ozali moto ya esengo, po ondimi 'tè makambo Nkolo alobaki na yo ekosalama."

Nzembo ya Maria

46 Bongo Maria alobi: "Nazali kokumisa Nkolo na motema mobimba; 47 natondi na esengo po na Nzambe, Mobikisi na ngai. 48 Pamba té atali ngai mosali na ye nazangá tina; ya solo, banda lelo bato nyonso bakobanda kobenga ngai moto ya esengo. 49 Nzambe ya nguya nyonso asali ngai makambo ya minene; amonisi 'tè azali Nzambe Mosantu ya Israel. 50 Tango nyonso alakisaka bolingo na ye, epai ya bato oyo batosaka ye. 51 Asali misala ya kokamwa na nguya na ye; apanzi bato bazali na lofundu na mitema. 52 Atii bakonzi minene pembeni; pe atomboli bato bazangá lokumu. 53 Atondisi bato oyo bakufi na nzala; pe azongisi bato ya mbongo maboko pamba. 54-55 Ayambi bato ya Israel, basali na ye, ndenge alakaká na bakoko na biso. Ayokeli Abraham ná bana na ye lisusu mawa; akoyokela biso mawa mikolo nyonso seko." 56 Maria atikalaki epai ya Elizabet sanza misato, na sima azongi na mboka na ye.

Mbotama ya Yoane Mobatisi

57 Tango mokolo ya Elizabet ya kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. 58 Bato bazalaki kofanda na ye penepene, ná bandeko na ye, bayoki ndenge Nkolo asalaki Elizabet bolamu, bongo basepelaki na ye. 59 Tango mwana akokisi mikolo mwambe, bayei po na kokata ye. Balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye Zakarya, 60 kasi mama na ye alobi: "Té! Kombo na ye ekozala Yoane." 61 Bango bazongiseli ye: "Ata moto moko té na kati ya libota na yo azali na kombo oyo!" 62 Batuni tata ya mwana na bilembo, kombo nini ye alingi kopesa na mwana. 63 Zakarya asengi mwa-libaya pe akomi boye: "Kombo na ye Yoane." Bango nyonso bakamwe! 64 Na mbala moko Zakarya abandi koloba lisusu, pe na mongongo makasi apesi Nzambe mersi. 65 Bongo bato oyo bazalaki kofanda penepene bakomi kobanga. Na bipai nyonso na bangomba ya Yuda bazalaki koloba bobele makambo yango. 66 Bato nyonso oyo bayokaki yango bazalaki kokanisa pe komituna: "Mwana wana akozala nani?" Ya solo, nguya ya Nkolo ezalaki na ye.

Nzembo ya Zakarya

67 Zakarya tata na Yoane atondaki na Molimo Mosantu, pe abandi kosakola boye: 68 "Mersi na Nkolo, Nzambe ya Israel; ayei po na kolongola bato na ye na boumbu. 69 Abimiseli biso elombe Mobikisi, mwana ya mosali na ye David. 70 Akokisi elaka oyo apesaká kala, na minoko ya baprofete na ye ya bosantu. 71 Abikisi biso na maboko ya banguna, pe ya bato nyonso oyo bayinaka biso. 72 Ayokeli bakoko na biso mawa; ayei kokanisa Boyokani oyo ye moko atiaká. 73 Pamba té akatelaká koko na biso Abraham seleka 'tè 74-75 akolongola biso na maboko ya banguna po tótika kobanga, bongo tókoka kosalela ye na bomoi na biso mobimba, tózala bato ya bosantu pe ya bosembo na miso na ye. 76 Boye yo, mwana moke, bakobanda kobenga yo profete ya Nzambe; okokende liboso ya Nkolo po na kobongisela ye nzela. 77 Okoyebisa bato na ye 'tè akobikisa bango, pe akolimbisa bango masumu. 78 Ya solo, Nzambe na biso atondá na bolamu pe bolingo; ábimisi Moi oyo eyei kotala biso uta na Likolo, 79 po éngengela bato oyo bakangamá na molili ya somo, pe étambwisaka biso, tólanda nzela ya boboto." 80 Mwana akolaki pe Nzambe apesaki ye nguya; azalaki kofanda na esobe tii mokolo ayaki kobima na miso ya bato ya Israel.

Luka 2

Mbotama ya Yezu

1 Na tango wana, mokonzi monene ya Rome kombo Oguste atindi bátanga bato nyonso, po báyeba talo na bango. 2 Ezalaki mbala ya liboso bato bákomisa bakombo na bango, tango Kirinius azalaki motambwisi ya Sine. 3 Bongo bato nyonso bakei kokómisa bakombo, moto na moto na mboka na ye. 4 Jozef pe atiki Nazaret na région ya Galilé, akei na Betleem na région ya Yuda, epai babotaki mokonzi David. Pamba té ye azalaki moto ya libota ya David. 5 Akendeki kokómisa kombo, ná Maria, elenge mwasi oyo ye akobala. Maria azalaki na zemi. 6 Tango bazalaki kuna, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7 Aboti mwana mobali, mwana na ye ya liboso; alingi ye na bilamba, pe alalisi ye na kesi moko banyama baleelaka, pamba té esika ezalaki té po na bango na shambre oyo bapaya bazalaki kolala.

Ba-anjelu ná babokoli ya bameme

8 Na esobe pembeni ya Betleem ezalaki na babokoli ya bameme; bazalaki kolala kuna po na kokengela bameme na bango. 9 Anjelu moko ya Nkolo abimeli bango, pe nkembo ya Nkolo engengeli bango. Babangaki mingi penza. 10 Kasi anjelu alobi na bango: "Bóbanga té, nayeeli bino sango moko ya malamu, oyo ekosepelisa ekolo mobimba ya Israel: 11 na butu ya lelo baboteli bino Mobikisi na mboka ya David. Ye azali Kristo pe Mokonzi oyo bozalaki kozela. 12 Bokoyeba ye boye: bokomona mwana balíngi bilamba, pe alali na kesi oyo batiaka bilei ya banyama." 13 Na mbala moko ba-anjelu mosusu ebele bayei kosangana ná anjelu oyo ya liboso. Bazalaki kokumisa Nzambe boye: 14 "Lokumu na Nzambe kuna na Likolo! Pe boboto awa na se, na bato oyo ye alingaka."

Babokoli ya bameme bakei na Betleem

15 Tango ba-anjelu bazongi na Likolo, babokoli ya bameme bayokani boye: "Tókende tii na Betleem, kotala makambo ekwei kuna, oyo Nkolo ayebisi biso." 16 Bakei kuna noki, bamoni Maria ná Jozef; bamoni pe mwana alali na kesi oyo batiaka bilei ya banyama. "Tango bamoni mwana, bayebisi baboti makambo oyo anjelu alobaki po na mwana. 18 Bato nyonso oyo bayokaki sango yango, bakamwe po na maloba ya babokoli ya bameme. 19 Kasi Maria abombi makambo wana nyonso na motema, pe azalaki kokanisa yango. 20 Na sima, babokoli ya bameme bazongi. Na nzela bazalaki kopesa Nzambe mersi, pe koyembela ye banzembo, po na makambo nyonso oyo bayokaki pe bamonaki; pamba té nyonso elekaki ndenge anjelu ayebisaki bango.

mwana kombo: Yezu

21 Sima ya mikolo mwambe bakati mwana, pe bapesi ye kombo Yezu; oyo ezali kombo anjelu ayebisaki Maria liboso ázwa zemi.

Bamemi Yezu na Ndako ya Nzambe

22 Awa mwana akokisi mikolo tuku minei, tango ekokaki po na kokende kolongola mbindo, ndenge Mibeko ya Moize ezali kotinda po na basi oyo baboti sika. Bongo Jozef ná Maria bamemi mwana na Yeruzalem, po na kolakisa ye na Nkolo. "Pamba té ekómamá na Mibeko ya Nkolo: "Mwana nyonso ya mobali oyo baboti liboso, akozala ya Nkolo." 24 Bapesi pe mabonza oyo Mibeko yango ezali kotinda: "Bapijon mibale ya zamba, to bana-pijon mibale ya mboka." 25 Moto moko azalaki na Yeruzalem, kombo na ye Simeon. Azalaki moto malamu, abandaki kotosa Nzambe pe kozela mokolo Nzambe akolongola Israel mawa. Molimo Mosantu azalaki na ye, 26 pe ayebisaki ye 'tè akokufa té liboso ámona Mesia oyo Nkolo akotinda. 27 Molimo Mosantu amemaki Simeon na Ndako ya Nzambe, kaka na tango baboti ya Yezu bakei na mwana, po na kokokisa makambo Mibeko ezali kotinda. 28 Bongo Simeon akamati ye na maboko pe apesi Nzambe mersi, alobi: 29 "Mokonzi Nzambe, okokisi makambo olakaká; bongo sik'oyo tika ngai nákufa na esengo. 30 Pamba té nasi'namoni na miso na ngai Mobikisi, 31 oyo otindi epai ya bikolo nyonso ya mokili. 32 Omimonisi na bato oyo bayebi yo té; opesi lokumu na ekolo na yo Israel."

Simeon pe Ana bandimi mwana Yezu

33 Tata ná mama na Yezu bakamwaki mingi, awa bayoki makambo Simeon alobaki po na ye. 34 Simeon apamboli bango pe alobi na Maria, mama na Yezu: "Nzambe aponá mwana oyo po na kokweisa to kotelemisa bato mingi ya Israel; atii ye lokola elembo. Bato bakoyina ye, 35 bongo makanisi oyo ebombamá na mitema ya bato mingi ekomonana polele. Pe yo, mama, pasi ekotobola motema na yo lokola mbeli." 36-37 Profete moko ya mwasi pe azalaki wana, kombo na ye Ana, mwana ya Fanuel, ya libota ya Aser. Ye akómaki mobange penza, akokisaki mbula 84 . Afandaki na mobali bobele bambula sambo, pe banda tango mobali na ye akufaki atikalaki kaka ye moko. Azalaki mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe, kobondela butu moi pe komilalisa nzala. 38 Ye pe ayaki kaka na tango wana pe abandi kopesa Nzambe mersi, bongo alobaki makambo ya Yezu na bato nyonso oyo bazalaki kozela 'tè Nzambe ásilisa boumbu ya Yeruzalem.

Bazongi na Nazaret

39 Tango baboti ya Yezu basilisi makambo nyonso oyo Mibeko ya Nkolo ezali kotinda, bazongi na Galilé, na mboka na bango Nazaret 40 Mwana akoli pe azwi nguya. Ayei kotonda na mayele, pe Nzambe apamboli ye.

Mwana Yezu atikali na Ndako ya Nzambe

41 Mbula na mbula baboti ya Yezu bazalaki kokende na Yeruzalem po na feti ya Pake. 42 Tango Yezu akokisi mbula zomi na mibale, bamemi ye na feti ndenge Bayuda bamesaná. 43 Tango feti esili, bakamati nzela po na kozonga. Kasi Yezu atikalaki na Yeruzalem, pe baboti na ye bayebaki té; ^bakanisaki 'tè ye azali epai ya bato mosusu. Basali mokolo mobimba na nzela, bongo babandi koluka ye epai ya bandeko pe baninga na bango. 45 Lokola bamoni ye té, bazongi na Yeruzalem po na koluka ye. 46 Na sima ya mikolo misato bakuti ye na Ndako ya Nzambe, afandi na kati ya balakisi-Mibeko; azalaki koyoka bango pe kotuna bango mituna. 47 Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakamwaki mingi po na mayele na ye pe na ndenge azalaki kozongisa biyano. 48 Tango baboti na ye bamoni ye bakamwe penza, bongo mama na Yezu alobi: "Mwana na ngai, po na nini osali biso boye? Biso na tata na yo tobangaki mingi pe tozali koluka yo." 49 Ye azongiseli bango: "Po na nini bozali koluka ngai? Boyebi té? Nasengeli kozala na Ndako ya Tata na ngai." 50 Kasi bango bayebaki tina ya maloba wana té. 51 Bongo Yezu azongi na Nazaret nzela moko ná bango, pe azalaki kotosa bango. Marna na ye azalaki kobomba makambo nyonsO wana na motema. 52 Yezu azalaki kokóma mayele mingi pe kokola. Boye azalaki kosepelisa Nzambe ná bato.

Luka 3

Mateya ya Yoane Mobatisi

1-2 Sima ya bambula ebele, Nzambe atindi maloba na ye epai ya Yoane, mwana ya Zakarya, na kati ya esobe. Na tango wana mokonzi monene Tibère akokisi bambula zomi na mitano na bokonzi ya Rome, Ponse Pilate azalaki motambwisi ya région ya Yuda; Erode azalaki mokonzi ya Galilé; ndeko na ye Filipe azalaki mokonzi ya Ituré pe ya Trakonite; Lisanias azalaki mokonzi ya Abilene; pe Ana ná Kaife bazalaki banganga-Nzambe minene. 3 Bongo Yoane abandi kotambola na bapembeni nyonso ya mai ya Yordan. Azalaki kosakola boye: "Bóbongola mitema, bóya nábatisa bino, bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino." 4 Ndenge wana Yoane akokisaki makambo ekómamá na mokanda ya profete Ezaya: "Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: 'Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela; bósalela ye nzela moko ya kitoko!' 'Bakozipa mabulu nyonso ya minene; bakolalisa bangomba nyonso ya mike ná ya rrulai. Bakobongisa banzela oyo etengamá; bakozipa mabulu ya banzela ya mabe. 6 Pe moto nyonso akomona ndenge Nzambe abikisaka bato." 7 Bato ebele babandaki kokende epai ya Yoane po ábatisa bango. Yoane azalaki koloba na bango: "Ee, bino banyoka oyo! Nani apesi bino mayele ya kokima kanda ya Nzambe oyo ezali koya? 8 Bósala makambo oyo ezali kolakisa 'tè bosi'bobongoli mitema! Bótika komiloba bino na bino 'tè: 'Mabe moko té ekoki kokweela biso, pamba té Abraham azali koko na biso.' Nalobi na bino: Nzambe akoki kobongola mabanga oyo po ákómisa yango bana ya Abraham. 9 Basi'babongisi epasola po na kokata banzete; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakokata yango pe bakobwaka yango na móto." 10 Bato batuni ye: "Bongo, tósala nini?" 11 Yoane azongiseli bango: "Oyo azali na shemize mibale, ápesa moko na moninga oyo azangi yango. Oyo azali na bilei, ákabela bato mosusu." ^Bafutisi-mpaku pe bayaki po Yoane ábatisa bango, bongo batuni ye: "Moteyi, tósala nini?" 13 Yoane azongiseli bango: "Bófutisa bato se mpaku oyo batindi bino." 14 Basoda pe batuni ye: "Bongo biso tósala nini?" Yoane alobi na bango: "Bónyokola moto moko té, pe bókosela bato makambo té; bómeka kozwa mbongo mosusu té na likolo ya lifuta na bino." 15 Bato nyonso bazalaki kozela 'tè likambo monene ekoya; bazalaki kotia mitema na Yoane, pe babandaki komituna soki ye azali Mesia. 16 Bongo Yoane alobi na bango nyonso: "Ngai nazali kobatisa bino na mai pamba, kasi moto oyo aleki ngai na makasi, akoya sima na ngai; nakoki kutu kofungola basinga ya sapatu na ye té. Ye akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na móto. 17 Asimbi kiyungulu po na koyungula matiti oyo esangani na mbuma; akobomba mbuma kasi akotumba matiti na móto oyo ekufaka té." 18 Yoane azalaki koloba. makambo mingi mosusu po na kopesa bato molende, pe azalaki koteya bango Sango Malamu. 19 Apesi pe mokonzi Erode toli, po abalaki Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe, pe po na mabe mosusu oyo asalaki. 20 Bongo Erode asali lisusu likambo moko ya mabe: atii Yoane na boloko.

Yoane abatisi Yezu

21 Awa Yoane asilisi kobatisa bato nyonso, abatisi pe Yezu. Tango Yezu azalaki kosambela, Likolo efungwani, 22 bongo Molimo Mosantu amonanaki lokola pijon pe akiteli ye. Mongongo moko euti na Likolo elobi: "Yo ozali mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi po na yo."

Bakoko ya Yezu

23 Yezu azalaki na bambula penepene ya tuku misato tango abandaki kosakola. Bato babandaki kokanisa 'tè azali mwana ya Jozef. Jozef azalaki mwana ya Eli 24 pe koko ya Matát. Bakoko na ye kobanda Matát ezalaki: Levi, Melki, Yanai, Jozef, 25 Matatias, Amos, Nahum, Esli, Nagai, 26 Maat, Matatias, Semei, Yozek, Yoda, 27 Yoanan, Reza, Zorobabel, Shaltiel, Neri, 28 Melki, Adi, Kosam, Elmadam, Er, 29 Yezu, Eliezer, Yorim, Matát, Levi, 30 Simeon, Yuda, Jozef, Yonam, Eliakim, 31 Melea, Mena, Matata, Natan, David, 32 Jesé, Yobed, Booz, Sala, Nason, 33 Aminadab, Admin, Ami, Hesrom, Pères, Yuda, 34 Jakob, Izaak, Abraham, Tera, Nahor, 35 Serug, Reu, Peleg, Eber, Shela, 36 Kainam, Arpakshad, Sem, Noé, Lamek, 37 Metushela, Henok, Yared, Malelel, Kenan, 38 Enosh, Set, Adamu; Adamu nde autaki na Nzambe.

Luka 4

Zabolo ameki Yezu

1 Yezu atondaki na Molimo Mosantu, alongwe na mai ya Yordan; pe Molimo amemi ye na esobe. 2 Kuna zabolo ameki ye mikolo tuku minei. Mikolo nyonso wana Yezu aliaki té, sima na yango ayoki nzala. 3 Bongo zabolo alobi na ye: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ébongwana bilei." 4 Yezu azongiseli ye: "Ekómamá na Mikanda: Moto akoki kobikela kaka na biloko ya kolia té." 5 Bongo zabolo amemi ye na esika moko na likolo, pe alakisi ye bamboka nyonso ya bakonzi ya mokili. 6 Alobi na ye: "Nakopesa yo bokonzi ya mokili mobimba pe lokumu na yango; pamba té bapesi yango na maboko na ngai, pe nakoki kopesa yango na moto oyo ngai nalingi. 7 Bongo soki ofukameli ngai, nyonso wana ekokóma ya yo." 8 Yezu azongiseli ye: "Ekómamá na Mikanda: Fukamela Nkolo, Nzambe na yo, pe salela bobele ye moko." 9 Na sima zabolo amemi ye na Yeruzalem. Atii ye na likolo ya Ndako ya Nzambe, pe alobi na ye: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, ómibwaka na se, 10 pamba té ekómamá na Mikanda: 'Nzambe akotinda ba-anjelu na ye po bábatela yo.' 11 Pe lisusu: 'Bakomema yo na maboko na bango, po likolo na yo étuta na libanga té.'" 12 Yezu azongiseli ye: "Ekómamá na Mikanda: Komeka Nkolo, Nzambe na yo té." 13 Awa zabolo asilisi komeka Yezu na ndenge nyonso, atiki ye tii na tango akoya komeka ye lisusu.

Yezu abandi mosala na Galilé

14 Bongo Yezu azongi na Galilé, atondaki na nguya ya Molimo Mosantu. Sango na ye etamboli bipai nyonso na mboka wana. 15 Azalaki koteya na bandako ya losambo, pe bato nyonso bazalaki kokumisa ye.

Bato ya Nazaret baboyi Yezu

16 Yezu akendeki na Nazaret epai ye akolaki. Na Mokolo ya Kopema akoti na ndako ya losambo ndenge amesaná. Atelemi po na kotanga Mokanda ya Nzambe. 17 Bongo bapesi ye mokanda ya profete Ezaya. Afungoli yango pe azwi esika oyo bakómá boye: 18 "Molimo ya Nkolo akiteli ngai; Nkolo aponi ngai Mesia po námema Sango Malamu epai ya bato bakelelá. Atindi ngai náyebisa na bato ya boloko 'tè bakobimisa bango, pe na bato bakufa miso 'tè bakomona lisusu; násilisa pasi ya bato bazali konyokwama, 19 pe násakola 'tè: tango ekoki, oyo Nkolo alingi kolakisa bolamu na ye." 20 Na sima Yezu akangi mokanda wana, azongisi yango na mosali ya ndako ya losambo pe afandi; bato nyonso bazalaki na kati ya ndako ya losambo batali ye nyee. 21 Bongo Yezu abandi koloba na bango boye: "Nzambe akokisi makambo oyo lelo, bobele na tango nazalaki kotangela bino yango." 22 Bango nyonso bazalaki kokumisa ye, pe bakamwaki po na maloba ya bolamu oyo ye alobaki. Bamituni: "Oyo mwana ya Jozef té?" 23 Yezu alobi na bango: "Nayebi malamu bokoloba na ngai 'tè: 'Monganga, ómibikisa yo moko.' Makambo nyonso oyo yo osalaki na Kafarnaum, sala yango pe awa, na mboka na yo." 24 Yezu alobi lisusu: "Nalobi na bino, ya solo, bandimaka profete té na mboka na ye moko. 25 Nalobi na bino: bókanisa nanu mikolo ya profete Eliya, tango mbula ezalaki konoka té mbula misato na sanza motoba, pe nzala mingi: ezalaki na ekolo mobimba. Na tango wana basi bakufelá mibali bazalaki mingi na Israel; 26 nzokande Nzambe atindaki Eliya kaka epai ya mwasi moko akufelá mobali, na vile ya Sarepta, na mboka Sidon. 27 Pe na tango ya profete Elizé, bato ya maladi ya maba bazalaki mingi na Israel; nzokande ata moto moko té na kati na bango abikaki, bobele Naman, moto ya mboka Sirie." 28 Awa bayoki makambo wana, bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya losambo basiliki. 29 Batelemi pe babimisi ye na Nazaret, bongo bamemi ye na songe ya ngomba esika batóngá vile na bango, po na kobwaka ye na se. 30 Kasi ye aleki na kati na bango pe akei na ye.

Yezu abimisi molimo mabe

31 Yezu akendeki na Kafarnaum, vile ya Galilé, pe azalaki koteya bato na Mokolo ya Kopema. 32 Bato bakamwaki mingi po na mateya na ye, pamba té azalaki koloba lokola moto azali na bokonzi. 33 Moto moko ya molimo mabe azalaki na kati ya ndako ya losambo, pe abandi koganga makasi: 34 "Ee! Yezu ya Nazaret, biso ná yo likambo nini? Oyei po na koboma biso? Nayebi yo malamu; ozali Mosantu oyo Nzambe atindi!" 35 Yezu agangeli molimo wana, alobi: "Fanda nyee, bima na nzoto ya moto oyo!" Molimo mabe ekweisi moto wana na mabelé liboso ya bato nyonso, pe ebimi kaka, esali ye ata likambo moko té ya mabe. 36 Bato nyonso bakamwe, pe balobi bango na bango: "Ndenge nini maloba na ye ezali na nguya boye? Moto oyo azali na bokonzi ya kotinda milimo mabe, bongo yango ezali kobima!" 37 Boye sango ya Yezu epanzanaki bipai nyonso na mboka yango mobimba.

Yezu abikisi bato mingi ya maladi

38 Yezu abimi na ndako ya losambo pe akei na ndako ya Simon. Mama ya mwasi ya Simon azalaki kobela fièvre moko y a makasi, bongo babondeli Yezu po ábikisa ye. 39 Yezu agunzami penepene na ye, pe alobi na mongongo makasi 'tè fièvre ésila. Fièvre esili, bongo ye atelemi pe abandi kosalela bango. 40 Tango butu ebandi koya, bato nyonso bamemeli Yezu bato na bango oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge; Yezu atii moko moko na bango maboko, pe abikisi bango nyonso. 41 Bongo milimo mabe ebimaki na bato ya maladi mingi, pe ezalaki koganga: "Yo ozali Mwana ya Nzambe!" Kasi Yezu azalaki kopekisa yango éloba té, po yango eyebaki 'tè ye azali Mesia.

Yezu ateyi na bandako ya losambo

42 Awa tongo etani, Yezu alongwe na Kafarnaum pe akei na esobe. Bongo bato ebele babandi koluka ye. Tango bamoni ye bameki kopekisa ye po álongwa epai na bango té. 43 Kasi Yezu alobi na bango: "Nasengeli pe kosakola na bamboka mosusu Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye; pamba té ye atindi ngai po na yango." 44 Bongo Yezu abandi kosakola bipai nyonso na bandako ya losambo, na mboka mobimba.

Luka 5

Yezu abengi bayekoli na ye ya liboso

1 Mokolo moko Yezu azalaki pembeni ya lak ya Jenezaret. Bato mingi batondanaki wana pe bazalaki kotia ye kaká po na koyoka maloba ya Nzambe. 2 Yezu amoni babwatu mibale pembeni ya mokili. Baluki-mbisi batikaki yango po na kosukola minyama na bango. 3 Yezu akoti na bwatu moko; yango ezalaki ya Simon. Asengi ye ápusa bwatu mwa-moke na mai, bongo afandi na bwatu pe abandi koteya bato. 4 Tango asilisi koteya, alobi na Simon: "Pusa bwatu esika mai ezali modindo, bongo bóbwaka minyama na bino na mai po na kokanga bambisi." 5 Simon azongiseli ye: "Moteyi, tosali butu mobimba pe tokangi ata eloko moko té, kasi lokola yo otindi, nakobwaka minyama na mai." 6 Basali bongo, pe bakangi bambisi ebele penza; minyama na bango ebandi kutu kopasuka. 7 Yango wana babengi baninga na bango oyo bazalaki na bwatu mosusu po baya kosalisa bango. Bayei pe batondisi babwatu nyonso mibale na bambisi, bongo elingaki kodinda. 8 Tango Simon amoni boye akwei na mabolongo liboso ya Yezu pe alobi na ye: "Mokonzi, longwa penepene na ngai, nazali moto ya masumu!" 'Pamba té ye ná bato nyonso oyo bazalaki na bwatu na ye bayokaki somo penza po na bambisi ebele oyo bakangaki. 10 Jake ná Yoane, bana ya Zebedé, baninga na ye oyo bazalaki na bwatu mosusu, bayokaki pe somo ndenge moko. Kasi Yezu alobi na Simon: "Kobanga té. Banda lelo okozala lisusu moluki-mbisi té, kasi okobanda koluka bato." 11 Bongo bamemi babwatu na bango na libongo. Batiki biloko na bango nyonso, pe balandi Yezu.

Yezu abikisi moto ya maladi ya maba

12 Lokola Yezu azalaki na mboka moko, moto moko azalaki na maladi ya maba ayei. Tango amoni Yezu, akwei elongi na se, pe abondeli ye boye: "Mokonzi, soki olingi okoki kobikisa ngai." 13 Yezu atandi liboko, asimbi ye pe alobi: "Nalingi yango, bika." Kaka na tango wana maladi ya maba esili. 14 Yezu atindi ye boye: "Koloba likambo oyo na moto té. Kende kaka komilakisa epai ya nganga-Nzambe, pesa mabonza ndenge Moize atindá po na moto oyo abiki na maladi ya maba; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo." "Sango ya Yezu epanzanaki bipai na bipai, pe bato mingi bazalaki koya kosangana po na koyoka ye, pe kosenga ye ábikisa bango na ba-maladi na bango. 16 Kasi Yezu abendi nzoto pe akei na esobe po na kosambela.

Yezu abikisi moto akufá makolo

17 Mokolo moko Yezu azalaki koteya; ba-Farizé ná balakisi-Mibeko bafandaki wana, bautaki na ba-vile nyonso ya Galilé pe ya Yuda; bamosusu bautaki kutu na Yeruzalem. Yezu azalaki kobikisa bato ya maladi na nguya ya Nkolo. 18 Bongo bamemeli ye moto moko akufá makolo, alali na etoko. Bazalaki koluka nzela ya kokotisa ye na kati ya ndako pe kotia ye liboso ya Yezu. "Kasi lokola bazwi esika ya kokotisa ye té po na kaká ya bato, bamati likolo ya ndako, batoboli lidusu, pe bakitisi ye ná etoko na ye na katikati ya bato nyonso liboso ya Yezu. 20 Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto ya maladi wana: "Moninga, nalimbisi yo masumu." 21 Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé babandi komituna: "Moto oyo azali nani? Azali kotsiola Nzambe! Nani moto akoki kolimbisa masumu? Kaka Nzambe té?" 22 Yezu ayebaki makanisi na bango pe alobi: "Po na nini bozali kokanisa ndenge wana? "Soki nalobi na ye: 'Nalimbisi masumu na yo', to pe nalobi: 'Telema pe tambola'; nini eleki pasi? 24 Kasi nalingi bóyeba 'tè ngai Mwana ya Moto nazali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili." Bongo alobi na moto akufá makolo: "Nalobi na yo: telema, kamata etoko na yo pe zonga na ndako." 25 Na mbala moko moto wana atelemi na miso ya bato nyonso, akamati etoko na ye, azongi na ndako pe na nzela azalaki kopesa Nzambe mersi. 26 Bato nyonso bakamwe penza, bapesi Nzambe mersi pe babangi, balobi: "Lelo tomoni likambo ya kokamwa!"

Yezu abengi Levi

27 Sima na yango Yezu abimi, pe amoni mofutisi-mpaku moko, kombo na ye Levi, afandi na biro na ye. Yezu alobi na ye: "Landa ngai." 28 Levi atelemi, atiki biloko na ye nyonso pe alandi ye. 29 Bongo Levi asaleli Yezu feti monene na ndako na ye. Bafutisi-mpaku mingi ná bato mosusu bafandaki na mesa esika moko ná bango. 30 Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko oyo bazalaki na lingomba na bango bayokaki mabe pe balobi na bayekoli ya Yezu: "Po na nini bozali kolia pe komela esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?" 31 Yezu azongiseli bango, alobi: "Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té, kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga. 32 Nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi nayaki kobenga bato ya masumu po bábongola mitema."

Yezu ayeeli bato makambo ya sika

33 Bato mosusu balobi na Yezu: "Bayekoli ya Yoane ná ya ba-Farizé bazali na batango mingi ya komilalisa nzala pe ya kosambela; kasi bayekoli na yo basalaka bongo té, baliaka pe bamelaka." 34 Bongo Yezu azongiseli bango: "Boni? Soki bobengisi bato na feti ya libala, bokoki kolalisa bango nzala, tango moto oyo abali azali nanu na bango? Esalamaka té! 35 Kasi mokolo ezali bakolongola mobali na kati na bango; bongo mokolo wana baninga na ye bakobanda komilalisa nzala." 36 Yezu apesi bango ndakisa oyo: "Moto moko té akamataka kitende ya elamba ya sika po ábamba na elamba ya kala. Soki asali bongo, abebisi elamba ya sika, pe kitendi ya sika oyo akamati ekokani té na elamba ya kala. 37 Pe moto moko té atiaka vinu ya sika na basaki ya kala. Soki asali bongo, vinu ya sika ekopasola basaki; vinu ekopanzana pe basaki ekokufa. 38 Kasi ebongi malamu bátia vinu ya sika na basaki ya sika. 39 Pe moto moko té alingaka vinu ya sika soki asi'ameli vinu ya kala. Pamba té akoloba: 'Vinu ya kala eleki malamu.' "

Luka 6

Yezu azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema

1 Na Mokolo ya Kopema, Yezu ná bayekoli na ye bazalaki koleka na bilanga ya blé, bongo bayekoli na ye babandi kobuka blé, baniki yango na maboko po na kobimisa mbuma pe balei yango. 2 Ba-Farizé mosusu batuni: "Po na nini bozali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema?" 3 Yezu azongiseli bango: "Botangi nanu té makambo David asalaka tango ye ná bato na ye bayokaki nzala? "Akotaki na Ndako ya bosantu akamati mapa oyo batielaki Nzambe, alei yango pe apesi bato na ye. Nzokande kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia yango." 5 Bongo Yezu asukisi boye: "Ngai Mwana ya Moto nazali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema."

Yezu abikisi moto akufá liboko

6 Na Mokolo mosusu ya Kopema Yezu akoti na ndako ya losambo pe abandi koteya. Moto moko azalaki kuna, liboko na ye ya mobali ekufá. 7 Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé bazalaki kotala Yezu na mayele soki akoki kobikisa moto na Mokolo ya Kopema, po bázwa nzela ya kofunda ye. 8 Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, bongo alobi na moto oyo azalaki na liboko ekufá: "Telema, yaka awa liboso ya bato nyonso." Moto yango pe akei kotelema. 9 Na sima Yezu atuni bato: "Na Mokolo ya Kopema, mibeko na biso epesaka nzela ya kosala malamu to té? Tokoki kobikisa moto oyo azali na pasi to té?" 10 Yezu atali bango nyonso, bongo alobi na moto wana: "Tanda liboko na yo!" Ye atandi yango pe liboko na ye ekómi malamu. 11 Kasi bango basilikaki penza pe babandi koluka bango na bango likambo nini bakoki kosala Yezu.

Yezu aponi bayekoli zomi na mibale

12 Na tango wana, Yezu akei na ngomba moko po na kosambela Nzambe; atikalaki kuna kosambela butu mobimba. 13 Tango tongo etani, abengi bayekoli na ye pe aponi bato zomi na mibale; apesi bango kombo: bantoma. 14 Ezalaki: Simon (oyo ye apesi kombo: Piere) ná ndeko na ye André; Jake ná Yoane; Filipe pe Bartelemi, 15 Matié, Toma ná Jake mwana ya Alfé, pe Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda; 16 Yuda mwana ya Jake pe Yudas Iskariote, oyo atekaki Yezu.

Yezu ateyi pe abikisi bato ya maladi

17 Yezu akiti ngomba ná bango, pe atelemi na esika moko ya polele. Bayekoli na ye ebele bazalaki wana, ná bato mingi bautaki na région ya Yuda mobimba, na Yeruzalem pe na bamboka oyo ezali na bipai ya Tir ná Sidon, penepene ya ebale monene. 18 Bayaki po na koyoka Yezu, pe po na kosenga ye ábikisa bato bazali na maladi. Bato oyo milimo mabe ezalaki konyokola, bango pe babikaki. 19 Bato nyonso bazalaki koluka nzela ya kosimba ye, po nguya ezalaki kobima na nzoto na ye pe kobikisa bango nyonso.

Bisengo pe mawa

20 Yezu atali bayekoli na ye, pe alobi na bango: "Esengo na bino bato bokelelá: pamba té bozali bato ya mboka ya Nzambe. 21 Esengo na bino bato bozali na nzala sik'oyo: Nzambe akotondisa bino na bilei. Esengo na bino bato bozali kolela sik'oyo: pamba té mokolo ezali bokoseka! 22 "Esengo na bino soki bayinaka bino, soki babenganaka bino, soki balingaka bino pe baboyaka koyoka kombo na bino likolo na ngai Mwana ya Moto! "Bósepela pe bozala na esengo mokolo makambo wana ekoya, pamba té lifuta monene ezali kozela bino na Likolo. Bóyeba 'tè bakoko na bango bazalaká konyokola baprofete kaka ndenge wana. 24 "Kasi mawa na bino bato ya mbongo: bosi'bozwi bomengo na bino. 25 Mawa na bino bato bozali kotonda sik'oyo: mokolo ezali bokokufa nzala. Mawa na bino bato bozali koseka sik'oyo: mokolo ezali bokolela pe bokosala matanga. 26 "Mawa na bino soki bato nyonso bakumisaka bino: bóyeba 'tè bakoko na bango bazalaká kokumisa baprofete ya lokuta kaka ndenge moko."

Mateya po na kozongisa mabe

27 "Kasi ngai nalobi na bino bato bozali koyoka ngai: Bólinga banguna na bino: bósala malamu na bato oyo bazali koyina bino; 28 bósenga Nzambe ábenisa bato oyo bazali kofinga bino; pe bóbondela ye po na bato oyo bazali konyokola bino. 29 Soki moto abéti yo mbata na litama, pesa ye litama mosusu; soki akamati kazaka na yo, tikela ye pe shemize na yo. 30 Pesa na moto nyonso oyo azan kosenga yo; pe soki moto akamati biloko na yo na makasi, kotungisa ye té po ázongisa yango. 31 Makambo oyo bólingaka 'tè bato básala bino, bino pe bosalaka yango na bato mosusu. 32 "Soki bólingaka kaka bato oyo bazali kolinga bino, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu pe balingaka bato oyo bazali kolinga bango. 33 Pe soki bosalaka malamu kaka na bato oyo bazali kosala bino malamu, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu basalaka kaka ndenge wana. 34 Soki bodefi-saka mbongo kaka na bato oyo bino botii mitema 'tè bakofuta nyongo, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu pe badefisaka na bato ya masumu, po bázwa mbongo oyo badefisaki. 35 Kasi bino, bólingaka banguna na bino, bosalaka bango bolamu; pe bódefisaka bango, ata bokanisi 'tè bakofuta nyongo té. Bongo bokozwa lifuta monene, pe bokozala bana ya Nzambe ya Likolo, pamba té ye azali malamu epai ya bato ya mabe ná baoyo bandimaka ye té. 36 Bóyokelaka bato mawa, ndenge Tata na bino ayokelaka bango mawa."

Kotala bizaleli ya bato té

37 "Botala bizaleli ya bato té; soki té Nzambe pe akotala bizaleli na bino. Bóloba té 'tè: 'Bato oyo bazali mabe'; soki té Nzambe pe akoloba 'tè bino bozali mabe. Bólimbisa bato, boye Nzambe pe akolimbisa bino. 38 Bókabela bato po Nzambe pe ákabela bino: akotia na basaki na bino biloko mingi penza, akofina pe akoningisa yango po étonda meke. Nzambe akokabela bino se ndenge bino pe bokabelaka bato mosusu." 39 Yezu apesi bango ndakisa, alobi: "Moto akufá miso akoki kolakisa nzela té na moto mosusu akufá miso. Soki asali yango, bango mibale bakokweya na libulu. Ezali boye té? 40 Moyekoli aleki molakisi na ye té; kasi soki moyekoli asimbi malamu mateya ya molakisi, akokokana na ye. 41 "Po na nini ozali kotala mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo? Nzokande ozali na nzete na liso na yo moko, kasi ozali komona yango té. 42 Ozali koloba na ndeko na yo: 'Ndeko, tika nálongola mwa-lititi oyo ekoti yo na liso.' Ndenge nini okoki koloba bongo? Na liso na yo moko nzete ezali, kasi ozali kokipé yango té! Moto ya lokuta! Longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu po na kolongola mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo."

Nzete ná mbuma na yango

43 "Nzete ya malamu ebotaka mbuma ya mabe té, pe nzete ya mabe ebotaka mbuma ya malamu té. 44 Nzete nyonso eyeba-naka na mbuma na yango; babukaka mbuma y a figi na banzete ya nzube té, pe balongolaka mbuma ya vinu na banzete ya basende té. 45 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na ye; moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ezali na motema na ye. Pamba té moto nyonso abimisaka na monoko makambo oyo etondi na motema na ye."

Bandako mibale

46 "Po na nini bozali kobenga ngai 'Mokonzi, Mokonzi!', kasi botosaka maloba na ngai té? 47 Moto nyonso oyo ayei epai na ngai pe ayoki maloba na ngai bongo akómi kotosa yango, akokani na nani? Nakoyebisa bino! 48 Akokani ná moto moko oyo atóngaki ndako: atimolaki libulu ya molai tii akutaki mabanga, bongo abandaki kotónga. Na tango ya mbula, mai etondi, ebeti na ndako wana, kasi eningisi yango té, pamba té batóngaki yango malamu. 49 Kasi moto oyo ayoki maloba na ngai bongo atosi yango té, akokani ná moto mosusu oyo atóngaki ndako na ye likolo ya mabanga té, kasi likolo ya zelo. Tango mai etondi pe ebeti na ndako wana, yango ekwei na mbala moko pe nyonso epanzani."

Luka 7

Yezu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda

1 Tango Yezu asilisi koteya bato makambo nyonso wana, akei na Kafarnaum. 2 Kuna, mokonzi moko ya basoda ya Rome azalaki na mosali moko oyo ye abandaki kolinga mingi. Mosali wana azalaki na maladi pe alingaki kokufa. 3 Tango mokonzi ya basoda ayoki sango ya Yezu, atindi bambuta-muntu mosusu ya Bayuda po bákende kobondela ye 'tè áya kobikisa mosali na ye. 4 Awa bakomi epai ya Yezu, pe babandi kobondela ye, balobi: "Ya solo, moto atindi biso azali moto malamu, ebongi ósalisa ye. 5 Alingaka ekolo na biso; ezali kutu ye moto atóngisaki ndako na biso ya losambo." 6 Bongo Yezu akei nzela moko ná bango. Tango akómi penepene ya ndako, mokonzi ya basoda wana atindi baninga na ye po báloba na Yezu boye: "Mokonzi, komitungisa té. Ngai nazali Moyuda té; ndenge nini ókota na ndako na ngai? 7 Yango wana nabangaki koya ngai moko epai na yo. Kasi loba kaka liloba moko bongo maladi ekotosa yo pe mosali na ngai akobika. 8 Pamba té ngai pe natosaka bakonzi na ngai; nazali pe na basoda oyo batosaka ngai. Soki nalobi na moko: 'Kende', akei; soki nalobi na mosusu 'Yaka', ayei; pe soki natindi mosali na ngai 'Sala mosala oyo', asali yango." 9 Awa Yezu ayoki maloba wana akamwe; abaluki pe alobi na bato oyo bazalaki kolanda ye: "Nalobi na bino, nanu namoná bondimi ya ndenge oyo té, ata na Israel!" 10 Tango bato wana bazongi na ndako ya mokonzi ya basoda, bakuti mosali yango abiki.

Yezu asekwisi elenge moko ya mobali

11 Na sima Yezu akei na vile moko kombo na yango Nain; bayekoli na ye ná bato ebele bazalaki kokende nzela moko ná ye. 12 Tango akómi penepene ya porte ya lopango oyo ezalaki kozinga vile wana, bakutani ná bato bazalaki kokende kokunda ebembe: ezalaki mwana ya mwasi moko akufelá mobali; mama wana azalaki na mwana mosusu té. Bato mingi ya mboka bazalaki kokende nzela moko ná ye. 13 Tango Nkolo Yezu amoni mama wana, ayokeli ye mawa mingi pe alobi na ye: "Kolela té." "Bongo apusani pe asimbi sanduku ya ebembe. Bato oyo bazalaki komema yango batelemi. Yezu alobi: "Elenge mobali, nalobi na yo: Lamuka!" 15 Moto oyo akufaki afandi pe abandi koloba. Bongo Yezu alobi na mama na ye: "Kamata mwana nayo." 16 Bato nyonso babangi; bapesi Nzambe mersi balobi: "Profete monene abimi na kati na biso!" Pe lisusu: "Nzambe ayei kosalisa bato na ye!" 17 Bongo sango ya Yezu epanzanaki bipai nyonso tii na Yuda mobimba pe na bamboka ya pembeni.

Yoane Mobatisi atindi bato epai ya Yezu

18 Bayekoli ya Yoane balobeli ye makambo wana nyonso. Bongo Yoane abengi bato mibale na kati na bango, 19 pe atindi bango bákende kotuna Nkolo Yezu boye: "Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu?" 20 Tango bakomi epai ya Yezu, balobi na ye: "Yoane Mobatisi atindi biso po na kotuna yo soki ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu." 21 Kaka na tango wana Yezu azalaki kobikisa bato mingi na maladi pe na bapasi na bango. Azalaki kobimisa milimo mabe pe kobikisa bato mingi bakufa miso. 22 Bongo azongiseli bato ya Yoane boye: "Bókende koloba na Yoane makambo oyo bino bomoni pe boyoki: bato bakufa miso bakomi komona, bato bakufa matoi bakomi koyoka, bato bakufa makolo bakomi kotambola, bato bazali na maladi ya maba babandi kobika, bato bakufa babandi kosekwa, pe bato ya mawa bazali koyoka Sango Malamu. 23 Esengo mingi na moto oyo atii tembe té po na ngai." 24 Awa bato oyo Yoane atindaki bakei, Yezu abandi kotuna bato po na Yoane: "Bokendeki kotala nini na esobe? Mwa-nzete oyo mopepe ezali koningisa? Té! 25 Bongo bokendeki kuna po na nini? Po na kotala moto moko oyo alati bilamba ya kitoko? Té! Po bato balataka bilamba ya kitoko pe bazali na bomengo, bafandaka na bandako ya bakonzi. 26 Bongo bokendeki kotala nani? Profete? Ee, bokendeki kotala profete. Ya solo, nalobi na bino: ye aleki kutu profete. "Pamba té Yoane azali moto oyo bakómá boye: 'Nzambe alobi: Tala, natindi ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.' 28 Nalobi na bino, na kati ya bato nyonso Nzambe asala, moko té aleki Yoane. Kasi na kati ya mboka ya Nzambe, moto ya suka aleki ye. 29 "Bato nyonso ná bafutisi-mpaku bayokaki maloba ya Yoane, bandimaki kotosa Nzambe, pe bazwaki batisimo ya Yoane. 30 Nzokande ba-Farizé ná balakisi-Mibeko baboyaki makambo Nzambe alingaki kosala po na bango, pe bazwaki batisimo ya Yoane té. 31 "Bongo bato ya lelo bakokani ná banani? Bazali lokola banani? 32 Bakokani ná bana mike bafandi na zando, pe bazali koloba na baninga na bango: 'Tobeteli bino miziki, kasi bobini té! Toyembeli bino banzembo ya mawa, kasi boleli té!' 33 Pamba té Yoane Mobatisi ayei, aboyi kolia pe komela lokola bato nyonso, balobi: 'Azali na ndoki.' 34 Ngai Mwana ya Moto nayei, nazali kolia pe komela, bongo bolobi: 'Botala moto oyo, azali kokanisa kaka kolia pe komela vinu. Azali moninga ya bafutisi-mpaku pe bato ya masumu.' 35 Kasi mayele ya Nzambe ezali komonana solo na bato nyonso bandimaka yango."

Yezu akoti na ndako ya Farizé moko

36 Farizé moko abengaki Yezu po ákende kolia epai na ye. Yezu akoti na ndako ya Farizé wana pe afandi na mesa. 37 Mwasi moko ya masumu azalaki na mboka yango. Tango ayoki 'tè Yezu afandi na mesa na ndako ya Farizé wana, amemi molangi moko ya talo mingi etondá na malasi. 38 Ayei penepene ya makolo ya Yezu; abandi kolela, bongo mai na ye ya miso ekómi kotanga na makolo ya Yezu; na sima apangusi yango na suki na ye, apesi yango bezé pe apakoli yango malasi. 39 Tango Farizé oyo abengaki Yezu amoni bongo, amilobi: "Soki moto oyo ázala penza profete, mbele alingaki koyeba mwasi oyo azali kosimba ye pe bizaleli na ye, pamba té azali moto ya masumu." 40 Bongo Yezu alobi na ye: "Simon, nazali na likambo ya kolobela yo." Simon azongisi: "Loba, Moteyi." 41 Pe Yezu alobi: "Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko. Oyo ya liboso adefaki mbongo ebele, mosusu adefaki moke. 42 Lokola bakokaki kofuta nyongo na ye té, alimbisaki bango mibale. Na kati na bango mibale, nani moto akolinga ye mingi?" 43 Simon azongiseli ye: "Nakanisi moto oyo balimbisaki nyongo mingi." Yezu alobi na ye: "Olongi." 44 Bongo Yezu abaluki epai ya mwasi wana pe alobi na Simon: "Omoni mwasi oyo? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki ngai mai ya kosukola makolo té; kasi ye asukoli makolo na ngai na mai na ye ya miso pe apangusi yango na suki na ye. 45 Oyambaki ngai na tolo té; kasi na bolingo na ye banda nakoti, ye atiki koyamba ngai na makolo té. 46 Opakolaki ngai "mafuta na motú té, kasi ye apakoli ngai malasi na makolo. 47 Yango wana, nalobi na yo: azwi bolimbisi ya masumu na ye atako ezali ebele, po alakisi bolingo monene. Moto oyo balimbisi mingi té, amonisaka pe bolingo mingi té." 48 Bongo Yezu alobi na mwasi wana: "Nalimbisi yo masumu." 49 Bato oyo bafandaki na ye na mesa babandi komituna: "Moto oyo azali nani po álimbisa masumu?" 50 Kasi Yezu alobi na mwasi wana: "Bondimi na yo ebikisi yo. Kende malamu."

Luka 8

Basi balandi Yezu

1 Na sima Yezu akei na ba-vile pe na bamboka ya mike. Kuna azalaki koteya pe kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye. Bayekoli zomi na mibale bakei nzela moko ná ye, 2 pe ná basi mosusu oyo Yezu abikisaki na milimo mabe pe na maladi. Ezalaki Maria (oyo bábengaka ya Magdala) oyo balongo-laki milimo mabe ebele na nzoto, 3 Jane, mwasi ya mbuta-muntu Kuza oyo azalaki kosala na biro ya ba-kalaka ya mokonzi Erode, Suzane ná basi mosusu ebele; bango nyonso bazalaki kopesa biloko na bango po na kosalisa Yezu ná bayekoli na ye.

Lisapo ya mokoni-bilanga

4 Bato mingi bautaki na bamboka nyonso bayei kosangana penepene ya Yezu. Bongo ye abeteli bango lisapo oyo: 5 "Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye. Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela; bato banyati yango pe bandeke eyei kolia yango. 6 Mbuma mosusu ekwei na mabanga. Tango mbuma ebimi ekauki, po mai ezalaki té. 7 Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende ekoli esika moko ná matiti ya malamu, bongo ebomi yango. 8 Kasi mbuma mosusu ekwei na mabelé ya malamu, ekoli pe eboti bambuma kama kama." Bongo Yezu alobi lisusu: "Moto azali na matoi, áyoka."

Po na nini Yezu azalaki koloba na masapo

9 Bayekoli ya Yezu batuni tina ya lisapo oyo. 10 Ye azongiseli bango: "Bino bokoki koyeba sekele ya Nzambe, ndenge ye akotia bokonzi na ye na mokili; kasi po na bato mosusu, nazali kolakisa bango yango na masapo. Ekómamá boye: 'Po bátala, kasi bámona té; báyoka, kasi báyeba té.' "

Yezu alimboli lisapo ya mokoni-bilanga

11 "Tala ndimbola ya lisapo oyo: mbuma ezali maloba ya Nzambe. 12 Bato mosusu bakokani ná nzela oyo mbuma ekwei: bayoki maloba ya Nzambe, kasi zabolo ayei kolongola yango na mitema na bango, po bándima té pe bábika té. 13 Bato mosusu bakokani ná mabanga: bayoki maloba ya Nzambe pe bayambi yango na esengo, kasi yango ebimisi misisa té. Bandimi kaka po na mwa tango moke, kasi batiki bondimi na bango na tango ya pasi. 14 Mbuma oyo ekwei na kati ya basende, ezali lokola bato oyo bayoki maloba ya Nzambe, kasi balembi po na makanisi, bomengo pe bisengo ya mokili; pe mbuma yango eteli té. 15 Mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu ezali lokola bato oyo bayoki maloba ya Nzambe pe babombi yango na mitema malamu penza; batiki bondimi na bango té, pe baboti mbuma."

Lisapo ya mwinda

16 "Moto moko té, soki apelisi mwinda, azipaka yango katini to abombaka yango na se ya mbeto. Kasi batiaka yango likolo ya mesa po bato oyo bazali kokota na ndako bámona malamu. 17 Makambo nyonso oyo ebombaná ekomonana; pe makambo nyonso ya sekele ekoyebana polele. 18 "Bókeba na ndenge bozali koyoka; pamba té moto oyo azali na biloko mingi, akozwa lisusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa ndambo oyo ye azali kotiela motema." Mama na Yezu ná bandeko na ye

19 Mama na Yezu ayei epai na ye, ná bandeko na ye; kasi

bakokaki kokutana ná ye té po bato bazalaki mingi. 20 Bayebisi Yezu boye: "Mama na yo ná bandeko na yo bazali na libanda pe balingi komona yo." 21 Kasi Yezu alobi na bango: "Mama ná bandeko na ngai ezali bato oyo bayokaka maloba ya Nzambe pe batosaka yango."

Yezu alembisi mopepe ná mbonge

22 Mokolo moko Yezu akoti na bwatu ná bayekoli na ye, pe alobi na bango: "Tókatisa ngambo!" Bongo bakei. "Tango bazalaki kokende, Yezu abandi kolala pongi. Na mbala moko mopepe ya makasi penza ebandi koleka na lak. Bwatu ezalaki kotonda na mai, pe etikalaki moke bádinda. 24 Bayekoli bapusani penepene ya Yezu, balamusi ye pe balobi: "Moteyi, Moteyi, tolingi tókufa!" Yezu alamuki pe agangeli mopepe ná mbonge; yango elembi pe kimia ezongj. 25 Bongo alobi na bayekoli: "Wapi bondimi na bino?" Kasi bango babangi mingi pe bakamwe penza, balobi: "Nani moto oyo? Azali kopesa mitindo ata na mopepe ná mai, pe yango ezali kotosa ye!"

Yezu abikisi moto azali na milimo mabe

26 Bakomi na ngambo ya lak, na mabelé ya Gerazá oyo etalaná ná Galilé. "Awa Yezu abimi na bwatu, moto moko ya mboka wana ayei liboso na ye. Moto yango azalaki na milimo ya mabe na nzoto. Banda kala azalaki kolata bilamba té; abandaki kofanda na ndako té, kasi azalaki kolala na simetiere. 28 Awa amoni Yezu, agangi, afukameli ye pe alobi na mongongo makasi: "Yezu, Mwana ya Nzambe, biso na yo likambo nini? Nabondeli yo, kopesa ngai etumbu té." 29 Alobi boye, pamba té Yezu atindaki molimo mabe étika ye. Molimo wana ezalaki kosimba ye mbala mingi; bongo bazalaki kokanga ye maboko pe makolo na minyololo, kasi mbala na mbala abandaki kokata yango, pe molimo ezalaki komema ye na esobe. 30 Bongo Yezu atuni moto yango: "Kombo na yo nani?" Ye azongisi: "Kombo na ngai, Lisanga"; pamba té milimo mingi ya mabe ekotaki na nzoto na ye. 31 Bongo milimo yango ebondeli Yezu, átinda yango na lifelo té. 32 Bangulu ebele ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo wana ebondeli Yezu ápesa yango nzela ya kokende kokota na bangulu. Yezu apesi yango nzela. 33 Na mbala moko yango nyonso ebimi na moto wana pe ekei kokota na bangulu. Bongo bangulu nyonso elongwe na ngomba; ekei kokweya na kati ya lak pe ekufi na mai. 34 Tango bato oyo bazalaki kokengela bangulu bamoni makambo wana, bakimi pe bakei koyebisa sango na vile ya Gerazá pe na bamboka ya mike. 35 Bongo bato babimi po na kotala makambo oyo elekaki. Bakomi epai ya Yezu, pe bakuti moto oyo milimo mabe etikaki, afandi liboso ya Yezu, alati bilamba, azongeli makanisi ya bomoto. Bongo bango babangi. 36 Baoyo bamonaki makambo elekaki, balobeli bango ndenge moto oyo azalaki na milimo mabe abiki. 37 Yango wana bato nyonso ya mabelé ya Gerazá basengi Yezu álongwa epai na bango. Pamba té babangaki mingi. Bongo Yezu akoti na bwatu pe azongi. 38 Moto oyo milimo mabe etikaki abondeli Yezu po ákende nzela moko na ye. Kasi Yezu atiki ye pe alobi: 39 "Zonga epai na yo, pe yebisa bato makambo nyonso Nzambe asali po na yo." Bongo moto wana akei koyebisa na mboka mobimba makambo nyonso Yezu asalaki po na ye.

Mwana ya mokonzi moko ya Bayuda Mwasi moko asimbi elamba ya Yezu

40 Tango Yezu azongi na ngambo ya lak, bato mingi bayei koyamba ye po bango nyonso bazalaki kozela ye. 41 Bongo moto moko ayei, kombo na ye Yair. Ye azalaki mokonzi ya ndako ya losambo. Afukameli Yezu pe abondeli ye po ákende na ndako na ye. 42 Pamba té mwana na ye se moko ya mwasi alingaki kokufa, azalaki na mbula penepene ya zomi na mibale. Tango Yezu azalaki kokende kuna, bato ebele babandi kosimbasimba ye. 43 Mwasi moko atelemaki wana, azalaki na maladi ya kobima makila, esali bambula zomi na mibale. Abebi-saki mbongo na ye nyonso epai ya baminganga; kasi ata moto moko té akokaki kobikisa ye. 44 Ayei na sima ya Yezu pe asimbi ye na songe ya elamba. Na mbala moko maladi na ye esili. 45 Bongo Yezu atuni: "Nani asimbi ngai?" Bango nyonso bawangani, kasi Piere alobi: "Moteyi, ezali kaka bato oyo batii yo na katikati pe bazali kokangama na yo." 46 Kasi Yezu azongisi: "Moto moko asimbi ngai pe nayei koyeba 'tè nguya na ngai esali mosala." 47 Awa mwasi wana amoni 'tè balingi bázwa ye, abandi kolenga pe ayei kofukama liboso ya Yezu. Bongo ayebisi ye na miso ya bato nyonso tina asimbelaki ye, pe ndenge abikaki na mbala moko. 48 Yezu alobi na ye: "Mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo; kende malamu." 49 Awa Yezu azalaki koloba boye, moto moko auti na ndako ya Yair akómi wana. Alobi na Yair: "Mwana na yo asi'akufi. Kotungisa lisusu Moteyi té." 50 Kasi Yezu ayoki yango pe alobi na Yair: "Kobanga té! Tia kaka motema. Mwana na yo akobika." 51 Tango akómi na ndako, apesi nzela na moto moko té po ákota ná ye, bobele Piere, Yoane ná Jake pe tata ná mama ya mwana. 52 Bato nyonso bazalaki kolela mwana makasi penza. Bongo Yezu alobi: "Bótika kolela! Mwana akufi té, kasi alali pongi." 53 Bango babandi koseka ye po bayebaki 'tè mwana asi'akufi. 54 Kasi Yezu asimbi ye na liboko pe alobi na mongongo makasi: "Mwana, telema!" 55 Mwana wana azongi lisusu na bomoi, pe na mbala moko atelemi; bongo Yezu alobi na bango bápesa ye bilei. 56 Baboti na ye bakamwe penza, kasi Yezu apekisi bango báloba na moto moko té makambo oyo elekaki.

Luka 9

Yezu atindi bayekoli zomi na mibale

1 Yezu asangisi bayekoli zomi na mibale, bongo apesi bango bokonzi ya kobengana milimo mabe nyonso, pe ya kobikisa bato ya maladi. 2 Atindi bango boye: "Bókende kosakola 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye, pe bóbikisa bato bazali na pasi. 3 Bómema eloko moko té po na mobembo: ézala nzete ya kotambola, liboke, bilei to pe mbongo. Pe moto moko té ámema ba-shemize mibale. 4 Soki bayambi bino na ndako moko, bófanda kaka wana tii tango bokolongwa na mboka yango. 5 Bongo soki bato ya mboka moko baboyi koyamba bino, bólongwa kuna noki. Po na kolakisa bango 'tè basali mabe, bópupola makolo po bómema pusiere ya mboka yango epai mosusu té." 6 Bongo bayekoli bakei, bazalaki kotambola na bamboka nyonso, kosakola Sango Malamu pe kobikisa bato ya maladi bipai na bipai.

Erode abangi po na Yezu

7 Na tango wana mokonzi Erode ayoki makambo nyonso oyo ezalaki koleka. Mayele esili ye, po bato mosusu bazalaki koloba: "Yoane Mobatisi asekwi." «Bamosusu bazalaki koloba: "Ezali Eliya moto azongi." Pe bamosusu: "Moko na kati ya baprofete ya kala asekwi." 9 Kasi Erode alobi: "Ngai nakataki Yoane Mobatisi motú; bongo moto oyo nazali koyoka na sango, ezali nani?" Yango wana Erode azalaki koluka komona Yezu.

Yezu aleisi bato 5.000

10 Bantoma bazongi, balobeli Yezu makambo nyonso basalaki. Bongo ye akamati bango pe akei kaka ná bango moko na mboka Betsaida. 11 Kasi awa bato bayoki bongo, balandi ye. Yezu ayambi bango, alobeli bango sango ya mboka ya Nzambe, pe abikisi bato oyo bazalaki na maladi. 12 Tango pokwa ebandi kokóma, bayekoli zomi na mibale bayei penepene ya Yezu pe balobi na ye: "Yebisa bato bákende na bamboka ya pembeni pe epai ya bato basalaka bilanga, po báluka bilei pe bisika ya kolala; pamba té awa tozali na kati ya esobe." 13 Kasi Yezu alobi na bango: "Bino moko bópesa bango biloko ya kolia." Bayekoli bazongisi: "Tozali kaka na mapa mitano ná bambisi mibale. Olingi tókende kosomba bilei po na bato oyo nyonso?" 14 Pamba té bato bazalaki mibali soki 5.000. Yezu alobi na bayekoli na ye: "Bófandisa bato, bótia na molongo moko moko bato tuku mitano." 15 Bayekoli basali se bongo, pe bafandisi bato nyonso. 16 Yezu akamati mapa mitano yango ná bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi po na bilei wana; akatikati mapa pe apesi yango na bayekoli na ye po bákabola na bato. 17 Bato nyonso balei pe batondi. Balokoti biteni oyo etikalaki, batondisi bitunga zomi na mibale.

Piere asakoli 'tè Yezu azali Mesia

18 Mokolo moko Yezu azalaki kosambela ye moko, bongo bayekoli na ye bayei kokuta ye. Ye atuni bango: "Bato balobaká 'tè ngai nazali nani?" 19 Bango bazongisi: "Bato mosusu balobaká 'tè ozali Yoane Mobatisi; bato mosusu: Eliya; pe bamosusu balobaká 'tè ozali moko ya baprofete ya kala oyo asekwi." 20 Kasi Yezu atuni bango: "Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?" Piere azongisi: "Ozali Mesia oyo Nzambe atindeli biso." 21 Yezu apekisi bango 'tè báloba yango na moto té.

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (I)

22 Na sima Yezu alobi lisusu: "Ngai Mwana ya Moto nasengeli koyoka pasi mingi. Bakoboya ngai na bambuta-muntu, na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na balakisi-Mibeko. Bako-boma ngai, kasi na mikolo misato nakosekwa." 23 Na sima alobi na bato nyonso: "Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko, ákumba kuruze na ye mokolo na mokolo, pe alanda ngai. 24 Pamba té moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango; kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, akobikisa yango. "Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili mobimba, eloko nini azwi soki ye moko abungi to akufi? 26 Soki moto azali koyoka soni po na ngai pe po na maloba na ngai, ngai Mwana ya Moto pe nakoyoka soni po na ye, tango nakoya na lokumu na ngai pe na lokumu ya Tata, ná ya ba-anjelu ya bosantu. 27 Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bakufa bakomona ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye."

Nzambe alakisi lokumu ya Yezu

28 Sima ya poso moko ya maloba yango, Yezu akamati Piere, Yoane pe Jake, akei na bango likolo ya ngomba po na kosambela. 29 Awa azalaki kosambela, elongi na ye ebongwani pe bilamba na ye ekómi pembe penza. 30-31 Na mbala moko bamoni bato mibale penepene ya Yezu; ezalaki Moize ná Eliya, bamonanaki na lokumu ya Likolo. Bazalaki kosolola ná ye po na ndenge akokende kokufa na Yeruzalem. 32 Piere ná baninga na ye bazalaki kolala pongi makasi. Awa balamuki, bamoni lokumu ya Yezu pe ya bato oyo batelemaki penepene na ye. 33 Tango Moize ná Eliya balingaki kotika Yezu, Piere alobi na ye: "Moteyi, lokola tozali awa ezali malamu. Tokotonga bandako misato ya kapo: moko po na yo, moko po na Moize, pe moko po na Eliya." Kasi ayebaki té makambo azalaki koloba. 34 Tango azalaki koloba boye, lipata moko eyei kozipa bango, bongo bayoki somo penza. 35 Mongongo moko euti na lipata pe elobi: "Oyo azali Mwana na ngai; ngai moko moto naponá ye. Bóyokela ye!" 36 Awa mongongo esilisi koloba, bayekoli bamoni kaka Yezu ye moko. Bafandaki kaka nyee, pe na mikolo wana bayebisaki na moto moko té makambo oyo bamonaki.

Yezu abikisi mwana azalaki na molimo mabe

37 Sima ya mokolo moko, bakiti ngomba pe bato ebele bayei kokutana na Yezu. 38 Na kati ya bato wana, moto moko abandi koganga: "Moteyi, nabondeli yo ótala mwana na ngai ya mobali, nazali bobele na ye moko. 39 Mbala na mbala molimo moko ekangaka ye, bongo na mbala moko mwana akómaka koganga pe kobimisa fulufulu na monoko. Molimo yango ekangaka ye pe eningisaka nzoto na ye makasi, bongo enyokolaka ye pe elingaka kotika ye té. 40 Nabondelaki bayekoli na yo bábengana molimo wana, kasi bakokaki té." 41 Yezu azongisi: "A bino! Bato mabe! Bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino pe kokanga motema po na bino tii tango nini?" Sima alobi na moto wana: "Mema mwana na yo awa." 42 Awa mwana akómi penepene ya Yezu, molimo mabe yango ekweisi ye na mabelé pe eningisi ye makasi. Kasi Yezu agangeli molimo mabe pe abikisi mwana, bongo azongisi ye na tata na ye. 43 Bato nyonso bakamwe po na nguya monene ya Nzambe.

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (II)

Awa bato nyonso bazalaki kaka kokamwa po na makambo oyo Yezu azalaki kosala, alobi na bayekoli na ye: ^"Bósimba malamu makambo nazali kolobela bino sik'oyo: balingi koteka ngai Mwana ya Moto epai ya bato." 45 Kasi bango bazalaki koyeba tina ya maloba wana té. Mitú na bango efungwamaki nanu té, pe bazalaki kobanga kotuna Yezu po na maloba wana.

Na kati ya bayekoli, nani aleki?

46 Mokolo moko bayekoli babandi kotiana tembe po na koyeba nani aleki baninga na kati na bango. 47 Kasi Yezu ayebaki makambo bango bazalaki kokanisa. Bongo akamati mwana moko ya moke, atii ye penepene na ye, 48 pe alobi na bango: "Moto ayambi mwana oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko; pe moto ayambi ngai, ayambi Moto oyo atindi ngai; pamba té oyo aleki moke na kati na bino, ye azali moto monene."

Moto oyo aboyi biso té, azali moto na biso

49 Yoane alobi na Yezu: "Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na kombo na yo, pe topekisaki ye po ye azali moto na biso té." 50 Kasi Yezu azongiseli ye: "Bópekisa ye té; moto oyo azali monguna na bino té, azali moninga na bino."

Bato ya mboka moko ya Samarie baboyi koyamba Yezu

51 Etikalaki lisusu mikolo mingi té po 'tè Yezu átombwana na Likolo, akanaki na molende kokende na Yeruzalem. 52 Bongo atindi bato bákende koyebisa na mboka moko ya Samarie 'tè azali koya, pe bábongisela ye makambo nyonso. Bango basali bongo, 53 kasi bato ya mboka wana baboyi koyamba Yezu po ye azalaki kokende na Yeruzalem. 54 Tango Jake ná Yoane bamoni boye, balobi: "Mokonzi, olingi tókitisa kake po ézikisa bango?" 55 Kasi Yezu abaluki pe apekisi bango. 56 Bongo bakei na mboka mosusu.

Baoyo balingi kolanda Yezu

57 Tango bazalaki kokende, moto moko alobi na Yezu boye: "Nakolanda yo epai nyonso okokende." 58 Yezu azongiseli ye: "Banyama ya zamba ezali na mabulu na yango, bandeke ezali na ba-zala na yango, kasi ngai Mwana ya Moto nazali na esika ya kolala té." "Alobi na moto mosusu: "Landa ngai." Kasi moto wana azongisi: "Liboso pesa ngai nzela nákende kokunda tata na ngai." 60 Yezu alobi na ye: "Tika bato bakufa bákundana bango na bango. Kasi yo kende kosakola 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye." 61 Moto mosusu alobi: "Mokonzi, nakolanda yo; kasi liboso pesa ngai nzela nákende kopesa mbote ya suka na libota na ngai." 62 Yezu alobi na ye: "Moto oyo asimbi kongo po na kosala elanga pe azali kaka kotala na sima, akoki té po na kosalela Nzambe, tango ye akotia bokonzi na ye."

Luka 10

Yezu atindi bayekoli 72

1 Sima ya makambo wana Nkolo Yezu aponi lisusu bato 72, pe atindi bango mibale mibale na ba-vile pe bamboka nyonso ye moko alingaki kokende. 2 Alobi na bango: "Bambuma ebele etondi na elanga, kasi bato ya kobuka yango bazali mingi té. Bóbondela Kolo ya elanga átinda bato ya mosala po bámemela ye bambuma. 3 Bókende; natindi bino lokola bana-meme na kati ya bankoi. 4 Bómema mbongo té, biloko té to pe basapatu. Bólekisa tango té na nzela po na kopesa bato mbote. 'Tango bokokota na ndako moko, bóloba liboso: 'Boboto ézala na ndako oyo.' 6 Soki kolo ya ndako yango azali moto ya boboto, akozwa bolamu po na mbote oyo bopesi ye; soki bongo té, akozwa eloko té. 7 Bófanda na ndako wana, bólia pe bómela biloko bakopesa bino, pamba té mosali asengeli kozwa lifuta na ye. Bókota bikotela té na bandako nyonso. 8 Tango bokokota na mboka moko, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino; 9 bóbikisa bato ya maladi pe bóloba boye na bato ya mboka wana: 'Nzambe alingi kotia bokonzi na ye epai na bino.' 10 Kasi tango bokokota na mboka moko, soki bayambi bino té, bóbima na balabala pe bóloba boye: 11 'Ata pusiere ya mboka na bino oyo ekangamaki na makolo na biso, topupoli yango po na kotikela bino. Kasi bóyeba 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye!' 12 Nalobi na bino, mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, etumbu ya mboka wana ekoleka ya Sodome!"

Ba-vile oyo eboyi kondimela Yezu

13 "Mawa na yo, vile ya Korazine! Mawa na yo, vile ya Betsaida! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na bino ésalamaka na Tir pe Sidon, mbele bato ya kuna balingaki kolata basaki pe kopakola potopoto, po na kolakisa 'tè babongoli mitema! 14 Yango wana, mokolo Nzambe akosambisa bato, etumbu na bino ekoleka ya Tir ná ya Sidon. 15 Pe yo Kafarnaum, okanisi 'tè okomata tii na Likolo? Té, okokita tii na mboka ya bato bakufa." 16 Yezu alobi lisusu na bayekoli na ye: "Moto oyo ayokeli bino, ayokeli ngai; moto aboyi bino, aboyi ngai; bongo moto aboyi ngai, aboyi Moto oyo atindi ngai."

Bayekoli bazongi

17 Bayekoli 72 bayei kozonga pe bazalaki na esengo mingi, balobi: "Mokonzi, ata milimo mabe ezali kotosa biso po na kombo na yo!" 18 Yezu azongiseli bango: "Namoni Satan alongwe na Likolo, akwei na se lokola kake. 21 Bóyoka! Napesaki bino nguya ya konyata banyoka ná ba-skorpion, pe kosilisa makasi nyonso ya Monguna. Eloko moko té ekoki kosala bino mabe. 20 Bótika kosepela po milimo mabe ezali kotosa bino, kasi bósepela po Nzambe asi'akómi bakombo na bino na mokanda ya bato na ye."

Yezu apesi mersi na Tata

21 Kaka na tango wana Molimo Mosantu ayokisi Yezu esengo mingi, bongo alobi: "Ee Tata, Nkolo ya Likolo na se, napesi yo mersi po obombi makambo oyo na bato ya mayele pe na bato bayekolá, kasi olakisi yango na bato pamba. Ya solo Tata, olingaki ésalama bobele ndenge wana. 22 "Tata na ngai apesi makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko té ayebi soki ngai nazali nani; kaka Tata moto ayebi ngai, Mwana na ye. Pe moto moko té ayebi soki Tata azali nani; kaka ngai Mwana moto nayebi ye, ná baoyo nalingi kolakisa bango Tata." 23 Bongo Yezu abaluki epai ya bayekoli na ye pe alobi kaka na bango: "Esengo mingi na bino po bozali komona makambo oyo! 24 Pamba té nalobi na bino, baprofete mingi ná bakonzi bazalaká na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango té. Bazalaká na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango té."

Lisapo: moto malamu ya Samarie

25 Molakisi-Mibeko moko ayei po na komeka Yezu, bongo atuni ye: "Moteyi, násala nini po názwa bomoi ya seko?" 26 Yezu azongiseli ye: "Bakómá nini na Mibeko? Makambo nini otangaka kuna?" 27 Moto wana azongisi: "Bólinga Nkolo, Nzambe na bino, na motema moko, na bomoi na bino mobimba, na makasi nyonso pe na mayele nyonso; pe lisusu: Bólinga baninga na bino ndenge bino moko bomilingaka." 28 Bongo Yezu alobi na ye: "Ozongisi malamu! Sala bongo pe okobika." 29 Kasi molakisi-Mibeko alingaki komilongisa, atuni Yezu: "Moninga na ngai nani?" 30 Bongo Yezu abandi kobetela ye lisapo oyo: "Moto moko alongwaki na Yeruzalem po na kokende na Jeriko. Bamiyibi bakangi ye, balongoli ye bilamba, babeti ye pe batiki ye lokola moto akufi. 31 Sima ya mwa tango nganga-Nzambe moko ayei koleka na nzela yango; awa amoni ye, akatisi na mopanzi mosusu ya nzela. 32 Mosali moko ya Ndako ya Nzambe asali se ndenge moko; akómi na esika wana, amoni ye, akatisi na mopanzi mosusu ya nzela. 33 Kasi moto moko ya Samarie ayei pe koleka na nzela wana; tango amoni ye, ayokeli ye mawa. 34 Apusani pembeni na ye, bongo atii ye mafuta ná vinu na bapota, pe akangi yango. Na sima amatisi ye na punda na ye moko, amemi ye na ndako bato ya mobembo balalaka, pe kuna abandi kosalisa ye. 35 Tongo etani, abimisi mbongo mibale ya bibende, apesi yango na kolo ya ndako, pe alobi na ye: 'Salisa moto oyo malamu. Soki obimisi mbongo mosusu po na kosalisa ye, ngai moko nakofuta yango, tango nakoleka lisusu awa.' " 36 Bongo Yezu atuni molakisi-Mibeko: "Okanisi nini? Na kati y a bato misato wana, nani amilakisi moninga ya moto oyo bamiyibi babetaki?" 37 Molakisi-Mibeko azongisi: "Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa." Bongo Yezu alobi na ye: "Kende, yo pe sala bongo."

Yezu akei epai ya Marta ná Maria

38 Tango Yezu ná bayekoli na ye bazalaki na nzela, akoti na mboka moko. Kuna mwasi moko, kombo na ye Marta, ayambi ye na ndako na ye. 39 Ye azalaki na ndeko na ye ya mwasi, kombo na ye Maria. Bongo Maria akei kofanda penepene ya makolo ya Yezu pe azalaki kaka koyoka ye. 40 Nzokande Marta azalaki komitungisa mingi na kolamba. Na mbala moko ayei pe alobi: "Mokonzi, ozali komona mabe té ndenge ndeko na ngai atikeli ngai misala nyonso? Loba na ye ásalisa ngai." 41 Nkolo Yezu azongiseli ye: "Marta, Marta! Ozali komitungisa pe komona pasi po na makambo mingi. 42 Kasi likambo moko kaka ezali na tina monene. Maria aponi likambo ya malamu, pe bakobotola ye yango té."

Luka 11

Mateya po na kosambela

1 Mokolo moko Yezu azalaki kosambela. Tango asilisi, moyekoli moko alobi na ye: "Mokonzi, lakisa biso kosambela, ndenge Yoane Mobatisi alakisaki bayekoli na ye." 2 Yezu alobi na bango: "Tango bozali kosambela, bolobaka boye: Tata, Kombo na yo ézwa lokumu; bokonzi na yo éya; 3 pesaka biso mokolo na mokolo bilei oyo ekoki; 4 limbisa masumu na biso, po biso pe tolimbisi mabe nyonso basali biso; pe kotika Monguna ámeka biso té." 5 Yezu alobi na bango lisusu: "Tózwa ndakisa ya moto moko oyo azali na moninga na ye, bongo na midi ya butu akei kosenga ye: 'Moninga, defisa ngai mapa misato; 6 pamba té moninga moko auti na mobembo ayeeli ngai, kasi nazali na eloko ya kopesa ye té.' 7 Bongo moto oyo azali na kati ya ndako azongiseli ye: 'Tika ngai nyee; ndako esi'ekangami, pe ngai ná bana tosi'tolali. Nakoki kotelema té po na koya kopesa yo mapa.' 8 Nalobi na bino: ata soki alingi kotelema té pe kopesa ye yango po azali moninga na ye, akotelema kaka po na molende na ye, pe akopesa ye nyonso ye azali na yango posa. 9 Bongo ngai nalobi na bino: bósenga, pe bokozwa; bóluka, pe bokomona; bóbeta porte ya ndako, bongo bakofungolela bino. 10 Pamba té moto nyonso oyo asengaka, azwaka; oyo alukaka, amonaka; pe oyo abetaka porte ya ndako, bafungolelaka ye. 11 Tata nini na kati na bino akoki kopesa nyoka na mwana na ye, soki asengi ye mbisi? 12 To akopesa ye skorpion, soki asengi ye liki? 13 Soki bino bato ya mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, tembe té Tata ya Likolo pe akopesa Molimo Mosantu na baoyo basengi ye."

Bafundi Yezu 'tè azali na molimo mabe

14 Mokolo moko Yezu azalaki kobengana molimo mabe oyo ekómisaki moto moko baba. Tango molimo mabe ebimi, baba wana abandi koloba. Bato bakamwe penza. 15 Kasi bato mosusu balobi: "Ezali Satan, mokonzi ya milimo mabe moto apesi ye nguya ya kobengana milimo mabe." 16 Bato mosusu balingaki komeka ye, bongo basengi ye ásalela bango likamwisi moko oyo euti na Nzambe. "Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, alobi na bango: "Soki bato ya mboka moko bakábwani bango na bango, mboka na bango ekokufa, pe bandako na bango ekobukana. 1819 Bongo soki Satan abundisi bato na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekoumela? Pamba té bolobi 'tè mokonzi ya milimo mabe moto apesi ngai nguya ya kobengana milimo mabe. Kasi soki ezali bongo, nani moto apesaká bato na bino nguya ya kobengana yango? Bato na bino bango moko bato bazali kokweisa bino. 20 Ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Nzambe; elakisi 'tè bokonzi na ye esi'eyeeli bino. 21 "Tango elombe azali na bibundeli pe azali kokengela ndako na ye, biloko na ye nyonso ebombami malamu. 22 Kasi soki moto oyo aleki ye na makasi ayei pe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, bongo akokabola biloko na ye nyonso. 23 "Moto oyo alandaka ngai té, azali koboya ngai; pe oyo asalisaka ngai té po na kosangisa bato, azali kopanza bango."

Tango molimo mabe ezongaka

24 "Soki molimo mabe etiki nzoto ya moto, ekendeke kote-lengana na esobe po na koluka esika ya kopema. Soki ezwi esika ya kopema té, emilobaka: 'Nakozongela moto oyo natikaki; ye azali lokola ndako na ngai.' "Kasi tango molimo ezongelaka moto yango, ekutaka ye akómi lokola ndako oyo bakombi pe babongisi malamu. "Bongo ekendeke kozwa milimo sambo mosusu oyo eleki yango na mabe, pe yango nyonso eyaka nzela moko kofanda na nzoto ya moto wana. Boye suka na ye ekómaka mabe mingi koleka ya liboso."

Bisengo ya solo

27 Awa Yezu asilisi koloba boye, mwasi moko azalaki na kati ya bato wana alobi: "Esengo mingi na mama oyo amemaki zemi na yo pe amelisaki yo mabéle!" 28 Bongo Yezu azongisi: "Ee, kasi esengo ekoleka- mingi na bato oyo bayokaka maloba ya Nzambe pe batosaka yango!"

Bayuda basengi elembo

29 Tango bato mingi bayei kotondana penepene ya Yezu, ye abandi koloba: "Bato ya tango oyo bazali bato mabe! Bazali kosenga elembo, kasi Nzambe akolakisa bango kaka elembo moko: oyo ya Jonas. 30 Pamba té Jonas azalaki lokola elembo po na bato ya "Ninive; ndenge moko pe ngai Mwana ya Moto nazali elembo po na bato ya tango oyo. 31 Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, mokonzi-mwasi ya Saba akoya kofunda bato ya tango oyo, po ye alongwaki mosika po na koya koyoka maloba ya mayele ya Salomon. Kasi ngai oyo nazali awa naleki Salomon. 32 Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, bato ya Ninive bakoya kofunda bato ya tango oyo, po bango babongolaki mitema tango bayokaki maloba ya Jonas. Kasi ngai oyo nazali awa naleki Jonas."

Kotala malamu

33 "Moto moko té apelisaka mwinda pe abombaka yango na sanduku to na se ya katini; kasi batiaka yango likolo ya mesa, po bato oyo bazali kokota na ndako bámona malamu. 34 Miso na yo ezali lokola mwinda; yango moto emonisaka yo. Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza; kasi soki ezali mabe, okozala na molili. 35 Yango wana, tala nanu! Tango mosusu motema na yo ekómi molili. 36 Boye soki ozali komona polele penza pe soki molili moko té ezali na kati na yo, ezali lokola nde mwinda ya makasi engengisi yo." Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko, bato ya lokuta 37 Tango Yezu asilisi koloba, Farizé moko abengi ye po ákende kolia na ndako na ye. Yezu akoti pe afandi na mesa. 38 Farizé wana akamwe tango amoni 'tè Yezu asukolaki maboko té liboso ya kolia, ndenge mibeko ezalaki kotinda. 39 Bongo Nkolo Yezu alobi na ye: "Bino ba-Farizé bosukolaka libanda ya bakopo pe ya basani, kasi na kati ya mitema botondá na posa ya moyibi pe ya mobulu. 40 Bozali bazoba! Nzambe moto asalá biloko oyo emonanaka; ezali ye pe té moto asalá motema ya moto? 41 Kasi bópesa na bato bakelelá biloko oyo ezali na bakopo pe na basani na bino, boye biloko nyonso bosalelaka, ekokóma peto. 42 "Mawa na bino ba-Farizé! Pamba té bolongolelaka Nzambe eteni moko na kati ya biteni zomi ya mwa-makasa ya solo kitoko, pe ya bandunda nyonso ya mike-mike. Kasi bobosanaka kosala bato bolamu pe kolinga Nzambe. Wana ezali makambo bosengeli kosala, nzokande kobosana pe té oyo ya liboso. 43 "Mawa na bino ba-Farizé! Bólingaka bakiti ya liboso na ndako ya losambo pe bólingaka bápesa bino bambote na bazando. 44 Mawa na bino! Pamba té bozali lokola bisika bakundá bato, kasi batiá bilembo té. Bongo bato bazali kotambola likolo na yango, pe bayebi té 'tè bazali komikómisa mbindo." 45 Molakisi-Mibeko moko alobi na ye: "Moteyi, awa olobi boye, ozali pe kofinga biso." 46 Yezu azongisi: "Mawa na bino pe, balakisi-Mibeko! Botiaka mikumba ya kilo na mitú ya bato, kasi bino moko bólingaka kosimba yango ata na mosapi té. ""Mawa na bino! Botóngaka basimetiere ya kitoko po na baprofete oyo bakoko na bino babomaká. 48 Na ndenge wana bozali komonisa 'tè bondimi makambo ya bakoko na bino, pamba té bango babomaká baprofete, pe bino bozali kotóngela bango basimetiere. 49 Kasi Nzambe ayebi nyonso, pe alobaká boye: 'Nakotindela bango baprofete pe bantoma; bakoboma bamosusu na kati na bango pe bakonyokola bamosusu.' 50 Yango wana bato ya tango oyo bakozwa etumbu po na makila ya baprofete nyonso oyo babomaká uta na ebandeli ya mokili, 51 kobanda Abel tii na Zakarya oyo babomaká na kati ya mesa bazikiselaka Nzambe mabonza ná Ndako ya bosantu. Ya solo, nalobi na bino, bato ya tango oyo bakozwa etumbu po na makila na bango. 52 "Mawa na bino balakisi-Mibeko! Pamba té bolongolá fungola ya ndako oyo bato bakoki kozwela mayele; bino moko bokoti té, pe bozali kopekisa baoyo balingi kokota." 53 Tango Yezu alongwe na ndako wana, balakisi-Mibeko ná ba-Farizé babandi kotungisa ye na kanda nyonso, pe kotunatuna ye makambo ya ndenge na ndenge; 54 bazalaki komeka ye po bákweisa ye soki alobi likambo moko ya mabe.

Luka 12

Liyebisi po na bato ya lokuta

1 Na tango wana, bato nkoto na nkoto bayei kosangana, bongo bamosusu bazalaki konyata makolo ya baninga. Yezu abandi koloba liboso ya bayekoli na ye: "Bókeba na kisi ya mapa ya ba-Farizé (elingi koloba: bókeba na lokuta na bango). 2 Mokolo ezali, makambo nyonso ebombamá, ekomonana polele; pe makambo ya sekele ekoyebana. 3 Yango wana nyonso oyo bolobaka na molili, bakoyoka yango na moi; pe nyonso oyo bolobaka na matoi na kati ya ndako, bakosakola yango na balabala."

Moto basengeli kobanga

4 "Baninga na ngai, nalobi na bino: bóbanga bato té! Bango babomaká nzoto, kasi na sima bakokaka kosala eloko té. 'Nakola-kisa bino nani bosengeli kobanga: bóbangaka kaka Nzambe, pamba té soki alongoli bomoi ya moto, na sima azali na bokonzi ya kobwaka ye na lifelo. Ee, nalobi na bino, ezali ye nde moto bosengeli kobangaka. 6 "Batekaka bandeke mitano ya mike na talo moke penza. Ezali boye té? Kasi Nzambe abosanaka moko té na kati na yango. 7 Ata suki na bino, Nzambe asi'atangá yango nyonso. Yango wana bóbanga té! Bino bozali na tina, koleka ebele ya bandeke mike!"

Kondima to koboya Yezu

8 "Nalobi na bino, moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, ngai Mwana ya Moto nakondima ye na miso ya ba-anjelu ya Nzambe. 9 Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, ngai Mwana ya Moto pe nakowangana ye na miso ya ba-anjelu ya Nzambe. 10 "Moto nyonso oyo afingi ngai Mwana ya Moto, akoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Molimo Mosantu akozwa bolimbisi té. 11 "Tango bakomema bino po na kosambisa bino na bandako ya losambo, to epai ya bato minene pe batambwisi ya mboka, bóbanga té po na makambo bokozongisa, to ndenge nini boko-loba. 12 Pamba té na tango wana Molimo Mosantu akolakisa bino makambo bosengeli koloba."

Lisapo ya moto ya mbongo azangi mayele

13 Moto moko na kati ya bato alobi na Yezu: "Moteyi, loba na ndeko na ngai, ápesa ngai oyo ya ngai ndambo ya biloko tata atikelaki biso." 14 Yezu azongiseli ye: "Moninga, nani atii ngai zuzi po na kokata makambo na bino to kokabola biloko na bino?" 15 Bongo alobi na bango nyonso: "Bókeba pe bozala na lokoso ya mbongo té, pamba té moto akoki kozwa bomoi ya solo té po na biloko oyo azali na yango, ata soki azali na yango mingi." 16 Bongo apesi bango ndakisa oyo: "Moto moko ya mbongo azalaki na bilanga; yango ezalaki kobotela ye biloko mingi ya malamu. 17 Azalaki komituna: 'Násala nini? Nazali na esika té po na kobomba biloko na ngai oyo nyonso.' 18 Bongo amilobi: 'Nakosala boye: nakoboma bandako oyo nabombelaka biloko na ngai, pe nakotónga ya minene; boye nakotia blé ná biloko na ngai nyonso mosusu kuna. "Sima, nakomiloba: Nazali na biloko mingi po na bambula ebele. Nápema, nália, námela pe násepela.' 20 Kasi Nzambe alobi na ye: 'Yo ozangá mayele! Okokufa na butu ya lelo. Bongo biloko nyonso oyo obombi ekotikala na nani?' " 21 Yezu asukisi boye: "Moto oyo akongolaka biloko po na ye moko asukaka ndenge wana; azali na bomengo té na miso ya Nzambe."

Kotia mitema na Nzambe

22 Na sima Yezu alobi na bayekoli na ye: "Yango wana nalobi na bino: Bómitungisa té na komitunaka soki bokolia nini, boko-mela nini, to pe soki bokolata nini. 23 Pamba té bomoi eleki bilei, pe nzoto eleki bilamba. 24 Botala bandeke! Yango ekonaka té pe ekongolaka bambuma na bilanga té; ezali na bandako té to bisika ya kobombela bilei; ezali Nzambe moto aleisaka yango. Bino boleki bandeke na tina! "Ata bomitungisi boni, nani na kati na bino akoki kobakisa mokolo moko na bomoi na ye? "Soki bokoki kutu té kosala likambo oyo ya moke, po na nini bozali komitungisa na makambo mosusu? 27 Botala ba-flere, ndenge ekolaka na esobe: yango esalaka té pe etóngaka bilamba té; kasi nalobi na bino: ata Salomon, moto ya bomengo penza, alataki malamu té lokola ba-flere wana. 28 Bókanisa: matiti oyo ezali lelo na esobe, lobi bakoki kotumba yango na móto. Bongo soki Nzambe alatisaka yango boye, akoki kolatisa pe bino té? Ya solo, bondimi na bino ezali moke. 29 Boye bino pe bóminyokolaka té po na kokanisa tango nyonso soki bokolia nini pe bokomela nini. 30 Kaka baoyo bayebi Nzambe té bato bamitungisaka po na koluka biloko wana nyonso. Kasi bino, Tata na bino ayebi 'tè bozali na posa na yango. 31 Bólukaka kaka kokóma bato ya mboka na ye, bongo ye akopesa bino yango. 32 Bino bato bozali lokola mwa-liboke ya bameme na ngai, bótika kobanga. Pamba té Tata na bino aponi bino po bókóma bato ya mboka na ye."

Kobomba bomengo na Likolo

33 "Bóteka biloko na bino pe bópesa mbongo na bato bakelelá. Bókamata basaki ya mbongo oyo ekufaka té, bóbombisa bomengo na Likolo, po kuna bamiyibi bakoki koyiba té, pe bapese ekoki kolia yango té. 34 Pamba té esika biloko na bino ezali, mitema na bino pe ezali kuna."

Basali oyo bakengelaka

35 "Bózalaka na ekenge tango nyonso, pe bóbatelaka bamwinda na bino ékufa té. 36 Bosalaka lokola basali bazali kozela mokonzi na bango, oyo akendeki na feti ya libala; bazali na ekenge po báfungolela ye ndako noki, tango akozonga pe akobeta porte. 37 Esengo mingi na basali oyo mokonzi na bango akoya kokuta bazali kokengela. Nalobi na bino ya solo: akofandisa bango na mesa, akosalisela bango feti, pe ye moko akoya kotiela bango bilei. 38 Soki azongi na midi ya butu to na sima, pe akuti bango bazali kokengela kaka, bakosepela mingi penza. 39 Bókanisa nanu. Soki kolo ya ndako ayebi tango nini moyibi akoya, akosala nyonso po bábuka ndako na ye té. 40 Bino pe bózalaka na ekenge tango nyonso, pamba té ngai Mwana ya Moto nakoya na ngonga oyo bino boyebi té!"

Mosali ya malamu pe mosali ya mabe

41 Bongo Piere atuni: "Mokonzi, olobi boye po na biso kaka to po na bato nyonso?" 42 Nkolo Yezu azongisi: "Bózalaka lokola mosali ya malamu pe ya mayele, oyo mokonzi atii kapita ya basali na ye, po ápesaka bango bilei na tango ekoki. 43 Esengo mingi na mosali wana soki mokonzi azongi pe akuti ye azali kosala mosala. 44 Nalobi na bino, ya solo: mokonzi wana akotia biloko na ye nyonso na maboko na ye. 45 Nzokande soki mosali yango amilobi: 'Mokonzi na ngai azali koya noki té', bongo soki abandi kobeta basali mosusu ya mibali ná ya basi; soki azali kolia, komela pe kolangwa, 46 mokonzi na ye akozonga na mokolo mosali wana azali kozela ye té pe na ngonga ayebi té. Akopesa ye etumbu ya liwa; akotia ye na molongo ya bato batosaka Nzambe té. 47 "Mosali oyo ayebi makambo mokonzi na ye alingaka; kasi amipesaka té po na kosala yango, bakobeta ye fimbu mingi. 48 Kasi mosali oyo ayebi té makambo mokonzi na ye alingaka pe asali makambo oyo ekoki kobetisa ye fimbu, bakobeta ye fimbu mingi té. Moto oyo azwi mingi, bakosenga ye pe mingi. Moto oyo bapesi makambo minene-minene, bakosenga ye pe makambo minene koleka."

Boboto té, kasi bitumba

49 "Nayaki awa na mokili po nátia móto na kati ya bato; nazali na posa námona yango ezali kopela. '"Nasengeli koyoka pasi mingi; yango ekozala lokola batisimo bakopesa ngai, pe nazali motema likolo tii tango ekosalama. 51 Bokanisi 'tè nayeeli bato boboto? Té! Najobi na bino: nayei po na kokabola bato. 52 Banda lelo libota moko ya bato mitano ekokabwana, epai mosusu bato misato, epai mosusu bato mibale. 53 Batata bakoyinana ná bana na bango ya mibali. Bamama bakoyinana ná bana na bango ya basi. Babokilo ya basi bakoyinana ná basi ya bana na bango."

Kolimbola bilembo

54 Yezu alobaki lisusu na bato: "Soki bomoni lipata ebimi na epai moi elalaka, kaka na tango wana bolobi: 'Mbula ekonoka', pe yango ésalamaka. 55 Pe soki bomoni mopepe ezali kouta na epai ya se, bolobi: 'Lelo moi ekozala makasi penza', pe yango ésalamaka. 56 Bato ya lokuta! Boyebi kolimbola makambo bomo-naka na Likolo pe na se. Bongo po na nini bokokaka té kolimbola makambo ezali koleka na tango oyo?"

Koyokana ná banguna

57 "Po na nini bino moko bokokaka koyeba té makambo oyo bosengeli kosala? 58 Soki moto afundi yo pe bozali kokende ná ye na tribinal, sala makasi po bóyokana tango bozali nanu na nzela. Soki té moto yango akomema yo liboso ya zuzi, bongo zuzi akopesa yo na maboko ya basoda po bábwaka yo na boloko. 59 Nalobi na yo, okobima na boloko té tii tango okofuta nyongo nyonso."

Luka 13

Kobongola motema to kokufa

1 Mokolo moko bato mosusu bayei kolobela Yezu makambo ya bato ya Galilé oyo Pilate abomisaki, tango bazalaki koboma banyama po na kopesa mabonza na Nzambe. 2 Yezu azongiseli bango: "Lokola babomaki bango ndenge wana, bokanisi 'tè masumu na bango eleki oyo ya bato mosusu ya Galilé? 3 Té! Kasi nalobi na bino: soki bobongoli mitema té, bino nyonso bokokufa kaka lokola bango. 4 Bongo bato zomi na mwambe ya Yeruzalem oyo bakufaki tango ndako ya Siloé ebukanaki, bokanisi 'tè mabe na bango eleki ya bato mosusu nyonso ya Yeruzalem? 5 Té! Kasi nalobi na bino: soki bobongoli mitema té, bino nyonso bokokufa kaka ndenge moko."

Lisapo ya nzete ya figi oyo ebotaka mbuma té

6 Yezu apesi ndakisa, alobi: "Moto moko akonaki nzete ya figi na elanga na ye. Mokolo moko ayei koluka ba-figi, kasi azwaki yango té. 'Bongo alobi na mosali ya elanga: 'Tala, mbula misato mobimba nazali koya koluka ba-figi na nzete oyo, kasi nazwaka yango té. Kata yango. Ezali kobebisa mabelé kaka pamba.' 8 Kasi mosali ya elanga azongiseli ye: 'Mbuta-muntu, tika yango nanu mbula oyo. Nakotimola mabelé pembeni na yango, pe nakotia matiti ya kopola. 9 Boye, tango mosusu ekoki kobota ba-figi na mbula ekoya; soki bongo té okokata yango.' "

Yezu abikisi mwasi moko na Mokolo ya Kopema

10 Mokolo moko ya Kopema Yezu azalaki koteya na ndako ya losambo. 11 Mwasi moko azalaki wana, azalaki na molimo mabe epesá ye maladi ya nkunki; yango esi'esali bambula zomi na mwambe. Mokongo na ye engunzamá pe abandaki kokoka kotelema malamu té. 12 Awa Yezu amoni ye, abengi ye pe alobi: "Mama, obiki, maladi na yo esili." "Asimbi ye, na mbala moko nkunki esili, atelemi malamu pe abandi kopesa Nzambe mersi. 14 Kasi mokonzi ya ndako ya losambo asiliki po Yezu abikisaki moto na Mokolo ya Kopema, bongo alobi na bato: "Tozali na mikolo motoba ya mosala. Bóyaka na mikolo wana po básalisaka maladi na bino, kasi bóyaka na Mokolo ya Kopema té." 15 Nkolo Yezu azongiseli ye boye: "Bino bozali bato ya lokuta! Na Mokolo ya Kopema, moko moko na bino afungolaka ngombe na ye to punda na ye po ákende komelisa yango mai. Ezali boye té? 16 Botala mama oyo, moto ya libota ya Abraham. Banda Satan akangá ye esi'esali bambula zomi na mwambe. Bongo nasengelaki té kofungola ye minyololo oyo na Mokolo ya Kopema?" 17 Awa alobi boye, banguna na ye bayoki soni penza; kasi bato nyonso basepelaki po na misala ya lokumu oyo ye asalaki.

Lisapo ya mbuma ya mutarde pe ya kisi ya mapa

18 Yezu alobi: "Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye? Nakoki komeka yango na nini? 19 Ekokani ná mbuma bábengaka mutarde, oyo moto moko akoni na elanga na ye. Ebimi pe ekómi nzete, bongo bandeke eyei kosala ba-zala na bitape na yango." 20 Yezu alobi lisusu: "Nakoki komeka bokonzi ya Nzambe na nini? 21 Ekokani na kisi ya mapa: Mama moko asangisi yango na sani monene ya farine, bongo farine nyonso eyei kovimba."

Porte ya moke

22 Yezu azalaki kaka kolanda nzela na ye po na kokende na Yeruzalem; abandaki kokota na ba-vile pe na bamboka ya mike po na koteya bato. "Moto moko atuni ye: "Mokonzi, bato oyo bakobika bazali mingi té?" Yezu azongiseli ye: 24 "Bósala makasi po na kokota na porte ya moke. Nalobi na bino, bato mingi bakomeka po bákotela wana, kasi bakokoka té. 25 "Mokolo ezali, kolo ya ndako akotelema pe akokanga ndako na fungola, bongo bino bokozala na libanda pe bokobanda kobeta porte pe koloba: 'Mokonzi, fungolela biso ndako.' Kasi ye akozongisela bino: 'Nayebi epai bino bouti té!' 26 Bongo bino bokoloba na ye: "Toliaki pe tomelaki esika moko ná yo! Oteyaki na balabala na biso!' 27 Kasi ye akozongisela bino lisusu: 'Nayebi epai bino bouti té! Bólongwa pembeni na ngai, bino nyonso bato bozalaki kosala mabe!' 28 Kuna bokobanda kolela pe kolia mino, tango bokomona Abraham, Izaak ná Jakob pe baprofete nyonso bafandi na mboka ya Nzambe; nzokande bino, bakobwaka bino na libanda. 29 Bato mingi bakouta na epai moi ebimaka pe na epai elalaka, na epai ya likolo pe na epai ya se, bongo bakoya kozwa esika na feti oyo Nzambe akosalisa na mboka na ye. 30 Ya solo, bato mosusu oyo bazali sik'oyo bato ya suka, bakokóma bato ya liboso; pe bato mosusu oyo bazali sik'oyo bato ya liboso, bakokóma bato ya suka."

Yezu aleli po na Yeruzalem

31 Kaka na tango wana ba-Farizé mosusu bayei penepene ya Yezu, balobi na ye: "Ebongi malamu ólongwa awa pe ókende epai mosusu, pamba té Erode alingi kobomisa yo." 32 Yezu azongiseli bango: "Bókende koloba na mboloko wana 'tè nazali kobengana milimo mabe pe kobikisa bato ya maladi. Nakosala bongo tii tango nakosilisa mosala na ngai. 33 Kasi ebongi nálanda mobembo na ngai. Pamba té esengeli báboma profete kaka na Yeruzalem. 34 "A bino bato ya Yeruzalem! Tango Nzambe atindelaka bino baprofete, boboyaka bango pe bobomaka bango na mabanga. Nzokande ngai, mbala na mbala namekaki kosangisa bino pembeni na ngai, ndenge soso esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi bino boboyaki! 35 Yango wana Nzambe alingi kosundola mboka na bino. Nalobi na bino, bokomona ngai lisusu té tii tango bokoloba: 'Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye!' "

Luka 14

Yezu abikisi moto na Mokolo ya Kopema

1 Mokolo moko ya Kopema Yezu akei na ndako ya mokonzi moko ya ba-Farizé po na kolia. Ba-Farizé bazalaki kotala ye na mayele. 2 Moto moko ayei kotelema liboso na ye, azalaki na maladi evimbisaka nzoto. 3 Yezu atuni boye na balakisi-Mibeko pe na ba-Farizé: "Mibeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na Mokolo ya Kopema to té?" 4 Kasi bango bafandi nyee. Bongo Yezu asimbi moto wana, abikisi ye pe atiki ye ákende. 5 Na sima alobi na bango: "Soki mwana to ngombe ya moko na bino akwei na libulu ya mai, ye akosala nini? Akokende kobimisa ye noki té, ata ezali Mokolo ya Kopema?" 6 Kasi bakokaki kopesa ye eyano té na motuna wana. Kozala lofundu té 7 Yezu amoni 'tè bato oyo Farizé wana abengisaki bakomi kopona bisika ya lokumu, akamati yango lokola ndakisa pe apesi bango toli boye: 8 "Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende kofanda na esika ya liboso té. Pamba té tango mosusu babengjsi pe moto moko oyo aleki yo na lokumu. 9 Soki bongo, kolo ya feti akoya koloba na yo: 'Tikela ye esika wana.' Boye okoyoka soni pe okokende kofanda na esika ya suka. 10 Kasi yo, soki babengisi yo na feti, kende kofanda na esika ya suka. Bongo tango kolo ya feti akoya, akoloba na yo: 'Moninga na ngai, yaka kofanda awa na esika ya liboso.' Boye okozwa lokumu na miso ya bato oyo bafandi ná yo na mesa. 11 Ezali bobele ndenge wana po na moto nyonso oyo amikumisaka: Nzambe akitisaka ye; pe oyo nyonso amikitisaka, Nzambe akumisaka ye." 12 Na sima Yezu alobi na moto oyo abengisaki ye: "Soki osalisi feti, kobengisa baninga na yo té, ézala bandeko na yo, to bato ya libota na yo, to pe bato ya mbongo oyo bafandaka penepene na yo. Pamba té soki osali bongo, mokolo mosusu bango pe bako-bengisa yo, pe bakozongisela yo bolamu oyo osalaki bango. 13 Kasi soki olingi kosalisa feti, bengisa bato bakelelá, ná bato bakufa makolo to maboko, pe bato bakufa miso. 14 Bongo okozala na esengo, po bango bazali na eloko ya kozongisela yo té. Kaka Nzambe moto akozongisela yo yango, tango akosekwisa bato ya malamu."

Lisapo ya feti monene

15 Moto moko na kati ya bato oyo bafandaki na mesa, awa ayoki boye alobi na Yezu: "Esengo mingi na moto oyo akozwa esika na feti oyo Nzambe akosalisa na mboka na ye." 16 Yezu alobi na ye: "Moto moko alingaki kosalisa feti moko ya monene, pe abengisi bato ebele. 17 Awa tango ya kolia eyei kokoka, atindi mosali na ye ákende koloba na bato oyo ye abengisaki: 'Bóya! Nasi'nabongisi biloko nyonso.' 18 Kasi bango nyonso babandi kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobi na ye: 'Nauti kosomba elanga moko pe nasengeli kokende kotala yango. Limbisa ngai.' 19 Mosusu alobi: 'Nauti kosomba bangombe zomi, pe nakei komeka yango soki ezali makasi. Limbisa ngai.' 20 Pe mosusu alobi: 'Nauti kobala kaka mikol'oyo, yango wana nakoki koya té.' 21 Mosali azongi epai ya mokonzi na ye pe ayebisi ye makambo nyonso; bongo ye asiliki pe alobi na mosali na ye: 'Kende noki na ba-wenze pe na ba-balabala, pe memela ngai bato bakelelá, bato bakufa makolo to maboko, bato bakufa miso, pe bato ya tengu-tengu.' 22 Na sima ya mwa tango moke, mosali ayei pe alobi: 'Mokonzi, nasali ndenge otindaki ngai, kasi bisika ezali nanu.' 23 Bongo mokonzi alobi na mosali na ye: 'Kende na banzela oyo ezali na esobe, pe kotisa bato na makasi, po ndako na ngai étonda. 24 Nalobi na bino: na kati ya bato oyo nabengisaki liboso, ata moko té akozwa esika na feti na ngai.' "

Po na kokóma moyekoli ya Yezu

25 Bato mingi bazalaki kolanda Yezu. Ye abaluki pe alobi na bango: ""Moto oyo alingi koya epai na ngai akoki kozala moyekoli na ngai té, soki azali kolinga liboso tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, to pe bandeko na ye, ézala ata bomoi na ye moko. 27 Moto oyo aboyi komema kuruze na ye pe kolanda ngai, akoki kozala moyekoli na ngai té. 28 "Pamba té na kati na bino, moto oyo alingi kotónga ndako moko ya molai, asalaka nini? Liboso afandaka nanu, pe akanisaka talo ya ndako, po áyeba soki akokoka kosilisa yango. 29 Soki asali boye té, atako sima ya kotónga fondasion, tango mosusu akokoka kosilisa ndako té; pe bato nyonso oyo bakomona bongo bakobanda koseka ye. ^Bakoloba: 'Moto oyo abandaki kotónga ndako, kasi akoki kosilisa yango té!' 31 Ndenge moko pe, mokonzi ya mboka oyo azali na basoda 10.000, soki alingi kobunda na mokonzi mosusu oyo azali na basoda 20.000, asalaka nini? Liboso afandaka nanu, pe amitunaka soki akokoka kolonga. 32 Soki amoni 'tè akokoka té, atindaka bantoma epai ya mokonzi wana tango azali nanu mosika, po báyokana." 33 Yezu abakisi: "Bobele ndenge wana pe, moto moko té na kati na bino akoki kokóma moyekoli na ngai, soki atiki bomengo na ye nyonso té."

Mungwa oyo ezangá tina

34 "Mungwa ezali eloko ya malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kozongisa elengi na yango? 35 Ezali lisusu na tina té. Bakoki kutu kotia yango té na matiti ya kopola oyo bato basalelaka bilanga, kasi babwakaka yango na libanda. Moto azali na matoi, áyoka!"

Luka 15

Méme oyo ebungaki, emonani

1 Mokolo moko bafutisi-mpaku ná bato ya masumu bayaki bango nyonso epai ya Yezu po na koyoka ye. 2 Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko basilikaki pe balobi: "Moto oyo azali koyamba bato ya masumu, pe azali kolia ná bango esika moko!" 3 Bongo Yezu apesi bango ndakisa oyo: 4 "Soki moto moko na kati na bino azali na bameme 100, pe soki abungisi méme moko, akosala nini? Akotika bameme na ye 99 na esobe, pe akokende koluka méme oyo ebungi, tii akozwa yango. 5 Soki amoni yango akoyoka esengo mingi, akotia méme yango na mapeka, 6 pe akozonga na mboka na ye. Na sima akobenga baninga ná bato oyo bafandaka na ye penepene, bongo akoloba na bango: 'Bóya tósepela, po namoni méme na ngai oyo ebungaki.' 'Nalobi na bino, na mboka ya Nzambe pe ekozala ndenge moko: soki moto moko kaka abongoli motema, bakoyoka esengo mingi, koleka esengo oyo bazali koyoka po na bato ya malamu 99 oyo bazali na posa ya kobongola mitema té."

Mbongo oyo ebungaki, emonani

8 "Pe lisusu, soki mwasi moko azali na mbongo zomi ya bibende ya arjan, pe abungisi moko, akosala nini? Akopelisa mwinda, akokomba ndako pe akoluka yango malamu tii akomona yango. "Tango akozwa yango, akobenga baninga ná basi oyo bafandaka na ye penepene, bongo akoloba na bango: 'Bóya tósepela, po namoni mbongo na ngai oyo ebungaki.' 10 Nalobi na bino: ndenge moko pe ba-anjelu ya Nzambe bakosepela mingi po na moto ya masumu moko abongoli motema."

Mwana oyo abungaki, amonani

11 Yezu alobi lisusu: "Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. 12 Mwana ya leki alobi na tata na ye: 'Tata, kabola bomengo na yo, pesa ngai oyo ya ngai ndambo.' Bongo tata wana akaboli bomengo na ye na bana na ye mibale. 13 Mwana ya leki, awa azwi oyo ya ye ndambo, ateki yango, pe sima ya mwa mikolo akei na mboka moko ya mosika. Kuna asali mobulu, pe abebisi mbongo na ye nyonso. 14 Tango atikalaki maboko pamba, nzala mingi ekoti na mboka wana, pe abandi kokelela. 15 Akei koluka mosala epai ya moto moko ya mboka yango, pe ye atindi ye na esobe po na kokengela bangulu. 16 Azalaki na posa kutu ya kolia bambuma oyo bangulu ezalaki kolia, kasi moto moko té apesi ye yango. "Bongo abandi kokanisa pe amilobi: 'Basali nyonso ya tata na ngai bazali kolia ndenge balingi, kasi ngai awa nazali kokufa na nzala. 18 Nakozonga epai ya tata na ngai pe nakoloba na ye: Tata, nasalaki mabe na miso ya Nzambe pe na miso na yo. 19 Kozwa ngai lisusu lokola mwana na yo té, kasi kamata ngai lokola moto na yo ya mosala.' 20 Bongo asimbi nzela pe azongi epai ya tata na ye. "Tango azalaki nanu mosika, tata na ye amoni ye pe ayoki mawa mingi penza, bongo akei mbangu koyamba ye. 21 Mwana alobi na ye: Tata, nasalaki mabe na miso ya Nzambe pe na miso na yo. Kozwa ngai lisusu lokola mwana na yo té.' 22 Kasi tata na ye alobi na basali na ye boye: 'Bómema noki bilamba oyo eleki kitoko, bólatisa ye yango. Bótia ye pete na mosapi pe bólatisa ye sapatu. "Bómema mwana-ngombe ya mafuta, bóboma yango; tólia pe tósala feti. 21 Pamba té mwana na ngai oyo akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki pe tala, amonani lisusu.' Bongo babandi feti moko ya kafukafu. 25 "Na tango wana mwana ya kulutu azalaki na bilanga azongi pe akómi penepene ya ndako, ayoki makelele ya bato bazali kobeta miziki pe kobina. "Abengi mosali moko pe atuni ye: 'Likambo nini na ndako?' 27 Mosali wana azongiseli ye: 'Leki na yo azongi, bongo tata na yo abomisi mwana-ngombe ya mafuta, po amoni ye lisusu na nzoto makasi.' 28 Kasi ye, awa ayoki boye, asiliki pe aboyi kokota na ndako, bongo tata na ye abimi po na kobondela ye. 29 Kasi azongiseli tata na ye boye: 'Tata, ngai nasaleli yo bambula ebele. Ata mokolo moko té naboyá kotosa maloba na yo. Kasi mokolo moko té opesá ngai ata mwana-taba pamba, po nália pe násepela ná baninga na ngai. 30 Nzokande mwana na yo wana abebisi bomengo na yo nyonso na basi ya ndumba. Pe lokola ye azongi, obomeli ye mwana-ngombe ya mafuta.' 31 Tata alobi na ye: 'Mwana na ngai, yo ozalaka tango nyonso ná ngai. Biloko na ngai nyonso ezali pe ya yo. 32 Bongo tosengeli kosala feti pe kosepela, po leki na yo akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, pe tala, amonani lisusu.' "

Luka 16

Kapita ya mayele

1 Yezu abeteli bayekoli na ye lisapo mosusu, alobi: "Moto moko ya mbongo azalaki na kapita; bongo bato bayei koyebisa ye 'tè: 'Kapita na yo azali kobebisa biloko na yo.' 2 Abengi ye pe alobi: 'Makambo nini nayoki po na yo? Lakisa ngai ndenge ozalaki kosala mosala na yo; pamba té okoki lisusu kozala kapita té.' 3 Kapita amilobi: 'Mokonzi na ngai alongoli ngai na mosala, násala nini? Kosala bilanga? nakoka té. Pe kosengasenga? ezali soni mingi. 4 A! Nayebi eloko nakosala. Nakosepelisa bato po bábanda koyamba ngai na bandako na bango, tango nakolongwa na mosala.' 5 Bongo abengi bato nyonso oyo bazalaki na banyongo ya mokonzi na ye. Atuni na moto ya liboso boye: 'Ozali na nyongo ya boni epai ya mokonzi na ngai?' 6 Moto wana azongisi: 'Batonó kama ya mafuta.' Kapita alobi na ye: 'Kamata mokanda ya nyongo, fanda noki pe kóma: batonó tuku mitano.' 7 Atuni na mosusu: 'Yo ozali na nyongo ya boni?' Ye azongisi: 'Basaki kama mitano ya blé.' Kapita alobi na ye: 'Kamata mokanda ya nyongo pe kóma: basaki kama minei.' " 8 Nkolo Yezu akumisi kapita wana ya mabe po na mayele na ye, alobi: "Bato oyo balukaka bomengo ya mokili basalaka makambo na bango na mayele; baleki kutu baoyo balukaka kotambola na moi. 'Nalobi na bino: mbongo ekosaka bato mingi. Kasi bino bósalelaka yango po na kozwa baninga; boye tango makambo ya mbongo ekosila, bango bakoyamba bino na mboka ya seko. 10 Moto oyo bakoki kotiela ye motema na makambo ya mike, bakoki pe kotiela ye motema na makambo ya minene. Moto oyo bakoki kotiela ye motema té na makambo ya mike, bakoki pe kotiela ye motema té na makambo ya minene. 11 Bongo soki bakoki kotiela bino motema té na mbongo oyo ekosaka bato, nani akopesa bino bomengo ya solo? 12 Soki bakoki kotiela bino motema té na biloko ya bato mosusu, ndenge nini Nzambe akoki kopesa bino bomengo oyo abombeli bino? 13 "Mosali moko té akoki kosalela bakonzi mibale. Soki azali koyina moko, akolinga mosusu; soki azali kotosa moko, akoboya mosusu. Bokoki kosalela Nzambe té soki bozali baumbu ya mbongo."

Mibeko ya mboka ya Nzambe

14 Ba-Farizé oyo bayokaki maloba wana bazalaki kolinga mbongo mingi; bongo babandi koseka Yezu. 15 Yezu alobi na bango: "Bino bomilongisaka na miso ya bato 'tè bozali bato malamu, kasi Nzambe ayebi mitema na bino. Bóyeba 'tè makambo oyo bato bamonaka minene, Nzambe amonaka yango pamba. 16 "Nzambe apesaká bato na ye Mibeko ya Moize pe batoli ya baprofete. Kasi kobanda eleko Yoane Mobatisi ayaki, bazali kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye; pe moto nyonso azali kosala makasi po ákóma moto ya mboka ya Nzambe. 17 Ata soki Likolo na se ekoki kolimwa, kasi bakoki kolongola eloko moko té na Mibeko, ézala ata mwa-letre moke. 18 "Moto nyonso oyo atiki mwasi na ye pe abali mosusu, azali kosala kindumba. Pe moto abali mwasi oyo mobali mosusu atiki, azali kosala kindumba."

Moto ya mbongo pe Lazare

19 "Na mboka moko ezalaki na moto moko ya mbongo; ye azalaki kolata bilamba ya kitoko pe ya talo; mikolo nyonso azalaki kolia malamu lokola nde azali na feti. 20 Pe moto moko ya kokelela azalaki kolala na porte ya ndako na ye, kombo na ye Lazare; nzoto na ye etondá na bapota. 21 Azalaki kaka kozela mwa-ndambo ya biloko oyo moto ya mbongo atikaka. Ata kutu bambwa ya maboma ezalaki koya kolembola bapota na ye. 22 "Moto ya kokelela akufi, pe ba-anjelu bamemi ye na Likolo na esika ya lokumu, penepene ya Abraham. Moto ya mbongo ayei kokufa, bakundi ye; "bongo azalaki komona pasi mingi na lifelo. Atali na likolo, amoni Abraham mosika, ná Lazare afandi penepene na ye. 24 Abeleli ye: 'Tata Abraham, yokela ngai mawa. Tinda Lazare átia songe ya mosapi na ye na mai, pe átangisela ngai yango na lolemo, pamba té nazali komona pasi mingi na móto oyo.' "Abraham azongisi: 'Mwana na ngai, kanisa 'tè ozwaká bomengo mingi tango ozalaki na bomoi, kasi Lazare azalaká komona kaka pasi. Sik'oyo mawa na ye esili, pe yo okómi komona pasi. 26 Omoni kutu, libulu moko ya monene ezali na kati na biso ná bino. Yango wana, bato oyo balingi kolongwa awa po baya epai na bino bakoka té; pe moto moko té akoki kolongwa kuna po áya epai na biso.' 27 Moto ya mbongo alobi: 'Tata, soki bongo, nabondeli yo, tinda Lazare epai ya fami na ngai, 28 pamba té natiká bandeko mitano; ákende kokebisa bango po bango baya té na esika oyo ya pasi.' 29 Kasi Abraham azongisi: 'Bayebi Mibeko ya Moize ná batoli ya baprofete; bátosa yango.' 30 Moto ya mbongo alobi: 'Té, tata Abraham. Wana ekoki té. Kasi soki moto moko oyo akufá akei epai na bango, bakobongola mitema.' 31 Kasi Abraham azongiseli ye: 'Soki balingi koyokela Moize té ná baprofete, bakondima pe té ata soki moto akufá asekwi.' "

Luka 17

Lisumu ezali likambo monene

1 Yezu alobi na bayekoli na ye: "Makambo oyo ekweisaka bato na masumu ekoki kozanga té; kasi mawa mingi na moto oyo akweisaka baninga! 2 Ebongi malamu bákanga ye libanga ya monene na kingo pe bábwaka ye na ebale, esika 'tè ákweisa moto moko oyo ayebi makambo mingi té. 3 Bókeba! "Soki ndeko na yo asali yo mabe, lakisa ye mabe ye asali. Soki andimi kobongola motema, limbisa ye. 4 Soki asali yo mabe mbala sambo na mokolo moko pe soki azongi po na koloba na yo: 'Yokela ngai mawa', limbisa ye."

Bondimi

5 Bantoma balobi na Nkolo Yezu: "Moteyi, kolisa bondimi na biso." 6 Nkolo azongisi: "Bókanisa mbuma oyo bábengaka mutarde. Soki bondimi na bino ezalaki na nguya lokola ya mbuma wana ya moke, mbele bokokaki koloba na nzete oyo: 'Longwa awa pe kende kopikama na ebale!' pe yango elingaki kotosa bino."

Makambo mosali asengeli kosala

7 "Bókanisa nanu. Soki moto moko na kati na bino azali na mosali oyo asalaka na bilanga to akengelaka bameme, ndenge nini bazalaká ye ná mosali na ye? Tango mosali azongaka na ndako, mokonzi moko té alobaká na ye: 'Yaka noki, fanda pe lia.' 8 Kasi alobaká na ye: 'Nalingi kolia. Lambela ngai, lata bilamba ya mosala pe bongisela ngai mesa. Bongo na sima yo pe okoki kolia.' 9 Mokonzi apesaká mosali na ye mersi po atosi maloba na ye? Eloko té. 10 Ezali ndenge moko pe po na bino: soki bosali nyonso oyo Nzambe atindi, bóloba: 'Tozali kaka basali; tosali bobele mosala na biso.' "

Yezu abikisi bato zomi ya maladi ya maba

11 Lokola Yezu azalaki kokende na Yeruzalem, aleki na kati ya mboka Samarie ná Galilé. 12 Tango alingaki kokota na mboka moko, bato zomi oyo bazalaki na maladi ya maba bayei po bákutana ná ye. Batelemi mwa-mosika, 13 pe babandi kobelela: "Moteyi, Yezu, yokela biso mawa!" 14 Yezu amoni bango pe alobi: "Bókende komilakisa epai ya banganga-Nzambe po bátala nzoto na bino." Tango bazalaki kokende babiki. 15 Moko na kati na bango, awa amoni 'tè abiki, abandi kokumisa Nzambe makasi, pe ayei kozonga epai ya Yezu. 16 Afukameli Yezu pe apesi ye mersi. Nzokande moto wana azalaki moto ya Samarie. 17 Bongo Yezu alobi: "Bango nyonso zomi té bato babiki? Wapi bato libwa mosusu? 18 Bobele mopaya oyo nde moto azongi po na kopesa Nzambe mersi?" 19 Na sima Yezu alobi na ye: "Telema, kende. Bondimi na yo ebikisi yo."

Ndenge Bokonzi ya Nzambe ekoya

20 Ba-Farizé mosusu batuni Yezu tango nini Nzambe akotia bokonzi na ye. Ye azongiseli bango boye: "Elembo moko té ekozala, oyo ekolakisa 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye. 21 Bakokoka pe koloba té 'tè: 'Tala, yang'oyo!' to 'Yango kuna!' Pamba té, bokonzi ya Nzambe esi'ekómi na kati na bino." 22 Sima alobi na bayekoli: "Mikolo ezali koya, bokozala na posa ya komona ngai Mwana ya Moto, ata mokolo moko pamba, tango nakozonga; kasi bokomona ngai té. 23 Na mikolo wana bakobanda koloba na bino: 'Ye oyo!' to 'Ye kuna!' Kasi bókende té pe bólanda bango té. 24 Pamba té ndenge kake eutaka na Likolo pe engengisaka bipai nyonso, ngai Mwana ya Moto nakoya ndenge wana. "Kasi liboso nasengeli komona pasi mingi; bato ya tango oyo bakoboya ngai. 26 "Tango mokolo na ngai ekokoka, makambo oyo elekaká na mikolo ya Noé ekosalama lisusu. 27 Bato bazalaki kolia pe komela, bazalaki kobalana, tii mokolo Noé akotaki na masuwa, bongo mai eyaki kodindisa mokili pe ebomaki bango nyonso. 28 Ekozala lokola na tango ya Lot: bato bazalaki kolia pe komela; bazalaki kosomba pe koteka; bazalaki kokona pe kotónga bandako. 29 Kasi mokolo Lot alongwaki na Sodome, Nzambe akweisaki móto ná fofolo, bongo bato nyonso bakufaki. 30 Ekozala pe ndenge moko, mokolo ngai Mwana ya Moto nakomilakisa. 31 Na mokolo wana moto oyo akozala na libanda, ákota na ndako té po na kokamata biloko na ye. Ndenge moko pe, moto oyo akozala na bilanga ázonga na ndako na ye té. 32 Bókanisa mwasi ya Lot! 33 Moto oyo akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango, kasi oyo akobungisa bomoi na ye, akobikisa yango. 34 "Nalobi na bino: soki bato mibale bakolala mbeto moko na butu wana, bakokamata moko pe bakotika mosusu. 35 Soki basi mibale bakozala konika blé esika moko, bakokamata moko pe bakotika mosusu. 36 Soki mibali mibale bakozala na elanga, bakokamata moko pe bakotika mosusu." 37 Bayekoli batuni ye: "Mokonzi, makambo wana ekoleka wapi?" Ye azongisi: "Epai ebembe ekozala, bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana kuna."

Luka 18

Lisapo ya mwasi pe zuzi

1 Mokolo moko Yezu abeteli bango lisapo po na kolakisa bango 'tè basengeli kobondela Nzambe tango nyonso, pe kolemba ata moke té; alobi: 2 "Na mboka moko ezalaki na zuzi moko, abandaki kobanga Nzambe té, azalaki pe kotosa bato té. 3 Mwasi moko pe azalaki kuna akufelá mobali. Mikolo nyonso ye azalaki koya epai ya zuzi pe kosenga ye: 'Longisa ngai, pamba té basali ngai mabe.' 4 Banda kala zuzi wana azalaki kaka kolinga té; kasi na sima amilobi: 'Ata nabangaka Nzambe té pe natosaka bato té, 5 kasi nakolongisa mwasi oyo po azali kotungisa ngai. Soki boye té, akobanda kaka koya kotiela ngai makelele.' " 6 Nkolo Yezu abakisi: "Bóyoka ndenge zuzi oyo ya mabe alobi. 7 Bongo Nzambe akotika kolongisa bato oyo ye aponi, soki bazali kobondela ye butu moi? Akozelisa bango? 8 Nalobi na bino, akolongisa bango noki. Kasi tango ngai Mwana ya Moto nakoya, bokanisi nakokuta bato ya bondimi?"

Lisapo ya Farizé ná mofutisi-mpaku

9 Mokolo moko Yezu apesi toli na bato oyo bakanisaka 'tè bazali bato malamu na miso ya Nzambe, pe bamonelaka bato mosusu; abeteli bango lisapo oyo: 10 "Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe po na kosambela. Moko azalaki Farizé, mosusu mofutisi-mpaku. "Farizé akei kotelema na miso ya bato nyonso, pe asambeli boye na motema: 'E Nzambe, napesi yo mersi po nazali lokola bato mosusu té. Bango bazali bamiyibi, bato ya mobulu pe ya kindumba. Nazali pe lokola mofutisi-mpaku oyo kuna té. 12 Na poso moko namilalisaka nzala mikolo mibale; pe na biloko nyonso nazwaka nalongolelaka yo eteni moko na kati ya biteni zomi.' 13 Mofutisi-mpaku atikalaki na sima ya bato nyonso, pe amekaki kutu kotala na likolo té, kasi azalaki kobeta tolo po na mawa, alobi: 'E Nzambe, yokela ngai mawa, nazali moto ya masumu.' " 14 Yezu abakisi boye: "Nalobi na bino, mofutisi-mpaku, tango azongaki na ndako na ye, asi'akómaki moto malamu na miso ya Nzambe; kasi Farizé té. Pamba té moto nyonso oyo amikumisaka, Nzambe akitisaka ye; pe oyo nyonso amikitisaka, Nzambe akumisaka ye."

Yezu ayambi bana mike

15 Bato bayeeli Yezu bana mike po ásimba bango. Tango bayekoli bamoni bongo babandi kopekisa bango. 16 Kasi Yezu abengi bana pe alobi: "Bótika bana mike baya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té mboka ya Nzambe ezali po na baoyo bakokani ná bango. 17 Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke té, akokota na mboka na ye ata moke té."

Moto ya bomengo

18 Mokonzi moko ya Bayuda atuni Yezu: "Moteyi malamu, nasengeli kosala nini po názwa bomoi ya seko?" 19 Yezu alobi na ye: "Po na nini obengi ngai moto malamu? Moto moko ya malamu azali té, kaka Nzambe ye moko. 20 Oyebi Mibeko: Kosala kindumba té; koboma moto té, koyiba té; kokosela moto makambo té; tosaka tata ná mama." 21 Moto wana azongisi: "Mokonzi, natosaka Mibeko wana banda bomwana na ngai." 22 Awa Yezu ayoki boye alobi: "Ozangi kaka likambo moko; kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe kabola mbongo wana na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo. Sima yaka kolanda ngai." 23 Kasi tango moto wana ayoki makambo yango akómi mawa-mawa, po azalaki na mbongo mingi. 24 Awa Yezu amoni boye alobi: "Bato ya bomengo bakozala na pasi mingi po na kokota na mboka ya Nzambe. 25 Pamba té nyama monene oyo bábengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na mboka ya Nzambe." 26 Bato oyo bazalaki koyoka yango batuni: "Bongo nani akoki kobika?" 27 Yezu azongisi: "Makambo oyo bato bakoki kosala té, Nzambe akoki kosala yango." 28 Bongo Piere alobi: "Moteyi, biso totikaki biloko na biso nyonso pe toyei kolanda yo." 29 Yezu alobi na bango: "Nalobi na bino, ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi, bandeko, baboti to bana na ye po ámipesa na makambo ya mboka ya Nzambe, 30 akozwa biloko mingi koleka na mikol'oyo, pe akozwa bomoi ya seko na mikolo ekoya."

Yezu ayebisi ndenge akokufa pe akosekwa (III)

31 Yezu akamati bayekoli na ye zomi na mibale pe alobi na bango: "Bóyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna makambo nyonso baprofete bakómaká po na ngai Mwana ya Moto, ekosalama. 32 Bakokaba ngai na maboko ya bato bayebi Nzambe té. Bakoseka ngai; bakofïnga ngai pe bakobwakela ngai soi. 33 Bakobeta ngai bafïmbu pe bakoboma ngai. Nzokande nakosekwa na mikolo misato." 34 Kasi bayekoli bayebaki tina ya maloba ya Yezu té; mitú na bango efungwamaki nanu té.

Yezu abikisi moto akufá miso

35 Tango Yezu akómi penepene ya Jeriko, moto moko akufá miso afandaki pembeni ya nzela pe azalaki kosenga bato mbongo. 36 Awa ayoki bato mingi bazali koleka, atuni: "Likambo nini oyo?" 37 Bayebisi ye: "Yezu ya Nazaret azali koleka." 38 Bongo abeleli: "Yezu, Mwana ya David, yokela ngai mawa!" 39 Bato oyo bazalaki kotambola liboso bakomi kogangela ye áfanda nyee. Kasi ye alekisi penza koganga makasi: "Mwana ya David! Yokela ngai mawa!" 40 Bongo Yezu atelemi pe atindi bámemela ye moto yango. Tango akómi pembeni, Yezu atuni ye: 41 "Olingi násala nini po na yo?" Ye azongisi: "Mokonzi, nalingi námona lisusu." 42 Bongo Yezu alobi na ye: "Mona. Bondimi na yo ebikisi yo." 43 Na mbala moko moto wana abandi komona, apesi Nzambe mersi pe alandi Yezu. Awa bato bamoni bongo, babandi pe kokumisa Nzambe.

Luka 19

Yezu ná Zashé

1-2 Yezu akoti na Jeriko. Moto moko azalaki kuna, kombo na ye Zashé. Ye azalaki mokonzi ya bafutisi-mpaku pe moto ya mbongo mingi. Tango Yezu azalaki kokatisa mboka, 3 Zashé aluki nzela ya komona ye; kasi lokola azalaki mokuse, akokaki té po bato bazalaki mingi. 4 Bongo akei mbangu liboso, pe amati na nzete moko po ámona ye, pamba té alingaki kolekela kuna. 5 Tango Yezu akómi na esika wana, atali na likolo pe alobi na ye: "Zashé, kita noki, pamba té lelo nasengeli kolala na ndako na yo." 6 Zashé akiti noki pe ayambi ye na esengo. 7 Bato nyonso oyo bazalaki komona makambo wana bakomi kotónga Yezu, balobi: "Moto oyo akei kolala na ndako ya moto mabe." 8 Kasi Zashé alobi na Nkolo Yezu: "Mokonzi, tala, nakokabola biloko na ngai na kati-kati; nakopesa ndambo mosusu na bato bakelelá. Pe soki nayibaki moto na mayele, nakozongisela ye mbala minei." 9 Yezu azongiseli ye: "Lelo obiki, ná bato na yo; pamba té yo pe ozali moto ya libota ya Abraham. 10 Ya solo, ngai Mwana ya Moto nayei koluka pe kobikisa bato oyo babungá."

Lisapo ya mbongo

11 Yezu alobi lisusu lisapo moko na bato oyo bayokaki maloba wana. Pamba té lokola azalaki penepene ya Yeruzalem, bato mingi babandaki kokanisa 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye kaka na tango wana. 12 Bongo Yezu alobi: "Moto moko ya lokumu alingaki kokende na vile moko mosika, po bátia ye mokonzi ya mboka na ye. 13 Liboso ya kokende, abengi basali na ye zomi, pe apesi bango mbongo na ye; moto na moto azwi ebende moko ya or. Alobi na bango: 'Bósala mombongo na mbongo oyo tii tango nakozonga.' 14 Kasi bato ya mboka na ye bazalaki koyina ye, bongo batindi bantoma na sima na ye po bákende koloba 'tè: 'Biso tolingi té moto oyo ázala mokonzi na biso.' 15 "Awa batii ye mokonzi azongi na mboka na ye, bongo abengi basali oyo ye apesaki mbongo, po áyeba benefisi ya moto na moto. 16 Moto ya liboso ayei pe alobi: 'Mokonzi, mbongo opesaki ngai eboti benefisi ya bibende zomi ya or.' 17 Mokonzi alobi na ye: 'Longonia, mosali malamu. Osali penza mosala po na makambo ya mike, bongo natii yo motambwisi ya ba-vile zomi.' 18 Mosali ya mibale ayei pe alobi: 'Mokonzi, mbongo opesaki ngai eboti benefisi ya bibende mitano ya or.' 19 Mokonzi azongiseli ye: ' Yo, natii yo motambwisi ya ba-vile mitano.' 20 Mosali mosusu ayei pe alobi: 'Mokonzi, mbongo na yo ya or yang'oyo. Nabombaki yango na kitambala. 21 Nazalaki kobanga, po ozali moto moko ya matata. Ozwaka biloko oyo omoneli pasi té; obukaka bambuma ata oyo okoni té.' 22 Bongo mokonzi azongiseli ye: 'Mosali mabe! nakokitisa yo bobele po na maloba outi koloba. Oyebaki 'tè nazali moto ya matata. Nazwaka biloko oyo namoneli pasi té; pe nabukaka bambuma ata oyo nakoni té. 23 E bongo po na nini otiaki mbongo na ngai na banque té? Awa nazongi, nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi.' 24 Na sima alobi na bato bazalaki pembeni na ye: 'Bóbotola ye ebende ya or wana, pe bópesa yango na moto oyo azali na bibende zomi.' "Balobi na ye: 'Mokonzi, ye azali na yango ebele!' 26 Ye azongisi: 'Nalobi na bino, moto nyonso oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azali na biloko mingi té, bakobotola ye kutu ata mwa ndambo oyo azali na yango. 27 Bongo banguna na ngai oyo balingaki té 'tè názala mokonzi na bango, bómema bango awa, pe bóboma bango na miso na ngai.' "

Yezu akoti na Yeruzalem

28 Awa Yezu asilisi koloba bongo, aleki liboso na bango po na kokende na Yeruzalem. 29 Tango akómi na mboka Betfajé pe Betanie penepene ya ngomba oyo bábengaka Ngomba ya ba-Olive, atindi bayekoli mibale, alobi na bango: 30 "Bókende na mboka wana etalani ná biso; tango bokokóma kuna, bokomona mwana-punda bakangá na singa; nanu bamatá yango té. Bófungola yango pe bómema yango awa. 31 Soki moto atuni bino po na nini bozali kofungola yango, bóloba na ye: 'Mokonzi azali na posa na yango.' " 32 Bayekoli wana bakei pe bamoni makambo nyonso ndenge Yezu alobelaki bango. 33 Tango bazalaki kofungola mwana-punda, bakolo na yango batuni bango: "Po na nini bozali kofungola mwana-punda oyo?" 34 Bazongisi: "Mokonzi azali na posa na yango." 35 Na sima bamemi mwana-punda epai ya Yezu, batandi yango bilamba na bango, pe bafandisi Yezu. 36 Tango azalaki kokende, bato babandaki kotanda bilamba na bango na nzela. 37 Awa akómi penepene ya nzela oyo ekitá na Ngomba ya ba-Olive, bayekoli ebele babandi kosepela pe kokumisa Nzambe na mingongo makasi, po na makamwisi nyonso oyo bamonaki. 38 Bazalaki koloba: "Nkolo ábenisa Mokonzi oyo ayei na kombo na ye! Boboto ézala na Likolo, pe lokumu ézala na Nzambe!" 39 Ba-Farizé mosusu pe bazalaki na kati ya bato, bongo balobi na Yezu: "Moteyi, loba na bayekoli na yo báfanda nyee!" 40 Yezu azongisi: "Nalobi na bino: ata soki bango bafandi nyee, mabanga ekoganga!"

Yezu aleli po na Yeruzalem

41 Awa Yezu akómi penepene ya mboka Yeruzalem, tango amoni yango, aleli po na yango, 42 alobi: "E Yeruzalem, natondi na mawa, po makambo oyo ekoki komemela yo boboto lelo, oyebi yango té. Ya solo, okoki koyeba yango té! 43 Mikolo ezali koya, banguna na yo bakotimola terasé pe bakotónga lopango monene po na kozinga yo pe kobundisa yo. 44 Bakopanza yo nyonso, pe bakosilisa bato na yo. Na kati na yo bakotika libanga moko té na esika na yango; pamba té lelo Nzambe ayei kosalisa yo, kasi yo ondimi té."

Yezu akoti na Ndako ya Nzambe

45 Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi kobengana bato oyo bazalaki kotekisa biloko kuna. 46 Alobi na bango: "Ekómamá boye: 'Ndako na ngai ezali ndako ya losambo'; kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka." 47 Yezu azalaki koteya mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko pe bato minene ya Bayuda baluki nzela ya koboma ye, 48 kasi bazwi yango té, pamba té bato bazalaki kaka kokangana na ye po na koyoka.

Luka 20

Nani apesi Yezu bokonzi?

1 Mokolo moko, Yezu azalaki koteya bato pe kosakola Sango Malamu na kati ya Ndako ya Nzambe. Bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko ná bambuta-muntu ya ekolo bayei epai na ye, 2 batuni ye: "Lobela biso, epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi yango?" 3 Yezu azongiseli bango: "Ngai pe nakotuna bino motuna moko. Bólobela ngai: 4 Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa, eutaki epai ya Nzambe, to epai ya bato?" 5 Kasi babandi kotiana tembe bango na bango pe balobi: "Soki tozongisi 'epai ya Nzambe', ye akotuna: 'Po na nini bondimelaki Yoane té?' 6 Soki pe tolobi 'epai ya bato', Bayuda nyonso bakoboma biso na mabanga, pamba té bango nyonso bandimaka 'tè Yoane azalaki profete." 7 Bongo bazongisi: "Biso toyebi té." 8 Pe Yezu alobi na bango: "Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani."

Lisapo ya bafuteli mabe ya elanga

9 Na sima Yezu abeteli bato lisapo oyo, alobi: "Moto moko akonaki elanga na ye ya vinu, atii bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo pe aumeli mingi kuna. 10 Na tango ya kolongola mbuma ya vinu, atindi mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga, po ákende kozwa ndambo ya mbuma oyo ya ye. Kasi bafuteli ya elanga babeti mosali wana, pe bazongisi ye maboko pamba. "Kolo ya elanga atindi mosali mosusu, kasi bafuteli babeti ye kaka ndenge moko, bafingi ye pe bazongisi ye maboko pamba. 12 Atindi lisusu mosali ya misato. Ye pe bazokisi ye pe babwaki ye na libanda. 13 Bongo kolo ya elanga amilobi: 'Násala nini? Nakotinda mwana na ngai ya bolingo; tango mosusu bakotosa ye.' 14 Kasi tango bafuteli ya elanga bamoni ye, balobi bango na bango: 'Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, po elanga ya vinu ékóma ya biso.' 15 Bongo babwaki ye na libanda pe babomi ye." Sima Yezu abakisi alobi: "Kolo ya elanga akosala nini? 16 Akoya, akoboma bafuteli wana pe akopesa elanga na maboko ya bato mosusu." Tango bato bayoki maloba yango, balobi: "Makambo oyo ekoki kosalama té!" 17 Kasi Yezu atali bango nyee pe azongiseli bango: "Bókanisa nanu makambo oyo ekómamá na Mikanda: 'Libanga ba-mason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.' 18 Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga wana akopasuka; pe soki libanga wana ekweeli moto ekonika ye."

Mpaku ya mokonzi ya Rome

19 Balakisi-Mibeko ná bakonzi ya banganga-Nzambe bayebaki 'tè Yezu azalaki kokanisa bango, tango abetaki lisapo ya bafuteli mabe ya elanga. Yango wana bakomi koluka nzela ya kokanga ye kaka na tango wana, kasi bazalaki kobanga bato. 20 Yango wana babandi kolanda ye na mayele, pe batindi bato mosusu oyo bamilakisi lokola bato malamu, po bámeka kokweisa ye na maloba na ye moko, bongo bápesa ye na maboko ya Pilate, motambwisi ya région ya Yuda. 21 Bango batuni Yezu: "Moteyi, toyebi 'tè makambo olobaka pe oteyaka ezali ya solo. Otalaka bilongi ya bato té, kasi olakisaka solo nzela ya Nzambe. 22 Lobela biso: Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi ya Rome to té?" 23 Kasi Yezu ayebaki mayele na bango ya mabe pe alobi: 24 "Bólakisa ngai ebende moko ya mbongo. Foto oyo ná kombo oyo bakómá awa ezali ya nani?" Bango bazongiseli ye: "Ya mokonzi ya Rome." 25 Bongo Yezu alobi na bango: "Bópesa mokonzi ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye." "Bakokaki kokanga ye té po na maloba oyo autaki koloba na miso ya bato; nzokande eyano na ye ekamwisi kutu bango, pe bafandi nyee.

Motuna po na kosekwa

27 Ba-Sadusé mosusu bayei epai ya Yezu. Ezali ba-Sadusé bato balobaká 'tè bato bakufa bakoki kosekwa té. Batuni ye boye: 28 "Moteyi, Moize apesaká biso Mobeko oyo: Soki moto akufi, atiki mwasi kasi aboti na ye bana té, ndeko ya moto akufi asengeli kobala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana. 29 Na mboka moko ezalaki na bandeko sambo, bango nyonso mama moko, tata moko. Kulutu abali mwasi pe akufi, abotaki na ye té. 30 Leki oyo alandi ye abali mwasi wana pe akufi; 31 na sima leki na bango mosusu abali ye pe akufi. Ezalaki ndenge moko po na bango nyonso sambo, bakufaki kasi babotaki té. 32 Na sima mwasi yango pe ayei kokufa. 33 Bongo mokolo bato bakufa bakosekwa, mwasi wana akozala ya nani? Pamba té bango nyonso sambo babalaki ye." 34 Yezu azongiseli bango: "Bato ya mokili oyo babalanaka, 35 kasi baoyo Nzambe akoyamba na mokili ya sika, akosekwisa bango; bongo bakobanda kobalana té. 36 Bakoki kokufa lisusu té, pamba té bakokani ná ba-anjelu; bazali bana ya Nzambe po basekwi. 37 Moize alakisaki polele 'tè bato bakufa bakosekwa. Pamba té na lisolo ya nzete oyo ezalaki kopela, ekómamá 'tè Nkolo azali 'Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.' 38 Nzambe azali Nzambe ya bato bakufa té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi; na mboka na ye bato nyonso bazali na bomoi." 39 Bongo balakisi-Mibeko mosusu balobi na ye: "Moteyi, olobi malamu"; 40 boye babangaki kotuna ye mituna mosusu.

Mesia azali mokonzi ya David

41 Yezu alobi na bango: "Ndenge nini bakoki koloba 'tè Mesia azali mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye? 42 Pamba té ye moko David akómaká na mokanda ya banzembo: 'Mokonzi na ngai, Nkolo alobi na yo: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; 43 nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.' 44 David azalaká kobenga Mesia 'Mokonzi na ngai'; bongo ndenge nini ye akoki kozala mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?"

Balakisi-Mibeko, bato ya lokuta

45 Awa bato nyonso bazalaki koyoka ye, Yezu alobi na bayekoli na ye: 46 "Bókebaka na balakisi-Mibeko. Bango balingaka kotambola na banzambala ya lokumu. Balingaka 'tè bato bápesaka bango bambote na bazando. Baponaka bisika ya liboso na bandako ya losambo, pe bakiti ya lokumu na bafeti. 47 Babotolaka biloko ya basi oyo bakufelá mibali, nzokande bakosanaka kosambela mingi. Bango bakozwa etumbu oyo eleki monene!"

Luka 21

Likabo ya mwasi moko akelelá

1 Yezu atali epai na epai; amoni bato ya mbongo bazali kobwaka mosolo na esika batiaka makabo, 2 amoni pe mwasi moko akelelá pe akufelá mobali, atii bibende mibale ya mike oyo akokaki kosombela mwa-lipa. 3 Bongo Yezu alobi: "Nalobi na bino, ya solo: likabo ya mwasi oyo akelelá eleki ya bato nyonso. 4 Pamba té bato mosusu bapesi mbongo oyo bazalaki na yango posa té; kasi ye, na kokelela na ye, apesi oyo akokaki kobikela na yango." Yezu ayebisi 'tè Ndako ya Nzambe ekokufa 5 Bato mosusu bazalaki kosolola po na Ndako ya Nzambe, pe na ndenge babongisá yango na mabanga ya kitoko, pe na biloko oyo bato bapesaki na Nzambe. Bongo Yezu alobi: 6 "Mokolo ezali, nyonso oyo bozali komona, bakopanza yango. Ata libanga moko té ekotikala na esika na yango."

Pasi pe minyokoli ekoya

7 Bongo bango batuni ye: "Moteyi, tango nini yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè makambo wana elingi koya?" 8 Yezu azongisi: "Bókeba! Moto moko té ákosa bino! Pamba té bato ebele bakoya na kombo na ngai bakoloba: 'Ezali ngai moto bozalaki kozela', pe 'Tango ekoki.' Kasi bólanda bango té. 9 Tango bokoyoka 'tè na bamboka mosusu bitumba ebimi pe bakomi kotombokela bakonzi, bóyoka somo té. Makambo wana esengeli koya liboso, kasi suka ekoya noki té." 10 Na sima Yezu alobi lisusu: "Bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka. 11 Bipai nyonso mabelé ekoningana makasi, nzala ekongala, pe bato ebele bakozwa maladi ya mabe. Makambo ya somo ekosalama, pe bilembo minene ekomonana na Likolo. 12 "Kasi liboso ya makambo nyonso wana, bakobanda kokanga bino, konyokola bino, kosambisa bino na bandako ya losambo pe kotia bino na boloko. Bakobanda komema bino liboso ya bakonzi pe ya batambwisi, po bondimi bokonzi na ngai. 13 Na ndenge wana bokozwa nzela ya kosakola sango na ngai. 14 Bozala kaka mitema pio. Bómitungisa té soki bokosamba ndenge nini. 15 Pamba té ngai moko nakopesa bino mayele ya koloba, na ndenge 'tè mofundi moko té ákoka kotia tembe to kokweisa bino. 16 Ata batata ná bamama na bino, ba-fami na bino ná baninga na bino bakoteka bino; bakoboma kutu bamosusu na kati na bino. 17 Bato nyonso bakoyina bino po bondimeli ngai. 18 Kasi ata suki moko té ya mitú na bino ekobunga. 19 Bótia kaka molende, bongo bokozwa bomoi."

Yeruzalem ekokufa

20 "Tango bokomona 'tè basoda bazingi Yeruzalem mobimba, bóyeba 'tè etikali moke vile ékufa. 21 Bongo bato bakozala na région ya Yuda basengeli kokima epai ya bangomba; baoyo bakozala na kati ya Yeruzalem bálongwa, pe bato bakozala na bilanga, bákota na vile té. 22 Mikolo wana ekozala mikolo ya etumbu ya Nzambe, po makambo nyonso oyo ekómamá na Mikanda ésalama. 23 Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakobanda komelisa bana mabéle na tango wana, pamba té pasi ekozala mingi na mboka mobimba, pe Nzambe akolakisa kanda na ye na bato ya ekolo oyo. 24 Banguna bakoboma bango na mbeli, bakomema bango na boumbu na bamboka nyonso, pe bato oyo bayebi Nzambe té bakonyata Yeruzalem tii tango na bango ekokoka."

Koya ya Mwana ya Moto

25 "Bilembo ekomonana na sanza, na moi pe na minzoto. Awa na mokili bato nyonso bakolenga; makelele ya ebale monene pe ya mbonge ekobangisa bango. 26 Bakokufa po na somo tango bakokanisa makambo oyo esengeli kokweela mokili mobimba, pamba té moi, sanza pe minzoto ekoningana. 27 Bongo bato bakomona ngai Mwana ya Moto nazali koya na likolo ya lipata, na nguya pe na lokumu nyonso. 28 Tango makambo wana ekobanda kosalama, bozala molende, po tango na bino ya kobika ekómi penepene."

Ndakisa ya nzete ya figi

29 Na sima Yezu apesi bango ndakisa oyo, alobi: "Botala nzete ya figi pe banzete nyonso: 30 Tango bomonaka makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko ya kobuka mbuma ekómi penepene. 31 Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo oyo, bóyeba 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye. 32 Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso. 33 Likolo na se ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té."

Kozala tango nyonso ekenge

34 "Bókeba! Mitema na bino ébeba té na makambo ya pamba, na kolangwalangwa, to pe na bapasi ya mokili oyo; soki té mokolo wana ekoyeela bino na mbalakaka. 35 Pamba té yango ekokweela bato nyonso ya mokili mobimba lokola motambo. 36 Bókengela tango nyonso pe bósambelaka po bozala na makasi ya kobika na nyonso oyo ekoya, pe bókoka kotelema liboso na ngai, Mwana ya Moto." 37 Na moi, Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, kasi na pokwa azalaki kokende kolala na likolo ya Ngomba ya ba-OHve. 38 Bongo na tongo-tongo bato bazalaki koya epai na ye na Ndako ya Nzambe po na koyoka ye.

Luka 22

Bakonzi bayokani bábomisa Yezu

1 Feti ya mapa evimbá té ekómaki penepene; bábengaka yango pe Pake. 2 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakomi koluka nzela ya koboma Yezu, kasi bazalaki kobanga bato.

Yudas alingi koteka Yezu

3 Bongo Satan akoti na motema ya Yudas oyo bábengaka Iskariot. Ye azalaki moko ya bayekoli zomi na mibale. 4 Akei koyokana ná bakonzi ya banganga-Nzambe pe bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, po na ndenge ye akoki kotekela bango Yezu. 5 Basepelaki mingi pe bayokani 'tè bakopesa ye mbongo. 6 Yudas andimi pe abandi koluka nzela ya kotekela bango Yezu na ndenge 'tè bato báyeba té.

Yezu alei bilei ya Pake ná bayekoli na ye

7 Mokolo ya mapa evimbá té ekómi, yango ezalaki mokolo basengeli koboma bana-meme po na Pake. 8 Bongo Yezu atindi Piere ná Yoane pe alobi: "Bókende kobongisela biso bilei ya Pake po tólia yango." 'Bango batuni ye: "Olingi tókende kolamba yango epai wapi?" 10 Ye alobi na bango: "Bóyoka, tango bokokota na vile, bokokutana ná moto moko amemi elokú ya mai; bólanda ye tii na ndako oyo ye akokota, 11 pe bóloba na kolo ya ndako: 'Moteyi atuni yo: wapi esika ngai nakoki kolia bilei ya Pake ná bayekoli na ngai?' 12 Bongo ye akolakisa bino esika moko ya monene na ndako kuna na etaje, basi'babongisá yango. Bólamba bilei ya Pake kuna." 13 Bongo bakei, bakuti makambo nyonso ndenge Yezu alobaki na bango, pe babongisi bilei ya Pake.

Nzoto ná Makila ya Yezu

14 Awa tango ya kolia ekoki, Yezu afandi na mesa ná bantoma na ye. 15 Alobi na bango: "Banda kala nazalaki na posa penza ya kolia Pake oyo esika moko nábino, liboso 'tè nákufa. 16 Pamba té nalobi na bino: nakolia lisusu yango ata mbala moko té, tii tango Nzambe akokokisa tina na yango, na mboka na ye." 17 Bongo akamati kopo ya vinu, apesi Nzambe mersi pe alobi: "Bókamata vinu oyo pe bókabola yango na kati na bino. 18 Ya solo, nalobi na bino: banda lelo nakomela lisusu vinu té tii tango Nzambe akotia bokonzi na ye." 19 Na sima akamati mapa, asambeli losambo ya kopesa Nzambe mersi, akatikati yango, pe akaboleli bayekoli na ye, alobi: "Oyo ezali nzoto na ngai, napesi yango po na bino. Bosalaka boye po na kokanisa ngai." 20 Ndenge moko pe tango basilisi kolia, apesi bango kopo ya vinu, alobi: "Kopo oyo ezali makila na ngai; bakotangisa yango po na bino. Yango nde moto ezali kotia Boyokani ya sika na kati ya Nzambe ná bato. 21 "Kasi nayebi 'tè moto oyo alingi koteka ngai afandi awa na mesa ná ngai. 22 Ya solo, ngai Mwana ya Moto nakokufa ndenge Nzambe akaná; kasi mawa na moto oyo akoteka ngai." 23 Bongo babandi kotunana po na koyeba soki nani na kati na bango alingi koteka ye.

Nani aleki bato nyonso

24 Bayekoli babandi kotiana tembe po na koyeba nani aleki baninga na kati na bango. "Yezu alobi: "Bakonzi ya bikolo balakisaka bokonzi na bango, pe baoyo batambwisaka bamboka balingaka 'tè bato bábenga bango 'Bato malamu'. 26 Kasi bino, bósala bongo té. Na kati na bino, oyo aleki baninga ázala lokola leki na bino; pe oyo azali mokonzi na bino, ázala lokola mosali. 27 Ná moto oyo afandi na mesa, ná oyo azali kosalela ye, nani aleki? Moto aleki ezali oyo afandi na mesa. Ezali boye té? Kasi ngai nazali na kati na bino lokola moto oyo azali kosalela bino. 28 "Bino nde bato bokangamaki na ngai, na bapasi nyonso nazalaki komona. 29 Ndenge Tata apesá ngai bokonzi, ngai pe napesi bino yango. 30 Bongo bokobanda kolia pe komela esika moko ná ngai na mboka na ngai. Bokozala kutu kofanda na bakiti ya bokonzi, po na kokata makambo ya bikolo zomi na mibale ya Israel."

Yezu ayebisi 'tè Piere akowangana ye

31 "Simon, Simon, yoka! Satan azwi nzela ya komeka bino. 32 Kasi nasi'nabondeli Nzambe po na yo, po bondimi na yo ésila té; bongo yo, tango okozonga epai na ngai, lendisa bandeko na yo." 33 Piere alobi na ye: "Mokonzi, ngai nandimi kokende na boloko to kokufa esika moko na yo." 34 Yezu azongiseli ye: "Piere, nalobi na yo: na butu ya lelo liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té."

Mbongo, saki pe mbeli

35 Na sima Yezu atuni bango: "Tango natindaki bino, bozalaki na mbongo té, saki té, basapatu pe té. Bozangaki eloko?" Bango bazongisi: "Té, tozangaki eloko té." 36 Bongo ye alobi na bango: "Kasi sik'oyo, moto azali na mbongo ákamata yango; ndenge moko pe po na moto azali na saki. Pe oyo azali kaka na kazaka pamba, áteka yango po na kosomba mbeli. 37 Nalobi na bino: baprofete bakómá boye po na ngai: 'Batiaki ye na molongo ya bato mabe.' Ya solo, makambo yango esengeli kosalama; elingi kutu kosalama noki." 38 Bayekoli balobi: "Mokonzi, awa tozali na bambeli mibale." Ye azongisi: "Yango ekoki."

Yezu abondeli Nzambe na Jetsemane

39 Yezu akei na Ngomba ya ba-Olive ndenge amesaná. Bayekoli na^e balandi ye. 40 Tango akómi na esika yango, alobi na bango: "Bobondela Nzambe po Monguna ámeka bino té." 41 Sima apusani mwa mosika na bango, afukami pe abandi kobondela boye: 42 "Tata soki olingi, longola kopo oyo ya pasi epai na ngai. Kasi kosala té makambo ngai nalingi; sala bobele oyo yo olingi." 43 Bongo anjelu moko ya Likolo abimeli ye po na kolendisa ye. 44 Yezu ayoki mawa mingi penza, pe atii lisusu makasi po na kobondela. Motoki na ye ekomi kotanga na mabelé lokola matanga ya makila. 45 Awa asilisi kobondela, atelemi, akei epai ya bayekoli na ye pe akuti bango balali pongi po na mawa. 46 Alobi na bango: "Ndenge nini bozali kolala? Botelema pe bobondela Nzambe po Monguna ámeka bino té."

Bakangi Yezu

47 Tango Yezu azalaki nanu koloba, bato ebele bayei. Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, moto azalaki kolakisa bango nzela. Apusani penepene ya Yezu po áyamba ye. 48 Kasi Yezu alobi na ye: "Yudas, olingi koyamba ngai Mwana ya Moto po na koteka ngai?" 49 Tango bayekoli ya.Yezu bamoni makambo oyo elingaki koya, batuni ye: "Mokonzi, tóbunda na mbeli?" 50 Pe moko na kati na bango akati mosali ya nganga-Nzambe monene litoi ya liboko ya mobali. 51 Kasi Yezu alobi: "Esili. Tika boye." Asimbi litoi ya moto wana pe abikisi ye. 52 Na sima Yezu atali bakonzi ya banganga-Nzambe, bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, pe bambuta-muntu oyo bayaki po na kokanga ye, alobi na bango boye: "Boni, nakómi moyioi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete? 53 Mikolo nyonso nazalaki esika moko ná bino na Ndako ya Nzambe, pe bomekaki kokanga ngai té. Kasi oyo ezali tango na bino pe ya mokonzi ya molili."

Piere awangani Yezu

54 Bakangi Yezu, bamemi ye pe bakotisi ye na ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda bango na mosika. 55 Tango bapelisi móto na kati ya lopango, Piere akei kofanda na kati ya bato oyo bazalaki koyotela móto. ^Mosali moko ya mwasi amoni ye afandi penepene ya móto, atali ye nyee pe alobi: "Moto oyo pe azalaki ná ye." 57 Kasi Piere awangani alobi: "Mama, nayebi ye té!" 58 Sima ya mwa tango moke moto mosusu amoni ye pe alobi: "Yo pe ozali moko na bango." Kasi Piere azongiseli ye: "Té, ngai té!" 59 Sima soki ya ngonga moko, moto mosusu akangami na ye pe alobi: " Ya solo, moto oyo azalaki ná Yezu. Pamba té ye pe azali moto ya Galilé." 60 Kasi Piere azongisi: "Tata, makambo ozali koloba, nayebi yango té." Awa azalaki nanu koloba, na mbala moko soso eleli. 61 Nkolo Yezu abaluki pe atali Piere nyee, wana Piere ayei kokanisa maloba Nkolo alobaki na ye: "Na butu ya lelo liboso soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té." 62 Bongo Piere abimi pe aleli mingi penza.

Bafingi Yezu pe babeti ye

63 Bato oyo bazalaki kokengela Yezu baseki ye pe babeti ye. 64 Bazipi ye miso pe balobi na ye: "Lakisa 'tè ozali profete! Nani moto abéti yo?" 65 Pe bafingaki ye mingi.

Basambisi Yezu na Likita-Monene ya Bayuda

66 Tongo etani, bamemi Yezu liboso ya Likita-Monene, esika bambuta-muntu ya ekolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, pe balakisi-Mibeko basanganaki. 67 Bongo batuni ye: "Yebisa biso soki ozali Mesia." Ye azongiseli bango: "Soki nayebisi bino, bokondimela ngai té. 68 Pe soki natuni bino motuna, bokozongjsela ngai té. 69 Kasi banda lelo ngai Mwana ya Moto nakofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso." 70 Bango nyonso batuni ye: "Yo nde Mwana ya Nzambe?" Ye azongiseli bango: "Ee, ezali penza ngai." 71 Bongo bango balobi: "Tina ya koluka ba-temwen ezali lisusu té. Biso moko toyoki maloba na ye."

Luka 23

Bamemi Yezu na tribinal ya Pilate

1 Bato nyonso oyo bazalaki na likita batelemi pe bamemi Yezu epai ya Pilate. 2 Babandi kofunda ye boye: "Tomonaki moto oyo azali kokosa bato ya ekolo na biso; ye apekisi bango báfuta mpaku na Mokonzi ya Rome té, pe amitii Mesia elingi koloba 'Mokonzi'." 3 Pilate atuni ye: "Yo ozali mokonzi ya Bayuda?" Yezu azongiseli ye: "Ee, ezali penza ngai." "Bongo Pilate alobi na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na bato nyonso oyo batondanaki wana: "Namoni tina moko té ezali ya kokatela moto oyo etumbu." 5 Kasi bango batii molende pe balobi: "Ye azali kokosa bato na mateya na ye po bátomboka. Abandaki na Galilé, aleki na Yuda mobimba, sik'oyo akómi tii awa."

Yezu liboso ya Erode

6 Tango Pilate ayoki makambo wana, atuni: "Moto oyo azali moto ya Galilé?" 7 Pe awa ayoki 'tè Yezu azali moto ya mboka ya mokonzi Erode, atindi ye epai ya Erode, pamba té mikolo wana ye azalaki na Yeruzalem. 8 Tango Erode amoni Yezu, asepelaki mingi po ayokaki sango na ye, pe banda kala azalaki na posa ya kokutana na ye. Azalaki kotia motema 'tè Yezu akosala likamwisi na miso na ye. 9 Bongo atuni Yezu mituna mingi, kasi Yezu azongisi ata liloba té. 10 Bakonzi ya banganga-Nzambe na balakisi-Mibeko bazalaki wana bafundi-fundi ye pe bagangi. 11 Erode ná basoda na ye baseki Yezu pe batsioli ye. Balatisi ye elamba moko lokola ya moto ya lokumu, pe bazongisi ye epai ya Pilate. 12 Kaka na mokolo wana Erode ná Pilate babandi koyokana, pamba té liboso bazalaki banguna.

Pilate akateli Yezu etumbu ya liwa

13 Pilate abengjsi lisusu bakonzi ya banganga-Nzambe, bambuta-muntu ná bato mosusu nyonso, 14 alobi na bango: "Bino bomemi moto oyo epai na ngai pe bolobi 'tè azali kokosa bato. Natuni ye liboso na bino nyonso; namoni tina ya kokatela ye etumbu té, na makambo oyo bozali kofunda ye. "Mokonzi Erode pe amoni ye ata na mabe moko té, pamba té azongisi ye epai na biso. Ya solo, moto oyo asali eloko té po ákufa. 16 Yango wana nakobetisa ye kaka fimbu, na sima nakotika ye." 17 Na feti nyonso ya Pake, Pilate azalaki kobimisela bango moto moko ya boloko. 18 Kasi bango nyonso babandi koganga: "Boma moto wana! Tikela biso Barabas!" 19 Batiaki Barabas na boloko po bato batombokaki na mboka, pe ye abomaki moto. 20 Pilate azongiseli bango maloba po alingaki kotika Yezu, 21 kasi bango bagangi: "Boma ye na kuruze! Boma ye na kuruze!" 22 Pilate alobi na bango mbala ya misato: "Kasi mabe nini ye asali? Namoni ata mabe moko té na ye po ákufa. Yango wana nakobetisa ye kaka fimbu, na sima nakotika ye." 23 Kasi bazalaki kaka koganga makasi po báboma Yezu na kuruze, pe koganga na bango elongisi bango. 24 Bongo Pilate akati likambo ndenge bango basengaki. 25 Atiki moto bango basengaki, oyo batiaki na boloko po atombokaki pe abomaki moto. Apesi Yezu na maboko na bango po básala ye ndenge bango moko balingi.

Batii Yezu na kuruze

26 Awa bazalaki kokende na Yezu, bakutani ná moto moko ya mboka Sirène, kombo na ye Simon, autaki na bilanga. Bakangi ye pe bapesi ye kuruze ya Yezu po ámema yango sima na ye. 27 Bato ebele babandaki kolanda ye, basi bazalaki kolela pe koganga makasi po na ye. 28 Yezu abaluki epai na bango pe alobi: "Bamama ya Yeruzalem, bólela po na ngai té! Kasi bólela po na bino moko pe po na bana na bino. 29 Pamba té na mikolo ekoya bakobanda koloba: 'Esengo na basi oyo bazangá bana, ná baoyo babotá nanu té, pe bamelisá nanu bana mabéle té!' 30 Bongo bato bakobanda koloba na bangomba ya minene ná ya mike: 'Bókweela biso, bózipa biso!' 31 Pamba té soki basali nzete ya mobesu boye, bakosala nini na koni?" 32 Bamemaki pe bato mibale mosusu po na koboma bango esika moko ná Yezu. Bato yango bazalaki bato mabe. 33 Tango bakomi na esika oyo bábengaka "Mokuwa ya Motú", batii Yezu na kuruze, ná bato mabe wana mibale, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi. 34 Yezu abondeli boye: "Tata, limbisa bango, po makambo bazali kosala, bayebi yango té." Babeteli bilamba na ye zeke, pe bakaboli yango. 35 Bato batelemi kuna po na kotala. Bakonzi ya Bayuda bazalaki koseka Yezu boye: " Ye abikisaki bato mosusu; ámibikisa ye moko, soki azali penza Mesia oyo Nzambe aponá." 36 Basoda pe baseki ye. Bayei penepene na ye, bapesi ye vinu ya ngayi, 37 pe balobi: "Soki ozali mokonzi ya Bayuda, ómibikisa!" 38 Na likolo ya motú ya Yezu batiaki mwa-libaya bakómá: "Moto oyo azali mokonzi ya Bayuda." 39 Moko ya bato mabe oyo batiaki na kuruze azalaki kofinga Yezu boye: "Yo ozali Mesia té? Ômibikisa, pe bikisa biso!" 40 Kasi moninga na ye amoni yango mabe, alobi na ye: "Obanga Nzambe té? Biso nyonso tozwi etumbu ya ndenge moko. 41 Etumbu oyo ebongi na biso mibale; pamba té mabe oyo tosalaki ezongeli biso; kasi ye asali mábe té." 42 Na sima alobi: "Yezu, ókanisa ngai tango okozwa bokonzi na yo." 43 Yezu azongiseli ye: "Nalobi na yo, ya solo: lelo okozala ná ngai na mboka ya bisengo."

Liwa ya Yezu

44 Ezalaki penepene na midi; molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa. 45 Ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na kati-kati. 46 Yezu agangi makasi penza: "Tata, nazongisi molimo na ngai na maboko na yo." Awa alobi boye, akati motema. 47 Tango komandan ya basoda amoni makambo oyo ezalaki koleka, akumisi Nzambe alobi: "Ya solo, moto oyo azalaki moto ya bosembo!" 48 Bato nyonso oyo bayaki po na kotala ndenge makambo ya Yezu ekosuka, bazongi pe batondaki na mawa. 49 Baninga ya Yezu nyonso, pe basi oyo balandaki ye kobanda Galilé, batelemaki mosika po na kotala.

Bakundi Yezu

50 Moto moko ya Likita-Monene ya Bayuda ayei kuna, kombo na ye Jozef; azalaki moto malamu pe abandaki kotosa Nzambe. 51 Ye aboyaki mokano ya bato mosusu ya Likita-Monene pe makambo bango basalaki Yezu. Azalaki moto ya Arimaté, vile ya Bayuda, pe azalaki kotia motema 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye. 52 Akei epai ya Pilate pe asengi ye ebembe ya Yezu, 53 na sima alongoli yango na kuruze, alingi yango na elamba ya pembe pe atii yango na libulu moko bakatá na kati ya mabanga; kuna nanu bakundá moto té. 54 Ezalaki mokolo ya kolengela Mokolo ya Kopema, pe yango elingaki kobanda. 55 Basi oyo balandaki Yezu kobanda Galilé bayei nzela moko ná Jozef. Batali libulu pe bamoni ndenge batiaki nzoto ya Yezu. 56 Na sima bazongi na bandako na bango, pe babongisi malasi ná mafuta ya kopakola po na kotia na nzoto ya Yezu. Na Mokolo ya Kopema bapemi, ndenge Mibeko ezalaki kotinda.

Luka 24

Yezu asekwi

1 Mokolo ya Kopema esili, na tongo, basi bakei na simetiere; bamemi malasi oyo babongisaki. 2 Bamoni 'tè libanga oyo bazipelaki libulu elongwe. 3 Bakoti, kasi bamoni nzoto ya Nkolo Yezu té. 4 Bazalaki lisusu na mayele ya koloba té po na makambo oyo, bongo kaka na tango wana bato mibale batelemi penepene na bango, balati bilamba ezali kongenga. 5 Lokola bazalaki kobanga pe bakitisi bilongi na se, bato wana balobi na bango: "Po na nini bozali koluka na kati ya bato bakufa moto oyo azali na bomoi? 6 Azali awa té. Asi'asekwi! Bókanisa ndenge alobaki na bino. Tango azalaki nanu na Galilé, 7 alobaki boye: 'Esengeli bápesa ngai Mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu; bakoboma ngai na kuruze kasi nakosekwa na mikolo misato.' " 8 Bongo bakomi kokanisa maloba ya Yezu, 'balongwe na simetiere, pe bakei koloba makambo nyonso wana na bayekoli zomi na moko pe na baninga na bango nyonso. 10 Ezalaki Maria ya Magdala, Jane, Maria mama na Jake, pe basi mosusu oyo bakendeki ná bango nzela moko. Bango nyonso balobaki na bantoma kaka ndenge moko. 11 Kasi bantoma bakanisaki 'tè makambo basi balobaki ezalaki na tina té, yango wana bandimaki té. 12 Nzokande Piere atelemi mbangu pe akimi na simetiere; agunzami na se kasi amoni bobele bilamba ya mike-mike ya pembe. Na sima azongi epai na ye, pe akamwe mingi po na makambo oyo elekaki.

Na nzela ya Emaus

13 Kaka na mokolo yango bato mibale na kati na bango bakei na mboka moko, kombo Emaus. Kolongwa na Yeruzalem tii na Emaus basalaka ngonga mibale na nzela. 14 Bazalaki kosolola makambo nyonso oyo elekaki. 15 Awa bazalaki kosolola pe kotiana tembe, ye moko Yezu ayei penepene pe abandi kokende nzela moko ná bango. 16 Kasi miso na bango ezipamaki, bayebaki ye té. 17 Yezu atuni bango: "Likambo nini bozali kotiana tembe na nzela?" Bongo bango batelemi, batondaki na mawa. 18 Moko na bango, kombo na ye Kleopas, azongisi: "Na kati ya bato nyonso ya Yeruzalem, bobele yo moto oyebi té makambo euti koleka na mikol'oyo?" 19 Ye atuni bango: "Makambo nini?" Bango bazongiseli ye: "Makambo ekweelaki Yezu ya Nazaret. Ye azalaki profete moko ya makasi na miso ya Nzambe pe na miso ya bato, po na misala pe maloba na ye. 20 Bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu na biso bakatelaki ye etumbu ya liwa, pe babomisaki ye na kuruze. 21 Nzokande biso totiaki mitema 'tè ye moto akobikisa Israel. Lelo ekómi mikolo misato banda makambo wana elekaki. 22 Ya solo, basi mosusu oyo bazalaki na biso bakamwisaki biso. Bakendeki na simetiere na tongo penza, "kasi bamonaki nzoto na ye té. Bazongi pe balobeli biso 'tè bamonaki ba-anjelu oyo balobaki 'tè Yezu azali na bomoi. 24 Baninga na biso mosusu bakendeki na simetiere pe bamonaki makambo nyonso ndenge basi balobelaki bango; kasi Yezu, bamonaki ye té." 25 Bongo Yezu alobi na bango: "A! Bino bato bozangá mayele! Makambo nyonso baprofete balobaká, bondimaka yango noki té! 26 Boyebi té? Mesia asengelaki komona pasi ndenge wana po na kozwa lokumu na ye." 27 Na sima alimboleli bango makambo bakómá likolo na ye na Mikanda ya Nzambe, kobanda na oyo ya Moize tii na oyo ya baprofete. 28 Awa bakomi penepene ya Emaus, Yezu asali lokola azali kokende na mboka ya mosika. 29 Kasi bango balobi na ye: "Kokende té. Lala awa na biso. Pokwa esi'ekómi, butu elingi éya." Bongo ye akoti na ndako po na kolala epai na bango. 30 Tango afandi na mesa esika moko ná bango, akamati lipa apesi, Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bango. 31 Na mbala moko miso na bango efungwani pe bayei koyeba ye. Kasi alimwe na miso na bango. 32 Bango babandi kotunana: "Tango azalaki kosolola na biso na nzela pe kolimbola makambo oyo ekómamá na Mikanda ya Nzambe, totondaki na esengo té?" 33 Kaka na tango wana batelemi pe bazongi na Yeruzalem; bakuti bayekoli zomi na moko basangani ná baninga na bango: 34 Bango balobi: "Ya solo, Mokonzi asekwi; abimelaki Simon." 35 Bongo bayekoli mibale bayebisi bango makambo elekaki na nzela, pe ndenge nini bayebaki Yezu tango abandaki kokabolela bango mapa.

Yezu abimeli bayekoli na ye

36 Awa bazalaki kaka koloba makambo wana, ye moko Yezu ayei kotelema na kati na bango pe alobi: "Boboto ézala na bino." 37 Bango babangi pe bayoki somo, pamba té bakanisaki 'tè bamoni elima. 38 Kasi Yezu alobi na bango: "Po na nini bozali mitema likolo? Pe po na nini bozali kotia tembe? 39 Botala maboko ná makolo na ngai; ezali ngai penza. Bósimba ngai pe botala. Elima ezali na misuni té to mikuwa; kasi bomoni 'tè ngai nazali na yango." 40 Awa alobi boye alakisi bango maboko ná makolo. 41 Bakokaki nanu kondima té, pamba té bazalaki kokamwa po na esengo. Yezu atuni bango: "Bozali na eloko ya kolia?" 42 Bapesi ye ndambo ya mbisi ya kokalinga. 43 Akamati yango pe alei na miso na bango. 44 Na sima alobi na bango: "Bomoni? Tango nazalaki nanu na bino, nayebisaki bino boye: nyonso oyo ekómamá po na ngai na Mibeko ya Moize, na mikanda ya baprofete, pe na banzembo, esengeli kosalama." 45 Bongo afungoli bango mitú po báyeba tina ya Mikanda ya Nzambe, 46 alobi boye: "Ekómamá 'tè bakonyokola Mesia pe bakoboma ye, kasi akosekwa na mikolo misato. 47 Esengeli básakola sango na ye kobanda na Yeruzalem tii epai ya bikolo nyonso, po bato bábongola mitema pe bázwa bolimbisi ya masumu. 48 Bino bomoni pe boyoki makambo oyo nyonso; 49 bongo ngai nakotindela bino Molimo Mosantu ndenge Tata na ngai alakaki. Bófanda nanu na Yeruzalem, tii tango nguya ya Nzambe ekokitela bino."

Yezu atombwani na Likolo

50 Na sima Yezu amemi bango tii penepene ya Betanie. Atomboli maboko likolo pe apamboli bango. 51 Awa azalaki kopambola bango, akabwani na bango pe atombwani na Likolo. 52 Bongo bafukameli ye pe bazongi na Yeruzalem na esengo mingi. 53 Mikolo nyonso bazalaki kokumisa Nzambe na kati ya Ndako ya Nzambe.

Yoane 1

Yezu Kristo ayeeli bato moi pe bomoi

1 Na ebandeli, liboso 'tè Nzambe ásala Likolo na se, oyo azali Maloba ya Nzambe, azalaká. Ye azalaká esika moko ná Nzambe; azalaká ndenge moko ná Nzambe. 2 Ya solo, na ebandeli, ye azalaká esika moko ná Nzambe. 3 Nzambe asalaka biloko nyonso ná ye, moko té ezangi kosalama na ye. 4 Bomoi nyonso eutaka nde na ye; pe yango ezalaká lokola moi po na bato. 5 Moi yango ezali kongenga na kati ya molili; molili ekokaki kozipa yango té. 6 Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye Yoane Mobatisi. 7 Ye ayaki kosakola sango ya moi, po bato nyonso bándima. 8 Ye azalaki moi té, kasi ayaki nde po ásakola sango ya moi. 9 Moto oyo azali Maloba ya Nzambe azali moi ya solo; ayaki awa na mokili; azali kongengela moto nyonso. 10 Azalaki awa na mokili; na ye Nzambe asalaka mokili; kasi bato bayebaki ye té. 11 Ayaki na mboka na ye moko, kasi bato na ye bayambaki ye té. 12 Nzokande bato mosusu bayambaki ye, pe bandimeli ye; apesi bango bokonzi bákóma bana ya Nzambe. 13 Bakómaki bana ya Nzambe na ndenge ya bomoto té, ndenge batata babotaka bana; kasi ezali nde Nzambe moto abotá bango. 14 Maloba ya Nzambe ekómaki moto. Moto yango ayaki kofanda na kati na biso; tomonaki lokumu na ye, lokumu oyo Tata apesi bobele na Mwana na ye se moko. Ye atondaki na bolamu ya solo ya Nzambe. 15 Yoane Mobatisi abandaki kosakola po na ye; ayebisaki bato boye: "Oyo azali moto nalobaki na bino 'tè: Akoya sima na ngai, kasi aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té." 16 Ye atondá na bomengo nyonso; pe biso nyonso tozwi bolamu mingi penza epai na ye. 17 Pamba té Nzambe apesaká bato Mibeko na maboko ya Moize; kasi Yezu Kristo ayeeli biso bolamu ya solo ya Nzambe. 18 Moto moko té nanu amoná Nzambe, kaka Mwana na ye se moko, oyo azali Nzambe pe azali esika moko ná Tata, ye nde moto ayebisi biso ndenge Nzambe azali.

Mateya ya Yoane Mobatisi

19 Mokolo moko bakonzi ya Bayuda oyo bazalaká na Yeruzalem batindi banganga-Nzambe ná ba-Levite, po bákende kotuna Yoane boye: " Yo ozali nani?" 20 Ye aboyaki kozongisela bango eyano té, kasi alobaki polele liboso ya bato nyonso: "Ngai nazali Mesia té." 21 Bango batuni ye: "Bongo ozali nani? Ozali Eliya?" Yoane azongiseli bango: "Té, nazali Eliya té." Bango batuni ye: "Ozali Profete oyo tozali kozela?" Azongiseli bango: "Té." ^Batuni ye lisusu: "Yo ozali nani? Po tókende koyebisa na bato oyo batindi biso. Olobi nini po na yo moko?" 23 Yoane azongiseli bango: "Ngai nazali moto oyo profete Ezaya alobaká: 'Moto moko azali kobelela na kati ya esobe boye: Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela.' " 24 Na kati ya bato oyo Bayuda batindaki epai ya Yoane, ba-Farizé pe bazalaki wana. "Batuni Yoane: "Bongo soki yo ozali Mesia té, Eliya té, Profete pe té, kasi ndenge nini ozali kobatisa bato?" 26 Yoane azongiseli bango: "Ngai nazali kobatisa bobele na mai; nzokande moto moko azali na kati na bino, bino boyebi ye té. 27 Ye akoya sima na ngai, kasi nakoki kutu té kofungola ata singa ya sapatu na ye." 28 Makambo oyo nyonso elekaki na Betanie, na ngambo ya mai ya Yordan, na esika Yoane azalaki kobatisa bato.

Yezu, Mwana-Meme ya Nzambe

29 Sima ya mokolo wana, Yoane amoni Yezu azali koya epai na ye, pe alobi: "Tala Mwana-Meme ya Nzambe oyo akobanda kolongola masumu ya bato. 30 Ezali nde ye, moto oyo nalobaki na bino: 'Moto akoya sima na ngai, aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té.' 31 Tango nazalaki koloba boye, nayebaki penza té soki ye azali nani; kasi nabandaki kobatisa bato na mai, po ye áya komilakisa na ekolo ya Israel." 32 Yoane alobi lisusu: "Namonaki Molimo auti na Likolo lokola pijon, pe ayei kofanda na motú na ye. 33 Ngai nayebaki penza té soki ye azali nani, kasi Nzambe oyo atindaki ngai po nábatisa bato na mai, alobaki na ngai: 'Okomona Molimo akouta na Likolo pe akofanda na moto moko; ezali nde ye wana moto akobatisa bato na Molimo Mosantu.' 34 Namonaki nyonso wana, pe nazali koyebisa bino 'tè azali Mwana ya Nzambe."

Yezu aponi bayekoli na ye ya liboso

35 Sima ya mokolo wana, Yoane azalaki lisusu na esika yango, ná bayekoli na ye mibale. 36 Awa amoni Yezu azali koleka, alobi: "Tala Mwana-Meme ya Nzambe!" "Tango bayekoli na ye wana mibale bayoki boye, batiki Yoane pe balandi Yezu. 38 Yezu abaluki, amoni bango bazali kolanda ye, pe atuni bango: "Bozali koluka nini?" Bazongisi: "Rabi, ofandaka wapi?" (Rabi elingi koloba Moteyi). 39 Ye azongiseli bango: "Bóya kotala." Bakei pe bamoni esika ye azalaki kofanda, bongo batikalaki na ye mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei ya pokwa. 40 André, ndeko ya Simon Piere, azalaki moko na kati ya bato mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane pe balandaki Yezu. 41 Sima na yango André akutanaki ná ndeko na ye Simon, pe alobi na ye: "Tosi'tomoni Mesia" (Na monoko ya grek: Kristo). 42 Bongo André amemi ndeko na ye epai ya Yezu. Tango Yezu amoni Simon alobi na ye: "Ozali Simon, mwana ya Yoane. Kombo na yo ekómi Sefas" (elingi koloba Piere, Libanga). 43 Sima ya mokolo wana, Yezu alingaki kokende na Galilé; akutani ná Filipe pe alobi na ye: "Landa ngai." 44 Filipe azalaki moto ya mboka Betsaida, mboka moko ná André pe Piere. 45 Na sima Filipe pe akutani ná Natanael, alobi na ye: "Tosi'tomoni moto oyo bakómá na Mibeko ya Moize pe na mikanda ya baprofete. Ezali nde Yezu, mwana ya Jozef, ya mboka Nazaret." 46 Natanael alobi na ye: "Eloko nini ya malamu ekoki kobima na Nazaret?" Filipe azongiseli ye: "Yaka kotala." 47 Tango Yezu amoni Natanael azali koya epai na ye, alobi na ye: "Tala motoya solo ya Israel, azali na lokuta té." ^Natanael atuni ye: "Ndenge nini oyebi ngai?" Yezu azongiseli ye: "Liboso 'tè Filipe ábenga yo, namonaki yo na se ya nzete ya figi." 49 Natanael alobi na ye: "Moteyi, ozali Mwana ya Nzambe; ozali Mokonzi ya Israel!" 50 Yezu alobi na ye: "Ondimi po nalobi na yo 'tè namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete ya figi. Okomona makambo eleki oyo na monene." 51 Yezu alobi na bango lisusu: "Nalobi na bino, ya solo: bokomona Likolo ekofungwana, pe ba-anjelu bakobanda kokita pe komata; pamba té Nzambe akozala kotinda bango lokola bantoma epai na ngai, Mwana ya Moto."

Yoane 2

Feti ya libala na mboka Kana

1 Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na mboka Kana, na Galilé. Mama na Yezu azalaki kuna. 2 Babengisaki pe Yezu ná bayekoli na ye. 3 Tango vinu esilaki, mama na Yezu alobi na ye: "Bazali lisusu na vinu té." 4 Kasi Yezu azongiseli ye: "Mama, biso na yo likambo nini? Tango na ngai nanu ekoki té." 5 Bongo mama na ye alobi na bato ya mosala: "Bósala makambo nyonso akotinda bino." 6 Bilokú motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosukolela na yango, ndenge mibeko na bango ezalaki kotinda. Elokú moko ekoki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale. 7 Yezu alobi na bato ya mosala: "Bótondisa bilokú oyo na mai." Batondisi yango meke. 8 Bongo Yezu alobi na bango lisusu: "Sik'oyo, bózwa mwa ndambo na yango, pe bókende kolakisa yango na mokonzi ya feti." Bamemeli ye yango. 9 Mokonzi ya feti ameki yango, mai ekómi vinu! Ayebaki té soki vinu yango euti wapi; kasi bato ya mosala oyo batókaki mai bango nde bayebaki. Abengi moto oyo abalaki, 10 pe alobi na ye: "Ndenge nini yo obombi vinu ya malamu tii sik'oyo? Bato nyonso bapesaka liboso vinu ya malamu, bongo soki bato babandi kolangwa, nde bapesi bango vinu oyo ezali malamu mingi té." 11 Wana nde likamwisi ya liboso oyo Yezu asalaki. Asalaki yango na mboka Kana, na Galilé. Amonisaki lokumu na ye, pe bayekoli-na ye bandimaki ye. 12 Sima na yango Yezu akei na Kafarnaum, ná mama na ye, bandeko na ye, pe bayekoli na ye. Bafandaki kuna mikolo mingi té.

Yezu na Ndako ya Nzambe ya Yeruzalem

13 Lokola feti ya Bayuda ya Pake ekómaki penepene, Yezu akei na Yeruzalem. 14 Tango akoti na Ndako ya Nzambe, akuti bato ya mombongo bazali kotekisa bangombe, bameme ná ba-pijon, pe bato oyo bashanjaka mbongo bafandi na bamesa na bango. 15 Yezu asali fimbu ya singa, abandi kobengana bango nyonso na Ndako ya Nzambe, ná bangombe na bango pe bameme. Abaloli bamesa ya bato oyo bazalaki koshanjé mbongo, apanzi pe mbongo na bango. 16 Alobi na bato oyo bazalaki kotekisa ba-pijon: "Bólongola biloko oyo awa! Ndako ya Tata na ngai, bókómisa yango lokola zando té!" 17 Bayekoli na ye babandi kokanisa makambo oyo ekómamá na Mikanda: "E Nzambe, bolingo na ngai po na Ndako na yo ezali kozikisa ngai motema." 18 Bongo bakonzi ya Bayuda batuni Yezu: "Ndenge nini okoki kolakisa biso 'tè ozali na bokonzi ya kosala bongo?" 19 Yezu azongiseli bango: "Bóboma Ndako ya Nzambe oyo, pe nakotónga yango lisusu na mikolo misato." 20 Bayuda balobi na ye: "Basalaki bambula 46 po na kotónga Ndako oyo, bongo yo okotónga yango na mikolo misato?" 21 Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yezu alobelaki, ezali ye moko. 22 Tango Yezu asekwaki, nde na tango wana bayekoli na ye bayei kokanisa 'tè alobaki maloba yango; bongo bandimaki makambo oyo ekómamá na Mikanda, pe maloba oyo Yezu alobaki.

Yezu ayebi mitema ya bato

23 Tango Yezu azalaki na Yeruzalem po na feti ya Pake, bato mingi bandimaki ye po bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala. 24 Kasi Yezu atiaki motema epai na bango té, pamba té ayebaki bango nyonso malamu. "Yezu azalaki na posa té báyebisa ye makambo ya bato. Ye moko ayebi makambo nyonso oyo ezali na mitema ya bato.

Yoane 3

Yezu ná Nikodeme

1 Moto moko azalaki na kati-ya ba-Farizé, kombo na ye Nikodeme. Ye azalaki pe moto monene ya Bayuda. 2 Mokolo moko ayei kotala Yezu na butu, alobi na ye: "Moteyi, toyebi 'tè Nzambe atindi yo po na koteya bato. Pamba té moto moko té akoki kosala makamwisi ndenge yo ozali kosala, soki Nzambe azali na ye té." 3 Yezu azongiseli ye: "Nazali koloba na yo, ya solo: soki moto abotami mbala ya mibale té, akoki kozala moto ya mboka ya Nzambe té." "Nikodeme atuni ye: "Ndenge nini moto akoki kobotama mbala ya mibale, soki akómi mobange? Azonga lisusu na libumu ya mama na ye, po ábotama mbala ya mibale?" 5 Yezu alobi na ye: "Nazali koloba na yo, ya solo: bobele oyo abotami na mai pe na Molimo nde moto akoki kokóma moto ya mboka ya Nzambe. 6 Oyo abotami na moto, azali moto; oyo abotami na Molimo, azali molimo. 7 Kokamwa té po nalobi na yo: Bosengeli kobotama mbala ya mibale. 8 Molimo esalaka lokola mopepe ekendeke epai yango elingi. Oyokaka makelele na yango, kasi oyebaka té epai yango euti to epai yango ezali kokende. Esalamaka pe ndenge wana na moto oyo abotami na Molimo." 9 Bongo Nikodeme atuni ye: "Ndenge nini makambo yango ekoki kosalama?" 10 Yezu azongiseli ye: "Ozali moteyi monene na kati ya Israel; bongo oyebi makambo oyo té? 11 Nazali koloba na yo, ya solo: nalobaka makambo oyo nayebi, pe nayebisaka bino makambo oyo namoni; kasi bondimaka yango té. 12 Soki nalobeli bino makambo oyo esalamaka awa na se, bozali kondimela ngai té; ndenge nini bokondimela ngai soki nayebisi bino makambo oyo esalamaka na Likolo? 13 Ata moto moko té asi'abutá na Likolo; kaka ngai Mwana ya Moto nde nauti na Likolo. 14 Pe ndenge Moize atombolaká ekeko ya nyoka na esobe, bobele bongo pe esengeli bátombola ngai, Mwana ya Moto, 15 po moto nyonso oyo akondima ngai ázwa bomoi ya seko. 16 "Ya solo, Nzambe alingi bato mingi penza; yango wana apesi Mwana na ye se moko, po 'tè moto nyonso oyo akondimela ngai ákufa té, kasi ázwa bomoi ya seko. 17 Soki Nzambe atindaki ngai epai ya bato, ezali té po nákatela bango etumbu, kasi po nábikisa bango. 18 Moto oyo andimeli ngai Mwana, azwaka etumbu té; kasi oyo andimeli ngai té asi'azwi etumbu; pamba té aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. 19 Tala ndenge Nzambe akatelaka makambo: moi eyei na mokili, kasi bato bazali kolinga mingi molili; baboyi moi, po basalaka makambo ya mabe. 20 Moto nyonso oyo asalaka mabe, aboyaka moi, ayaka epai ya moi té, soki té misala na ye ya mabe ekomonana. 21 Kasi oyo asalaka ndenge Nzambe azali kolakisa, ayaka epai ya moi, po yango émonisa 'tè ye atosaka Nzambe, na makambo nyonso oyo asalaka."

Yezu ná Yoane Mobatisi

22 Sima na yango, Yezu ná bayekoli na ye bakei na région ya Yuda. Kuna atikalaki ná bango mwa tango, pe azalaki kobatisa bato. "Yoane pe azalaki kobatisa bato na Ainon, penepene ya Salim, pamba té kuna mai ezalaki mingi. Bato babandaki koya epai na ye, pe azalaki kobatisa bango. 24 Na tango wana nanu batii Yoane na boloko té. 25 Mokolo moko bayekoli mosusu ya Yoane bazalaki kotiana tembe ná Moyuda moko po na makambo etali Mibeko na bango ya kosukola. 26 Bongo bakei epai ya Yoane, balobi na ye: "Moteyi, moto oyo azalaki ná yo na ngambo ya Yordan, oyo olobelaki biso po na ye, sik'oyo ye pe abandi kobatisa bato. Bato nyonso bazali kokende epai na ye." 27 Yoane azongiseli bango: "Moto akoki kozwa eloko moko té, soki Nzambe apesi ye yango té. 28 Bino moko boyebi 'tè nalobaki na bino: 'Ngai nazali Mesia té; kasi Nzambe atindaki ngai liboso, po Mesia alingi koya.' 29 Ye azali lokola mobali oyo azwi mwasi, pe azali kosalisa feti ya libala. Ngai nazali lokola moninga ya mobali, oyo afandi penepene na ye pe azali koyoka ye, bongo azali na esengo mingi po na koyoka mongongo ya moninga na ye oyo abali. Wana nde esengo na ngai; ya solo, nasepeli penza. 30 Esengeli lokumu na ye éleka ya ngai, bongo ya ngai ékita."

Moto oyo auti na Likolo

31 "Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso. Bato ya mokili oyo bakangamaka kaka na mokili, pe balobaká bobele makambo ya mokili. Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso; 32 alobaká makambo ye ayoki pe amoni; kasi moto moko té azali koyamba maloba na ye. 33 Bato oyo bayambi maloba na ye, bandimi 'tè Nzambe alobaká makambo ya solo. 34 Moto oyo Nzambe atindi, alobaká maloba ya Nzambe, pamba té Nzambe atondisi ye na Molimo na ye. 35 Tata alingaka Mwana na ye; apesi makambo nyonso na maboko na ye. 36 Moto oyo andimi Mwana, akozwa bomoi ya seko; oyo atosi Mwana té akozwa bomoi ya seko té, kasi akotikala seko na etumbu ya Nzambe."

Yoane 4

Yezu ná mwasi ya Samarie

1 Na tango wana ba-Farizé bayoki 'tè Yezu azalaki kozwa bayekoli ebele koleka Yoane Mobatisi, pe abandaki kobatisa bato mingi. 2 Nzokande Yezu ye moko azalaki kobatisa bato té, kaka bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa. 3 Tango Yezu ayoki makambo babandaki koloba po na ye, alongwe na région ya Yuda pe azongi na Galilé. 4 Po na kokende kuna, asengelaki kokatisa région ya Samarie. 5 Yezu akómi na mboka moko ya Samarie, kombo na yango Sikar; ezali penepene ya elanga oyo Jakob apesaká na mwana na ye Jozef. 6 Libulu moko ya mai ezalaki wana, bábengaka yango libulu ya Jakob. Yezu alembaki na nzela, bongo afandi pembeni ya libulu yango. Ezalaki penepene na midi. 7-8 Awa bayekoli na ye bakendeki na Sikar kosomba biloko ya kolia, mwasi moko ya Samarie ayei kotoka mai. Yezu alobi na ye: "Pesa ngai mai námela." 9 Kasi mwasi yango azongiseli ye: "Yango boni? Yo ozali Moyuda; ngai nazali moto ya Samarie. Ndenge nini ozali kosenga ngai mai?" Pamba té, Bayuda ná bato ya Samarie bazalaki koyokana té. 10 Yezu alobi na ye: "Soki oyebaki ngai, pe soki oyebaki likabo oyo Nzambe apesaká na bato, mbele yo moto olingaki kosenga ngai mai ya komela, bongo nalingaki kopesa yo mai ya bomoi." 11 Mwasi alobi na ye: "Tata, ozali na katini té, pe libulu ezali molai penza. Ndenge nini okoki kozwa mai ya bomoi? 12 Ezali koko na biso Jakob moto atikelá biso libulu ya mai oyo; ye moko kutu amelaka mai ya libulu oyo, ná bana na ye pe banyama na ye. Yo okanisi oleki ye?" 13 Yezu azongiseli ye: "Soki moto ameli mai oyo, akoyoka lisusu posa ya mai; 14 kasi soki ameli mai oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mai té. Pamba té mai oyo ngai nakopesa ye, ekobanda kobimela ye tango nyonso; yango nde ekopesa ye bomoi ya seko." 15 Mwasi alobi na ye: "Tata, pesa ngai mai yango po náyokaka lisusu posa ya mai té, pe náyaka lisusu kotoka mai awa té." 16 Yezu azongiseli ye: "Kende kobenga mobali na yo, bongo óya na ye awa." 17 Mwasi azongisi: "Nazali na mobali té." Yezu alobi na ye: "Olobi malamu 'tè: Nazali na mobali té. 18 Pamba té, ozalaki na mibali mitano, bongo oyo azali na yo sik'oyo, azali mobali na yo penza té. Olobi makambo ya solo." 19 Mwasi azongiseli Yezu: "Mokonzi, namoni 'tè ozali profete. 20 Bakoko na biso ya Samarie bazalaká kosambela Nzambe na ngomba oyo, kasi bino Bayuda bolobaka 'tè basengeli kosambela Nzambe kaka na Yeruzalem." 21 Yezu alobi na ye: "Mama, ndimela ngai; tango ekómi penepene, oyo bakosambela Tata bobele na ngomba ya Samarie té to na Yeruzalem. 22 Bino bato ya Samarie bosambelaka Nzambe, kasi boyebi ye té; biso Bayuda toyebi Nzambe oyo tosambelaka, pamba té nzela ya kobika euti na Bayuda. 23 Kasi tango ekoya, yango pe esi'ekoki, oyo Molimo Mosantu akobongisa mitema ya bato po básambelaka Tata na ndenge ye moko azali kolakisa; pamba té Tata alingaka baoyo básambelaka ye ndenge wana. 24 Nzambe azali Molimo; yango wana bato oyo básambelaka ye, esengeli Molimo Mosantu ábongjsa mitema na bango po básambelaka ye na ndenge ye moko azali kolakisa." 25 Mwasi alobi na ye: "Nayebi 'tè Mesia akoya. Tango ye akoya, akoyebisa biso makambo nyonso." 26 Yezu azongiseli ye: "Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Mesia." 27 Na tango wana bayekoli ya Yezu bazongi, bakuti ye azali kosolola ná mwasi, bakamwaki mingi penza. Kasi ata moto moko té atunaki Yezu soki azali koluka nini, to po na nini azali kosolola na ye. 28 Mwasi atiki elokú na ye wana, pe akei kobenga bato; alobi na bango: 29 "Bóya kotala moto moko azali kuna, ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Ye akoki kozala Mesia té?" 30 Bato basimbi nzela, babandi kokende esika Yezu azalaki. 31 Bongo bayekoli babondeli Yezu balobi: "Moteyi, lia ko!" 32 Kasi Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali na biloko ya kolia oyo bino boyebi té." 33 Bayekoli bamitunani: "Moto mosusu ayeelaki ye biloko ya kolia?" 34 Yezu alobi na bango: "Bilei na ngai ezali: Kotosa makambo Moto oyo atindaki ngai alingaka, pe kosilisa mosala na ye. 35 Bino bolobaka: Soki moto akoni mbuma, esengeli kosala sanza minei po na kobuka yango. Kasi ngai nalobi na bino: Botala bilanga. Mbuma esi'eteli, ekoki na kobuka. 36 Moto abuki mbuma yango asi'azwi lifuta na ye; abombi mbuma po na bomoi ya seko; yango wana moto oyo akoni ná oyo abuki, bazali kosepela esika moko. 37 Pamba té balobá ya solo boye: 'Moko akonaka, mosusu abukaka.' ^Natindaki bino bókende kobuka mbuma na elanga oyo bino bokonaki té; bato mosusu bamonaki pasi, pe bino bozwi bolamu po na pasi na bango." 39 Tango mwasi alobaki na bato ya mboka yango 'tè: "Yezu ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki", bato mingi bandimi Yezu, 40 bongo bayei epai na ye pe babondeli ye po átikala ná bango; yango wana Yezu atikalaki kuna mikolo mibale. 41 Bato mosusu mingi bayei kondima Yezu po na makambo oyo ye moko azalaki koloba. 42 Balobi na mwasi wana: "Sik'oyo tondimi kaka po na maloba na yo té, pamba té biso moko toyoki-ye, pe toyebi 'tè azali ya solo Mobikisi ya bato."

Yezu abikisi mwana ya mokonzi moko ya leta

43 Sima ya mikolo mibale, Yezu alongwe wana, akei na Galilé. 44 Mokolo mosusu Yezu ye moko alobaki: "Profete, bapesaka ye lokumu té na mboka na ye." 45 Tango akómaki na Galilé, bato nyonso bayambaki ye malamu, pamba té bango pe bakendeki na feti ya Pake na Yeruzalem, pe bamonaki makambo nyonso ye asalaki na feti yango. 46 Bongo Yezu azongi na Kana, epai abongolaki mai vinu. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kafarnaum, mwana na ye azalaki na pasi. 47 Tango ayoki 'tè Yezu alongwe na Yuda pe akómi na Galilé, akei kotala ye, pe abondeli ye áya kobikisa mwana na ye azalaki kobunda na liwa. 48 Yezu alobi na ye: "Bino bondimaka bobele soki bomoni bilembo to makamwisi." 49 Mbuta-muntu wana azongiseli ye: "Mokonzi, yaka tókende, liboso 'tè mwana na ngai ákufa." 50 Yezu alobi na ye: "Kende, mwana na yo asi'abiki." Moto wana andimi maloba ya Yezu, pe azongi na ndako na ye. 51 Na nzela akutani ná basali na ye; bango bayebisi ye: "Mwana na yo asi'abiki!" 52 Atuni bango: "Tango nini mwana ayokaki malamu?" Bazongiseli ye: "Fièvre esilaki lobi na ngonga ya liboso sima ya midi." 53 Bongo tata ya mwana ayei koyeba 'tè ezalaki nde na tango Yezu alobaki na ye: "Mwana na yo asi'abiki". Yango wana ye ná bato nyonso ya ndako na ye bandimaki Yezu. 54 Oyo ezali likamwisi ya mibale ya Yezu. Asalaki yango tango alongwaki na Yuda po na kozonga na Galilé.

Yoane 5

Yezu abikisi moto akufá makolo

1 Sima na yango, feti moko ya Bayuda ezalaki, bongo Yezu akei na Yeruzalem. 2 Eziba moko ya mai ezalaki kuna penepene ya Porte-ya-Bameme; na monoko ya Bayuda bábengaka yango Bezata; ezalaki na baveranda mitano. 3 Na baveranda yango, bato mingi ya maladi bazalaki kolala wana na se: bato bakufa miso, bato ya tengu-tengu, ná baoyo bakufa makolo. Bazalaki kozela 'tè mai éningana, 4 pamba té tango mosusu anjelu ya Nzambe azalaki koya na eziba po na koningisa mai. Tango mai ekoningana, moto oyo akokota na eziba liboso akobika, ata kutu maladi na ye ezalaki ya ndenge nini. 5 Moto moko azalaki wana aumeli na maladi bambula 38 . 6 Tango Yezu amoni ye, pe lokola ayebaki 'tè aumeli penza na maladi, atuni ye: "Olingi kobika?" 7 Moto wana azongiseli ye: "Tata, nazali na moto té oyo akoki kokitisa ngai na eziba, soki mai eningani. Tango nalingi kokita na mai, moto mosusu asi'akiti kala." 8 Yezu alobi na ye: "Telema, kamata etoko na yo pe tambola." 9 Na mbala moko, moto ya maladi abiki; akamati etoko na ye pe abandi kotambola. Makambo yango esalamaki na Mokolo ya Kopema. 10 Bayuda balobi na moto oyo abikaki: "Lelo ezali Mokolo ya Kopema; okoki komema etoko na yo té." 11 Ye azongisi: "Moto oyo abikisi ngai, alobi na ngai: Kamata etoko na yo pe tambola." 12 Bongo batuni ye: "Nani moto alobaki na yo: Kamata etoko na yo pe tambola?" 13 Kasi moto oyo abikaki ayebaki té soki nani moto abikisaki ye; po Yezu akotaki na kati ya bato bazalaki wana. 14 Sima na yango, Yezu akutani na ye na Ndako ya Nzambe, alobi na ye: "Yoka malamu, sik'oyo obiki; kosala lisusu masumu té, po likambo ya mabe ékweela yo té." 15 Moto wana akei epai ya Bayuda, alobi: "Ezali Yezu moto abikisi ngai." 16 Yango wana Bayuda babandi kotungisa Yezu, po asalaki likambo yango na Mokolo ya Kopema. 17 Kasi Yezu alobi na bango: "Tata na ngai asalaka tango nyonso; ngai pe nasalaka lokola ye." 18 Yango wana Bayuda bakómaki koluka nzela ya koboma Yezu, po abukaki kaka mobeko ya Mokolo ya Kopema té, kasi alobaki lisusu 'tè Nzambe azali Tata na ye penza, lokola nde ye akokani na Nzambe.

Bokonzi ya Mwana ya Nzambe

19 Sik'oyo Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: ngai Mwana nasalaka eloko té na makasi na ngai moko, kasi nasalaka makambo oyo namonaka epai ya Tata na ngai. Makambo nyonso oyo Tata asalaka, ngai pe nasalaka yango. 20 Pamba té Tata alingi ngai Mwana na ye, yango wana alakisaka ngai makambo nyonso oyo ye asalaka. Akolakisa ngai pe makambo mosusu eleki oyo na monene, pe bokokamwa po na yango. 21 Ndenge Tata azongisaka na bomoi bato oyo bakufa, se bongo ngai Mwana pe, napesaka bomoi na bato oyo nalingi. 22 Tata akosambisa moto moko té, kasi asi'apesá bokonzi nyonso na maboko na ngai, po násambisa bato. 23 Tata alingi bato nyonso bákumisa ngai Mwana, bobele ndenge bakumisaka ye. Moto oyo akumisaka ngai té, akumisaka pe Tata té, pamba té ye moto atindaki ngai. 24 "Nazali koloba na bino, ya solo: bato nyonso oyo bayokaka maloba na ngai, pe bandimelaka Moto oyo atindaki ngai, bazali na bomoi ya seko. Bakokatela bango etumbu té, kasi basi'balongwe na liwa pe bazwi bomoi ya seko. 25 Nazali koloba na bino, ya solo: tango ezali koya pe esi'ekoki, oyo bato bakufa bakoyoka mongongo na ngai, Mwana ya Nzambe, pe baoyo bakoyoka yango bakozwa bomoi. 26 Pamba té lokola bomoi nyonso ezali na maboko ya Tata, ye atii yango pe na maboko na ngai, Mwana na ye. 27 Apesi ngai bokonzi ya kosambisa bato, pamba té nazali Mwana ya Moto. 28 Bókamwa té, tango ezali koya oyo bato nyonso bakundamá na simetiere bakoyoka mongongo na ngai 29 pe bakobima. Bato oyo basalaki malamu bakosekwa po na kozwa bomoi; kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa po na kozwa etumbu."

Bilembo elakisi bokonzi ya Yezu

30 "Ngai nakoki kosala eloko moko té na makasi na ngai. Nakataka makambo ya bato ndenge Nzambe alobaká na ngai. Nakataka yango malamu, po nasalaka té ndenge ngai nalingi, kasi ndenge Oyo atindaki ngai alingi. 31 Soki nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali pamba; 32 kasi moto mosusu nde alobaká po na ngai, pe nayebi 'tè makambo oyo ye alobaká po na ngai ezali ya solo. 33 Bino botindaki bato epai ya Yoane Mobatisi, pe ye alobaki maloba ya solo po na ngai. 34 Ngai nazali koluka bato té po báloba makambo na ngai; kasi nalobi bongo po bino bóbika. 35 Yoane azalaki lokola mwinda oyo ezali kopela pe kongenga; bino bondimaki kosepela na yango mwa tango moke. 36 Kasi misala na ngai eleki maloba Yoane alobaki po na ngai. Misala oyo nasalaka, Tata nde apesi ngai nguya po násala yango; yango elakisi 'tè Tata moto atindi ngai. 37 Tata oyo atindi ngai, ye moko azali koloba po na ngai. Nanu boyoká mongongo na ye té, nanu pe bomoná elongi na ye té. 38 Maloba na ye ekoteli bino té, pamba té boboyi kondimela moto oyo ye atindi. "Botangaka Mikanda ya Nzambe tango nyonso, po bokanisi 'tè bokozwa na yango bomoi ya seko; nzokande yango ezali koyebisa bino makambo na ngai. 40 Kasi bino bolingi koya epai na ngai té po na kozwa bomoi ya seko. 41 "Nalukaka lokumu epai ya bato té. 42 Kasi nayebi bino: bozali na bolingo ya Nzambe té na mitema na bino. 43 Ngai nayei na kombo ya Tata na ngai, pe bino bolingi koyamba ngai té. Kasi soki moto ayei na kombo na ye moko, boyambaka ye. 44 Bino bólingaka kozwa lokumu epai ya baninga na bino, kasi lokumu oyo eutaka bobele na Nzambe, bolukaka yango té. Bongo ndenge nini bokoki kondima? 45 Bókanisa té 'tè ngai nakofunda bino epai ya Tata na ngai; ezali nde Moize moto akofunda bino, po ye azali moto oyo botielaka mitema. 46 Soki bondimelaki Moize ya solo, mbele pe bolingaki kondimela ngai, pamba té Moize akómaká makambo etali ngai. 47 Kasi lokola bozali kondima té makambo ye akómaká, ndenge nini bokoki kondima maloba na ngai?"

Yoane 6

Yezu aleisi bato ebele

1 Sima na yango, Yezu akei na ngambo ya lak ya Galilé (bábengaka yango pe lak ya Tiberiade). 2 Bato ebele bazalaki kolanda ye po bamonaki makamwisi oyo asalaki, pe ndenge abandaki kobikisa bato bazalaki na maladi. 3 Yezu abuti na ngomba pe afandi kuna ná bayekoli na ye. "Feti ya Pake ya Bayuda ekómaki penepene. 5 Yezu átala boye, amoni bato mingi bazali koya epai na ye; alobi na Filipe: "Esika nini tokoki kosombela bato oyo biloko ya kolia?" 6 Alobaki bongo po na komeka ye, pamba té ye moko asi'ayebaki likambo oyo alingaki kosala. 7 Filipe azongiseli ye: "Ata tosombi mapa 2.000, ekokoka té po moto nyonso ália mwa eteni ya lipa." 8 Moyekoli mosusu, kombo na ye André, leki'ya Simon Piere, alobi na Yezu: 9 "Mwana moko atelemi kuna, azali na mapa mitano ná bambisi mibale. Kasi tósala na yango nini po na bato ebele boye?" 10 Yezu alobi na bango: "Bófandisa bato nyonso." Esika wana ezalaki na matiti mingi. Bongo bato nyonso bafandifandi; mibali nyonso bazalaki penepene ya 5.000. 11 Yezu akamati mapa yango, apesi Nzambe mersi, pe akaboli yango na bato oyo bazalaki wana. Akaboleli bango pe mbisi. Moto nyonso azwaki ndenge motema na ye elingi. 12 Tango bato nyonso basilisi kolia, batondi, Yezu alobi na bayekoli na ye: "Bólokota biteni ya mapa oyo etikali, po ébeba té." 13 Balokoti yango, pe batondisi bitunga zomi na mibale na biteni ya mapa oyo etikalaki. 14 Bato oyo bamonaki likamwisi Yezu asalaki, balobi: "Ya solo, ye azali profete oyo tozalaki kozela." 15 Yezu ayebaki 'tè balingi kotia ye mokonzi na makasi; yango wana azongi na likolo ya ngomba ye moko.

Yezu atamboli likolo ya mai

16 Tango pokwa ekómi, bayekoli bakei penepene ya lak. 17 Bakoti na bwatu moko, pe babandi kokatisa ngambo ya Kafarnaum. Butu esi'eyaki, kasi Yezu nanu akómaki epai na bango té. 18 Mai ezalaki koningana mingi, po mopepe ezalaki makasi. 19 Tango bakomi pembeni ya mokili, bamoni Yezu azali koya epai ya bwatu pe kotambola likolo ya mai; babangaki mingi. 20 Kasi Yezu alobi na bango: "Ezali ngai, bóbanga té." 21 Balingaki kokotisa ye na bwatu, kasi kaka na tango wana bwatu ekómi na libongo esika bazalaki kokende.

Bato baluki Yezu

22 Na tongo ya mokolo elandi, bato oyo batikalaki na ngambo ya lak, bayei kokanisa 'tè bwatu moko kaka ezalaki wana, pe Yezu akotaki na yango té; pamba té bayekoli bakendeki bango moko. 23 Nzokande babwatu mosusu elongwaki na Tiberiade eyei kotelema na esika Nkolo Yezu apesaki Nzambe mersi pe aleisaki bato. 24 Awa bato bamoni 'tè Yezu ná bayekoli na ye bazali té, bakoti na babwatu wana pe bakei na Kafarnaum po na koluka ye.

Yezu azali bilei oyo epesaka bomoi

25 Bakuti Yezu na ngambo ya lak, bongo batuni ye: "Moteyi, oyaki awa tango nini?" 26 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: bozali koluka ngai kaka po boliaki pe botondaki mingi; kasi ezali té po bomonaki mosala oyo euti na Nzambe. 27 Bótika kosala bobele po na bilei oyo ebebaka, kasi bósala po na bilei oyo eumelaka, pe epesaka bomoi ya seko. Bilei wana, ngai Mwana ya Moto nakopesa bino yango, pamba té Nzambe Tata alakisi polele 'tè atindi ngai." "Bato batuni ye: "Tósala nini po na kokokisa misala oyo Nzambe alingaka?" 29 Yezu azongiseli bango: "Mosala Nzambe alingaka, yang'oyo: Bóndima moto oyo ye atindaki." 30 Bato batuni ye lisusu: "Ndenge nini okoki kolakisa 'tè Nzambe moto atindi yo, po tóndimela yo? Likambo nini okoki kosala? 31 Bakoko na biso baliaka bilei oyo bábengaka mane, tango bazalaká na esobe. Ekómamá boye: 'Apesaki bango bilei oyo euti na Likolo.' " 32 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: Ezali Moize té moto apesaká bino bilei oyo eutaki na Likolo; kasi Tata na ngai azali kopesa bino bilei ya solo, oyo euti na Likolo. 33 Pamba té bilei oyo Nzambe azali kopesa bino elongwe na Likolo; yango nde moto ezali kopesa bato bomoi." 34 Bato balobi na ye: "Mokonzi, pesaka biso bilei yango mikolo nyonso." 35 Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala té, pe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mai ata mokolo moko té. 36 Kasi nalobi na bino: ata bomoni ngai, bozali kondima ngai té. 37 Moto nyonso Tata akopesa ngai, akoya epai na ngai. Soki ayei epai na ngai, nakobengana ye té; 38 pamba té, ngai nauti na Likolo pe nayei awa na mokili po na kosala makambo na ngai moko té, kasi po na kokokisa makambo ya Moto oyo atindaki ngai. 39 Moto oyo atindaki ngai alingi 'tè: nábungisa ata moko té na kati ya bato nyonso oyo apesi ngai, kasi násekwisa bango na mokolo ya suka. 40 Pamba té Tata na ngai alingi boye: moto nyonso oyo akomona ngai Mwana pe akondima ngai, ázwa bomoi ya seko; bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka." 41 Bayuda basilikaki po Yezu alobaki: "Nazali bilei oyo euti na Likolo." 42 Bongo balobi: "Boni, oyo Yezu té, mwana ya Jozef? Biso toyebi tata na ye ná mama na ye. Ndenge nini azali koloba 'tè auti na Likolo?" 43 Yezu alobi na bango: "Bótika kosilika. 44 Moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai amemi ye té, bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 45 Baprofete bakómaká boye: 'Nzambe akoteya bato nyonso.' Moto nyonso oyo ayokelaka Tata pe andimaka mateya na ye, akoya epai na ngai. 46 Moto moko té nanu amoná Tata; kaka ngai moto nauti epai ya Nzambe, nasi'namoná Tata. 47 "Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimaka ngai, azali na bomoi ya seko. 48 Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi. 49 Bakoko na bino tango bazalaká na esobe, baliaka bilei oyo bábengaka mane; ata bongo bakufaká kaka. 50 Kasi bilei oyo euti na Likolo, soki moto alei yango akokufa té. 51 Ngai nazali bilei ya bomoi oyo euti na Likolo. Soki moto alei yango, akozala na bomoi ya seko. Bilei oyo ngai nakopesa na bato, ezali nzoto na ngai; nakopesa yango po bato bázwa bomoi." 52 Awa alobi boye, Bayuda babandi kotunana: "Ndenge nini moto oyo akopesa biso nzoto na ye po tólia yango?" 53 Yezu azongiseli bango: "Ngai Mwana ya Moto nazali koloba na bino, ya solo: soki bolei nzoto na ngai té pe soki bomeli makila na ngai té, bokozwa bomoi ya seko té. 54 Moto oyo aliaka nzoto na ngai pe amelaka makila na ngai, azali na bomoi ya seko; pe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 55 Nazali kopesa nzoto na ngai po bato bália yango solo; pe nazali kopesa makila na ngai po bato bámela yango solo. 56 Moto oyo aliaka nzoto na ngai pe amelaka makila na ngai, biso ná ye tozali moto moko. 57 Tata oyo atindaki ngai azali na bomoi; ngai pe nazali na bomoi po na ye; moto oyo aliaka nzoto na ngai, akozala pe na bomoi po na ngai. 58 Ngai nazali bilei euti na Likolo, nazali té lokola bilei oyo bakoko na bino baliaka; pamba té bakufaká kaka. Kasi moto aliaka bilei oyo, akozala na bomoi ya seko." 59 Oyo ezali mateya Yezu ateyaki na ndako ya losambo, na Kafarnaum.

Maloba oyo epesaka bomoi ya seko

60 Awa bayoki maloba ya Yezu, bayekoli na ye mingi balobi: "Mateya oyo ezali makasi po na kondima. Nani akoki kondima yango?" 61 Yezu ayebaki 'tè bayekoli na ye basepelaki té po na yango, bongo atuni bango: "Makambo oyo esali bino pasi na mitema? 62 Bokoloba nini soki bomoni ngai, Mwana ya Moto, nazali kobuta na esika oyo nazalaká liboso? 63 Ezali Molimo

Yoane 6 . 45 Ezaya 54 , 13 .

moto apesaká bomoi, kasi makasi ya bomoto ezali pamba. Maloba nauti koloba etondá na nguya ya Molimo oyo apesaká bomoi. 64 Kasi bato mosusu na kati na bino bazali kondima ngai té." Yezu alobaki ndenge wana pamba té, ayebaki banda kala banani bazalaki kondimela ye té; ayebaki pe nani akoteka ye; 65 bongo abakisi boye: "Yango wana nayebisi bino 'tè moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata apesi ye nzela té." 66 Banda mokolo wana bayekoli na ye mingi balongwaki, pe balandaki ye lisusu té. 67 Bongo Yezu atuni bayekoli zomi na mibale: "Bino pe bolingi kokende?" 68 Simon Piere azongiseli ye: "Mokonzi, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko. 69 Sik'oyo tondimi, toyebi 'tè ozali Mosantu oyo Nzambe aponá." 70 Yezu alobi na bango: "Ngai moto naponaki bino nyonso zomi na mibale. Kasi moto moko na kati na bino azali moto ya zabolo." 71 Yezu alobaki bongo po na Yudas, mwana ya Simon Iskariot, pamba té ezali ye nde moto akoteka Yezu, atako azalaki na kati ya bayekoli zomi na mibale.

Yoane 7

Bandeko ya Yezu bandimeli ye té

7 Sima na yango, Yezu azalaki kotambola na Galilé mobimba. Alingaki lisusu kotambola na région ya Yuda té, po Bayuda bazalaki koluka koboma ye. 2 Feti ya "Bandako-ya-kapo" ekómaki penepene. 3 Bandeko ya Yezu balobi na ye: "Kende na région ya Yuda, po bayekoli na yo bámona misala oyo yo ozali kosala. 4 Moto moko té abombaka misala na ye, soki alingi bato nyonso báyeba ye. Lokola ozali kosala misala minene boye, sala yango na miso ya bato nyonso." 5 Ata bandeko ya Yezu pe bazalaki kondima ye té. 6 Kasi Yezu alobi na bango: "Tango na ngai ekoki nanu té; kasi po na bino tango nyonso ezali malamu. 7 Bato ya mokili bakoki koyina bino té, kasi bazali koyina nde ngai, po nazali kolakisa 'tè makambo bazali kosala ezali mabe. 8 Bókende na bino na feti; kasi ngai nakokende té, po tango na ngai ekoki nanu té." 9 Sima ya koloba bongo, atikali na ye na Galilé.

Yezu akei na feti

10 Tango bandeko ya Yezu basi'bakei na feti, ye pe alandi na kobombama; amimonisaki na miso ya bato té. 11 Bayuda babandaki koluka ye na tango ya feti, pe batunani: "Azali wapi?" 12 Bato bazalaki koloba mingi po na ye, kasi malembe. Bamosusu balobi: "Azali moto malamu"; nzokande bamosusu balobi: "Té, azali kokosa bato." 13 Kasi ata moto moko té amekaki koloba polele po na ye, pamba té bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda. 14 Tango bakómaki na katikati ya mikolo ya feti, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe, pe abandi koteya. 15 Bayuda bakamwaki mingi, pe batunani: "Ndenge nini moto oyo ayebi makambo ebele boye? Ye akotá ata kelasi té." 16 Yezu alobi na bango: "Makambo oyo nazali koteya bino, ezali ya ngai moko té, kasi euti na Moto oyo atindi ngai. 17 Moto nyonso oyo azali na posa ya kosala makambo Nzambe alingi, ye nde akoyeba soki mateya na ngai euti na Nzambe, to na ngai moko. 18 Moto oyo alobaká makambo euti na ye moko, alukaka lokumu na ye moko. Kasi oyo alukaka bobele lokumu ya moto oyo atindi ye, ye azali moto ya solo, alobaká lokuta ata moke té. 19 Moize apesaká bino Mibeko, kasi ata moto moko té na kati na bino atosaka yango. Po na nini bozali koluka koboma ngai?" 20 Bato bazongiseli ye: "Ozali na ndoki! Nani moto azali koluka koboma yo?" 21 Yezu alobi na bango: "Kaka po na mosala moko nasalaki na Mokolo ya Kopema, bino nyonso bokamwe! 22 Kasi bino moko bokataka bana mibali ata na Mokolo ya Kopema, po Moize atindá bákataka bango sima ya mikolo mwambe ya kobotama; nzokande ezali Moize té moto abandaki kokata bana, kasi ezali bakoko. "Bakataka bana ata na Mokolo ya Kopema, po na kotosa Mibeko ya Moize; bongo po na nini bozali kosilika na ngai, awa nabikisi moto na Mokolo ya Kopema? 24 Bótika kotalaka makambo na ndenge bino bozali komona na miso. Kasi bótalaka makambo na ndenge ya solo."

Yezu azali solo Mesia

25 Bato mosusu ya Yeruzalem bazalaki kotunana: "Oyo ye té moto bazali koluka koboma? "Tala azali koloba na miso ya bato nyonso, kasi balobi na ye ata eloko moko té! Yango bakonzi na biso basi'bandimi 'tè ye azali ya solo penza Mesia? 27 Kasi tango Mesia akoya, moto moko té akoyeba soki auti wapi; nzokande moto oyo, toyebi epai auti." 28 Tango Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, atuni bato na mongongo makasi: "Boyebi ngai ya solo? Pe boyebi epai nautaki? Nayaki na kombo na ngai moko té, kasi Moto oyo atindaki ngai azali solo. Bino boyebi ye té. 29 Ngai nayebi ye malamu, po nauti epai na ye; ye moto atindi ngai." 30 Balukaki nzela ya kokanga Yezu; kasi ata moto moko té amekaki kosimba ye, po tango na ye ekokaki nanu té. 31 Na kati ya bato wana, mingi bandimaki Yezu; bazalaki kotunana: "Boni, tango Mesia akoya, akosala makamwisi mingi koleka ya moto oyo?"

Batindi bakengeli po bákanga Yezu

32 Ba-Farizé bayokaki makambo nyonso oyo bato bazalaki koloba malembe po na Yezu. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batindaki bakengeli ya Ndako ya Nzambe po bákende kokanga ye. 33 Yezu alobi na bato: "Nakotikala na bino mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Moto oyo atindaki ngai. 34 Bokobanda koluka ngai, kasi bokomona ngai té, po bokoki kokende té na esika oyo ngai nakozala." 35 Bayuda, awa bayoki boye, babandi kotunana bango na bango: "Boni, akokende wapi po tómona ye lisusu té? Akokende nde epai ya Bayuda oyo bapanzaná na bikolo mosusu, pe akoteya bato ya bikolo mosusu? 36 Alobi 'tè tokobanda koluka ye kasi tokomona ye té, po tokoki kokende té na esika oyo ye akozala. Makambo yango elingi kolakisa nini?"

Mai oyo epesaka bomoi

37-38 Mokolo ya suka ya feti ezalaki mokolo oyo eleki monene. Yezu atelemi na kati ya bato, abandi koloba na bango na mongongo makasi: "Moto oyo azali na posa ya mai, pe andimeli ngai, áya komela mai epai na ngai. Bakómá na Mikanda ya Nzambe: 'Mai ya bomoi ekobanda kobima na motema na ye lokola ebale.' " 39 Yezu azalaki koloba bongo po na Molimo ya Nzambe oyo bato bakondima ye bakozwa. Na tango wana, Molimo ayaki nanu té, po Yezu azwaki nanu lokumu na ye té.

Bato bakábwani likolo ya Yezu

40 Na kati ya bato oyo bayokaki maloba ya Yezu, bamosusu balobi: "Ya solo, ye azali Profete oyo tozalaki kozela"; 41 bamosusu: "Azali Mesia." Kasi bato mosusu balobi boye: "Mesia akoki nde kouta na Galilé? 42 Ekómamá na Mikanda 'tè Mesia akozala moto ya libota ya David, pe akouta na Betleem, mboka ya David." 43 Boye bato bayei kokabwana likolo ya Yezu. 44 Na kati ya baoyo bazalaki na posa ya kokanga ye, ata moto moko té amekaki kosimba ye.

Bakonzi ya Bayuda bandimeli Yezu té

45 Tango bakengeli bazongi, bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batuni bango: "Po na nini boyei na ye té?" 46 Bakengeli bazongisi: "Nanu moto moko té asi'alobá lokola moto yango." 47 Ba-Farizé batuni bango: "Bino pe bondimi lokuta na ye? 48 Na kati ya bakonzi to ya ba-Farizé ezali na moto moko oyo andimeli ye? 49 Kasi bato pamba wana oyo bayebi Mibeko ya Moize té, Nzambe asi'asundolá bango kala." 50 Nikodeme pe azalaki na kati ya ba-Farizé wana; mokolo moko ye akendeki kotala Yezu. Alobi na banga 51 "Na Mibeko na biso, tokoki kokatela moto etumbu té, soki nanu toyoki ye té po tóyeba likambo ye asali." 52 Bazongiseli ye: "Yo pe ozali moto ya Galilé? Kende kotanga Mikanda ya Nzambe, pe okomona 'tè ata profete moko té asi'autá na Galilé." 53 Sima na yango, bato nyonso bapanzani, pe moto na moto azongi na ndako na ye.

Yoane 8

Yezu ná mwasi moko ya ndumba

1 Yezu akei na Ngomba ya ba-Olive. 2 Tongo etani, azongi na Ndako ya Nzambe, pe bato nyonso bayei penepene na ye. Ye afandi pe abandi koteya bango. 3 Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé bamemeli ye mwasi moko oyo bakangaki ná mobali ya bato. Batii ye liboso ya bato nyonso, 4 bongo balobi na Yezu: "Moteyi, tokangi mwasi oyo ná mobali ya bato. 5 Mibeko ya Moize ezali kotinda 'tè tóboma basi ya ndenge oyo na mabanga. Kasi yo olobi nini?" 6 Balobaki bongo po bámeka ye, bongo bázwa nzela ya kofunda ye. Kasi Yezu agunzami na se, pe abandi kokóma mosapi na mabelé. 7 Awa bazalaki kaka kotunatuna ye, Yezu atali bango pe alobi: "Na kati na bino, moto oyo nanu asalá lisumu moko té, ábwakela ye libanga ya liboso." 8 Bongo agunzami lisusu, pe abandi kokóma na mabelé. 9 Tango bayoki bongo, bakomi kokende moko moko, mibange liboso; kaka Yezu moto atikalaki wana, ye ná mwasi yango. 10 Bongo Yezu atali ye, pe alobi: "Mama, wapi bango? Ata moto moko té akateli yo etumbu?" 11 Ye azongisi: "Moteyi, ata moto moko té." Bongo Yezu alobi na ye: "Ngai pe nakokatela yo etumbu té. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu té."

Yezu azali moi po na bato

12 Yezu alobi lisusu na bato: "Ngai nazali lokola moi po na bato. Moto oyo alandi ngai, akotambola na molili ata moke té, kasi akobanda kotambola na moi, bongo akozwa bomoi ya solo." 13 Ba-Farizé balobi na ye: "Ozali koloba po na yo moko; maloba na yo ezali ya pamba." 14 Yezu azongiseli bango: "Ata nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali ya solo; pamba té nayebi epai nauti pe epai nakokende. Kasi bino boyebi té epai ngai nauti pe epai nakokende. 15 Bino bokataka makambo na ndenge ya bomoto, kasi ngai nakataka likambo ya moto té. 16 Soki nakati likambo ya moto, nakati yango malamu, po nazalaka ngai moko té, kasi tozalaka biso ná Tata oyo atindi ngai. 17 Na Mibeko na bino ekómamá 'tè soki bato mibale bazali koloba ndenge moko, likambo wana ezali ya solo. 18 Ngai nazali koloba po na ngai moko. Pe Tata oyo atindi ngai azali koloba po na ngai." 19 Bango batuni ye: "Tata na yo azali wapi?" Yezu azongiseli bango: "Bino boyebi ngai té, pe boyebi Tata na ngai té. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai." 20 Yezu alobaki makambo wana tango azalaki koteya bato na Ndako ya Nzambe, na esika bazalaki kotia makabo. Ata moto moko te akangaki ye, po tango na ye ekokaki nanu té.

"Bino bokoki kokende té epai ngai nakokende"

21 Yezu alobi na bango lisusu: "Ngai nakokende, bongo bokoluka ngai; kasi bokokufa na masumu na bino. Bokoki kokende té epai ngai nakokende." 22 Bayuda batunani bango na bango: "Boni? Akokende komiboma? Po alobi: Bino bokoki kokende té epai nakokende." 23 Yezu alobi na bango: "Bino bozali bato ya se, kasi ngai nauti na Likolo. Bino bozali bato ya mokili oyo, kasi ngai nazali moto ya mokili oyo té. 24 Yango wana nalobi na bino 'tè bokokufa na masumu na bino. Soki boboyi kondima 'tè Ngai Nazali, bokokufa na masumu na bino." 25 Bango batuni ye: "Yo ozali nani?" Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali oyo nalobaki na bino uta na ebandeli. "Nazali na makambo mingi ya koloba po na bino, pe ya kosambisa bino. Kasi Moto oyo atindaki ngai azali moto ya solo; makambo oyo nalobaka na bato, nayokaki yango epai na ye." 27 Kasi bango bayebaki té 'tè Yezu azalaki kolobela bango po na Tata. "Bongo Yezu alobi na bango lisusu: "Tango bokotombola ngai Mwana ya Moto, bokoyeba 'tè Ngai Nazali; bongo bokoyeba 'tè nasalaka eloko moko té na mayele na ngai moko, kasi nalobaka se makambo oyo Tata alakisaki ngai. 29 Moto oyo atindaki ngai, azali na ngai, atiki ngai té; pamba té tango nyonso nasalaka makambo oyo ye alingaka." 30 Tango Yezu alobaki bongo, bato mingi bandimaki ye.

Baumbu ná bato ya bonsomi

31 Yezu alobi na Bayuda oyo bazalaki kondima ye: "Soki bobandi kotosa maloba na ngai, bokozala penza bayekoli na ngai. 32 Bokoyeba makambo Nzambe azali kolakisa bino, pe yango ekokómisa bino bato ya bonsomi." 33 Bazongiseli ye: "Tozali bato ya libota ya Abraham; nanu tokómá baumbu ya moto té. Ndenge nini olobi na biso: 'Bokokóma bato ya bonsomi'? " 34 Yezu alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali moumbu ya masumu. 35 Moumbu atikalaka seko moto ya libota té, kasi mwana azali moto ya libota seko. 36 Soki ngai Mwana ya Nzambe nalongoli bino na boumbu, bokozala penza na bonsomi ya solo. 37 Nayebi 'tè bozali bana ya Abraham; kasi bozali koluka boboma ngai, po bondimaka maloba na ngai té. 38 Ngai nalobaka makambo oyo Tata na ngai alakisaki ngai, kasi bino bosalaka makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino." 39 Bango bazongiseli ye: "Tata na biso ezali Abraham." Kasi Yezu alobi na bango: "Soki bozali bana ya Abraham, bosalaka ndenge ye azalaká kosala. 40 Kasi bozali kaka koluka boboma ngai; nzokande nalobi na bino bobele makambo ya solo oyo nayokaki epai ya Nzambe. Abraham atikalaka kosala ndenge wana ata moke té. 41 Bino bosalaka makambo oyo tata na bino asalaka." Bango bazongiseli ye: "Babo-taki biso na kindumba té; tozali bana ya Tata se moko, ye nde Nzambe." 42 Yezu alobi na bango: "Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbele bólingaka ngai, pamba té nauti epai ya Nzambe, nayei na kombo na ye. Nayaki na mayele na ngai moko té, kasi ezali ye nde moto atindaki ngai. 43 Po na nini bozali koyeba tina ya maloba na ngai té? Ezali kaka po bokoki kondima yango té. 44 Bozali bana ya zabolo, pe bolukaka kosala bobele makambo oyo tata na bino alingaka. Uta ebandeli ye azalaká kaka mobomi, pe aboya makambo ya Nzambe; makambo ya solo ezali na ye té. Tango akosaka, lokuta wana eutaka na motema na ye; pamba té azali moto ya lokuta pe tata na yango. 45 Kasi ngai nalobaka na bino makambo euti na Nzambe, yango wana bondimelaka ngai té. 46 Nani na kati na bino akoki kotangela ngai lisumu oyo nasi'nasali? Soki nazali koloba makambo ya solo, po na nini bolingi kondimela ngai té? 47 Moto oyo azali mwana ya Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe; kasi bino bozali koyoka yango té, po bozali bana na ye té."

Yezu ná Abraham

48 Bayuda balobi na Yezu: "Omoni, tolobaki ya solo té? Ozali moto ya Samarie, pe ozali na ndoki!" 49 Yezu azongiseli bango: "Nazali na ndoki té. Nakumisaka Tata na ngai, kasi bino bokumisaka ngai té. 50 Ngai nalukaka lokumu na ngai moko té, kasi Nzambe azali kolukela ngai yango. Ye nde moto akokata likambo. 51 Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo azali kotosa maloba na ngai, akokufa té." 52 Bayuda balobi na ye: "Sik'oyo tomoni penza 'tè ozali na ndoki! Abraham akufá; baprofete bakufa; kasi yo olobi: Soki moto atosi maloba na ngai akokufa té, kasi akozwa bomoi ya seko. 53 Tata na biso Abraham asi'akufá; yo okanisi 'tè oleki ye? Baprofete pe basi'bakufá. Bongo yo okanisi penza 'tè ozali nani?" 54 Yezu azongisi: "Soki namikumisi, lokumu na ngai ezali pamba. Kasi Tata na ngai azali kokumisa ngai. Bino bolobaka 'tè: 'Azali Nzambe na biso'; 55 nzokande boyebi ye té. Ngai nayebi ye; pe soki nalobi 'tè nayebi ye té, nakómi moto ya lokuta lokola bino. Ya solo, nayebi ye, pe natosaka maloba na ye. 56 Tata na bino Abraham atondaki na esengo po ayebaki 'tè akomona ngai, mokolo nakoya na mokili; amonaki yango, pe asepelaki mingi." 57 Bayuda batuni ye: "Yo okokisi kutu ata mbula 50 té, bongo ozali koloba 'tè omonaká Abraham?" 58 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: liboso 'tè Abraham ábotama, Ngai Nazali." 59 Tango Bayuda bayoki boye, balokoti mabanga po bábamba ye; kasi Yezu amibendi pe abimi na Ndako ya Nzambe.

Yoane 9

Yezu abikisi moto abotamá na miso ya kokufa

1 Tango Yezu azalaki koleka na nzela, amoni moto moko akufá miso banda babotá ye. 2 Bayekoli na ye batuni ye: "Moteyi, po na nini moto oyo abotamá na miso ya kokufa? Ezali po na masumu na ye moko to ya baboti na ye?" 3 Yezu azongisi: "Ezali po na masumu na ye moko té to ya baboti na ye; kasi abotamá na miso ya kokufa, po mosala ya Nzambe émonana na ye. 4-5 Tango ngai nazali awa na mokili, nazali moi po na bato. Lokola moi ezali nanu, esengeli násala misala ya Moto oyo atindaki ngai. Butu ezali koya, pe moto moko té akokoka lisusu kosala." 6 Sima ya maloba yango, Yezu abwaki soi na mabelé, asali mwa ndambo ya potopoto, pe apakoli moto wana na miso. 7 Bongo alobi na ye: "Kende kosukola elongi na eziba ya Siloé" (kombo wana elingi koloba: Atindami). Moto yango akei kosukola elongi, bongo tango azongi, abandi komona. 8 Bato oyo bazalaki kofanda ná ye penepene, pe baoyo bamonaki ye tango azalaki kosenga mbongo, batunani: "Oyo ye té, moto azalaki kofanda pe kosenga bato mbongo?" 9 Bato mosusu balobi: "Ezali ye." Bamosusu balobi: "Té; kasi akokani na ye." Bongo ye moko alobi: "Ezali ngai." 10 Batuni ye lisusu: "Ndenge nini sik'oyo okómi komona?" 11 Azongiseli bango: "Moto oyo bábengaka Yezu asalaki mwa ndambo ya potopoto, apakoli ngai na miso pe alobi: 'Kende kosukola elongi na Siloé.' Tango nakei kosukola elongi kuna, nabandi komona." 12 Batuni ye: "Moto yango azali wapi?" Ye azongisi: "Nayebi té."

Ba-Farizé batuni moto oyo abiki

13 Bamemi moto oyo azalaki na miso ya kokufa epai ya ba-Farizé. 14 Nzokande Yezu asalaki potopoto pe abikisaki moto yango na Mokolo ya Kopema. 15 Yango wana ba-Farizé batuni ye ndenge nini abandaki komona. Azongiseli bango: "Atiaki ngai mwa ndambo ya potopoto na miso, nasukoli elongi, pe nabandi komona." 16 Bongo ba-Farizé mosusu balobi: "Moto asali makambo ya ndenge oyo, azali moto ya Nzambe té, pamba té abuki mobeko ya Mokolo ya Kopema." Kasi bamosusu balobi: "Ndenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi minene boye?" Yango wana bakabwanaki bango na bango. 17 Ba-Farizé batuni ye lisusu: "Yo okanisi nini po na moto oyo abikisi yo?" Azongiseli bango: "Azali profete." 18 Bakonzi ya Bayuda bandimaki té 'tè azalaki na miso ya kokufa pe abandi komona, bongo babengisi baboti na ye. "Batuni bango: "Oyo mwana na bino bolobaka 'tè abotamá na miso ya kokufa? Ndenge nini sik'oyo abandi komona?" 20 Baboti na ye bazongisi: "Toyebi 'tè azali mwana na biso, pe abotamá na miso ya kokufa. 21 Kasi toyebi té ndenge nini abandi komona, pe nani moto abikisi ye. Bótuna ye; azali mokolo, akoloba na bino ye moko." 22 Baboti na ye balobaki bongo po bazalaki kobanga bakonzi; pamba té bango bayokanaki boye: moto akondima 'tè Yezu azali Mesia, bako-bengana ye na ndako ya losambo. "Yango wana baboti na ye balobaki: "Azali mokolo, bótuna ye." 24 Ba-Farizé babengi lisusu moto oyo azalaki na miso ya kokufa, balobi na ye: "Biso toyebi 'tè moto yango azali moto ya masumu. Ye atsiolaki Nzambe; kasi yo, kumisa Nzambe." 25 Moto wana azongiseli bango: "Nayebi té soki ye azali moto ya masumu. Kasi nayebi kaka likambo moko: nazalaki na miso ya kokufa, pe sik'oyo nazali komona." 26 Bango batuni ye: "Asalaki yo nini? Ndenge nini abikisi yo?" 27 Ye azongisi: "Nasi'nayebisaki bino, kasi boyokelaki ngai té. Po na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino pe bolingi kokóma bayekoli na ye?" 28 Bafingi ye balobi: "Yo moto ozali moyekoli na ye; kasi biso tozali bayekoli ya Moize. 29 Biso toyebi 'tè Nzambe alobaki na Moize; kasi moto oyo, toyebi té soki auti wapi." 30 Moto wana azongiseli bango: "Oyo ezali penza likambo ya kokamwa! Bino boyebi epai ye auti té, kasi ye abikisi ngai! 31 Toyebi 'tè Nzambe ayokelaka bato ya masumu té, kasi ayokelaka bobele moto oyo atosaka ye pe asalaka makambo ye alingaka. 32 Toyoká nanu té 'tè babikisi moto abotamá na miso ya kokufa. 33 Soki moto yango auti epai ya Nzambe té, akoki kosala ata eloko moko té." 34 Bango bazongiseli ye: "Yo moto obotamá penza na masumu, pe olingi koteya biso?" Bongo babengani ye na ndako ya losambo.

Banani bakufa penza miso?

35 Yezu ayoki 'tè babengani moto wana. Akei kokutana na ye, pe atuni ye: "Ondimi Mwana ya Moto na motema na yo?" 36 Moto wana azongiseli ye: "Mokonzi, yebisa ngai, ye azali nani po 'tè nándima ye." 37 Yezu alobi: "Omoni ye; ezali ngai moto nazali kosolola na yo." 38 Moto wana azongisi: "Mokonzi, nandimi." Bongo afukameli ye. 39 Sima, Yezu alobi: "Ngai nayaki awa na mokili po 'tè moto na moto ázwa oyo ekoki na ye: bato bakufa miso bamona, pe baoyo bazali komona, miso na bango ékufa." 40 Ba-Farizé mosusu oyo bazalaki wana bayoki maloba yango pe batuni ye: "Boni, biso pe tozali na miso ya kokufa?" 41 Yezu azongiseli bango: "Soki bozalaki na miso ya kokufa, mbele bozalaki na masumu té; kasi awa bolobi 'tozali komona', bozali kaka bato ya masumu libela."

Yoane 10

Lisapo ya mobokoli ya bameme

1 Bongo Yezu alobi lisusu: "Nazali koloba na bino, ya solo: soki moto akoti na lopango ya bameme na porte na yango té, kasi na esika mosusu, ye azali moyibi pe mobebisi. 2 Kasi moto oyo akotaka na porte, ye azali mobokoli ya bameme. 3 Sinzili afungolelaka ye lopango, pe bameme eyokaka mongongo na ye. Ye abengaka bameme na ye moko moko na kombo na yango, pe abimisaka yango na libanda. 4 Soki abimisi yango nyonso alekaka na liboso, pe bameme elandaka ye, po eyebi mongongo na ye. 5 Kasi elandaka mopaya té; kutu ekimaka ye, po eyebi mongongo na ye té." 6 Yezu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki tina ya maloba na ye té.

Yezu azali mobokoli malamu ya bameme

7 Yezu alobi lisusu: "Nazali koloba na bino, ya solo: ngai nazali lokola porte ya lopango ya bameme. 8 Bato nyonso oyo bayaki liboso na ngai bazalaki miyibi pe babebisi; yango wana bameme ezalaki koyokela bango té. 9 Ngai nazali porte ya lopango. Moto oyo akotaka epai na ngai, akobika; akoki kokota pe kobima, pe akozwa bilei. 10 Moyibi ayaka kaka po na koyiba, koboma pe kobebisa. Kasi ngai nayei po bato bazala na bomoi, pe bazala na yango mingi koleka. 11 "Ngai nazali mobokoli malamu ya bameme. Mobokoli malamu apesaká bomoi na ye po na bameme na ye. 12 Moto oyo asalaka po na mbongo azali mobokoli penza té, azali pe kolo ya bameme té. Soki amoni nkoi ezali koya, atikaka bameme pe akimaka, bongo nkoi ekangaka bameme pe epanzaka yango. 13 Pamba té, ye asalaka po na mbongo, pe ayokelaka bameme mawa té. 14 Ngai nazali mobokoli malamu. Nayebi bameme na ngai pe yango eyebi ngai, 15 bobele ndenge Tata ayebi ngai pe ngai nayebi ye. Nakopesa bomoi na ngai po na bameme na ngai. 16 "Nazali pe na bameme mosusu, ezali ya lopango oyo té; esengeli nátambwisa yango pe, bongo ekobanda koyoka mongongo na ngai. Boye bameme nyonso ekozala esika moko, na maboko ya mobokoli se moko. 17 "Tata alingi ngai, po nakopesa bomoi na ngai pe nakozwa yango lisusu. 18 Moto moko té akobotola bomoi na ngai, kasi ngai moko nde moto nakopesa yango na bolingo na ngai. Nazali na nguya ya kopesa yango, pe ya kozwa yango lisusu. Tata atindaki ngai násala ndenge wana." 19 Bayuda bakábwani lisusu po na maloba yango. 20 Bato mingi na kati na bango balobi: "Azali na ndoki! Azali na liboma! Po na nini bozali koyoka ye?" 21 Kasi bato mosusu balobi: "Moto azali na ndoki alobaká ndenge wana té. Yango molimo mabe ekoki kobikisa bato bakufa miso?"

Bayuda baboyi Yezu

22 Na mikolo wana feti ezalaki na Yeruzalem, babandaki kokanisa mokolo bafungolaká Ndako ya Nzambe. Na tango wana malili ezalaki mingi. 23 Yezu azalaki kotambola na Ndako ya Nzambe, na véranda ya Salomon. 24 Bongo Bayuda bayei kozinga ye, pe batuni ye boye: "Tango nini okokitisa biso mitema? Yebisa biso polele soki ozali Mesia." 25 Yezu azongiseli bango: "Nasi'naye-bisaki bino yango, kasi bondimelaki ngai té. Misala oyo nazali kosala na nguya ya Tata na ngai, nde ezali kolakisa bino yango. 26 Kasi bino bozali kondima té po bozali bameme na ngai té. 27 Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai; nayebi yango pe yango elandaka ngai. "Napesi yango bomoi ya seko; bongo yango ekobeba ata mokolo moko té. Moto moko té akoki kobotola yango na maboko na ngai, 29 pamba té ezali Tata na ngai moto apesi ngai yango. Ye azali na nguya nyonso, boye moto moko té akoki kobotola eloko na maboko na ye. 30 Ngai ná Tata na ngai tozali se moto moko." 31 Bayuda balokoti lisusu mabanga po na koboma ye. 32 Yezu alobi na bango: "Nasali misala mingi ya malamu na miso na bino, na makasi ya Tata. Po na mosala nini bolingi koboma ngai?" 33 Bayuda bazongiseli ye: "Tolingi koboma yo po na mosala ya malamu té, kasi po ozali kotsiola Nzambe. Pamba té ozali kaka moto, kasi olobi 'tè ozali Nzambe." 34 Yezu alobi na bango: "Na Mibeko na bino ekómamá boye: 'Nalobi: bozali banzambe.' 35 Ya solo, bato oyo bazalaki koyoka maloba na ye, Nzambe abengaka bango 'banzambe'. Makambo ekómamá na Mikanda ya Nzambe ekoki kolongwa té. 36 Nzokande Nzambe aponá ngai moto na ye, pe atindi ngai na mokili, yango wana nalobi 'tè nazali Mwana ya Nzambe. Ndenge nini bozali koloba 'tè natsioli Nzambe? 37 Soki nasalaka misala ya Tata na ngai té, bóndimela ngai té. 38 Kasi soki nasalaka yango, atako bolingi kondimela ngai té, bóndima po na misala na ngai. Bongo bóyeba libela 'tè ngai ná Tata tozali moto moko." 39 Bayuda baluki kokanga ye lisusu, kasi bazwaki ye té. 40 Yezu akei na ngambo ya Yordan pe atikalaki kuna, na esika Yoane azalaká kobatisa bato kala. 41 Bato mingi bayei epai na ye pe balobi: "Yoane asalaka likamwisi moko té, kasi makambo nyonso ye alobaká po na moto oyo ezali ya solo." 42 Pe kuna, bato mingi bandimaki Yezu.

Yoane 11

Liwa ya Lazare

1 Moto moko kombo na ye Lazare azalaki na maladi na Betanie, mboka ya Maria ná ndeko na ye Marte. 2 Maria azali mwasi oyo apakolaki Nkolo Yezu malasi na makolo, pe apangusaki yango na suki na ye, bongo ndeko na ye Lazare moto azalaki na maladi. 3 Bandeko na ye mibale ya basi batindi moto ákende koyebisa Yezu 'tè: "Mokonzi, moto oyo yo olingaka azali na maladi." 4 Kasi tango Yezu ayoki sango yango, alobi: "Lazare azali na maladi, kasi akokufa té. Maladi wana ekomonisa lokumu ya Nzambe, pe ngai Mwana na ye nakozwa lokumu po na yango." 5 Yezu azalaki kolinga Marte ná ndeko na ye Maria, ná Lazare. 6 Tango ayoki 'tè Lazare azali na maladi, aumeli lisusu mikolo mibale na esika ye azalaki. 7 Sima na yango alobi na bayekoli na ye: "Tózonga na région ya Yuda." 8 Bayekoli bazongiseli ye: "Moteyi, bobele sik'oyo Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, pe olingi kozonga lisusu kuna?" 9 Yezu alobi na bango: "Mokolo moko ezali na bangonga zomi na mibale té? Soki moto atamboli na moi, akoki kobeta libaku té po azali komona polele. 10 Kasi soki moto atamboli na butu akobeta mabaku, po azali komona té." 11 Sima ya maloba wana, Yezu abakisi lisusu: "Moninga na biso Lazare alali pongi, kasi nakei kolamusa ye." 12 Bayekoli bazongiseli ye: "Mokonzi, soki alali pongi akobika." 13 Kasi kolala oyo Yezu alobaki ezali liwa; nzokande bayekoli bakanisaki 'tè ezalaki bobele pongi. 14 Bongo Yezu alobi na bango polele: "Lazare akufi. 15 Nazali na esengo po na bino, po ngai nazalaki kuna té; boye bokondima ngai. Kasi tókende kuna epai na ye." 16 Bongo Toma oyo bábengaka Mapasa alobi na bayekoli mosusu: "Biso nyonso tókende kokufa ná Moteyi esika moko."

Yezu azali mosekwisi

17 Tango Yezu akómi, akuti basi'bakundi Lazare eleki mikolo minei. 18 Kolongwa Betanie tii na Yeruzalem ezali na ba-kilomètre soki misato pamba, 19 yango wana Bayuda ebele bayaki epai ya Maria ná Marte kolongola bango mawa po na liwa ya ndeko na bango Lazare. 20 Tango Marte ayoki 'tè Yezu azali koya, akei koyamba ye na nzela, kasi Maria atikalaki na ndako. 21 Marte alobi na Yezu: "Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té. 22 Kasi nayebi 'tè ata sik'oyo Nzambe akopesa yo makambo nyonso oyo okosenga epai na ye." 23 Yezu alobi na ye: "Ndeko na yo akosekwa." 24 Marte azongiseli ye: "Nayebi 'tè akosekwa tango Nzambe akosekwisa bato, na mokolo ya suka." 25 Yezu alobi na ye: "Ngai nazali mosekwisi pe napesaka bomoi. Moto oyo andimi ngai akozala na bomoi sima ya liwa na ye. 26 Moto nyonso oyo azali na bomoi na ndenge andimeli ngai, akokufa ata mokolo moko té. Ondimi yango?" 27 Marte azongisi: "Ee, Mokonzi, nandimi 'tè ozali Mesia, Mwana ya Nzambe, oyo toyebaki 'tè akoya na mokili."

Yezu aleli

28 Tango Marte asilisi koloba bongo, akei kobenga ndeko na ye Maria, pe alobi na ye na litoi: "Moteyi asi'ayei, azali kobenga yo." 29 Awa Maria ayoki boye, atelemi pe akei mbangu epai ya Yezu. 30 Yezu akómaki nanu na mboka té; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na ye. 31 Bayuda oyo bazalaki ná Maria na kati ya ndako po na kolongola ye mawa, bamonaki 'tè atelemi mbangu pe abimi na libanda; bongo balandi ye po bakanisaki 'tè akei kolela na simetiere. 32 Awa Maria akómi esika Yezu azalaki, akwei na makolo na ye, pe alobi na ye: "Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té." 33 Tango Yezu amoni Maria azali kolela, pe bato oyo bayaki na ye bazali kolela lisusu, ayoki mawa mingi pe pasi na motema. 34 Atuni bango: "Esika nini bókundaki ye?" Bazongiseli ye: "Mokonzi, yaka kotala." 35 Yezu aleli. 36 Bayuda balobi: "Tala, azalaki kolinga ye mingi!" 37 Kasi bato mosusu balobi: "Ye moto abikisaki moto oyo azalaki na miso ya kokufa. Bongo akokaki pe kopekisa liwa ya Lazare té?"

Yezu asekwisi Lazare

38 Yezu ayokaki mawa mingi na motema, pe akei na simetiere. Ezalaki libulu na kati ya mabanga, pe na monoko na yango batiaki libanga ya monene. 39 Yezu alobi: "Bólongola libanga." Kasi Marte, ndeko ya moto oyo akufaki, alobi na ye: "Mokonzi, azali kolumba solo, pamba té asi'asali mikolo minei na libulu." 40 Yezu azongiseli ye: "Soki ondimi, okomona lokumu ya Nzambe. Nalobaki boye té?" 41 Na sima balongoli libanga. Yezu atomboli miso na likolo, alobi: "Tata, napesi yo mersi po oyokeli ngai. 42 Nayebi 'tè oyokelaka ngai tango nyonso, kasi nazali koloba boye po na bato oyo bazali awa ná ngai, bándima 'tè yo moto otindi ngai." 43 Sima ya maloba wana, agangi na mongongo makasi: "Lazare, bima!" 44 Moto oyo akufaki abimi; makolo ná maboko ezalaki ya kokangama, pe elongi na ye elíngamaki na elamba. Yezu alobi na bango: "Bófungola ye pe bótika ye átambola."

Banganga-Nzambe ná ba-Farizé bakani koboma Yezu

45 Bato mingi na kati ya Bayuda oyo bayaki epai ya Maria bandimaki Yezu po bamonaki makambo asalaki. 46 Kasi bato mosusu na kati na bango bakei koyebisa na ba-Farizé makambo oyo Yezu asalaki. 47 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé babengisi bato nyonso ya Likita-Monene, pe balobani boye: "Tokosala nini? Moto oyo azali kosala makamwisi mingi! 48 Soki totiki ye asalaka kaka boye, bato nyonso bakondima ye, pe bakonzi ya Rome bakoya koboma Ndako ya Nzambe na biso, pe ekolo na biso." 49 Moto moko na kati na bango kombo na ye Kaife, oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, alobi: "Bino bozali na mayele té! 50 Boyebi té 'tè ebongi malamu moto moko ákufa po na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ébeba té?" 51 Alobaki makambo wana na makanisi na ye moko té, kasi lokola azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, asakoli 'tè Yezu akokufa po na ekolo mobimba. 52 Ya solo, Yezu akufaki kaka po na ekolo ya Bayuda té, kasi po na kosangisa bana ya Nzambe nyonso oyo bapanzaná na mokili mobimba. 53 Banda mokolo wana, bakonzi ya Bayuda bakati 'tè báboma Yezu. 54 Yango wana Yezu abandaki komonana lisusu na miso na bango té. Akei na mboka moko penepene ya esobe, kombo na yango Efrairn, pe afandi kuna ná bayekoli na ye. 55 Feti ya Bayuda ya Pake ekómaki penepene, bongo bato mingi ya mboka bakei na Yeruzalem liboso ya feti, po na komibongisa ndenge mibeko na bango ezali kotinda. ^Baluki Yezu na Ndako ya Nzambe, pe batunani: "Bokanisi nini? Akoya na feti to akoya té?" 57 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki motindo 'tè soki moto ayebi esika Yezu azali, áya koyebisa bango po bákende kokanga ye.

Yoane 13

Maria apakoli Yezu malasi

1 Etikalaki mikolo motoba po na kokóma na Pake; Yezu akei na Betanie, mboka ya Lazare moto oyo ye asekwisaki. 2 Kuna basalelaki ye feti. Marte azalaki kotiela bango biloko na mesa, pe Lazare azalaki na kati ya bato oyo bafandaki esika moko ná Yezu. 3 Maria akamati molangi ya malasi ya talo mingi penza, pe apakoli yango na makolo ya Yezu, bongo apangusi yango na suki na ye. Ndako mobimba etondi na solo ya malasi. 4 Moko na kati ya bayekoli, Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu, alobi: 5 "Po na nini batekisi malasi yango na mbongo ebele té, po bápesa yango na bato bakelelá?" 6 Alobaki bongo té po azalaki kokanisa bato bakelelá, kasi po azalaki moyibi; pamba té bazalaki kobombisa mbongo epai na ye, pe abandaki koyiba yango. 7 Kasi Yezu azongisi: "Bótika ye. Lokola etikali moke bákunda ngai, ye asali malamu na ndenge abombaki yango tii sik'oyo. 8 Bokobanda kozala na bato bakelelá tango nyonso; kasi ngai, nakozala ná bino tango nyonso té."

Banganga-Nzambe bakanl báboma Lazare

9 Bayuda ebele bayokaki 'tè Yezu azali na Betanie, bongo bakei kuna; bakendeki kaka po na Yezu té, kasi po na kotala pe Lazare oyo ye asekwisaki. 10 Yango wana bakonzi ya banganga-Nzambe bayei kokana báboma Lazare; 11 pamba té ezali likolo na ye nde Bayuda mingi balongwaki epai na bango pe bakómaki kondima Yezu.

Yezu akoti na Yeruzalem

12 Sima ya mokolo moko, bato oyo bayaki po na feti ya Pake bayoki 'tè Yezu akoya na Yeruzalem. 13 Bakamati mandalala, bongo bakei koyamba ye na nzela, pe babandi koganga: "Ozana! Lokumu na Nzambe! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! Longonya na mokonzi ya Israel!" 14 Yezu azwi punda, bongo abuti, ndenge ekómamá na Mikanda: ""Kobanga té, vile ya Sion! Tala mokonzi na yo ayei, afandi na punda." 16 Mokolo wana bayekoli bayebaki tina ya makambo yango té; kasi tango Yezu azwaki lokumu, bayei kokanisa 'tè basalaki bobele ndenge ekómamá po na ye. 17 Mokolo Yezu abimisaki Lazare na simetiere pe asekwisaki ye, bato mingi bazalaki kuna; bongo batambwisaki sango yango. 18 Yango wana bato ebele bayei kokutana ná ye, po bayokaki likamwisi oyo asalaki. 19 Boye ba-Farizé balobi bango na bango: "Bomoni! Bokoki kosala eloko té; bato nyonso babandi kolanda ye!"

Bapaya baluki Yezu

20 Na kati ya bato oyo bayaki na feti po na kokumisa Nzambe, ezalaki pe na bato mosusu oyo bazali bayuda té. 21 Bakei koloba na Filipe moto ya Betsaida ya Galilé: "Tata, tolingi komona Yezu." 22 Filipe akei koloba na André, bongo bango mibale bakei koyebisa Yezu. 23 Yezu azongiseli bango: "Sik'oyo tango esi'ekoki oyo ngai Mwanà ya Moto nakozwa lokumu. 24 Nazali koloba na bino, ya solo: soki mbuma ya blé ekwei na mabelé té pe ekufi té, ekotikala kaka mbuma moko; kasi soki ekufi na kati ya mabelé, ekobota mbuma mingi. "Moto alingi bomoi na ye, akobungisa yango, kasi moto andimi kobungisa bomoi na ye na mokili oyo, akozwa bomoi ya seko. 26 Soki moto alingi kosalela ngai, alanda ngai, bongo biso ná mosali na ngai tokozala esika moko. Soki moto asaleli ngai, Tata akokumisa ye."

Yezu ayebisi ndenge akokufa

27 "Sik'oyo nazali komona pasi na motema. Náloba nini? Náloba 'tè: 'Tata, bikisa ngai na pasi oyo?' Té. Nayaki kaka po námona pasi oyo. 28 Tata, lakisa penza 'tè ozali Tata." Mongongo euti na Likolo elobi: "Nasi'nalakisi yango, pe nakolakisa yango lisusu." 29 Bato oyo bazalaki wana, tango bayoki mongongo yango balobi: "Ezali kake." Bamosusu balobi: "Anjelu ayei koyebisa ye likambo." 30 Kasi Yezu alobi: "Mongongo yango elobi po na ngai té, kasi elobi po na bino. 31 Sik'oyo tango ekoki: Nzambe akokata makambo ya bato ya mokili; sik'oyo akobengana mokonzi na bango. 32 Tango bakotombola ngai, nakozala kobenda bato nyonso epai na ngai." 33 Na maloba oyo, Yezu alakisaki ndenge ye akokufa. 34 Bato bazongiseli ye: "Biso toyebi na Mibeko na biso 'tè "Mésia akoumela seko. Ndenge nini olobi na biso 'tè bakotombola Mwana ya Moto? Mwana ya Moto oyo ozali koloba, ye nani?" 35 Yezu alobi na bango: "Moi ezali nanu na kati na bino mwa tango moke; bótambolaka tango moi ezali nanu, po butu ékweela bino té; pamba té, moto oyo atambolaka na molili, ayebaka té esika azali kokende. 36 Awa bozali na moi, bóndima makambo moi ezali kolakisa bino, po bókóma bato ya moi."

Bayuda bandimeli Yezu té

Sima ya maloba wana, Yezu alongwe pe akei komibomba. 37 Atako asalaki makamwisi mingi na miso na bango, kasi bazalaki kondima ye té. 38 Ya solo esalamaki bobele ndenge profete Ezaya alobaki: "Nkolo, nani andimaki sango na biso? Nani ayebaki 'tè Nkolo moto asali makambo yango?" 39 Bakokaki kondima té, po Ezaya alobaká lisusu boye: 40 "Nzambe akangi bango miso pe asilisi bango mayele, po bámona té, bázwa mayele té, pe baya epai na ngai té po nábikisa bango." 41 Ezaya alobaká bongo pamba té amonaki lokumu ya Yezu pe azalaki koloba po na ye. 42 Nzokande na kati ya bakonzi ya Bayuda, bato ebele bandimaki Yezu, kasi babandaki koloba yango na miso ya bato té, po bazalaki kobanga 'tè ba-Farizé bakobengana bango na ndako ya losambo. 43 Pamba té, bazalaki koluka lokumu epai ya bato, kasi epai ya Nzambe té.

Mateya ya Yezu ekokatela bato etumbu

44 Yezu alobi na mongongo makasi: "Moto oyo andimi ngai, andimi kaka ngai té, kasi andimi pe Moto oyo atindaki ngai. 45 Oyo amoni ngai, amoni pe Moto oyo atindi ngai. 46 Ngai nayaki na mokili lokola moi, po moto nyonso oyo andimi ngai, atambolaka lisusu na molili té. 47 Soki moto azali koyoka maloba na ngai kasi azali kotosa yango té, ngai té moto nakokatela ye etumbu; pamba té nayaki po na kokatela bato etumbu té kasi po na kobikisa bango. 48 Moto oyo aboyi ngai pe ayambi mateya na ngai té, zuzi na ye azali. Mateya oyo ngai nazali koteya, yango nde moto ekokatela ye etumbu na mokolo ya suka. 49 Pamba té nalobaka na mayele na ngai moko té, kasi Tata oyo atindaki ngai, ye nde moto alakisaki ngai makambo nasengeli koloba pe koteya. 50 Nayebi 'tè makambo oyo ye alakisaka, epesaka bato bomoi ya seko. Yango wana, makambo oyo nazali koloba, nalobaka yango se ndenge Tata alakisaki ngai."

Yoane 13

Yezu asukoli makolo ya bayekoli na ye

1 Feti ya Pake ekómaki penepene, Yezu ayebaki 'tè tango na ye ekoki po álongwa na mokili pe ákende epai ya Tata. Azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki na mokili; azalaki kolinga bango mingi penza. 2 Alakisi bolingo yango tango bazalaki kolia. Zabolo asi'akotelaki Yudas, mwana ya Simon Iskariot, apesi ye likanisi ya koteka Yezu. 3 Nzokande Yezu ayebaki 'tè Tata asi'atii makambo nyonso na maboko na ye; ayebaki 'tè autaki na Nzambe pe akozonga epai ya Nzambe. 4 Tango bazalaki kaka na mesa, atelemi, alongoli nzambala na ye, akamati elamba moko pe akangi yango na loketo. 5 Na sima atii mai na sani, abandi kosukola bayekoli na ye makolo, pe apangusi bango mai na elamba oyo akangaki na loketo. 6 Tango akómi na Simon Piere, ye atuni: "Mokonzi, yo okosukola ngai makolo?" 7 Yezu azongiseli ye: "Likambo nazali kosala sik'oyo, oyebi tina na yango té, kasi okoyeba yango sima." 8 Piere alobi na ye: "Ósukola ngai makolo? Ekoki kosalama ata mokolo moko té!" Yezu azongiseli ye: "Soki nasukoli yo makolo té, okozwa bolamu na ngai té." 9 Simon Piere alobi na ye: "Mokonzi, soki bongo, kosukola ngai kaka makolo té, kasi sukola ngai pe maboko ná motú!" 10 Yezu alobi na ye: "Moto oyo asi' asukoli nzoto mobimba, asi'akómi peto; asengeli kosukola bobele makolo. Bino pe bozali peto, kasi bino nyonso té." 11 Yezu ayebaki moto oyo akoteka ye, yango wana alobaki: "Bozali peto, kasi bino nyonso té." 12 Tango asilisi kosukola bango makolo, alati bilamba na ye pe ayei kofanda na mesa, alobi na bango: "Boyebi tina ya likambo oyo nasali bino? 13 Bino bobengaka ngai Moteyi pe Mokonzi; bolobaka malamu, po nazali Moteyi pe Mokonzi. 14 Bongo soki ngai, Mokonzi pe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino pe bosengeli kosukolana makolo bino na bino. 15 Napesi bino ndakisa po bino pe bosalaka ndenge ngai nasali bino. 16 Nazali koloba na bino, ya solo: mosali aleki mokonzi na ye té, pe ntoma aleki moto oyo atindi ye té. 17 Lokola boyebi yango, soki bosali ndenge wana bokozala na esengo mingi. 18 "Nazali koloba po na bino nyonso té. Ngai nayebi bato oyo naponá. Kasi ebongi ésalama ndenge ekómamá: 'Moto oyo azali kolia esika moko na ngai, asali ngai mabe.' 19 Nalobi na bino makambo yango sik'oyo, lokola nanu esalami té. Bongo tango ekosalama, bóndima 'tè Ngai Nazali. 20 Nazali koloba na bino, ya solo: moto ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai moko. Pe moto ayambi ngai, ayambi Moto oyo atindi ngai."

Yezu ayebisi 'tè Yudas akoteka ye

21 Tango Yezu asilisi koloba bongo, ayoki pasi na motema, pe alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai." 22 Bayekoli babandi kotalana bango na bango; bayebaki té soki azalaki koloba yango po na nani. 23 Moyekoli moko oyo Yezu azalaki kolinga, afandaki penepene ya Yezu. 24 Simon Piere afineli ye liso po átuna Yezu soki alobaki makambo yango po na nani. 25 Moyekoli wana atuni Yezu na litoi: "Mokonzi, moto yango nde nani?" Yezu azongisi: "Nakotia ndambo ya lipa oyo na supu, bongo moto oyo nakopesa yango, nde ye wana." Yezu akamati ndambo ya lipa, atii yango na supu, pe apesi Yudas, mwana ya Simon Iskariot. » Tango Yudas azwi yango, Satan pe akoteli ye. Yezu alobi na ye: "Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki." 28 Kasi na kati ya bato oyo bazalaki na mesa, ata moto moko té ayebaki tina ya maloba yango. 29 Pamba té lokola Yudas azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki 'tè Yezu alobi na ye bongo po ásomba biloko oyo bakoki kolia na feti; bamosusu bakanisaki 'tè atindi ye ákende kopesa lisalisi na bato bakelelá. 30 Awa Yudas akamati ndambo ya lipa wana, kaka na tango yango abimi. Butu esi'ekómaki.

Mobeko ya sika

31 Tango Yudas akei, Yezu alobi: "Sik'oyo ngai Mwana ya Moto nasi'nazwi lokumu, pe Nzambe asi'azwi lokumu po na ngai. 32 Bongo Nzambe pe akopesa ngai lokumu oyo ye moko azali na yango. Etikali kutu moke ápesa ngai yango. 33 Bana na ngai, nakozala na bino lisusu mikolo mingi té. Bokoluka ngai, kasi nazali koloba na bino sik'oyo ndenge nalobaki na Bayuda: bino bokoki kokende té epai ngai nakokende. 34 Napesi bino mobeko ya sika: Bólinganaka bino na bino. Kaka ndenge ngai nalingaka bino, bino pe bólinganaka ndenge wana. 35 Soki bolingani, bato nyonso bakoyeba 'tè bozali bayekoli na ngai."

Yezu ayebisi 'tè Piere akowangana ye

36 Simon Piere atuni Yezu: "Mokonzi, okokende wapi?" Yezu azongiseli ye: "Okoki kolanda ngai sik'oyo té epai nakokende, kasi okolanda ngai sima." 37 Piere atuni ye lisusu: "Mokonzi, po na nini nakoki kolanda yo sik'oyo té? Nakopesa bomoi na ngai po na yo." 38 Yezu azongiseli ye: "Okopesa penza bomoi na yo po na ngai? Nazali koloba na yo, ya solo: liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té."

Yoane 14

Yezu azali nzela oyo ekendé tii epai ya Tata

1 Yezu abakisi alobi: "Bozala mitema likolo té. Bóndima Nzambe, bóndima pe ngai. 2 Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi; yango wana nalobi ya solo 'tè nalingi nákende kobongisela bino esika. 3 Bongo, soki nakei kobongisela bino esika, nakoya lisusu kokamata bino, po bino pe bozala esika ngai nazali. 4 Boyebi esika ngai nakokende, pe boyebi nzela na yango." 5 Toma alobi na ye: "Mokonzi, esika yo ozali kokende, biso toyebi yango té. Ndenge nini tokoki koyeba nzela?" 6 Yezu alobi na bango: "Ngai nazali nzela; oyo alandi ngai akozwa makambo ya solo pe bomoi. Nzela mosusu ezali té oyo ekendé epai ya Tata. 7 Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai. Banda sik'oyo boyebi ye, pe bomoni ye." 8 Filipe alobi na ye: "Mokonzi, lakisa biso Tata, bongo tokoluka eloko mosusu té." 9 Yezu azongiseli ye: "Filipe, banda kala nazali na bino, bongo oyebi ngai té? Moto oyo amoni ngai amoni pe Tata. Ndenge nini olobi: 'Lakisa biso Tata?' 10 Ozali kondima té 'tè ngai ná Tata tozali moto moko? Makambo nyonso nazali koloba na bino eutaka na ngai moko té, kasi Tata oyo azali ná ngai, ye nde moto azali kosala misala na ye. 11 Bóndima maloba na ngai: ngai ná Tata tozali moto moko. Soki nanu bondimi té, bóndima ata po na misala wana. 12 Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimi ngai, akosala pe misala oyo ngai nasalaka. Akosala kutu makambo eleki monene, pamba té ngai nazali kokende epai ya Tata. 13 Makambo nyonso bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango, bongo Tata akozwa lokumu po na ngai Mwana na ye. 14 Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango."

Tata akotinda Molimo Mosantu

15 "Soki bólingaka ngai, bokotosa mibeko na ngai. 16 Bongo nakosenga Tata, pe ye akopesa bino Mosalisi mosusu, po ázala na bino seko. 17 Ye nde Molimo, oyo ayebisaka makambo nyonso Nzambe azali kolakisa. Bato ya mokili bakoki kozwa ye té, po bamoni ye té, pe bayebi ye té. Kasi bino boyebi ye, po azalaká na bino, pe azali na kati ya mitema na bino. 18 "Nakotika bino lokola bana etike té; nakozonga epai na bino. "Etikali moke, bato ya mokili bakomona ngai lisusu té. Kasi bino bokomona 'tè nazali na bomoi, bino pe bokozala na bomoi. 20 Soki tango wana ekoki, bokoyeba 'tè ngai ná Tata tozali moto moko, pe ngai ná bino tozali moto moko. 21 "Moto oyo ayebi mibeko na ngai pe atosaka yango, ye nde moto alingi ngai. Tata na ngai akolinga moto oyo alingaka ngai; ngai pe nakolinga ye, pe nakomimonisa epai na ye." 22 Yuda (kasi Yudas Iskariot té) atuni ye: "Mokonzi, po na nini okomimonisa epai na biso kasi na bato ya mokili té?" 23 Yezu azongiseli ye: "Soki moto alingi ngai, akobanda kotosa maloba na ngai. Tata na ngai pe akolinga ye, bongo ngai ná Tata tokoya kofanda epai na ye. 24 Moto oyo alingi ngai té, atosaka maloba na ngai té. Mateya oyo bino bozali koyoka ezali ya ngai té, kasi ezali nde ya Tata oyo atindaki ngai. 25 "Nalobi na bino makambo oyo tango nazali nanu na kati na bino. 26 Molimo Mosantu, Mosalisi oyo Tata akotindela bino na kombo na ngai, akolakisa bino makambo nyonso pe akopesa bino mayele, po bókanisaka makambo nyonso oyo nalobaki na bino. 27 "Natikeli bino boboto; ngai moko nakobanda kobatela bino po bozala na boboto. Boboto yango ekozala té lokola oyo makambo ya mokili ememelaka bato. Bozala mitema likolo té, pe bóbanga té. 28 Boyokaki 'tè nalobaki na bino: 'Nakei, kasi nakozonga epai na bino.' Soki bolingi ngai, bokosepela po nazali kokende epai ya Tata, pamba té Tata aleki ngai. 29 Nayebisi bino makambo yango sik'oyo, liboso 'tè ésalama; po tango ekosalama, bóndimela ngai. 30 Nakolobela bino lisusu makambo mingi té, pamba té mokonzi ya mokili oyo azali koya. Akoki kosala ngai eloko té; 31 kasi nyonso ekosalama po bato ya mokili báyeba 'tè nalingaka Tata, pe nasalaka ndenge ye atindaki ngai. Bótelema, tólongwa awa."

Yoane 15

Yezu azali nzete ya vinu ya solo

1 "Ngai nazali lokola nzete ya solo ya vinu, pe Tata na ngai _L «J azali kolo ya elanga. 2 Bitape na ngai oyo ebotaka mbuma té, ye akokata yango; kasi oyo ebotaka, akobongisa yango po ébota mbuma mingi. 3 Mateya oyo napesaki bino esi'ebongisá bino kala. 4 Bókangana na ngai, tózala moto moko. Etape moko té ekoki kobota yango moko, soki ekanganá na nzete ya vinu té. Bino pe ndenge moko, bokoki kosala eloko té soki bokangani na ngai té. 5 "Ngai nazali lokola nzete ya vinu, bino bozali bitape. Moto oyo akanganá na ngai akobota mbuma mingi. Pamba té soki ngai nazali na bino té, bokoki kosala ata eloko moko té. 6 Moto oyo akangani na ngai té, bakobwaka ye na libanda ndenge babwakaka étape ya pamba; yango ekaukaka, bongo balokotaka yango, babwakaka yango na móto pe ezikaka. 7 Soki bokangani na ngai pe na maloba na ngai, bokoki kosenga nyonso oyo bolingi, pe bokozwa yango. 8 Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bokolakisa 'tè bozali bayekoli na ngai. 9 Nalingaka bino ndenge Tata alingaka ngai. Botikala libela bato na ngai ya bolingo. 10 Soki botosi mibeko na ngai, bokotikala libela bato na ngai ya bolingo, ndenge ngai nazali kotosa mibeko ya Tata na ngai, pe nazali libela moto na ye ya bolingo. 11 "Nalobi na bino bongo po esengo na ngai ézala na mitema na bino, pe bótonda na yango. 12 Mobeko na ngai, yang'oyo: bólinganaka bino na bino ndenge ngai nalingaka bino. 13 Bolingo mosusu ezali té oyo eleki ya moto andimi kokufa po na baninga na ye. 14 Bino bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo natindaka bino. 15 Nakobenga bino lisusu basali té, po mosali ayebaka té makambo mokonzi na ye asalaka. Kasi bino, nakobanda kobenga bino baninga; pamba té nasi'nayebisi bino makambo nyonso Tata na ngai alakisaki ngai. 16 Bino bato boponaki ngai te, kasi ezali ngai nde moto naponaki bino. Napesi bino mosala: bókende, bóbota mbuma; pe nalingi yango éumela. Bongo Tata akobanda kopesa bino nyonso oyo bokozala kosenga na kombo na ngai. 17 Mobeko na ngai, yang'oyo: bólinganaka bino na bino."

Bato ya mokili bakoyina bayekoli ya Yezu

18 "Soki bato ya mokili oyo bazali koyina bino, bóyeba 'tè bayinaki ngai liboso. 19 Soki bozalaki bato ya mokili, mbele bato ya mokili balingaki bino. Kasi ngai naponi bino pe nalongoli bino na kati na bango. Bozali bato ya mokili té, yango wana bakomi koyina bino. ^Bókanisaka makambo nalobaki na bino: 'Mosali aleki mokonzi na ye té.' Ndenge banyokolaki ngai, bakonyokola pe bino; ndenge bandimaki mateya na ngai té, bakondima pe ya bino té. 21 Kasi bakosala bino makambo nyonso wana likolo na ngai; po bayebi té Moto oyo atindaki ngai. 22 Soki nayaki té, pe soki nalobelaki bango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi sik'oyo bakoki kowangana lisumu na bango té. "Moto oyo ayinaka ngai, ayinaka pe Tata na ngai. 24 Na miso na bango nasalaki makambo ya minene, oyo moto moko té asi'asalá. Soki nasalaki yango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi basi'bamoni misala na ngai, pe bazali kaka koyina ngai ná Tata. "Esalami bobele ndenge ekómamá na Mibeko na bango: 'bayini ngai pamba.' 26 "Nakotindela bino Mosalisi na kombo ya Tata. Ye nde Molimo oyo ayebi makambo nyonso Nzambe azali kolakisa. Akouta epai ya Tata, bongo tango akoya, akoyebisa bino makambo na ngai nyonso. 27 Bino pe bokoyebisa bato makambo na ngai, po bozali ná ngai uta na ebandeli."

Yoane 16

1 Nalobi na bino makambo oyo po bobeta libaku té. 2 Bakobengana bino na bandako na bango ya losambo. Tango ekoya, bato oyo bakoboma bino bakokanisa 'tè bazali kosalela Nzambe. 3 Bakosala bongo po bayebi Tata té; bayebi pe ngai té. 4 Nayebisi bino yango sik'oyo, po tango makambo wana ekosalama, bókanisa 'tè nasi'nayebisá bino yango."

Mosala ya Molimo Mosantu

"Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli té, po nazalaki na bino. 5 Sik'oyo nakei epai ya Moto oyo atindaki ngai, pe moko té na kati na bino azali kotuna ngai: 'Okei wapi?' 6 Awa nayebisi bino yango, bobandi kutu koyoka mawa na mitema. 7 Kasi nazali koloba na bino ya solo: yango eleki malamu po na bino; pamba té soki nakei té, Mosalisi akoyeela bino pe té; kasi soki nakei, nakotindela bino ye. 8-11 Tango ye akoya, akomonisa polele 'tè bato ya mokili babungi na makambo misato. Akolakisa 'tè bazali na lisumu, pamba té baboyi kondimela ngai. Akolakisa 'tè Nzambe azali bosembo, pamba té nakei epai ya Tata, pe bokomona ngai lisusu té. Akolakisa pe ndenge Nzambe akataka makambo, pamba té mokonzi ya mokili oyo asi'azwi etumbu na ye. 12 "Nazali lisusu na makambo ebele ya koyebisa bino, kasi ekoleka mingi po na bino sik'oyo. 13 Molimo alingi áya; ye nde moto ayebi makambo nyonso oyo Nzambe azali kolakisa, bongo akoyebisa bino makambo nyonso ya solo. Akoloba na kombo na ye moko té, kasi akoloba bobele makambo oyo ye ayokaki, pe akoyebisa bino makambo ekoya. 14 Ye akokumisa ngai, pamba té akozwa makambo nyonso epai na ngai pe akoyebisa bino yango. 15 Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali pe ya ngai. Yango wana nalobi 'tè Molimo akozwa makambo nyonso epai na ngai, bongo akoyebisa bino yango."

Mawa ekobongwana esengo

16 "Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu." 17 Bayekoli mosusu babandi kotunana: "Likambo wana elingi koloba nini? Azali koloba na biso: 'Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu.' Pe 'Nazali kokende epai ya Tata.' 18 'Mwa tango' elingi koloba nini? Toyebi tina ya maloba na ye té." 19 Yezu ayebaki 'te balingi kotuna ye, yango wana alobi na bango: "Nalobaki na bino: 'Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu.' Bozali kotunana po na maloba wana? 20 Nazali koloba na bino, ya solo: bino bokolela pe bokozala na mawa, kasi bato ya mokili bakosepela. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21 Soki mwasi alingi kobota, ayokaka mawa po tango ya pasi ekoki; kasi soki asi'aboti, akanisaka lisusu pasi yango té; azalaká na esengo po moto abotami. 22 Bino pe ndenge moko; sik'oyo bozali na mawa, kasi nakoya kotala bino lisusu, pe mitema na bino ekotonda na esengo; ata moto moko té akokoka kolongola bino yango. 23 "Mokolo wana bokotuna ngai lisusu ata likambo moko té. Nazali koloba na bino, ya solo: Tata akopesa bino makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai. 24 Tii lelo, nanu bosengi eloko moko té na kombo na ngai. Bósenga pe bokozwa yango; bongo bokotonda na esengo."

Yezu asi'alongi mabe ya mokili

25 "Nazalaki koloba na bino makambo nyonso wana se na masapo. Na tango ekoya nakoloba na bino lisusu na masapo té, kasi nakobanda koyebisa bino polele makambo ya Tata. 26 Na eleko wana bokosenga makambo nyonso na kombo na ngai. Nalobi té 'tè ngai moto nakosengela bino yango na Tata, 27 pamba té Tata ye moko alingaka bino. Alingaka bino po bino bolingi ngai, pe bondimi 'tè ngai nautá epai ya Nzambe. 28 Ya solo, nautá epai ya Tata. Nayaki awa na mokili; sik'oyo nazali kotika mokili oyo po názonga epai ya Tata." 29 Bayekoli na ye bazongisi: "Omoni, sik'oyo okómi koloba na biso polele pe otiki masapo. 30 Sik'oyo toyebi 'tè oyebi makambo nyonso, bongo tina ezali té po moto átuna yo lisusu. Yango wana tondimi 'tè outá epai ya Nzambe." 31 Yezu alobi na bango: "Sik'oyo bondimi? 32 Tango ezali koya, pe esi'ekomi, oyo bokopanzana bipai na bipai, moto na moto na nzela na ye, bongo bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko té, po Tata azalaká ná ngai. 33 Nalobi na bino makambo oyo nyonso po bozala na boboto, lisanga na ngai. Bokomona pasi mingi awa na mokili. Kasi bótia molende. Ngai nasi'nalongi mabe ya mokili."

Yoane 17

Yezu abondeli po na bayekoli na ye

1 Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, atomboli miso na likolo pe alobi: "Tata, tango ekoki, kumisa ngai Mwana na yo, po ngai pe nákumisa yo. 2 Pamba té otii ngai Mokonzi ya bato nyonso, po nápesa bomoi ya seko na bato nyonso oyo opesaki ngai. 3 Bomoi ya seko ezali nde koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, pe koyeba ngai Yezu Kristo, moto yo otindaki. 4 Ngai nakumisi yo awa na se; nasilisi mosala oyo otindaki ngai. 5 Bongo sik'oyo, Tata, pesa ngai lokumu oyo nazalaká na yango epai na yo, liboso 'tè mokili ésalama. 6 "Bato oyo opesi ngai, olongolaki bango na kati ya bato ya mokili. Bazalaki bato na yo, opesi ngai bango; bongo ngai nalakisi bango lokumu na yo, pe bandimi maloba na yo. 7 Bayebi sik'oyo 'tè nyonso oyo opesi ngai, euti epai na yo, 8 pamba té nalakisi bango maloba oyo yo oyebisaki ngai. Bango pe bayambi yango, pe bandimi ya solo 'tè nauti epai na yo, yo moto otindi ngai. 9 "Nazali kobondela yo po na bango. Nazali kobondela po na bato ya mokili oyo té, kasi po na baoyo opesi ngai, pamba té bazali bato na yo. 10 Nyonso oyo ezali ya ngai ezali ya yo; pe nyonso oyo ezali ya yo, ezali pe ya ngai; boye bolamu oyo napesi bango ezali kolakisa lokumu na ngai. 11 "Nazali lisusu na kati ya bato ya mokili té, kasi bango bazali na kati ya bato ya mokili. Ngai nazali koya epai na yo. Tata Mosantu, salela nguya na yo oyo opesá ngai, batela bango po bazala moto moko, ndenge ngai ná yo tozali se moto moko. 12 Tango nazalaki ná bango, nabandaki kobatela bango na nguya na yo oyo opesá ngai. Nabatelaki bango malamu, pe na kati na bango moko té abungaki, longola kaka moto oyo asengelaki kobunga, ndenge ekómamá na Mikanda. 13 "Sik'oyo nazali koya epai na yo. Nazali koloba makambo oyo awa nazali nanu na mokili, po bango bazala na esengo na ngai, pe bátonda na yango. 14 Nalakisaki bango maloba na yo; yango wana bato ya mokili bayini bango, po bazali bato na bango té, ndenge ngai pe nazali moto na bango té. 15 Nasengi té 'tè ólongola bango na mokili; kasi batela bango po bákweya na maboko ya Monguna té. 16 Bazali bato ya mokili oyo té, ndenge ngai pe nazali moto ya mokili oyo té. 17 Yebisa bango maloba na yo po ókómisa bango bato na yo penza; pamba té maloba na yo elakisaka makambo nyonso ya solo. 18 Natindi bango epai ya bato, ndenge yo otindaki ngai epai ya bato. "Napesi yo bomoi na ngai lokola libonza po na bango, po bákóma bato na yo penza. 20 "Nazali kobondela po na bango kaka té, kasi nazali kobondela pe po na bato nyonso oyo bakoyoka mateya na bango pe bakondimela ngai. 21 Tata, kómisa bango nyonso moto se moko, ndenge ngai ná yo tozali moto moko. Bango bazala na biso lisanga, po bato ya mokili bándima 'tè ezali yo moto otindi ngai. 22 Napesi bango lokumu oyo yo opesi ngai, po bazala moto moko, ndenge ngai ná yo tozali moto moko: "ngai ná bango, pe yo ná ngai. Ndenge wana bazala penza moto moko, boye bato ya mokili bakoyeba 'tè yo moto otindi ngai, pe olingi bango ndenge ozali kolinga ngai. 24 "Tata, bato oyo opesi ngai, nalingi bazala ná ngai esika moko, po bámona lokumu oyo opesi ngai. Pamba té, obandá kolinga ngai liboso 'tè mokili ésalama. "Tata, yo ozali bosembo. Bato ya mokili bayebi yo té, kasi ngai nayebi yo, pe bango bandimi 'tè yo moto otindaki ngai. 26 Nasi'nalakisi bango lokumu na yo, pe nakolakisa bango lisusu, po bolingo oyo olingi ngai, ézala na mitema na bango, bongo ngai pe názala na mitema na bango."

Yoane 18

Bakangi Yezu

1 Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, akei ná bayekoli na ye na ngambo ya mai ya Sedron, pe akoti ná bango na elanga moko, 2 esika amesanaki kosangana na bango. Yudas oyo atekaki ye, ayebaki elanga yango; 3 yango wana ye pe akei kuna ná basoda pe bakengeli ya Ndako ya Nzambe oyo bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki ye. Bazalaki na bibundeli na maboko, ná bamwinda pe banzete ezali kopela. 4 Yezu ayebaki makambo nyonso ekokweela ye, yango wana akei epai na bango, pe atuni: "Bozali koluka nani?" 5 Bazongiseli ye: "Yezu ya Nazaret." Yezu alobi na bango: "Ngai oyo." Yudas, oyo atekaki ye, azalaki na kati na bango. 6 Tango Yezu alobi na bango: "Ngai oyo", bazongi sima, pe bakwei na mabelé. 7 Yezu atuni bango lisusu: "Bozali koluka nani?" Balobi na ye: "Yezu ya Nazaret." 8 Yezu azongiseli bango: "Nasi'nalobaki na bino 'tè ezali ngai; bongo soki bozali koluka ngai, botika bato oyo bákende." 'Alobi bongo po na kokokisa makambo oyo ye alobaki liboso: "Tata, nabungisi ata moto moko té na kati ya bato oyo opesaki ngai." 10 Simon Piere azalaki na mbeli, abimisi yango, akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi oyo ezalaki na liboko ya mobali. Kombo ya moto yango Malkus. 11 Kasi Yezu alobi na Piere: "Zongisa mbeli na yo na mokaba. Ezali Tata na ngai moto apesi ngai kopo oyo ya pasi; bongo olingi námela yango té?"

Bamemi Yezu epai ya Anas

12 Basoda ná mokonzi na bango, pe bakengeli ya Bayuda bakamati Yezu pe bakangi ye singa. 13 Bamemi ye liboso epai ya Anas, pamba té ye azalaki tata ya mwasi, ya Kaife oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana. 14 Ezali Kaife moto alobaki na Bayuda 'tè: "Malamu moto moko kaka ákufa po na bato nyonso."

Piere awangani Yezu

15 Simon Piere ná moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yezu na sima. Moyekoli mosusu wana ayebanaki ná nganga-Nzambe monene, yango wana akotaki nzela moko ná Yezu na lopango ya nganga-Nzambe monene, 16 kasi Piere atikalaki na libanda penepene ya porte ya lopango. Moyekoli oyo ayebanaki ná nganga-Nzambe monene abimi; akei koloba na mwasi oyo azalaki kokengela porte ya lopango, pe akotisi Piere. 17 Mwasi yango atuni Piere: "Yo pe ozali moyekoli ya moto wana té?" Piere azongiseli ye: "Té, ngai té." 18 Lokola malili ezalaki makasi, basali ná bakengeli bapelisaki moto pe bafandaki esika moko po na koyotela. Piere pe akei koyotela esika moko ná bango.

Nganga-Nzambe monene asambisi Yezu

19 Nganga-Nzambe monene atuni Yezu mitunapo na bayekoli na ye pe mateya na ye. 20 Yezu azongiseli ye: "Ngai nazalaki kosakola polele na miso ya bato nyonso. Mikolo nyonso nazalaki koteya na bandako ya losambo pe na Ndako ya Nzambe, esika Bayuda nyonso basanganaka. Nalobaki likambo moko té na kobombama. 21 Po na nini ozali kotuna ngai? Tuna bato oyo bayokaki maloba na ngai; bango bayebi malamu makambo nazalaki koloba." 22 Tango Yezu alobi bongo, mokengeli moko azalaki wana, abéti ye mbata pe agangeli ye: "Ozali kozongisa ndenge wana na nganga-Nzambe monene?" 23 Yezu azongiseli ye: "Soki nalobi mabe, lakisa ngai mabe yango; kasi soki nalobi malamu, po na nini obeti ngai?" 24 Anas atindi Yezu epai ya Kaife, nganga-Nzambe monene. Yezu azalaki kaka ya kokangama na singa.

Piere awangani lisusu Yezu

25 Na tango wana Simon Piere azalaki kaka koyotela móto. Bato bazalaki wana batuni ye: "Yo pe ozali moyekoli na ye té?" Kasi Piere awangani, azongisi: "Té, ngai té!" ^Mosali moko ya nganga-Nzambe monene, ndeko ya moto oyo Piere akataki litoi, alobi: "Ezali ya solo, ngai namonaki yo na elanga, esika moko ná ye!" 27 Kasi Piere awangani lisusu. Kaka na tango wana soso eleli.

Bamemi Yezu na tribinal ya Pilate

28 Na tongo penza, balongwe na ndako ya Kaife, bamemi Yezu na ndako ya Pilate, motambwisi ya région ya Yuda. Bayuda baboyi kokota na ndako ya Pilate, po bábebisa ekila té, bongo bákoka kolia mwana-meme ya Pake. 29 Yango wana Pilate abimi, pe akei epai na bango. Bongo atuni bango: "Likambo nini boyei kofundela moto oyo?" 30 Bango bazongiseli ye: "Soki ye azalaki moto ya mabe té, mbele toyei na ye epai na yo té." 31 Pilate alobi na bango: "Soki bongo, bino moko bókamata ye pe bósambisa ye ndenge Mibeko na bino ezali kotinda." Bayuda bazongiseli ye: "Biso tozali na bokonzi ya kobomisa moto té." 32 Boye bakokisi makambo Yezu alobaki, tango alakisaki ndenge nini akokufa. 33 Pilate akoti lisusu na ndako, abengi Yezu pe atuni ye: "Yo ozali mokonzi ya Bayuda?" 34 Yezu azongiseli ye: "Likambo wana otuni ngai, ezali yo moko moto okanisi yango, to bato mosusu bato bayebisi yo yango po na ngai?" 35 Pilate atuni: "Ngai nazali Moyuda? Ezali bandeko na yo moko ná bakonzi ya banganga-Nzambe bato bayei kotika yo epai na ngai. Yo osali nini?" 36 Yezu azongiseli ye: "Bokonzi na ngai euti na bato té. Soki eutaki na bato, mbele basoda na ngai balingaki kobundela ngai po nákweya na maboko ya Bayuda té. Kasi bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té." 37 Pilate atuni ye lisusu: "Bongo yo ozali penza mokonzi?" Yezu azongisi: "Ee, nazali penza mokonzi. Nabotamaki pe nayaki awa na mokili po násakola makambo Nzambe alingaka. Moto nyonso oyo alukaka yango, andimaka maloba na ngai." 38 Pilate atuni ye: "Makambo nini Nzambe alingaka?"

Pilate akateli Yezu etumbu ya liwa

Sima ya maloba wana, Pilate abimi lisusu na libanda epai ya Bayuda. Alobi na bango: "Namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu. 39 Kasi bomeseni 'tè nábimisela bino moto moko ya boloko na feti ya Pake. Sik'oyo bolingi nábimisela bino mokonzi ya Bayuda?" 40 Bango nyonso babandi koganga, balobi: "Ye té! Tolingi Barabas!" Barabas azalaki moyibi.

Yoane 19

1 Sima na yango, Pilate atindi bákamata Yezu pe bábeta ye fimbu. 2 Basoda bakamati nzube, basali na yango ekoti lokola ya bakonzi, bongo batii ye yango na motú. Balatisi ye kazaka moko ya motane. 3 Bazalaki koya koloba na ye: "Mbote, mokonzi ya Bayuda!". Pe bazalaki kobeta ye bambata. 4 Pilate abimi lisusu na libanda, pe alobi na bato wana: "Namemeli bino moto oyo, po bóyeba 'tè namoni tina moko té ya kokatela ye etumbu." 5 Yezu pe abimi; alataki ekoti ya nzube pe kazaka ya motane. Bongo Pilate alobi na bango: "Botala moto yango!" 6 Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe ná bakengeli bamoni ye, bagangi: "Boma ye na kuruze! Boma ye na kuruze!" Pilate alobi na bango: "Bino moko bókamata ye pe boboma ye na kuruze! Ngai namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu." 7 Bayuda balobi: "Biso tozali na Mibeko ezali kotinda 'tè moto oyo ákufa, pamba té alobaki 'tè azali Mwana ya Nzambe." 8 Awa Pilate ayoki makambo wana, abangi lisusu mingi. 9 Azongi na ndako pe atuni Yezu: "Yo, outi wapi?" Kasi Yezu azongiseli ye liloba té. 10 Pilate alobi na ye: "Boni, olingi kolobela ngai té? Oyebi té 'tè ngai nazali na bokonzi ya kotika yo, to pe ya kobomisa yo na kuruze?" 11 Yezu azongiseli ye: "Soki Nzambe ápesaka yo bokonzi yango té, olingaki kokoka kosala ngai ata eloko moko té. Yango wana moto oyo ayaki kopesa ngai na maboko na yo, lisumu na ye eleki ya yo." 12 Tango Pilate ayoki makambo wana, abandi koluka nzela po átika Yezu. Kasi Bayuda babandi lisusu koganga makasi: "Soki otiki ye, ozali moninga ya mokonzi ya Rome té. Pamba té moto nyonso oyo amitii mokonzi, azali monguna ya mokonzi ya Rome." 13 Tango Pilate ayoki makambo wana, abimisi Yezu na libanda pe akei kofanda na kiti oyo akatelaka makambo; yango ezali na esika Bayuda bábengaka "Gabata", elakisi: esika batandá mabanga. "Ezalaki penepene ya midi, mokolo ya kolengela feti ya Pake; Pilate alobi na Bayuda: "Mokonzi na bino ye oyo!" 15 Kasi bango nyonso bagangi makasi: "Boma ye! Boma ye! Boma ye na kuruze!" Pilate atuni bango: "Bolingi náboma mokonzi na bino na kuruze?" Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisi: "Biso tozali na mokonzi mosusu té, bobele mokonzi ya Rome." 16 Bongo Pilate apesi bango Yezu po báboma ye na kuruze.

Batii Yezu na kuruze

Basoda bakamati Yezu. 17 Ye moko amemi kuruze na ye, abimi na mboka po na kokende na esika moko kombo 'tè: "Mokuwa ya Motú" (na monoko ya Bayuda "Golgota"). 18 Kuna nde esika basoda batiaki Yezu na kuruze, ná bato mibale, mosusu na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi, bongo Yezu na kati. 19 Pilate atindaki 'tè básala mwa libaya pe bátia yango na kuruze ya Yezu. Bakómaki na libaya yango boye: "Yezu ya Nazaret, mokonzi ya Bayuda." 20 Bayuda mingi batangaki yango, pamba té esika oyo batiaki Yezu na kuruze ezali penepene ya mboka. Bakómaki makambo yango na minoko misato: ya Bayuda, ya bato ya Rome, pe ya ba-Grek. 21 Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ya Bayuda balobi na Pilate: "Kokóma té 'mokonzi ya Bayuda'; kasi kóma boye: 'Moto oyo alobi, nazali mokonzi ya Bayuda.'" 22 Kasi Pilate azongiseli bango: "Oyo ngai nakómi, nasi'nakómi." 23 Tango basoda basilisi kotia Yezu na kuruze, bakamati bilamba na ye, bakaboli yango na bandambo minei, soda moko moko ná ndambo na ye. Bakamati pe nzambala na ye; nzambala wana batóngá yango na biteni té, kasi basalá yango kaka mobimba banda likolo tii na se. 24 Basoda balobanaki: "Tópasola yango té kasi tóbeta zeke, bongo tótala soki nani akozwa yango." Esalamaki bobele ndenge ekómamá na Mikanda ya Nzambe: "Bakabolaki bilamba na ngai; babetaki zeke po na nzambala na ngai." Basoda basalaki kaka ndenge wana. 25 Mama na Yezu atelemaki pembeni ya kuruze ya Yezu, ná ndeko ya mama na ye ya mwasi, ná Maria mwasi ya Klopas, pe Maria ya mboka Magdala. 26 Awa Yezu amoni mama na ye, pe pembeni na ye moyekoli oyo ye azalaki kolinga, alobi na mama na ye: "Mama, tala mwana na yo." 27 Pe alobi na moyekoli: "Tala mama na yo." Banda mokolo wana, moyekoli yango akamati mama na Yezu epai na ye.

Liwa ya Yezu

28 Sima na yango, lokola Yezu ayebaki 'tè asilisi nyonso oyo esengelaki kosalama, bongo po na kokokisa makambo oyo ekómamá na Mikanda alobi: "Nazali na posa ya mai." 29 Elokú moko ezalaki wana, etondá na vinu ya ngayi. Basoda bakotisi linuka na vinu ya ngayi, bakangi yango na mwa-nzete, pe batomboli yango tii na monoko ya Yezu. 30 Tango Yezu asilisi komela vinu ya ngayi, alobi: "Makambo nyonso ekoki." Alalisi motú pe akati motema.

Soda moko atoboli Yezu mopanzi

31 Nzokande bakonzi ya Bayuda bakei kosenga Pilate boye: "Tinda bákende kobuka makolo ya bato oyo bazali na kuruze, pe bálongola bango." Pamba té ezalaki pokwa ya kolengela Mokolo ya Kopema, pe mokolo yango ezalaki feti monene; boye Bayuda balingaki té bibembe étikala na kuruze. 32 Bongo basoda bayei epai ya bato mibale wana batiaki na kuruze esika moko ná Yezu, pe babuki bango makolo. 33 Tango bakomi epai ya Yezu, bamoni 'tè asi'akufi; yango wana babukaki ye makolo té. 34 Kasi soda moko atoboli mopanzi ya Yezu na likonga, pe na mbala moko makila ná mai ebimi. 35 Moto amonaki makambo oyo, ye nde moto azali koyebisa yango. Azali koyebisa ya solo. Nkolo Yezu ye moko ayebi 'tè moto wana azali koloba ya solo, po bino pe bóndima. 36 Yango esalamaki bongo po na kokokisa makambo ekómamá na Mikanda: "Bakobuka ata mokuwa moko té ya mwana-meme." 37 Epai mosusu bakómá boye: "Bakotala moto oyo batoboli mopanzi."

Bakundi Yezu

38 Sima na yango, Jozef ya mboka Arimaté akei kosenga na Pilate nzela po álongola ebembe ya Yezu na kuruze. Ye azalaki moyekoli ya Yezu, kasi azalaki komimonisa té po abandaki kobanga Bayuda. Pilate apesi nzela, bongo Jozef ayei kolongola ebembe ya Yezu. 39 Nikodeme, oyo akendeki mokolo moko kotala Yezu na butu, ye pe ayei. Amemaki mafuta ya mire basangisá ná aloes, ezalaki na bakilo soki tuku misato. 40 Bango mibale bakamati ebembe ya Yezu, pe balingi yango na bilamba ya mike-mike oyo batiaki mafuta wana, ndenge Bayuda basalaka tango bakundaka bato. 41 Elanga moko ezalaki penepene ya esika babomaki Yezu, pe kuna libulu moko ya sika ezalaki, oyo basalá na kati ya mabanga, nanu bakundelá moto moko té. 42 Lokola ezalaki pokwa ya Mokolo ya Kopema, batii nzoto ya Yezu na libulu wana, pamba té yango ezalaki penepene.

Yoane 20

Yezu asekwi

1 Na tongo penza, sima ya Mokolo ya Kopema, tango molili ezalaki nanu, Maria ya mboka Magdala ayei na simetiere. Amoni 'tè libanga oyo bazipelaki libulu esi'elongwe. 2 Akei mbangu epai ya Simon Piere ná moyekoli mosusu oyo Yezu azalaki kolinga, pe alobi na bango: "Balongoli Mokonzi na libulu, pe toyebi té soki batii ye wapi." 3 Piere ná moyekoli mosusu bakei na simetiere. 4 Bango mibale bazalaki kokima mbangu, kasi moyekoli mosusu alekaki Piere na mbangu, pe akómaki na simetiere liboso. 5 Agunzami, amoni bobele bilamba ya mike oyo balingaki nzoto ya Yezu ezali wana na se, kasi akotaki na kati té. 6 Simon Piere akómaki na sima na ye pe akoti na libulu. Amoni bilamba ya mike wana ezalaki na se, 7 ná kitambala oyo bazipaki Yezu na motú. Kitambala ezalaki esika moko ná bilamba ya mike té; kasi ezalaki ya kolingama esika mosusu. 8 Bongo moyekoli mosusu oyo akómaki na simetiere liboso, ye pe akoti, amoni pe andimi na motema. 9 Tii tango wana bayekoli bayebaki nanu té tina ya makambo oyo ekómamá na Mikanda 'tè Yezu akosekwa. 10 Bongo bayekoli mibale wana bazongaki epai na bango.

Yezu abimeli Maria ya mboka Magdala

11 Maria atikalaki kotelema penepene ya simetiere, azalaki kolela. Awa azalaki kolela boye, agunzami po na kotala na kati ya libulu; 12 amoni ba-anjelu mibale balati bilamba ya pembe, bafandi esika nzoto ya Yezu ezalaki, moko epai motú ezalaki, mosusu epai makolo ezalaki. 13 Bongo ba-anjelu batuni ye: "Mama, po na nini ozali kolela?" Ye azongiseli bango: "Balongoli Mokonzi na ngai, pe nayebi té soki batii ye wapi." 14 Awa alobi boye, abaluki pe amoni Yezu atelemi wana, kasi ayebaki ye té. 15 Yezu atuni ye: "Mama, po na nini ozali kolela? Ozali koluka nani?" Maria akanisaki 'tè ye azali mosali ya elanga, pe alobi na ye: "Tata, soki yo moto olongoli ye, yebisa ngai soki otii ye wapi, po nákende kokamata ye." 16 Yezu alobi na ye: "Maria!" Maria pe abaluki epai na ye, alobi na monoko ya Bayuda: "Rabuni!" (elingi koloba "Moteyi"). 17 Yezu azongiseli ye: "Tika ngai nákende, pamba té nanu nabuti epai ya Tata té. Kasi kende koloba na bandeko na ngai 'tè: nakobuta epai ya Tata na ngai oyo azali pe Tata na bino, epai ya Nzambe na ngai oyo azali pe Nzambe na bino." 18 Bongo Maria ya Magdala akei epai ya bayekoli, alobi na bango: "Nasi'namoni Mokonzi!" Pe ayebisi bango makambo oyo Yezu alobaki na ye.

Yezu abimeli bayekoli na ye

19 Ezalaki se mokolo wana na pokwa, sima ya Mokolo ya Kopema, bayekoli bazalaki esika moko. Bakangaki baporte nyonso ya ndako, po bazalaki kobanga Bayuda. Yezu ayei kotelema na kati na bango, pe alobi: "Boboto ézala na bino!" 20 Awa asilisi koloba boye, alakisi bango maboko na ye ná mopanzi na ye. Tango bayekoli bamoni Nkolo Yezu, mitema na bango etondi na esengo. 21 Yezu alobi na bango lisusu: "Boboto ézala na bino! Ndenge Tata atindaki ngai, ngai pe nazali kotinda bino." 22 Sima ya maloba oyo, afuli bango pema na ye, pe alobi: "Bózwa Molimo Mosantu. "Masumu ya bato oyo bino bokobanda kolimbisa, Nzambe ye moko moto akolimbisa yango; masumu ya baoyo bino bokolimbisa té, Nzambe pe akolimbisa yango té."

Yezu ná Toma

24 Toma, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, oyo bábengaka "Mapasa", azalaki na bango té tango Yezu ayaki. 25 Bayekoli mosusu balobi na ye: "Tosi'tomoni Mokonzi!" Kasi Toma azongiseli bango: "Soki namoni bapota ya basete na maboko na ye té, soki nasimbi yango na mosapi té, pe soki natii liboko na ngai na mopanzi na ye té, nakondima ata moke té." 26 Sima ya poso moko, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma pe azalaki ná bango. Atako baporte ya ndako ezalaki ya kokangama, Yezu ayei kotelema na kati na bango pe alobi: "Boboto ézala na bino!" 27 Bongo alobi na Toma: "Pusana, kotisa mosapi na yo awa, pe tala maboko na ngai; tia lisusu liboko na yo na mopanzi na ngai. Tika tembe, kasi ndima na motema." 28 Toma azongiseli ye: "Mokonzi na ngai pe Nzambe na ngai." 29 Yezu alobi na ye: "Ondimi po omoni ngai? Esengo na bato oyo bakondima, ata bamoni ngai na miso té."

Tina ya mokanda oyo

30 Yezu asalaki makamwisi mosusu mingi na miso ya bayekoli na ye, kasi yango nyonso ekómamá na mokanda oyo té. 31 Makambo oyo ekómami po bino bóndima 'tè Yezu azali Mesia, Mwana ya Nzambe. Soki bondimi bongo, ye akosala 'tè bózwa bomoi ya seko.

Yoane 21

Yezu abimeli bayekoli na ye sambo

1 Sima ya mwa mikolo, Yezu abimelaki lisusu bayekoli na ye, na libongo ya lak ya Tiberiade. Abimelaki bango boye: 2 Simon Piere, Toma (oyo bábengaka "Mapasa"), Natanael (ya mboka Kana na Galilé), bana ya Zebedé mibale, pe bayekoli mibale mosusu, bango nyonso bazalaki esika moko. 3 Simon Piere alobi na bango: "Nakei na ngai koluka mbisi." Bazongiseli ye: "Biso pe tokokende ná yo nzela moko." Bakei pe bakoti na bwatu. Kasi butu wana mobimba bazwaki ata eloko moko té. 4 Awa tongo ebandi kotana, Yezu ayei kotelema na libongo, kasi bayekoli bayebaki ye té. 5 Bongo Yezu atuni bango: " E bilenge, bozwi eloko té?" Bazongiseli ye: "Eloko té." 6 Yezu alobi na bango: "Bóbwaka monyama na liboko ya mobali ya bwatu, bongo bokozwa." Babwaki monyama pe bakokaki kotombola yango lisusu té, pamba té etondaki na bambisi ebele penza. 7 Moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga alobi na Piere: "Ezali Mokonzi!" Tango Simon Piere ayoki 'tè ezali Nkolo Yezu, alati elamba na ye (pamba té alongolaki yango), bongo amibwaki na mai. 8 Bayekoli mosusu bazalaki koya na bwatu, pe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi; libongo ezalaki bobele penepene. 9 Tango bakomi na libongo, bamoni mbisi likolo ya móto ya makala ná mapa. 10 Yezu alobi na bango: "Bóya na ndambo ya mbisi oyo bouti kokanga." 11 Simon Piere akoti na bwatu pe abandi kobenda monyama oyo etondi na bambisi ya minene ebele, nyonso ezalaki 153 . Atako ezalaki mingi boye, monyama epasukaki té. 12 Bongo Yezu alobi na bango: "Bóya kolia." Ata moyekoli moko té amekaki kotuna ye: "Ozali nani?" Pamba té bayebaki 'tè ezali Nkolo. 13 Yezu ayei penepene na bango, akamati mapa, akaboleli bango, apesi bango lisusu bambisi. 14 Oyo ezalaki mbala ya misato Yezu abimelaki bayekoli na ye, banda mokolo asekwaki.

Yezu ná Piere

15 Awa basilisi kolia, Yezu atuni Simon Piere: "Simon, mwana ya Yoane, yo olingaka ngai mingi koleka baninga?" Piere azongiseli ye: "Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi na ye: "Batela bameme na ngai." 16 Bongo atuni ye mbala ya mibale: "Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?" Azongiseli ye: "Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi: "Batela bameme na ngai." 17 Pe atuni ye lisusu mbala ya misato: "Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?" Piere ayokaki mawa mingi na motema, na ndenge Yezu atunaki ye mbala misato: "Olingaka ngai?" Bongo azongiseli ye: "Mokonzi, yo oyebi makambo nyonso, oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi na ye: "Batela bameme na ngai. 18 Nazali koloba na yo, ya solo: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo, yo moko; pe ozalaki kokende esika yo olingi. Kasi tango okokóma mobange, okotanda maboko, pe moto mosusu akokanga yo mokaba; bongo akomema yo epai yo olingi té." 19 Na maloba oyo, Yezu alakisi ndenge nini Piere akokufa po na kokumisa Nzambe. Na sima, Yezu alobi na Piere: "Landa ngai."

Yezu ná moyekoli oyo ye azalaki kolinga

20 Piere atali na sima, pe amoni moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga azali koya. Mokolo bazalaki kolia, liboso 'tè baya kokanga Yezu, moyekoli yango atunaki Yezu na litoi: "Mokonzi, nani moto oyo akoteka yo?" 21 Bongo, awa Piere amoni ye, atuni Yezu: "Mokonzi, makambo nini ekokweela ye?" 22 Yezu azongiseli ye: "Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo? Yo, landa kaka ngai." 23 Yango wana, po na maloba yango sango epanzanaki na kati ya bakristo 'tè moyekoli yango akokufa té. Nzokande Yezu alobaki té 'tè ye akokufa té, kasi alobaki: "Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo?" 24 Ezali ye moko moyekoli wana moto ayebisaki makambo oyo, pe akómaki yango na mokanda. Toyebi 'tè makambo ye ayebisaki ezali ya solo.

Po na kosukisa

25 Yezu asalaki makambo mosusu mingi. Soki bákómaka yango moko moko na mikanda, nakanisi 'tè mokili mobimba elingaki kokoka té po na kotia mikanda wana.

Misala 1

Yezu alaki bantoma Molimo Mosantu

1 Ndeko Teofile, na mokanda na ngai ya liboso nakómaki makambo nyonso Yezu asalaki pe ateyaki uta ebandeli, 2 tii mokolo Nzambe abutisaki ye na Likolo. Liboso ya kokende na Likolo, apesaki mitindo na bantoma na ye oyo ye aponaki na nguya ya Molimo Mosantu. 3 Na sima ya liwa na ye abimelaki bango mbala mingi po na kolakisa polele 'tè azali na bomoi. Mikolo tuku minei mobimba azalaki komilakisa pe koyebisa bango ndenge Nzambe abandi kotia bokonzi na ye. 4 Mokolo moko azalaki kolia esika moko ná bango, atindi bango boye: "Bólongwa na Yeruzalem té, kasi bózela likambo oyo Tata alakaki, ndenge nalobelaki bino. 5 Pamba té Yoane Mobatisi abatisaki bato na mai, kasi na sima ya mwa mikolo, Nzambe akobatisa bino na Molimo Mosantu."

Yezu abuti na Likolo

6 Bongo bantoma oyo basanganaki batuni Yezu: "Mokonzi, ezali na mikolo oyo nde okozongisa bokonzi na Israel?" 7 Yezu azongiseli bango: "Po na tango to mokolo, etali bino té. Tata atiá yango ndenge ye moko alingaki. 8 Kasi Molimo Mosantu akokitela bino, bongo bokozwa nguya po bókende kosakola sango na ngai na Yeruzalem, na région ya Yuda pe ya Samarie mobimba, tii bipai nyonso ya mokili." 9 Awa Yezu asilisi koloba makambo wana, Nzambe atomboli ye na Likolo tango bazalaki kotala ye, pe lipata moko eyei kozipa ye, bongo bamoni ye lisusu té. 10 Bazalaki kotala se na likolo epai Yezu azalaki kokende, na mbala moko bamoni bato mibale balati bilamba ya pembe batelemi penepene na bango 11 pe balobi: "Bato ya Galilé, po na nini botikali awa pe bozali kotala na likolo? Yezu oyo akabwani ná bino po na kobuta na Likolo akozonga kaka ndenge bomoni ye akei."

Matias azwi ebonga ya Yudas

12 Bongo bayekoli bauti na Ngomba ya ba-OHve pe bazongi na Yeruzalem. Ngomba wana ezali mosika té na vile, soki kilomètre moko. 13 Tango bakomi na vile, bakoti na ndako pe bamati na etaje epai bamesanaki kosangana. Ezalaki Piere, Yoane, Jake, André, Filipe, Toma, Bartelemi, Matié, Jake mwana y a Alfé, Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda, ná Yuda mwana ya Jake. 14 Bango nyonso bayokanaki pe bazalaki kosangana mikolo nyonso po na kosambela esika moko, ná basi mosusu pe Maria mama na Yezu, ná bandeko ya Yezu. 15 Mokolo moko, tango bandeko 120 basanganaki, Piere atelemi na kati na bango pe alobi: 16 "Bandeko, Molimo Mosantu asi'ayebisa makambo nyonso ekokweela Yudas oyo alakisaki nzela na bato bakangaki Yezu. Ayebisaki yango na monoko ya David, boye makambo oyo ekómamá na Mikanda esengeli kosalama. 17 Yudas azalaki moto ya lisanga na biso, pe azalaki na mosala na ye na kati na biso. 18 Moto wana asombaki elanga na mbongo oyo bafutaki ye po na mabe na ye. Akweyaki motú na se, nzoto na ye epasukaki na kati-kati, pe misopo na ye nyonso ebimaki. 19 Bato nyonso ya Yeruzalem bayokaki makambo oyo. Yango wana bábengaka elanga wana na monoko na bango 'Akeldama', elingi koloba 'elanga ya makila'. 20 "Nzokande ekómamá na mokanda ya Banzembo: 'Esika afandaka, épanzana; moto moko té átikala kuna.' Pe lisusu: 'Moto mosusu ázwa ebonga na ye.' 21-22 "Yango wana esengeli moto moko áya kosangana na biso, po ákoka kosakola kosekwa ya Nkolo Yezu. Ebongi tópona ye na kati ya bato oyo bazalaki kolanda biso tango nyonso Yezu azalaki ná biso, kobanda tango Yoane abatisaki ye, tii mokolo Nzambe abutisi ye na Likolo." 23 Bongo batii bato mibale: Jozef oyo bábengaka Barsabas, kombo na ye mosusu Yustus, ná Matias. 24 Na sima bango nyonso babondeli boye: "Nkolo, yo oyebi makambo ezali na mitema ya bato nyonso. Lakisa biso nani yo oponi na kati ya bato oyo mibale 25 po na kozwa mosala ya ntoma na esika ya Yudas, oyo atikaki yango pe akendá epai ye moko aponaki." 26 Bongo babeti zeke po na kozwa moto moko na kati na bango, pe zeke elakisi Matias. Yango wana batii ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.

Misala 2

Koya ya Molimo Mosantu

1 Tango mokolo ya Pantekote ekómaki, bandimi nyonso basanganaki esika moko. 2 Na mbala moko makelele euti na Likolo, ezalaki lokola mopepe makasi, etondisi ndako mobimba esika bango bafandaki. 3 Bongo bamoni biloko ebimeli bango lokola móto, pe ekabwani, ezalaki lokola lolemo eyei kofanda na motú ya moto moko moko na kati na bango. 4 Bango nyonso bayei kotonda na Molimo Mosantu, pe babandi koloba na minoko mosusu, ndenge Molimo azalaki kolobisa bango. 5 Bayuda mosusu ya mitema malamu bazalaki kofanda na Yeruzalem, bango bautaki na bikolo nyonso ya mokili mobimba. 6 Tango mingongo yango eyokani, bato ebele bayei kotondana wana; pe bakamwe mingi, po moto na moto ayokaki bandimi bazali koloba monoko na ye ya mboka. 7 Bakamwe mingi penza pe batunani: "Baoyo bazali koloba, bazali bango nyonso bato ya Galilé té? 8 Bongo ndenge nini moto na moto na kati na biso ayoki bango bazali koloba na monoko na ye ya mboka? 9 Awa na kati na biso tozali na bato ya Parte, ya Medie, ná ya Elam; bato mosusu bafandaka na Mezopotamie, na région ya Yuda, na Kapadose, na Pon pe na région ya Efeze, 10 na Frijie pe na Pamfilie, na Ejipte pe na ndambo ya Libie oyo ezali penepene ya Sirène; bamosusu bauti na Rome, "bato mosusu babotami Bayuda, bamosusu bakómá kosambela Nzambe ya Bayuda; bato mosusu bauti na Krete to na Arabie; biso nyonso tozali koyoka bango bazali kosakola misala minene ya Nzambe na minoko na biso ya mboka!" 12 Bango nyonso bakamwe penza mayele té, bongo batunani: "Makambo nini wana?" 13 Kasi bato mosusu bazalaki koseka pe balobi: "Balangwe masanga!"

Mateya ya Piere

14 Bongo Piere atelemi ná bantoma mosusu zomi na moko, pe abandi kosakola boye: "Bino Bayuda, pe bino nyonso bato ya Yeruzalem, bóyoka maloba na ngai, náyebisa bino makambo ezali koleka. 13 Bato oyo balangwe masanga té ndenge bino bokanisi, pamba té tozali kaka na ngonga ya libwa ya tongo. 16 Makambo oyo bozali komona lelo ezali makambo profete Joel ayebisaká: 17 Nzambe alobi: 'Na mikolo ya suka nakotondisa moto nyonso na Molimo na ngai; mibali ná basi nyonso ya Israel bakokóma baprofete. Ezala mibange to bilenge na bino, bakobanda komona na ndoto makambo ebombamá. 18 Ya solo, na mikolo wana nakotondisa basali na ngai ya basi pe ya mibali na Molimo na ngai, bongo bakokóma baprofete. 19 Nakosala makamwisi na Likolo pe na se: Makila ekosopana, móto ekopela, pe milinga ekomata. 20 Moi ekobo-ngwana molili; sanza ekokóma motane lokola makila; boye bokoyeba 'tè Mokolo ya Nkolo ezali koya, Mokolo ya monene pe ya lokumu. 21 Kasi moto nyonso oyo akobondela Nkolo akobika.' 22 "Bato ya Israel, bóyoka maloba oyo: Nzambe alakisaki bino bokonzi ya Yezu ya Nazaret; pamba té, bino moko boyebi 'tè Nzambe asalaki na maboko na ye makambo minene pe makamwisi ya ndenge na ndenge na kati na bino. 23 Bopesaki moto yango na maboko ya bato mabe, pe bobomisaki ye na kuruze. Nyonso wana, Nzambe ayebaká yango uta kala; ye moko moto akanaká bongo. 24 Kasi Nzambe alongoli ye na pasi ya liwa pe asekwisi ye: pamba té liwa ekokaki kokanga ye libela té. 25 Ya solo, David alobaká boye po na ye: 'Nkolo, tango nyonso nakanisaka yo; ozali pembeni na ngai, nakoki kobeta libaku té. 26 Yango wana motema na ngai etondi na esengo; pe nzoto na ngai ezali kopema na kimia; pamba té nazali kotia motema epai na yo. 27 Okotika ngai té na mboka ya bato bakufa; okolinga té 'tè ngai moto na yo nábeba. 28 Okolakisa ngai nzela ya bomoi, okotondisa ngai na esengo na miso na yo.' 29 "Bandeko, tika nálobela bino polele po na koko na biso David: ye akufá pe bakundá ye; simetiere na ye ezali tii lelo epai na biso. 30 Kasi azalaki profete, pe ayebaki 'tè Nzambe akataki seleka 'tè moto ya libota na ye akokóma mokonzi na esika na ye. 31 David ayebaká makambo oyo elingaki koya, pe asakolaká kosekwa ya Mesia; pamba té 'Ye atikalaki té na mboka ya bato bakufa, pe nzoto na ye ebebaki té.' 32 "Ya solo, Nzambe asekwisi Yezu. Biso nyonso tomonaki ye 'tè azali na bomoi. 33 Azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe; azwi Molimo Mosantu oyo Tata alakaki, bongo atondisi biso na yango. Wana ezali makambo oyo bino bozali komona pe koyoka lelo. 34 Pamba té ye moko David amataki na Likolo té, kasi alobaká boye: 'Mokonzi na ngai, Nkolo alobi na yo: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; 35 nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.' 36 "Bato nyonso ya Israel basengeli koyeba malamu 'tè Yezu oyo bino bobomaki na kuruze, Nzambe atiá ye Mokonzi pe Mesia oyo tozalaki kozela." 37 Maloba wana eyokisaki bango pasi na mitema, bongo batuni Piere ná bantoma mosusu: "Bandeko, tósala nini?" 38 Piere azongiseli bango: "Bóbongola mitema, pe moto na moto na kati na bino ázwa batisimo na kombo ya Yezu Kristo, po Nzambe álimbisa bino masumu pe ákabela bino Molimo Mosantu. 39 Pamba té makambo Nzambe alakaká esalami po na bino, bana na bino, pe bapaya nyonso oyo Nkolo Nzambe na biso akobenga." 40 Piere alobelaki bango makambo mingi mosusu po bango bándima, pe alendisi bango boye: "Bósala nyonso po bóbika, pamba té ekolo na biso ebungi nzela!" 41 Bongo babatisaki bato oyo bandimaki maloba ya Piere. Mokolo wana bato 3.000 bayaki kobakisama na lingomba ya bandimi. 42 Bazalaki kosala makasi po na koyoka mateya ya bantoma, po na kozala lisanga lokola bandeko, po na kolia esika moko pe kosambela.

Bizaleli ya bandimi

43 Bantoma bazalaki kosala makamwisi mingi, bongo bato nyonso bazalaki komona 'tè Nzambe azali na bango. 44 Bandimi nyonso babandaki kosangisa bomengo na bango esika moko. 45 Bazalaki koteka balopango na bango ná biloko na bango ya talo, po na kokabola mbongo ndenge posa ya moto na moto ezalaki kosenga. 46 Mikolo nyonso bazalaki kosangana na Ndako ya Nzambe, pe kolia esika moko na bandako na bango, na esengo pe na boboto. 47 Bazalaki kokumisa Nzambe, pe bato nyonso babandaki kolinga bango. Mokolo na mokolo Nkolo azalaki kobakisa na lingomba na bango bato oyo ye alingaki kobikisa.

Misala 3

Moto akufá makolo abiki

1 Mokolo moko Piere ná Yoane bazalaki kokende na Ndako ya Nzambe na ngonga ya misato ya pokwa po na kosambela. 2 Moto moko akufá makolo banda babotá ye, azalaki kofanda penepene ya porte ya Ndako ya Nzambe oyo bábengaka "Porte ya Kitoko". Mikolo nyonso bazalaki komema ye kuna po ásengaka mbongo na bato oyo bazalaki kokota. 'Tango amoni Piere ná Yoane balingi kokota na Ndako ya Nzambe, asengi bango lisalisi. 4 Piere ná Yoane batali ye, bongo Piere alobi na ye: "Tala biso." 5 Moto wana atali bango nyee pe akanisaki 'tè akozwa eloko. 6 Kasi Piere alobi: "Nazali na mbongo té; nakopesa yo eloko nazali na yango: na kombo ya Yezu Kristo ya Nazaret, tambola." 7 Na sima asimbi ye na liboko ya mobali pe atelemisi ye. Na mbala moko makolo na ye ekómi makasi. 8 Atelemi noki pe abandi kotambola. Akoti na Ndako ya Nzambe nzela moko ná bango. Azalaki kotambola, kopumbwa pe kopesa Nzambe mersi. 9 Bato nyonso bamoni ye azali kotambola pe kokumisa Nzambe; 10 bongo bayei koyeba 'tè ye moto azalaki kofanda penepene ya Porte ya Kitoko ya Ndako ya Nzambe, pe kosenga mbongo. Yango wana bakamwe mingi penza, pe bazalaki lisusu na mayele ya koloba té po na makambo oyo esalamaki na nzoto na ye.

Mateya ya Piere na Ndako ya Nzambe

11 Lokola moto wana akangamaki kaka na Piere pe Yoane, bato nyonso bakamwe, pe bayei mbangu epai na bango na verandá oyo bábengaka verandá ya Salomon. 12 Tango Piere amoni bongo, alobi na bato: "Bato ya Israel, po na nini bozali kokamwa na ndenge moto oyo abiki? Po na nini bozali kotala biso, lokola nde biso bato totambwisi ye na nguya to na makasi na biso moko? 13 Bóyeba 'tè Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob, Nzambe ya bakoko na biso, apesi lokumu na Mosali na ye Yezu. Bino bato bokabaki ye po báboma ye; pe tango Pilate alingaki kotika ye, boboyaki. 14 Ye azalaki moto ya bosantu pe ya bosembo, kasi bino bosundolaki ye, pe bosengaki bátikela bino mobomi moko. 15 Wana ezali ndenge bobomisaki Mokonzi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisi ye, pe biso tomonaki ye azali na bomoi. 16 Moto oyo bozali kotala pe boyebi ye, andimeli kombo ya Yezu; ezali ye moko Yezu moto abikisi ye. Ya solo, ezali bondimi na kombo ya Yezu moto ekómisi ye makasi pe nzoto malamu, na miso na bino nyonso. 17 "Nzokande bandeko, nayebi malamu 'tè bino ná bakonzi na bino boyebaki té makambo oyo bosalaki Yezu. 18 Kasi Nzambe asali makambo oyo baprofete nyonso bayebisaká banda kala, na nguya na ye: Mesia na ye asengelaki komona pasi. 19 Yango wana bandeko, bóbongola mitema pe bózongela Nzambe po álimbisa bmo masumu. 20 Bongo Nkolo akoyeela bmo tango ya kopema, pe akotmdela bmo Mesia oyo ye aponelá bino uta kala, ye nde Yezu. 21 Po na sik'oyo, Yezu asengeli kotikala na Likolo, tii tango makambo nyonso ekokóma ya sika, ndenge Nzambe ayebisaká na minoko ya baprofete na ye ya bosantu. 22 Pamba té Moize alobaká boye: 'Nkolo Nzambe akotmdela bino profete moko lokola ngai. Ye akozala moto ya ekolo na bino; bokobanda koyoka makambo nyonso ye akozala kolobela bino. 23 Moto nyonso oyo akoyokela profete wana té, bakolongola ye na molongo ya bato ya Israel.' 24 Baprofete, kobanda tango ya Samuel, bango nyonso basakolaki moko moko makambo ya mikol'oyo. 25 Makambo Nzambe alakaká na minoko ya baprofete, pe Boyokani oyo asalaka ná bakoko na bino, ezali po na bino. Pamba té alobaká na Abraham boye: 'Nakobenisa bikolo nyonso ya mokili likolo ya bato ya libota na yo.' 26 Yango wana Nzambe abimisi Mosali na ye po na bino liboso. Atindi ye po ábenisa bino, pe álongola moto nyonso na kati na bino na nzela ya masumu."

Misala 4

Piere ná Yoane liboso ya Likita-Monene ya Bayuda

1 Tango Piere ná Yoane bazalaki kaka koloba na bato, banganga-Nzambe bayei, ná bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe pe ba-Sadusé. 2 Bazalaki na kanda penza po bantoma mibale wana bazalaki koteya bato, pe kosakola 'tè Yezu asekwi. Elingi koloba 'tè bato bakufa bakoki kosekwa. 3 Bongo bakangi bango, pe batii bango na boloko tii na mokolo oyo elandaki, pamba té pokwa esi'ekómaki. 4 Kasi bato mingi na kati ya baoyo bayokaki maloba yango bandimaki; boye bato oyo bandimaki, bakómaki mibali soki 5.000. 5 Awa tongo etani, bakonzi ya Bayuda, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko basangani na Yeruzalem. 6 Ezalaki: Ana, nganga-Nzambe monene, Kaife, Yoane, ná Alexandre pe bato nyonso ya libota ya bakonzi ya banganga-Nzambe. 7 Batelemisi bantoma liboso na bango pe batuni bango: "Bosali makambo oyo na nguya nini pe na kombo ya nani?" 8 Bongo Piere atondi na Molimo Mosantu, alobi na bango: "Bakonzi ya ekolo pe bambuta-muntu, 9 botuni biso lelo po na bolamu oyo tosali na moto akufá makolo, bolingi koyeba soki ye abiki na nguya ya nani. 10 Tika tóyebisa bino nyonso ná ekolo mobimba ya Israel 'tè ye abiki pe atelemi liboso na bino, po na nguya ya kombo ya Yezu ya Nazaret, oyo bino bobomaki na kuruze pe Nzambe asekwisi ye. 11 Pamba té ekómamá boye po na ye: 'Libanga oyo bino ba-mason bobwakaki, ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.' 12 Bato bakoki kobika bobele epai na ye. Ya solo, na mokili mobimba Nzambe atiá moto mosusu té oyo akoki kobikisa biso." 13 Awa bato ya Likita bamoni molende ya Piere ná Yoane, bakamwe penza po bamoni 'tè bango bazali bato pamba oyo bayekolá té. Bongo bayebaki lisusu 'tè bazalaki ná Yezu. 14 Kasi lokola bazalaki komona pe moto oyo abikaki, atelemi penepene na bango, bakokaki lisusu kotia tembe té. 15 Bongo babimisi bango na Likita-Monene, pe babandi kotiana tembe boye: 16 "Tósala nini na bato oyo? Pamba té na Yeruzalem mobimba bayebi malamu 'tè ezali bango nde bato basali likamwisi monene oyo, pe tokoki kowangana yango té. 17 Kasi tógangela bango pe tópekisa bango báloba lisusu na kombo ya Yezu té ata na nani, po sango ya likambo oyo épanzana té na kati ya bato." 18 Bongo babengi bango pe bapekisi bango koloba to koteya na kombo ya Yezu. 19 Piere ná Yoane bazongiseli bango: "Bino moko botala nanu soki nini ezali malamu liboso ya Nzambe: Totosa bino? to totosa Nzambe? 20 Kasi po na biso, makambo oyo tomonaki pe toyokaki, tokoki kotika koloba yango té." 21 Bato ya Likita bagangeli bango lisusu, pe batiki bango, po bazwaki nzela ya kopesa bango etumbu té. Pamba té bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe po na makambo oyo elekaki. 22 Moto oyo abikaki na likamwisi yango asi'alekisaki bambula 40 .

Losambo ya bandimi

23 Awa batiki bango, Piere ná Yoane bakei epai ya baninga na bango, pe balobeli bango makambo nyonso bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu balobaki. 24 Tango bayoki lisolo oyo, bandimi basangani po na kosambela Nzambe boye: "Nkolo, yo moto osalá Likolo na se, ebale pe biloko nyonso. 25 Na nguya ya Molimo Mosantu, olobaká boye na monoko ya koko na biso David, mosali na yo: 'Po na nini bikolo nyonso ezali kotomboka, pe kongala pamba-pamba boye? 26 Bakonzi ya mokili batomboki, ba-shef ya bikolo bakomi koyokana, po báboya Nkolo ná Mesia na ye.' 27 "Ya solo, Erode ná Ponse Pilate basangani na vile oyo, ná bikolo mosusu pe bato ya Israel, po na koboya bokonzi ya Yezu, mosali na yo ya bosantu, oyo yo oponá Mesia. 28 Na ndenge wana basali makambo nyonso oyo okanaká banda kala na nguya pe na makanisi na yo. 29 Pe sik'oyo, Nkolo, tala ndenge bazali kogangela basali na yo, pe pesa biso molende nyonso ya koteya maloba na yo. 30 Salela nguya na yo, bikisa bato ya maladi, pe kokisa makamwisi ya ndenge na ndenge na kombo ya Yezu, Mosali na yo ya bosantu." 31 Awa basilisi kosambela, esika oyo basanganaki eningani. Bango nyonso batondi na Molimo Mosantu, pe babandi kosakola maloba ya Nzambe na molende nyonso.

Bandimi batii biloko na bango esika moko

32 Bandimi nyonso bazalaki motema moko; ata moto moko té azalaki koloba 'tè biloko na ye ezali bobele po na ye; kasi biloko nyonso ezalaki po na bango nyonso. 33 Nzambe azalaki kopesa nguya monene na bantoma, po na kosakola kosekwa ya Nkolo Yezu; pe bolamu na ye ezalaki mingi na bango nyonso. 34 Ata moto moko té na kati na bango azalaki kokelela. Pamba té bandimi nyonso oyo bazalaki na bilanga to na bandako batekaki yango, bamemaki mbongo wana, 35 pe bapesaki yango na bantoma. Bongo bazalaki kokabola mbongo yango na moto nyonso ndenge posa ya moto na moto ezalaki kosenga. 36 Moto moko ya libota ya Levi azalaki wana, kombo na ye Jozef, abotamaki na esanga ya Shipre. Bantoma bazalaki kobenga ye Barnabas, elingi koloba "oyo apesaká molende". 37 Lokola azalaki na elanga na ye, ateki yango, amemi mbongo pe apesi yango na bantoma.

Misala 5

Ananya ná Safira

1 Moto moko, kombo na ye Ananya, ayokanaki ná mwasi na ye Safira, pe bateki lopango na bango. 2 Kasi Ananya alongoli ndambo mosusu ya mbongo po na bango moko, pe akei kopesa ndambo mosusu na bantoma. Mwasi na ye ayebaki makambo wana. 3 Bongo Piere alobi: "Ananya, po na nini Satan akoteli yo na motema? Okosi Molimo Mosantu, na ndenge olongoli ndambo ya mbongo oyo otekelaki lopango. 4 Soki olingaki kotikala na lopango na yo, etali kaka yo moko. Na sima ya koteka yango, mbongo ezalaki ya yo. Ezali boye té? Ndenge nini ozwi mokano oyo na motema na yo? Okosi bato té, kasi okosi nde Nzambe." 5 Awa Ananya ayoki makambo wana, akwei pe akati motema. Bato nyonso oyo bayokaki sango yango, batondaki na somo penza. 6 Bilenge bayei kozipa ebembe, bamemi pe bakundi yango. 7 Na sima ya ngonga soki misato, mwasi ya Ananya akoti; ayebaki té makambo oyo ekweyaki. 8 Piere atuni ye: "Lobela ngai, botekaki lopango na bino na talo wana?" Ye azongisi: "Ee, yango wana." 'Bongo Piere alobi na ye: "Kasi po na nini bino mibale boyokanaki po na komeka Molimo ya Nkolo? Yoka, bato oyo bakundaki mobali na yo bazali na libanda, bakomema pe ná yo." 10 Kaka na tango wana Safira akwei na makolo ya Piere pe akati motema. Bilenge bakoti, bakuti ye akufi; bamemi ye pe bakei kokunda ye pembeni ya mobali na ye. "Eklezya mobimba ya Yeruzalem pe bato nyonso oyo bayokaki makambo wana, bato-ndaki na somo penza.

Makamwisi ebele

12 Bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele ya ndenge na ndenge na kati ya bato. Bandimi babandaki kosangana na motema moko, na véranda ya Salomon. 13 Na kati ya Bayuda mosusu, moto moko té amekaki kokende epai na bango, atako bato bazalaki kokumisa bango. 14 Nzokande mibali pe basi mingi penza bandimaki Nkolo Yezu, pe bakotaki na lisanga ya bandimi. "Babandaki komema bato ya maladi na ba-balabala; bazalaki kotia bango na ba-kipoyi pe na bitoko, po tango Piere akoleka, ata elili na ye ézipa bato mosusu na kati na bango. 16 Bato mingi bautaki na bamboka oyo ezali penepene ya Yeruzalem, bamemi bato ya maladi ná bato oyo milimo mabe ezalaki kotungisa, pe bango nyonso babikaki.

Banyokoli bantoma

17 Bongo nganga-Nzambe monene ná bato na ye batondi na likunya penza. Bango nyonso bazalaki bato ya lingomba ya ba-Sadusé. 18 Bakangi bantoma pe batii bango na boloko, na miso ya bato nyonso. 19 Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungoli baporte ya boloko, abimisi bango pe alobi: 20 "Bókende, bótelema na Ndako ya Nzambe, pe bósakola na bato makambo nyonso ya bomoi ya sika." 21 Awa bayoki bongo, bakoti na Ndako ya Nzambe na tongo penza, pe babandi koteya. Nganga-Nzambe monene ná bato na ye babengisi bato ya Likita-Monene pe bambuta-muntu nyonso ya Bayuda, bongo batindi bákende koluka bantoma na boloko. 22 Kasi tango bato yango bakomi kuna, bamoni bango té, bazongi epai ya Likita pe balobi: 23 "Tokuti boloko ezali ya kokangama, pe basinzili bazali liboso ya baporte ya boloko. Kasi tango tofungoli yango, tomoni moto moko té na kati." 24 Awa shef ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe pe bakonzi ya banganga-Nzambe bayoki boye, bakamwe mingi po bantoma bamonani té, bongo bamituni soki likambo nini ekweyaki. 25 Kaka na tango wana moto moko ayei pe alobi: "Bato oyo bino botiaki na boloko, bazali na Ndako ya Nzambe, bazali kutu koteya bato." 26 Bongo shef ya bakengeli akei ná bato na ye, pe bamemi bantoma; kasi basalaki bango mabe té po bazalaki kobanga bato, soki té balingaki kobamba bango mabanga. 27 Awa bamemi bango, batii bango liboso ya Likita, pe nganga-Nzambe monene abandi kotuna bango, 28 alobi: "Topeki-saki bino na makasi 'tè bóteya lisusu té na kombo ya moto wana. Kasi bopanzi mateya na bino na vile mobimba ya Yeruzalem; pe bolingi bómemisa biso ngambo po na liwa ya moto wana." 29 Bongo Piere ná bantoma mosusu balobi: "Tosengeli kotosa Nzambe, kasi bato té. 30 Nzambe ya bakoko na biso asekwisi Yezu oyo bino bobomisaki na kuruze. 31 Nzambe atii ye pembeni na ye na esika ya lokumu, akómisi ye Mokonzi pe Mobikisi, po bato ya Israel bábongola mitema pe bázwa bolimbisi ya masumu. 32 Bongo atindi biso tosakola makambo wana, biso ná Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato batosaka ye." 33 Awa bayoki boye batomboki, balingaki koboma bantoma. 34 Kasi farizé moko azalaki na kati na bango, kombo na ye Gamaliel; ye azalaki molakisi-Mibeko, pe bato nyonso bazalaki kokumisa ye. Atelemi na kati ya Likita pe asengi 'tè bábimisa bantoma po na mwa tango moke. 35 Bongo alobi: "Bato ya Israel, bókeba na makambo bolingi kosala na bato oyo. 36 Eleki mikolo mingi té Tedas abimaki; ye alobaki 'tè azali moto monene, pe bato soki 400 bakotaki na lingomba na ye. Kasi babomaki ye, bato oyo balandaki ye bapanzanaki, pe lingomba na bango ekufaki. 37 Na sima na ye, Yuda moto ya Galilé abimaki, na tango bato bazalaki kokómisa bakombo na bango. Bato mingi balandaki ye, kasi ye pe akufaki, bongo bango nyonso bapanzanaki. 38 Yango wana sik'oyo nalobi na bino: bókipé lisusu bato wana té, pe bótika bango. Pamba té soki makanisi to misala na bango euti na bato, yango ekolimwa kaka. 39 Kasi soki euti na Nzambe, bino bokoki koboma yango té. Bókeba po bobunda ná Nzambe té." Bato ya Likita bandimi makanisi na ye. 40 Bongo babengi bantoma, babetisi bango fimbu pe bapekisi bango 'tè bátanga kombo ya Yezu lisusu té. Na sima batiki bango. 41 Bantoma babimi na Likita-Monene, batondi na esengo po Nzambe apesi bango lokumu ya konyokwama po na kombo ya Yezu. 42 Pe mikolo nyonso bazalaki kaka koteya pe kosakola Sango Malamu ya Yezu Mesia, na Ndako ya Nzambe pe na bandako ya bato.

Misala 6

Basalisi sambo ya bantoma

1 Na mikolo wana, bayekoli bakomi ebele. Na kati na bango, bamosusu bautaki na bamboka ya bapaya, bayebaki kaka monoko ya grek. Mokolo moko bayekoli wana basilikelaki bandeko oyo babotamá na Yuda, balobi: "Na tango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo, bozali kobosana basi na biso oyo bakufelá mibali." 2 Bongo bantoma zomi na mibale babengi bayekoli nyonso pe balobi: "Tokoki kotika kosakola maloba ya Nzambe té, po na kotiela bato bilei na mesa. 3 Kasi bóluka bandeko sambo na kati na bino oyo bazali na bizaleli ya malamu, batondi na Molimo Mosantu pe na mayele, bongo tópesa bango mosala wana; 4 boye biso tómipesa kaka na kosambela pe kosakola maloba ya Nzambe." 5 Makambo wana esepelisi bango nyonso. Bongo baponi Etiene, moto atondá na bondimi pe na Molimo Mosantu, Filipe, Prokor, Nikanor, Timon, Parmenas pe Nikola, moto ya mboka Antioshe oyo akómaki kosambela Nzambe ya Bayuda. 6 Na sima batii bato wana sambo liboso ya bantoma; bango babondeli Nzambe, pe batieli bango maboko. 7 Maloba ya Nzambe ezalaki kopanzana, bayekoli bakomi mingi na Yeruzalem, pe banganga-Nzambe ebele kutu bandimaki.

Bakangi Etiene

8 Etiene atondaki na bolamu pe na nguya ya Nzambe. Azalaki kosala makamwisi minene ya ndenge na ndenge na kati ya bato. 9 Kasi bato mosusu babandaki kotiela ye tembe; ezalaki bato oyo basanganaka na ndako ya losambo oyo bábengaka " Ya Balongwá-Boumbu", Bayuda ya Sirène pe ya Alexandrie, ná baoyo ya Silisie pe ya région ya Efeze. Babandi kotiana tembe ná Etiene, 10 kasi bakokaki kotelema na ye té, po ye azalaki koloba na mayele oyo Molimo Mosantu azalaki kopesa ye. 11 Bongo bafuti avoka na bato mosusu po báloba boye: "Toyokaki ye azali kobebisa lokumu ya Moize pe ya Nzambe." 12 Basali na ndenge 'tè bato nyonso ná bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko bátomboka. Bongo bayei epai ya Etiene, bakangi ye, pe bamemi ye liboso ya Likita-Monene ya Bayuda. 13 Kuna babimisi bato po na kokosela ye makambo, pe bato wana balobi: "Moto oyo azali kaka kobebisa lokumu ya Ndako ya Nzambe na biso, pe ya Mibeko ya Moize. 14 Toyokaki ye alobi 'tè Yezu ya Nazaret akoboma Ndako ya Nzambe, pe akobongola bizaleli oyo Moize atikelá biso." 15 Bato nyonso oyo bazalaki na Likita babandaki kotala Etiene, pe bamonaki 'tè elongi na ye ezalaki kongenga lokola ya anjelu.

Misala 7

Etiene asakoli

1 Nganga-Nzambe monene atuni Etiene: "Makambo wana ezali ya solo?" 2 Etiene azongisi: "Batata pe bandeko, bóyoka! Nzambe ya lokumu nyonso abimelaká koko na biso Abraham, tango azalaki na Mezopotamie, liboso 'tè ákende kofanda na Haran. 3 Alobaká na ye: "Tika mboka na yo pe libota na yo; kende na mboka oyo ngai nakolakisa yo.' 4 Bongo Abraham atiki mboka na ye ya Kaldé, pe akei kofanda na Haran. Sima ya liwa ya tata na ye, Nzambe amemi ye na mboka oyo bino bozali kofanda na moi ya lelo. 5 Kasi akómisaká Abraham kolo ya mabelé ata moko té, ézala kutu esika ya kotia likolo. Alakaká ye kaka 'tè akopesa ye mboka oyo, po ékóma ya bana na ye; nzokande Abraham azalaki nanu na mwana té. 6 Pe Nzambe alobaki na ye lisusu boye: 'Bana na yo bakozala kofanda na mboka ya bapaya. Bato wana bakokómisa bango baumbu kuna, pe bakonyokola bango mbula 400 mobimba. 7 Kasi ngai moko Nzambe nalobi: nakosambisa ekolo oyo ekokómisa bango baumbu. Sima na yango bakolongwa kuna pe bakobanda kosambela ngai na esika oyo.' 8 Pe Nzambe asali boyokani ná Abraham; elembo na yango nde kokata bana mibali. Yango wana Abraham akataki mwana na ye Izaak tango akokisaki poso moko. Ndenge moko pe Izaak akataki Jakob, pe Jakob akataki bana na ye, oyo bakómaki bakoko zomi na mibale ya Israel. 9 "Bakoko na biso bayokelaki Jozef likunya, pe batekaki ye lokola moumbu po bámema ye na Ejipte. Kasi Nzambe azalaki na ye; 10 abikisaki ye na bapasi na ye nyonso, pe apesaki ye bolamu ná mayele; boye Faraon, mokonzi ya Ejipte, atii ye motambwisi ya Ejipte pe ya biloko na ye nyonso. 11 Bongo nzala engalaki na Ejipte mobimba, pe na mboka nyonso ya Kanán. Pasi ekómaki mingi koleka, pe bakoko na biso bazwaki eloko ya kolia té. 12 Tango Jakob ayoki 'tè blé ezali na Ejipte, atindi bakoko na biso kuna. 13 Na mobembo na bango ya mibale, Jozef amimonisaki na bandeko na ye, pe kaka na tango wana mokonzi ya Ejipte ayaki koyeba ekolo na ye. 14 Jozef atindi bato bákende koluka tata na ye Jakob, pe libota na ye mobimba ya bato 75 . "Wana ezali ndenge Jakob akendeki na Ejipte. Akufaki kuna, ná bakoko na biso. 16 Bamemaki bibembe na bango na Sikem, pe bakundaki bango kuna, na simetiere oyo Abraham asombaki epai ya bana ya Hamor. 17 "Awa tango oyo Nzambe alakaká Abraham elingaki kokoka, bakoko na biso babotami mingi pe bakomi ebele na Ejipte. 18 Bongo moto ya sika ayei kozwa bokonzi, ye ayebaki Jozef té. "Abandi kokosa bakoko na biso, pe konyokola bango. Atindi bango kutu na makasi bábwaka bana na bango po bakufa. 20 Moize abotamaki na tango yango. Ye azalaki mwana moko ya kitoko na miso ya Nzambe. Babokolaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye. 21 Tango bayei kobwaka ye, mwana ya Faraon ya mwasi alokoti ye, pe abokoli ye lokola mwana na ye penza. 22 Yango wana Moize ayekolaki makambo nyonso ya mayele ya ba-Ejipsien, pe akómaki moto monene na maloba pe na misala na ye. 23 "Tango Moize akómi na mbula 40, alingaki kokende kotala bato ya ekolo na ye ya Israel. 24 Amoni Ejipsien moko azali konyokola moto ya ekolo na ye, akoteli ndeko na ye, azongiseli Ejipsien wana mabe na ye pe abomi ye. 25 Akanisaki bandeko na ye bakondima 'tè Nzambe alingi kotinda ye po na kopesa bango bonsomi; kasi bango bayebaki yango té. 26 Na sima ya mokolo moko Moize akuti ba-Israelite mibale bazali kobunda, pe alingaki kotia boyokani na kati na bango. Alobi na bango: 'Batata, bino bozali bandeko. Po na nini bozali kobunda?' 27 Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye atindiki Moize pe alobi: 'Nani atii yo mokonzi pe zuzi na biso? 28 Olingi óboma ngai ndenge obomaki Ejipsien wana lobi?' 29 Awa Moize ayoki maloba yango akimi, pe akei kofanda na mboka Madian. Kuna abotaki bana mibale ya mibali. 30 "Na sima ya bambula 40, anjelu moko abimeli Moize na kati ya mwa-nzete ya nzube ezalaki kozika móto, na esobe penepene ya ngomba ya Sinai. 31 Moize akamwe tango amoni makambo wana. Kasi tango apusanaki po na kotala yango penepene, ayoki mongongo ya Nkolo elobi: 32 'Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.' Moize abandi kolenga po na somo, pe amekaki kutu kotala té. 33 Bongo Nkolo alobi na ye: 'Longola sandale na yo, po esika oyo otelemi ezali mabelé ya bosantu. 34 Namoni pasi ya bato na ngai oyo bazali na Ejipte, nayoki ndenge bazali kolela, pe nakiti po na kobikisa bango. Bongo yaka nátinda yo na Ejipte.' 35 "Ya solo, bakoko baboyaká Moize, batunaki ye: 'Nani atii yo mokonzi pe zuzi?' Ezali nde ye moto Nzambe atindaki lokola mokonzi pe mobikisi, tango anjelu abimelaki ye na mwa-nzete ya nzube. 36 Ezali Moize moto abimisaki ba-Israelite na Ejipte, asalaki makamwisi ya ndenge na ndenge na mboka yango, na Ebale ya Motane pe na esobe, bambula 40. 37 Ezali Moize moto alobaki na bato ya Israel: 'Nzambe akotindela bino profete moko lokola ngai. Ye akozala moto ya ekolo na bino.' 38 Tango bakoko na biso basanganaki na esobe na miso ya Nzambe, Moize azalaki kotelema na kati na bango pe anjelu oyo azalaki koloba na ye na ngomba ya Sinai; azwaki maloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi, pe atikelaki biso yango. 39 "Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye, batombokelaki ye pe balingaki kozonga na Ejipte. 40 Balobaki na Aaron: 'Salela biso banzambe oyo ekobanda kokende liboso na biso, po toyebi té makambo nini ekweeli Moize oyo abimisaki biso na Ejipte.' 41 Na mikolo wana basali ekeko ya mwana-ngombe, bapesi mabonza na eloko oyo bango moko basalaki, pe basalisi feti po na yango. 42 Kasi Nzambe apesaki bango mokongo pe atikaki bango básambela minzoto, ndenge ekómamá na mikanda ya baprofete: 'Bato ya Israel, mbula 40 mobimba bozalaki koboma banyama na esobe, pe kopesa yango lokola mabonza, kasi ezalaki po na ngai té. 43 Bozalaki komema ndako ya kapo ya nzambe Molok, pe elili ya monzoto ya nzambe na bino Refan. Wana ezali bikeko oyo bino bosalaki po na kosambela. Yango wana, nakomema bino mosika koleka Babilone.' 44 "Tango bakoko na biso bazalaká na esobe, bazalaki na Ndako ya bosantu oyo basalá na kapo, kaka lokola oyo Nzambe alakisaki na Moize. Kuna nde esika babandaki kobomba mabanga oyo bakómá Mibeko. 45 Tango Jozué akómaki motambwisi, bana na bango babotoli mabelé ya bikolo oyo Nzambe abenganaki na miso na bango. Bongo bakotisi Ndako ya bosantu kuna, pe yango etikalaki wana tii na tango ya David. 46 David azwaki bolamu ya Nzambe, pe asengaki nzela ya kotóngela Nzambe ya Jakob esika ya kofanda. 47 Nzokande ezali Salomon moto atóngelaki ye Ndako. 48 "Kasi Nzambe ya Likolo afandaka té na bandako oyo etóngamá na bato. Pamba té profete Ezaya alobaká boye: 49 'Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi, pe mabelé ezali esika na ngai ya kotia makolo. Ndako ya ndenge nini bokoki kotóngela ngai? Esika nini bolingi ngai náya kofanda? 50 Ezali ngai té moto nasalá biloko wana nyonso?' 51 "A, bino, bato ya mitú makasi! Boyokaka pe bokanisaka lokola bato bayebi Nzambe té. Boboyaka Molimo Mosantu bobele ndenge bakoko na bino bazalaká koboya ye. 52 Profete nini bakoko na bino banyokolaki té? Babomaki baoyo bazalaki kosakola 'tè Moto ya bosembo akoya. Bongo tango ye ayaki, bino botekaki pe bobomaki ye. 53 Bino bato bozwaki Mibeko oyo ba-anjelu bamemelaká bakoko, bozalaki kotosa yango té!"

Liwa ya Etiene

54 Tango bato ya Likita-Monene bayoki maloba yango, batomboki pe basiliki mingi na Etiene. "Kasi ye atondi na Molimo Mosantu, atali na Likolo, pe amoni nkembo ya Nzambe; amoni pe Yezu atelemi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. 56 Bongo alobi: "Bóyoka! Namoni Likolo efungwani, pe Mwana ya Moto atelemi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe." 57 Bango nyonso bakangi matoi, bagangi makasi pe bayei kowelela ye; 58 babimisi ye na vile pe babandi kobamba ye mabanga. Ba-temwen bapesaki banzambala na bango na elenge mobali moko, kombo na ye Saul, po ákengela yango. 59 Awa bazalaki kobamba ye mabanga, Etiene abondeli boye: "Nkolo Yezu, yamba molimo na ngai." 60 Akwei na mabolongo pe agangi makasi: "Nkolo, limbisa bango lisumu oyo!" Awa alobi bongo akati motema.

Misala 8

1 Saul pe andimaki 'tè báboma Etiene.

Saul anyokoli bakristo

Kaka na mokolo yango babandi konyokola bato ya eklezya na Yeruzalem makasi penza. Bandimi nyonso bapanzani bipai ya région ya Yuda pe ya Samarie. Bobele bantoma bato batikalaki na Yeruzalem. 2 Bato ya mitema malamu bakundi Etiene pe basaleli ye matanga monene. 3 Nzokande Saul abandaki kotia molende po na koboma eklezya. Azalaki kokende ndako na ndako, po na kokanga bandimi ya mibali ná ya basi, pe kotia bango na boloko.

Filipe asakoli Sango Malamu na Samarie

4 Bongo bandeko oyo bapanzanaki babandi kosakola Sango Malamu na mboka mobimba. 5 Filipe akei na vile ya Samarie, pe abandi kosakola sango ya Mesia. 6 Bato nyonso bazalaki kotia matoi penza na maloba ya Filipe, tango bazalaki koyoka pe komona makamwisi oyo ye azalaki kosala. 7 Pamba té milimo mingi ya mabe ezalaki kobima na bato ya maladi, na koganga makasi. Bato mingi oyo bakufa makolo to maboko babikaki. 8 Boye esengo monene ezalaki na vile wana. 9 Banda kala moto moko azalaki kuna, kombo na ye Simon. Ye amitiaki lokola moto moko ya monene; azalaki kokamwisa bato ya Samarie na misala na ye ya kinganga. 10 Bato nyonso babandaki kondimela ye, ézala bana to bamikolo; bazalaki koloba: "Moto oyo azali na nguya ya Nzambe, oyo bábengaka 'Nguya ya Sukisa'. " 11 Bazalaki kondimela ye, po banda kala azalaki kokamwisa bango na bikilakila na ye. 12 Kasi tango Filipe ayei kosakola Sango Malamu ya bokonzi ya Nzambe pe ya kombo ya Yezu Kristo, mibali ná basi bandimi pe bazwi batisimo. 13 Ye moko pe Simon andimi, bongo azwi batisimo. Azalaki tango nyonso penepene ya Filipe, pe abandaki kokamwa mingi tango azalaki komona makamwisi ya ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalama. 14 Awa bantoma oyo bazalaki na Yeruzalem bayoki 'tè bato ya Samarie bayambi maloba ya Nzambe, batindeli bango Piere ná Yoane. 15 Tango bango bakomi kuna, babondeli Nzambe po bato ya Samarie bázwa Molimo Mosantu. 16 Pamba té Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moko na bango té. Bazwaki bobele batisimo na kombo ya Nkolo Yezu. 17 Bongo Piere ná Yoane batieli bango maboko, pe bazwi Molimo Mosantu. 18 Awa Simon amoni 'tè bazwi Molimo Mosantu tango Piere ná Yoane batielaki bango maboko, alaki bantoma mbongo, 19 alobi: "Bópesa ngai pe nguya oyo, po soki natieli moto maboko, ázwa Molimo Mosantu." 20 Kasi Piere azongiseli ye: "Kende kokufa, yo ná mbongo na yo! Okanisi 'tè okoki kosomba likabo ya Nzambe na mbongo? 21 Ozwi ata ndambo té na bomengo oyo Nzambe akabeli biso, pamba té motema na yo ezali malamu té na miso ya Nzambe. 22 Yango wana bongola makanisi na yo ya mabe, pe bondela Nkolo; tango mosusu akoki kolimbisa makanisi oyo eyeeli yo. 23 Pamba té namoni 'tè motema na yo etondá na likunya, pe okangamá na masumu." 24 Bongo Simon alobi na Piere pe Yoane: "Bino bobondela Nkolo po na ngai, po makambo oyo bolobi ékweela ngai té." 25 Awa basilisi koteya maloba ya Nkolo, bazongi na Yeruzalem. Na nzela basakoli Sango Malamu na bamboka mingi ya Samarie.

Filipe ná mosali ya mokonzi ya Etiopie

26 Mokolo moko anjelu ya Nkolo alobi na Filipe: "Telema pe kita na epai ya esobe ya Yuda, tii okomona nzela oyo elongwá na Yeruzalem pe ekendé na Gaza; landa nzela yango." "Filipe atelemi pe akei. Akutani na moto moko ya mboka Etiopie, ye azalaki mobateli ya mbongo pe ya biloko nyonso ya mama-mokonzi ya Etiopie; ayaki na Yeruzalem po na kosambela, 28 pe azalaki kozonga na mboka na ye. Afandaki na shareti, pe azalaki kotanga mokanda ya profete Ezaya. 29 Molimo Mosantu alobi na Filipe: "Kende pe pusana penepene ya shareti wana." 30 Filipe akei mbangu pe ayoki moto yango azali kotanga mokanda ya profete Ezaya, bongo atuni ye: "Oyebi tina ya makambo ozali kotanga?" 31 Ye azongisi: "Ndenge nini nakoki koyeba yango, soki moto alimboleli ngai té?" Bongo alobi na Filipe ámata na shareti pe áfanda pembeni na ye. 32 Eteni ya mokanda ya Nzambe ye azalaki kotanga, yang'oyo: "Akómaki lokola méme oyo balingi koboma; lokola mwana-meme oyo elelaka té tango bazali kolongola yango bapwale; afungolaki ata monoko té. 33 Basambwisaki ye pe bakatelaki ye etumbu ya liwa; ata moto moko té akoki koloba sango ya bana na ye, pamba té balongolaki ye na mokili." 34 Moto wana ya Etiopie atuni Filipe: "Pardon, yebisa ngai: profete akómá makambo wana po na nani? Akomá po na ye moko to po na moto mosusu?" 35 Bongo Filipe abandi kolimbola maloba yango, pe na ndenge wana ateyi ye Sango Malamu ya Yezu. 36 Awa bazalaki kaka kolanda nzela na bango, bakomi na esika moko ezalaki na mai, pe moto wana alobi: "Tala mai yang'oyo. Eloko nini ezali kopekisa ngai názwa batisimo sik'oyo?" 37 Filipe alobi na ye: "Soki ondimi na motema moko, okoki kozwa batisimo." Ye azongisi: "Nandimi 'tè Yezu Kristo azali Mwana y a Nzambe." 38 Bongo akangi shareti, bakiti bango mibale na mai, pe Filipe abatisi ye. 39 Awa babimi na mai, Molimo ya Nkolo alimwisi Filipe. Moto wana ya Etiopie amonaki ye lisusu té, bongo asimbi nzela, akei na esengo. 40 Kasi Filipe ayei komonana na vile ya Azot, pe akei kosakola Sango Malamu na bamboka nyonso tii tango akómaki na Sezaré.

Misala 9

Nkolo Yezu abongoli Saul motema

1 Saul azalaki kaka kokanela bayekoli ya Nkolo, pe koluka nzela ya kosilisa bango. Akei epai ya nganga-Nzambe monene, 2 pe asengi ye mikanda oyo akopesa na bandako ya losambo ya vue ya Damas. Alingaki kokende kotala, soki akokuta basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, po ákanga bango pe ámema bango na Yeruzalem. 3 Awa azalaki kokende na Damas, kaka na tango akómi penepene ya vile, na mbala moko eloko lokola kake elongwe na Likolo, engengi pe ezipi ye. 4 Akwei na mabelé, pe ayoki mongongo moko elobi na ye: "Saul, Saul, po na nini ozali konyokola ngai?" 5 Ye atuni: "Mokonzi, yo nani?" Pe mongongo yango ezongisi: "Nazali Yezu oyo yo ozali konyokola. 6 Kasi telema, kota na vile, pe kuna moto moko akoyebisa yo makambo osengeli kosala." 7 Bato oyo bazalaki kotambola ná ye batelemi, mayele ya koloba ezalaki té. Bayokaki mongongo kasi bamoni moto té. 8 Saul atelemi pe afungoli miso, kasi akokaki komona té. Basimbi ye na liboko po na komema ye na Damas. 9 Kuna asalaki mikolo misato, azalaki komona té, kolia té pe komela té. 10 Moyekoli moko azalaki na Damas, kombo na ye Ananya. Nkolo abimelaki ye pe abengi ye: "Ananya!" Ye azongisi: "Nkolo, ngai oyo." 11 Nkolo alobi na ye: "Telema, kende na ndako ya Yuda oyo ezali na Balabala Monene, pe luka moto moko ya Tarse kombo na ye Saul. Azali kosambela, 12 pe moto moko kombo na ye Ananya, abimelaki ye; akotaki na ndako pe atielaki ye maboko po ámona lisusu." 13 Ananya azongisi: "Nkolo, bato mingi balo-belaki ngai makambo ya moto wana. Bayebisaki ngai mabe nyonso ye asalaki bato na yo na Yeruzalem. 14 Ayaki awa po bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo basakolaka 'tè bazali bato na yo." 15 Kasi Nkolo alobi na ye: "Kende kaka; ngai moko nasi'naponi ye po ásalela ngai. Akozala mosakoli na ngai epai ya bikolo mosusu ná bakonzi na bango, pe epai ya bato ya Israel. 16 Ngai moko nakolakisa ye ndenge asengeli komona pasi po na kombo na ngai." 17 Bongo Ananya akei, akoti na ndako yango, atieli Saul maboko pe alobi: "Saul, ndeko na ngai, Nkolo Yezu oyo abimelaki yo na nzela atindi ngai, po óbanda komona lisusu pe ótonda na Molimo Mosantu." 18 Na mbala moko biloko lokola poso ya mbisi elongwe na miso ya Saul. Bongo abandi komona lisusu. Atelemi pe azwi batisimo. 19 Tango alei esili, nzoto na ye ezongi makasi.

Saul asakoli na Damas

Saul afandaki mwa mikolo ná bayekoli oyo bazalaki na Damas. 20 Kaka na tango wana abandi kosakola na bandako ya losambo 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe. 21 Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwe pe babandi komituna: "Moto oyo toyokaki ezali ye té? Na Yeruzalem azalaki konyokola bato oyo basakolaka 'tè Yezu azali Nkolo na bango. Ayei awa po na kokanga bandimi, pe komema bango epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe. Ezali boye té?" 22 Kasi Saul azalaki kaka koteya na molende nyonso, pe kolakisa 'tè Yezu azali Mesia; boye Bayuda ya Damas bazangaki maloba ya kozongisa. 23 Na sima ya mwa mikolo Bayuda bayokani po na kobomisa Saul, 24 kasi ye ayei koyeba yango. Butu moi bazalaki kokengela banzela oyo bato bakotelaka na vile, po na koboma ye. 25 Yango wana na butu, bato oyo bandimaki mateya ya Saul bamati ná ye na mir ya lopango monene ya vile, batii ye na kitunga pe bakitisi ye na libanda.

Saul akómi na Yeruzalem

26 Tango Saul akómi na Yeruzalem, aluki nzela ya kosangana ná bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga, po bandimaki té 'tè ye akómi moyekoli. "Bongo Barnabas akamati ye pe amemi ye epai ya bantoma. Alobeli bango ndenge Saul amonaki Nkolo na nzela ya Damas pe ndenge Nkolo asololaki na ye; bongo ayebisi bango ndenge Saul asakolaki na molende na vile ya Damas 'tè Yezu azali Mesia. 28 Banda tango wana Saul atikalaki ná bango na Yeruzalem; kuna pe azalaki kosakola na molende 'tè Yezu azali Nkolo. 29 Asololi pe ná Bayuda oyo bautaki na bamboka ya bapaya pe atiani tembe ná bango. Kasi bango bakomi koluka nzela ya kobomisa ye. 30 Tango bandeko bayoki boye, bamemi Saul na Sezaré pe batindi ye na Tarse. 31 Bongo bato ya Eklezya bakómaki na kimia na Yuda mobimba, na Galilé pe na Samarie; bazalaki kotosa Nkolo na motema moko pe kozwa molende. Molimo Mosantu azalaki kosalisa bango po bákóma ebele.

Piere akei na Lida pe na Jopé

32 Piere azalaki kotambola mboka mobimba; mokolo moko akei kotala bato ya Nkolo oyo bazalaki kofanda na Lida. 33 Kuna amoni moto moko, kombo na ye Ené, alalá na mbeto eleki mbula mwambe, pamba té makolo na ye ezalaki ya kokufa. 34 Piere alobi na ye: "Ené, Yezu Kristo abikisi yo. Telema pe bongisa mbeto na yo." Na mbala moko Ené atelemi. 35 Bato nyonso ya Lida pe ya bapembeni ya Saron bamoni ye pe bandimeli Nkolo Yezu. 36 Moyekoli moko ya mwasi azalaki na vile ya Jopé, kombo na ye Tabita (elingi koloba "mboloko"). Tango nyonso azalaki kosala bato malamu pe kosalisa bato bakelelá. 37 Na mikolo wana azwi maladi pe akufi. Basukoli nzoto na ye pe batii yango na ndako moko likolo ya etaje. 38 Awa bayekoli bayoki 'tè Piere azali na Lida, oyo ezali penepene ya Jopé, batindeli ye bato mibale pe balobi: "Tobondeli yo, yaka noki epai na biso." 39 Piere akei noki nzela moko ná bango. Awa akómi, bamemi ye na ndako wana likolo ya etaje. Basi nyonso oyo bakufelá mibali bazalaki kolela penepene na ye. Balakisi Piere ba-shemize pe bilamba oyo Tabita azalaki kotónga. 40 Piere abimisi bato nyonso, afukami pe asambeli. Abaluki epai ya ebembe pe alobi: "Tabita, telema!" Tabita afungoli miso pe awa amoni Piere, afandi na mbeto. 41 Piere asimbi ye na liboko pe atelemisi ye. Na sima abengi bato ya Nkolo ná basi oyo bakufelá mibali, pe alakisi bango 'tè Tabita azongi na bomoi. 42 Sango wana eyei koyebana na Jopé mobimba, pe bato mingi bakomi kondima Nkolo Yezu. 43 Piere atikalaki mikolo mingi na Jopé, na ndako ya moto moko azalaki kobongisa baposo ya nyama, kombo na ye Simon.

Misala 10

Nzambe atindi anjelu epai ya Korneye

1 Na vile ya Sezaré moto moko azalaki kuna, kombo na ye Korneye, mokonzi ya batayon ya basoda ya Rome, oyo bábengaka "batayon ya Italie". 2 Moto yango azalaki moto malamu. Ye ná bato na ye nyonso bazalaki kotosa Nzambe ya Bayuda. Azalaki kosalisa mingi Bayuda oyo bakelelá, pe kosambela Nzambe tango nyonso. 3 Mokolo moko na ngonga ya misato ya pokwa amoni anjelu moko ya Nzambe abimeli ye. Anjelu akoti na ndako na ye pe alobi na ye: "Korneye". 4 Ye ayoki somo tango amoni anjelu pe atuni ye: "Likambo nini, mokonzi?" Anjelu azongiseli ye: "Nzambe andimi losambo na yo, ná lisalisi oyo opesaka na bato bakelelá; alingi kolakisa yo bolingo na ye. 5 Yango wana tinda bato na Jopé pe bengisa Simon oyo bábengaka Piere. 6 Ye afandi na ndako ya moto moko abongisaka baposo ya nyama, kombo na ye Simon. Ndako na ye ezali penepene ya ebale." 7 Awa anjelu akei, Korneye abengi bato mibale na kati ya basali na ye ná soda moko ya malamu na kati ya basoda oyo baumelá epai na ye; 8 bongo ayebisi bango makambo nyonso oyo elekaki, pe atindi bango na Jopé. 9 Na sima ya mokolo moko, penepene ya midi, tango bango bazalaki na nzela pe balingi kokóma na Jopé, Piere abuti likolo ya ndako po na kosambela. 10 Ayokaki nzala pe azalaki na posa ya kolia. Awa bazalaki kolambela ye bilei, 11 amoni Likolo efungwani pe eloko moko lokola elamba ya monene ezalaki kokita na se; ezalaki lokola basimbá yango na basonge nyonso minei. 12 Na kati etondaki na banyama ya ndenge na ndenge: oyo ezali na makolo minei, banyoka pe bandeke. 13 Mongongo moko elobi na ye: "Piere, telema, borna pe lia." 14 Kasi Piere azongisi: "Té, Nkolo! Nanu naliá eloko ya mbindo té to y a ekila." 15 Mongongo yango elobi na ye lisusu: "Eloko oyo ezali peto na miso ya Nzambe, koloba té 'tè ezali mbindo." 16 Makambo yango esalamaki mbala misato; pe kaka na tango wana eloko yango ezongi na Likolo.

Piere akoti na ndako ya mopaya

17 Awa Piere azalaki komituna po na tina ya makambo oyo Nzambe alakisaki ye, bato Korneye atindaki bayei. Bazalaki koluka ndako ya Simon pe bakomi na porte ya lopango. 18 Babeleli pe batuni: "Simon, oyo bábengaka Piere, afandaka awa?" 19 Piere azalaki kaka komituna po na makambo oyo Nzambe alakisaki ye, bongo Molimo Mosantu alobi na ye: "Bato misato bazali koluka yo. 20 Kita noki pe kende nzela moko ná bango. Kotia tembe té, po ezali ngai moto natindi bango." 21 Bongo Piere akiti pe akei epai ya bato wana; alobi na bango: "Ngai nazali moto oyo bozali koluka. Boyeeli nini?" 22 Bango bazongisi: "Korneye, mokonzi ya basoda, moto atindi biso. Ye azali moto ya bosembo pe asambelaka Nzambe ya Bayuda. Bayuda nyonso balingaka ye. Anjelu moko ya Nzambe ayebisi ye ábengisa yo na ndako na ye, po na koyoka maloba na yo." "Piere akotisi bango na ndako pe apesi bango esika ya kolala. Tongo etani, atelemi pe akei nzela moko ná bango. Bandeko mosusu ya Jopé balandi ye. 24 Na sima ya mokolo moko, Piere akoti na Sezaré. Korneye ná bandeko na ye pe baninga na ye ya motema oyo ye abengisaki, bazalaki kozela bango. 25 Na tango Piere alingaki kokota na ndako, Korneye afukameli ye na botosi nyonso. 26 Kasi Piere atelemisi ye pe alobi: "Telema, pamba té ngai pe nazali kaka moto." 27 Azalaki kaka kosolola ná ye tango akoti na ndako. Awa akuti bato ebele boye basangani, "alobi na bango: "Boyebi 'tè Moyuda akoki kozala esika moko té ná mopaya, to kokota na ndako na ye. Kasi Nzambe alakisi ngai nátika koloba 'tè moto boye azali mbindo to nakoki kozala ná ye té. 29 Yango wana, tango bobengaki ngai, natiaki tembe té, nayei. Nalingi náyeba tina nini bobengisi ngai?" 30 Korneye azongisi: "Eleki mikolo misato penepene na tango oyo, na ngonga ya misato ya pokwa, nazalaki kosambela awa na ndako na ngai. Na mbala moko, moto moko atelemi liboso na ngai, alati bilamba ezali kongenga, 31 pe alobi na ngai: 'Korneye, Nzambe andimi losambo na yo, pe azali kokanisa lisalisi oyo opesaka na bato bakelelá. 32 Bongo tinda bato na Jopé pe bengisa Simon oyo bábengaka Piere, afandi na ndako ya ndoi na ye oyo abongisaka baposo ya nyama. Ndako wana ezali penepene ya ebale.' 33 Kaka na tango wana natindi bato epai na yo, pe nasepeli lokola oyei. Bongo sik'oyo biso nyonso tozali liboso ya Nzambe, po tóyoka nyonso oyo Nkolo atindi óyebisa biso."

Piere amemeli bapaya sango ya Yezu

34 Bongo Piere alobi: "Ya solo, sik'oyo namoni 'tè Nzambe aponaka bilongi té. 35 Kasi na ekolo nyonso, moto oyo atosaka ye pé asalaka makambo ya malonga, Nzambe andimaka ye. 36 Nzambe atindaki maloba na ye na bato ya Israel, ayebisaki bango Sango Malamu ya boboto na monoko ya Yezu Kristo: ye nde moto azali Mokonzi ya bato nyonso. 37 Boyebi makambo oyo ekweyaki liboso na Galilé pe elekaki na région mobimba ya Yuda, sima ya tango Yoane Mobatisi azalaki koteya pe kobatisa bato. 38 Boyebi ndenge nini Nzambe atondisaki Yezu ya Nazaret na nguya ya Molimo Mosantu. Bipai nyonso azalaki koleka, abandaki kosala bolamu pe kobikisa bato nyonso oyo bazali na boumbu ya zabolo. Pamba té Nzambe azalaki na ye. 39 Biso tomonaki makambo nyonso oyo ye asalaki na mboka ya Bayuda pe na Yeruzalem. Babomaki ye na kuruze, 40 kasi na mikolo misato Nzambe ayei kosekwisa ye pe apesi ye nguya ya komimonisa lisusu. 41 Abimelaki bato nyonso té, kasi bobele biso bato Nzambe aponaki po tósakola sango na ye. Tango asi'asekwaki, toliaki esika moko ná ye. 42 Apesaki biso motindo tóyebisa bato ya Israel 'tè: Nzambe aponá ye pe atiá ye Zuzi po ákata makambo ya bato nyonso, ézala ya baoyo bazali na bomoi to baoyo bakufa. 43 Ezali ye nde moto baprofete nyonso bayebisaká 'tè: moto nyonso oyo akondima ye, akozwa bolimbisi ya masumu po na ye."

Molimo Mosantu akiteli bato bazali Bayuda té

44 Awa Piere azalaki kaka koloba, Molimo Mosantu akiteli baoyo nyonso bazalaki koyoka maloba na ye. 45 Bakristo ya Bayuda oyo bayaki ná Piere bakamwe penza, awa bamoni 'tè Nzambe akabeli pe bato ya bikolo mosusu Molimo Mosantu. 46 Pamba té bayoki bango bazali koloba minoko mosusu pe kokumisa Nzambe. Bongo Piere alobi: 47 "Nani akoki kopekisa bato oyo bázwa batisimo, awa bango basi'bazwi Molimo Mosantu lokola biso?" 48 Pe Piere atindi bábatisa bango na kombo ya Yezu Kristo. Bongo bato wana basengi Piere áfanda mwa mikolo esika moko ná bango.

Misala 11

Na Yeruzalem, Piere alimboli makambo elekaki

1 Bantoma ná bandeko oyo bazalaki na région ya Yuda bayokaki 'tè bato ya bikolo mosusu bayambaki maloba ya Nzambe. 2 Tango Piere azongi na Yeruzalem, bakristo ya Bayuda babandi kotiana tembe ná ye, 3 batuni ye: "Po na nini okotaki na ndako ya bato bakatá nzoto té, pe olei esika moko ná bango?" 4 Bongo Piere abandi kolimbolela bango malamu makambo nyonso oyo elekaki, alobi: 5 "Nazalaki na Jopé pe tango nazalaki kosambela, Nzambe alakisi ngai eloko moko lokola elamba ya monene, euti na Likolo pe ekiti na se penepene na ngai; ezalaki lokola basimbá yango na basonge nyonso minei. 6 Natali malamu na kati, pe namoni banyama oyo ezali na makolo minei, banyama ya zamba, banyoka pe bandeke. 7 Kaka na tango wana nayoki mongongo moko elobi na ngai: 'Piere, telema, boma pe lia!' 8 Kasi ngai nazongisi: 'Té, Nkolo! Eloko ya mbindo to ya ekila nanu ekotá na monoko na ngai té.' 9 Bongo mongongo oyo ezalaki kouta na Likolo elobi lisusu: 'Eloko oyo ezali peto na miso ya Nzambe, koloba té 'tè ezali mbindo.' 10 Makambo yango esalamaki mbala misato, pe biloko wana ezongi na Likolo. "Kaka na ngonga wana bato misato batelemi liboso ya ndako epai nazalaki kofanda. Bautaki na Sezaré, bayei koluka ngai. 12 Molimo alobi na ngai nákende ná bango, nátia tembe té. Bandeko motoba oyo bazali awa, bakendeki nzela moko ná ngai na Sezaré, pe biso nyonso tokotaki na ndako ya Korneye. 13 Ye ayebisi biso ndenge amonaki anjelu ya Nzambe atelemi na ndako na ye pe alobi: 'Tinda bato na Jopé po na koluka Simon oyo bábengaka Piere. 14 Akolobela yo maloba oyo ekobikisa yo ná bato na yo nyonso.' 15 Awa nabandi koloba, Molimo Mosantu akiteli bango kaka ndenge akitelaki biso na ebandeli. 16 Bongo nayei kokanisa maloba oyo Nkolo Yezu alobaki: 'Yoane abatisaki bato na mai, kasi bino, bakobatisa bino na Molimo Mosantu.' 17 Boye tembe esili: likabo oyo Nzambe apesi bango, ekokani penza ná oyo apesaki biso, pamba té bango pe bazali kondima Nkolo Yezu Kristo ndenge moko ná biso. E bongo, ngai nazali nani po námeka kopekisa Nzambe?" 18 Awa bayoki makambo wana batiki kotia tembe, bapesi Nzambe mersi, balobi: "Ya solo penza, Nzambe alakisi pe na bato ya bikolo mosusu nzela ya kobongola mitema po bázwa bomoi ya seko."

Eklezya ya Antioshe ya Sirie

19 Tango minyokoli ebimaki likolo ya Etiene, bandimi mosusu bapanzanaki tii na Fenisie, na esanga ya Shipre, pe na Antioshe. Kasi bazalaki kosakola sango ya Yezu kaka na Bayuda. 20 Nzokande bandimi mosusu ya Shipre pe ya Sirène, tango bakomi na Antioshe, babandi koteya bato ya bikolo mosusu Sango Malamu ya Nkolo Yezu. 21 Nguya ya Nkolo ezalaki na bango; boye bato mingi bayaki kondima, pe babandi kolanda Nkolo. 22 Bandeko ya eklezya ya Yeruzalem bayoki sango wana, bongo batindi Barnabas na Antioshe. 23 Tango akómi pe amoni bolamu ya Nzambe, asepeli pe alendisi bango nyonso, po básalela Nkolo na motema moko. 24 Barnabas azalaki moto malamu, atondaki na Molimo Mosantu pe na bondimi. Boye bato mingi bayei lisusu kosangana ná Nkolo. 25 Na sima Barnabas akei na Tarse po na koluka Saul. 26 Awa amoni ye, amemi ye na Antioshe. Bafandaki kuna mbula mobimba na kati ya eklezya, pe bazalaki koteya bato mingi penza. Ezali na Antioshe nde bayekoli bazwaki kombo "bakristo" mbala ya liboso. 27 Na tango wana baprofete balongwe na Yeruzalem pe bakei na Antioshe. "Moko na kati na bango, kombo na ye Agabus, atelemi pe ayebisi na nguya ya Molimo Mosantu 'tè nzala makasi ekongala na mokili mobimba. Yango esalamaki tango Kl ode azalaki mokonzi ya Rome. 29 Bayekoli bazwi mokano 'tè bátinda lisalisi na bandeko ya région ya Yuda, moto na moto na ndenge azwaka. 30 Bongo basali yango, batindeli bambuta-muntu ya Yeruzalem makabo wana, na maboko ya Barnabas pe Saul.

Misala 12

Erode abomi Jake pe akangi Piere

1 Na tango wana mokonzi Erode abandi konyokola bandeko mosusu ya eklezya. 2 Abomisi Jake ndeko ya Yoane na mbeli. 3 Awa amoni 'tè yango esepelisi Bayuda, akangi pe Piere. Makambo wana elekaki na tango ya Feti ya Pake. 4 Atii Piere na boloko, pe apesi ye na maboko ya basoda 16 po bákengelaka ye minei minei, bato na bato na ngonga na bango. Alingaki kosambisa ye liboso ya bato, na sima ya feti. 'Tango Piere azalaki na boloko, bato ya eklezya bazalaki kosambela Nzambe na molende nyonso po na ye.

Piere abimi na boloko

6 Etikalaki mokolo moko po Erode ásambisa Piere. Bongo na butu Piere alali na kati ya basoda mibale. Bakangaki ye na minyololo mibale; pe basoda mibale bazalaki kokengela liboso ya porte ya kasho. 7 Na mbala moko anjelu ya Nkolo ayei pe kasho engengi na ndenge moko ya kokamwa. Anjelu asimbi ye na mopanzi, alamusi ye pe alobi: "Telema noki." Bongo minyololo elongwe na maboko na ye. 8 Na sima anjelu alobi na ye: "Kanga mokaba pe lata sandale na yo." Piere asali bongo pe anjelu abakisi: "Lata kazaka na yo pe landa ngai." 'Piere alandi anjelu tii na libanda. Azalaki koyeba té 'tè makambo oyo anjelu azalaki kosala ezali ya solo: akanisaki 'tè ezali ndoto. 10 Baleki mokengeli ya liboso ná ya mibale, pe bakomi na porte ya bibende ya kobimela na vile. Porte wana efungwani yango moko; babimi, pe tango bazalaki kotambola na balabala, na mbala moko anjelu atiki Piere. 11 Bongo Piere akómi komiyeba alobi: "Sik'oyo namoni 'tè ezali ya solo, Nkolo atindaki anjelu na ye, pe abikisi ngai na maboko ya Erode pe na mabe nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai." 12 Awa amoni esika akómi, akei na ndako ya Maria, mama ya Yoane Marko. Bato mingi basanganaki wana pe bazalaki kosambela. 13 Piere abéti ndako pe mosali moko ya mwasi, kombo na ye Rode, ayei po na kofungola. 14 Awa ayoki mongongo ya Piere, akei mbangu na esengo koyebisa bandeko 'tè Piere azaU libanda ... kasi abosani kofungola porte! 15 Bango balobi na ye: "Yo ozali na liboma!" Kasi ye atii kaka molende pe alobi: "Ezali ya solo penza." Bango balobi: "Ezali anjelu oyo abatelaka ye." 16 Nzokande Piere azalaki kaka kobeta ndako. Awa bafungoli porte, bamoni ye pe bakamwe penza. 17 Piere asali elembo na liboko po báfanda nyee, pe alobeli bango ndenge Nkolo abimisi ye na boloko. Alobi lisusu: "Bóyebisa makambo oyo na Jake pe na bandeko nyonso." Na sima abimi pe akei epai mosusu. 18 Tongo etani, mobulu ebimi na kati ya basoda; bakomi komituna epai Piere akei. 19 Erode atindi bato po na koluka ye, kasi bazwi ye té. Asambisi basoda pe apesi mitindo báboma bango. Na sima alongwe na région ya Yuda pe akei kofanda mwa mikolo na Sezaré.

Liwa ya Erode

20 Na tango wana Erode asilikaki makasi penza na bato ya Tir ná Sidon; bongo bango bazwi mokano ya kotinda bato oyo bakoki kosenga boboto epai na ye. Pamba té ba-vile na bango ezalaki kozwa bilei na mboka na ye. Bato yango bayokanaki na Blastus, oyo azalaki motambwisi ya misala na ndako ya mokonzi. 21 Awa mokolo Erode atiaki ekoki, alati bilamba na ye ya bokonzi pe afandi na kiti na ye. Tango azalaki kosopela bango maloba, 22 bato babandi koganga: "Mokonzi, toyoki maloba na yo. Ozali moto té, ozali moko ya banzambe!" 23 Kasi kaka na tango wana, anjelu ya Nkolo apesi Erode etumbu, po azangaki kokumisa Nzambe, na ndenge andimaki bábenga ye nzambe. Bankusu elei ye bongo akufi. 24 Nzokande maloba ya Nkolo ezalaki kaka kopanzana, pe bandimi bakomi ebele.

Batindi Barnabas ná Saul na mobembo (I)

25 Tango Barnabas ná Saul basilisi kopesa makabo ya bandeko na maboko ya bambuta-muntu ya Yeruzalem, balongwe kuna pe bamemi Yoane Marko.

Misala 13

1 Na kati ya eklezya ya Antioshe ezalaki na baprofete pe bateyi: Barnabas, Simeon oyo bábengaka Moto Mwindu, Lusius ya Sirène, Manaen oyo akolaki esika moko ná Erode motambwisi ya Galilé, pe Saul. 2 Mokolo moko na tango bazalaki kosambela pe komilalisa nzala, Molimo Mosantu alobi na bango: "Bóponela ngai Barnabas ná Saul po básala mosala oyo nabe-ngelaki bango." 3 Bongo bamilalisi nzala, basambeli pe batieli Barnabas ná Saul maboko; sima na yango batiki bango bákende.

Na esanga ya Shipre

4 Lokola Molimo Mosantu atindi Barnabas ná Saul, bakomi na libongo ya Selesie; kuna bakoti na masuwa pe bakei na esanga ya Shipre. 5 Tango bakomi na Salamine babandi kosakola maloba ya Nzambe na bandako ya losambo ya Bayuda. Yoane Marko pe azalaki kosalisa bango. 6 Batamboli esanga mobimba, bakomi na Pafos. Kuna bamoni Moyuda moko azalaki nganga-kisi pe amitiá profete, kombo na ye Bar-Yezu. 7 Azalaki kofanda epai ya motambwisi ya esanga, moto moko ya mayele, kombo na ye Sergius Polus; ye abengisi Barnabas ná Saul po azalaki na posa ya koyoka maloba ya Nzambe. 8 Kasi nganga-kisi wana Elimas (kombo yango elakisi: nganga) abandi kotiana tembe ná bango, pe ameki kopekisa Sergius Polus po ándima té. 9 Kaka na tango wana Molimo Mosantu akiteli Saul (kombo na ye ya grek Polo); bongo ye atali nganga-kisi nyee 10 pe alobi: "Yo moto otondá na mayele mabe pe na lokuta, moninga ya zabolo, monguna ya makambo nyonso ya malamu! Okotika té kobebisa banzela ya malamu ya Nkolo? 11 Sik'oyo yoka! Nkolo akopesa yo etumbu; miso na yo ekokufa pe okomona lisusu moi té tii mokolo ye akolinga." Na mbala moko miso na ye ekufi, akómi komona bobele molili, pe abandi kobalukabaluka po na koluka moto oyo akoki kosimba ye na liboko. 12 Tango Sergius Polus amoni makambo oyo elekaki, andimi, pamba té akamwaki mingi po na mateya y a Nkolo.

Polo ná Barnabas basakoli na Antioshe ya Pizidie

13 Polo ná baninga na ye bakoti na masuwa na Pafos pe bakei na Perje ya Pamfilie. Yoane Marko atiki bango kuna pe azongi na Yeruzalem. 14 Balandi mobembo na bango, balongwe na Perje pe bakomi na Antioshe ya Pizidie. Na Mokolo ya Kopema bakoti na ndako ya losambo pe bafandi. 15 Sima ya kotanga mikanda ya Mibeko pe ya baprofete, bakonzi ya ndako ya losambo batindi bato po bákende koloba na bango: "Bandeko, soki bozali na maloba ya kolendisa bato, bóloba." 16 Polo atelemi, asali elembo na liboko po bato báfanda nyee, pe alobi: "Bato ya Israel pe bino bato bosambelaka Nzambe na biso, bóyoka! 17 Nzambe ya ekolo na biso Israel aponaká bakoko na biso. Tango bazalaki na Ejipte, Nzambe akomisaki bango ekolo monene pe abimisaki bango kuna na nguya na ye. 18 Asalisaki bango mbula 40 mobimba na esobe. 19 Abomaki bikolo sambo na Kanán pe apesaki mabelé na bango na bato na ye. 20 Nyonso wana esali mbula 450. "Na sima na yango apesaki bakoko na biso bazuzi tii na tango ya profete Samuel. 21 Na eleko wana basengi Nzambe ápesa bango mokonzi, pe ye aponeli bango Saul, mwana ya Kish, moto ya libota ya Benjamen. Ye asalaki bambula 40 na bokonzi; 22 sima, Nzambe alongoli ye, pe atii David ázala mokonzi na bango. Alobaki boye po na ye: 'Naponi David, mwana ya Jesé, nasepeli na ye mingi. Ye akosala makambo nyonso oyo ngai nalingi.' 23 Bongo na eleko na biso atiaki moto moko ya libota ya David ndenge alakaká; moto yango ezali Yezu, Mobikisi ya bato ya Israel. 24 Liboso 'tè Yezu áya, Yoane Mobatisi asakolaki pe abengaki bato nyonso ya Israel po bábongola mitema pe bázwa batisimo. "Tango Yoane alingaki kosilisa mosala na ye, alobi: 'Moto oyo bino bozali kokanisa, ezali ngai té. Kasi ye azali koya sima na ngai. Nakoki kutu té kofungola basinga ya sandale na ye.' 26 "Bino bandeko, bana ya Abraham, ná bino bato bosambe-laka Nzambe na biso, bóyoka. Nzambe atindeli biso maloba oyo po tóbika. "Nzokande bato ya Yeruzalem pe bakonzi na bango bayebaki Yezu té; bayebaki pe tina ya mikanda ya baprofete té, oyo batangaka Mikolo nyonso ya Kopema. Kasi bakokisaki makambo yango tango basambisaki Yezu. 28 Atako bamonaki tina ya kokatela ye etumbu ya liwa té, basengaki na Pilate ábomisa ye. 29 Awa basilisi makambo oyo ekómamá po na ye, balongoli ye na kuruze pe bakundi ye. 30 Kasi Nzambe asekwisi ye. "Mikolo mingi Yezu abimelaki bato oyo bazalaká ná ye banda Galilé tii na Yeruzalem. Pe atindaki bango báyebisa bato ya Israel makambo nyonso wana. 32 "Biso toyeeli bino Sango oyo ya Malamu: Nzambe akokisi makambo alakaká na bakoko na biso. 33 Akokisi yango sik'oyo po na biso bana na bango; asekwisi Yezu ndenge ekómamá na nzembo ya mibale: 'Ozali mwana na ngai, ngai moto naboti yo lelo.' 34 Ya solo, asekwisi ye po ábeba ata mokolo moko té; pamba té alobaká boye: 'Nakokokisela bino po na seko elaka ya bosantu oyo napesaká na David.' 35 Yango wana, bakómá pe esika mosusu: 'Okolinga té 'tè ngai moto na yo nábeba.' KNa bomoi na ye, David asalaka makambo oyo Nzambe azalaki kolinga. Tango akufaki, bakundaki ye esika moko ná bakoko na ye, pe nzoto na ye epolaki. 37 Kasi moto oyo Nzambe asekwisaki, apolaki té. 38 "Bongo, bandeko, bóyeba malamu 'tè: Nzambe azali kolimbisa masumu ya bato po na Yezu. Mibeko ya Moize ekokaki kokómisa bino bosembo té na miso ya Nzambe; 39 kasi moto nyonso oyo andimi Yezu, akómi bosembo po na ye. 40 Yango wana bókeba, po makambo oyo baprofete bayebisaká, ékweela bino té: 41 'Botala, bino bato bomonelaka Nzambe; bókamwa pe bókima! Na eleko na bino nakosala likambo moko, oyo soki bayebisi bino, bokondima té.' " 42 Tango Polo ná Barnabas babimi na ndako ya losambo, bato basengi bango baya lisusu na Mokolo ya Kopema ekoya, po bázongela mateya wana. 43 Tango bato bapanzani, bato ebele, ézala Bayuda to bapaya oyo básambelaka Nzambe ya Israel, balandi Polo ná Barnabas. Bongo bantoma balendisi bango, bákangama kaka na bolamu oyo Nzambe asalaki epai na bango. 44 Na Mokolo ya Kopema elandaki, vile mobimba eyei kosangana po na koyoka maloba ya Nzambe. 45 Awa Bayuda bamoni ndenge bato batondanaki, bayoki likunya mingi, babandi kotia tembe na maloba ya Polo pe kofinga ye. 46 Bongo Polo ná Barnabas bazongiseli bango na molende nyonso, balobi: "Esengeli kosakola maloba ya Nzambe liboso epai na bino, kasi boboyi yango pe bozali komibongisa té po na kozwa bomoi ya seko. Yango wana tokokende epai ya bikolo mosusu. 47 Pamba té Nkolo atindaki biso boye: 'Natindi yo lokola moi po na bikolo nyonso, na tina 'tè bato ya mokili mobimba bábika.' " 48 Awa bato ya bikolo mosusu bayoki boye basepeli pe babandi kokumisa maloba ya Nkolo. Bato nyonso Nzambe aponaki po na kozwa bomoi ya seko, bakomi kondima yango. 49 Maloba ya Nkolo epanzanaki na mboka yango mobimba. 50 Kasi Bayuda bapesi toli ya mabe na bato minene ya vile wana, pe na basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe ya Israel. Bongo babandi konyokola Polo ná Barnabas pe babengani bango na vile na bango. 51 Tango babimi na vile, bantoma balakisi bato wana mabe oyo basali, bapupoli makolo po bámema pusiere ya mboka yango epai mosusu te; bongo bakei na Ikonium. 52 Nzokande bayekoli batondaki na esengo pe na Molimo Mosantu.

Misala 14

Polo ná Barnabas na Ikonium

1 Na Ikonium, Polo ná Barnabas bakoti lisusu na ndako ya losambo ya Bayuda. Maloba na bango esepelisaki bato, bongo Bayuda ná bato ya bikolo mosusu ebele bakomi kondima. 2 Kasi Bayuda oyo baboyaki kondima bapesi toli ya mabe na bato ya bikolo mosusu, po bázwela bandeko makanisi ya mabe. 3 Ata bongo, Polo ná Barnabas bafandaki mingi na Ikonium. Nguya ya Nkolo epesi bango molende. Nkolo amonisi 'tè makambo oyo bazalaki kosakola po na bolamu na ye ezali ya solo, pamba té apesi bango nguya ya kosala makamwisi ya ndenge na ndenge. 4 Bato ya vile wana bayei kokabwana; bamosusu bakei epai ya Bayuda, bamosusu epai ya bantoma. 5 Bongo Bayuda pe bato ya bikolo mosusu ná bakonzi na bango, babandi komilengela po na konyokola Polo ná Barnabas pe koboma bango na mabanga. 6 Awa Polo ná Barnabas bayoki boye, bakimi na mboka Likaonie, na vile ya Listre, Derbe, pe na bapembeni na yango. 7 Kuna babandi kosakola Sango Malamu.

Na Listre babambi Polo mabanga

8 Na Listre ezalaki na moto moko akufá makolo; banda abotamá nanu atambolá té. 9Azalaki koyoka maloba ya Polo. Polo atali ye nyee pe amoni 'tè azali na bondimi po na kobika, 10 bongo alobi na mongongo makasi: "Telema, tanda makolo na yo." Moto wana apumbuki pe abandi kotambola. 11 Tango bato bamoni makambo Polo asali, bagangi na monoko ,na bango ya mboka: "Banzambe ezwi nzoto ya bato pe ekiteli biso." 12 Balobi Barnabas azali nzambe monene "Zeus", pe Polo "Ermes", pamba té Polo moto azalaki kosakola. 13 Ndako oyo básambelaka nzambe Zeus ezalaki liboso ya esika bakotelaka na vile. Nganga ya Zeus amemi bangombe ya mibali kuna, ná ba-flere. Balingaki kobome-la yango bantoma, ndenge bamesaná kokumisa banzambe. 14 Awa Barnabas ná Polo bayoki boye, somo esali bango, bapasoli bilamba na bango, bakei mbangu epai ya bato pe babeleli: 15 "Baninga! Bozali kosala nini? Biso tozali bato lokola bino. Toyeeli bino Sango Malamu, po bótika makambo oyo ya bozoba, pe bóya epai ya Nzambe ya bomoi oyo asalá Likolo na se, ebale pe biloko nyonso ezali na kati. 16 Na tango ya kala ye atikaká bato ya bikolo nyonso bálanda banzela na bango moko. 17 Kasi ata bongo, azangaka té kolakisa bolamu na ye. Anokiselaka bino mbula oyo eutaka epai na ye na Likolo, pe apesaká bino bambuma na tango na yango, pe bilei oyo esepelisaka mitema na bino." 18 Atako bantoma balobaki boye, bamonaki pasi po na kopekisa bato bápesa bango mabonza té. 19 Nzokande na tango wana Bayuda mosusu bautaki na Antioshe ya Pizidie pe na Ikonium, bapesi bato toli ya mabe. Babambi Polo mabanga, sima na yango babendi ye pe babimisi ye na vile, po bakanisaki 'tè akufi. 20 Kasi tango bayekoli bayei kozinga ye, atelemi pe azongi na vile. Tongo etani, akei na Derbe ná Barnabas.

Bazongi na Antioshe ya Sirie

21 Bongo Polo ná Barnabas basakoli Sango Malamu na Derbe, pe bazwi bayekoli mingi kuna. Sima bazongi lisusu na Listre, na Ikonium, pe na Antioshe ya Pizidie. ^Balendisi mitema ya bayekoli, po bákangama kaka na bondimi. Balobi na bango: "Tosengeli komona pasi mingi po na kokóma bato ya mboka ya Nzambe." 23 Na eklezya moko moko babandi kopona bambuta-muntu, bazalaki kobondela pe komilalisa nzala, bongo batiki bango na maboko ya Nkolo oyo bango bandimaki. 24 Sima na yango bakatisi mabelé ya Pizidie pe bakomi na Pamfilie. "Basakoli maloba ya Nzambe na Perje pe bakei na libongo ya Atalie. 26 Bongo bakoti na masuwa po na kokende na Antioshe, pamba té kuna nde esika bandimi babondelaki Nzambe ábatela bango na bolamu na ye, pe batindaki bango mosala oyo bauti kosilisa sik'oyo. 27 Tango bakomi na Antioshe, basangisi bato ya eklezya pe balakisi bango makambo nyonso Nzambe asalaki na bango, pe ndenge afungolaki nzela ya bondimi na bato ya bikolo mosusu. 28 Baumelaki mikolo mingi esika moko ná bayekoli.

Misala 15

Bakonzi ya Eklezya basangani na Yeruzalem

1 Bato mosusu bautaki na région ya Yuda, bayei na Antioshe pe babandi koteya bandeko boye: "Bokoki kobika té, soki bakati bino nzoto té ndenge Mibeko ya Moize ezalj kotinda." 2 Polo ná Barnabas baboyi mateya yango pe babandi kotiana tembe penza ná bato wana. Lokola likambo eyaki ndongo, bandeko bazwi mokano 'tè Polo ná Barnabas pe bandimi mosusu ya Antioshe bákende na Yeruzalem epai ya bantoma pe bambuta-muntu, po na kobongisa makambo wana. 3 Bongo bandeko ya eklezya ya Antioshe bakei kotika bango na nzela. Polo ná Barnabas bakatisi Fenisie pe Samarie; bayebisi bipai nyonso ndenge bato ya bikolo mosusu bayaki kobongola mitema; sango yango esepelisaki penza bandeko nyonso. 4 Tango bakomi na Yeruzalem, eklezya mobimba ná bantoma pe bambuta-muntu bayambi bango. Polo ná Barnabas bayebisi bango makambo Nzambe asalaki na maboko na bango. 5 Kasi bato mosusu ya lingomba ya ba-Farizé oyo bandimaki, batelemi pe balobi: "Esengeli 'tè bákata bandimi ya bikolo mosusu nzoto, pe bátinda bango bábanda kotosa Mibeko ya Moize." 6 Bantoma pe bambuta-muntu basangani po na kotala likambo wana. 7 Awa baumeli po na kotiana tembe, Piere atelemi pe alobi: "Bandeko, boyebi ndenge Nzambe aponaki ngai kala, awa na kati na bino. Ngai moko nabandaki kosakola Sango Malamu na bato ya bikolo mosusu, pe bango bazalaki kondima. 8 Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki 'tè ayambi bango; apesi bango Molimo Mosantu ndenge apesaki biso, 9 akesenisi biso ná bango té. Nzambe akómisi mitema na bango pembe po bandimi Sango Malamu. 10 Bongo sik'oyo, po na nini bozali komeka Nzambe, na ndenge bolingi komemisa bayekoli mokumba oyo bakoko na biso to biso moko tokokaki komema té? "Ezali ya solo: tondimi 'tè tobiki po na bolamu ya Nkolo Yezu, ndenge moko ná bango." 12 Bongo bato nyonso oyo basanganaki bafandi nyee. Bayokaki Barnabas ná Polo balobeli bango makambo nyonso oyo bango basalaki na nguya ya Nzambe na kati ya bikolo mosusu. 13 Sima na bango, Jake atelemi pe alobi: "Bandeko, bóyoka ngai! 14 Simon alakisi ndenge uta ebandeli Nzambe akotelaki bikolo mosusu po na kopona bato na ye na kati na yango. 15 Makambo wana ekokani ná maloba ya baprofete, pamba té ekómamá boye: 16 'Nkolo alobi: Sima ya makambo wana nakozongela bino. Libota ya David ekómi lokola ndako ebukaná, nakotónga yango lisusu, nakotelemisa ba-mir na yango. 17 Boye bato oyo batikali bakobanda koluka ngai, esika moko na bikolo nyonso oyo nalobi 'tè ezali ya ngai. 18 Ngai Nkolo moto nalobi boye, pe nakosala yango; nasi'nalobá yango uta kala.' " 19 Bongo Jake asukisi boye: "Namoni 'tè tokoki té kotungisa bato ya bikolo mosusu oyo bandimeli Nzambe. 20 Nzokande tokómela bango kaka mokanda boye: 'Nyama oyo bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, bólia yango té, ezali ekila; mabala oyo Mibeko ezali kopekisa, bóboya yango; banyama oyo babomi na kofina kingo pe ná makila nyonso, bólia yango té.' 21 Pamba té banda kala bateyaka Mibeko ya Moize na bamboka nyonso, pe batangaka yango na kati ya bandako ya losambo na Mikolo nyonso ya Kopema."

Batindeli bandimi ya Antioshe mokanda

22 Bongo bantoma pe bambuta-muntu bayokani ná bato nyonso ya eklezya, bazwi mokano ya kopona bato mosusu na kati na bango po bátinda bango na Antioshe nzela moko ná Polo pe Barnabas. Baponi Yuda oyo bábengaka Barsabas, ná Silas. Bango mibale bazalaki bato ya lokumu na kati ya bandeko. 23 Bapesi bango mokanda, pe na kati bakómá boye: "Bandeko oyo bobo-tamá Bayuda té, pe bofandaka na Antioshe, na Sirie pe na Silisie, bóyamba mbote euti na biso bandeko na bino bantoma pe bambuta-muntu. 24 Toyokaki 'tè bato mosusu oyo bautaki epai na biso batungisaki bino pe balobelaki bino makambo oyo ekomisi mitema na bino likolo; nzokande biso totindaki bango té. 25 Yango wana biso nyonso toyokani po na kopona bato, baya epai na bino nzela moko ná bandeko na biso ya bolingo Barnabas pe Polo, 26 oyo bamipesi mobimba po na Nkolo na biso Yezu Kristo. 27 Bongo totindeli bino Yuda ná Silas, bango bakolobela bino kaka ndenge tokómi na mokanda oyo. 28 Molimo Mosantu pe biso moko tolingi kopesa bino mikumba mosusu té, bobele makambo ya minene oyo: 29 Banyama bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, to oyo babomi na kofina kingo pe ná makila nyonso, bólia yango té; pe bóboya mabala oyo Mibeko ezali kopekisa. Soki botiki makambo oyo, wana nde bosali malamu. Bótikala malamu." 30 Bongo batiki Yuda ná Silas, pe bango bakei na Antioshe. Kuna basangisi bandimi pe bapesi bango mokanda. 31 Awa bandeko batangi yango basepeli, po mokanda wana eyeeli bango molende. 32 Yuda ná Silas bazalaki pe baprofete, balobaki mingi po na kolendisa bandeko pe kopesa bango makasi. 33 Na sima ya mwa tango moke bandeko batiki bango bázonga na boboto epai ya bato oyo batindaki bango. 34 Kasi Silas azwi mokano ya kotikala wana.35 Polo ná Barnabas batikali na Antioshe. Bazalaki koteya pe kosakola maloba ya Nkolo.

Polo ná Barnabas bakábwani

36 Na sima ya mikolo Polo alobi na Barnabas: "Tózonga na vile moko moko oyo toteyaki maloba ya Nkolo, po tótala bandeko soki bazali malamu." 37 Barnabas alingaki komema Yoane oyo bábengaka Marko. 38 Kasi Polo aboyi, po ye atikaki bango na Pamfilie pe apesaki bango maboko té.

Polo amemi Silas pe Timoté na mobembo (II)

39 Polo ná Barnabas baswani mingi pe bakábwani. Barnabas akamati Marko, akoti na masuwa pe akei na esanga ya Shipre. 40 Polo aponi Silas, pe bandeko babondeli Nkolo ábatela bango na bolamu na ye, bongo bakei. 41 Akatisi Sirie ná Silisie pe alendisi bandeko ya ba-eklezya wana.

Misala 16

1 Polo akómi na Derbe, na sima akei na Listre. Moyekoli moko azalaki kuna, kombo nayeTimoté.Mama naye azalaki Moyuda oyo akómi mokristo, pe tata na ye azalaki Moyuda té. 23 Polo alingaki komema Timoté, pamba té bandeko oyo bazalaki kofanda na Listre pe na Ikonium bayebisi ye 'tè Timoté azali moto malamu. Akati ye nzoto po áluka matata té epai ya Bayuda oyo bazalaki na bamboka wana; pamba té bango nyonso bayebaki 'tè tata na ye azali Moyuda té. 4 Na ba-vile oyo bazalaki koleka, babandaki koyebisa na bandimi mibeko oyo bantoma pe bambuta-muntu ya Yeruzalem bapesaki, pe batindi bango bátosa yango. 5 Bipai nyonso ba-eklezya ezalaki kokola; bondimi ekómaki makasi, pe mokolo na mokolo bato bazalaki kobakisama.

Molimo Mosantu atindi Polo na Masedwane

6 Polo ná Silas bakatisi mabelé ya Frijie pe ya Galatie, pamba té Molimo Mosantu apekisi bango básakola Sango Malamu na région ya Efeze. 7 Tango bakomi penepene ya Mizie, bameki kokende na Bitinie, kasi Molimo ya Yezu apesi bango nzela té. 8 Bongo bakatisi Mizie pe bakomi na libongo ya Troas 9 Na butu, Nzambe alotisi Polo ndoto: Amoni moto moko ya Masedwane abimeli ye, atelemi pe abondeli ye boye: "Leka na Masedwane, yaka kosalisa biso." 10 Awa Polo amoni boye, toumeli té, toluki ndenge nini tokoki kokende na Masedwane; pamba té totiaki mitema 'tè Nzambe abengi biso po na komemela bato ya mboka wana Sango Malamu.

Na Filipi, Lidie andimeli Nkolo

11 Tokoti na masuwa na Troas, toumelaki na nzela té. Tokei tii na esanga ya Samotrase, pe na sima ya mokolo moko, tokómi na Neapolis. 12 Tolongwe kuna, tokei na Filipi; yango ezali vile monene ya Masedwane; bato bafandaka kuna bazali ba-citoyen ya Rome. Tosalaki mikolo mingi na vile wana. 13 Na Mokolo ya Kopema, tobimi na vile, tokei penepene ya ebale, pamba té tokanisaki 'tè Bayuda basanganaka kuna po na kosambela. Tofandi pe toteyi maloba ya Nzambe na basi oyo bayaki wana. 14 Mama moko ya vile ya Tiatire, kombo na ye Lidie, azalaki koyoka biso. Ye abandaki kosala mombongo ya bilamba ya talo mingi. Azalaki kosambela Nzambe ya Bayuda. Nkolo afungoli mayele na ye po áyoka malamu maloba ya Polo. 15 Awa ye ná bato bafandaka na ndako na ye bazwi batisimo, abondeli biso boye: "Soki bomoni 'tè nandimi Nkolo Yezu ya solo, bóya kofanda na ndako na ngai." Pe atii biso molende po tóndima.

Polo ná Silas na boloko

16 Mokolo moko tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutani ná elenge mwasi ya moumbu; ye azalaki na molimo moko ya mabe oyo ebandaki kolakisa ye makambo ekoya sima. Bakolo na ye bazalaki kozwa mbongo mingi po na mosala na ye. 17 Mwasi yango abandi kolanda biso ná Polo, pe azalaki koganga boye: "Bato oyo bazali basali ya Nzambe ya Likolo, bazali kolakisa biso nzela ya kobika!" 18 Asalaki bongo mikolo mingi. Yango wana Polo alembi, abaluki pe alobi na molimo yango: "Natindi yo na kombo ya Yezu: Bima na mwasi oyo." Pe molimo ebimi kaka na tango wana. 19-20 Awa bakolo na ye bamoni 'tè bakoki kozwa lisusu mbongo té, bakangi Polo ná Silas, bamemi bango esika zando ezalaki, liboso ya batambwisi ya vile, balobi: "Bato oyo bazali kotia mobulu na mboka na biso. Bazali Bayuda, 21 pe bazali koteya bizaleli oyo biso ba-citoyen ya Rome tokoki kondima té to kosalela." 22 Bato nyonso batombokeli Polo ná Silas. Bakonzi batindi bálongola bango bilamba pe bábeta bango fimbu. 23 Awa batutituti bango, babwaki bango na boloko pe batindi mokonzi ya boloko átala bango malamu. 24 Yango wana ye atii bango na kasho, pe akangisi bango makolo na mabaya ya minene. 25 Penepene na midi ya butu, Polo ná Silas bazalaki kosambela pe koyembela Nzambe. Bato mosusu ya boloko bazalaki koyoka bango. 26 Na mbala moko mabelé ebandi koningana makasi penza, kutu ndako mobimba elingaki kobukana. Kaka na tango wana baporte nyonso ya boloko efungwani, pe minyololo ya bato nyonso ya boloko ekatani. 27 Mokonzi ya boloko alamuki. Awa amoni 'tè baporte ya boloko efungwani, abimisi mbeli na ye pe alingi komiboma; pamba té akanisaki 'tè bato nyonso ya boloko bakimi. "Kasi Polo agangi na mongongo makasi: "Komiboma té! Biso nyonso tozali awa." 29 Bongo mokonzi ya boloko asengi mwinda, akoti mbangu na kasho pe afukameli Polo ná Silas na kolenga nyonso. 30 Abimisi bango na libanda pe alobi: "Batata, násala nini po nábika?" 31 Bango bazongiseli ye: "Ndima Nkolo Yezu, bongo okobika, yo ná bato nyonso ya fami na yo." 32 Boye ye abengi bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye, pe Polo ná Silas babandi koteya bango maloba ya Nzambe. 33 Kaka na ngonga wana na kati ya butu, mokonzi ya boloko amemi bango pe asukoli bapota na bango. Sima azwi batisimo ná bato na ye nyonso. 34 Akotisi Polo ná Silas na ndako na ye, apesi bango bilei, pe asepelaki mingi ye ná bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye, po bakómaki kondima Nzambe. 35 Tongo etani, batambwisi ya vile batindi bato po báloba na mokonzi ya boloko: "Tika bato wana." 36 Ye ayei koyebisa yango na Polo, alobi: "Bakonzi batindi 'tè nátika bino. Bongo bóbima na bino pe bókende malamu." 37 Kasi Polo alobi na bato oyo bakonzi batindaki: "Tosambi ata kosamba té, babeti biso na miso ya bato nyonso, nzokande biso tozali ba-citoyen ya Rome. Babwaki biso na boloko, bongo sik'oyo balingi kobimisa biso na kobombama. Ekoki kosalama bongo ata moke té. Malamu bango moko baya kobimisa biso." 38 Bato wana bakei koloba makambo yango na bakonzi. Tango bango bayoki 'tè Polo ná Silas bazali ba-citoyen ya Rome babangi. 39 Bayei kosenga bango pardon, babimisi bango na boloko pe babondeli bango bálongwa na Filipi. 40 Tango Polo ná Silas babimi na boloko bakei kotala Lidie. Kuna bakuti bandeko, balendisi bango pe baleki.

Misala 17

Na Tesalonike

1 Bakatisi vile ya Amfipolis ná Apolonie pe bakomi na Tesalonike, esika ndako ya losambo ya Bayuda ezalaki. 2 Polo akoti kuna ndenge amesaná. Mikolo misato ya Kopema abandi kolimbolela bango Mikanda ya Nzambe, 3 alakisi bango polele 'tè Mesia asengelaki konyokwama, kokufa pe kosekwa. Alobi na bango: "Yezu oyo nazali koteya bino ye nde Mesia." 4 Bato mingi na kati na bango bayei kosangana na Polo ná Silas, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu oyo básambelaka Nzambe ya Israel, na pe basi mingi ya lokumu. 5 Kasi Bayuda bayoki likunya, bakamati bato ya mabe oyo batelenganaka na ba-balabala, basali likita pe bakotisi mobulu na kati ya mboka. Bakei na ndako ya Jazon, baluki Polo ná Silas po na kosambisa bango na miso ya bato nyonso. 6 Lokola bazwaki bango té, bakangi Jazon ná bandeko mosusu, bamemi bango epai ya bakonzi ya vile, pe babandi koganga boye: "Bato wana bakotisi mobulu na mokili mobimba! Sik'oyo bakomi awa, 7 pe Jazon ayambi bango na ndako na ye. Bango nyonso baboyi kotosa mibeko ya mokonzi ya Rome, pamba té bazali koloba 'tè mokonzi mosusu azali, kombo na ye Yezu." 8 Maloba oyo epesi kanda na bato nyonso, ézala kutu na bakonzi ya vile. 9 Bongo bafutisi Jazon ná bandeko na ye mbongo ya garanti, na sima batiki bango.

Na Beré

10 Tango butu ekómi, bandeko batindi Polo ná Silas, bákende noki na Beré. Awa bakomi kuna, bakoti na ndako ya losambo ya Bayuda. 11 Nzokande Bayuda ya Beré bazalaki bato ya boboto koleka baoyo ya Tesalonike. Bayambi mateya ya bantoma na mitema malamu, pe mokolo na mokolo bazalaki kotanga Mikanda ya Nzambe, po na koyeba soki makambo balobeli bango ezali ya solo. 12 Bongo bato mingi na kati na bango bandimaki, na pe bato mingi ya lokumu oyo babotamá Bayuda té, ézala basi to mibali. 13 Kasi tango Bayuda ya Tesalonike bayoki 'tè Polo azali kosakola maloba ya Nzambe na Beré, balandi kuna pe babandi lisusu kosala nyonso po bato bátomboka. 14 Bongo bandeko bakei kotika Polo noki epai ya ebale, kasi Silas ná Timoté batikalaki wana. 15 Bato oyo bamemaki Polo bakei na ye tii na Atene, na sima bazongi na Beré. Bayebisi Silas ná Timoté bálanda Polo noki.

Polo na Atene

16 Tango Polo azalaki kozela bango na Atene, ayoki mawa mingi penza na ndenge amoni 'tè vile yango etondi na bikeko ya banzambe. 17 Yango wana akei na ndako ya losambo, pe abandi koteya Bayuda ná bato nyonso oyo básambelaka Nzambe ya Israel. Pe mikolo nyonso na zando azalaki koteya bato oyo abandaki kokuta kuna. 18 Bateyi mosusu bazalaki wana, oyo balandaka makanisi ya Epikire pe ya Zenon; babandi kotiana tembe ná Polo. Kasi bato mosusu baseki ye balobi: "Esopa oyo alingi koloba nini?" Bamosusu balobi: "Azali koteya lokola mosakoli ya banzambe ya bapaya." Balobaki bongo po Polo azalaki kosakola sango ya Yezu pe ya kosekwa. 19 Bongo bateyi wana bakamati ye pe bamemi ye na likita na bango oyo bábengaka Areopaje. Batuni ye: "Tokoki koyeba tina ya mateya ya sika oyo ozali kolakisa? 20 Ozali kolobela biso makambo ya kokamwa, pe tolingi koyeba tina na yango." 21 Pamba té bato nyonso ya Atene ná bapaya oyo bafandi kuna, mosala na bango bobele koloba to koyoka makambo ya sika. 22-23 Bongo Polo atelemi na kati ya Areopaje pe alobi: "Bato ya Atene, namoni 'tè bólingaka kosambela mingi. Pamba té tango natamboli na vile na bino, natali banzambe bino bosambelaka, pe namoni kutu mesa moko ya mabonza bakómá boye: 'Esika ya nzambe oyo toyebi té.' Nzokande ngai nayeeli bino sango ya Nzambe oyo bozali kosambela, atako boyebi ye té. 24 Nzambe oyo asalá mokili pe biloko nyonso, azali Mokonzi ya Likolo na se. Ye afandaka té na bandako oyo bato batóngi. 25 Azalaká na posa té bato básalela ye to bámemela ye eloko ata ya ndenge nini; pamba té ezali ye moto apesaká bato nyonso bomoi, pema pe biloko nyonso. 26 Ye asalá 'tè bato ya bikolo nyonso bábotama na moto moko, pe bátondisa mokili mobimba. Ye moto akabolá bambula, basanza ná mikolo; atiá pe bandelo ya bisika bato bakoki kofanda. 27 Asalaka bongo po bato balukaka ye, ndenge bato bakufa miso balukaka esika ya kosimba. Ya solo bato bakoki koyeba ye; azali mosika té ya moko moko na biso. 28 Pamba té 'Ezali ye moto apesi biso bomoi ná makasi ya kotambola; kaka ye nde asalá biso.' Bato mosusu kutu na kati na bino bayembá boye: 'Tozali pe bana na ye.' 29 "Soki tozali bana na ye, tótika kokanisa 'tè Nzambe akokani ná bikeko oyo bato basalaka na mayele na bango, ézala basalá yango na or, arjan to mabanga. 30 Nzokande Nzambe abandaki kokipé makambo wana té, po bato bayebaki té mabe oyo bazalaki kosala. Kasi sik'oyo azali kobenga bato nyonso ya mokili mobimba po bábongola mitema. 31 Asi'atiá mokolo oyo akobanda kotambwisa mokili mobimba na bosembo; asi'aponá moto oyo akotambwisa yango na kombo na ye. Alakisaki kutu makambo wana polele na miso ya bato nyonso; pamba té babomaki moto yango pe Nzambe asekwisaki ye." 32 Awa bayoki 'tè Polo alobi po na kosekwa, bamosusu baseki ye, kasi bamosusu balobi na ye: "Tokoyoka yo mokolo mosusu." 33 Bongo Polo atiki bango. 34 Kasi bato mosusu balandi ye pe bayei kondima. Na kati na bango ezalaki Denis, moto ya likita ya Areopaje, ná mama moko kombo na ye Damaris, pe bato mosusu.

Misala 18

Na Korente

1 Na sima ya makambo wana Polo alongwe na Atene pe akómi na Korente. 2 Kuna akutani ná Moyuda moko kombo na ye Akilas. Ye abotamaki na mboka Pon; autaki na Italie kaka na mikolo wana ná mwasi na ye Prisiye, po mokonzi Klode atindaki Bayuda nyonso bálongwa na Rome. Polo akei kokutana ná bango, 3 pe amoni 'tè ye ná Akilas bazalaki kosala mosala moko; pamba té bazalaki basali-kapo. Yango wana Polo akei kofanda epai na bango, pe bango mibale babandi kosala esika moko. 4 Na Mikolo nyonso ya Kopema Polo azalaki kosakola na ndako ya losambo, pe abandaki komeka kobongola makanisi ya Bayuda ná ya bato ya bikolo mosusu. 5 Tango Silas ná Timoté bauti na Masedwane, Polo amipesi mobimba po na kosakola maloba ya Nzambe; alakisi Bayuda 'tè Yezu azali Mesia. 6 Kasi awa Bayuda baboyi maloba na ye pe bafingi ye, apupoli bilamba na ye po ámema pusiere ya ndako na bango ya losambo epai mosusu té, pe alobi na bango: "Soki bobungi, ezali ngambo na bino moko, etali ngai té. Banda lelo nakokende epai ya bato ya bikolo mosusu." 7 Alongwe wana pe akei na ndako ya moto moko, kombo na ye Titius Yustus. Moto yango azalaki kosambela Nzambe ya Bayuda, pe ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya losambo. 8 Nzokande Krispus, mokonzi ya ndako ya losambo, andimi Nkolo, ye ná libota na ye mobimba. Bato mingi ya Korente oyo bazalaki koyoka Polo, bayei pe kondima, bongo bazwi batisimo. 9 Mokolo moko na butu, Nkolo abimeli Polo na ndoto, alobi na ye: "Kobanga té, kofanda nyee té, loba. 10 Ngai nazali na yo; ata moto moko té akosala yo mabe. Pamba té bato na ngai bazali mingi na vile oyo." 11 Polo afandaki na Korente mbula moko na sanza motoba, pe azalaki koteya bato maloba ya Nzambe. 12 Tango Galion azalaki motambwisi ya Grese, Bayuda bayokani po na kosala Polo mabe, bakangi ye pe bamemi ye na tribinal. 13 Balobi: "Moto oyo azali koluka kobongola makanisi ya bato po básambelaka Nzambe na ndenge mibeko na biso ezali kopekisa." 14 Polo alingi koloba, kasi Galion alobi na Bayuda: "Soki moto oyo asalaki mabe penza to likambo moko ya monene, mbele nalingaki koyokela bino. 15 Kasi lokola ezali bobele tembe po na mateya, bakombo pe mibeko na bino, etali bino moko. Naboyi kozala zuzi ya makambo wana." 16 Pe abengani bango na tribinal. 17 Bongo bato nyonso bakangi Sostene, mokonzi ya ndako ya losambo, pe babandi kobeta ye liboso ya tribinal. Kasi Galion akipaki té.

Polo azongi na Antioshe

18 Polo aumelaki mingi na Korente. Sima, atiki bandeko pe asimbi nzela po na kokende na Sirie. Prisiye pe Akilas bakei na ye nzela moko. Na libongo ya Sankré, liboso 'tè ákota na masuwa, akokoli motú, pamba té asilisi mikolo na ye ya elaka oyo apesaki na Nzambe. 19 Tango bakomi na Efeze, Polo atiki Akilas ná Prisiye, akei na ndako ya losambo pe asololi ná Bayuda. 20 Bango babondeli ye áfanda lisusu mwa mikolo, kasi Polo alingaki té. 21 Atiki bango pe alobi: "Nakozonga lisusu epai na bino soki Nzambe alingi." Bongo akoti na masuwa pe alongwe na Efeze. ' 22 Tango Polo akiti na Sezaré, akei na Yeruzalem po na kopesa mbote na bato ya eklezya. Na sima akei na Antioshe, 23 pe afandi kuna mwa tango.

Polo alandi kaka mobembo na ye (III)

Sima ya mwa mikolo, Polo asimbi lisusu nzela pe atamboli mboka Galatie pe Frijie. Azalaki kolendisa bayekoli nyonso. 24 Moyuda moko akómaki na Efeze, kombo na ye Apolos, moto ya Alexandrie, vile moko ya Ejipte. Azalaki moto ya mayele mingi, pe ayebaki Mikanda ya Nzambe malamu penza. 25 Ayokaki sango ya Nkolo pe azalaki na molende. Abandaki kosakola pe koteya polele makambo etali Yezu, kasi ayebaki bobele batisimo ya Yoane. 26 Lokola azalaki koloba na molende mingi na kati ya ndako ya losambo, Prisiye ná mobali na ye Akilas bayoki ye bongo babengi ye na ndako na bango, pe balimboleli ye malamu penza makambo nyonso ya nzela ya Nzambe. 27 Na sima Apolos alingaki kokende na Atene. Bandeko basepeli na mokano na ye pe bakómeli bayekoli ya kuna mokanda po báyamba ye malamu. Tango akómi na Atene, asalisi bandimi mingi na nguya ya Nzambe. 28 Na miso ya bato nyonso alakisi polele 'tè Bayuda babungi nzela, pe alimboli Mikanda ya Nzambe oyo ezali koyebisa 'tè Yezu azali Mesia.

Misala 19

Polo na Efeze

1 Tango Apolos azalaki na Korente, Polo akatisi bangomba pe akómi na Efeze. Kuna akutani ná bayekoli mosusu, 2 pe atuni bango: "Bozwaki Molimo Mosantu tango bondimaki?" Bango bazongiseli ye: "Nanu kutu toyoká té 'tè Molimo Mosantu azali." 3 Bongo Polo alobi na bango: "Batisimo nini bino bozwaki?" Bango bazongisi: "Batisimo ya Yoane." 4 Polo alobi na bango: "Yoane abatisaki baoyo bandimaki kobongola mitema, pe alobaki na bato 'tè bándimela moto oyo akoya sima na ye. Elingi koloba Yezu." 5 Awa bayoki maloba wana, bazwi batisimo na kombo ya Nkolo Yezu. 6 Polo atieli bango maboko pe Molimo Mosantu akiteli bango. Babandi koloba minoko eyebani té, pe kosakola na nguya ya Molimo. 7 Bato yango bazalaki soki 12. 8 Polo akoti na ndako ya losambo; sanza misato mobimba azalaki koteya na molende pe kolimbolela Bayuda ndenge Nzambe asi'abandi kotia bokonzi na ye. Asali nyonso po bato bábongola makanisi na bango; 9 kasi bato mosusu bazalaki se mitú makasi pe bandimaki té. Balobi makambo ya mabe po na nzela ya Nkolo Yezu na miso ya bato nyonso. Bongo Polo atiki bango, amemi bayekoli na ndako ya kelasi ya Tiranus, pe azalaki koteya kuna mikolo nyonso. 10 Asalaki bongo mbula mibale, pe na ndenge wana bato nyonso ya région y a Efeze bayokaki sango ya Nkolo, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu.

Bana ya Seva

11 Polo azalaki kosala makamwisi minene penza na nguya ya Nzambe. 12 Yango wana bato mosusu babandaki koluka bitambala to bilamba oyo ye alataki, pe kotiela yango bato ya maladi; boye bango bazalaki kobika, pe milimo mabe ezalaki kobima na nzoto na bango. 13 Kuna na Efeze ezalaki pe na Bayuda bazalaki kotambola bipai nyonso, pe kobengana milimo mabe. Bamosusu bameki kosalela kombo ya Yezu, babandi koloba na milimo mabe boye: "Natindi bino bóbima na kombo ya Yezu oyo Polo azali kosakola sango na ye." 14 Mokolo moko bana sambo ya nganga-Nzambe Seva basali bongo, 15 kasi molimo mabe ezongiseli bango: "Nayebi Yezu pe nayokaki sango ya Polo; kasi bino bozali banani?" 16 Mbala moko moto oyo azalaki na molimo mabe akweeli bango pe alongi bango; anyatinyati bango tii bakimi na ndako bolumbu pe bazokizoki bapota na nzoto. 17 Bato nyonso ya Efeze, Bayuda pe bato ya bikolo mosusu, bayoki makambo wana, bamoni somo mingi penza pe bakumisi kombo ya Nkolo Yezu. 18 Bato mingi oyo bandimaki bayei kobimisa polele makambo ya mabe oyo basalaki. 19 Bato mosusu ebele oyo bamipesá na kinganga-kisi bamemi mikanda na bango pe batumbi yango na miso ya bato nyonso. Batangj talo na yango pe bamoni 'tè ekokani na lifuta oyo basali 200 bakoki kozwa na mbula mobimba. 20 Na ndenge wana Sango Malamu epanzanaki, pe bato mingi penza bandimi yango po na nguya ya Nkolo.

Mobulu na Efeze

21 Sima ya makambo wana, Polo azwi mokano ya kokatisa Masedwane pe Grese po na kokende na Yeruzalem. Alobi: "Tango nakolongwa kuna, nasengeli pe kokóma na Rome." 22 Bongo atindi basalisi mibale na Masedwane, Timoté ná Eraste. Kasi ye moko atikalaki nanu na région ya Efeze. 23 Na tango wana mobulu monene ebimaki po na mateya ya Nkolo Yezu. 24 Ezalaki na moto moko, kombo na ye Demetrius, mosala na ye kosala biloko ya bibende. Azalaki kosala bikeko ya ndako ya nzambe moko ya mwasi, kombo na ye Artemis; pe na ndenge wana azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi. 25 Asangisi bango ná bato mosusu oyo bazalaki kosala mosala ya ndenge wana, pe alobi na bango: "Baninga na ngai, bino moko boyebi 'tè tozwaka bomengo na biso se na mosala oyo. "Bomoni pe boyoki makambo Polo wana azali kosala. Azali koloba 'tè banzambe oyo esalami na bato ezali banzambe té. Bongo abongoli makanisi ya bato ebele awa na vile ya Efeze, pe na région na yango mobimba. "Makambo wana ekoki kobebisa bobele mosala na biso té, kasi ekobebisa pe lokumu ya ndako ya Artemis. Bongo bato bakomona yango pamba, pe bakokumisa Artemis lisusu té. Nzokande ye azali nzambe oyo básambelaka na région ya Efeze pe na mokili mobimba." 28 Awa bato bayoki maloba wana, batomboki mingi penza, babandi koganga: "Lokumu na Artemis ya Efeze!" 29 Bango nyonso bakei na libanda ya masano. Na nzela, bakangi Gayus ná Aristarke bato ya Masedwane oyo Polo amemaki na Efeze. Mboka mobimba ekoti mobulu! 30 Polo alingaki kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisi ye. "Basali mosusu ya leta oyo bazalaki baninga ya Polo batindeli ye pe maloba po ákende na libanda ya masano té. 32 Mobulu monene ezalaki na kati ya bato oyo basanganaki. Moto na moto azalaki koganga na ndenge na ye! Mingi kutu na kati na bango bayebaki té tina nini bato basanganaki. 33 Nzokande Bayuda bapusi moto moko liboso, kombo na ye Alexandre. Bato mosusu oyo bazalaki wana bayebisi ye makambo ezalaki koleka. Bongo Alexandre atomboli liboko po bato báfanda kimia, pe alingaki koloba po na kolongisa Bayuda na miso ya bato. 34 Kasi awa bayoki 'tè azali Moyuda, bango nyonso bagangi mbala moko: "Lokumu na Artemis ya Efeze! Lokumu na Artemis ya Efeze!" Basalaki bongo soki bangonga mibale. 35 Na suka, sekretere ya vile ayei kolembisa kanda ya bato, alobi: "Bato ya Efeze, bato nyonso bayebi 'tè vile ya Efeze ebatelaka ndako ya nzambe-mwasi Artemis, ekeko oyo eutá na Likolo. 36 Moto moko té akoki kotia tembe na makambo wana. Bongo bókitisa mitema na bino pe básala bozoba té. 37 Bato oyo bomemi awa batsiolaki nzambe na biso té, bayibaki pe eloko té na ndako na ye. 38 Soki Demetrius pe basali na ye bazali na likambo na moto, tribinal ezali, bazuzi pe bazali, bongo báfunda-na. 39 Kasi soki bozali na likambo mosusu, likita ya bakonzi ekobongisa yango ndenge mibeko ezali kotinda. 40 Makambo ezali koleka lelo, pe ndenge tosangani awa, ezangá tina. Tango mosusu kutu bakoki kofunda biso po na yango 'tè tobimisi mobulu. Pe tokozanga maloba soki batuni biso." 41 Awa alobi boye, atindi bato nyonso bápanzana.

Misala 20

Mobembo ya Polo na Masedwane pe na Grese

1 Tango mobulu esili, Polo asangisi bayekoli pe alendisi bango. Apesi bango mbote pe akei na Masedwane. 2 Akatisi mabelé wana, azalaki kolendisa bandimi na mateya mingi, bongo akómi na Grese. 3 Afandaki kuna sanza misato. Tango alingaki kokota na masuwa po na kokende na Sirie ayoki 'tè Bayuda bakaneli ye, azwi mokano ya kozonga na nzela ya Masedwane. 4 Sopater, mwana ya Pirus moto ya Beré, akendeki nzela moko na ye, bango ná Aristarke pe Sekundus bato ya Tesalonike, Gayus moto ya Derbe, Timoté ná Tishike pe Trofime bato ya région ya Efeze. 5 Tango tokómi na Masedwane, bango mibale batiki biso pe bakei kozela biso na Troas. 6 Nzokande biso, sima ya feti ya Pake, tokoti na masuwa na libongo ya Filipi. Na sima ya mikolo mitano toyei kokuta bango na Troas; kuna tosalaki poso mobimba.

Na Troas, Polo abikisi elenge moko

7 Mokolo ya yenga na pokwa, tosanganaki po na kolia esika moko. Polo asololi na bandimi ya Troas tii na midi ya butu, po alingaki kotika bango na tongo. 8 Bamwinda mingi ezalaki kopela na kati ya ndako esika tosanganaki likolo ya etaje. 9 Elenge mobali moko, kombo na ye Etikos afandaki na fenétre. Lokola pongi ezwaki ye makasi, tango Polo azalaki kaka koteya, alongwe na etaje ya misato, akwei na se. Tango batomboli ye, asi'akufaki. 10 Bongo Polo akiti, agunzami pe asimbi ye makasi. Alobi: "Bótika kobanga! Azali nanu na bomoi." 11 Abuti lisusu na etaje, akaboleli bandimi mapa, pe alei ná bango. Sima, alobaki lisusu mingi tii tongo etani, bongo akei. 12 Bamemi elenge mobali oyo abikaki, pe makambo wana elongoli bato nyonso mawa penza.

Na Milet

13 Biso tolongwe liboso pe tokoti na masuwa po tókende na vile ya Asos. Kuna tolingaki kokotisa Polo na masuwa, pamba té ye akanaki kokende na Asos na makolo. 14 Tango akuti biso na Asos, tokamati ye na masuwa pe tokei na Mitilene. 15 Tongo etani, tolongwe wana pe tokómi penepene ya esanga ya Kio. Sima ya mokolo moko tokómi na esanga ya Samos, pe sima ya mokolo moko lisusu tokómi na Milet. 16 Polo akanaki kokita na Efeze té, po álekisa tango té kuna. Azalaki kaka kokende noki, po ákoka kokóma na Yeruzalem na mokolo ya Pantekote.

Polo apesi mbote ya suka na bakolo ya Efeze

17 Na Milet, Polo atindi maloba na Efeze po na kobengisa bambuta-muntu ya eklezya. 18 Tango bakomi epai na ye, alobi na bango: "Boyebi ndenge nini bizaleli na ngai ezalaki na kati na bino, banda mokolo ya liboso nakómaki na région ya Efeze. 19 Nasalelaki se Nkolo Yezu, namikumisaki té. Nalelaki mingi pe namonaki pasi po Bayuda bazalaki kokanela ngai. 20 Boyebi 'tè makambo nyonso oyo bozalaki na yango posa, nasakolaki pe nateyaki bino yango na bisika tosanganaka, pe na bandako na bino; nabombaki ata eloko moko té. 21 Nayebisaki Bayuda ná bato ya bikolo mosusu bábongola mitema, bátosa Nzambe, pe bándimela Nkolo na biso Yezu. 22 Sik'oyo nakei na Yeruzalem, pamba té Molimo Mosantu atindi ngai. Nayebi té makambo nini ekokweela ngai kuna; 23 nayebi kaka eloko moko: mboka nyonso nazali koleka Molimo Mosantu azali koyebisa ngai 'tè boloko ná minyokoli ezali kozela ngai. 24 Kasi nazali kotala bomoi na ngai lokola eloko pamba. Nazali koluka kaka násilisa mosala oyo Nkolo Yezu apesi ngai: kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alakisi bato bolingo na ye. 25 "Sik'oyo nayebi 'tè bokomona ngai lisusu té. Bino nyonso bomonaki pe boyokaki ndenge nateyaki bino 'tè Nzambe abandi kotia bokonzi na ye. 26 Yango wana, nalobi na bino lelo: soki moto moko na kati na bino abungi, ezali ngambo na ngai té. 27 Pamba té nabombaki eloko té; nayebisaki bino makambo nyonso oyo Nzambe alingi kosala. 28 Bómibatelaka; bóbatelaka pe bandimi nyonso, pamba té Molimo Mosantu atii bino lokola babokoli ya bameme; bongo bótambwisaka eklezya oyo Nzambe azwaki po na liwa ya Mwana na ye penza. 29 Nayebi 'tè bato mabe bakoya sima na ngai; bakozala lokola bankoi, bakoyokela bameme mawa té. 30 Ata na kati na bino pe, bato mosusu bakobanda koloba makambo ya lokuta, po bábenda bandimi epai na bango. 31 Bongo bozala na ekenge; bókanisa 'tè mbula misato mobimba, butu moi na mai na miso, nazalaki kaka kopesa toli na moko moko na bino. 32 "Sik'oyo napesi bino na maboko ya Nzambe. Maloba ya bolamu na ye ekobanda kobatela bino. Ye azali na nguya ya kolendisa bato nyonso ye aponá, po bázwa bomengo oyo abombelá bango. 33 Nalukaki eloko ya moto te, ézala mbongo to bilamba 34 Bino moko boyebi 'tè nasalaki na maboko na ngai po na kozwa biloko oyo biso ná baninga na ngai tozalaki na yango posa. 35 Na makambo nyonso wana napesaki bino ndakisa 'tè bosengeli kosala mosala, po bókoka kosalisa bato bakelelá. Bókanisa maloba ye moko Nkolo Yezu alobaki: 'Kokaba ezali esengo mingj koleka kozwa.' " 36 Awa Polo asilisi koloba boye, afukami esika moko ná bango pe asambeli. 37 Bango nyonso bazalaki kolela; bayambi Polo po na kopesa ye mbote ya suka. 38 Bazalaki na mawa mingi penza po alobaki 'tè bakomona ye lisusu té. Bongo bakei kotika ye tii na masuwa.

Misala 21

Polo akei na Yeruzalem

1 Tango tokabwani ná bango, tokoti na masuwa, tokei na esanga ya Kos, pe sima ya mokolo moko tokómi na Rode. Awa tolongwe wana, tokei na Patara. 2 Kuna tomoni masuwa moko elingaki kokende na Fenisie; bongo tokoti pe tokei. 3 Tango tokómi penepene ya esanga ya Shipre, totiki yango na liboko ya mwasi, tolandi nzela na biso epai ya Sirie pe tokiti na Tir, esika balingaki kobimisa biloko na masuwa. 4 Tokei koluka bayekoli pe tofandi epai na bango poso mobimba. Bango balobi na Polo na nguya ya Molimo Mosantu 'tè ákende na Yeruzalem té. 5 Kasi awa mikolo na biso ekoki, tokei. Bango nyonso bayei kotika biso na ndelo ya mboka, ná basi na bango pe bana. Tofukami na libongo pe tosambeli. 6 Awa topesani mbote ya suka, tokoti na masuwa, bongo bango bazongi na mboka. 7 Tolongwe na Tir, tokei tii na Tolemais, pe na ndenge wana tosilisi mobembo na biso na masuwa. Kuna topesi bandeko mbote pe tofandi ná bango mokolo moko. 8 Tongo etani, tobeti makolo tii na Sezaré. Kuna tokoti na ndako ya Filipe moteyi ya Sango Malamu, pe tolali epai na ye. Ye azalaki moko na kati ya basalisi sambo ya bantoma. 9 Azalaki na bana minei ya basi oyo bayebi nzoto ya mobali té. Bango nyonso babandaki kosakola na nguya ya Molimo Mosantu. 10-11 Awa tofandi mikolo mingi, profete moko kombo na ye Agabus ayei epai na biso, autaki na région ya Yuda. Ye akamati mokaba ya Polo, amikangisi makolo ná maboko, pe asakoli boye: "Molimo Mosantu alobi: Oyo ezali ndenge Bayuda ya Yeruzalem bakokanga mokolo ya mokaba oyo; pe bakopesa ye na maboko ya bato ya bikolo mosusu." 12 Awa toyoki boye, biso moko ná bakristo ya Sezaré tobondeli Polo po ákende na Yeruzalem té. 13 Kasi ye azongisi: "Po na nini bozali kolela pe bolingi kobongola makambo ngai nakanaki? Nasi'nami-bongisi po bákanga ngai pe báboma ngai na Yeruzalem po na kombo ya Nkolo Yezu." 14 Lokola tokokaki kobongola makanisi na ye té, totiki kobondela ye pe tolobi: "Tika esalama kaka ndenge Nkolo alingi." 15 Na sima ya mwa mikolo, tomilengeli pe tokei na Yeruzalem. 16 Bayekoli mosusu ya Sezaré bakei ná biso nzela moko. Bango bazweli biso esika ya kolala epai ya moto moko ya Shipre kombo na ye Nazon; ye azalaki mokristo banda kala.

Polo akei kotala Jake

17 Tango tokómi na Yeruzalem, bandeko bayambi biso na esengo. 18 Tongo etani, Polo akei nzela moko ná biso epai ya Jake. Bambuta-muntu nyonso ya eklezya basanganaki kuna. 19 Polo apesi bango mbote pe ayebisi bango polele makambo nyonso Nzambe akokisaki na maboko na ye, epai ya bato ya bikolo nyonso. 20 Awa bayoki ye, bapesi Nzambe mersi. Bongo balobi na Polo: "Omoni, ndeko, Bayuda nkoto na nkoto bakomi bandimi. Bango nyonso bazali kotosa Mibeko na motema moko. 21 Kasi bayokaki 'tè yo oteyaka Bayuda oyo bafandaka na bamboka ya bapaya, básundola Mibeko ya Moize, bátika kokata bana na bango nzoto, pe bálanda lisusu bizaleli ya Bayuda té. 22 Tembe té, bakoyoka kaka 'tè yo osi'okómi awa. Bongo tósala nini? "Ebongi ósala kaka makambo tokoloba na yo. Tozali awa na bato minei oyo balingi kosilisa mikolo na bango ya elaka bapesaki na Nzambe. 24 Tango na bango ya kokokola mitú esi'ekoki; kende ná bango nzela moko po na komibongisa ndenge mibeko ezali kotinda, pe futela bango mbongo ya mabonza. Boye bato nyonso bakoyeba 'tè makambo bayokaki po na yo ezali ya solo té, pe bakomona 'tè otosaka Mibeko ya Moize. 25 Po na makambo etali bandimi ya bikolo mosusu, tokolanda bobele mikano oyo tokómelaki bango: Banyama bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, to oyo babomi na kofina kingo pe ná makila nyonso, bália yango té; pe báboya mabala oyo Mibeko ezali kopekisa." 26 Bongo sima ya mokolo moko Polo amemi bato minei wana, akei na Ndako ya Nzambe, pe abandi mokolo ya liboso ya komibongisa, nzela moko ná bango. Na sima akei koyebisa banganga-Nzambe mokolo bakosilisa komibongisa; pamba té sima ya mikolo sambo basengelaki kopesa mabonza po na moko moko na bango.

Bakangi Polo na Ndako ya Nzambe

27 Etikalaki moke mikolo sambo wana ésila, Bayuda ya région ya Efeze bamoni Polo na Ndako ya Nzambe, batindi bato nyonso bátombokela ye. Bakangi ye, 28 pe bazalaki koganga boye: "Bato ya Israel, bóya kosalisa biso! Ye oyo moto azali koteya bato nyonso bipai na bipai, azali kobebisa lokumu ya ekolo ya Israel, ya Mibeko ya Moize pe ya Ndako ya Nzambe. Sik'oyo ayei kutu kokotisa bato ya bikolo mosusu na Ndako ya Nzambe, pe na ndenge wana abebisi esika oyo ya bosantu." 29 Balobaki boye po bamonaki Trofime ya Efeze azalaki na Yeruzalem ná Polo, pe bakanisaki 'tè akotisi ye na Ndako ya Nzambe. 30 Mboka mobimba ekoti mobulu, pe bato nyonso bayei mbangu na esika wana. Bakangi Polo, babimisi ye na Ndako ya Nzambe, pe na mbala moko bakangi baporte. 31 Tango balingaki koboma Polo, sango ekómi epai ya mokonzi ya basoda ya Rome 'tè mobulu ekoti na Yeruzalem mobimba. 32 Asali noki penza, akamati basoda ná ba-komandan, pe bakei mbangu epai bato batondanaki. Awa bato bamoni basoda ná mokonzi na bango, batiki kobeta Polo. 33 Bongo mokonzi ya basoda apusani penepene ya Polo, akamati ye pe atindi 'tè bákanga ye minyololo mibale. Na sima atuni bato soki ye azali nani, pe likambo nini asali. 34 Kasi moto na moto azalaki koganga na ndenge na ye. Lokola mokonzi ya basoda akokaki koyeba makambo ya solo té po na mobulu, atindi bámema Polo na lopango ya basoda. 35 Tango Polo akómi na eskalyé, basoda bakumbi ye po na kanda ya bato. 36 Pamba té bato nyonso bazalaki kolanda ye pe koganga: "Boma ye!"

Polo asambi

37 Tango balingaki kokotisa ye na lopango ya basoda, Polo alobi na mokonzi ya basoda: "Okoki kopesa ngai nzela nálobela yo mwa likambo?" Mokonzi ya basoda atuni ye: "Oyebi monoko ya grek? 38 Ezali yo té moto ya Ejipte oyo akotisaki mobulu na mikolo eleki, pe akimaki na esobe ná bato 4.000 oyo bazalaki na bibundeli na maboko?" 39 Polo azongisi: "Ngai nazali Moyuda, nabotami na Tarse na mboka Silisie. Nazali citoyen ya vile moko ya lokumu. Nábondeli yo, ópesa ngai nzela nálobela bato." 40 Mokonzi ya basoda apesi ye nzela. Polo atelemi na eskalyé, pe atomboli liboko po bato bátika koganga. Awa bango bafandi nyee, abandi koloba na bango na monoko ya Bayuda:

Misala 22

1 "Batata pe bandeko, bóyoka makambo nalingi kosamba." 2 Awa bayoki 'tè alobi na bango na monoko ya Bayuda, bafandi nyee penza. Bongo Polo alobi: 3 "Ngai nazali Moyuda, nabotami na Tarse na mboka Silisie, kasi nakoli kaka awa na Yeruzalem, pe Gamaliel moto azalaki kolakisa ngai makambo nyonso ya mibeko ya bakoko na biso. Namipesaki mobimba po na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali kosala lelo. 4 Nanyokolaki bato oyo balandaka nzela ya Yezu, nakangaki mibali ná basi pe nabwakaki bango na boloko, natangi-saki kutu makila ya bato. 5 Nganga-Nzambe monene pe Likita mobimba ya bambuta-muntu bakoki koyebisa bino soki nazali koloba ya solo. Bango bato bapesaki ngai mikanda nákende kotika na bandeko Bayuda ya Damas. Bongo nakendeki kuna po na kokanga bandimi, pe komema bango na Yeruzalem po bázwa etumbu."

Polo ayebisi ndenge abongolaki motema

6 "Nazalaki na nzela pe tango nakómi pembeni ya mboka Damas etikalaki moke midi ékoka, eloko moko lokola kake elongwe na Likolo, engengi makasi pe eyei kozipa ngai. 7 Nakwei na se pe nayoki mongongo moko elobi na ngai: 'Saul, Saul! Po na nini ozali konyokola ngai?' 8 Nazongisi: 'Mokonzi, yo nani?' Bongo ye alobi na ngai: 'Nazali Yezu ya Nazaret oyo yo ozali konyokola.' 9 Bato bazalaki esika moko ná ngai bamonaki eloko oyo ezalaki kongenga, kasi mongongo oyo elobaki na ngai, bayokaki yango té. 10 Bongo natuni: 'Mokonzi, násala nini?' Mokonzi alobi na ngai: 'Telema, kende na Damas. Kuna bako-lakisa yo makambo nyonso osengeli kosala.' 11 Lokola miso na ngai ekufaki po na eloko oyo engengaki makasi, bato bayaki ná ngai nzela moko basimbi ngai na liboko, pe na ndenge wana nakoti na Damas. 12 "Moto moko azalaki kuna, kombo na ye Ananya, ye nde moto malamu oyo atosaka Mibeko ya Moize. Bayuda nyonso ya Damas balingaki ye mingi. 13 Ayei, atelemi penepene na ngai pe alobi: 'Saul, ndeko na ngai, miso na yo éfungwama!' Na mbala moko miso efungwami, pe namoni ye. 14 Bongo ye alobi: 'Nzambe ya bakoko na biso asi'aponá yo kala, po óyeba makambo ye alingaka, ómona Moto ya bosembo pe oyoka mongongo na ye. 15 Pamba té yo okozala ntoma na ye epai ya bato nyonso, po oyebisa bango makambo omoni pe oyoki. 16 Bongo ozali kozela nini? Telema ózwa batisimo, pe sakola 'tè Yezu azali Mokonzi na yo, po masumu na yo élongwa.' "

Ndenge Nzambe atindaki Polo epai ya bato ya bikolo mosusu

17 "Nazongaki na Yeruzalem, bongo mokolo moko lokola nazalaki kosambela na Ndako ya Nzambe, 18 Mokonzi Yezu abimeli ngai pe alobi: 'Longwa noki na Yeruzalem, pamba té bato ya mboka oyo bakoboya makambo yo ozali koloba po na ngai.' 19 Ngai nazongisi: 'Mokonzi, bayebi malamu 'tè nazalaki kokende na bandako ya losambo po na koluka bato bandimaka yo, kobetisa bango pe kobwaka bango na boloko. 20 Pe tango babomaki Etiene oyo azalaki kosakola sango na yo, ngai pe nazalaki wana. Nandimaki makambo ya bato babomaki ye pe nasimbelaki bango bilamba.' 21 Bongo Mokonzi alobi na ngai: 'Kende, pamba té nakotinda yo mosika epai ya bato ya bikolo mosusu.' " 22 Bato bayokaki Polo tii tango alobi po na bikolo mosusu, bongo babandi koganga: "Longola moto ya ndenge oyo na mokili; ebongi báboma ye!" "Bazalaki koganga, kopasola bilamba pe kobwaka pusiere na likolo.

Polo ná mokonzi ya basoda ya Rome

24 Mokonzi ya basoda atindi bázongisa Polo na lopango ya basoda, pe bábeta ye fimbu po áyebisa polele tina bato bazalaki kowolola ye boye. 25 Kasi tango bakangi ye po na kobeta ye fimbu, Polo atuni komandan oyo azalaki wana: "Citoyen ya Rome oyo asambi ata kosamba té, bakoki kobeta ye fimbu?" 26 Awa komandan ayoki boye, akei koyebisa mokonzi ya basoda, alobi: "Olingi kosala nini? Pamba té moto wana azali citoyen ya Rome." 27 Mokonzi ya basoda ayei pe atuni Polo: "Lobela ngai, ya solo ozali citoyen ya Rome?" Polo andimi; 28 bongo mokonzi ya basoda alobi: "Ngai nafutaki mbongo mingi po nákóma citoyen ya Rome." Polo azongisi: "Kasi ngai nabotamá citoyen ya Rome." 29 Bongo na mbala moko basoda oyo balingaki kobeta ye fimbu batiki ye. Mokonzi ya basoda ye moko pe abangi, po akangisaki citoyen ya Rome minyololo.

Polo liboso ya Likita-Monene ya Bayuda

30 Tongo etani, mokonzi ya basoda alingaki koyeba malamu tina nini Bayuda bafundaki Polo. Yango wana abimisi ye na boloko pe atindi básangisa bakonzi ya banganga-Nzambe pe bato ya Likita-Monene. Na sima amemi Polo pe atii ye liboso na bango.

Misala 23

1 Polo atali bato ya Likita nyee pe alobi: "Bandeko, tii na moi ya lelo nazali kosalela Nzambe na motema moko." 2 Ananya, nganga-Nzambe monene, atindi basali oyo bazalaki penepene ya Polo 'tè bábeta ye na monoko. 3 Bongo Polo alobi na ye: "Moto ya lokuta, Nzambe nde akobeta yo. Ofandi wana po ósambisa ngai ndenge mibeko ezali kotinda. Kasi obuki mibeko, awa otindi 'tè bábeta ngai." "Basali balobi na Polo: "Ozali kofinga nganga-Nzambe monene!" 5 Polo azongisi: "Pardon, bandeko. Nayebaki té 'tè azali nganga-Nzambe monene. Pamba té ekómamá boye: 'Kofinga mokonzi ya ekolo na yo té.' " 6 Polo ayebaki 'tè na kati ya bato ya Likita-Monene, ndambo bazalaki ba-Sadusé, pe ndambo ba-Farizé; yango wana alobi na mongongo makasi: "Bandeko, ngai nazali Farizé, mwana ya ba-Farizé. Bozali kosambisa ngai bobele po natiaka motema 'tè bato bakufa bakosekwa." 7 Awa alobi boye ba-Farizé ná ba-Sadusé babandi kotiana tembe pe Likita ekabwani. 8 Pamba té ba-Sadusé bandimaka té 'tè bato bakufa bakosekwa; balobaká pe ba-anjelu ná milimo bazali té. Nzokande ba-Farizé bandimaka nyonso wana. "Bazalaki koganga makasi penza, balakisi-Mibeko mosusu oyo bazalaki na lingomba ya ba-Farizé batelemi, pe na kanda nyonso batii tembe balobi: "Tomoni ata mabe moko té na moto oyo. Tango mosusu molimo to anjelu alobi na ye." 10 Awa mobulu ekoti mingi, mokonzi ya basoda abangi soki té bakokata Polo biteni biteni. Yango wana, abengi bato na ye baya kolongola Polo na kati na bango pe bámema ye na lopango ya basoda. 11 Na butu yango, Nkolo Yezu abimeli Polo pe alobi: "Kobanga té, tia molende. Ndenge outi kosakola sango na ngai awa na Yeruzalem, osengeli kosala bongo na Rome."

Bayuda bakaneli Polo

12 Tongo etani, Bayuda mosusu basali likita. Bakati seleka 'tè bakolia té pe bakomela ata eloko té tii bakoboma Polo. 13 Baoyo bakataki seleka wana, bazalaki bato 40 koleka. 14 Bakei epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu, balobi: "Biso tokati seleka 'tè tokolia té pe tokomela eloko té tii tokoboma Polo. 15 Bongo sik'oyo bino bóyokana ná bato nyonso ya Likita-Monene, bósenga na mokonzi ya basoda ámemela bino Polo. Bosala lokola bolingi kotala lisusu likambo na ye malamu. Pe biso tosi'tomilengeli po na koboma ye liboso ákóma awa." 16 Kasi mwana ya ndeko ya Polo ya mwasi ayoki sekele wana, akei na lopango ya basoda, akoti pe ayebisi Polo. 17 Bongo Polo abengi komandan moko ya basoda pe alobi: "Mema elenge oyo epai ya mokonzi ya basoda. Azali na likambo ya koyebisa ye." 18 Komandan amemi ye epai ya mokonzi ya basoda pe alobi: "Polo moto ya boloko, abengi ngai pe asengi 'tè námemela yo elenge oyo. Azali na likambo ya koyebisa yo." 19 Mokonzi ya basoda asimbi elenge mobali na liboko, akei na ye pembeni pe atuni ye: "Likambo nini olingi koyebisa ngai?" 20 Ye azongisi: "Bayuda bayokani po básenga yo ómema Polo lobi liboso ya Likita-Monene, bakosala lokola 'tè balingi kotala lisusu likambo na ye malamu. 21 Kasi kondimela bango té, pamba té bato 40 koleka bazali kokanela ye. Basi'bakati kutu seleka 'tè bakolia té pe bakomela eloko té tii bakoboma Polo. Sik'oyo basi'bamilengeli pe bazali kozela bobele mokano na yo." 22 Bongo mokonzi ya basoda alobi na ye 'tè áyebisa likambo wana na moto té, na sima azongisi ye.

Batindi Polo epai ya Félix

23 Mokonzi ya basoda abengi bakomandan mibale pe alobi na bango: "Bóbongisa basoda 200, ná bato 70 oyo bamataka bapunda pe bamosusu 200 oyo bazali na makonga, po bákende na Sezaré na ngonga ya libwa ya butu. 24 Bóbongisa lisusu bapunda po na komatisa Polo, pe bómema ye epai ya Félix, motambwisi ya région ya Yuda. Boye moto moko té akokoka kosala ye mabe." 25 Bongo akómi mokanda boye: 26 "Tata mokonzi Félix, yamba mbote euti epai na ngai Klode Lisias. 27 Bayuda bakangaki moto oyo pe balingaki koboma ye. Tango nayoki 'tè azali citoyen ya Rome, nayei ná basoda na ngai pe nabikisi ye. 28 Lokola nalingaki koyeba malamu tina Bayuda bazalaki kofundela ye, namemaki ye liboso ya Likita-Monene na bango. 29 Nayei komona 'tè bazalaki kofunda ye po na makambo etali mibeko na bango moko, kasi likambo penza ezalaki té po ákufa to ákota boloko. 30 Tango bayebisi ngai 'tè Bayuda bazali kokanela ye, na mbala moko natindeli yo ye, pe nayebisi bato oyo bazali kofunda ye 'tè bámema likambo na ye epai na yo." 31 Basoda basali ndenge batindaki bango. Bakamati Polo, bamemi ye na butu tii na Antipatris. 32 Tongo etani basoda oyo bazalaki kotambola na makolo bazongi, pe batiki bato ya bapunda bákende ná Polo. 33 Tango bakomi na Sezaré, basoda bapesi mokanda yango na Félix pe batiki Polo na maboko na ye. 34 Félix atangi mokanda pe atuni Polo: "Ozali moto ya wapi?" Awa ayoki 'tè azali moto ya Silisie, 35 alobi na ye: "Nakoyoka yo tango bato bafundi yo bakoya." Pe atindi 'tè bákangela Polo na lopango ya basoda epai ndako na ye moko ezalaki.

Misala 24

Bayuda bafundi Polo

1 Na sima ya mikolo mitano Ananya, nganga-Nzambe monene, ayei na Sezaré ná bambuta-muntu mosusu pe avoka na bango Tertulus. Bakei liboso ya Félix po na kofunda Polo. 2 Babengisi Polo, pe Tertulus abandi kofunda ye boye: "Tata mokonzi Félix, tozali na kimia penza po na yo, pamba té ozali kobongisa makambo nyonso ya ekolo na biso. 3 Topesi yo mersi mingi po na makambo nyonso oyo tozwaka tango nyonso pe bipai na bipai. 4 Kasi nalingi kolekisa tango na yo mingi té, yango wana nabondeli yo 'tè óyokela biso mwa moke. 5 Tomoni 'tè moto oyo azali moto mabe penza. Azali kotia mobulu epai ya Bayuda nyonso na mokili mobimba, pe azali mokonzi ya lingomba ya bato ya Nazaret. 6 Amekaki kutu kobebisa Ndako ya Nzambe na biso, bongo tokangaki ye. Tolingaki kosambisa ye ndenge mibeko na biso ezali kotinda, 7 kasi Lisias, mokonzi ya basoda, ayei kokota na likambo wana, abotoli ye na maboko na biso na makasi penza, 8 pe atindi biso tóya kofunda ye epai na yo. Soki otuni ye, yo moko okomona 'tè makambo tozali kofundela ye ezali ya solo." 9 Awa asilisi koloba, Bayuda nyonso bandimi, balobi makambo wana ezali ya solo.

Polo asambi liboso ya Félix

10 Félix apesi Polo nzela po ásamba, bongo ye alobi: "Nayebi 'tè ozali zuzi ya ekolo oyo banda bambula ebele, pe nazali na boboto na motema po na kosamba liboso na yo. 11 Lokola yo moko okoki koyeba malamu, eleki bobele mikolo 12 banda nakómaki na Yeruzalem po na kosambela Nzambe. 12 Ata mokolo moko té bayaki kokuta ngai nazali kotia tembe ná moto to kotinda bato bátomboka, ézala na Ndako ya Nzambe to na bandako ya losambo, to pe na ba-balabala 13 Bato oyo bazali kofunda ngai kaka pamba. "Nzokande nandimi na miso na yo 'tè nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso na kati ya lingomba oyo bango balobaká 'tè ekabolá ekolo na biso. Nandimaka pe nyonso oyo ekómamá na Mibeko pe na mikanda ya ba-Profete; 15 ngai ná bango tozali kotia mitema na Nzambe 'tè bato ya malamu ná ya mabe bakosekwa. 16 Yango wana, nazali kosala makasi po názala tango nyonso na motema pembe na miso ya Nzambe pe na miso ya bato. 17 "Bambula ebele elekeli ngai se na mobembo, bongo nazongaki po na komemela bato ya ekolo na ngai makabo, pe kopesa libonza na Nzambe. 18 Yango wana bakutaki ngai na Ndako ya Nzambe tango nasilisi komibongisa. Kasi nazalaki ná bato ebele té, pe mobulu ezalaki té. 19 Bongo Bayuda mosusu ya région ya Efeze bazalaki wana, bango nde bato basengelaki kotelema liboso na yo po na kofunda ngai soki bazali na likambo na ngai. 20 Ata bato oyo bazali awa, báloba mabe nini ngai nasalaki, tango bazalaki kosambisa ngai na Likita-Monene na bango. 21 Longola bobele maloba oyo nalobaki liboso ya Likita: 'Bozali kosambisa ngai lelo bobele po nandimaka 'tè bato bakufa bakosekwa.' " 22 Félix ayebaki malamu makambo etali bakristo, bongo ayebisi bango bázonga po na kosamba mokolo mosusu, alobi: "Tango Lisias mokonzi ya basoda akoya, nakokata likambo na bino." 23 Atindi komandan ázongisa Polo na boloko, kasi átikela ye mwa bonsomi pe ápesa nzela na baninga na ye oyo balingi kosalela ye.

Polo liboso ya Félix pe Drusiye

24 Sima ya mwa mikolo Félix ayei na boloko, ná mwasi na ye Drusiye oyo azalaki Moyuda. Abengisi Polo po azalaki na posa ya koyoka likambo etali kondimela Yezu Kristo. "Kasi lokola Polo abandaki koloba po na bizaleli ya bosembo, po na ndenge ya komibatela malamu, pe po na ndenge Nzambe akosambisa bato, Félix abangi pe alobi: "Sik'oyo okoki kokende na yo. Soki nazwi tango nakobengisa yo lisusu." "Azalaki kotia motema 'tè Polo akopesa ye mbongo, yango wana azalaki kobengisa ye mbala mingi po na kosolola na ye. 27 Sima ya mbula mibale mobimba, Porsius Festus azwi ebonga ya Félix. Bongo po na kosepelisa Bayuda, Félix atiki Polo na boloko.

Misala 25

Polo asengi 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ye

1 Tango Festus abandi mosala na ye, na sima ya mikolo misato alongwe na Sezaré pe akei na Yeruzalem. 2 Kuna bakonzi ya banganga-Nzambe pe bato minene ya Bayuda bafundi Polo epai na ye. Basengi Festus, 3 ásala bango bolamu, bongo ábengisa Polo na Yeruzalem, pamba té bazalaki kaka kokanela ye po báboma ye na nzela. 4 Kasi Festus azongisi: "Bazali kobatela Polo na Sezaré, pe ngai moko nalingi kozonga kuna sik'oyo. 5 Bongo bakonzi na bino bákende nzela moko ná ngai. Pe soki moto yango asalaki mabe, baya kofunda ye kuna." 6 Festus asalaki kaka mikolo mwambe to zomi epai na bango, bongo azongi na Sezaré. Sima ya mokolo moko afandi na tribinal pe atindi 'tè bámema Polo. 7 Tango Polo ayei, Bayuda oyo bautaki na Yeruzalem batii ye na katikati pe babandi kofunda ye po na makambo ebele ya minene; kasi bakokaki kolakisa té 'tè makambo yango ezali ya solo. 8 Polo asambi alobi: "Nasali mabe ata moko té, ézala po na makambo etali Mibeko ya Bayuda to Ndako ya Nzambe, ézala po na oyo etali mokonzi ya Rome." 'Festus alingaki kosepelisa Bayuda, bongo atuni Polo: "Olingi kokende na Yeruzalem po básambisa yo kuna na miso na ngai?" 10 Kasi Polo azongisi: "Natelemi liboso ya tribinal ya mokonzi ya Rome, pe nasengeli kosamba awa. Nasali Bayuda mabe ata moko té; yo moko oyebi yango malamu. 11 Soki nasalaki mabe oyo ekoki na liwa, naboyi kokufa té. Kasi soki makambo oyo bango bafundeli ngai ezali ya solo té, moto moko té akoki kokaba ngai na maboko na bango. Nasengi 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ngai." 12 Bongo Festus asololi moke ná bato oyo bapesaka ye toli, na sima azongiseli Polo boye: "Lokola osengi 'tè ósamba liboso ya mokonzi ya Rome, okokende epai ya mokonzi ya Rome."

Polo liboso ya Agripa pe Berenise

13 Na sima ya mwa mikolo mokonzi Agripa ná ndeko na ye ya mwasi Berenise bayei na Sezaré po na kopesa Festus mbote. 14 Lokola baumelaki mikolo mingi kuna, Festus ayebisi mokonzi makambo ya Polo, alobi: "Félix atikaki moto moko awa na boloko. 15 Tango nakendeki na Yeruzalem, bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya Bayuda bafundaki ye pe basengaki ngai nákatela ye etumbu. 16 Nazongiselaki bango boye: 'Mibeko ya Rome ezali kotinda 'tè bápesa moto nyonso nzela ya kosamba ná bato oyo bafundi ye; soki té bakoki kokatela moto etumbu té.' 17 Bongo bato wana bayaki ná ngai nzela moko. Nalekisaki tango té; tongo etani nafandi na tribinal pe natindi bámema moto yango. 18 Banguna na ye bayei, kasi bafundaki ye na likambo moko té ya mabe, na ndenge ngai nazalaki kokanisa. "Bazalaki kotia bobele tembe ná ye po na ndenge bango básambelaka, pe po na moto moko oyo akufá, kombo na ye Yezu; nzokande Polo alobi 'tè azali na bomoi. 20 Nazalaki koyeba té ndenge nini nakoki kosukisa makambo ya boye, yango wana natunaki Polo soki alingi kokende kosamba na Yeruzalem. 21 Kasi Polo asengaki 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ye. Yango wana napesaki motindo bákangela ye tii tango nakotinda ye epai ya mokonzi ya Rome." ^Agripa alobi na Festus: "Ngai pe nalingi koyoka moto yango." Festus azongisi: "Okoyoka ye lobi." 23 Tongo etani, Agripa pe Berenise bayei na lokumu penza, ná bakonzi ya basoda pe bambuta-muntu ya mboka; bango nyonso bakoti na esika Festus ayambelaka bapaya. Festus atindi bámema Polo, 24 bongo alobi: "Mokonzi Agripa, pe bino nyonso bato bozali awa ná biso, botala moto oyo. Bayuda nyonso ya Yeruzalem pe ya awa bayaki kofunda ye epai na ngai, pe bazalaki koganga 'tè asengeli kokufa. 25 Nzokande po na ngai, namoni 'tè asali likambo moko té po bákatela ye etumbu ya liwa. Pe lokola ye moko asengaki 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na ye. 26 Kasi nayebi té makambo nini nakoki kokómela mokonzi ya Rome po na ye. Yango wana, namemi ye epai na bino nyonso, pe mingi penza epai na yo, mokonzi Agripa, po soki tosilisi kotuna ye náyeba makambo nakoki kokóma. 27 Namoni 'tè kotindela mokonzi ya Rome moto ya boloko ezali na tina té, soki nakoki koyebisa polele té makambo bafundeli ye."

Misala 26

Polo asambi liboso ya Agripa

1 Agripa alobi na Polo: "Okoki kosamba." Bongo Polo atomboli liboko pe abandi kosamba boye: 2 "Mokonzi Agripa, nazali na esengo lelo ya kosamba liboso na yo po na makambo nyonso Bayuda bazali kofundela ngai 3 Pamba té yo oyebi bizaleli ya Bayuda, pe ndenge batiaka tembe po na makambo mosusu. Yango wana nabondeli yo: kitisa motema, óyoka ngai. 4 "Bayuda nyonso bayebi bizaleli na ngai banda bomwana, pamba té nakoli na Yeruzalem na kati ya bato ya ekolo na ngai. 5 Soki balingi bakoki kozala batemwen na ngai po bayebi ngai banda kala, ndenge nazalaki moto ya lingomba ya ba-Farizé, oyo bamipesá na Nzambe koleka Bayuda nyonso. 6 Soki lelo natelemi na tribinal, ezali bobele po natii motema na elaka Nzambe apesaká na bakoko na biso. 7 Nzokande bato ya mabota nyonso 12 ya Israel bazali kotia mitema kaka na elaka oyo, pe basalelaka Nzambe butu moi po ákokisa yango. Ya solo, mokonzi, ezali likolo ya elaka wana nde Bayuda bafundi ngai. 8 Bino bato bofandi awa, po na nini bokoki kondima té 'tè Nzambe asekwisaki moto moko oyo akufaki? 9 "Kala ngai pe nakanisaki 'tè nasengeli kosala makasi po na kopekisa bato bándimela Yezu ya Nazaret té. 10 Nabandaki kosala boye na Yeruzalem. Bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ngai bokonzi, bongo nabwakaki bakristo mingi na boloko. Kutu tango bazalaki koboma bango, ngai pe nandimaki. 11 Mbala mingi nazalaki kopesa bango etumbu na bandako nyonso ya losambo, pe nazalaki kotinda bango na makasi básundola kombo ya Yezu. Nazalaki na kanda mingi na motema po na bango, pe nanyokolaki bango tii na bamboka ya bapaya."

Ndenge Polo abongolaki motema

12 "Mokonzi, mokolo moko nakendeki na Damas; bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ngai nzela pe bokonzi, po násala kuna ndenge nasalaki na Yeruzalem. 13 Bongo, tango nazalaki na nzela, etikalaki moke midi ékoka, namoni eloko moko lokola kake elongwe na Likolo; yango ezalaki kongenga koleka moi, pe eyei kozipa ngai, ná bato oyo bazalaki kotambola ná ngai nzela moko. 14 Biso nyonso tokwei na se, pe nayoki mongongo elobi na ngai na monoko ya Bayuda: 'Saul, Saul, po na nini ozali konyokola ngai? Ngai naleki yo na makasi. Soki omeki koboya kosalela ngai, okominyokola pamba.' 15 Ngai natuni: 'Mokonzi, yo nani?' Mokonzi azongisi: 'Nazali Yezu oyo yo ozali konyokola. 16 Kasi longwa na mabelé pe telema. Nabimeli yo po nákómisa yo mosali na ngai, ákende koyebisa bato makambo omoni lelo, ná nyonso oyo nakolakisa yo na sima. 17 Nakobatela yo bipai nyonso nakotinda yo, ézala epai ya Bayuda to epai ya bikolo mosusu. 18 Fungola bango miso, báboya molili pe baya epai ya moi; báboya bokonzi ya Satan pe baya epai ya Nzambe; bándimela ngai po bázwa bolimbisi ya masumu, pe bákamata esika na kati ya bato oyo Nzambe aponá.'

Ndenge Polo azali kosala mosala na ye

19 "Yango wana, mokonzi Agripa, banda mokolo wana nakómá kotosa makambo Nzambe alakisaki ngai, naboyaki yango té. 20 Nabandaki kosakola 'tè bato bábongola mitema, bázongela Nzambe, pe básala misala oyo ezali kolakisa 'tè ya solo babongoli mitema. Nabandaki liboso na Damas pe na Yeruzalem, na sima natambolaki na région mobimba ya Yuda, pe kutu epai ya bikolo mosusu. 21 Po na makambo wana, Bayuda bakangaki ngai na Ndako ya Nzambe, pe balingaki koboma ngai. 22 Kasi Nzambe abateli ngai tii lelo, pe nazali kaka kosakola sango na ye epai ya bato nyonso, ézala bato pamba to bato minene. Nazali koloba likambo mosusu té, bobele oyo baprofete ná Moize balobaká 'tè esengeli kosalama: 23 Mesia akomona pasi pe akokufa; bongo na kati ya bato nyonso oyo bakufa, ye akozala moto ya liboso oyo akosekwa, po ásakola sango ya moi na ekolo na biso pe na bikolo mosusu."

Polo asengi 'tè Agripa ándima

24 Tango Polo azalaki kosamba boye, na mbala moko Festus agangeli ye: "Polo, ozali na liboma! Koyekola mingi ekómisi yo liboma!" 25 Kasi Polo azongiseli ye: "Tata mokonzi Festus, nazali na liboma té. Makambo nauti koloba ezali ya solo, pe ezali na tina. "Mokonzi Agripa ayebi makambo nyonso wana. Tembe té ayebi yango, pamba té esalamaki na miso ya bato. Yango wana nazali koloba na molende na miso na ye. 27 Yo mokonzi Agripa, ondimaka makambo baprofete balobaká? Nayebi 'tè ondimaka yango." 28 Agripa alobi ná Polo: "Etikali moke óbongola makanisi na ngai po nákóma mokristo." 29 Polo azongisi: "Ezala etikali moke to etikali moke té, nazali kobondela Nzambe po na yo pe po na bino nyonso bato bozali koyoka ngai lelo, bókóma lokola ngai; longola bobele ndenge bakangi ngai minyololo oyo!" 30 Bongo mokonzi Agripa, Festus, ná Berenise pe bato nyonso oyo bafandaki ná bango batelemi. 31 Awa bakei pembeni, balobani bango na bango: "Moto yango asali mabe moko té oyo ekoki na etumbu ya liwa to ya boloko." 32 Pe Agripa alobi na Festus: "Soki ye asengaki té 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ye, mbele bakokaki kotika ye."

Misala 27

Batindi Polo na Rome

1 Awa bazwi mokano 'tè tokokende na Italie na masuwa, bapesi Polo pe bato mosusu ya boloko na maboko ya komandan moko, kombo na ye Yulius, ya batayon ya basoda oyo bábengaka "Batayon ya mokonzi ya Rome". 2 Tokoti na masuwa moko eutaki na Adramite pe elingaki kokende epai ya ba-vile ya région ya Efeze, bongo tokei. Aristarke, moto ya Masedwane mboka na ye Tesalonike, azalaki pe ná biso. 3 Tongo etani, tokiti na Sidon. Yulius azalaki kosala Polo malamu, apesi ye nzela ya kokende kotala baninga po ázwa biloko azalaki na yango posa. "Tolongwe wana, toleki penepene ya esanga ya Shipre, pamba té mopepe ezalaki kozongisa biso sima. 5 Tokatisi ebale monene pembeni ya Silisie ná Pamfílie, pe tokómi na Mira na région ya Lisie. 6 Kuna komandan amoni masuwa moko ya Alexandrie ezali kokende na Italie, pe akotisi biso na masuwa yango. 7 Mikolo mwa mingi masuwa ezalaki kotambola malembe, pe tokómi penepene ya mboka Knide na pasi penza. Lokola mopepe ezalaki kopekisa biso, tango tomoni Salmone, libongo ya esanga ya Krete, tobaluki na ngambo oyo mopepe ezalaki makasi té. 8 Kuna pe totamboli kaka na pasi penza, bongo tokómi na esika moko bábengaka "Ba-Libongo ya Malamu". Yango ezali penepene ya vile ya Lasea. 9 Tolekisaki tango mingi, pe kotambola na masuwa ekómaki matata, pamba té eleko ya malili esi'ebandaki. Yango wana, Polo apesi bato toli, alobi: 10 "Batata, namoni 'tè mobembo oyo ekozala matata. Masuwa pe biloko mingi oyo ezali na kati ekobeba, ná biso pe tokoki kokufa." 11 Kasi komandan aboyi kondima maloba ya Polo, ayokeli kaka kapitene ná kolo ya masuwa; 12 pamba té libongo yango ezalaki malamu té po na kofanda na tango ya malili. Bato mingi kutu na kati ya masuwa basi'bakanaki kolongwa kuna, balingaki komeka kokóma na Fenix, libongo mosusu ya Krete, oyo etalaná na epai moi elalaka, ezali na banzela mibale ya kokotela, moko na epai ya likolo pe mosusu na epai ya se. Bongo bayokani báfanda kuna na eleko ya malili.

Mopepe makasi na kati ya ebale

13 Lokola mwa mopepe moke eutaki na epai ya Afrika, bato ya masuwa bakanisaki 'tè bakoki kosala makambo bakanaki. Batomboli longo, bongo masuwa ebandi kotambola penepene penza ya ngambo ya Krete. 14 Kasi sima ya mwa tango moke, mopepe makasi euti na bangomba ya esanga; bábengaka yango "mopepe ya Nord-Est". 15 Mopepe ezongisi masuwa sima, mayele ya kobunda na yango ezalaki té, bongo totiki yango émema biso. 16 Toleki mbangu na pembeni ya esanga moko ya moke oyo ezalaki kobatela biso na mopepe; kombo na yango Koda. Etikalaki moke ebei élongwa; tosimbi yango na pasi penza. 17 Awa basilisi kotombola yango, bakamati basinga ya minene pe bakangisi yango na masuwa, po mbonge ébuka yango té. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Libie, babwaki libaya moko ya monene oyo bakangisaki na masuwa, boye yango ebandi kotambola mwa malembe po na kilo ya libaya wana. 18 Nzokande mopepe ezalaki kobeta biso kaka makasi; yango wana na sima ya mokolo moko babandi kobwaka biloko oyo ezalaki na masuwa. 19 Pe na sima ya mikolo mibale basali ya masuwa bango moko babwaki ba-kapo oyo etambwisaka masuwa. 20 Mikolo mingi tozalaki komona moi té to minzoto; mopepe ezalaki kaka makasi. Pe totiaki lisusu motema ata moke té 'tè tokobika. 21 Elekaki mikolo mingi moto moko té aliaki; bongo Polo atelemi na kati na bango pe alobi: "Batata, soki boyokaka toli na ngai tango nalobaki na bino bólongwa na Krete té, mbele masuwa pe biloko elingaki kobeba té. 22 Kasi sik'oyo nasengi na bino 'tè bozala na molende, pamba té ata moto moko té na kati na bino akokufa; kaka masuwa yango moko nde ekobeba. 23 Nzambe na ngai oyo nasalelaka atindelaki ngai anjelu na ye na butu; 24 ye alobaki boye: 'Polo, kobanga té. Osengeli kotelema liboso ya mokonzi ya Rome. Po na yo, Nzambe akobikisa pe bato nyonso oyo bazali ná yo na masuwa.' 25 Yango wana, batata, bozala na molende. Natii motema na Nzambe 'tè makambo wana ekosalama, ndenge anjelu alobaki na ngai. 26 Kasi masuwa ekobwaka biso na esanga moko." 27 Sima ya poso mibale, na butu, mopepe makasi ezalaki kaka komema biso na Ebale Mediterané. Penepene na midi ya butu bato ya masuwa bakanisaki 'tè tokómi pembeni ya mokili. 28 Bameki modindo, bayei komona 'tè ezalaki na ba-metre 37. Bapusani mwa liboso, bameki lisusu pe bamoni 'tè ezali na ba-metre 28. 29 Babangaki 'tè masuwa étutana na mabanga. Yango wana, babwaki balongo minei na mai, na sima ya masuwa. Pe bazalaki kozela 'tè moi ébima noki. 30 Bato ya masuwa balingaki kokima, bakitisi ebei na mai pe basali lokola bakei kokangisa balongo liboso ya masuwa. 31 Kasi Polo alobi na komandan pe na basoda: "Soki bato oyo batikali na kati ya masuwa té, bino bokobika té." 32 Bongo basoda bakati basinga oyo esimbaki ebei, pe batiki yango ékweya na mai. 33 Na tongo, Polo abondeli bato nyonso bália, alobi: "Tosi'tokokisi poso mibale mobimba, bozali kaka kozela mopepe ésila, pe bozali kolia eloko ata moko té. 34 Yango wana nabondeli bino bólia, pamba té bozali na yango posa po na kobika. Moto moko té na kati na bino akozwa likama." 35 Awa Polo alobi boye, akamati mapa, apesi Nzambe mersi na miso na bango nyonso, pe abandi kolia. 36 Bongo bango nyonso bazwi molende pe babandi kolia. 37 Biso nyonso na kati ya masuwa tozalaki 27 6 . 38 Awa batondi, babwaki blé nyonso oyo ezalaki na masuwa, po na kolongola kilo.

Masuwa ekufi

39 Tongo etani, bato ya masuwa bamoni 'tè tokómi penepene ya mokili, kasi bayebaki mokili yango té. Lokola bamoni esika mai ekota na zelo, bazwi mokano bátelemisa masuwa kuna. 40 Bakati basinga ya balongo pe batiki yango na ebale. Bafungoli pe basinga ya yenda. Na sima, bamatisi kapo moko liboso ya masuwa po mopepe épusa yango epai ya mokili. 41 Kasi eteni ya liboso ya masuwa eyei kokangama na zelo oyo ezalaki na katikati ya mai; bongo bambonge eyei kobuka eteni ya sima. 42 Tango basoda bamoni 'tè masuwa ebandi kobeba, bazwi mokano ya koboma bato ya boloko, po moto moko té na kati na bango ákata mai pe ákima. 43-44 Kasi komandan alingaki kobikisa Polo, bongo apekisi bango. Atindi baoyo bayebaki mai bákweya na ebale liboso; kasi bamosusu básalela mabaya to biteni ya masuwa. Na ndenge wana bato nyonso bakómaki na mokili pe babikaki.

Misala 28

Na esanga ya Malte

1 Awa tobiki, toyoki 'tè bábengaka esanga wana Malte. 2 Bato ya esanga basali biso malamu penza. Lokola mbula ebandaki konoka pe malili ezalaki, bapelisi móto pe babengi biso nyonso tópusana penepene na yango. 3 Polo alokoti liboke ya koni pe abwaki yango na móto. Nyoka moko ebimi po na molunge, ekangami na liboko na ye. 4 Awa bato ya esanga bamoni 'tè nyoka etiki liboko ya Polo té, balobani bango na bango: "Tembe té, moto oyo azali mobomi. Atako abikaki na ebale, etumbu na ye ezali kaka." 5 Kasi Polo aningisi liboko, nyoka ekwei na móto pe ayoki ata pasi té. 6 Nzokande bato yango bazalaki kozela 'tè Polo ávimba to ákweya, pe ákufa na mbala moko. Kasi awa bazeli mingi pe bamoni 'tè likambo ya mabe ekweeli ye té, babongoli makanisi na bango pe babandi koloba 'tè: "Moto oyo azali moko na kati ya banzambe." 7 Penepene ya esika yango mabelé ya mokonzi ya esanga ezalaki wana, kombo na ye Publius. Ye ayambi biso na boboto pe tolali epai na ye mikolo misato. 8 Tata ya Publius azalaki kolala na mbeto, azalaki na fièvre pe pulupulu. Polo akei kotala ye; abondeli Nzambe, atieli ye maboko pe abikisi ye. 9 Na sima na yango, bato mosusu ya esanga oyo bazalaki na maladi bayei pe babiki. 10 Bakumisi biso mingi penza. Tango tolongwe kuna, bapesi biso biloko tozalaki na yango posa po na mobembo.

Polo akómi na Rome

11 Tosali sanza misato na esanga ya Malte, na sima tokoti na masuwa moko oyo elekisaki eleko ya malili kuna. Ezalaki masuwa ya Alexandrie, kombo na yango "Banzambe ya mapasa". 12 Tokiti na Sirakuze pe tofandi wana mikolo misato. 13 Tango tolongwe kuna tolandi nganibo ya esanga tii tokómi na Regio. Na mokolo elandaki, mopepe moko ya kitoko eyei komema masuwa na epai ya likolo, bongo na mikolo mibale tokómi na Puzole. 14 Kuna tokutani ná bandeko, pe basengi biso tófanda ná bango poso moko; bongo tobeti makolo tii na Rome. "Bandeko ya Rome bayokaki sango na biso, bayei kozela biso na zando ya Apius, na esika bábengaka "ya Bandako Misato". Awa Polo amoni bango, asepeli mingi pe apesi Nzambe mersi. 16 Tango tokómi na Rome, bapesi Polo nzela ya kozwa esika ya kofanda bobele ye moko, ná soda oyo azalaki kokengela ye.

Polo ná Bayuda ya Rome

17 Na sima ya mikolo misato Polo abengi bambuta-muntu ya Bayuda ya Rome. Tango basangani, alobi na bango: "Bandeko, atako nasalaki mabe té na ekolo na biso to na bizaleli ya bakoko na biso, Bayuda ya Yeruzalem bakangaki ngai pe bapesaki ngai na maboko ya bato ya Rome. 18 Bango basambisaki ngai pe balingaki kotika ngai, pamba té bamonaki tina ya kokatela ngai etumbu ya liwa té. 19 Kasi Bayuda baboyaki, bongo namonaki nzela mosusu té, yango wana nasengaki 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ngai. Kasi nazali na makanisi ya kobebisa lokumu ya ekolo na ngai té. 20 Tala tina penza nasengaki námona bino pe tósolola, pamba té bakangi ngai minyololo likolo ya elaka ya Nzambe oyo bato ya Israel batielaka mitema." 21 Bango bazongiseli ye: "Tozwaki ata mokanda moko té euti na région ya Yuda po na yo; pe na kati ya bandeko oyo bayei awa, moko té ayei na sango na yo, to alobi likambo ya mabe po na yo. 22 Kasi tolingi óyebisa biso makambo nyonso yo ozali kokanisa. Pamba té toyebi 'tè bipai nyonso bazali koboya lingomba na yo." 23 Bapesanaki elaka ná Polo, pe mokolo yango bayei mingi kotala ye na ndako. Banda tongo tii pokwa ateyi bango, alakisi bango ndenge Nzambe asi'abandi kotia bokonzi na ye, pe atii molende po bándimela Yezu; atangeli bango makambo ekómamá na Mibeko ya Moize pe na Mikanda ya baprofete. 24 Bamosusu bandimaki maloba na ye, kasi bamosusu baboyaki. 25 Tango batiki ye, bazalaki koyokana té bango na bango. Polo abakisi bobele boye: "Molimo Mosantu asakolaká ya solo na bakoko na bino, pamba té profete Ezaya alobaká boye: 26 'Kende epai ya bato wana pe loba na bango: Bokoyoka malamu, kasi bokoyeba tina té; bokotala malamu, kasi bokomona té. 27 Pamba té mitema ya bato oyo ekómi makasi; bazipi matoi pe bakangi miso, po miso na bango émona té, matoi na bango éyoka té, bázwa mayele té, pe bábongola mitema té. Bongo ndenge nini nábikisa bango?' " 28 Polo asukisi alobi: "Nazali koyebisa bino 'tè sik'oyo Nzambe atindeli bato ya bikolo mosusu sango 'tè akobikisa bango. Boye bango bakoyokela ye." 29 Awa Polo alobi bongo, Bayuda bakei pe babandi kotiana tembe makasi penza. 30 Polo asalaki mbula mibale mobimba na ndako ya kofutela. Kuna abandaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. 31 Azalaki koteya sango ya Nkolo Yezu Kristo na molende, pe kosakola 'tè Nzambe asi'abandi kotia bokonzi na ye. Moto moko té azalaki kopekisa ye.

Rome 1

Mbote

1-7 Mbote na bino nyoaso, bakristo ya Rome. Nzambe alingaka bino pe abengi bino bózala bato ya bosantu. Bolamu pe boboto ya Nzambe Tata na biso pe ya Nkolo Yezu Kristo ézala na bino. Mokanda oyo euti na ngai Polo, mosali ya Yezu Kristo. Nzambe moto abengi ngai názala ntoma; aponi ngai násakola Sango Malamu na ye, 2 oyo alakaká uta kala, na minoko ya baprofete na ye, ndenge ekómamá na Mikanda ya bosantu. 3-4 Sango Malamu yango etali Mwana na ye, Nkolo na biso Yezu Kristo. Ye akómaki moto, abotamaki na libota ya David. Akómá Molimo ya bosantu na ndenge Tata asekwisaki ye, pe apesi ye nguya nyonso ya Mwana ya Nzambe. 5 Likolo ya Kristo nde nazwá bolamu ya Nzambe pe nakómá ntoma, po nábenda bato ya bikolo nyonso, bándimela ye pe bátosa ye, boye bápesa ye lokumu. 6 Bino bato ya Rome pe, bozali na kati, pamba té Yezu Kristo azali kobenga lisusu ná bino.

Polo ná bakristo ya Rome

8 Bandeko, na lisanga na Yezu Kristo, napesi Nzambe mersi mingi likolo na bino nyonso, po sango ya bondimi na bino epanzani na mokili mobimba. 9 Pamba té nakanisaka bino butu moi. Nzambe ye moko ayebi yango; nasalelaka ye na motema moko, na ndenge nasakolaka Sango Malamu ya Mwana na ye. 10 Na ba-losambo na ngai nyonso nasengaka ye, ata ndele ápesa ngai nzela náya kotala bino. 11 Ya solo, nazali na posa mingi y a kokutana ná bino, po námemela bino mwa bolamu ya Molimo Mosantu, po na kolendisa bino. 12 Nalingi koloba 'tè ngai ná bino tólendisana po na bondimi oyo biso nyonso tozali na yango. 13 Bandeko na ngai, nalingi bóyeba 'tè mbala mingi nazalaki kokana koya epai na bino; kasi tii lelo nanu nazwi nzela té. Nalingi násala mosala epai na bino, ndenge nasalaka epai ya bikolo mosusu. 14 Nakómi lokola moto atondi na nyongo ya bikolo nyonso, ézala oyo eyebaná to oyo eyebaná té; ézala epai ya bato bayekolá to baoyo bayekolá té. 15 Yango wana nazali na posa ya kosakola Sango Malamu epai na bino pe, bato ya Rome.

Nguya ya Sango Malamu

16 Nayokaka soni té po na kosakola Sango Malamu. Yango ezali nguya ya Nzambe po na kobikisa bato nyonso oyo bandimeli Yezu Kristo, liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu. 17 Pamba té na kati ya Sango Malamu, Nzambe alakisaka bosembo na ye, na ndenge akómisaka bato bosembo bobele soki bandimeli ye. Ekómamá boye: "Moto oyo akómi bosembo na miso ya Nzambe po na bondimi, akobika."

Bato nyonso bazali na masumu

18 Kasi Nzambe alakisaka kanda na ye uta na Likolo, epai ya bato nyonso oyo basalaka masumu ya ndenge na ndenge, po misala na bango ya mabe epekisaka bango báyeba makambo ya solo té. 19 Pamba té bayebi malamu penza makambo ya Nzambe oyo bato nyonso bakoki koyeba. Nzambe ye moko moto alakisi bango yango polele. 20 Nzambe amonanaka té. Kasi lokola ye moto asalá mokili, soki bato batali misala na ye, mayele na bango emonaka makambo oyo miso emonaka té. Boye bakoki koyeba 'tè ye azali Nzambe ya solo, pe nguya na ye esilaka té. Yango wana bamemi ngambo. 21 Pamba té atako bayebi Nzambe, bazali kokumisa ye té na ndenge ebongi na Nzambe; bazali pe kopesa ye ata mersi té. Makanisi na bango ekómá ya pamba, pe mayele na bango ekómá molili. 22 Balobaká bazali bato ya mayele, nzokande bazali bazoba. 23 Esika 'tè bákumisa Nzambe oyo akufaka té, bango bakómá kokumisa bikeko ya bato oyo batangamá kokufa, ya bandeke, ya banyama to ya banyoka. 24 Yango wana Nzambe atiki bango básala makambo ya mbindo ndenge mitema na bango elingj, pe bámipesa na makambo ya soni. "Batiká makambo ya solo ya Nzambe, pe bandimaka oyo ya lokuta; básambelaka pe basalelaka biloko oyo Nzambe asalá, kasi Nzambe ye moko oyo asalá biloko nyonso, básambelaka ye té. Nzokande ye azali na lokumu nyonso seko! Amen. 26 Yango wana, Nzambe atiki bango bálanda makambo oyo ebebisaka lokumu na bango. Basi na bango basalaka makambo Nzambe andimaka té: bakómá koyebana nzoto basi na basi. 27 Mibali pe ndenge moko: batiká koyeba nzoto ya basi, kasi mitema na bango elingj bobele koyebana nzoto mibali na mibali; basalaka makambo ya soni na kati na bango, pe boye bazwaka etumbu oyo ekoki po na makambo na bango ya mabe. 28 Lokola bato baboyi kotosa Nzambe, ye atiki bango bálanda mayele na bango ya mabe; yango wana bakómá kosala makambo oyo esengeli kosalama té. 29 Batondi na mabe ya ndenge nyonso, lokoso, kanda, zuwa; babomaká bato, baswanaka, bakosaka pe bayebi kaka kobebisa. Bapanzaka makambo ya songi-songi; 30 batónganaka; bazali banguna ya Nzambe; bafinganaka, batondi na lofundu pe lolendo. Balukaka nzela nyonso ya kosala mabe, pe batosaka baboti na bango té. 31 Bazangi mayele, bazali mitema mibale, bazangi bolingo pe bayokelaka bato mawa té. 32 Bayebi malamu 'tè Nzambe alobá boye: bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana basengeli kokufa. Ata bongo, basalaka kaka makambo yango, pe basepelaka kutu na bato mosusu oyo basalaka ndenge wana.

Rome 2

Nzambe akosambisa bato nyonso na ndenge ekoki

1 Yo moto olobaka 'tè bato basalaka mabe, ata ozali nani, bakoki kolimbisa yo té. Po tango ozali koloba ndenge wana, ozali komikatela etumbu yo moko; pamba té yo pe osalaka yango. 2 Bato oyo basalaka makambo wana, Nzambe akatelaka bango etumbu; pe toyebi 'tè ye alandaka bobele makambo ya solo. 3 Bongo yo moto olobaka 'tè bato basalaka mabe, nzokande yo pe osalaka kaka ndenge moko, okanisi Nzambe akopesa yo etumbu té? 4 Ya solo, ye atondá na boboto, akangaka motema pe apesaká etumbu noki té; yango wana omonelaka ye? Yeba 'tè na boboto na ye azali nde kobenga yo po óbongola motema. 5 Kasi yo ozali motú makasi, olingi kobongola motema té; yango wana, ozali komilukela etumbu eleki monene. Okozwa yango, mokolo Nzambe akolakisa kanda na ye, pe akokata makambo ya bato nyonso na ndenge ekoki. 6 Pamba té Nzambe akopesa na moto nyonso lifuta na ndenge misala na ye ezali. 7 Baoyo bamipesaka po na kolanda misala malamu, pe balukaka bomengo pe lokumu oyo esilaka té, Nzambe akopesa bango bomoi ya seko. 8 Kasi baoyo batosaka Nzambe té, pe baboyaka makambo ya solo po na kolanda oyo ya mabe, Nzambe akolakisa bango kanda ata mawa té. 9 Bato nyonso oyo basalaka makambo ya mabe, bakomona pasi ya ndenge na ndenge; liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu. 10 Kasi bato nyonso oyo basalaka makambo ya malamu, Nzambe akopesa bango bomengo, lokumu pe boboto; liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu. 11 Pamba té Nzambe aponaka bato té. 12 Bato nyonso oyo bayebi Mibeko ya Moize té, soki basali masumu, bakobunga atako bayebi Mibeko té. Kasi Bayuda oyo bayebi Mibeko ya Moize, soki basali masumu, Nzambe akosalela Mibeko po na kosambisa bango. 13 Pamba té bato oyo bayokaka Mibeko biyokela, bango té bato bazali bosembo na miso ya Nzambe; kasi bobele baoyo batosaka Mibeko nde Nzambe akokómisa bango bosembo. 14 Na kati ya bikolo oyo eyebi Mibeko ya Moize té, bato mosusu ya mitema malamu basalaka makambo Mibeko ezali kotinda. Yango elakisi 'tè bazali na mibeko na bango, atako bayebi Mibeko ya Moize té. 15 Boye bazali kolakisa 'tè bayebi makambo oyo Mibeko etindaka; yango ekómamá na kati ya mitema na bango. Mayele na bango moko pe elakisaka yango; makanisi na bango eyebisaka bango soki basali mabe to malamu. 16 Nyonso wana ekomonana polele, mokolo Yezu Kristo akosambisa bato na kombo ya Nzambe, pe akobimisa ba-sekelé na bango. Wana nde ezali Sango Malamu oyo nasakolaka.

Bayuda pe bazali na masumu

17 Kasi yo moto ozali kotombola mapeka po ozali Moyuda, otiaka motema na Mibeko pe ozali kobeta tolo po na Nzambe na yo; 18 oyebi makambo Nzambe alingaka, pe Mibeko na ye esi'elakisá yo ndenge ya kopona makambo malamu. 19 Yo okani-saka 'tè oyebi kotambwisa bato bakufa miso, pe kolakisa nzela na bato bazali kotambola na molili; ^omitii molakisi ya bato bazangá mayele, pe moteyi ya baoyo bayekolá té. Lokola oyebi Mibeko, okanisi 'tè ozali na mayele nyonso pe oyebi makambo nyonso ya solo. 21 Bongo yo, molakisi ya bato mosusu, po na nini yo moko oyekolaka té? Yo moto oteyaka 'tè "koyiba té", po na nini yo moko oyibaka? 22 Yo moto olobaka 'tè "kosala kindumba té", po na nini yo moko osalaka kindumba? Yo moto omonaka bikeko ya banzambe biloko ya lisumá, po na nini okendeke koyiba na bandako oyo básambelaka bikeko? 23 Obetaka tolo 'tè oyebi Mibeko, kasi otsiolaka Nzambe na ndenge obukaka Mibeko na ye. 24 Pamba té ekómamá boye: "Bapaya bakomi kotsiola Nzambe ya Israel likolo na bino." 25 Yo Moyuda, komikatisa nzoto ezali na tina, soki otosaka Mibeko. Kasi soki obukaka Mibeko, yo moto bakatá nzoto, okokani ná moto oyo bakatá nzoto té. "Se bongo, mopaya oyo bakatá nzoto té, soki asalaka makambo Mibeko ezali kotinda, Nzambe akokamata ye lokola moto oyo bakatá nzoto. 27 Boye, mokolo Nzambe akosambisa bato, moto oyo atosaka Mibeko atako bakatá ye nzoto té, akolakisa mabe na yo Moyuda oyo otosaka Mibeko té, atako oyebi yango pe bakatá yo nzoto. 28-29 Pamba té kokóma Moyuda ya solo ezali té po na makambo oyo emonanaka, kasi bobele na oyo emonanaka té. Ezali té po na elembo emonanaka na nzoto, kasi bobele soki moto azwi elembo na kati ya motema na ye. Azwaka yango pe po na mikanda té, kasi po na mosala ya Molimo ya Nzambe. Pe moto ya ndenge wana azwaka lokumu oyo euti na Nzambe, kasi na bato té.

Rome 3

1 Bongo Bayuda baleki bato mosusu na nini? Kokatisa nzoto ezali nde na tina? 2 Ya solo, ezali na tina mingi penza. Likambo eleki, yang'oyo: Nzambe apesaká bango maloba na ye, atiaká motema epai na bango. 3 Kasi boni? Awa bato mosusu na kati na bango batikaki kotia mitema na Nzambe, bongo Nzambe pe akotika kotia motema epai ya Bayuda? 4 Ata moke té! Bato nyonso bamonani lokuta; kasi Nzambe asengeli komonana moto ya solo. Pamba té ekómamá boye: "Makambo yo olobaka elaki-saka 'tè ozali bosembo; bongo soki basambisi yo, osengeli kolonga." 5 Boye, mabe oyo biso tosalaka ezali kolakisa 'tè Nzambe azali moto ya bosembo. Bongo tóloba nini? Nazali kotuna kaka ndenge bato batunaka: "Nzambe azangi bosembo po apesaká biso etumbu?" 6 Nalobi boye: Nzambe akoki kozanga bosembo ata moke té! Pamba té ezali ye moto akosambisa bato nyonso. 7 Tóloba lisusu nini? "Soki lokuta na biso epesaka Nzambe lokumu, pe emoni-saka penza 'tè ye azali moto ya solo, po na nini asengeli kopesa biso etumbu lokola bato ya masumu?" 8 Soki tokanisi ndenge wana, tokobanda kutu kosala mabe, po mabe yango ésuka malamu. Bato mosusu batóngaka ngai 'tè ngai moto nalobaka bongo. Bato yango bakozwa etumbu oyo ekoki na bango.

Moto moko té azali bosembo

9 Yango boni? Biso Bayuda toleki nde bato mosusu? Ata moke té! Nauti kolakisa 'tè bato nyonso bazali baumbu ya masumu, ézala Bayuda, to bato ya bikolo mosusu. 10 Pamba té ekómamá boye: "Ata moto moko té azali bosembo; 11 ata moko té azali na mayele; ata moko té alukaka Nzambe. 12 Bato nyonso bapesi Nzambe mikongo, babebá ndenge moko; ata moto moko té asalaka malamu. 13 Maloba na bango ememelaka bato liwa; balukaka tango nyonso kokosa bato. Minoko na bango ebimisaka ngenge ya nyoka; 14 babimisaka maloba ya masumá pe ya lokuta. 15 Bakendeke mbangu po na koboma bato; 16 babebisaka bato pe bayokisaka bango pasi. 17 Bayebi nzela ya boboto té; 18 babangaka Nzambe ata moke té." 19 Makambo wana ekómamá na Mikanda ya Nzambe; bongo toyebi 'té yango etali Bayuda; pamba té bango nde bato basengeli kotosa Mibeko. Boye moto moko té akoki komilongisa; ya solo, bato nyonso bamemi ngambo na miso ya Nzambe. 20 Yango wana moto moko té akómaká bosembo po atosaka Mibeko. Pamba té Mibeko ezali bobele kolakisa bato 'tè bazali kosala masumu.

Nzambe akómisaka bato bosembo po na bondimi

21-22 Kasi sik'oyo Nzambe alakisi bosembo na ye, ndenge alakaká na mikanda ya Mibeko pe ya baprofete. Atii Mibeko pembeni; asaleli bosembo na ye epai ya bato nyonso oyo bazali kotia mitema na Yezu Kristo. Atali bobele bondimi na bango, pamba té bato nyonso bazali ndenge moko: 23 bango nyonso basali masumu pe bazangi nkembo ya Nzambe na kati na bango. 24 Nzambe akómisaka bango bosembo bobele po na bolamu na ye, po Yezu Kristo azweli bango bonsomi. 25 Pamba té tango babomaki ye na kuruze, ezali Nzambe moto atiaki ye na miso ya bato nyonso, po ázwela baoyo bandimeli ye bolimbisi, na makila na ye moko. Nzambe asalaki bongo, po álakisa bosembo na ye. Na tango ya kala, akatelaki bato etumbu po na masumu té; 26 azalaki kokanga motema. Sik'oyo alakisi bosembo na ye, po ámimonisa moto ya bosembo, pe ákómisa baoyo bandimeli Yezu bato ya bosembo. 27 Boye moto nini akoki kobeta tolo? Ata moko té! Po na nini? Bayuda bakanisi 'tè bakoki kobeta tolo po batosaka Mibeko; nzokande biso bato tozali kaka kolanda nzela ya bondimi, 28 toyebi 'tè moto akómaká bosembo té po atosaka Mibeko, kasi bobele po na bondimi na ye. 29 Bókanisa nanu. Nzambe azali bobele ya Bayuda? Azali Nzambe ya bikolo nyonso té? Tembe ezali té: azali pe Nzambe ya bikolo nyonso. 30 Pamba té, Nzambe azali se moko. Azali kokómisa Bayuda bosembo po na bondimi na bango; azali kosala pe ndenge moko na bato ya bikolo mosusu. 31 Boye, awa tokómi na bondimi, tozali komona Mibeko eloko ya pamba? Ata moke té! Kasi tozali kolakisa tina penza ya Mibeko.

Rome 4

Abraham moto ya bondimi

1 Bongo, tóloba nini po na koko na biso Abraham? Bolamu nini ye azwaka? 2 Soki akómaki moto ya bosembo na miso ya Nzambe po na misala na ye, mbele akokaki komikumisa. Kasi akokaki komikumisa té na miso ya Nzambe. 3 Pamba té ekómamá boye: "Abraham andimelaki Nzambe, yango wana Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo." 4 Moto oyo asalaka, bafutaka nde mosala na ye; lifuta yango ezali likabo ya ofelé té. 5 Nzokande Nzambe atalaká misala ya Abraham té. Akamataki ye lokola moto ya bosembo, po ye andimaki 'tè Nzambe akómisaka bato ya masumu bosembo. 6 Se ndenge wana, nzembo ya David ezali kolakisa esengo ya moto oyo Nzambe akamati lokola moto ya bosembo, pe atali misala na ye té. Ekómamá boye: 7 "Esengo na bato oyo Nkolo alimbisi, pe alongoli masumu na bango; 8 esengo na moto oyo Nkolo akamati lokola moto ya masumu té." 9 Esengo yango ezali bobele po na bato oyo bakatá nzoto? Té! Ezali pe po na baoyo bakatamá nzoto té. Pamba té nauti koloba boye: "Nzambe akamataki Abraham lokola moto ya bosembo po na bondimi na ye." 10 Makambo yango elekaki tango nini? Liboso 'tè bákata Abraham nzoto, to sima? Ezalaki liboso, kasi sima té. 11 Na sima Abraham amikatisaki nzoto; Nzambe apesaki ye elembo yango, elakisaki 'tè asi'akómaki bosembo po na ndenge andimelaki Nzambe, tango bakati ye nanu nzoto té. Yango wana Abraham akómá koko ya bato nyonso oyo bandimeli Nzambe ata bakatamá nzoto té; pamba té Nzambe akamati bango lokola bato ya bosembo. 12 Azali pe lisusu koko ya Bayuda, kasi ezali té po bango bakatamá nzoto; azali koko ya Bayuda oyo balandaka nzela ya bondimi, ndenge koko na biso Abraham azalaki kolanda, liboso 'tè bákata ye nzoto.

Tozwaka bolamu ya Nzambe bobele po na bondimi

13 Nzambe alakaká Abraham pe bana na ye 'tè akokómisa mokili mobimba bomengo na bango. Apesaki elaka yango té po Abraham azalaki kotosa Mibeko; kasi apesaki yango po Abraham akómaki moto ya bosembo, awa andimelaki Nzambe. 14 Bongo soki Nzambe apesaká bana ya Abraham bomengo yango kaka po batosaka Mibeko ya Moize, mbele bondimi ezangi tina, pe elaka ya Nzambe ekómi ya pamba. 15 Pamba té mibeko ekatelaka bato etumbu; kasi soki mibeko ezali té, ndenge ya koboya yango ezali pe té. 16 Nzokande Nzambe apesaká bomengo yango bobele na bato oyo bazali kondimela ye; boye ezali kaka po na bolamu ya Nzambe. Na ndenge wana elaka ezali po na bana nyonso ya Abraham: ézala Bayuda oyo batosaka Mibeko, to bato nyonso oyo bandimelaka Nzambe lokola Abraham. Boye Abraham akómá koko na biso nyonso, 17 ndenge ekómamá: "Nakómisi yo koko ya bikolo ebele." Abraham azali koko na biso na miso ya Nzambe, po andimaki 'tè ye azali na nguya ya kosekwisa bato oyo bakufa; pe biloko oyo ezalaki té, ye moto asalaka yango. 18 Akokaki kotia lisusu motema té 'tè akobota; kasi azalaki kotiela kaka Nzambe motema. Boye ayaki kokóma "koko ya bikolo ebele", ndenge Nzambe alobaká na ye: "Bana na yo bakozala ebele lokola minzoto." "Etikalaki moke ákokisa mbula kama mobimba; nzokande alembaki kondimela Nzambe té, ata amonaki 'tè ye ná mwasi na ye Sara bakómaki bampaka penepene ya kokufa. 20 Atiaki tembe té po na elaka ya Nzambe; kasi bondimi na ye epesaki ye molende, pe akumisaki Nzambe. 21 Andimaki penza 'tè Nzambe azali na nguya ya kokokisa makambo oyo ye alakaki. 22 Yango wana "Nzambe akamataki Abraham lokola moto ya bosembo" po na bondimi na ye. "Nzokande maloba oyo ya Nzambe ekómamá bobele po na Abraham ye moko té, 24 kasi ekómamá pe po na biso. Pamba té Nzambe akamati biso pe lokola bato ya bosembo, po tondimi 'tè ye moto asekwisaki Nkolo na biso Yezu. "Atikaki bato báboma ye po álongola masumu na biso, pe asekwisaki ye po ákómisa biso bosembo.

Rome 5

Boboto ezali na kati na biso ná Nzambe

1 Ya solo, Nzambe akómisá biso bosembo po na bondimi; boye sik'oyo boboto ezali na kati na biso ná Nzambe, po na Nkolo na biso Yezu Kristo. 2 Ezali ye moto ayeeli biso bolamu ya Nzambe oyo ebongisá biso. Yango wana tozali kobeta tolo, pamba té tozali kotia mitema 'tè Nzambe akopesa biso lokumu na ye ya libela. 3 Atako tozali nanu komona pasi, tozali kaka kobeta tolo, po toyebi 'tè pasi eyeelaka biso molende. 4 Soki tozali na molende na tango ya pasi, tokómi bato ya kokoka; bongo soki tozali bato ya kokoka, nde toyebi kotia mitema na Nzambe. 5 Pe soki totii mitema epai na ye, tokobunga té, po bolingo na ye esi'ekoteli biso, awa Nzambe apesi biso Molimo Mosantu. 6 Pamba té tango tozalaki nanu na boumbu ya masumu, Kristo akufaki po na biso bato ya mabe, na eleko oyo Nzambe atiá. 7 Nani akoki kondima kokufa po na moto mosusu, ata soki ye asali mabe té? Tango mosusu bakoki kondima kokufa po na moto ya malamu. 8 Kasi Nzambe alakisaki 'tè alingi biso mingi penza: pamba té Kristo akufaki po na biso, tango tozalaki nanu bato ya masumu. 9 Boye, lokola Kristo asi'akómisá biso bato ya bosembo na liwa na ye, tembe ezali té: ye pe akobikisa biso, mokolo Nzambe akokatela bato ya masumu etumbu. 10 Pamba té tango tozalaki banguna ya Nzambe, Mwana na ye azwelaki biso bolimbisi, po akufaki likolo na biso; tembe ezali té: lokola tosi'tozwi bolimbisi, ye pe akobikisa biso po azali na bomoi. 11 Banda sik'oyo kutu tozali kobeta tolo na miso ya Nzambe, po na Nkolo na biso Yezu Kristo, awa tosi'tozwi bolimbisi po na ye.

Adamu ná Kristo

12 Tótala nanu ndenge tozwi bolimbisj. Masumu ekotaká na mokili po na moto se moko Adamu, pe liwa ekotaká po na masumu. Banda tango wana, liwa ezalaki kokweela bato nyonso, po bango nyonso basali masumu. 13 Boye, masumu ezalaká na mokili, liboso 'tè Mibeko éya. Kasi masumu ekoki kobenda etumbu té, soki mobeko ezali té. 14 Nzokande uta na tango ya Adamu tii na Moize, liwa ezalaká kaka koboma bato, atako masumu na bango ekokanaki té ná oyo ya Adamu; pamba té ye abukaki mobeko oyo Nzambe apesaki ye. Adamu azalaki ndakisa ya Kristo, moto oyo Nzambe alakaki 'tè akoya. 15 Kasi likabo oyo Kristo ayeeli biso eleki penza mabe oyo Adamu asalaki. Ya solo, mabe ya moto se moko ememelaki bato nyonso liwa; kasi bolamu ya Nzambe eleki penza na tina, yango wana tembe ezali té: likabo ya bolamu oyo moto se moko Yezu Kristo amemi, Nzambe apesi yango pe po na bato nyonso. 16 Boye lisumu ya moto se moko wana ná likabo ya Nzambe esukaki pe ndenge moko té: Nzambe akatelaki bato etumbu po na lisumu ya moto se moko; nzokande atako bato basalaki mabe mbala mingi, likabo ya Nzambe ezali kokómisa bango bosembo. 17 Ya solo, liwa elongaki bato po na moto se moko pe po na mabe na ye; kasi moto se moko Yezu Kristo akokisi makambo eleki penza na tina; pamba té amemeli bato bolamu eleki monene, oyo ekómisi bango bosembo. Yango wana tembe ezali té: bakozwa pe bomoi, bongo bakolonga po na seko. 18 Nalobi boye: lisumu ya moto se moko ememelaki bato nyonso etumbu. Se ndenge wana bato nyonso bakoki kokóma bosembo pe bakozwa bomoi, po na mosala ya bosembo ya moto se moko. 19 Ndenge bato nyonso bakómaki bato ya masumu po moto se moko aboyaki kotosa Nzambe, ndenge moko pe bato nyonso bakoki kokóma bosembo po moto se moko ayei kotosa Nzambe. 20 Mibeko ya Moize eyaki, po émonisa polele 'tè bato bazali kosala masumu mingi; kasi epai masumu ekómi mingi, bolamu ya Nzambe pe ekómi lisusu mingi penza koleka. 21 Yango wana, ndenge masumu ezalaki na nguya ya koboma bato, ndenge moko pe bolamu ya Nzambe ezali na nguya ya kokómisa bato bosembo, pe ya kopesa bango bomoi ya seko, po na Nkolo na biso Yezu Kristo.

Rome 6

Liwa pe bomoi na lisanga na Kristo

1 Bongo tóloba nini? Tósalaka kaka masumu po bolamu ya Nzambe ékóma mingi? 2 Ata moke té! Po na makambo etali masumu, tokómi lokola tosi'tokufá. Ndenge nini tokoki kotikala kaka bato ya masumu? 3-4 Boyebi té? Biso nyonso tozwaki batisimo po tókóma bato ya Yezu Kristo; tozwaki yango po tókufa esika moko ná ye. Tango babatisaki biso, ezalaki lokola bakundaki biso esika moko ná ye. Esalamaki boye po, ndenge Tata asekwisaki Kristo na nguya na ye, se ndenge wana biso pe tólanda bizaleli ya bomoi ya sika. 5 Pamba té lokola tosi'tosangani na Kristo awa tokufi ndenge ye akufaki, tokosangana pe ná ye tango tokosekwa ndenge ye asekwaki. 6 Toyeba malamu 'tè bomoto oyo tozalaki na yango liboso, esi'ekendá ná Kristo na kuruze, po nzoto na biso ya masumu ékufa, bongo tózala lisusu baumbu ya masumu té. 7 Po soki moto akufi, boumbu ya masumu pe esili. 8 Kasi lokola tosi'tokufá ná Kristo, tondimi 'tè tokozala pe na bomoi ya seko, esika moko ná ye. 9 Pamba té toyebi 'tè Kristo asi'asekwá, akokufa lisusu té: liwa ekoki kosala ye lisusu eloko té; 10 po tango ye akufaki, bokonzi ya masumu esilaki libela. Sik'oyo azali na bomoi na miso ya Nzambe. 11 Bino pe ndenge moko: po na makambo etali masumu, bóloba 'tè bosi'bokufá, pe bozali na bomoi na miso ya Nzambe, lisanga moko na Yezu Kristo. 12 Lokola nzoto na bino etangamá kokufa, bókeba: masumu éya kolonga bino té: botosaka baposa na bino ya mabe ata moke té. 13 Bópesa nzoto na bino té po ékóma moumbu ya masumu: bósalela yango té po na kokokisa makambo ya mabe. Kasi bómipesaka mobimba na Nzambe lokola nde bato babiki na liwa, po na kokokisa makambo ya bosembo. 14 Masumu ekoki kosala bino lisusu eloko té; bosengeli kotosa Mibeko té, kasi bobele bolamu ya Nzambe.

Tosengeli kozala baumbu ya makambo ya bosembo

15 Nyonso wana elakisi nini? Lokola tosengeli kotosa Mibeko té kasi bobele bolamu ya Nzambe, tósalaka kaka masumu? Ata moke té! 16 Boyebi malamu 'tè soki bomipesi na boumbu ya moto moko, bosengeli kotosa ye lokola baumbu. Soki bokómi baumbu ya masumu, yango ekomemela bino liwa; soki bokómi baumbu ya kotosa Nzambe, ye akokómisa bino bosembo. 17 Yango wana tópesa mersi na Nzambe! Pamba té bózalaka baumbu ya masumu, kasi sik'oyo bokómi kotosa na motema moko mateya oyo bozwaki. 18 Bosi'bolongwe na boumbu ya masumu, pe bokómi baumbu ya makambo ya bosembo. 19 Nazali kopesa bino ndakisa ya makambo bomonaka epai ya bato, po bókoka koyeba tina ya mateya oyo. Liboso bomipesaká lokola baumbu, na makambo ya soni ná ya masumu, pe bokómaká banguna ya Nzambe. Ndenge moko pe, sik'oyo bómipesa lokola baumbu na makambo ya bosembo, po bókóma bosantu penza. 20 Tango bózalaka baumbu ya masumu, bobandaki koboya makambo ya bosembo. 21 Bózalaka kosala makambo oyo ezali koyokisa bino soni lelo. Bongo bozwaki nini? Suka na yango se liwa! 22 Kasi sik'oyo bosi'bolongwe na boumbu ya masumu pe bokómi baumbu ya Nzambe; bongo bozwi bolamu, bokómi bosantu penza. Suka na yango nde bomoi ya seko. "Pamba té lifuta ya masumu ezali liwa; kasi likabo ya Nzambe ezali bomoi ya seko, na lisanga ya Nkolo na biso Yezu Kristo.

Rome 7

Tolongwá na boumbu ya Mibeko

1 Bandeko, boyebi malamu eloko nini mibeko. Moto asengeli kotosa mibeko bobele na tango azali nanu na bomoi. 2 Ndakisa: mibeko etindaka 'tè mwasi ya libala ákangama kaka na mobali na ye tango mobali azali nanu na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi asengeli kotosa lisusu mibeko ya libala té. 3 Bongo soki abali mobali mosusu tango mobali na ye azali nanu na bomoi, bakoloba 'tè asali kindumba. Nzokande soki mobali na ye akufi, mwasi wana asengeli kotosa mibeko ya libala lisusu té; soki abali mobali mosusu, asali kindumba té. 4 Bandeko na ngai, bino pe ndenge moko. Mibeko ya Moize ezalaki lokola mokonzi na bino; kasi bokómi lokola bato bakufa, esika moko ná Kristo. Sik'oyo bokómi bato ya mokonzi mosusu, ye nde Kristo oyo asekwá. Nzambe asali bongo po tósalela ye misala ya malamu. 5 Ya solo, tango tozalaki kolanda bizaleli ya bomoto, baposa ya mabe ezalaki kosala na kati na biso, pe Mibeko epesaki yango nguya ya koyeela biso liwa. 6 Kasi sik'oyo tosi'tolongwe na boumbu ya Mibeko, tokómi lokola bato bakufa. Kasi Molimo Mosantu asi'abongisi biso po tósalela Nzambe na ndenge ya sika; totiki kolanda makambo ya kala, oyo ekómamá na mikanda.

Mibeko pe masumu

7 Bongo tóloba nini? Mibeko ya Moize ekómi nde masumu? Ata moke té! Kasi toyaki koyeba masumu kaka po na Mibeko. Pamba té Mibeko epekisaka: "Bólula té". Soki bongo té, mbele tokokaki koyeba té 'tè kolula ezali mabe. 8 Bongo po na Mibeko, masumu ezwá nzela ya kotinda bato bálula makambo ya mabe ndenge na ndenge. Po soki Mibeko ézalaka té, mbele masumu ezali na nguya té. 9 Kalakala, tango Mibeko ezalaká té, bato bazalaki na bomoi; kasi tango kaka Mibeko ebimaki, masumu eyei kozwa nguya 10 pe ekómi komemela bato liwa. Boye Mibeko oyo esenge-laki kopesa bato bomoi, eyeeli bango liwa. 11 Pamba té, po na Mibeko, masumu ezwá nzela ya kokosa bato pe koboma bango. 12 Ya solo, Mibeko ya Moize eutaka na Nzambe; mitindo na yango nyonso ezali ya bosembo pe ya malamu. 13 Boye eloko ya malamu nde moto eyeelaka bato liwa? Ata moke té! Eloko eyeelaka bato liwa, ezali nde masumu. Mibeko ezali malamu, kasi masumu esalelaka eloko wana ya malamu pe ekómá koyeela bato liwa; boye po na Mibeko, masumu eyei komonana eloko ya mabe koleka.

`Bato bazali baumbu ya masumu

14 Toyebi 'tè Mibeko eutaka na Nzambe; kasi biso tozali bato ya mokili, tokómi baumbu ya masumu. 15 Makambo nini penza tósalaka? Oyo tolingaka kosala, tósalaka yango té; nzokande tósalaka oyo toyinaka. 16 Ya solo, tondimi 'tè Mibeko ezali malamu; pamba té makambo oyo tósalaka, tolingaka yango penza té. 17 Yango wana, emonani 'tè biso té bato tósalaka bongo, kasi ezali nde masumu oyo efandaka na mitema na biso. 18 Toyebi 'tè biso bato tozalaka na mitema malamu té. Pamba té ata toyoki posa ya kosala makambo ya malamu, tokokaka té. 19 Makambo ya malamu oyo tolingaka kosala, tósalaka yango té; nzokande oyo toyinaka, yango nde tósalaka. 20 Boye soki tozali kosala makambo tolingaka té, wana elakisi 'tè ezali biso té bato tozali kosala bongo; ezali nde masumu oyo efandaka na mitema na biso. 21 Tomoni 'tè makambo na biso elekaka boye: tolingaka kosala makambo ya malamu, kasi kaka posa ya kosala mabe moto eyeelaka biso. 22 Mayele na biso esepelaki mingi na Mibeko ya Nzambe; 23 kasi na kati ya nzoto na biso tomonaka ndenge mosusu: baposa ya mabe ezali koboya makambo ya Mibeko oyo mayele na biso ezali kondima. Baposa yango ekómisaka biso baumbu ya masumu oyo esalaka na nzoto na biso. 24-25 Ya solo, tomonaka boye: mayele na biso etindaka biso tótosaka Mibeko ya Nzambe; kasi bomoto na biso ebendaka biso tósalaka masumu. Aa! Biso bato ya mawa penza! Nani akolongola biso na boumbu ya nzoto oyo ezali komemela biso liwa? Ezali kaka Nzambe; pe asi'asalá yango! Tópesa ye mersi, lisanga na Nkolo na biso Yezu Kristo!

Rome 8

Bomoi oyo eutaka na Molimo ya Nzambe

1 Sik'oyo, lokola tosangani na Yezu Kristo, etumbu moko té ekoki kokweela biso. 2 Pamba té tozwi Mibeko ya sika, ya Molimo oyo apesi biso bomoi po na Yezu Kristo, yango nde moto elongoli biso na boumbu ya masumu oyo ezalaká komemela bato liwa. 3 Mibeko ya Moize ekokaki kobongisa bato té, po bomoto na biso ezangi nguya ya kotosa Mibeko. Kasi Nzambe nde ayei kobongisa bato, na ndenge atindaki Mwana na ye moko po álongola masumu; ye akómaki moto lokola biso bato ya masumu. Tango bakatelaki ye etumbu ya liwa, ezali Nzambe moto azalaki kokatela masumu etumbu pe kosilisa nguya na yango. 4 Boye biso bato toboyaka kolanda nzela ya bomoto pe tolandaka nzela ya Molimo, tokómi kokokisa makambo ya bosembo oyo Mibeko ezali kotinda. 5 Baoyo balandaka nzela ya bomoto, bakanisaka makambo oyo bomoto elingaka; kasi baoyo balandaka nzela ya Molimo ya Nzambe, bakanisaka makambo oyo Molimo alingaka. 6 Makambo ya bomoto ememelaka bato liwa; kasi Molimo ya Nzambe amemelaka bato bomoi pe boboto. 7 Bato oyo balandaka bobele makanisi ya bomoto bazali banguna ya Nzambe; batosaka Mibeko na ye té, kutu bakoki pe kotosa yango té. 8 Bato oyo balandaka nzela ya bomoto bakoki kosepelisa Nzambe té. 9 Nzokande bino, bolandaka nzela ya bomoto té, kasi oyo ya Molimo, pamba té Molimo ya Nzambe asi'akotelá bino na mitema. Moto oyo azangi Molimo ya Kristo, azali moto na ye té. 10 Kasi soki Kristo akotelá bino na mitema, atako nzoto na bino esengeli kokufa po na masumu, kasi Molimo oyo bozwi apesi bino bomoi; pamba té bosi'bokómi bosembo na miso ya Nzambe. 11 Bongo atako nzoto na bino etangamá kokufa, lokola Molimo ya Nzambe oyo asekwisá Yezu azalaká na mitema na bino, tembe ezali té: Nzambe oyo asekwisá Yezu Kristo akozongisa pe bomoi na nzoto na bino. Ezali Molimo oyo azalaká na mitema na bino moto akosala bongo. 12 Yango wana, bandeko, tosengeli kotosa Nzambe, kasi makambo ya bomoto té. 13 Pamba té soki bolandaka makambo ya bomoto, bokokufa; bokobika bobele soki Molimo asalisaka bino po boboma makambo oyo nzoto elingaka. 14 Baoyo nyonso Molimo ya Nzambe atambwisaka, bazali bana ya Nzambe. "Bótika kobanga, pamba té bozwi Molimo ya Nzambe. Ye akómisi bino baumbu té kasi bana ya Nzambe. Ye pe moto apesaká biso nzela ya kobenga Nzambe: "Ába! Tata na ngai!" 16 Ya solo, ndenge mitema na biso ezali kondima 'tè tozali bana ya Nzambe, Molimo ya Nzambe ye penza azali koloba se ndenge moko. 17 Pe soki tozali bana, tokozwa pe bomengo oyo Nzambe abombelá bana na ye. Tokozwa yango na lisanga na Kristo, pamba té lokola tozali komona pasi ndenge moko na ye, tokozwa pe lokumu esika moko ná ye.

Lokumu oyo Nzambe abombelá biso

18 Ngai namoni 'tè bapasi oyo ekweelaka biso na mokili ezali moke; mokolo ezali, Nzambe akolakisa polele lokumu monene oyo abombelá biso. 19 Kutu biloko nyonso Nzambe asalá ezali kozela na esengo bobele mokolo oyo Nzambe akolakisa lokumu ya bana na ye. 20 Pamba té biloko nyonso eyaká kobeba, atako yango moko ememaki ngambo té; ezali nde bato babebisaka yango. Nzokande elikya ezali 'tè 21 na mokolo ya suka, Nzambe akolongola biloko nyonso na boumbu oyo ememaka liwa, pe akopesa yango bonsomi pe lokumu ya bana na ye. 22 Ya solo, toyebi 'tè tii sik'oyo biloko nyonso Nzambe asalá ezali kolela pe komona pasi, lokola mwasi oyo alingi kobota. 23 Ná biso pe lisusu tozali kolela mingi na mitema, atako tosi'tozwi Molimo ya Nzambe lokola likabo ya liboso, pamba té tozali kozela 'tè Nzambe ákómisa biso bana na ye penza, mokolo akolongola nzoto na biso na boumbu. 24 Tosi'tobiki, na ndenge totii mitema na Nzambe 'tè akobikisa biso. Soki moto asi'azwi eloko, akotia lisusu motema té 'tè akozwa yango. Ndenge nini akoki kotia motema na eloko oyo asi'azwá? 25 Kasi biso tozali kotia mitema na bolamu oyo tozwi nanu té; bongo tozali kokanga mitema po na kozela yango. 26 Molimo ya Nzambe ye moko ayaka kosalisa biso. Pamba té tozangi makasi, toyebi té ndenge nini tosengeli kosambela; kasi Molimo ye moko abondelaka Nzambe po na biso, na ndenge oyo bato bakoki koloba té. 27 Bongo Nzambe oyo amonaka se ya mitema ya bato, ayebi makanisi ya Molimo; pamba té Molimo abondelaka Nzambe po na bato na ye, ndenge Nzambe ye moko alingaka. 28 Toyebi 'tè na kati ya makambo nyonso, Nzambe asalaka po na bolamu ya bato oyo balingaka ye, baoyo ye moko azali kobenga ndenge akanaká banda kala. 29 Bato oyo Nzambe ayebaká banda kala, aponá bango bákokana ná Mwana na ye, po ye ákóma Yaya ya liboso, oyo azali na baleki ebele. 30 Baoyo Nzambe aponá, abengi bango; baoyo ye abengi, akómisi bango bato ya bosembo; pe baoyo bakomi bato ya bosembo, apesi bango lokumu na ye.

Nzambe azali na bolingo monene

31 Bongo, tóloba lisusu nini? Soki Nzambe alingi biso, nani akoki kosala biso mabe? 32 Nzambe aboyaki té kopesa biso Mwana na ye moko, kasi akabaki ye po na biso nyonso! Lokola asi'apesi biso Mwana na ye, bolamu nini akopimela biso lisusu? 33 Nani akofunda bato oyo Nzambe aponá? Ata moto moko té! Po Nzambe asi'akómisá bango bosembo. 34 Nani akoki kokatela bango etumbu? Ata moto moko té! Po Yezu Kristo asi'akufá pe asekwá, azali na esika ya lokumu epai ya Nzambe, pe abondelaka ye po na biso. 35 Eloko nini ekoki kokabola biso na bolingo ya Kristo? Ata eloko moko té. Ezala pasi to mawa, monyokoli to nzala, kokelela, likama to pe liwa. 36 Pamba té ekómamá boye: "Mikolo nyonso balukaka koboma biso likolo na yo; bakamataka biso lokola bameme oyo balingi kolia." 37 Kasi na makambo wana nyonso tozali kolonga penza, na nguya ya Nzambe oyo alingaka biso! 38 Pamba té nayebi malamu penza 'té ata eloko moko té ekoki kokabola biso na bolingo na ye; ézala liwa to bomoi; ézala ba-anjelu to milimo ya mabe, ézala makambo ya lelo to oyo ekoya, 39 ézala na Likolo to awa na se, ata kutu eloko nini oyo Nzambe asalá. Eloko moko té ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe, oyo Nkolo na biso Yezu Kristo alakisi biso.

Rome 9

Nzambe ná bato ya Israel oyo ye aponá

1-2 Makambo nazali kokóma sik'oyo ezali koyokisa ngai motema pasi mingi penza; Kristo ayebi 'tè ezali ya solo, nazali kobuka lokuta té. Nazali koyebisa bino yango na motema moko, ndenge Molimo Mosantu azali kolakisa ngai yango. Ya solo, natondi penza na mawa, 3 likolo ya bandeko na ngai Bayuda, oyo tobotamá na bango ekolo moko. Nalingaki kutu 'tè Kristo ásundola ngai na esika na bango. 4 Bazali bato ya Israel, ekolo oyo Nzambe aponaká lokola mwana na ye; Nzambe apesaká bango lokumu na ye, asalaka Boyokani ná bango, ayebisaká bango Mibeko na ye pe ndenge basengeli kosambela, pe apesaká bango bilaka minene. 5 Bazali bana ya Abraham, Izaak pe Jakob; Kristo abotamaki na ekolo na bango. Mersi na Nzambe seko! Ye azali Mokonzi ya biloko nyonso. Amen. 6 Nzokande elaka ya Nzambe ekei pamba té. Kasi ba-Israelite nyonso té bato bazali bato oyo Nzambe aponá. 7 Pe ata babotami na libota ya Abraham, bango nyonso té bato bazali bana ya solo, pamba té Nzambe alobaká na Abraham boye: "Nakobanda kobenga bobele bana ya libota ya Izaak nde bana na yo." 8 Elakisi 'tè: bana oyo Abraham abotaki, bango nyonso té bato bazali bana ya Nzambe. Kasi Nzambe akamataki lokola bana ya solo bobele baoyo babotamaki po na elaka na ye. 9 Pamba té Nzambe apesaká Abraham elaka boye: "Mbula ekoya, nakozonga lisusu kaka na eleko oyo." 10 Ezalaká ndenge moko, tango Rebeka abotaki mapasa: bazalaki bana ya tata moko, koko na biso Izaak. 11-12 Nzokande liboso 'tè bábotama, atako basalaki nanu likambo moko té ya malamu to ya mabe, Nzambe alobaká na Rebeka: "Kulutu akozala mosali ya leki." Alobaká bongo po na kolakisa 'tè ye aponaka bobele ndenge ye moko alingi; alukaka bobele baoyo ye moko abengi, atalaka misala na bango té. "Ekómamá boye: "Nalingi Jakob koleka Ezau." 14 Bongo tóloba nini? Nzambe azangi bosembo? Ata moke té! "Pamba té alobaká na Moize boye: "Soki nalingi koyokela moto mawa, nayokeli ye mawa; soki nalingi kosala moto malamu, nasali ye malamu." 16 Ezali té po moto yango alingi to asali makasi; ezali bobele po Nzambe ayokeli ye mawa. 17 Ekómamá 'tè Nzambe alobaki boye na Faraon, mokonzi ya Ejipte: "Natii yo mokonzi bobele po nálakisa nguya na ngai, pe báyeba lokumu na ngai na mokili mobimba." 18 Yango wana, Nzambe soki alingi, ayokeli moto mawa; pe soki alingi, akómisi moto motú makasi.

Kanda pe mawa ya Nzambe

19 Mbala mosusu moto akoki kotuna ngai boye: "Soki ezali bongo, po na nini Nzambe asilikelaka bato? Pamba té oyo ye alingi, yango nde tósalaka." 20 Kasi yo moto, ozali nani po na kotia tembe ná Nzambe? Nani asi'amoná nzungu ya mabelé etuni moto oyo asalaki yango: "Po na nini osalaki ngai boye?" 21 Moto oyo asalaka banzungu ya mabelé akoki kosalela mabelé ndenge alingi. Akoki kokamata ndambo moko ya mabelé po na kosala banzungu mibale: moko ya talo, mosusu ya pamba. Ezali boye té? 22 Toyebi 'tè Nzambe alingaki kolakisa kanda na ye pe komonisa bato nguya na ye. Nzokande azalaki kaka kokanga motema po na baoyo basengelaki kozwa etumbu pe kobunga. 23 Na ndenge wana pe amonisi lokumu na ye oyo eleki ndelo. Pamba té ayokeli bato mosusu mawa, aponaki bango po ákabela bango lokumu na ye. 24 Ezali nde biso bato oyo ye abengi; touti kaka na ekolo ya Bayuda té, kasi pe na bikolo mosusu. 25 Alobaká boye na monoko ya profete Ozé: "Liboso bazalaki ekolo na ngai té; sik'oyo nabengi bango ekolo na ngai. Liboso nazalaki kolinga bango té; sik'oyo nabengi bango bato na ngai ya bolingo. "Nalobaki na bango 'tè: 'Bino bozali bato na ngai té'; sik'oyo bakobanda kobenga bango bana ya Nzambe ya bomoi." 27 Ezaya pe alobaká boye po na bato ya Israel: "Ata bato ya Israel bakomi ebele lokola mbuma ya zelo na libongo ya ebale, bobele mwa ndambo na bango nde bakobika. 28 Pamba té etikali moke Nkolo ákokisa maloba na ye nyonso na mokili." 29 Ezaya alobaká lisusu boye: "Soki Nkolo ya nguya nyonso átikaka ndambo ya bato na biso té, mbele tokómi lokola vile ya Sodome; mbele tokokani na vile ya Gomore."

Kristo, libanga oyo ekweisaka bato

30 Bongo, tóloba nini? Tóloba boye: bato oyo bayebaki Nzambe té, Nzambe azali kokómisa bango bosembo na miso na ye, atako bazalaki koluka yango té. Bakomi bosembo na nzela ya bondimi. 31 Nzokande bato ya Israel bazalaki koluka Mibeko oyo ekokaki kokómisa bango bosembo; kasi bakokaki kotosa Mibeko yango té. 32 Po na nini? Ezali po bazalaki kolanda nzela ya bondimi té, kasi babandaki kotia mitema na misala na bango moko. Babetaki libaku na "libanga ya moselu". 33 Ekómamá boye: "Bóyoka! natii na mboka Sion moto moko, ye akozala lokola libanga ya moselu oyo ekobanda kokweisa bato. Kasi moto nyonso oyo atii motema epai na ye akoyoka soni ata moke té."

Rome 10

1 Bandeko, nazali kolinga na motema na ngai mobimba 'tè Bayuda bábika. Wana nde likambo nasengaka na Nzambe. 2 Pamba té nayebi 'tè bazali kosalela Nzambe na molende mingi; kasi bayebi penza té ndenge basengeli kosala. 3 Bayebi té 'tè ezali Nzambe moto akómisaka bato bosembo; batiaka mitema bobele na makasi na bango moko, pe bamipesaka na Nzambe té po ye ákómisa bango bosembo. 4 Pamba té Kristo asi'akokisi Mibeko ya Moize, po baoyo nyonso batiaka mitema bobele epai ya Nzambe bákóma bato ya bosembo.

Moto nyonso akoki kobika

5 Po na baoyo basalelaka Mibeko po bákóma bosembo, Moize ye moko akómaká boye: "Moto oyo asalelaka Mibeko, akobika kaka na ndenge ekómamá na Mibeko." 6 Kasi po na baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe po bákóma bosembo, alobaká boye: "Bómituna té: nani akomata na Likolo?"-lokola nde bolingi kokitisa Kristo awa na mokili. 7 "Bómituna pe té: nani akokita na mboka ya bato bakufa?"-lokola nde bolingi kosekwisa Kristo. 8 Nzokande Moize alobaká penza nini? Alobaká boye: "Boyebi maloba ya Nzambe malamu. Bokoki koloba yango, pamba té esi'ekoteli bino na mitema." Maloba wana ya Nzambe ezali oyo biso tosakolaka po bato bándima 'tè 9 Yezu azali Nkolo, pamba té Nzambe moto asekwisá ye. Ndima yango na motema, pe loba yango polele na miso ya bato, bongo okobika. 10 Ya solo soki ondimi yango na kati ya motema na yo, pe soki olobi yango na miso ya bato, Nzambe akokómisa yo bosembo pe akobikisa yo. 11 Pamba té ekómamá boye: "Moto nyonso oyo andimaka Nzambe akoyoka soni té." 12 Yango wana, Bayuda ná bato ya bikolo mosusu bakeseni té: bango nyonso bazali na Nkolo se moko; ye apesaká bomengo na ye na baoyo nyonso babondelaka ye. 13 Ya solo ekómamá boye: "Moto nyonso oyo abondelaka Nkolo, akobika." 14 Kasi ndenge nini bato bakoki kobondela Nkolo, soki bandimeli ye té? Pe ndenge nini bakoki kondimela ye, soki bayoki nanu sango na ye té? Ndenge nini bakoki koyoka sango, soki moto ya kosakola yango azali te? 15 Pe ndenge nini bakoki kosakola yango, soki batindi bango té? Ekómamá boye: "Oyo nde esengo: tala, bato bazali koya po na kosakola sango malamu!" 16 Kasi bato nyonso té bato bandimaki Sango Malamu. Yango wana, Ezaya alobaká: "Nkolo, nani andimi sango oyo tozalaki kosakola?" 17 Boye, bato bakoki kondima kaka soki bayoki sango; pe sango yango euti na maloba ya Kristo. 18 Kasi nátuna nanu: Bayokaki sango yango té? Ya solo, bayokaki yango! Ekómamá na Banzembo: "Sango yango etambo-laka bamboka nyonso; ekendeke tii na suka ya mokili." 19 Nátuna lisusu: Bato ya Israel bayebaki tina ya sango yango té? Moize ye moko alobaká: "Nakoyokisa bino zuwa likolo y a ekolo ya pamba; nakoyokisa bino kanda po na ekolo ezangá mayele." 20 Ezaya alobaká kutu boye: "Bato oyo bazalaki koluka ngai té, bamoni ngai; namilakisaki na baoyo bazalaki kotuna ngai eloko té." 21 Kasi po na bato ya Israel, alobaká: "Moi mobimba nazalaki kotanda maboko po náyamba bango, kasi bazalaki kaka mitú makasi pe kotomboka."

Rome 11

Nzambe asundolaki bato ya Israel té

1 Bongo, nazali kotuna: Nzambe asundolaki bato na ye? Ata moke té! Pamba té ngai moko nazali moto ya Israel, mwana ya Abraham, na libota ya Benjamen. 2 Nzambe asundolaki bato na ye té, baoyo ye aponá uta na ebandeli. Boyebi ndenge profete Eliya amilelaká epai ya Nzambe po na bato ya Israel. Ekómamá boye: 3 "Nkolo, babomi baprofete na yo pe bapanzi bamesa oyo bapeselaka yo mabonza; natikali bobele ngai moko, pe bazali koluka lisusu koboma ngai." 4 Kasi Nzambe azongise-laká ye nini? Alobaki: "Natikali na bato 7.000 oyo nazali kobomba po na ngai moko. Bango bafukamelá nanu Nzambe Baal té." 5 Ndenge moko pe sik'oyo: mwa ndambo ya bato ya Israel batikali, oyo Nzambe aponá po na bolamu na ye. 6 Aponá bango po na misala na bango té, kasi bobele po na bolamu na ye. Soki té, bolamu ya Nzambe elingaki kozala bolamu penza té. 7 Bongo, tóloba nini? Eloko oyo bato ya Israel bazalaki koluka, bazwaki yango té; bobele mwa ndambo oyo Nzambe aponá, bango nde bato bazwi yango. Bamosusu bakómaki mitú makasi. 8 Ekómamá boye: "Nzambe akómisaki mayele na bango eloko pamba. Tii lelo miso na bango emonaka té pe matoi na bango eyokaka té." 'David pe alobaká boye: "Bafeti na bango ékóma mitambo; ékanga bango po bázwa etumbu. 10 Miso na bango ékufa, bámona lisusu té; kómisa bango nkunki." 11 Bongo natuni: tango Bayuda babetaki libaku, bakweyaki libela? Ata moke té! Kasi masumu na bango epesi bato ya bikolo nyonso nzela ya kobika, po Bayuda báyoka zuwa. 12 Ya solo, bato ya mokili mobimba bazwi bomengo po na masumu ya Bayuda; bato ya bikolo oyo eyebaki Nzambe té bayei kotonda na bomengo, po Bayuda bazongaki sima. E bongo, bikolo nyonso ekoyoka penza esengo, tango Bayuda pe bakobika.

Bato ya bikolo nyonso bakobika

13 Bino bato bozali Bayuda té, nazali koyebisa bino: lokola nazali ntoma epai ya bikolo nyonso, namoni 'tè nazali na mokumba moko monene. 14 Pamba té nazali na elikya 'tè nakoki kobenda bato ya ekolo na ngai báyokela bino zuwa; boye nakokoka kobikisa mwa ndambo na kati na bango. 15 Ya solo, tango Nzambe atiaki bango pembeni, apesaki bato ya mokili mobimba nzela ya kozwa bolimbisi ya masumu na bango. Bongo mokolo Nzambe akoyamba lisusu Bayuda, ekozala lokola bato oyo bakufaki bazongi na bomoi. 16 Na kati ya mbuma ya bilanga, soki bapesi Nzambe lipa ya liboso, elakisi 'tè mapa nyonso euti na ye. Pe soki misisa ya nzete ezali ya Nzambe, bitape pe ezali ya ye. 17 Ekolo ya Bayuda ezali lokola nzete ya olive ya malamu. Bakataki bitape na yango mosusu, pe babakisi bitape ya olive ya zamba. Yango ezali nde bino bato bozali Bayuda té. Boye misisa ya nzete ya malamu ekómi kopesa mai ndenge moko na bitape nyonso. 18 Yango wana, atako balongoli bitape mosusu ya olive wana, bino bokoki komonela yango té. Bokobeta tolo na nini? Bozali kaka bitape; bino té bato boleisaka misisa ya nzete, kasi yango nde moto ezali koleisa bino. 19 Mbala mosusu bokoloba: "Nzambe akataki bitape wana po biso tózwa bisika na yango." 20 Ee, ezali boye. Nzambe alongolaki bango po bazangaki bondimi; pe bino bozwi esika wana po na bondimi na bino. Yango wana bóbeta tolo té; kasi ebongi bóbanga. 21 Pamba té Nzambe alongolaki Bayuda, atako bango bazali penza bitape oyo ebimaki na nzete; mbala mosusu akolongola bino pe ndenge moko. 22 Bongo botala: Nzambe asalaka bato bolamu; ye pe kaka moto apesaká bato etumbu. Apesi etumbu na Bayuda oyo bakwei; akobanda kosala bino malamu, soki bozali kaka kondima bolamu na ye. Soki boye té, akolongola bino pe ndenge moko. 23 Ya solo, soki Bayuda batiki koboya bolamu ya Nzambe, ye akozongisa bango lisusu na esika oyo bazalaki liboso. Pamba te ye moto azali na nguya ya kozongisa bango. 24 Bino bato bozali Bayuda té, Nzambe alongolaki bino na nzete ya zamba, pe abakisi bino na nzete ya malamu oyo ebimisaki bino té. Boye tembe ezali té: Nzambe akozongisa Bayuda na nzete ya malamu oyo ebimisaki bango.

Bato ya Israel bakobika kaka

25 Bandeko, nalingi náyebisa bino likambo moko ya sekele, po bókanisa té 'tè bozali bato ya mayele mingi. Ndambo moko ya bato ya Israel bakomi mitú makasi; kasi ekozala boye kaka tii bato ya bikolo mosusu bakokoka. 26 Pamba té mokolo ezali, ekolo mobimba ya Israel ekobika. Ekómamá boye: "Mobikisi akouta na Sion, akolongola bana ya Jakob mabe nyonso. 27 Wana nde ndenge nakosala boyokani ná bango, tango nakosilisa masumu na bango." 28 Bayuda bakomi banguna ya Nzambe, po bino bókoka kozwa Sango Malamu. Kasi Nzambe alingaka bango kaka, po aponaká bakoko na bango. 29 Pamba té Nzambe abongolaka makanisi na ye té. Soki abengi moto pe apesi ye bolamu na ye, ezalaká po na libela. 30 Kala bino bozalaká kotosa Nzambe té; kasi sik'oyo Nzambe ayei koyokela bino mawa po Bayuda bazali kotosa ye té. 31 Sik'oyo Bayuda bakomi ndenge bino bozalaká. Kasi ata ndele Nzambe akoyokela bango mawa, ndenge azali koyokela bino. 32 Pamba té ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, Nzambe akómisaki bango nyonso lokola bato ya boloko, po baboyaki kotosa ye. Asalaki bongo po áyokela bango nyonso mawa.

Lokumu ya Nzambe eleki monene

33 Ya solo, bomengo pe mayele ya Nzambe eleki mingi penza! Ye ayebi makambo nyonso! Nani akoki kolimbola ndenge Nzambe akataka makambo? Nani akoki koyeba bizaleli na ye? 34 "Nani ayebi makanisi ya Nkolo? Nani asi'apesá ye toli? 35 Nani asi'akabelá ye eloko, po ázongisela ye yango?" 36 Pamba té ezali ye moto asalá biloko nyonso; nyonso eutaka na ye pe ezali po na ye. Ebongi ázwa lokumu po na seko! Amen.

Rome 12

Komipesa po na kosalela Nzambe

1 Bandeko, lokola Nzambe ayokeli biso mawa mingi penza, nazali kosenga bino boye: na bomoi na bino mobimba bómipesa epai na ye lokola mabonza oyo ezali bobele ya ye, pe esepelisaka ye. Wana ezali losambo ya solo oyo bosengeli kosambela ye. 2 Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té; kasi bótikela Nzambe nzela ya kopesa bino mayele ya sika, po bóbongwana, bókóma bato ya sika. Boye bokoki koyeba makambo Nzambe alingaka, makambo oyo ezali malamu, oyo esepelisaka ye, pe oyo ezali ya kokoka.

Komipesa po na kosalela bandeko

3 Lokola Nzambe, na bolamu na ye, atii ngai ntoma, nazali kosenga bino 'tè moto nyonso átika lofundu, áluka bobele lokumu oyo ekoki na ye, ndenge Nzambe akabeli moto na moto bolamu oyo eutaka na bondimi. 4 Nzoto na biso ezali na biteni ebele. Mosala oyo eteni moko moko esalaka, ezali ya ndenge moko té; nzokande nzoto ezali se moko. 5 Bobele ndenge wana pe biso nyonso, na lisanga na Kristo, tozali lokola nzoto moko; moto na moto azali eteni na yango, esika moko ná bandeko na ye. 6 Bongo Nzambe, na bolamu na ye, apesi biso makabo ya ndenge na ndenge. Soki ozwi likabo ya kosakola maloba euti na Molimo, landa kaka mateya oyo bakristo nyonso bazali kondima. 7-8 Moto na moto ámipesa na mosala oyo azwi: ézala ya kosalela eklezya, ya koteya bandeko to ya kolendisa bango. Moto oyo akabolaka biloko epai ya bato ya mawa, asalaka yango na motema moko; moto oyo atambwisaka lisanga, átiaka molende nyonso; oyo asalisàka bato ya maladi, ásala yango na esengo. 9 Bózalaka na bolingo ya solo. Bóboyaka makambo ya mabe, bolandaka oyo ya malamu. 10 Bólinganaka na motema moko lokola bandeko: botosanaka bino na bino, bówelaka eloko mosusu té. 11 Bósala makasi, bólemba té; bózwa nguya ya Molimo Mosantu po na kosalela Nkolo. 12 Botiaka mitema epai ya Nzambe pe bosambelaka ye, boye bozala na esengo tango nyonso; bókangaka mitema na tango ya pasi. 13 Bókabolaka biloko na bino na bakristo oyo bazali kokelela; pe bóyambaka malamu bapaya na bandako na bino. 14 Bóbondelaka Nzambe po na bato oyo banyokolaka bino; bósambela po na bango kasi bóbwakela bango lisumá té. 15 Bósepelaka esika moko ná bato oyo bazali na esengo; bólelaka esika moko ná baoyo bazali kolela. 16 Bóyokanaka malamu; bózalaka lofundu té, kasi bóndima kosangana ná bato pamba. Bómikamata té lokola bato ya mayele. 17 Soki moto asali bino mabe, kozongisela ye mabe té; kasi bóluka kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso. 18 Bosalaka nyonso oyo bokoki, po bozala na boboto ná bato nyonso. 19 Baninga na ngai ya bolingo, soki bato basali bino mabe, bino moko bózongisa mabe té, kasi bótikela Nzambe nzela ákatela bango etumbu. Pamba té ekómamá boye: "Nkolo alobi: Ngai moto nakozongisela bango mabe, ngai nde moto nakopesa bango etumbu." 20 Bongo "Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya mai, pesa ye mai; pamba té tango osali bongo, nde oyokisi ye soni mingi." 21 Keba po makambo ya mabe ékweisa yo té, kasi sala makambo ya malamu po ólonga oyo ya mabe.

Rome 13

Kotosa bakonzi ya leta

1 Moto nyonso asengeli kotosa bakonzi ya leta, pamba té bokonzi nyonso eutaka na Nzambe; pe bakonzi nyonso ezali Nzambe moto atiaki bango. 2 Yango wana, moto oyo aboyi kotosa bakonzi, azali koboya makambo Nzambe atindi, boye azali komilukela etumbu. 3 Nzokande bato oyo basalaka makambo ya malamu bakoki kobanga bakonzi té, kasi bobele baoyo basalaka makambo ya mabe. Olingi kobanga bango té? Sala bobele makambo ya malamu, bongo bakokumisa yo. 4 Pamba té bakonzi bazali basali ya Nzambe po na bolamu ya bato. Boye soki osalaka mabe, banga bango; po bazali na bokonzi ya kopesa bato etumbu. Bazali basali ya Nzambe po na kolakisa kanda na ye epai ya baoyo basalaka mabe. 5 Boye bosengeli kotosa bakonzi y a leta. Bóbanga kaka kanda ya Nzambe té kasi bótosa bango na motema mobimba. 6 Yango wana pe bofutaka mpaku, po bato oyo bakokisaka misala ya leta bazali kosalela Nzambe. 7 Bongo bópesa moto na moto oyo ekoki na ye: bofutaka bampaku na baoyo bafutisaka yango; botosaka bato nyonso oyo baleki bino.

Kolingana

8 Bópesa moto nyonso oyo esengeli na ye. Likambo eleki monene yang'oyo: bólinganaka. Moto oyo alingaka baninga, azali kotosa penza Mibeko. 9 Pamba té Mibeko elobá boye: "Bótambola té na mwasi to mobali ya bato; boboma moto té; bóyiba té; bólula eloko ya moto té." Mibeko oyo pe Mibeko mosusu nyonso ekoti bobele na mobeko moko: "Linga ndeko na yo, ndenge yo moko omilingaka." 10 Moto oyo alingaka moninga na ye, akoki kosala ye mabe té; yango wana oyo alingaka moninga azali kotosa Mibeko nyonso.

Ngonga ya kolamuka na pongi esi'ekoki

11 Boyebi 'tè tango oyo ezali na tina penza. Ngonga ya kolamuka na pongi esi'ekoki. Pamba té mokolo Nzambe akobikisa biso ekómi sik'oyo penepene, koleka tango oyo tobandaki kondima. 12 Etikali moke butu ésila pe tongo étana. Bongo tótika makambo ya mabe oyo esalamaka na butu, pe tósala makambo ya malamu oyo ekoki na moi. 13 Tózala na bizaleli ya malamu oyo ebongi na tango ya moi; tótika lokoso pe kolangwa masanga; tóboya kindumba ná makambo ya soni; tóswana té pe tóyokela baninga zuwa té. 14 Kasi bómilakisa lokola bato ya Nkolo Yezu Kristo, pe bótika kosepelisa baposa ya bomoto na bino.

Rome 14

Kokanisela ndeko likambo ya mabe té

1 Bóyamba malamu bandeko oyo bazali na bondimi makasi -L H" té: bótiana tembe té ná bango. 2 Ndakisa: moto moko andimaka 'tè akoki kolia biloko nyonso; nzokande moto mosusu oyo azali na bondimi makasi té, aliaka bobele ndunda. 3 Bongo moto oyo aliaka biloko nyonso, ámonela moninga na ye té; pe oyo aboyaka biloko mosusu, áloba té 'tè moninga na ye asalaka mabe; pamba té Nzambe asi'ayambi ye. 4 Yo ozali nani po étala makambo ya mosali ya moto mosusu? Soki azali moto ya kokoka to té, etali bobele mokonzi na ye. Tembe té akokóma kaka moto ya kokoka, pamba té Nkolo azali na nguya ya kosalisa ye. 5 Ndakisa mosusu: moto moko akanisaka 'tè mokolo moko eleki mikolo mosusu na tina; kasi moto mosusu akanisaka 'tè mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko. Ebongi moto na moto alanda kaka makanisi na ye. 6 Moto oyo akanisaka 'tè mokolo moko eleki mikolo mosusu na tina, akanisaka bongo po na Nkolo; oyo aliaka biloko nyonso, asalaka bongo po na Nkolo, pamba té apesaká Nzambe mersi po na bilei na ye; pe oyo aboyaka biloko mosusu, asalaka bongo po na Nkolo; pamba té ye pe apesaká Nzambe mersi. 7-8 Ata tozali na bomoi to tokufï, moto moko té na kati na biso azali kolo ya nzoto na ye. Bobele Nkolo Yezu azali Mokonzi na biso. Boye, ata tozali na bomoi to tokufï, tozali kaka bato ya Nkolo. 9 Pamba té Kristo akufaki pe asekWaki po ákóma Mokonzi ya bato bakufa ná ya baoyo bazali na bomoi. 10 Kasi yo, po na nini olobaka 'tè ndeko na yo asalaka mabe? Pe yo, po na nini ozali komonela ndeko na yo? Mokolo ezali, Nzambe akosambisa biso nyonso. 11 Pamba té ekómamá boye: "Nkolo alobi: Nakati seleka 'tè moto nyonso akofukamela ngai, pe akosakola 'tè ngai nazali Nzambe." 12 Boye, moko moko na biso akosamba na miso ya Nzambe po na makambo na ye moko.

Kokweisa bandeko na masumu té

13 Bongo tótika kotala makambo ya baninga. Likambo bosengeli kotala malamu yang'oyo: bótiela ndeko moko té libaku ya mabe, po bóbebisa bondimi na ye té. 14 Na lisanga na Nkolo Yezu, nayebi malamu penza 'tè eloko moko té ezali ekila; kasi soki moto akanisi 'tè "eloko oyo ezali ekila", yango ekómi pe ekila po na ye. 15 Soki biloko yo oliaka emonisaka ndeko na yo pasi na motema, loba 'tè olingaka ye té. Moto oyo Kristo akufelaki, kobebisa ye té bobele po na biloko na yo ya kolia. 16 Bókeba: bonsomi na bino emonanaka té lokola likambo ya mabe na miso ya bato. 17 Pamba té bokonzi ya Nzambe etali makambo ya kolia té to ya komela, kasi etali makambo ya bosembo, ya boboto pe ya esengo oyo Molimo Mosantu apesaká. 18 Moto oyo asalelaka Kristo na ndenge wana asepelisaka Nzambe, pe bato bandimaka ye. 19 Bongo tóluka makambo oyo ememaka boboto pe elendi-saka bondimi ya bandeko. 20 Kobebisa misala ya Nzambe té kaka po na biloko ya kolia. Ya solo, tokoki kolia biloko nyonso, kasi ezali mabe soki tolei biloko oyo ekoki kokweisa bandeko mosusu na masumu. 21 Eleki malamu óboya nyama, to masanga to makambo nyonso oyo ekoki kokweisa ndeko na yo na masumu. 22 Makambo yo ondimaka po na biloko wana, etali kaka yo moko ná Nzambe. Esengo na moto oyo amikosaka té na makambo ye amonaka malamu. 23 Kasi moto oyo alei biloko ye amoni ezali ekila, asali mabe na miso ya Nzambe, po alandi bondimi na ye té. Pamba té makambo nyonso oyo bondimi epekisaka, ezali masumu.

Rome 15

Kolanda ndakisa ya Kristo

1 Biso bato tozali na bondimi ya makasi, tosengeli kokanisa bandeko oyo bazangi makasi yango. Tóluka bobele komi-sepelisa té, 2 kasi moto na moto na kati na biso áluka kosepelisa baninga na ye, na ndenge 'tè ákolisa bondimi na bango. 3 Pamba té Kristo pe azalaki koluka kaka komisepelisa té. Ekómamá boye: "E Nzambe, kofinga oyo bafingaka yo ezali koya epai na ngai." 4 Makambo nyonso oyo ekómamá ezali po na koteya biso, po Mikanda ya Nzambe épesa biso mayele ya kokanga mitema pe kozala na molende, boye tókoka kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá biso. 5 Bongo Nzambe, oyo alakisaka biso ndenge ya kokanga mitema pe kozala na molende, ye moko ásala 'tè bóyokana, ndenge Yezu Kristo alingi, 6 po bino nyonso bókumisaka Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo, na motema moko, na mongongo moko.

Koyambana na bolingo nyonso

7 Yango wana bóyambana na bolingo nyonso, ndenge Kristo ayambaki bino po Nzambe ázwa lokumu. 8 Bókanisa nanu. Kristo amitiaki mosali ya Bayuda po Nzambe moto alakaká bongo. Ayaki po ákokisa elaka oyo Nzambe apesaká na bakoko na bango. 9 Nzokande bato oyo bazali Bayuda té basengeli kokumisa Nzambe, po ye ayokeli bango mawa. Ekómamá boye: "Yango wana nazali kopesa yo mersi na kati ya bikolo, pe koyembela lokumu na yo." 10 Ekómamá pe: "Bino bato ya bikolo nyonso, bósepela esika moko ná ekolo ya Nzambe." 11 Esika mosusu ekómamá boye: "Bino bikolo nyonso, bokumisa Nkolo; bino bamboka nyonso, bóyembela ye." 12 Ezaya pe alobaká: "Mwana ya libota ya David akoya, akotelema po na kotambwisa bikolo nyonso; bato ya bikolo nyonso bakotia mitema epai na ye." 13 Lokola bozali kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá bino, nasengi ye ábongisa bondimi na bino, átondisa bino na esengo pe na boboto, boye bókoka kotiela ye mitema na makambo nyonso, na nguya ya Molimo Mosantu.

Po na nini Polo akómi makambo polele

14 Bandeko na ngai, nazali kotia motema na bino 'tè bozali bato ya makanisi malamu, boyebi makambo nyonso oyo Nzambe alakisá biso, boye bokoki kopesana batoli. 15 Ata bongo, nauti kokómela bino makambo mosusu oyo bosi'boyebi, po bakanisaka yango malamu. Nakómi yango na ndenge ya polele, po Nzambe, na bolamu na ye, 16 akómisi ngai mosali ya Yezu Kristo epai ya bikolo nyonso. Ye moto apesi ngai mosala ya kosakola Sango Malamu na ye, po Molimo Mosantu ákómisa bato ya bikolo nyonso libonza ya bosantu, oyo ekoki kosepelisa Nzambe. 17 Yango wana, na lisanga na Yezu Kristo nakoki kobeta tolo po na mosala oyo nasalelaka Nzambe. 18 Nakotanga bobele makambo oyo Kristo akokisaka na maloba pe na misala na ngai, po bato ya bikolo nyonso bábanda kotosa Nzambe. 19 Pamba té makamwisi minene ya ndenge na ndenge oyo ye asalaka na maboko na ngai, elakisaka nguya ya Molimo Mosantu. Kaka na nguya yango, nasakolaki Sango Malamu ya Kristo na bamboka nyonso, banda na Yeruzalem tii na mboka Ilirie. 20 Nzokande nasakolaka Sango Malamu bobele na bisika oyo nanu bayoká kombo ya Kristo té. Wana ezali lokumu oyo nawelaka, po nákóma té lokola moto oyo azali kotónga ndako na ye na likolo ya fondasion basalá na bato mosusu. 21 Ekómamá boye: "Baoyo bazwi nanu sango té, bakomona; pe baoyo bayoki nanu té, bakoyeba."

Polo azali kokana kokende na Rome

22-23 Bambula ebele penza, nazalaki na posa ya koya epai na bino; kasi lokola bino bosi'boyoká kombo ya Kristo, natikaki yango. Nzokande sik'oyo nasilisi mosala na ngai epai boye, 24 pe nalingi kokende na Espanye. Boye nakoya kotala bino tango nakoleka, pe natii motema 'tè soki tokutani, nde tosepeli mwa tango moke, bongo sima bokosalisa ngai po na mobembo. 25 Kasi sik'oyo nazali kokende na Yeruzalem, po na kosalisa bakristo ya kuna. 26 Pamba té bandeko ya Masedwane pe ya Grése bakanaki kokongola mbongo po na kosalisa bakristo ya Yeruzalem oyo bakelelá. 27 Ya solo, bamonaki 'tè basengeli kosala bongo. Pamba té bato ya bikolo nyonso bazwaki bolamu ya Nzambe oyo bandeko Bayuda bazalaki ná yango; boye basengeli pe kosalisa bango, na bomengo ya mokili oyo bazali na yango. 28 Tango nakosilisa kopesa bango mbongo oyo bakongolaki, nakoleka epai na bino po na kokende na Espanye. 29 Pe nayebi 'tè tango nakoya epai na bino, nakomemela bino bolamu ya Kristo mingi penza. 30 Kasi, bandeko na ngai, nasengi bino na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, pe po na bolingo oyo Molimo apesaká: bósalisa ngai na etumba oyo nazali na yango, bobondela Nzambe po na ngai, 31 po Bayuda oyo baboyi Kristo básala ngai mabe té, pe bakristo ya Yeruzalem bándima penza mosala oyo nazali kosalela bango. 32 Boye, soki Nzambe alingi, nakoya epai na bino na esengo nyonso, pe nakopema moke na kati na bino. 33 Nzambe oyo apesaká boboto ázala na bino nyonso! Amen.

Rome 16

Polo atindeli bato mbote

1 Nasengi bino po na Febe, ndeko na biso ya mwasi, mosali ya Eklezya na vile ya Sankré: 2 bóyamba ye malamu na kombo ya Nkolo Yezu, ndenge ebongi na bakristo; pe bósalisa ye na makambo nyonso oyo akosenga bino. Pamba té ye asalisaki bato mingi, ná ngai moko pe. 3 Bópesa mbote na Prisye pe na mobali na ye Akilas oyo basalelaka Yezu Kristo esika moko ná ngai. 4 Bango babikisaki ngai, babangaki kutu liwa té. Nazali kopesa bango mersi mingi; ezali bobele ngai moko té, kasi ná ba-eklezya nyonso oyo ezali ya Bayuda té. 5 Bópesa pe mbote na eklezya oyo esanganaka na ndako na bango. Bópesa mbote na Epenete, moninga na ngai penza. Ye azalaki mokristo ya liboso na région ya Efeze. 6 Bópesa mbote na Maria; ye asalaki mosala mingi po na bino. 7 Bópesa mbote na Andronikus ná Junias, bandeko na ngai Bayuda; bango bazalaki na boloko esika moko ná ngai; bayebani mingi, pe basalaka mosala lokola ya bantoma; bakómaki bakristo liboso na ngai. 8 Bópesa mbote na Ampliatus, moninga na ngai, na lisanga ya Nkolo Yezu. 9 Bópesa mbote na Urbanus, ye asalelaka Kristo esika moko ná biso; pe lisusu na moninga na ngai ya bolingo Stakis. 10 Bópesa mbote na Apeles, ye azali mokristo penza. Bópesa mbote na bato bafandaka epai ya Aristobule. 11 Bópesa mbote na Erodion, ndeko na ngai Moyuda, pe na bakristo oyo bafandaka epai ya Narsise. 12 Bópesa mbote na bandeko na biso ya basi Trifene, Trifoze, ná Persis, ndeko na ngai ya bolingo; bango nyonso basalelaka Nkolo mosala monene. 13 Bópesa mbote na Rufus, mokristo ya solo; pe na mama na ye, oyo azali lokola mama na ngai. 14 Bópesa mbote na Asenkrite, Flegon, Ermes, Patrobas, Ermas, pe bandeko oyo bazali epai na bango. 15 Bópesa mbote na Filológe, Julie, Neré ná ndeko na ye ya mwasi, pe Olempas ná bakristo nyonso oyo bazali epai na bango. 16 Bino nyonso bópesana mbote, ndenge ebongi na bakristo. Bato ya ba-eklezya nyonso ya Kristo batindeli bino mbote.

Toli ya suka

17 Bandeko, nazali kosenga bino: bókeba na baoyo bakabolaka bakristo pe babebisaka bondimi na bango. Bazali koboya mateya oyo bozwaki. Bókima bango. 18 Pamba té bato ya ndenge wana basalelaka Nkolo na biso Kristo té, kasi bobele libumu na bango. Na maloba na bango ya sukali pe ya lokuta, bakosaka bato oyo bazali na mitema pembe. 19 Bato nyonso bayebi ndenge bino bozali kotosa Nzambe; ya solo nazali kosepela mingi po na bino. Kasi nalingi 'tè bozala na mayele mingi ya kosala makambo ya malamu, pe bóboya makambo ya mabe. 20 Etikali moke Nzambe oyo apesaká boboto ápanza Satan na se y a makolo na bino. Bolamu ya Nkolo na bino Yezu ézala na bino! 21 Timoté, moninga na ngai ya mosala, atindeli bino mbote. Lusius, Jazon ná Sozipater, bandeko na ngai Bayuda, batindeli bino pe mbote. 22 Ngai Tersius natindeli bino mbote na lisanga na Nkolo; ezali ngai nde moto nakómi mokanda oyo. 23 Gayus atindeli bino mbote; nazali kofanda na ndako na ye; bato ya eklezya pe basanganaka epai na ye. Eraste, oyo abombaka mbongo ya vile, ná ndeko Kwartus batindeli bino mbote. 24 Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino nyonso! Amen.

Lokumu na Nzambe

25 Lokumu ézala na Nzambe! Ye azali na nguya ya kobongisa bino, awa bondimi Sango Malamu ya Yezu Kristo oyo ngai nasakolaka. Pamba té yango ezali koyebisa bato sekele oyo ebombamaká na bileko eleká. 26 Sik'oyo Nzambe, Mokonzi ya bileko nyonso, alakisi sekele yango polele, ndenge ekómamá na mikanda ya baprofete; pe atindi báyebisa yango na bato ya bikolo nyonso, po bándima yango pe bátosa ye. 27 Bobele se ye moko Nzambe moto azali na mayele nyonso! Ebongi ye ázwa lokumu, po na Yezu Kristo, seko na seko. Amen.

1 Korente 1

Mbote

1-3 Mbote na bino, bandeko ya Eklezya ya Nzambe oyo ezali na Korente. Nzambe akómisi bino bosantu na lisanga na Yezu Kristo, abengi bino bozala bato na ye penza. Ngai Polo, ntoma ya Yezu Kristo,-Nzambe abengaki ngai kaka po ye moko nde alingaki bongo-; ngai ná ndeko Sostene totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe, Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Mokanda na biso ezali pe po na bato nyonso oyo basakolaka 'tè Yezu Kristo azali Nkolo, bipai nyonso ya mokili. Ye azali Nkolo na bango pe ya biso.

Bakristo ya Korente batondi na bolamu ya Nzambe

4 Napesaka Nzambe na ngai mersi tango nyonso likolo na bino, po akabeli bino bolamu na ye na lisanga na Yezu Kristo. 5 Po na ye, Nzambe atondisi bino na bomengo nyonso: ya koyeba ba-sekelé na ye pe ya kosakola yango. 6 Ya solo, sango ya Kristo oyo tomemelaki bino esi'ekoteli bino tii na mikuwa; 7 boye na kati ya makabo oyo Molimo Mosantu apesaká, bozangi ata moko té, pe bozali kozela mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akomonana. 8 Ye moko akolendisa bino tii na suka, po 'tè na mokolo wana bozala ata na mabe moko té. 9 Nzambe akokisaka makambo akanaka. Ye nde moto abengi bino po bozala lisanga ná Mwana na ye Yezu Kristo, Nkolo na biso.

Bakristo ya Korente bakábwani

10 Bandeko, nasengi bino na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, bóyokana pe bótika kokabwana. Bino nyonso bozala moto moko, motema moko, pe makanisi se moko. 11 Pamba té, bandeko na ngai, bato ya mama Kloe bayebisi ngai 'tè bozali koswana na kati na bino. 12 Napesi bino toli boye, po na kati na bino moto na moto alobaká na ndenge na ye: "Ngai nazali moto ya Polo", "Ngai moto ya Apolos", "Ngai moto ya Piere"; to pe "Ngai nazali moto ya Kristo." 13 Bokanisi 'tè Kristo akabwani ndambo-ndambo? Ezali ngai Polo nde moto nakufelaki bino na kuruze? Bozwaki batisimo na kombo na ngai? 14 Napesi Nzambe mersi po nabatisaki moto moko té na kati na bino, longola bobele Krispus ná Gayus. 15 Boye moto moko té akoki koloba 'tè bozwaki batisimo na kombo na ngai. 16 A, nabosani; nabatisaki pe Stefanás ná bato ya fami na ye. Kasi nayebi moto mosusu ata moko té oyo ngai nabatisaki. 17 Kristo atiaki ngai ntoma té po nákende kobatisa bato, kasi atindaki ngai nákende kosakola Sango Malamu. Alingi násakola yango na mayele ya bomoto té, soki té liwa na ye na kuruze ekozanga tina.

Biso tondimeli Kristo oyo akufaki na kuruze

18 Bandeko, ya solo, bato oyo bazali kobunga bamonaka sango ya liwa ya Kristo na kuruze lokola likambo ya bozoba; kasi po na biso bato Kristo azali kobikisa, yango ezali nguya ya Nzambe. 19 Pamba té ekómamá boye: "Nakosilisa mayele ya bato ya mayele; nakobebisa makanisi ya bato bayekolá." 20 Bongo wapi bato ya mayele? Wapi bato bayekolá? Baoyo bamesaná kotiana tembe basuki wapi? Nzambe alakisi 'tè mayele ya bomoto ezali penza ya bozoba. 21 Pamba té mayele ya bomoto esalisaki bato té po báyeba Nzambe. Yango wana Nzambe alakisi mayele na ye; azwi mokano ya kotinda basakoli bámemela bato sango oyo bango bamonaka lokola makambo ya bozoba. Asali bongo po ábikisa baoyo bandimi yango. 22 Botala nanu. Bayuda balingaka mosakoli ásala makamwisi oyo euti na Nzambe; nzokande ba-órek balukaka kaka koyoka masolo ya mayele. 23 Kasi biso tozali kosakola sango ya Kristo oyo babomaki na kuruze. Bayuda balobaká 'tè yango ekoki kouta na Nzambe té; pe ba-Grek bamonaka yango lokola makambo ya bozoba. 24 Nzokande po na bato oyo Nzambe abengi, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, Kristo azali penza nguya ya Nzambe pe mayele ya Nzambe. 25 Pamba té makambo Nzambe asalaka emonanaka lokola bozoba, nzokande yango nde eleki mayele ya bato. Nzambe amonanaka lokola azangi makasi, nzokande ye aleki bato na makasi. 26 Bandeko, botala nanu: bino bato oyo Nzambe abengi, bozali banani? Na kati na bino, baoyo bomonanaka bato ya mayele bazali mingi té; bato minene bazali mingi té; bato ya lokumu bazali mingi té. 27 Kasi Nzambe aponi baoyo bamonanaka bazoba, po ayokisa bato ya mayele soni; aponi baoyo bato balobaká 'tè bazangi makasi, po ayokisa bilombe soni. "Baoyo bazangi lokumu, baoyo bato batsiolaka pe bamonaka pamba, Nzambe aponi bango po álakisa bato minene 'tè bazangi tina. 29 Boye moto ata moko té akoki kobeta tolo liboso ya Nzambe. 30 Ye moto asali 'tè bino bókóma lisanga na Yezu Kristo. Kristo ayeeli biso mayele oyo euti na Nzambe; akómisi biso bosembo pe bosantu, pe asilisi boumbu na biso. 31 Yango wana maloba ya Mikanda ya Nzambe ezali ya solo: "Moto oyo alingi kobeta tolo, ábeta tolo bobele po na makambo Nkolo asaleli ye."

1 Korente 2

Ndenge Polo asakolaki sango ya Kristo na Korente

1 Bandeko, tango nayaki epai na bino po na kosakola ba-sekelé ya Nzambe, namilakisaki té lokola moto ayebi koloba, to lokola moto ya mayele mingi. 2 Pamba té nakanaki koyebisa bino likambo mosusu té, bobele sango ya Yezu Kristo; nalingi koloba Yezu Kristo oyo babomaki na kuruze. 3 Yango wana, tango nakómaki epai na bino, nazalaki na makasi té; nazalaki kobanga pe kolenga mingi. 4 Po na kolakisa 'tè nazalaki kosakola makambo ya solo, nabandaki kosalela mayele ya bomoto té, kasi Molimo Mosantu azalaki kolakisa nguya na ye. 5 Boye bondimi na bino ekouta na mayele ya bomoto té, kasi na nguya ya Nzambe.

Mayele ya Nzambe

6 Nzokande tozali koloba penza makambo ya mayele; kasi bobele na baoyo bazali bato ya kokoka na miso ya Nzambe. Yango ezali mayele ya bato té to ya bakonzi ya mokili, po bango basi'bakómi na suka. 7 Tozali koloba sekele ya mayele ya Nzambe. Pamba té liboso 'tè mokili ésalama, Nzambe asi'akanaká kolakisa biso yango po na lokumu na biso, kasi abombaká makambo wana. 8 Na kati ya bakonzi ya mokili oyo, moko té ayebi mayele yango. Soki bayebaki yango, mbele balingaki koboma Nkolo ya lokumu nyonso na kuruze té. 9 Kasi esalami ndenge ekómamá: "Makambo oyo moto moko té amoná to ayoká, oyo moto moko té akanisá, Nzambe asi'abongisá yango po na bato oyo balingaka ye." 10 Biso tozali nde bato oyo Nzambe ayebisi sekele na ye; ezali Molimo Mosantu moto alakisi biso yango Molimo atalaka makambo nyonso, ata makanisi ya Nzambe oyo ebombamá. 11 Pamba té moto moko té akoki koyeba motema ya moto mosusu; bobele molimo ya moto wana nde ayebi yango. Ndenge moko pe bobele Molimo ya Nzambe moto ayebi makanisi ya Nzambe. 12 Molimo biso tozwaki euti na mokili oyo té, kasi tozwaki Molimo oyo euti na Nzambe, po tókoka koyeba bolamu ye akabelaka biso. 13 Pe tolobaka makambo yango té na mayele oyo bato bateyaka, kasi na maloba oyo Molimo ya Nzambe ateyaka. Tolimbolaka makambo ya Molimo ya Nzambe kaka na bato oyo bazali na Molimo yango. 14 Moto oyo azali bobele na molimo na ye ya bomoto, ayambaka makambo ya Molimo ya Nzambe té; yango ezali lokola bozoba na miso na ye. Akoki koyeba tina na yango bobele na lisalisi ya Molimo ya Nzambe. 15 Yango wana moto oyo azali na Molimo ya Nzambe akoki koyeba makambo nyonso soki ezali malamu to mabe; kasi oyo ye asalaka, moto moko té akoki koloba 'tè ezali mabe. 16 Pamba té ekómamá boye: "Nani ayebi makanisi ya Nkolo? Nani akoki kopesa ye toli?" Nzokande biso tozali na makanisi ya Kristo.

1 Korente 3

Basali ya Nzambe

1 Bandeko, nakokaki té kolobela bino lokola bato oyo bazali na Molimo ya Nzambe, kasi nalobelaki bino lokola bato bazali kolanda kaka makambo ya bomoto. Pamba té na makambo etali Kristo, bozali nanu bana mike. 2 Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi té, po ekokaki na bino té. Kutu ata sik'oyo ekoki na bino té, 3 po bozali kaka na mayele ya bomoto. Na kati na bino likunya ezali, koswana pe ezali; bozali kaka kolanda makambo ya bomoto té? Bizaleli na bino ekokani ná ya bato nyonso té? 4 Soki moko moko na bino azali koloba "Ngai nazali moto ya Polo", "Ngai ya Apolos", bokokani ná bato nyonso té? 5 Apolos azali nani? Pe ngai Polo nazali nani? Tozali kaka basalisi ya Nzambe; bokómaki kondima po na mosala na biso. Moko moko na biso asalaka mosala oyo Nkolo apesaki ye. 6 Ngai nakonaki mbuma, Apolos asopelaki yango mai, kasi Nzambe nde moto akolisi yango. 7 Bongo moto oyo akonaki mbuma, ná oyo asopelaki yango mai bazali pamba, kasi Nzambe oyo akolisi yango, ye nde moto asali mosala nyonso. 8 Moto oyo akonaka, ná oyo asopaka mai, bazali ndenge moko. Nzambe akopesa moto na moto lifuta na ye na ndenge ya mosala oyo asali. 9 Po biso ná Apolos tozali basalisi ya Nzambe, pe bino bozali elanga ya Nzambe. Bino bozali pe lokola ndako oyo Nzambe atongi. 10 Nasalelaka na bolamu oyo Nzambe apesaki ngai; lokola moto ayebi kotónga malamu, natiaki fondasion. Sima, moto mosusu ayei kotónga na likolo na yango. Kasi moto na moto ákeba na ndenge azali kotónga. 11 Fondasion esi'esalami: yango nde Yezu Kristo. Moto moko té akoki kotia> fondasion mosusu, kaka oyo wana. 12 Na kati ya bato oyo batóngàka na likolo ya fondasion yango, bamosusu basalelaka or, arjan, to mabanga ya talo, bamosusu mabaya, matiti, to makasa. 13 Mokolo ya Kristo ekolakisa mosala ya moto na moto, pamba té mokolo wana ekomonana na kati ya móto. Móto yango nde ekolakisa ndenge moto na moto asalaki. 14 Oyo mosala na ye ekoumela, akozwa lifuta. 15 Oyo mosala na ye ekozika, akozanga lifuta; nzokande ye moko akobika, kasi bobele lokola moto abiki na liwa ya móto. 16 Bino bozali lokola Ndako ya Nzambe, pe Molimo ya Nzambe azalaká na kati na bino. Boyebi yango té? 17 Soki moto abebisi Ndako ya Nzambe, Nzambe pe akobebisa ye. Pamba té Ndako ya Nzambe ezali bosantu. Pe bino bozali lokola Ndako ya Nzambe. 18 Moto moko té ámikosa. Soki moko na kati na bino akanisi 'tè azali na mayele na miso ya bato, liboso ákóma lokola zoba, po ázwa mayele ya solo. 19 Pamba té mayele ya mokili oyo ezali bozoba na miso ya Nzambe. Ekómamá boye: "Mayele ya bato ekómi motambo oyo Nzambe akangelaka bango." 20 Ekómamá lisusu: "Nkolo ayebi makanisi ya bato ya mayele; ayebi 'tè nyonso ezali pamba." 21 Yango wana, moto moko té áluka lokumu epai ya bato. Po makambo nyonso ezali ya bino: 22 ézala Polo, Apolos to Piere; ézala mokili, bomoi to liwa, makambo ya lelo to oyo ekoya, nyonso ezali ya bino. 23 Kasi bino bozali bato ya Kristo pe Kristo azali moto ya Nzambe.

1 Korente 4

Bantoma ya Kristo

1 Yango wana, bókamata biso lokola basali ya Kristo pe bakapita; Nzambe apesi ba-sekelé na ye na maboko na biso. 2 Basengaka na bakapita bobele 'tè básala mosala na bango na ndenge ya malamu. 3 Soki bino to bato mosusu bolobi 'tè nasalaka malamu to mabe, nakipaka yango ata moke té. Ngai moko kutu nakoki té kokata likambo na ngai. 4 Ya solo, nazali komimona na mabe moko té; kasi yango elakisi té 'tè nasalaka bobele malamu. Ezali nde Nkolo moto akokata likambo na ngai. 5 Yango wana, liboso 'tè mokolo oyo Nkolo atiá ékoka, bótika kolobana 'tè moto oyo asali malamu to mabe. Bózela Nkolo áya. Ye nde moto akobimisa ba-sekelé nyonso polele, pe akomonisa makanisi oyo ezali na mitema ya bato. Bongo moto na moto akozwa epai ya Nzambe lokumu oyo ekoki na ye. 6 Bandeko, napesi ndakisa na ngai moko pe ya Apolos, po na koteya bino. Nalingi bólanda ndakisa na biso, pe bóyeba tina ya toli oyo: "Kangama kaka na mibeko." Bongo bótika kobeta tolo po na moto moko pe koyina mosusu. 7 Nani atii yo liboso ya bato mosusu? Eloko nini ozali na yango oyo Nzambe apesi yo té? Pe soki Nzambe moto apesi yo yango, po na nini ozali kobeta tolo lokola nde ozwaki yango yo moko? 8 Bokanisi 'tè bosi'botondi na biloko, pe bosi'bozwi bomengo mingi! Bokanisi 'tè bokómi bakonzi, biso té! Nalingi bozala bakonzi ya solo, po biso pe tózala bakonzi ndenge moko na bino. 9 Nzokande namoni 'tè Nzambe atii biso bantoma na molongo ya suka. Tozali lokola bato oyo bazwi etumbu ya liwa, po báboma biso na miso ya bato ya mokUi mobimba pe kutu ya ba-anjelu. 10 Biso tokómi bazoba po na Kristo, kasi bino bokanisi 'tè bozali bakristo ya mayele. Biso tolembi; kasi bino bokanisi 'tè bozali makasi. Bokanisi 'tè bozali bato minene, nzokande biso tozali bato pamba. 11 Tii na tango oyo tozali na nzala pe posa ya mai; tozangi bilamba pe bazali konyokola biso; tozangi ndako, tozali kotelengana bipai na bipai; 12 tozali kosala na maboko na biso moko, pe komona pasi na mosala Tango bato bafingaka biso, tobenisaka bango; tango banyoko-laka biso, tokangaka mitema; 13 tango bakoselaka biso makambo, tozongisaka maloba ya boboto. Tii lelo tozali lokola bosoto ya mokili, pe bato nyonso bamonaka biso lokola matiti ya fulu. 14 Nakómeli bino makambo oyo po náyokisa bino soni té, kasi po náteya bino lokola bana na ngai ya bolingo. 15 Ata soki bozwi balakisi 10.000 oyo bateyaki bino na kombo ya Kristo, bozali na tata moko kaka; pamba té ezali ngai moto naboti bino na lisanga na Yezu Kristo, tango nayeelaki bino Sango Malamu. 16 Bongo nasengi bino bólanda ndakisa na ngai. 17 Yango wana, natindeli bino Timoté oyo azali mwana na ngai ya bolingo pe atosaka Nkolo. Ye akoyebisa bino lisusu ndenge natambolaka na lisanga na Yezu Kristo, pe ndenge nateyaka bipai nyonso, na ba-eklezya nyonso. 18 Bato mosusu na kati na bino batondi na lolendo, po bakanisi 'tè nakoya kotala bino té. 19 Kasi soki Nzambe alingi, etikali moke náya epai na bino, bongo nakotala maloba ya bato ya lolendo wana té, kasi nakotala nguya oyo bazwi epai ya Nzambe. 20 Pamba té Nzambe atiaka bokonzi na ye kaka na maloba té, kasi alakisaka nguya na ye. 21 Bolingi nini? Náya epai na bino na fimbu? To náya na bolingo pe na boboto?

1 Korente 5

Likambo ya soni na kati ya Eklezya .

1 Nazali koyoka bipai nyonso 'tè na kati na bino likambo moko ya soni ezali, oyo esalamaka kutu té epai ya bato bayebi Nzambe té. Pamba té moto moko na kati na bino azali kotambola ná mwasi ya tata na ye. 2 Pe bozali nanu na lofundu mingi? Nzokande bosengelaki kozala na mawa, pe kobengana na kati na bino moto oyo asali bongo. 3-4 Po na ngai, atako nazali mosika na bino, kasi na molimo nazali na kati na bino. Na kombo ya Nkolo Yezu, nasi'nakati likambo ya moto oyo asali mabe yango. Yango wana bósangana, pe ngai nakozala na bino na molimo; boye na nguya ya Nkolo na biso Yezu, 5 tokopesa moto wana na maboko ya Satan, ábungisa bomoi na ye, po molimo na ye ébika, mokolo Nkolo akoya. 6 Tina ya kosala lofundu ezali té! Esengeli kutu bókeba, pamba té mwa ndambo ya kisi ya mapa evimbisaka sani mobimba ya farine. 7 Boyebi 'tè Bayuda, na feti na bango ya Pake, babwakaka kisi nyonso ya kala, pe baliaka mapa ya sika oyo batiá kisi té. Bino pe bosalaka ndenge wana, po bókóma mapa ya sika oyo ezangá kisi. Pamba té biso tozali na Pake ya sika. Basi'babo-maki Kristo; ye nde Mwana-Meme na biso ya Pake. 8 Bongo tósala feti. Tóbwaka kisi nyonso ya kala; yango ezali masumu pe makambo ya soni. Kasi tósala feti na biso na mapa oyo evimbá té; yango ezali makambo ya bosembo pe ya solo. 9 Na mokanda na ngai nayebisaki bino 'tè bósanganaka té na bato oyo basalaka makambo ya soni. 10 Nakómaki boye té po bókima bato nyonso oyo basalaka makambo ya soni, to bato ya lokoso, bamiyibi pe baoyo básambelaka banzambe ya bikeko. Soki ézala bongo, mbele bosengeli kolongwa na mokili. 11 Kasi nakómelaki bino boye po bósanganaka té na moto oyo alobaká 'tè azali mokristo, nzokande asalaka makambo ya soni, azali na lokoso, asambelaka banzambe ya bikeko, afingaka bato, alangwaka masanga to ayibaka. Bólia kutu esika moko té na moto ya ndenge wana. 12-13 Pamba té nani atii biso bazuzi ya bato oyo bazali bakristo té? Bobele Nzambe moto akosambisa bango. Kasi bino, ebongi botala makambo ya bandeko na bino. Ekómamá boye: "Bóbengana bato ya mabe na kati na bino."

1 Korente 6

Kofundana na kati ya bandeko

1 Soki moto moko na kati na bino azwani likambo ná ndeko na ye mokristo, ndenge nini ákende kosamba liboso ya bazuzi oyo bayebi Nzambe té? Po na nini akei té epai ya bakristo? 2 Boyebi té 'tè bato ya Nzambe bakosambisa bato ya mokili mobimba? Bongo soki bino bokokata makambo ya bato ya mokili, bokoki té kokata makambo ya mike-mike? 3 Boyebi té 'tè biso tokokata makambo ya ba-anjelu? Bongo, tokoki té kokata makambo etali bomoi na biso awa na mokili? 4 Nzokande, tango bozali na likambo ya ndenge oyo, bokendaka kosamba liboso ya bazuzi oyo bayebani té na kati ya Eklezya! 5 Nalobi yango po na koyokisa bino soni! Ya solo, epai na bino moto moko té ya mayele azali, oyo akoki kobongisa makambo na kati ya bandeko? 6 Kasi ndenge nini ndeko na ndeko bafundanaka? Pe basalaka yango liboso ya bazuzi oyo bazali bakristo té? 7 Ya solo, kofundana na tribinal ezali kolakisa 'tè bosi'bobungi. Soki moto alingi kosala bino mabe, po na nini bokoki kokanga mitema té? Soki moto alingi kobotola bino biloko, po na nini botikelaka ye yango té? 8 Kasi ezali bino moko bato bosalaka mabe pe bobotolaka bato biloko! Bosalaka bongo kutu epai y a bandeko na bino! 9 Bóyeba 'tè bato ya masumu bakokóma bato ya mboka ya Nzambe té. Bómikosa té! Ezala bato oyo basalaka makambo ya soni, baoyo básambelaka banzambe ya bikeko, baoyo batambolaka na basi to mibali ya bato, mibali oyo balalaka baninga na bango mibali, 10 ézala bamiyibi, bato ya lokoso ya mbongo, baoyo balangwaka masanga, baoyo bafingaka baninga, to pe baoyo babotolaka bato biloko; bango nyonso bakokóma bato ya mboka ya Nzambe té. 11 Na kati na bino bamosusu bazalaká ndenge wana. Kasi Nzambe asukoli bino mitema, akómisi bino bosantu pe bosembo, po bozali kondimela Nkolo Yezu Kristo, pe bozwi nguya ya Molimo ya Nzambe na biso.

Nzoto ya moto ezali po na Nkolo

12 Boyebi 'tè nalobaki na bino boye: "Nakoki kosala makambo nyonso oyo nalingi, kasi makambo nyonso ezali malamu té po na ngai." Ya solo, nakoki kosala makambo nyonso oyo nalingi, kasi nalingi kokóma moumbu ya likambo moko té. 13 Tokoki koloba boye po na bilei: "Bilei ezali po na libumu, pe libumu po na bilei." Ya solo, kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzokande po na makambo etali kindumba, nzoto ya moto esalamá po na kindumba té, kasi po na Nkolo. Nkolo nde azali mokonzi na yango. 14 Pamba té ndenge Nzambe asekwisaki Nkolo Yezu, se ndenge wana akosekwisa biso pe na nguya na ye. 15 Boyebi té? Nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Kristo. E bongo, násangisa nzoto ya Kristo ná oyo ya mwasi ya ndumba? Ekoki kosalama ata moke té! 16 Pamba té moto oyo asangani ná mwasi ya ndumba, akómi ná ye moto moko. Ekómamá boye: "Bango mibale bakokóma moto moko." 17 Kasi oyo asangani ná Nkolo akómi ná ye Molimo moko. 18 Bókima kindumba. Masumu mosusu nyonso oyo moto akoki kosala, ebebisaka nzoto na ye té; kasi moto oyo amipesi na kindumba, azali kobebisa nzoto na ye moko. 19 Boyebi té? Nzoto na bino ezali lokola ndako ya Molimo Mosantu. Pamba té Nzambe apesi bino Molimo; ye afandi na kati na bino. Boye bozali bakolo ya nzoto na bino té; 20 Nzambe asombaki bino kosomba. Yango wana bósalelaka nzoto na bino po na kokumisa ye.

1 Korente 7

Makambo etali libala

1 Po na makambo bokómelaki ngai na mokanda, nalobi boye: ezali malamu mobali ábala té. 2 Kasi lokola na kati na bino makambo ya soni ezali mingi, ebongi mobali nyonso ázala na mwasi na ye, pe mwasi nyonso ázala na mobali na ye. 3 Mobali ákokisa baposa ya mwasi na ye, pe mwasi oyo ya mobali na ye. 4 Mwasi azali kolo ya nzoto na ye té, kasi bobele mobali. Ndenge moko pe mobali azali kolo ya nzoto na ye té, kasi bobele mwasi. 5 Bókabwana bambeto té; longola kaka soki boyokani po na mwa tango, po na komipesa na losambo. Kasi sima, bózonga ndenge bomesaná; soki boye té, bokoyeba komibatela té pe Satan akoluka kokweisa bino. 6 Nazali koyebisa bino makambo oyo ekoki kosalama; kasi ezali mobeko penza té. 7 Ya solo, nalingi moto nyonso ázala monzemba lokola ngai; kasi Nzambe apesaká moto na moto likabo oyo ekoki na ye. 8 Po na bato oyo bazali monzemba, ná baoyo bakufelá mibali to basi, nazali koyebisa bango 'tè ezali malamu bátikala lokola ngai. 9 Kasi soki bakoki kokanga mitema té, bábala kaka; ebongi malamu bábala esika 'tè bábebisa nzoto na baposa na bango. 10 Na baoyo basi'babali, napesi bango motindo oyo ezali ya ngai té kasi ya Nkolo: mwasi ya libala ákabwana té na mobali na ye. 11 Nzokande soki atiki ye, áfanda kaka monzemba to áyokana lisusu na mobali na ye. Pe mobali aboya mwasi na ye té. 12 Po na bato mosusu, nazwi motindo epai ya Nkolo té. Napesi kaka toli boye: soki ndeko moko azali na mwasi oyo azali mokristo té, pe mwasi wana alingi áfanda na ye libela, mobali átika ye té. 13 Ndenge moko pe soki mwasi moko azali na mobali oyo azali mokristo té, pe mobali wana alingi áfanda na ye libela, mwasi aboya ye té. 14 Pamba té mobali oyo andimaka Kristo té, Nzambe asi'andimi ye po asangani na mokristo ya mwasi. Pe mwasi oyo andimaka Kristo té, Nzambe asi'andimi ye po asangani na mokristo ya mobali. Soki bongo té, bana na bango bakozala mbindo; nzokande Nzambe asi'andimi bango. 15 Kasi soki moto oyo azali mokristo té alingi kolongwa na libala, álongwa kaka. Na makambo ya boye, mokristo ya mobali to ya mwasi azali moumbu ya libala té; Nzambe abengaki bino po bófanda na boboto. 16 Pamba té yo ndeko mwasi, ndenge nini okoki koyeba soki okobikisa mobali na yo? Pe yo ndeko mobali, ndenge nini okoki koyeba soki okobikisa mwasi na yo?

Moto na moto átikala ndenge Nzambe abengaki ye

17 Po na bato mosusu nyonso, nalobi boye: moto na moto ábatela makabo oyo Nkolo apesaki ye; elingi koloba: átikala kaka ndenge azalaki, tango Nzambe abengaki ye. Oyo ezali motindo napesaka na ba-eklezya nyonso. 18 Mobali oyo basi'bakatá ye nzoto liboso 'tè Nzambe ábenga ye, átikala se bongo. Pe oyo bakataki ye té liboso 'tè Nzambe ábenga ye, ákatisa nzoto té. 19 Oyo bakatá nzoto, ná oyo bakata té, bazali kaka ndenge moko. Kotosa mitindo ya Nzambe nde moto ezali likambo ya tina penza. 20 Moto na moto átikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. 21 Ozalaki moumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa té. Kasi ata soki okoki kozwa bonsomi, eloko eleki ezali: koluka kozwa bolamu. 22 Pamba té oyo azali moumbu tango Nzambe abengi ye, azwi bonsomi po akómi moto ya Nkolo. Ndenge moko pe, oyo azali moto ya bonsomi tango Nzambe abengi ye, akómi moumbu ya Kristo. 23 Nzambe asombaki bino kosomba: bókóma baumbu ya bato té. 24 Bandeko na ngai, moto na moto átikala na miso ya Nzambe ndenge azalaki, tango Nzambe' abengaki ye. Motuna po na bato bazali na libala té 25 Po na makambo etali bato oyo babali nanu té, nazwaki motindo epai ya Nkolo té; kasi nalakisi makanisi na ngai. Bokoki kotiela yango mitema, pamba té Nkolo ayokelaki ngai mawa pe atii ngai molobeli na ye. 26 Bongo po na bapasi tozali komona na mokili oyo, nakanisi 'tè ebongi malamu moto ábala té. 27 Osi'obali? Koluka koboma libala té. Obali nanu té? Koluka mwasi té. 28 Kasi soki obali, osali lisumu té. Pe elenge mwasi soki abali, asali lisumu té. Nzokande bato oyo bakobalana, bakomona pasi; pe ngai nalingi té bino bómOna pasi. 29 Bandeko, nayebisi bino: mikolo ekómi ya kotanga. Boye na mwa tango etikali, bato oyo basi'babali, bazala lokola babali té; 30 baoyo bazali kolela, bazala lokola baleli té; baoyo bazali kosepela, bazala lokola basepeli té; baoyo bazali kosomba, bazala lokola bazangi biloko; 31 baoyo bamipesaki na makambo ya mokili, bazala lokola bamipesaka na yango penza té. Pamba té makambo ya mokili oyo ekoumela té. 32 Nalingi té mitema na bino ézala likolo-likolo. Mobali oyo azali na mwasi té, akoki komipesa na makambo ya Nkolo pe koluka nzela ya kosepelisa ye. 33 Kasi oyo azali na mwasi amipe-saka na makambo ya mokili, pe alukaka nzela ya kosepelisa mwasi na ye; 34 boye motema na ye ekabwani. Ndenge moko pe po na mwasi, ézala mokolo to elenge, soki azali na mobali té akoki komipesa na makambo ya Nkolo, po nzoto pe motema na ye ésepelisa Nkolo. Kasi mwasi oyo azali na mobali amipesaka na makambo ya mokili, pe alukaka nzela ya kosepelisa mobali na ye. 35 Nakómeli bino yango po na bolamu na bino; kasi natieli bino motambo té. Nalingi bosalaka na ndenge ekoki, pe bómipe-saka mobimba na Nkolo. 36 Soki bilenge basi'bakani 'tè bakobalana, bongo na sima bayei koyokana 'tè bakobalana lisusu té, basali malamu. Kasi soki mobali akanisi 'tè akokoka kotika mwasi na ye té, po posa ya libala eyeeli ye penza, malamu bábalana ndenge ye alingi. Ezali lisumu té. 37 Kasi soki elenge mobali ayebi penza kokanga motema, pe soki moto moko té azali kotinda ye na makasi, bongo azwi mokano libela 'tè akobala mwasi na ye té, asali malamu; ábala té. 38 Boye oyo alingi kobala mwasi na ye asali malamu. Kasi oyo alingi kobala té, asali malamu koleka. 39 Mwasi asengeli kotosa mibeko ya libala tango nyonso mobali na ye azali na bomoi; bongo soki mobali akufl, akoki kobala oyo motema na ye elingi; kasi bobele mokristo. 40 Nzokande na makanisi na ngai, mwasi akozala na esengo mingi koleka, soki atikali monzemba. Nakanisi 'tè ngai pe nazali na Molimo ya Nzambe.

1 Korente 8

Makambo etali banyama oyo bapesaka mabonza na banzambe

1 Po na makambo etali banyama oyo bapesaka mabonza na banzambe, toyebi nyonso; biso nyonso tozali na mayele. Kasi mayele etondisaka moto na lofundu; bobele bolingo moto ekolisaka bondimi. 2 Soki moto alobi 'tè ayebi Nzambe, wana alakisi 'tè ayebi ye té ndenge asengeli koyeba. 3 Bobele moto oyo alingaka Nzambe nde ayebanaka epai na ye. 4 Motuna nde yango oyo: Moto akoki kolia nyama bapesaki mabonza na banzambe? Toyebi 'tè bikeko elakisaka banzambe oyo ezali té. Pamba té Nzambe azali se moko; 5 atako balobaká 'tè banzambe ezali na Likolo to awa na se. Ya solo, "banzambe" ezali mingi; bakómisi kutu bato mingi "banzambe". 6 Kasi biso toyebi 'tè Nzambe azali se moko; ye nde Tata na biso oyo asalá biloko nyonso, pe tozali bato na ye. Pe Nkolo azali se moko, Yezu Kristo. Na ye Nzambe asalá biloko nyonso, pe biso tozali na bomoi po na ye. 7 Kasi bato nyonso bazali na mayele yango té. Bamosusu bameseni na banzambe ya bikeko tii sik'oyo, pe bakanisi 'tè banyama yango ekómi penza ya banzambe. Bongo soki balei yango bamemi ngambo, po bondimi na bango ezali makasi té. 8 Nzokande biloko ya kolia ekoki kobongisa biso té na miso ya Nzambe; soki toboyi yango, tozongi sima té, pe soki tolei yango, tozwi eloko moko té. 9 Kasi bókeba, soki té bonsomi na biso ekokweisa baoyo bazali na bondimi makasi té. 10 Pamba té, soki yo moto ozali na mayele ya kokoka, obandi kofanda na ndako oyo básambelaka banzambe, bongo moto oyo azali na bondimi makasi té amoni yo, ye akozwa makanisi ya kolia banyama oyo epesamaki na banzambe. Ezali boye té? 11 Na ndenge wana yo moto ozali na mayele ya kokoka, okokweisa ndeko na yo, atako Kristo akufelaki ye. 12 Bongo bozali kosala mabe epai ya Kristo, na ndenge bozali kosala mabe na bandeko na bino oyo bazali na bondimi makasi té, pe komemisa bango ngambo. 13 Yango wana, soki biloko ya kolia ekoki kobebisa bondimi ya ndeko na ngai, nakolia lisusu nyama ata mokolo moko té, po nábebisa bondimi ya ndeko na ngai té.

1 Korente 9

Ntoma azali na bonsomi

1 Ya solo, ngai pe nasalaka ndenge wana. Nazali moto ya bonsomi té? Nazali ntoma té? Namonaki Nkolo na biso Yezu té? Bino té bato bozali mbuma ya mosala oyo nasalelaka Nkolo? 2 Atako bato mosusu bandimaka té 'tè nazali ntoma, kasi bino boyebi malamu penza 'tè nazali ntoma. Ya solo, bino bakristo bozali elembo oyo elakisi 'tè nazali ntoma. 3 Wana ezali ndenge nazongiselaka bato oyo batóngaka ngai. 4 Ngai nakoki kosenga bino biloko ya kolia té? 5 Nakoki kobala mwasi ya mokristo té, pe kosala mibembo ná ye? Bantoma mosusu, ná bandeko ya Yezu pe Piere, basalaka ndenge wana 6 Ezali kaka ngai ná Barnabas bato tosengeli kosala mosala po tóbikela na yango? 7 Soda nini amifutaka ye moko po na kosala mosala ya leta? Nani akonaka banzete ya vinu, bongo ália mbuma na yango té? Nani abokolaka bangombe, bongo ámela miliki na yango té? 8 Makambo nazali kokóma esalamaka kaka epai ya bato té; Mibeko ya Nzambe elakisaka ndenge moko. 9 Pamba té ekómamá boye na Mibeko ya Moize: "Kokanga ngombe monoko té, tango ozali kosalela yango po na kobimisa mbuma ya blé." Okanisi 'tè Nzambe amitungisaka po na bangombe? 10 Té! Bakómá makambo yango po na biso. Moto oyo asalaka elanga, ná oyo akongolaka mbuma, esengeli bátia mitema 'tè bakozwa ndambo ya mbuma. 11 Ngai nakonelaki bino makambo euti na Nzambe; e bongo kosenga lisalisi epai na bino po na nzoto na ngai ekómi nde likambo monene? 12 Bato mosusu bazali kozwa lisalisi epai na bino; e bongo ngai naleki bango té? Nzokande nasengaki lisalisi té. Kasi ngai moko namemaki mokumba na ngai nyonso, po nátiela moto moko té libaku, tango nazali komemela ye Sango Malamu ya Kristo. 13 Nabanza boyebi 'tè bato oyo basalaka na Ndako ya Nzambe, bazwaka bilei na Ndako ya Nzambe; baoyo basalaka na mesa ya mabonza, babikelaka na biteni ya mabonza wana. 14 Ndenge moko pe Nkolo atindaki 'tè basakoli ya Sango Malamu bábikela na mosala yango. 15 Kasi ngai nazali kobeta tolo po natikali kosenga lisalisi ya ndenge wana té. Moto moko té akobotola ngai lokumu yango. Pe nakómeli bino makambo oyo po na kosenga lisalisi té. Eleki malamu nákufa! 16 Nakoki komikumisa té po nasakolaka Sango Malamu; pamba té ezali mokumba Nkolo apesi ngai. Pe soki náboya, eíingaki kobebela ngai. 17 Soki naponaki mosala yangó ngai moko, mbele nalingaki kozela lifuta po na yango. Kasi naponaki yango té; ezali nde mosala Nkolo atindi ngai. 18 Bongo po na nini nakoki kozela lifuta? Ezali bobele po nasakolaka Sango Malamu ofele, pe naboyaka kobikela na mosala na yango, atako Sango Malamu ezali kopesa ngai nzela ya kosenga lisalisi. 19 Nazali moumbu ya moto moko té; kasi ngai moko namikómisá moumbu ya bato nyonso, po nákoka kobikisa bato mingi koleka. 20 Tango nazali epai ya Bayuda, nasalaka lokola Moyuda, po nákoka kobikisa Bayuda. Atako nasengeli kotosa Mibeko ya Moize té, tango nazali epai ya bato oyo batosaka Mibeko, ngai pe nakómi lokola moto atosaka Mibeko, po nákoka kobikisa bango. 21 Tango nazali epai ya baoyo bayebi Mibeko ya Moize té, nakómi lokola moto ayebi Mibeko té, po nákoka kobikisa bango. Nzokande nayebi penza malamu Mibeko ya Nzambe, pamba té natosaka Mibeko ya Kristo. 22 Soki nazali epai ya bato oyo bazali na bondimi makasi té, nasalaka lokola bango, po nákoka kobikisa bango. Epai ya bato nyonso, nasalaka lokola bango, po ata na ndenge nini nákoka kobikisa mwa ndambo na kati na bango. 23 Makambo nyonso wana nasalaka yango po na Sango Malamu, na tina 'tè ngai názwa bolamu na yango. 24 Boyebi té? Bato oyo bamekanaka masano ya mbangu, bango nyonso bakimaka mbangu; kasi moko kaka moto alongaka. Bino pe bokima ndenge wana, po bólonga. 25 Moto nyonso oyo asalaka masano, atosaka mibeko ebele. Nzokande lokumu oyo bango bawelaká eumelaka té; kasi biso towelaka lokumu oyo ekoumela seko. 26 Yango wana nazali kokima mbangu, kasi bikimela té; nazali kobeta makofi, kasi bibetela té. 27 Namonisaka nzoto na ngai pasi penakómisaka yango moumbu, soki té Nzambe akoboya ngai moto nasakolaka na bato mosusu.

1 Korente 10

Tókeba, tósambela banzambe té

1 Bandeko, bókanisa makambo oyo ekweelaká bakoko na biso. Lipata ya Nzambe ezalaki kobatela bango nyonso na nzela, pe bango nyonso bakatisaki Ebale ya Motane. 2 Bango nyonso bakómaki bato ya Moize po na lipata pe mai ya ebale; wana ezalaki lokola batisimo na bango. 3-4 Nzambe aleisaki bango nyonso bilei ya ndenge moko, pe amelisaki bango nyonso mai ya ndenge moko, pamba té bazalaki komela mai eutaki na libanga ya Nzambe, oyo ezalaki kokende ná bango. Libanga yango ezalaki kolakisa Kristo. 5 Nzokande bato mingi na kati na bango basepe-lisaki Nzambe té; yango wana bakómaki kokufakufa na esobe. 6 Makambo nyonso oyo ezali ndakisa po na biso. Boye tózala na baposa ya mabe té, ndenge bango bazalaká na yango. 7 Tósambela banzambe ya bikeko té, ndenge bamosusu na kati na bango bazalaki kosala. Ekómamá boye: "Bafandaki po na kolia pe komela, bongo batelemaki po na kobina." 8 Tósala kindumba té ndenge bamosusu na kati na bango babandaki kosala. Bongo na mokolo moko bato 23.000 bakufaki. 9 Tómeka Nkolo té, ndenge bamosusu na kati na bango basalaki; banyoka eswaki bango pe bakufaki. 10 Bótombokela Nzambe té, ndenge bato mosusu na kati na bango basalaki; pe anjelu-mobomi asilisaki bango. 11 Makambo nyonso oyo ekweelaki bango ezali ndakisa; bakómá yango po na kokebisa biso bato tokómi na mikolo ya suka. 12 Yango wana, moto oyo azali kokanisa 'tè atelemi, ákeba soki té akokweya. 13 Bókanisa ndenge Monguna amekaki bino; ye amekaka bato ndenge wana. Nzokande Nzambe alalaka té. Akotika ye té ásukisa makasi na bino, kasi tango nyonso akozala kopesa bino nguya ya kokanga mitema pe ya kolonga. 14 Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, bókeba, bosambela banzambe ya bikeko té. 15 Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele; botala bino moko soki nazali koloba malamu to mabe. 16 Bókanisa kopo ya kobenisa oyo biso topeselaka Nzambe mersi: yango esangisaka biso na makila ya Kristo té? Pe lipa oyo toliaka esika moko, yango esangisaka biso na nzoto ya Kristo té? 17 Lipa ezali kaka moko; boye biso nyonso tozali lokola nzoto moko, atako tozali ebele; pamba té toliaka lipa moko wana. 18 Botala bato ya Israel. Tii lelo bazali kobomela Nzambe banyama; pe baoyo baliaka mabonza wana basanganaka ná Nzambe. 19-20 Nzokande bapagano bapesaka mabonza na Nzambe té, kasi na milimo mabe. Boye nalingi koloba nini? Nyama oyo bapesaka na banzambe ezali nde na tina? Banzambe yango ezali na tina? Té! Kasi nalingi tébinobósangana ná milimo mabe. 21 Bokoki té komela na mbala moko kopo ya Nkolo Yezu, ná oyo ya milimo mabe. Bokoki pe té kolia na mbala moko bilei ya Nkolo, ná oyo ya milimo mabe. 22 Soki tosali bongo, tozali kotumola nde kanda ya Nkolo. Biso toleki ye na makasi?

Tósala nyonso po na kokumisa Nzambe

23 Nalobaki na bino boye: "Nakoki kosala makambo nyonso oyo nalingi, kasi makambo mosusu ezali malamu té po na ngai." Ya solo, nakoki kosala makambo nyonso oyo nalingi, kasi makambo mosusu ezali kokolisa bondimi té. 24 Moto na moto áluka bolamu ya bandeko, kasi ya ye moko té. 25 Bokoki kolia nyonso oyo batekisaka na zando; kotuna té soki ebongi na kolia to té. 26 Pamba té "Mokili mobimba ezali ya Nkolo, ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango." 27 Soki moto oyo azali mokristo té abengisi yo pe olingi kokende, lia kaka biloko nyonso oyo akotiela yo na mesa; kotuna té soki ebongi na kolia to té. 28-29 Kasi soki moto moko alobi na yo: "Nyama oyo, bapesaki yango mabonza na banzambe", kolia yango té. Tika yango, po na moto oyo ayebisi yo, po ye akanisi 'tè ebongi té na kolia. Nalingi koloba té 'tè yo pe osengeli kokanisa lokola ye. Pamba té biso bakristo tokoki kosala makambo nyonso oyo tolingi. E bongo, po na nini makanisi ya moto mosusu éya kopekisa bonsomi na biso? 30 Soki topesaka Nzambe mersi po na biloko oyo tozali kolia, ndenge nini bato mosusu bátsiola biso likolo ya biloko oyo tozali kopesela Nzambe mersi? 31 Ya solo, ata bozali kolia, komela, to kosala makambo mosusu, bosalaka nyonso po na kokumisa Nzambe. 32 Bótiela moto moko té motambo, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, to pe bato ya Eklezya. 33 Ngai moko pe nasalaka se bongo: natiaka molende po moto na moto ásepela na makambo na ngai nyonso. Nalukaka bolamu na ngai moko té, kasi ya bato nyonso, po 'tè bábika.

1 Korente 11

1 Bólanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Kristo.

Bizaleli ya basi ná mibali na tango ya losambo

2 Nakumisi bino na ndenge bokanisaka ngai tango nyonso, pe ndenge botosaka mitindo oyo ngai moko nazwaki pe nayebisaki bino. 3 Kasi nalingi kobakisa lisusu likambo moko: mobali nyonso asengeli kotosa Kristo; mwasi asengeli kotosa mobali na ye; pe Kristo atosaka Nzambe. Tókamata ndakisa ya nzoto ya moto: motú ya mobali ezali Kristo; motú ya mwasi ezali mobali na ye; motú ya Kristo ezali Nzambe. 4 Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka na nguya ya Molimo, soki alati ekoti, abebisi lokumu ya motú na ye. 5 Mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka na nguya ya Molimo, soki alati kitambala na motú té, abebisi lokumu ya motú na ye. Akozala lokola bakokoli ye motú. 6 Soki aboyi kolata kitambala, ákatisa suki. Kasi ezali soni soki bakati mwasi suki to bakokoli ye motú; yango wana ebongi álata kitambala. 7 Ya solo, mobali asengeli té kolata ekoti na motú, po azali lokola elili ya Nzambe oyo elakisaka lokumu na ye. Kasi mwasi azali lokumu ya mobali na ye. 8 Pamba té, mobali abimaká na nzoto ya mwasi té, kasi mwasi nde moto abimaká na nzoto ya mobali. 9 Pe Nzambe asalaka mobali po na mwasi té, kasi asalaka mwasi po na mobali. 10 Yango wana mwasi asengeli kolata kitambala, yango elakisi 'tè azali sima ya mobali. Bóyeba 'tè ba-anjelu bazalaká na kati na bino. 11 Nzokande na miso ya Nkolo, mwasi akoki kozanga té, mobali pe akoki kozanga té. 12 Pamba té, atako mwasi abimaká na nzoto ya mobali, kasi mibali babotamaka na basi; pe nyonso eutá na Nzambe. 13 Bino moko bókata likambo oyo: ezali malamu mwasi ásambela Nzambe motú pamba? 14 Ya solo, na ndenge Nzambe asalá bato, soki mobali azali na suki mingi, ezali soni po na ye; 15 kasi soki mwasi azali na suki mingi, ezali lokumu po na ye. Pamba té Nzambe apesá mwasi suki ya mingi po na kozipa motú na ye. 16 Nzokande soki moto alingi kaka kotia tembe na likambo yango, nalobi na ye boye: ézala ngai to ba-eklezya ya Nzambe, tomesaná kotiana tembe té.

Bilei ya Nkolo

17 Na makambo nayebisi bino sik'oyo, nakoki kokumisa bino té. Pamba té tango bósanganaka esika moko, makambo na bino ememelaka bino bolamu té, kasi mabe. 18 Ya liboso, nayoki 'tè tango bósanganaka, bokabwanaka; pe nakanisi mwa ndambo ya sango yango ezali ya solo. 19 Pamba té esengeli bókabwana, po émonana polele banani na kati na bino bazali bakristo ya kokoka. 20 Ndenge bino bósanganaka, ebongi té po na kolia bilei ya Nkolo. 21 Po moto na moto aliaka bilei na ye moko, boye bamosusu batikalaka na nzala, pe bamosusu balangwaka 22 Bozali na bandako té po na kolia pe komela? Bozali nde kotsiola Eklezya ya Nzambe? Bolingi koyokisa bato bakelelá soni? Nálobela bino nini? Nákumisa bino? Na makambo oyo nakoki kokumisa bino té. 23 Pamba té, mateya napesaki bino, nazwaki yango epai ya Nkolo. Na butu wana batekaki ye, Nkolo Yezu akamataki lipa, 24 apesaki Nzambe mersi, akatakikataki yango, pe alobaki boye: "Oyo ezali nzoto na ngai, napesi yango po na bino. Bosalaka boye po na kokanisaka ngai." 25 Ndenge moko pe, tango basilisi kolia, akamati kopo pe alobi boye: "Kopo oyo ezali kotia Boyokani ya sika; napesi makila na ngai po na kokokisa yango. Mbala nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye po na kokanisaka ngai." 26 Boye, mbala nyonso bokozala kolia lipa oyo pe komela kopo oyo, bokobanda kosakola liwa ya Nkolo, tii mokolo ye akozonga. 27 Yango wana, moto nyonso oyo alei lipa pe ameli kopo ya Nkolo na ndenge ekoki té, akomema ngambo po na nzoto pe makila ya Nkolo. 28 Moto na moto átala motema na ye, liboso 'tè ália lipa oyo pe ámela kopo oyo. 29 Pamba té soki abosani 'tè ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na tango azali kolia pe komela. 30 Yango wana bato ebele na kati na bino bakomi na maladi pe bazangi makasi; bamosusu kutu bakufaki. 31 Soki tobongisaki mitema, mbele tozwaki etumbu té. 32 Kasi Nkolo azali kotala biso pe kopesa biso etumbu sik'oyo, po tókoka kobika, mokolo akokatela banguna na ye etumbu ya suka. 33 Yango wana, bandeko na ngai, tango bósanganaka po na kolia bilei ya Nkolo, bózelaka baninga. 34 Oyo ayoki nzala, ália na ndako na ye, po bobanda komema ngambo té na ndenge bozali kosangana. Po na makambo oyo etikali, nakobongisa yango tango nakoya.

1 Korente 12

Makabo ya Molimo Mosantu

bandeko, po na makambo etali makabo ya Molimo Mosantu, nalingi bóyeba yango malamu. 2 Boyebi ndenge makambo ezalaki koleka, tango bozalaki nanu bakristo té. Bozalaki kobendana penza epai ya banzambe ya bikeko, oyo elobaka té. 3 Yango wana nazali koyebisa bino boye: soki moto azali koloba na nguya ya Molimo ya Nzambe, akoki koloba té "Lisumá na Yezu!" Pe moto moko té akoki koloba "Yezu azali Nkolo", soki Molimo Mosantu alakisi ye té. 4 Makabo ya Molimo Mosantu ekeseni, kasi Molimo oyo apesaká yango azali se moko. 5 Ndenge ya kosalela Nkolo Yezu ekeseni, kasi Nkolo azali se moko. 6 Misala oyo Nzambe asalaka na maboko na biso ekeseni, kasi Nzambe se moko moto asalaka yango nyonso. 7 Moto na moto azwaka nguya ya Molimo Mosantu po na bolamu ya lisanga mobimba. 8 Molimo apesaká na moto moko maloba ya mayele, pe na moto mosusu nguya ya koyeba ba-sekelé. 9 Molimo wana se moko apesaká na moto mosusu bondimi, pe na mosusu nguya ya kobikisa bato ya maladi. 10 Moto mosusu azwaka nguya ya kosala makamwisi, mosusu nguya ya kosakola maloba euti na Molimo Mosantu, mosusu nguya ya koyeba soki molimo ezali malamu to mabe, mosusu nguya ya koloba minoko eyebaná té, pe mosusu nguya ya kolimbola yango. 11 Kasi makambo nyonso wana, ezali Molimo se moko moto asalaka yango; ye akabelaka moto na moto ndenge ye moko alingi.

Biteni ya nzoto ekeseni

12 Kristo azali lokola nzoto ya moto. Yango ezali se moko, nzokande ezali na biteni ebele. Biteni nyonso wana, atako ezali ebele, esangani na nzoto moko. 13 Pamba té babatisaki biso nyonso, po Molimo se moko ákómisa biso nzoto se moko, ózala Moyuda to moto ya ekolo mosusu, ózala moumbu to moto ya bonsomi. Pe Nzambe atondisi biso nyonso na Molimo oyo se moko. 14 Pe lisusu nzoto ezali bobele eteni moko té, kasi biteni ebele. 15 Soki likolo elobi: "Nalingi názala liboko; soki té naboyi kozala eteni ya nzoto", wana ezali ya solo? 16 Pe soki litoi elobi: "Nalingi názala liso; soki té naboyi kozala eteni ya nzoto", wana ezali ya solo? 17 Soki nzoto mobimba ezalaki liso pamba, ndenge nini ekokaki koyoka? Soki ezalaki litoi pamba, ndenge nini ekokaki koyoka solo? 18 Kasi Nzambe atiá na nzoto biteni nyonso ndenge alingaki. 19 Soki yango nyonso ezalaki se eteni moko, wapi nzoto? 20 Kasi biteni ezali ebele, nzokande nzoto ezali kaka moko. 21 Yango wana liso ekoki koloba na liboko té 'tè "Nazali na posa na yo té." Pe motú ekoki koloba na makolo té 'tè: "Nazali na posa na bino té." 22 Ata kutu biteni ya nzoto oyo emonanaka 'tè ezangi makasi, ekoki kozanga té. 23 Pe biteni oyo tomoni 'tè ezangi lokumu, tokumisaka yango mingi koleka. Biteni oyo eyokisaka biso soni na miso ya bato, tobombaka yango malamu; 24 nzokande biteni oyo eyokisaka biso soni té, tozali na tina ya kobomba yango té. Ezali Nzambe moto asangisá nzoto, na ndenge 'tè biteni oyo ezangi lokumu ézwa lokumu mingi koleka. 25 Asalá nyonso po nzoto ékabwana té, kasi biteni nyonso ésalisanaka. 26 Boye, soki eteni moko ezali na pasi, biteni nyonso pe emoni pasi; soki eteni moko ezwi lokumu, biteni nyonso pe esepeli. 27 Bino bozali nzoto ya Kristo; moto na moto azali eteni ya nzoto na ye. 28 Bongo na kati ya Eklezya Nzambe atiá moto na moto na mosala na ye: ya liboso, bantoma; ya mibale, baprofete; ya misato, bateyi. Pe sima bato oyo basalaka makamwisi, baoyo babikisaka bato ya maladi, baoyo basalisaka baninga, baoyo batambwisaka misala ya lisanga, pe baoyo bazali na likabo ya koloba minoko eyebaná té. 29 Bakristo nyonso té bazali bantoma, baprofete, to pe bateyi. Bango nyonso té bato basalaka makamwisi, 30 to pe babikisaka bato ya maladi. Bango nyonso té bato balobaká minoko eyebaná té, to bayebi kolimbola yango. 31 Bówela makabo ya Nzambe oyo eleki malamu. Nzokande nalingi kolakisa bino nzela moko oyo eleki yango nyonso.

1 Korente 13

Bolingo

1 Ata nayebi koloba minoko nyonso ya bato to ya ba-anjelu, kasi soki nazangi bolingo, nazali lokola mbunda oyo etiaka makelele, to ngonga oyo ebetaka pamba-pamba. 2 Ata nazali na likabo ya kosakola maloba euti na Molimo Mosantu, ata nayebi ba-sekelé na ye nyonso pe nazwi mayele nyonso, ata nazali na bondimi nyonso po na kolongola bangomba pe kotia yango esika mosusu, kasi soki nazangi bolingo, nazali moto ya pamba. 3 Ata nakabi biloko na ngai nyonso na bato bakelelá, ata namipesi po bázikisa ngai na móto, kasi soki nazangi bolingo, yango ekopesa ngai bolamu moko té. 4 Moto oyo azali na bolingo, akangaka motema pe asalisaka bato, azali na zuwa té, amilakisaka té, azali na lofundu té; 5 aboyaka makambo oyo ebongi té, alukaka bolamu na ye moko té, asilikaka té, abombelaka bato kanda té. 6 Moto oyo azali na bolingo asepelaka na makambo ya mabe té, kasi asepelaka kaka na makambo ya solo. 7 Tango nyonso alimbisaka bato, andimaka maloba na bango, atiaka motema na bango, amipesaka po na bango. 8 Bolingo ekosila ata mokolo moko té. Mokolo ezali bakotika kosakola maloba euti na Molimo Mosantu pe koloba minoko eyebaná té. Mayele oyo Nzambe apesi biso awa na se, ekolimwa. 9 Pamba té awa na mokili toyebi Nzambe kaka ndambo, tosakolaka bobele ndambo. 10 Kasi mokolo tokozwa oyo ekokà, makambo ya ndambo-ndambo ekosila. 11 Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke; nazalaki na makanisi pe na mayele ya mwana moke. Kasi awa nakómi mokolo, natiki makambo ya bana mike. 12 Se bongo, sik'oyo tozali komona Nzambe bobele lokola na talatala, tozali komona ye polele té. Kasi mokolo ezali, tokomonana bilongi. Sik'oyo nayebi Nzambe bobele ndambo; kasi na mokolo wana nakoyeba ye ndenge ye ayebi ngai. 13 Makambo misato ezali awa na mokili, oyo eyeeli biso bolamu ya seko: kondimela Nzambe, kotia motema na ye, pe kozala na bolingo. Na kati na yango misato, oyo eleki penza ezali nde bolingo.

1 Korente 14

Mateya mosusu po na makabo ya Molimo Mosantu

1 Bówela liboso bolingo. Bóluka makabo ya Molimo Mosantu, mingi oyo ya kosakola mateya euti na ye. 2 Moto oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali koloba na bato té kasi na Nzambe. Azali koloba makambo ya sekele, na nguya ya Molimo Mosantu; moto moko té ayebi tina ya maloba na ye. 3-4 Kasi oyo azali kosakola mateya euti na Molimo, azali koloba na bato, azali kokolisa bondimi ya lisanga mobimba, kolendisa yango, pe kolongola yango mawa. Nzokande oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali kokolisa kaka bondimi na ye moko. 5 Ngai nalingi bino nyonso bóloba minoko oyo eyebaná té, kasi mingi penza nalingi bósakola maloba euti na Molimo. Ya solo, yango eleki malamu; pamba té moto oyo azali koloba monoko eyebaná té, azali kokolisa bondimi ya lisanga bobele soki balimboli maloba na ye. 6 Bandeko, soki nayei kotala bino, pe nalobi kaka monoko eyebaná té, nayeeli bino bolamu nini? Bokozwa bolamu bobele soki nasakoli maloba euti na Molimo pe nayebisi bino ba-sekelé na ye, pe soki nayeeli bino maloba ya mayele to mateya. 7 Ndakisa. Biloko ya miziki lokola piololo to gidare, soki ebimisi kaka mongongo moko, ndenge nini okoyeba nzembo oyo ezali kobeta? 8 Pe soki babeti kelelo malamu té, soda nini akomibongisa po na bitumba? 9 Ndenge moko pe, soki bino bozali koloba minoko eyebaná té, ndenge nini moto akoki koyeba tina ya maloba na bino? Maloba yango ekokende na mopepe. 10 Minoko ya bato ezali ndenge na ndenge, pe moko té ezangi tina 11 Nzokande soki moto moko alobi monoko oyo ngai nayebi té, biso na ye tomonani lokola bapaya. 12 Boye, bino bato bozali kowela makabo ya Molimo Mosantu, bóluka mingi makabo oyo ekoki kokolisa bondimi ya lisanga. 13 Yango wana, oyo alobaká monoko eyebaná té, ábondela Nzambe po ákoka kolimbola maloba yango. 14 Pamba té soki nasambeli na monoko eyebaná té, molimo na ngai ezali kosambela, kasi makanisi na ngai ezali kosambela té. 15 Bongo násala ndenge nini? Tango nazali kosambela pe koyemba na molimo, ebongi násambela pe náyemba lisusu na makanisi na ngai. 16 Pamba té soki okumisi Nzambe bobele na molimo na yo, ndenge nini bandeko bakoki koloba "Amen"? Bayebi kutu tina ya maloba na yo té. 17 Ata losambo na yo ezali kitoko, ekoki kokolisa bondimi ya moto mosusu té. 18 Napesi Nzambe mersi po naleki bino nyonso na koloba minoko eyebaná té. 19 Kasi na kati ya lisanga, esika 'tè náloba maloba nkoto na nkoto na monoko eyebaná té, nalingaka mingi koloba maloba mitano pamba na monoko oyo bato bayebi, po na koteya bango. 20 Bandeko, bókanisaka lokola bana mike té, kasi lokola bamikolo. Bózalaka lokola bana mike bobele po na makambo etali masumu. 21 Ekómamá boye na Mibeko: "Nkolo alobi: nakoloba na bato oyo monoko bango bayebi té; ezali bapaya bato bako-memela bango maloba na ngai. Kasi ata bongo, bakoyokela ngai té." 22 Bomoni? Likabo ya koloba minoko eyebaná té epesamaka té po na bakristo, kasi po na baoyo baboyi kondima. Nzokande likabo ya kosakola maloba euti na Molimo epesamaka po na bakristo; epesamaka té po na baoyo baboyi kondima. 23 Bókanisa nanu. Soki eklezya esangani, pe moto nyonso azali koloba minoko eyebaná té, bongo bato oyo bazangi bondimi pe bayebi Kristo té bakoti kuna, bakoloba te 'tè bozali bato ya maboma? 24 Kasi soki bino nyonso bozali kosakola maloba euti na Molimo, bongo moto moko oyo azangi bondimi pe ayebi Kristo té akoti kuna, akomona bino nyonso boyebi 'tè amemi masumu pe akoki na etumbu; 25 ba-sekelé ya motema na ye ekomonana polele; bongo akofukamela Nzambe elongi na se, pe akosakola 'tè: "Ya solo, Nzambe azali na kati na bino."

Nzambe alingi mobulu té

26 Boye bandeko, ndenge nini bosengeli kosala? Tango bósanganaka, moto na moto azali na mosala na ye: koyemba nzembo; kopesa mateya; koyebisa ba-sekelé ya Nzambe; koloba monoko eyebaná té, to kolimbola yango. Nyonso ésalama po na kokolisa bondimi ya lisanga. 27 Bato oyo balingi koloba minoko eyebaná té, bakoki kozala mibale; bálekisa misato té. Moto na moto áloba na tango na ye, pe moto mosusu álimbola maloba na bango. 28 Soki moto ya kolimbola azali té, báfanda nyee na kati ya lisanga; moto na moto áloba kaka na Nzambe, na se ya motema. 29 Bato mibale to misato bakoki kosakola maloba euti na Molimo; pe bino nyonso botala soki bazali koloba malamu. 30 Kasi na tango wana, soki Nzambe alakisi moto mosusu sekele moko, oyo azali koloba áfanda nyee. 31 Moko moko na bino akoki kosakola maloba euti na Molimo, po bato nyonso báyekola pe bázwa molende. 32 Pamba té soki Molimo apesi maloba na profete, ayebisaka ye pe tango nini akoki kosakola yango. 33 Po Nzambe azali Nzambe ya mobulu té, kasi ya boboto. Ndenge esalamaka na ba-eklezya nyonso, 34 esengeli basi báfanda nyee na kati ya lisanga; báloba té. Ekómamá boye na Mibeko: basi bazala bato ya botosi. 35 Bongo soki balingi koyeba likambo, bátuna mibali na bango na ndako. Pamba té ezali soni soki mwasi alobi makambo na kati ya lisanga. 36 Bokanisi maloba ya Nzambe ebandaki epai na bino? Eyeeli kaka bino moko? 37 Soki moto moko akanisi 'tè azali profete to azwi Molimo Mosantu, ándima 'tè makambo nakómeli bino ezali mobeko ya Nkolo. 38 Kasi oyo andimi yango té, alakisi 'tè Nzambe pe andimi ye té. 39 Yango wana, bandeko na ngai, bówela liboso likabo ya kosakola maloba euti na Molimo. Kasi bópekisa té baoyo bazali koloba minoko eyebaná té. 40 Nzokande nyonso ésalama na ndenge ekoki, pe mobulu ézala té.

1 Korente 15

Kosekwa ya Kristo

1 Bandeko, sik'oyo nalingi náyebisa bino lisusu Sango Malamu oyo nasakolaki epai na bino, oyo bondimaki, pe bozali kondima na molende tii lelo. 2 Soki bosimbi yango makasi, yango ekobikisa bino. Soki té, bondimaki se pamba. 3 Sango eleki tina oyo nayebisaki bino, ngai moko nazwaki yango: Kristo akufaki po na masumu na biso, ndenge baprofete bakomaká. 4 Bakundaki ye, pe na mikolo misato asekwaki, ndenge baprofete bakomaká. 5 Amonanaki na Piere, pe sima na bantoma nyonso zomi na mibale. 6 Amonanaki pe na bandeko 500 na mbala moko; mingi na kati na bango bazali na bomoi tii lelo, kasi bamosusu bakufa. 7 Bongo ayaki komonana lisusu na Jake, pe sima na ye na bantoma nyonso. 8 Sima na bango nyonso ngai pe nayaki komona ye. Nazali lokola matshombe, 9 pamba té nayaki sima ya bantoma nyonso, pe nabongi té po na kozwa kombo ya ntoma, po kala nazalaká konyokola Eklezya. 10 Kasi bobele po na bolamu ya Nzambe nazali ndenge nazali; pe bolamu oyo ye apesaki ngai ekei pamba té. Nasalaki mingi koleka bantoma mosusu nyonso; nzokande ezali ngai té, kasi ezali bolamu ya Nzambe moto ezali kosala ná ngai. 11 Bongo, éuta na ngai to na bantoma mosusu, yango ezali sango biso tosakolaka pe oyo bino bondimaki.

Kosekwa na biso

12 Soki tozali kosakola 'tè Kristo asekwaki, ndenge nini bato mosusu na kati na bino balobaká 'tè bato bakufa bakoki kosekwa té? 13 Soki bato bakufa bakoki kosekwa té, Kristo pe asekwaki té. 14 Pe soki Kristo asekwaki té, mateya na biso ezali pamba, pe bondimi na bino ezali pamba. 15 Tok 6 mi kokosela Nzambe makambo, pamba té tolobaka 'tè ye asekwisaki Kristo; nzokande asekwisaki ye té, soki bato bakufa bakoki kosekwa té. 16 Ya solo, soki bato bakufa bakoki kosekwa té, bongo Kristo pe asekwaki té. 17 Kasi soki Kristo asekwaki té, bozali kondima makambo ya pamba, pe botikali kaka na masumu na bino. 18 Pe elingi koloba lisusu 'tè bakristo oyo bakufa, babungá libela. 19 Soki tozali kotia mitema na Kristo kaka po na makambo ya mokili oyo ya se, tozali bato ya mawa koleka bato nyonso. 20 Kasi ezali boye té! Ya solo, Kristo asekwá. Na kati ya bato oyo bakufa, ye azali moto ya liboso oyo asi'asekwá. 21 Pamba té, liwa eyaki po na moto moko; ndenge moko pe, kosekwa eyaki po na moto moko. 22 Lokola bato nyonso basengeli kokufa po bazali na molongo ya Adamu, ndenge moko pe bato nyonso bakosekwa po bazali na molongo ya Kristo. 23 Kasi moto na moto azali na tango na ye. Kristo nde azali moto ya liboso; bato ya Kristo bakolanda ye, mokolo ye akozonga. 24 Bongo mokolo ya suka ekoya: Kristo akosukisa banguna na ye nyonso oyo bato bábengaka "bakonzi ya Likolo na se", pe akozongisa bokonzi na maboko ya Nzambe Tata. 25 Kasi Kristo asengeli kozala Mokonzi tii mokolo Nzambe akotia banguna nyonso na se ya makolo na ye. 26 Pe liwa ezali monguna na ye ya suka. 27-28 Pamba té ekómamá boye: "Nzambe atiá biloko nyonso na se ya makolo na ye." Boye tango Nzambe akoloba na Kristo: "Nasi'natii nyonso na se na yo", bobele ye moko Nzambe akozala na se na ye té. Bongo na tango yango ye moko akomitia na se ya Nzambe oyo apesaki ye bokonzi. Na ndenge wana Nzambe akozala Mokonzi ya bikelamo nyonso penza. 29 Bókanisa lisusu. Epai na bino, bato mosusu basengaka bázwa batisimo, na esika ya bandeko na bango oyo bakufaki liboso 'tè bákoka kozwa yango. Bato wana bazali koluka penza nini? Soki ya solo, bato bakufa bakoki kosekwa té, tina nini basengaka batisimo na esika na bango? 30 Pe ngai moko, po na nini nazali komilukela makama tango nyonso? 31 Ya solo, bandeko, mikolo nyonso nazali penepene ya liwa. Nazali kutu kobeta tolo po na yango likolo na bino, na lisanga na Nkolo na biso Yezu Kristo. 32 Po na nini nabundaki etumba ya somo awa na Efeze, soki ezali kaka po na makambo ya bomoto? Soki bato bakufa bakosekwa té, tósala bobele ndenge balobaká: "Tólia, tómela, lobi tokokufa." 33 Bótika komikosa: "Baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu." 34 Bózongela makanisi ya malamu, po bósala masumu té. Nalobi boye po na koyokisa bino soni: bato mosusu na kati na bino bayebi Nzambe té. Nzoto ya bato oyo bakosekwa 35 Kasi bato mosusu bazali kotunatuna: "Ndenge nini bato bakufa bakosekwa? Bakozala na nzoto ya ndenge nini?" 36 Ozali mayele té! Soki okoni mbuma, esengeli ékufa na mabelé po ébota. 37 Pe lititi oyo ekobima, okonaki yango té. Okonaki bobele mbuma pamba, ya blé to ya eloko mosusu. 38 Nzambe moto akobotisa mbuma yango, ndenge ye moko alingi. Ye abotisaka mbuma na mbuma na ndenge na yango. 39 Misuni nyonso ezali ndenge moko té. Bato bazali na mosuni na bango; banyama ezali na mosuni mosusu; bandeke mosuni mosusu; pe bambisi ezali na mosuni ya ndenge mosusu. 40 Biloko ya Likolo ekeseni na oyo ya se. Kitoko ya biloko ya Likolo ekokani té ná kitoko ya biloko ya se. 41 Moi ezali na kitoko na yango; sanza ezali na kitoko mosusu, pe minzoto ezali na kitoko na yango mosusu. Monzoto moko moko ekeseni na kitoko. 42 Bato oyo bakosekwa bakozala pe ndenge wana. Kokunda nzoto ya moto ezali lokola kokona mbuma: nzoto esengeli kopola na mabelé; kasi nzoto oyo ekosekwa ekopola lisusu té. 43 Bakonaka nzoto oyo ezangi lokumu; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na lokumu. Bakonaka nzoto oyo ezangi makasi; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na makasi. 44 Bakonaka nzoto oyo ezali na bomoi ya bomoto; kasi nzoto oyo ekosekwa ekozala na bomoi ya molimo. Pamba té nzoto na biso awa na mokili ezali na bomoi ya bomoto, kasi bomoi mosusu ezali, yango nde ya molimo. 45 Ekómamá boye po na Adamu, moto ya liboso oyo Nzambe asalaka: "Ye akómaki na bomoi." Kasi Kristo, Adamu ya suka, akómi Molimo oyo apesaká bomoi. 46 Boye, bomoi ya molimo eyaki liboso té; kasi bomoi ya bomoto eyaki liboso, pe na sima bomoi ya molimo. 47 Nzambe asalaka Adamu ya liboso na mabelé; ye azalaki moto ya mokili oyo. Kasi Kristo, Adamu ya mibale, autaki na Likolo. 48 Bato ya mokili bakokani na Adamu, moto oyo asalamaká na mabelé; bato ya Likolo bakokani ná Kristo, moto oyo autaki na Likolo. 49 Liboso biso tokokanaki ná moto oyo asalamaká na mabelé; ndenge moko pe tokokokana ná moto oyo autaki na Likolo. 50 Bandeko, nalobi boye: nzoto na biso ya bomoto ekoki kozwa esika té na mboka ya Nzambe; nzoto oyo esengeli kopola, ekoki kozwa bomoi ya seko té. 51 Nazali koyebisa bino sekele moko: biso nyonso tokokufa té, kasi biso nyonso tokobongwana. 52 Yango ekosalama na mbalakaka, na mokolo ya suka tango kelelo ekobeta. Pamba té tango kelelo ekobeta, bato bakufa bakosekwa, pe bakozwa nzoto oyo ekoki kopola lisusu té; nzokande biso bato tokozala na bomoi na tango wana, tokobongwana. 53-54 Pamba té, nzoto na biso oyo etangamá kokufa pe kopola, esengeli ébongwana, po ékoka kokufa lisusu té to kopola. Boye na tango wana Nzambe akoko-kisa makambo oyo ekómamá: "Nzambe asi'alongi! Liwa esili! 55 Yo liwa, okanisi olongá libela? E liwa, wapi bibundeli na yo ya kozokisa bato?" 56 Bibundeli ya liwa nde masumu; pe Mibeko moto epesaka masumu nguya. 57 Kasi tópesa Nzambe mersi! Pamba té ye asi'alongisi biso na lisanga na Nkolo na biso Yezu Kristo! 58 Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, bótia molende po bókweya té. Bómipesaka tango nyonso na mosala ya Nkolo. Bóyebaka 'tè pasi oyo bomonaka na mosala ya Nkolo ekokende pamba té.

1 Korente 16

Bósalisa bandeko oyo bakelelá

1 Na makambo etali mbongo oyo bolingi kokongola po na bakristo ya Yeruzalem: bino pe bósala ndenge natindaki ba-eklezya ya Galatie. 2 Mikolo nyonso ya yenga, moto na moto na kati na bino álongolaka ndambo ya mbongo ndenge ye akokeli. Bózela ngai té po na kokongola yango. 3 Tango nakokóma epai na bino, nakopesa mikanda na bato oyo bino boponaki, pe nakotinda bango bámemela bandeko ya Yeruzalem makabo na bino. 4 Soki tma ezali po ngai nákende, bakosala mobembo nzela moko na ngai.

Ndenge Polo akosala mobembo

5 Nakoya epai na bino soki nakatisi Masedwane; pamba té nalingi koleka na Masedwane. 6 Nakanisi nakoumela mwa mingi epai na bino, ézala basanza nyonso ya malili. Boye bokokoka kosalisa ngai po 'tè nálanda mibembo na ngai. 7 Nalingi koleka epai na bino mbangu té, kasi soki Nkolo apesi ngai nzela, nakanisi nakofanda mwa mikolo epai na bino. 8 Nzokande nakotikala awa na Efeze tii mokolo ya Pantekote. 9 Pamba té Nzambe afungoleli ngai nzela monene po na kosala mosala ya malonga pe ya tina, atako banguna bazali mingi. 10 Soki Timoté akómi epai na bino, bóyamba ye malamu na ndenge 'tè ábanga té, po ye pe asalaka mosala ya Nkolo lokola ngai. 11 Moto moko té ámonela ye, kasi bósalisa ye po alanda mobembo na ye na boboto, pe ákóma epai na ngai. Pamba té biso ná bandeko mosusu tozali kozela ye. 12 Po na ndeko Apolos, nabondelaki ye mingi 'tè áya ná bandeko mosusu kotala bino, kasi aboyi koya sik'oyo. Akoya mokolo ye moko alingi.

Makambo ya suka

13 Bózalaka ekenge: bótika bondimi té, bozala bato ya solo, pe bozala na makasi. 14 Bosalaka misala na bino nyonso na bolingo. 15 Bandeko, boyebi Stefanas pe libota na ye: bazalaki bato ya liboso po na kokóma bakristo na mboka Grese, pe bamipesaki po na kosalela bakristo. 16 Bongo nasengi bino bótosa bato ya ndenge wana, pe baoyo bamonaka pasi na mosala esika moko ná bango. 17 Nasepeli mingi po namoni Stefanas, Fortunatus pe Akaikus. Tango namonaki bango, ezalaki lokola namoni bino nyonso. 18 Pe bakitisi ngai motema ndenge bakitisaki bino pe mitema. Yango wana, bóyeba kokumisa bato ya ndenge oyo. 19 Bato ya ba-eklezya ya région ya Efeze batindeli bino mbote. Akilas pe mwasi na ye Prisiye ná bakristo oyo basanganaka epai na bango, batindeli bino mbote mingi, na kombo ya Nkolo Yezu. 20 Bandeko nyonso oyo bazali awa, batindeli bino mbote. Bino nyonso bópesana mbote ndenge ebongi na bakristo. 21 Ngai Polo napesi bino mbote; nakómi maloba oyo na maboko na ngai moko. 22 Soki moto alingi Nkolo Yezu té, Nzambe ápesa ye etumbu! Marana ta! Nkolo na biso, yaka! 23 Bolamu ya Nkolo Yezu ézala na bino. 24 Nazali kolinga bino nyonso na lisanga ya Yezu Kristo.

2 Korente 1

Mbote

1-2 Mbote na bino, bandeko ya Eklezya ya Nzambe oyo ezali na Korente, pe na bakristo nyonso ya mboka Grese. Ngai Polo, ntoma ya Yezu Kristo,-nakómá ntoma kaka po Nzambe akanaki bongo -; ngai ná ndeko Timoté totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso pe Nkolo Yezu Kristo.

Polo apesi Nzambe mersi

3 Mersi na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo. Azali Tata, alingaka biso pe alongolaka biso mawa nyonso. 4 Tango nyonso oyo nayokaka pasi alongolaka ngai mawa, po ngai pe nákoka kosala lokola ye, nálongola mawa ya bato nyonso oyo bazali na pasi. 5 Pamba té ndenge pasi ya Kristo ekweeli ngai mingi, se ndenge wana nazwaka pe makasi ya kosilisa mawa po na Kristo. 6 Soki nazali komona pasi ezali po mawa na bino ésila pe bóbika. Soki Nzambe alongoli ngai mawa, ezali po mawa na bino pe ésila, bongo bóyeba kokanga mitema, lokola biso ná bino tozali komona pasi ndenge moko. 7 Ya solo, nazali kotia motema, po nayebi 'tè biso ná bino tokokoka kosilisa mawa, lokola bino bozali komona pasi ndenge moko ná ngai. 8 Bandeko, nalingi bóyeba makama nakutanaki na yango, na région ya Efeze. Makama yango elekaki ngai ndelo; nazalaki lisusu na elikya té 'tè nakobika. 9 Ya solo, nazalaki komona lokola nde basi'bakatelaki ngai etumbu ya liwa. Esalamaki bongo po nátia motema na ngai moko té, kasi bobele na Nzambe oyo azali na nguya ya kosekwisa bato. 10 Ezali nde Nzambe moto abikisaki ngai na liwa, pe ye kaka moto akobikisa ngai lisusu. Ya solo, natieli ye motema 'tè akobanda kobikisa ngai tango nyonso. 11 Bino pe bozali kosalisa ngai na mabondeli na bino. Bongo lokola nazwaka bolamu ya Nzambe po bato mingi bazali kobondela ye, bato mingi pe bakobanda kopesa ye mersi po na ngai.

Po na nini Polo azongaki na Korente té

12 Tala likambo nakoki kobetela tolo yang'oyo: nazali komimona 'tè na miso ya bato nyonso, pe mingi na kati na bino, nasalaka kaka makambo ya malonga, ndenge Nzambe ye moko asalaka. Nasalaka yango na mayele ya bomoto té, kasi bobele na bolamu ya Nzambe. 13-14 Na mikanda na ngai nakómelaka bino kaka makambo oyo bokoki kotanga pe koyeba. Sik'oyo bokómi koyeba yango kaka ndambo; kasi natii motema 'tè ata ndele bokoyeba yango penza malamu. Bongo mokolo Nkolo Yezu akoya, bino bokozwa lokumu po na ngai, ndenge ngai pe nakozwa lokumu po na bino. 15 Lokola nazalaki kotia motema epai na bino, nakanaki koleka na mboka na bino liboso ya kokende na Masedwane, po násepelisa bino mbala ya mibale. 16 Bongo na sima nalingaki kozonga lisusu epai na bino, po bózwa nzela ya kosalisa ngai, tango nakolanda mobembo na ngai tii na région ya Yuda. 17 E bongo nakanaki yango kaka bikanela? Nazwaka mikano na ngai kaka na mayele ya bomoto, po nándima pe náboya na mbala moko? 18 Nakati seleka 'tè nalobaka na bino na mitema mibale té. 19 Po Yezu Kristo, Mwana ya Nzambe oyo biso ná Silas pe Timoté toyaki kosakola epai na bino, azalaki na mitema mibale té; azalaki moto ya motema moko. 20 Pamba té, na ye Nzambe ayaki kokokisa bilaka nyonso oyo apesaká. Yango wana biso tokumisaka Nzambe pe tolobaka "Amen" po na Kristo. 21 Ezali Nzambe ye moko moto atelemisi biso ná bino makasi, po tósangana na Kristo; pe akómisi biso bosantu. 22 Atii biso elembo oyo emonisi 'tè tozali bato na ye, pe atondisi mitema na biso na Molimo Mosantu, oyo azali kolakisa 'tè alingi kopesa biso mobimba na ye. 23 Nakati seleka na miso ya Nzambe; soki nakosi, álongola ngai na mokili. Ye ayebi 'tè nazongaki na Korente té po námemela bino mindondo té. 24 Nalingaka koyeela bino bobele esengo. Na makambo etali bondimi na bino, nalingi komitia mokonzi na bino té; pamba té bozali na bondimi ya kokoka.

2 Korente 2

1 Ngai moko naboyaki kozongela bino po náyokisa bino mawa té. 2 Soki nayokisi bino mawa, nani akoki kosepelisa ngai? Ezali bobele bino bato oyo ngai nayokisi mawa. 3 Natindelaki bino mokanda, po nalingaki té 'tè bino bato bosengelaki kosepelisa ngai, bóyokisa ngai mawa, mokolo nakoya. Nayebi malamu 'tè esengo na ngai ezali lisusu ya bino. 4 Ya solo, tango nakómelaki bino mokanda yango, nazalaki kolela mingi, pe motema na ngai etondaki na pasi pe mawa. Nakómaki yango po na kozokisa bino na mitema té, kasi po bóyeba 'tè nalingi bino mingi koleka.

Tólimbisa moto oyo asali mabe

5 Soki moto ayokisi ngai pasi na motema, ezali kaka pasi na ngai moko té; kasi nakoki koloba 'tè ayokisi bino nyonso pe mwa pasi. 6 Etumbu oyo bino nyonso bopesi moto wana, ekoki. 7 Sik'oyo ebongi malamu bólimbisa ye pe bólendisa ye, po átikala na mawa libela té. 8 Yango wana, nazali kosenga na bino, bólakisa 'tè bólingaka ye. 9 Nzokande tango nakómelaki bino mokanda wana, nalingaki komeka bino po náyeba soki bokotosa ngai na makambo nyonso. 10 Bongo soki bolimbisi moto oyo asalaki mabe, ngai pe nalimbisi ye. Pamba té soki nalimbisi ye, ata likambo wana etali kaka ngai té, nasali yango po na bino, na miso ya Kristo, 11 po Satan ázwa nzela ya kokosa biso té. Tosi'toyebá mayele na ye.

Na Troas Polo azalaki motema likolo

12 Tango nakómaki na mboka Troas po na kosakola Sango Malamu ya Kristo, Nkolo afungoleli ngai nzela po na kosala mosala. 13 Kasi motema na ngai ezalaki likolo, po namonaki ndeko na ngai Tite té. Yango wana, natikaki bato ya Troas pe nakendeki na Masedwane.

Polo azali kolonga po na Kristo

14 Napesi mersi na Nzambe po, bipai nyonso Kristo azali kolonga etumba, ye amemaka ngai lokola soda oyo alandaka mokonzi na ye. Na mosala na ngai, Nzambe azali kopanza sango ya Kristo bipai nyonso, ndenge malasi epanzaka solo kitoko. 15 Pamba té, epai ya bato bazali kobika ná baoyo bazali kobunga, nakómi lokola solo ya kitoko oyo Kristo azali kobimisela Nzambe. 16 Bato bazali kobunga bayokaka solo yango lokola solo ya liwa oyo ezali koboma bango. Kasi baoyo bazali kobika bayokaka yango lokola solo ya bomoi oyo ezali kobikisa bango. Bongo nani akoki penza na mosala yango? 17 Ngai nazali lokola bato mosusu té oyo basalaka mombongo na maloba ya Nzambe. Kasi nalobaka bobele makambo ya solo na miso ya Nzambe, po ye moto atindi ngai násakola sango ya Kristo.

2 Korente 3

Basali ya Boyokani ya Sika

1 Nábanda lisusu komikumisa 'tè nazali mosali ya kokoka? Násala lokola bato mosusu, pe námemela bino mikanda oyo ezali kolakisa yango? Násenga bino bókómela ngai mikanda ya ndenge wana? 2 Bino moko bozali lokola mokanda na ngai; yango ekómamá na kati ya motema na ngai, nzokande, bato nyonso bakoki koyeba pe kotanga yango. 3 Ya solo penza, bozali lokola mokanda oyo Kristo ye moko akómaki na maboko na ngai. Akómaki yango na ekómeli té, kasi na Molimo ya Nzambe ya bomoi. Kala, Nzambe akómaká Mibeko na mabanga mibale; kasi Kristo akómi mokanda na ye na mitema ya bato. 4 Yango wana nazali kotia motema na Kristo. 5-6 Ezali ngai moko té moto namikómisi moto ya kokoka, kasi Nzambe nde moto akómisi ngai motoya kokoka, po názala mosali ya Boyokani ya Sika. Na Boyokani yango, Nzambe akómi kaka mibeko té, kasi apesi biso Molimo na ye. Pamba té mibeko ememaka liwa, kasi Molimo apesaká bomoi. 7-9 Atako Mibeko ya kala ezalaká koyeela bato liwa pe komemela bango etumbu, tango Nzambe akómaká yango na mabanga, amonisaki lokumu na ye. Bato ya Israel bazalaká kokoka kotala elongi ya Moize té, po yango ebandaki kongenga makasi;-kasi po na mwa tango moke kaka. Nzokande Molimo Mosantu azali kokómisa bato bosembo na miso ya Nzambe; yango wana esengelaki Nzambe álakisa lokumu na ye na ndenge moko ya koleka penza. Ezali boye té? 10-11 Soki mosala oyo eumelaki té ezalaki na lokumu, mbele mosala ya koumela esengeli ézala na lokumu koleka. Tokoki koloba 'tè lokumu ya kala ezali lisusu penza té, awa lokumu ya sika eleki yango mosika. 12 Lokola totiaka mitema na Nzambe boye, tozali na molende mingi penza; 13 tósalaka lokola Moize té. Ye azalaká kozipa elamba na elongi, po bato ya Israel bámona té 'tè kongenga na yango ezalaki kolimwa. 14 Kasi bato ya Israel ya lelo bazali mayele mokuse. Tango batangaka Mikanda ya Boyokani ya Kala, bazali kaka kozipa elamba na bilongi. Bazali kolongola yango té; nzokande bobele kondima Kristo moto elongolaka yango. 15 Ya solo, tii lelo, tango batangaka Mikanda ya Moize, bayebaka tina na yango té, po elamba ezipaka mayele na bango. 16 Bobele soki moto atali Nkolo, elamba wana elongwe. 17 Kotala Nkolo ezali: kotia motema na Molimo Mosantu. Moto oyo asangani na Molimo ya Nkolo azali na bonsomi. 18 Biso nyonso tosi'tolongolá elamba na bilongi; boye lokumu ya Nkolo ezali komonana na bilongi na biso. Ndenge wana tozali kokóma lokola ye, tozali kozwa lokumu na ye, pe lokumu na biso ezali komata se komata. Makambo nyonso wana eutaka na Molimo ya Nkolo.

2 Korente 4

Tina ya kobeta tolo ezali té

1 Nzambe apesaki ngai mosala oyo po ayokelaki ngai mawa; yango wana nalembaka té. 2 Nasi'naboyá makambo ya mabe oyo esalamaka na kobombama; nakosaka bato té pe nabongolaka maloba ya Nzambe té. Kasi nasakolaka polele makambo ya solo, pe na ndenge wana namilakisaka moto ya kokoka epai ya moto nyonso oyo alukaka Nzambe na motema moko. 3 Sango Malamu oyo nasakolaka ebombami bobele po na bato oyo bazali kobunga. 4 Pamba té Sango Malamu ezali lokola moi. Yango emonisaka lokumu ya Kristo, pe Kristo alakisaka biso ndenge Nzambe azali. Nzokande bato wana bazali kondima té, po Satan, nzambe ya mokili oyo, azipá bango miso pe akangá bango mayele. 5 Nasakolaka sango na ngai moko té, kasi ya Nkolo Yezu Kristo; namikómisá moumbu na bino po na ye. 6 Nzambe alobaká: "Moi éngenga na kati ya molili." Ezali pe ye moto ayaki kongenga na kati ya motema na ngai, po nákoka kolakisa bato lokumu na ye, oyo emonanaka na elongi ya Kristo. 7 Ya solo, Nzambe apesi ngai bomengo monene; kasi ngai moto nazwi yango nazali kaka lokola nzungu ya mabelé; boye moto nyonso akoki koyeba 'tè nguya ya monene boye ezali ya Nzambe, kasi ya ngai té. 8 Batungisaka ngai bipai nyonso, kasi nalembaka té; bamonisaka ngai pasi, kasi nakangaka kaka motema; 9 banyokolaka ngai, kasi Nzambe atikaka ngai té; bakweisaka ngai na mabelé, kasi tii lelo babomá ngai té. 10 Ya solo, tango nyonso namemaka na nzoto na ngai pasi ya liwa ya Yezu, po bomoi na ye émonana pe na nzoto na ngai. 11 Na bomoi na ngai mobimba nazali kokutana na makama ya liwa po na Yezu. Na ndenge wana bomoi ya Yezu ezali komonana na ngai, atako nzoto na ngai etangamá kokufa. 12 Boye liwa ezali kobundisa ngai, nzokande bino bozali kozwa bomoi. 13 Ekómamá boye: "Nazali kotia motema epai ya Nkolo, yango wana nazali koloba." Ngai pe nazali kotia motema na Nkolo, yango wana nazali koloba. 14 Pamba té toyebi 'tè Nzambe asekwisaki Nkolo Yezu. Ye pe moto akosekwisa ngai na lisanga na Yezu, bongo akotia ngai penepene na ye, esika moko ná bino. 15 Nazali kondima makambo nyonso wana po na bino; boye lokola bato ebele bazali kozwa bolamu ya Nzambe, mingi pe bakopesa ye mersi pe bakokumisa ye.

Tozali na bomoi po na bondimi na biso

16 Yango wana nalembaka té. Atako bomoi na ngai ya bomoto ezali kolemba, kasi bomoi na ngai ya molimo ezali kokola mokolo na mokolo. 17 Bapasi oyo namonaka ezali ya mike-mike pe ekoumela té; kasi ezali kobongisela ngai lokumu moko ya monene pe ya kokamwa penza. 18 Naboyi koluka bomengo oyo emonanaka na miso, kasi nalukaka oyo emonanaka té. Po bomengo oyo emonanaka na miso eumelaka té, kasi oyo emonanaka té ezali ya seko.

2 Korente 5

1 Pamba té nzoto na biso awa na se ezali lokola ndako ya kapo; yango ekokufa. Kasi na mboka na ye, Nzambe akopesa biso nzoto ya seko; yango ekozala lokola ndako ya kitoko oyo ésalama na maboko ya bato té. 2-3 Nzoto na biso ezali pe lokola elamba oyo tolati. Sik'oyo tozali kolela; tokómi koyoka posa mingi ya kokota na ndako na biso ya Likolo; tolingi kolata elamba na biso ya sika kaka na tango tozali nanu na oyo ya kala, po tótikala bolumbu té. 4 Tango tozali kofanda na ndako na biso ya kapo, tozali kolela pe kobanga. Ya solo, tolingi kotika elamba ya kala té, tolingi kolata elamba ya sika na likolo ya oyo ya kala; elingi koloba: nzoto oyo etangamá kokufa ézwa bomoi ya seko. 5 Nzambe asi'asali nyonso po tózwa bomoi yango, pamba té asi'apesi biso Molimo na ye po na kolakisa 'tè alingi kopesa biso mobimba na ye. 6 Yango wana, natiaka kaka molende mikolo nyonso, atako nayebi 'tè tango naumeli na nzoto na ngai ya bomoto, nazali mosika ya Nkolo Yezu. 7 Pamba té awa na mokili tozali kaka kondima, tozali penza komona polele té. 8 Ya solo nazali na molende, namoni 'tè eleki malamu nátika nzoto oyo, po nákende kofanda epai ya Nkolo. 9 Kasi mama ya likambo ezali kosepelisa ye, ata natikali na nzoto oyo, to nalongwe na yango. 10 Pamba té mokolo Kristo akosambisa biso, akotala biso nyonso malamu penza, po moto na moto ázwa oyo ekoki na ye soki azalaki kosala malamu to mabe na bomoi na ye awa na se.

Nzambe ayambi biso po na Kristo

11 Lokola nasi'nayebi ndenge esengeli kotosa Nkolo, nazali kaka koluka kolakisa yango na bato nyonso. Nzambe ayebi ngai malamu penza, pe natii motema 'tè bino pe boyebi ngai malamu penza. 12 Tina ezali té po nálakisa bino 'tè nazali moto ya kokoka; kasi nalingi kopesa bino nzela ya kobeta tolo likolo na ngai. Bongo bokokoka kozongisa maloba na bato oyo babetaka tolo té po na makambo ebombamá na kati ya motema, kasi bobele na oyo emonanaka na miso ya bato. 13 Soki Molimo alotisaka ngai ndoto, yango etali bobele Nzambe. Kasi na makambo etali bino, nazalaka na makanisi ya malamu. 14 Bolingo ya Kristo ezali kotambwisa ngai. Pamba té toyebi 'tè moto moko akufaki po na bato nyonso. Wana elakisi 'tè bato nyonso bakómá lokola bakufa. 15 Pe Kristo akufaki po na bato nyonso, na tina 'tè baoyo bazali na bomoi, bomoi yango ézala ya bango moko té, kasi ézala ya moto oyo akufaki pe asekwaki po na bango. 16 Yango wana nazali kotala lisusu moto moko té na ndenge ya bomoto. Kala nazalaki kotala Kristo na ndenge ya bomoto, kasi sik'oyo nazali kotala ye lisusu na ndenge wana té. 17 Pamba té soki moto azali na lisanga na Kristo, akómi moto ya sika. Makambo ya kala esili; oyo ya sika ebandi. 18 Nyonso wana euti na Nzambe. Tozalaki bato ya masumu, pe ye ayambi biso lisusu na boboto. Po na Kristo ye pe moto apesi ngai mosala ya komemela bato boboto na ye. 19 Ya solo, Nzambe azalaki kosala na nzoto ya Kristo; ye moto azalaki koyamba bato nyonso na boboto, pe azalaki kotala lisusu masumu na bango té. Bongo apesi ngai mosala ya kosakola sango ya boboto na ye. 20 Nazali ntoma ya Kristo. Nzambe ye moko moto azali kobenga bato, tango nabondelaka bango na kombo ya Kristo: "Bósala nyonso po Nzambe áyamba bino lisusu na boboto." 21 Atako Kristo asalaki masumu té, Nzambe amemisaki ye mokumba ya masumu na biso, po 'te biso tókóma bosembo na miso ya Nzambe, likolo na ye.

2 Korente 6

1 Bongo lokola Nzambe azalaká ná ngai, nasengi bino: bókeba po bolamu Nzambe apesaká bino ékende pamba té. 2 Po Nzambe alobaki: "Mokolo ezali, nakoyokela bino; mokolo ezali, nakobikisa bino." Mokolo yango esi'ekoki. Lel'oyo ezali mokolo ya kobika. 3 Nalingi té bátónga ngai po na mosala oyo nasalaka; yango wana nalukaka koyokisa moto moko té pasi, 4 kasi na makambo nyonso nalakisaka 'tè nazali mosali ya Nzambe. Nakangaka motema, atako bayokisaka ngai bapasi ndenge na ndenge: banyo-kolaka ngai, batungisaka ngai koleka, 5 babetaka ngai fimbu, babwakaka ngai na boloko, babimiselaka ngai mobulu. Namonaka pasi na mosala, mbala mingi nalalaka pongi té pe nazangaka biloko ya kolia. 6 Nalakisaka 'tè nazali mosali ya Nzambe, na ndenge nazalaka motema pembe pe boboto. Nayebaka ba-sekelé ya Nzambe; Molimo Mosantu azalaká na ngai, nazali na bolingo ya solo, pe nayebi kokanga motema. 7 Nalobaka bobele makambo ya solo, nasalelaka nguya ya Nzambe. Makambo ya bosembo ezali bibundeli na ngai po na komibatela pe kolonga banguna, 8 ata bazali kokumisa ngai to kotsiola, ata bazali koloba makambo ya mabe to ya malamu po na ngai. Bamonaka ngai moto ya lokuta, kasi nalobaka makambo ya solo. 9 Balobaká 'tè nayebani té, nzokande bato nyonso bayebi ngai malamu. Balobaká 'tè nakómi pene ya liwa, nzokande nazali na ngai malamu. Bapesaka ngai etumbu, kasi nanu babomá ngai té. 10 Bayokisaka ngai mawa, kasi nazali na esengo tango nyonso. Bamonaka ngai lokola moto akelelá, nzokande namemelaka bato mingi bomengo. Balobaká 'tè nazali na eloko té, kasi biloko nyonso ezali ya ngai! 11 Bandeko ya Korente, nalobeli bino polele, pe nayebisi bino nyonso oyo ezali na motema na ngai. 12 Nakangeli bino motema té, kasi bino nde bato bokangeli ngai mitema. 13 Nazali koloba na bino lokola bana na ngai: bókamataka ngai ndenge ngai nakama-taka bino. Bófungolela ngai mitema na bino.

Tólongola makambo nyonso ya mabe

14 Bóboya kosangana ná baoyo bandimaka Nzambe té. Bosembo ná mobulu ekoki kozala esika moko? Moi ná butu ekoki kokóma ndenge moko? 15 Kristo akoki koyokana ná Satan? Kondima Nzambe pe koboya ye ekoki kokende nzela moko? 16 Bikeko ya banzambe ekoki kozala na kati ya Ndako ya Nzambe? Pamba té biso tozali lokola Ndako ya Nzambe ya bomoi. Ye moko alobaká: "Nakobanda kofanda na kati na bango, pe kotambola ná bango nzela moko. Nakozala Nzambe na bango pe bango bakozala bato na ngai." 17 Yango wana Nkolo alobi boye: "Bólongwa kuna pe bótika bango. Bósimba eloko ya mbindo té, boye ngai nakoyamba bino. 18 Nkolo ya nguya nyonso alobi: Ngai nakozala Tata na bino, pe bino bokozala bana na ngai ya mibali ná ya basi."

2 Korente 7

1 Bandeko, lokola Nzambe apesi biso bilaka yango, tólongola makambo nyonso oyo ememaka mbindo na nzoto to na motema; tótosaka Nzambe, pe tóluka kozala bato ya bosantu.

Esengo ya Polo

2 Bóyamba ngai na mitema na bino. Nasalaki mabe na moto moko té; nabungisaki moto moko té; natielaki moto moko té mokumba na ngai. 3 Nalingi koloba té 'tè bosalaki ngai mabe; pamba té nasi'nayebisá bino banda kala 'tè bozali bato na ngai ya motema, ézala na tango ya liwa to ya bomoi. 4 Natieli bino motema penza, pe nazali kobeta tolo likolo na bino. Na kati ya bapasi na ngai nyonso, nazali na molende mingi pe natondi na esengo. 5 Na Masedwane pe ezalaki kaka ndenge moko. Tango nakómaki kuna, nakokaki kopemisa nzoto té; nakutanaki na mikakatano ya ndenge na ndenge: epai ya bato bobele mobulu, pe na kati ya motema na ngai bobele kobanga. 6 Kasi Nzambe oyo akitisaka mitema ya bato ya mawa, akitisaki pe ngai motema tango Tite akómaki, 7 pe mingi penza tango nayokaki ndenge bokitisaki ye motema. Ayebisaki ngai ndenge bozali na posa ya komona ngai, ndenge botondi na mawa po na makambo elekaki, pe ndenge bozali kolinga ngai. Yango wana nazali na esengo mingi koleka. 8 Bongo soki mokanda na ngai eyokisaki bino pasi, nazali lisusu na mawa té po na yango. Nakómaki na mawa tango nayaki koyoka 'tè mokanda yango esalaki bino pasi. Kasi lokola pasi na bino eumelaki mingi té, 9 nakómi kosepela. Pamba té, atako nayokisaki bino pasi, kasi pasi yango ebongolaki bino mitema. Bongo lokola Nzambe asalelaki pasi na bino, ngai nasalaki bino mabe ata moko té. 10 Ya solo, pasi oyo Nzambe asalelaka, ebongolaka mitema ya bato po bábika; bongo tina ya koyoka mawa ezali té. Kasi soki moto atalaka Nzambe té na tango ya pasi, pasi yango ememaka liwa. 11 Botala sik'oyo ndenge Nzambe asalelaki pasi na bino: ndenge bobandi kosala makasi, kosenga bolimbisi, koboya makambo oyo elekaki; ndenge bokómi kotosa pe koyoka posa ya kobongisa makambo; ndenge bomipesi na mosala, pe bokateli moto asalaki mabe etumbu. Nyonso wana elakisi polele 'tè bino bozalaki na likambo té. 12 Bongo tango nakómelaki bino mokanda wana, ezalaki té po na moto asalaki mabe; ezalaki pe té po na ngai moto ye asalaki mabe yango; kasi ezalaki po bólakisa na kati na bino pe na miso ya Nzambe, ndenge bozali kolinga ngai. 13 Yango wana, mawa na ngai esilaki. Ya solo, nasilisaki kaka mawa té, natondaki kutu na esengo po na ndenge Tite asepelaki, awa bokitisaki ye motema. 14 Pamba té na miso na ye nabetaki tolo likolo na bino, bongo boyokisaki ngai soni té. Boye, ndenge nalobaka na bino bobele makambo ya solo, se ndenge wana Tite pe ayaki komona 'tè makambo nabetelaka tolo po na bino ezali ya solo. 15 Azali kaka kokanisa ndenge bozalaki kotosa ye pe ndenge boyambaki ye na kobanga nyonso; yango wana akómi kolinga bino mingi koleka. 16 Nasepeli po nakoki kotiela bino motema na makambo nyonso.

2 Korente 8

Kosalisa bandeko ya Yeruzalem

1 Bandeko, nalingi koyebisa bino ndenge Nzambe alakisaki bolamu na ye epai ya ba-eklezya ya Masedwane. 2 Bakristo ya kuna bazalaki komona pasi; bango moko bazalaki kokelela; kasi ata bongo batondaki na esengo, yango wana babandaki kokaba mingi. 3 Ya solo, namoni 'tè bapesaki oyo ekokaki na bango, kutu balekisaki, po bango moko balingaki ndenge wana. 4 Babondelaki ngai na molende nyonso 'tè nápesa bango nzela ya kosangana ná ngai, po na kosalisa bakristo ya Yeruzalem. 5 Nakanisaki té 'tè bakoki kosala ndenge wana, nzokande Nzambe asali 'tè bámipesa liboso na Nkolo Yezu, bongo sima bámipesa na ngai. 6 Boye nasengaki Tite áya kosalisa bino po bósilisa mosala ya bolingo oyo ye abandaki. 7 Nayebi 'tè bosi'bokoki na makambo nyonso: bokoli na bondimi, boyebi kosakola ba-sekelé ya Nzambe, botondi na molende pe na bolingo oyo bozali kolakisa epai na ngai. Bongo bókoka pe na mosala oyo ya bolingo. 8 Nazali kopesa bino motindo té, kasi nayebisi bino ndenge bato mosusu batii molende po na kosalisa baninga, po bólakisa 'tè bolingo na bino ezali ya solo. 9 Pamba té boyebi bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo: ye azalaki na bomengo nyonso, kasi akómaki kokelela po na bino, na tina 'tè bózwa bomengo po na kokelela na ye. 10 Bongo toli na ngai na likambo oyo ezali boye; ebongi na bino bósala kaka ndenge bobandaki na mbula eleki; bozalaki kutu bato ya liboso ya kozwa likanisi wana. 11 Bongo sik'oyo bókokisa makambo oyo bosi'bokanaki. Lokola bokanaki yango na motema moko, bókokisa yango na ndenge bokoki. 12 Pamba té Nzambe asepelaka soki oluki kokaba na ndenge bomengo na yo ezali; oyo ozali na yango té, asengaka yango pe té. 13 Ye alingi té 'tè bino bómona pasi po na kosalisa bato mosusu; kasi alingi bandeko nyonso bazala ndenge moko. 14 Lelo bozali na biloko ebele; ebongi bósalisa bato oyo bazali kokelela. Bongo mokolo mosusu, soki bino bokeleli, kasi bango bakomi na biloko ebele, bakosalisa bino. Boye bino nyonso bokozala ndenge moko. 15 Ekòmamá boye: "Moto oyo alokotaki bilei mingi, elekaki mingi té; pe oyo alokotaki moke ezangaki té."

Tite ná baninga na ye bakoya kopesa maboko

16 Napesi mersi na Nzambe, po asali 'tè Tite álinga bino ndenge ngai nalingaka bino. 17 Pamba té andimi kosala ndenge nasengi ye; ye moko kutu akanaki koya epai na bino. 18 Natindi ye ná ndeko oyo bato ya ba-eklezya nyonso bandimaka po na ndenge asalelaka Sango Malamu. 19 Ba-eklezya wana moto eponi ye ázala moninga na ngai ya mobembo, na mosala ya bolingo oyo nazali kosala na esengo nyonso, po na lokumu ya Nkolo. 20 Nazali kosala nyonso po bato bátónga ngai té na ndenge nazali kosalela mosolo ebele boye. 21 Nazali koluka kosala makambo ya malamu, na miso ya Nkolo pe na miso ya bato. 22 Natindi bango ná ndeko na biso mosusu. Mbala mingi nazali komona 'tè azali na molende penza na makambo nyonso. Sik'oyo akómi na molende mingi koleka, po azali kotiela bino motema. 23 Boye bóyamba bango malamu. Tite azali moninga na ngai ya motema pe ya mosala oyo tósalaka po na bino. Bandeko mosusu baoyo bakoya nzela moko ná ye, bazali bantoma ya ba-eklezya; ya solo, bazali penza lokumu ya Kristo. 24 Bólakisa 'tè bólingaka bango, po bato ya ba-eklezya bámona 'tè tolo oyo tobetaki likolo na bino ezali ya pamba té.

2 Korente 9

Nzambe akabaka po biso pe tókabaka

1 Namoni tina té ya kokómela bino lisusu po na ndenge ya kosalisa bakristo ya Yeruzalem. 2 Pamba té nayebi 'tè bozali na posa ya kosalisa bango, pe nakumisaki bino na miso ya bato ya Masedwane; nalobaki boye: "Bandeko ya Grese basi'bami-bongisá banda mbula eleki." Yango wana bakristo mingi ya Masedwane bakomi molende po na ndakisa na bino. 3 Sik'oyo natindeli bino Tite ná baninga na ye, po bómibongisa lokola nasi'namilobelaki yango; boye kokumisa oyo ngai nakumisaki bino, ékende pamba té. 4 Tango bato ya Masedwane bakoya nzela moko ná ngai, soki bamoni 'tè bomibongisi nanu té, nakomona soni mingi po natiaki motema epai na bino. Kasi soni na bino ekoleka penza! 5 Yango wana, namoni 'tè esengeli násenga bandeko wana baya epai na bino liboso na ngai, bábongisa makabo na bino ndenge bokanaki. Boye soki bosi'bobongisi yango, ekomonana polele 'tè bopesaka makabo na motema moko, kasi na mitema mibale té. 6 Bókanisa nanu: moto oyo akonaka moke, abukaka moke; oyo akonaka mingi, abukaka mingi. 7 Ebongi moto na moto ákaba ndenge akanaki; ásala yango na motema mawa té to po batindi ye na makasi. Pamba té Nzambe alingaka moto oyo akabaka na esengo. 8 Ezali ye pe moto akoki kopesa bino bolamu ya ndenge na ndenge; boye tango nyonso bokobanda kotonda na biloko nyonso oyo bozali na yango posa, pe bokokoka kosala misala nyonso ya malamu. 9 Ekómamá boye: "Moto oyo atosaka Nkolo apesaká bato bakelelá makabo mingi; boboto na ye ekoumela seko." 10 Ezali Nzambe moto apesaká na mokoni mbuma ya kokona pe biloko ya kolia; ezali ye pe moto akotondisa bino pe na bolamu, po yango ékóma lokola mbuma oyo bokokona; bongo ébimisa biloko ebele oyo bokokoka kokabela baninga. 11 Ye akokómisa bino bato ya bomengo mingi, po bókoka kokabela baninga; boye bato mingi bakobanda kopesa Nzambe mersi. 12 Ya solo, mosala ya bolingo oyo tosalelaka bandeko bakelelá, ekosepelisa kaka bango té kasi ekosepelisa pe Nzambe, po bato ebele bakozala kopesa ye mersi. 13 Pamba té lokola bakomona 'tè mosala na bino ezali penza malamu, bango nyonso bakokumisa Nzambe po na ndenge botosaka Sango Malamu ya Kristo, pe bokabelaka bango-ná bato nyonso-bomengo na bino. 14 Tango bakomona bolamu monene oyo Nzambe akabeli bino, bakosambela ye po na bino na bolingo nyonso. 15 Mersi na Nzambe, po likabo na ye eleki mayele na biso!

2 Korente 10

Polo alimboli mosala na ye ya ntoma

1 Sik'oyo esengeli náloba po na makambo etali ngai moko. Balobaká 'tè nazali moto ya kimia tango nazalaka epai na bino, kasi na mosika namilakisaka elombe. Nasengi bino na motema ya malamu pe na boboto ya Kristo: 2 Bókeba, soki té nakolakisa ki-elombe na ngai, tango nakoya epai na bino. Pamba té nakolakisa yango na molende nyonso epai ya bato oyo bazali kokanisa 'tè nalandaka bobele makambo ya bomoto. 3 Ya solo, nazali kaka moto; kasi nabundaka na ndenge ya bomoto té. 4 Bibundeli oyo nasalelaka na bitumba ezali kaka ya bomoto té, kasi ezali ya nguya ya Nzambe. Na yango nde nasilisaka makasi ya banguna, makanisi na bango ya lokuta, 5 pe lofundu nyonso oyo epekisaka bato nzela ya koyeba Nzambe. Na yango pe lisusu nalongaka bato nyonso ya mayele, pe nakómisaka bango baumbu ya Kristo. 6 Boye, soki bino bokómi kotosa penza, nakobanda kopesa etumbu na baoyo bazali kotosa té. 7 Bótalaka makambo ndenge ezali ya solo. Soki moto akanisi 'tè azali moto ya Kristo, áyeba libela 'tè ngai pe nazali moto ya Kristo lokola ye. 8 Ata soki esengeli námikumisa lisusu po na bokonzi oyo Nkolo Yezu apesaki ngai, nakoyokela yango soni té. Apesaki ngai yango po na kobongisa bino, kasi kokweisa té. 9 Nalingi té 'tè mikanda na ngai ébangisa bino. 10 Pamba té balobaká: "Mikanda ya Polo ezokisaka biso mitema, kasi soki tozali na ye, azalaká na makasi ata moko té, pe maloba na ye ezali ya pamba." 11 Moto alobaká boye áyeba 'tè: ndenge nakómelaka bino na mosika, nakosala bobele ndenge wana tango nakoya. 12 Bamosusu balukaka kolakisa 'tè bazali bato ya kokoka. Nalingi komekana ná bango té to koloba 'tè nakokani na bango. Pamba té bango bazali na mayele té! Basepelaka kaka po na bizaleli na bango moko; batalaka kaka ndelo oyo bango moko batii. 13 Kasi ngai nalekisaka komikumisa té; ndelo oyo Nzambe atieli ngai yang'oyo: amemaki ngai tii epai na bino. 14-15 Ya solo, ngai nazali moto ya liboso oyo amemelaki bino Sango Malamu ya Yezu Kristo. Awa nalobi boye, nazali kolekisa ndelo té; nazali komikumisa té po na mosala ya bato mosusu. Kasi ndelo ngai moko natii yang'oyo: natii motema 'tè bondimi na bino ekokola. Yango moto ekosala 'tè názwa lokumu epai na bino. 16 Bongo na sima nakokende kosakola Sango Malamu na bamboka mosusu, esika bayoki yango nanu té. Boye nakomikumisa té likolo ya mosala oyo bato mosusu basi'basali. 17 Ekómamá boye: "Moto oyo alingi kobeta tolo, ábeta tolo bobele po na makambo Nkolo asaleli ye." 18 Pamba té moto Nzambe andimaka ezali té oyo amimonaka moto ya kokoka, kasi bobele oyo Nzambe amonaka moto ya kokoka.

2 Korente 11

Polo ná bantoma ya lokuta

1 Nasengi bino bókanga nanu mitema, bótika ngai náloba lokola zoba. Ya solo, bókanga mitema moke! 2 Nazali koyoka zuwa po na bino, ndenge Nzambe ayokaka zuwa. Pamba té bozali lokola elenge mwasi oyo nalingi bábala ye na mobali se moko; mobali yango ezali nde Kristo. Nalakaki ye 'tè na miso na ye bokozala lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mobali té. 3 Kasi boyebi ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe. Nazali kobanga, tango mosusu Satan akoki koya kobungisa makanisi na bino ya malamu, pe bolingo na bino epai ya Kristo ekozala lisusu ya motema moko té. 4 Pamba té namoni 'tè soki moto ayei kosakola Yezu mosusu oyo biso tosakolaki té, bozali kondima kaka; bozali koyamba molimo ekeseni ná Molimo Mosantu oyo bozwaki, pe "sango malamu" ekeseni ná oyo bosi'bondimi. 5 Nakanisi 'tè bato oyo bobengaka "Bantoma minene" baleki ngai ata moke té. 6 Ata nayebi koloba malamu té, kasi nayebi penza ba-sekelé ya Nzambe. Mbala mingi nabandaki kolakisa bino yango na makambo ndenge na ndenge. 7 Tango nasakolaki Sango Malamu ya Nzambe epai na bino, nasalaki yango ya ofelé. Namikómisaki lokola mongamba, po bino bókóma bato minene na miso ya Nzambe. Bongo nasalaki mabe? 8 Ba-eklezya mosusu ebandaki kofuta ngai, po násalela bino. Yango emonanaki lokola nazalaki kolia mbongo na yango pamba. 9 Tango nazalaki epai na bino nakómaki kokelela; nzokande bandeko oyo bautaki na Masedwane bato bayaki kosalisa ngai. Namemisaki bino mokumba na ngai té, pe nakobanda kaka kosala ndenge wana. 10 Ya solo, nazali kobeta tolo po na yango; pe nakati seleka na kombo ya Kristo 'tè na région mobimba ya Grese bakobotola ngai lokumu yango té. 11 Po na nini nasalaka boye? Elakisi 'tè nalingaka bino té? Nzambe ayebi 'té nalingi bino! 12 Nakobanda kosala kaka ndenge nazali kosala sik'oyo, po násilisa lokuta ya bato oyo balukaka komikumisa lokola nde bakokani na ngai. 13 Bato yango bazali bantoma ya lokuta; bakosaka 'tè bazali bantoma ya Kristo. 14 Kasi ezali likambo ya kokamwa té. Satan ye moko pe akosaka 'tè azali anjelu oyo abimisaka moi. 15 Bongo soki basali na ye bazali kokosa 'tè bazali basali ya bosembo, ezali likambo ya kokamwa té. Kasi na suka bakozwa oyo ekoki na misala na bango.

Bapasi ya Polo na mosala ya ntoma

16 Nalobi lisusu boye: moto moko té ákanisa 'tè nazali zoba. Pe soki bokanisi ndenge wana, likambo té; bóndima ngai lokola zoba, po ngai pe námikumisa mwa moke. 17 Ya solo, makambo nazali kokóma sik'oyo, Nkolo akoki kolinga yango té; pamba té tango nazali komikumisa boye, nakómi zoba penza. 18 Lokola bato mingi bazali komikumisa na makambo oyo emonanaka na miso, bongo ngai pe nakomikumisa. 19 Bino, bato ya mayele penza! Bosepeli kolanda bazoba! 20 Bakómisi bino baumbu, babotoli bino biloko, bakosi bino, batsioli bino pe babeti bino na bilongi; kasi bino bozali kaka kondima. 21 Nazali koyoka soni mingi! Y a solo, nazangaki makasi ya kosala ndenge wana! Kasi lokola bango bazali komikumisa, ngai pe nakoki komikumisa. Nazali kokóma makambo oyo kaka lokola zoba! 22 Bango bazali ba-Ebré? Ngai pe. Bazali bato ya Israel? Ngai pe. Bazali bana ya Abraham? Ngai pe. 23 Bazali basali ya Kristo? Sik'oyo nazongisi lokola moto ya liboma: ngai pe; kasi naleki bango. Namonaki pasi na mosala koleka bango. Nakotaki boloko mbala mingi koleka bango. Babetaki ngai koleka bango. Nakómaki pene ya liwa mbala mingi koleka bango. 24 Mbala mitano Bayuda babetaki ngai fimbu 39, ndenge mibeko na bango ezali kotinda. 25 Mbala misato basoda ya Rome babetaki ngai fimbu ndenge bango bamesaná. Mbala moko babambaki ngai mabanga po na koboma ngai. Mbala misato bamasuwa oyo nazalaki kosalela mobembo edindaki na mai. Pe mbala moko nasalaki mokolo mobimba na kati ya mai, butu moi. 26 Na ebele ya mibembo nasalaki, nakutanaki na makama ndenge na ndenge: makama na bwatu pe na masuwa, makama epai ya miyibi, epai ya bandeko na ngai Bayuda, epai ya bikolo mosusu, epai ya bandeko ya lokuta; makama na ba-vile pe na bisobe. 27 Namonaki pasi na mosala makasi. Mbala mingi nazalaki kolala pongi té. Nayokaki nzala ná posa ya mai; tango mosusu nazalaki ata na eloko moko té ya kolia. Nazangaki kutu bilamba, nanyokwamaki na malili. 28 Bapasi mosusu kutu natangi té. Mikolo nyonso nazali na makanisi mingi po na ba-eklezya nyonso. 29 Soki moto moko alembi na ye, ngai pe nalembi. Soki moto moko akwei na masumu, nayokaka pasi mingi penza na motema. 30 Soki esengeli nábeta tolo, nakobeta yango bobele po nazangá makasi. 31 Nzambe ya lokumu nyonso, Tata ya Nkolo Yezu, ayebi 'tè nazali kokosa té. 32 Tango nazalaki na Damas, motambwisi ya mboka abandaki koluka kokanga ngai; atiaki basoda na ye na ba-porte nyonso ya vile. Ezalaki na tango ya mokonzi Aretas. 33 Kasi bandeko bamataki ná ngai na mir ya lopango monene ya vile, batiaki ngai na kitunga, pe balekisaki ngai na lidusu oyo ezalaki na mir. Na ndenge wana nakimaki ye.

2 Korente 12

Nkolo Yezu apesi Polo tina ya kobeta tolo

1 Lokola esengeli nábeta tolo-ata tina ezali té -, tika náloba po na bandoto oyo Nkolo alotisaki ngai, pe ba-sekelé oyo ayebisaki ngai. 2-3 Eleki mbula zomi na minei, Nzambe amemaki ngai na Likolo penza, na Mboka na ye. Nayebi té soki ya solo nzoto na ngai penza ekendeki na Likolo, to ezalaki kaka ndoto; bobele Nzambe moto ayebi. Ee, nayebi 'tè Nzambe akómisaki ngai na Mboka na ye ya bisengo. 4 Kuna nayokaki maloba oyo moto akoki koloba té. 5 Ngai nakoki kobeta tolo po na makambo wana; kasi na oyo etali ngai moko, nabetaka tolo kaka po nazangá makasi. 6 Soki nalingi komikumisa, nakosala yango lokola zoba té, pamba té nazali koloba bobele makambo ya solo. Kasi naboyi komikumisa po 'tè moto moko té ázwela ngai makanisi ya monene, koleka makambo oyo amonaka pe ayokaka epai na ngai. 7 Ya solo, Nzambe alingi té názala na lofundu po na makambo ya kokamwa oyo ye alakisaki ngai. Yango wana apesi ngai maladi oyo eyaka lokola ntoma ya Satan po na kobetabeta ngai, na tina 'tè názala na lofundu té. 8 Mbala misato mobimba nabondelaki Nkolo álongola ngai maladi yango. 9 Kasi ye azongiseli ngai boye: "Bolamu na ngai ekoki na yo. Pamba té nguya na ngai esalaka mosala bobele epai ya moto oyo azangá makasi." Yango wana nabetaka tolo mingi penza po nazangi makasi, na ndenge 'tè nguya ya Kristo étikala na ngai. 10 Ya solo, nasepelaka soki nakómi maladi, soki bafingi ngai, soki nakeleli, soki banyokoli ngai pe bamonisi ngai pasi po na Kristo. Pamba té soki nazangi makasi, nde na tango wana nazalaka elombe!

Polo abangi po na eklezya ya Korente

11 Nakómi lokola zoba, kasi ezali bino bato bolingaki bongo; pamba té esengelaki bino bózwa ngai moto ya kokoka. Ata nazali moto ya pamba, bato oyo bobengaka "Bantoma minene" baleki ngai ata moke té. 12 Bino boyebi ndenge nazalaki kokanga motema na kati na bino, na makambo nyonso; boyebi makamwisi ya ndenge na ndenge oyo emonisaki bino nguya ya Nzambe. Yango moto ezalaki kolakisa bino 'tè nazali penza ntoma. 13 Eloko nini napesaki na ba-eklezya mosusu oyo bino bozwaki té? Nayebi likambo moko kaka: naliaki mbongo na bino té! Bólimbisa ngai na mabe oyo! 14 Oyo mbala ya misato nalingi koya epai na bino. Nakolia mbongo na bino té. Nazali kolinga nde bino, kasi mbongo na bino té! Pamba té bana baleisaka baboti té, kasi baboti nde bato baleisaka bana. 15 Boye ngai pe nakozala na esengo mingi ya kopesa biloko na ngai nyonso, pe komipesa ngai moko po na bino. Soki nalingi bino mingi boye, bino bokolinga ngai moke? 16 Ya solo, namemisaki bino mokumba na ngai té. Kasi balobaká 'tè nasalaki mayele, natielaki bino motambo. 17 Ndenge nini? Na kati ya bato oyo natindelaki bino, moto nini ayaki kokosa bino po ázwela ngai mbongo? 18 Natindaki Tite ná ndeko moko baya epai na bino. Bongo Tite ayaki kosenga bino mbongo? Biso ná ye tosalaki mosala na motema moko té? Tozalaki na bizaleli ya ndenge moko té? 19 Tii sik'oyo bokanisi 'tè nazali koluka kaka nzela ya komilongisa na miso na bino? Ezali boye té! Nalobaka na miso ya Nzambe, ndenge Kristo alingi. Bandeko ya bolingo, nalukaka bobele kobongisa bino. 20 Pamba té nazali kobanga 'tè tango nakoya epai na bino, bizaleli na bino ekosepelisa ngai té; pe oyo ya ngai ekosepelisa bino té. Tango mosusu nakoya kokuta bino bozali koswana, kosalela baninga zuwa, koyokana kanda, kowela bokonzi, kofingana, kotóngana, kotia lofundu pe kosala mobulu. 21 Boye soki nakómi lisusu na Korente, Nzambe na ngai akoyokisa ngai soni na miso na bino, pe nakotonda na mawa po na bato oyo basalaki masumu kala, pe baboyi kotika makambo ya soni, kindumba, pe mabe oyo basalaki.

2 Korente 13

Makambo ya suka

1 Oyo mbala ya misato nalingi koya epai na bino. Yango ekozala ndenge Mibeko elobá: "Soki batemwen mibale to misato balobi ndenge moko, likambo ekatami." 2 Nazali na likambo moko ya kolobela bato oyo basalaki masumu, ná bino nyonso. Nasi'nalobá yango tango nazalaki epai na bino mbala ya mibale; pe sik'oyo, ata nazali mosika, nazongeli yango lisusu: soki nakómi epai na bino, nakoyokela moto moko té mawa, 3 pamba té bolingi nálakisa 'tè Kristo azali koloba na monoko na ngai. Ye azangi makasi té epai na bino, kasi azali na nguya na kati na bino. 4 Ya solo, azangaki makasi tango babomaki ye na kuruze; kasi sik'oyo azali na bomoi po na nguya ya Nzambe. Ngai pe nazangi makasi ndenge Kristo azangaki yango; kasi bokomona 'tè nazali na bomoi oyo ye azali na yango, pamba té nguya ya Nzambe ekobanda kosala na ngai, na kati na bino. 5 Bómitala bino moko, bólakisa soki bozali na bondimi. Bomoni té 'tè Yezu Kristo azali na kati na bino? Soki té bosi'bolakisi 'tè bobungi. 6 Kasi nakanisi boyebi 'tè ngai nabungi té. 7 Nazali kobondela Nzambe po bósala ata mabe moko té. Nazali na posa ya komilongisa té. Nalingi kaka bósala makambo ya malamu, ata ngai namonani lokola moto abungaki. 8 Pamba té soki bobandi kosalela makambo ya solo, nguya oyo Nzambe apesi ngai ekozala lisusu na tina té; ye apesi ngai yango kaka po ésalela makambo ya solo. 9 Boye nasepelaka soki nazangi makasi, pe soki bino bozali na nguya. Bongo nazali kobondela Nzambe 'tè bómibo-ngisa. 10 Yango wana, nakómeli bino makambo oyo liboso 'tè náya, po tango nakoya, nápesa bino etumbu té. Pamba té Nkolo apesi ngai bokonzi po na kobongisa bino, kasi po na kokweisa bino té. 11 Bandeko, bótikala malamu. Bómibongisa, bólendisana, bóyokana, bozala na boboto. Bongo Nzambe ya bolingo pe ya boboto akozala na bino. 12 Bópesana mbote mingi pe bóyambana lokola bato ya Nzambe. Bakristo nyonso ya awa batindeli bino mbote. 13 Bolamu ya Nkolo Yezu Kristo, bolingo ya Nzambe Tata, pe lisalisi ya Molimo Mosantu ézala na bino nyonso.

Galatie 1

Mbote

1-2 Bandeko ya ba-eklezya ya Galatie, boyamba mbote euti na ngai, ntoma Polo. Ezali bato té batindi ngai to batiá ngai ntoma; kasi ezali Yezu Kristo ná Nzambe Tata oyo asekwisaki ye bato batiá ngai ntoma. Nakómeli bino mokanda oyo na kombo ya bandeko nyonso oyo basangani ná ngai. 3 Bózwa bolamu pe boboto, oyo euti na Nzambe Tata na biso pe Nkolo Yezu Kristo. 4 Ye amipesaki po na masumu na biso, na tina 'tè álongola biso na makambo ya mabe nyonso ya mokili oyo, ndenge Nzambe Tata na biso alingi. 5 Lokumu ézala na Nzambe, tango nyonso seko Amen!

Sango Malamu ezali se moko

6 Nakamwe mingi po botiki noki penza Nzambe oyo abengaki bino na bolamu ya Kristo, pe bokómi kondima Sango Malamu mosusu. 7 Nzokande Sango Malamu mosusu ezali té. Kasi bato mosusu bazali kokotisa mobulu na kati na bino, pe balingi kobebisa Sango Malamu ya Kristo. 8 Bóyoka malamu. Soki biso moko to anjelu auti na Likolo ayei kosakola Sango Malamu ekeseni ná oyo tosakolaki epai na bino, lisumá na ye! 9 Lokola nasi'nalobaki na bino, sik'oyo nazongeli yango lisusu: soki moto amemeli bino Sango Malamu ekeseni ná oyo bozwaki liboso, lisumá na ye! 10 Bokanisi nini? Nazali koluka bato bálinga ngai to Nzambe álinga ngai? Nazali nde koluka kosepelisa bato? Soki nazali nanu koluka kosepelisa bato, wana nazali lisusu mosali ya Kristo té.

Ndenge Polo akómaki ntoma

11 Bandeko, nalobi na bino: Sango Malamu oyo nasakolaki, euti na bato té. 12 Nazwaki yango epai ya bato té; nayekolaki yango pe epai ya bato té. Yango ezali sekele ya Yezu Kristo; ye moto ayebisaki ngai yango. 13 Boyebi ndenge nazalaká kolanda Mibeko ya Bayuda: nabandaki konyokola Eklezya mingi koleka, kutu nabandaki kotia molende po na koboma yango. 14 Nalekaki baninga na ngai na makambo etali Mibeko na biso Bayuda, pamba té nazalaki kolinga bokoko na bino mingi penza. 15 Nzokande Nzambe asi'aponá ngai liboso 'tè nábotama. Na bolamu na ye abengaki ngai, 16 pe alakisaki ngai Mwana na ye, po násakola Sango Malamu na ye na bikolo nyonso. Bongo nabandaki koluka mayele epai ya bato té; 17 nakendeki ata na Yeruzalem té po na kokutana ná baoyo bakómaki bantoma liboso na ngai; kasi nakendeki na Arabie, pe sima nayei kozonga na Damas. 18 Bongo sima ya mbula misato nakendeki na Yeruzalem po na koyebana ná Piere, pe nafandaki epai na ye poso mibale. 19 Namonaki ata ntoma mosusu té, kasi bobele Jake ndeko ya Nkolo. ápesa Nzambe mersi, Polo abandi kolela po ba-Galate batiki Nzambe. 20 Makambo oyo nazali kokómela bino ezali ya solo. Nzambe ayebi 'tè nazali kokosa té. 21 Bongo nakendeki na mboka Sirie pe na Silisie. 22 Na tango wana, bakristo ya ba-eklezya ya région ya Yuda batikalaki komona ngai té. 23 Bayokaki bobele sango 'tè: "Moto oyo azalaká konyokola biso liboso, akómi sik'oyo kosakola Sango Malamu oyo ye abandaká koluka koboma." 24 Bongo babandi kopesa Nzambe mersi po na ngai.

Galatie 2

Polo ná bantoma mosusu

1 Eleki mbula zomi na minei, nazongi lisusu na Yeruzalem ná Barnabas; tokamati pe Tite. 2 Nakendeki kuna po Nzambe ayebisaki ngai 'tè nasengeli kokende. Nakutanaki ná bato minene ya Eklezya, pe nalimbolelaki bango Sango Malamu oyo nasakolaka epai ya bato bazali Bayuda té. Nalingaki té 'tè mosala na ngai nyonso ékóma mosala ya punda. 3-5 Nzokande bandeko ya lokuta bamikotisaki na mayele, pe bazalaki kotala bonsomi oyo tozali na yango na lisanga na Yezu Kristo, po bákómisa biso baumbu. Nandimaki makambo ya bato wana ata moke té, po nákoka komemela bino Sango Malamu ya solo. Bongo moninga na ngai Tite, atako azali Grek, amikatisaki nzoto na makasi té. 6 Kutu bato oyo bakristo bazalaki komona bato minene, bapesaki ngai mibeko ya sika té.-Nzokande ndenge bato yango bazalaki liboso 'tè Nzambe ábenga bango, etali ngai té; Nzambe aponaka bilongi ya bato té.-7 Kasi bamonaki 'tè Nzambe aponaki ngai po násakola Sango Malamu epai ya bato oyo bazali Bayuda té, ndenge aponaki pe Piere po ásakola yango epai ya Bayuda. 8 Pamba té ndenge Nzambe atiá Piere ntoma epai ya Bayuda, se ndenge wana pe atiá ngai ntoma epai ya baoyo bazali Bayuda té. 9 Jake, Piere ná Yoane, oyo bazalaki komonana lokola bato basimbi Eklezya, bandimaki 'tè Nzambe apesaki ngai mosala wana, boye bayambaki ngai ná Barnabas, po na kolakisa bondeko. Toyokanaki 'tè ngai ná Barnabas tókende kosakola Sango Malamu epai ya bato oyo bazali Bayuda té, pe bango bákende epai ya Bayuda. 10 Basengaki biso kaka 'tè tókanisaka bato na bango oyo bazali kokelela. Pe nabandaki kotia makasi po na kosala yango.

Na Antioshe, Polo aboyaki makambo ya Piere Bobele bondimi ekoki kobikisa bato

11 Kasi tango Piere akómaki na Antioshe, naboyaki makambo na ye polele na miso ya bato, po abandaki kosala mabe. 12 Pamba té liboso 'tè bato ya Jake bákóma kuna, Piere azalaki kolia esika moko ná bakristo oyo bazali Bayuda té. Kasi tango bakómaki, abendi nzoto pe atiki kolia ná bango, po azalaki kobanga bato wana. 13 Bayuda mosusu ya Antioshe babandi kutu kosala lokola ye; ata Barnabas pe akómaki kolanda makambo na bango ya mabe. 14 Kasi tango namonaki 'tè batiki nzela ya solo ya Sango Malamu, nalobelaki Piere boye na miso ya bato nyonso: "Yo ozali Moyuda, kasi olandi bizaleli ya baoyo bazali Bayuda té. Bongo sik'oyo ndenge nini okoki kotinda bato oyo bazali Bayuda té, bálanda mibeko ya Bayuda? 15 "Biso tobotamá Bayuda; tokokani té na bato ya bikolo mosusu, oyo Bayuda bábengaka bato ya masumu. 16 Nzokande toyaki koyeba 'tè moto moko té akómaká bosembo po atosaka Mibeko, kasi bobele po andimaka Yezu Kristo. Boye biso pe tosi'tondimi Yezu Kristo, po tókóma bosembo; totiki kotia mitema na Mibeko, pamba té moto moko té akómaká bosembo po atosaka Mibeko." 17 Kasi soki tobandi koluka kokóma bosembo po na Kristo, wana tondimi 'tè biso Bayuda pe tozali bato ya masumu, lokola bato ya bikolo mosusu. Ezali nde Kristo moto akómisi biso bato ya masumu? Ata moke té! 18 Tika nápesa ndakisa. Ndako oyo nasi'nabomá, nakoki kotónga yango lisusu té. Se bongo, nakoki té kozongela kotia motema na Mibeko. Soki nasali boye, ngai moko nalakisi 'tè nasalaki lisumu, tango natikaki kotosa yango. 19 Na makambo oyo etali Mibeko, nasi'nakufá. Ezali Mibeko moto ekatá 'tè nasengeli kokufa; pe nandimi kokufa po názala na bomoi na miso ya Nzambe. Babomaki ngai na kuruze esika moko ná Kristo. 20 Bongo ezali ngai Polo té moto nazali na bomoi; kasi ezali Kristo moto azali na bomoi na nzoto na ngai. Bomoi oyo nazali na yango sik'oyo, nazwaki yango po nandimeli Mwana ya Nzambe, oyo alingaka ngai pe amipesaki po na ngai. 21 Naboyi bolamu ya Nzambe té. Pamba té soki bato bakokï kokóma bosembo po batosaka Mibeko, wana elakisi 'tè liwa ya Kristo ezali na tina té.

Galatie 3

Mibeko to bondimi

1 Bino ba-Galate, bozali bazoba! Nani aloki bino? Nalimbolelaki bino polele ndenge babomaki Kristo na kuruze. 2 Nalingi bóyebisa ngai kaka eloko moko: Bozwaki Molimo ya Nzambe po botosaka Mibeko? Té! Ezali po bondimaki sango oyo namemelaki bino. 3 Bozoba ya ndenge nini boye? Bobandaki na Molimo ya Nzambe, bongo bolingi kosukisa na makasi na bino ya bomoto? 4 Makambo minene-minene oyo bosi'bomoni, ekómi ya pamba? Nakanisi ekozala ya pamba té. 5 Nzambe apesaki bino Molimo na ye, pe asalaki makamwisi na kati na bino. Bokanisi 'tè asali bongo po botosaka Mibeko? Té! Ezali po bondimeli sango oyo namemelaki bino. 6 Ezalaki pe ndenge wana po na Abraham. Ye "andimelaki Nzambe, yango wana Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo." 7 Bongo, bóyeba 'tè baoyo bandimelaka Nzambe, bango nde bato bazali penza bana ya solo ya Abraham. 8 Banda kala Mikanda ya Nzambe elobá 'tè Nzambe akokómisa bato nyonso bosembo po na bondimi. Yango wana asi'ayebisá Abraham sango malamu oyo: "Bato ya bikolo nyonso bakozwa bolamu po na yo." 9 Boye Nzambe azali kopesa bolamu yango na baoyo bazali kondima, ndenge Abraham andimaki. 10 Nzokande baoyo balukaka kaka kolanda Mibeko, bango nyonso batikali bato ya lisumá. Ekómamá boye: "Moto oyo atosaka mitindo nyonso ya Mikanda ya Mibeko té, pe asalelaka yango té, lisumá na ye." 11 Tembe ezali té: na miso ya Nzambe moto moko té akoki kokóma bosembo po atosaka Mibeko. Pamba té ekómamá boye: "Moto oyo akómi bosembo po na bondimi, akobika." 12 Kasi Mibeko ná bondimi ekokani ata moke té. Mikanda elobá boye: "Moto oyo asalelaka Mibeko, akobika kaka na ndenge ekómamá na Mibeko." 13 Kristo afuteli biso nyongo po na kolongola biso lisumá oyo Mibeko ezalaki koyeela biso; pamba té ye akómaki lisumá po na biso. Ekómamá boye: "Moto nyonso oyo babomi na kuruze, Nzambe akómisi ye lisumá." 14 Esalamaki boye po, lisanga na Kristo, bato ya bikolo nyonso bákoka kozwa bolamu oyo Nzambe alakaká Abraham. Ndenge wana, po na bondimi, biso tozwaki Molimo oyo Nzambe alakaki.

Mibeko ná elaka ya Nzambe

15 Bandeko, tótala ndenge bato basalaka. Soki bato bayokani, pe bakonzi bandimi boyokani yango, moto moko té akoki kolongola likambo to kobakisa. 16 Ezali ndenge moko po na bilaka oyo Nzambe apesaká na Abraham pe na libota na ye. Alobaká té 'tè: "pe na bato ya libota na yo", lokola nde bazalaki mingi. Kasi alobaká: "pe na libota na yo." Wana elakisi bobele moto moko. Pe moto yango ezali nde Kristo. 17 Nalingi koloba 'tè: ye moko Nzambe andimaka boyokani oyo asalaka ná Abraham. Nzokande Mibeko eyaki sima ya bambula 430. Yango ebomaki boyokani wana té; soki té elaka elingaki kokóma ya pamba. 18 Kasi soki bato bakoki kozwa bolamu ya Nzambe po na Mibeko, elakisi 'tè elaka na ye ezangi tina. Nzokande Nzambe apesaki bolamu na ye na Abraham kaka na ndenge apesaki ye elaka. 19 Bongo, wapi penza tina ya mibeko? Mibeko eyaki sima ya elaka, po na kolakisa polele 'tè bato batosaka Nzambe té; pe esengelaki kotikala tii tango mwana ya Abraham akoya; pamba té Nzambe apesaki Abraham elaka likolo na ye. Ezali ba-anjelu bato bapesaki Mibeko, na maboko ya Moize oyo azalaki koloba na bato na kombo ya Nzambe. 20 Nzokande Nzambe ye moko apesaki elaka; atindaki moto moko té po áloba na kombo na ye.

Tina ya Mibeko

21 E bongo Mibeko eyaki koboma bilaka ya Nzambe? Ata moke té! Soki Mibeko ezalaki na nguya ya kopesa bato bomoi, mbele bakokaki kokóma bosembo po na Mibeko. 22 Kasi ezali boye té. Mikanda ya Nzambe ezali kolakisa 'tè masumu ekangi bato nyonso. Boye bobele baoyo bazali kondima, bango nde bato bakoki kozwa bolamu oyo Nzambe alakaki. Bazwaka yango po bandimeli Yezu Kristo. 23 Liboso 'tè Nzambe álakisa biso nzela ya bondimi, Mibeko ezalaki kokanga biso lokola bato ya boloko. 24 Mibeko yango ezalaki lokola mokengeli oyo amemaka bana epai ya molakisi, elingi koloba epai ya Kristo, po tókóma bosembo na nzela ya bondimi. 25 Sik'oyo tozali lisusu na maboko ya mokengeli té, po tango ya bondimi ekoki. 26 Pamba té bino nyonso bozali bana ya Nzambe po bondimeli Yezu Kristo. 27 Ya solo, bino nyonso oyo bozwaki batisimo na lisanga na Kristo, bokamati bizaleli ya Kristo ye moko. 28 Bongo, Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, bakomi ndenge moko; baumbu ná baoyo bazali na bonsomi, mibali ná basi, bakokani. Bino nyonso bokómi moto moko, na lisanga na Yezu Kristo. 29 Soki bozali bato ya Kristo, bozali bana ya Abraham; boye bokozwa bolamu oyo Nzambe alakaki Abraham.

Galatie 4

1 Nakoki pe koloba boye: mwana asengeli kozwa bomengo ya tata na ye. Kasi tango azali nanu mwana moke, akeseni na moumbu ata moke té, atako azali kolo ya biloko nyonso. 2 Atikali na maboko ya basali oyo bazali kobokola ye pe kotala makambo na ye, tii tango akokokisa bambula oyo tata na ye atiaki. 3 Biso pe ndenge moko: tango tozalaki lokola bana mike, tobandaki kondima makambo y a mokili oyo; tozalaki lokola baumbu. 4 Kasi awa mokolo oyo Nzambe atiaki ekokaki, atindaki Mwana na ye; ye abotamaki na mwasi, pe azalaki kotosa Mibeko ya Bayuda. 5 Nzambe atindaki ye po na baoyo bazalaki baumbu ya mibeko, po áfutela bango nyongo. Asalaki bongo po tókóma bana na ye. 6 Ya solo, bozali bana na ye; pamba té Nzambe atindi na mitema na biso Molimo ya Mwana na ye, oyo abelelaka: "Ába!" Elingi koloba: "Tata na ngai!" 7 Yango wana ozali lisusu moumbu té, kasi okómi mwana. Bongo soki ozali mwana ya solo, Nzambe abombelá yo bomengo na ye.

Polo amitungisi po na ba-Galate

8 Liboso boyebaki Nzambe té, pe bozalaki baumbu ya baoyo bazali banzambe ya solo té. 9 Kasi sik'oyo boyebi Nzambe. Nakoki kutu koloba 'tè Nzambe ayebi bino. Ndenge nini bokoki kozongela lisusu makambo ya mokili, oyo ezangá nguya pe tina? Bolingi kozala lisusu baumbu na yango? 10 Bobandi kotosa lisusu mibeko oyo etali mikolo, basanza, bafeti pe bambula! 11 Nazali kobanga po na bino! Pasi oyo namonaki na mosala epai na bino, ekómi ya pamba? 12 Bandeko, nazali kosenga bino: bókóma lokola ngai, ndenge ngai pe nakómaki lokola bino. Bosalaki ngai ata mabe moko té. 13 Boyebi malamu 'tè tango nasakolaki Sango Malamu epai na bino mbala ya liboso, nazalaki na maladi. 14 Po na maladi na ngai, bokokaki kotsiola ngai to kobanga; kasi boyambaki ngai lokola anjelu ya Nzambe, kutu lokola ye moko Yezu Kristo. 15 Bozalaki na esengo mingi penza. Bongo sik'oyo? Ya solo, namonaki 'tè soki ekokaki kosalama, bolingaki kolongola miso na bino po na kopesa ngai yango! 16 Sik'oyo nakómi monguna na bino po nazali kolobela bino makambo ya solo? 17 Bato wana bazali kokosa 'tè balingi bino; kasi bazali koluka kaka bólinga bango. 18 Ezali malamu soki bolingi moto po na makambo ya malonga, pe soki bolingi ye libela. Ezali té 'tè bólinga ngai kaka soki nazali epai na bino. 19 Bana na ngai, nakómi lokola mama oyo alingi kobota; nazali komona lisusu pasi mingi po na bino, tii tango Kristo akokotela bino. 20 Nazali na posa mingi ya kokóma epai na bino, po náyeba ndenge nasengeli kolobela bino. Ya solo, nayebi té ndenge nini nakoki kosala po na bino.

Abraham abotaki bana mibale

21-22 Bino bato bólingaka kotosa Mibeko, bóyebisa ngai: boyoki ndenge ekómamá na Mibeko? Abraham abotaki bana mibale, moko na Agar mwasi ya moumbu, pe mosusu na Sara mwasi ya bonsomi. 23 Mwana ya mwasi ya boumbu abotamaki ndenge moto nyonso abotamaka; kasi mwana ya mwasi ya bonsomi abotamaki bobele po Nzambe apesaká Abraham elaka. 24 Makambo yango ezali ndakisa. Bamama wana mibale bazali kolakisa Boyokani ya ndenge mibale. Boyokani ya liboso ezali Agar; ebandaki na ngomba Sinai, pe ebotaka bobele bana ya boumbu. 25 Pamba té Sinai ezali ngomba ya mboka Arabie, ekokani na Yeruzalem ya lelo; bato na yango bazali baumbu. 26 Kasi Yeruzalem ya Likolo ezali mboka ya bonsomi; yango nde moto ezali mama na biso! 27 Ekómamá boye: "Yo moto obotaka té, sepela! Yemba na esengo nyonso! Pamba té mwasi oyo basundolá akozala na bana mingi, koleka mwasi oyo azali na mobali." 28 Bandeko, bino bokokani na Izaak; bozali bana ya Nzambe, po ye akokisi elaka na ye. 29 Nzokande na tango ya kala, mwana oyo abotami lokola moto nyonso abandaki konyokola oyo abotami na molimo ya Nzambe. Makambo wana pe ezali kosalama sik'oyo. 30 Kasi mikanda ya Nzambe elobi nini? "Bengana mwasi ya moumbu ná mwana na ye. Pamba té mwana ya mwasi ya moumbu akoki kozwa bomengo ya tata na ye esika moko té ná mwana ya mwasi ya bonsomi." 31 Boye bandeko, tozali bana ya mwasi ya moumbu té, kasi ya mwasi ya bonsomi.

Galatie 5

1 Kristo asi'alongolá biso na boumbu, po tózala ya solo bato ya bonsomi. Bótingama na bonsomi, bózongela boumbu té.

Mokristo azali lisusu moumbu té

2 Ngai Polo nakebisi bino: soki bomikatisi nzoto, Kristo azali lisusu na tina té po na bino. 3 Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo amikatisi nzoto: ye asengeli kotosa mitindo nyonso ya Mibeko. 4 Bino bato bolukaka kokóma bosembo na nzela ya Mibeko, bokabwani na Kristo, bobungisi bolamu na ye. 5 Kasi biso, na nguya ya Molimo Mosantu, tozali kotia mitema 'tè lokola tosi'tokómá bosembo po na bondimi, na mokolo ya suka tokozwa bolamu oyo tozali kozela. 6 Pamba té soki osangani na Yezu Kristo, ata bakatá yo nzoto to té, likambo té. Eloko eleki tina ezali: bondimi na yo ékómisa yo moto ya bolingo na misala ozali kosala. 7 Bozalaki lokola bato bamekanaka mbangu; pe bolingaki kolonga! Nani apekisaki bino bótika kotosa makambo ya solo? 8 Yango euti té na moto oyo abengaki bino. 9 Boyebi: "Mwa ndambo ya kisi ya mapa evimbisaka sani mobimba ya farine." 10 Natii motema na Nkolo 'tè bokozala na makanisi mosusu té. Kasi moto oyo akotiseli bino mobulu, ázala ata nani, Nzambe akopesa ye etumbu. 11 Bandeko, balobi ngai pe nasakolaka 'tè mokristo asengeli kokatisa nzoto. Soki ezali boye, liwa ya Kristo na kuruze ezali lisusu likambo ya lisumá té; bongo po na nini Bayuda bazali konyokola ngai? 12 Baoyo bazali kokotisela bino mobulu na makambo ya kokatisa nzoto, bakoki kosala oyo eleki: bákatisa mbuma na bango ya mibali! 13 Bandeko, Nzambe abengi bino po bozala na bonsomi. Eloko moko: bómikosa té! Bonsomi wana ekoki té kopesa bino nzela ya kolanda baposa na bino nyonso ya bomoto! Kasi po na bolingo, bómikómisa baumbu ya baninga. 14 Pamba té Mibeko nyonso ekoti na mobeko moko: "Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka." 15 Kasi soki bozali koswana pe kobunda lokola banyama ya zamba, bókeba soki té bokobomana.

Bótika Molimo ya Nzambe átambwisaka bino

16 Bongo nasengi bino: bótika Molimo ya Nzambe átambwisaka bino, po bókoka koboya baposa na bino ya bomoto. 17 Pamba té baposa ya bomoto elukaka makambo Molimo ya Nzambe aboyaka, pe Molimo atindaka makambo motema ya bato eboyaka. Bango mibale bazali banguna; yango wana, bólanda baposa ya bomoto té. 18 Kasi soki Molimo ya Nzambe azali kotambwisa bino, bozali lisusu baumbu ya mibeko té. 19 Toyebi malamu makambo posa ya bomoto etindaka: kindumba pe makambo nyonso ya soni, 20 kosambela banzambe ya bikeko, kïndoki, zuwa, kanda, koyinana, koswana, kotiana tembe, kokabwana, koboyana, 21 kozala na mitema likunya, kolangwa masanga, lokoso ya kolia, pe makambo mosusu ya ndenge wana. Nazali koyebisa bino ndenge nalobaki liboso: baoyo basalaka makambo wana, bakozala bato ya mboka ya Nzambe té. 22-23 Nzokande makambo bato basalaka na nguya ya Molimo, yang'oyo: balinganaka, bazalaká na esengo, boboto, kimia pe bondeko; bakangaka mitema pe basalisanaka; bazali bato ya solo, ya mitema malamu. Moto oyo asalaka ndenge wana, Mibeko ekoki kokatela ye etumbu moko té. 24 Bato ya Yezu Kristo basi'bamipesá po bakufa na kuruze; boye basi'babomá baposa pe lokoso ya bomoto. 25 Lokola Molimo moto apesi biso bomoi, tolandaka kaka nzela na ye. 26 Tókóma bato ya lofundu té. Tótika kotumola baninga pe koyokela bango zuwa.

Galatie 6

Tósalisanaka na tango ya pasi

1 Bandeko, soki bozwi moto moko asali mabe, bino bato bozali na Molimo ya Nzambe, bózongisa ye na nzela ya malamu, na boboto nyonso. Moko moko na kati na bino ákeba, soki té Satan akomeka ye pe lisusu. 2 Bósalisanaka na tango ya pasi, boye bokotosa mobeko ya Kristo. 3 Soki moto akanisi 'tè akómi moto monene, nzokande azali moto ya pamba, azali komikosa ye moko. 4 Kasi moto na moto átala malamu bizaleli na ye, boye akoki kosepela po na yango na kati ya motema; kasi ákanisa té 'tè aleki bato mosusu. 5 Pamba té moto na moto asengeli komema mokumba na ye. 6 Moto oyo azali koyekola mateya ya Sango Malamu, ákabela molakisi ndambo ya biloko na ye nyonso. 7 Bómikosa té! Moto atsiolaka Nzambe, asukaka mabe. Nyonso oyo asalaka, yango wana pe moto ezongelaka ye. 8 Soki moto alandi posa ya motema na ye, yango ekomemela ye liwa ya seko. Kasi oyo alandi ndenge Molimo ya Nzambe alingi, Molimo akopesa ye bomoi ya seko. 9 Bongo, tólembaka té po na kosala makambo ya malamu; pamba té soki totii molende, mokolo ezali tokozwa bolamu. 10 Yango wana, lokola tango ezali nanu ya kosala malamu, tósalaka yango na bato nyonso, kasi liboso na bandeko na biso bakristo.

Makambo ya suka

11 Botala ndenge ngai moko nazali kokómela bino na ba-letre ya minene. 12 Baoyo batindaka bino na makasi po bókatisa nzoto, balukaka nde komilakisa na miso ya bato. Basalaka bongo bobele po Bayuda bányokola bango té likolo ya kuruze ya Kristo. 13 Ata baoyo bakatisá nzoto, bango moko kutu batosaka Mibeko té. Balingi kaka kokatisa bino nzoto, po bákoka kobeta tolo soki bino botikali na elembo na nzoto. 14 Kasi ngai nalukaka lokumu ya ndenge wana ata moke té. Lokumu na ngai ezali bobele kuruze ya Nkolo na biso Yezu Kristo. Pamba té lokola ye akufaki na kuruze, namoni makambo ya mokili lokola eloko ekufá; pe ngai moko nazali lokola moto asi'akufá na makambo etali mokili. 15 Ata tokatisi nzoto to té, ezali na tina moko té; kasi likambo eleki, yang'oyo: kokóma moto y a sika. 16 Boboto ná bolamu ézala na bato nyonso oyo balandaka nzela wana, pe na bato nyonso Nzambe aponá. 17 Banda lelo, moto átungisa ngai lisusu té. Na nzoto na ngai, nazali na bilembo ya bapota ya Yezup. 18 Bandeko, bino nyonso bózwa bolamu oyo euti na Nkolo na biso Yezu Kristo! Amen!

Efeze 1

Mbote

1 Mbote na bino, bato ya Nzambe ya Efeze oyo bondimelaka Yezu Kristo. Ngai Polo, moto Nzambe aponá po názala ntoma ya Kristo, natindeli bino mokanda oyo. 2 Bózwa bolamu pe boboto oyo euti epai ya Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo.

Bolamu oyo Nzambe akabeli biso na lisanga na Kristo

3 Mersi na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo! Ye abenisi biso na lisanga na Kristo, pe atondisi biso na bolamu nyonso ya Molimo na ye; akómisá biso bato ya mboka na ye ya Likolo. 4 Ya solo, liboso 'tè ásala Likolo na se, Nzambe aponaká biso lisanga na Kristo, tózala bato ya bosantu pe ya malonga na miso na ye, po na bolingo na ye. 5 Akanaká banda kala, kokómisa biso bana na ye po na Yezu Kristo. Azalaká kolinga bongo na boboto na ye, 6 po tókumisa monene pe bolingo na ye. Pamba té akabeli biso bolamu na ye na lisanga na Mwana na ye ya bolingo. 7 Likolo ya makila ya Kristo tolongwe na boumbu; po na ye, Nzambe alimbisi masumu na biso. Nzambe alakisi 'tè bolamu na ye ezangá ndelo, 8 atondisi biso na yango pe apesi biso mayele nyonso; 9 ayebisi biso sekele ya motema na ye, oyo akanaká na boboto na ye, lisanga na Kristo. 10 Po mokolo ezali, Nzambe akokokisa mokano na ye: akotia Kristo Mokonzi se moko ya biloko nyonso ye asalá, na Likolo pe na se. 11-12 Nzambe asalaka makambo nyonso ndenge ye akanaká pe ndenge ye moko alingi. Yango wana biso bato ya liboso oyo totiaki mitema na Kristo, na lisanga na ye tosi'tozwi bomengo oyo Nzambe abombelá bato na ye. Pamba té ye aponaká biso banda kala, po tókumisa monene na ye. 13 Na lisanga na Kristo bino pe boyokaki Sango Malamu, oyo euti na Nzambe pe ezali kosalisa bino po bóbika. Na lisanga na ye bondimaki yango, bongo Nzambe atii bino elembo na ye; ezali Molimo Mosantu oyo alakaki. 14 Ya solo, awa na mokili tosi'tozwi ndambo ya bomengo oyo Nzambe abombelá bato na ye; tokozwa yango nyonso, mokolo tokolongwa libela na boumbu, po tómona nkembo ya Nzambe pe tókumisa ye.

Losambo ya Polo

15-16 Yango wana mikolo nyonso napesaka Nzambe mersi likolo na bino, po nayoki ndenge bozali kotia mitema na Nkolo Yezu, pe ndenge bozali kolinga bato ya Nzambe nyonso. Nakanisaka bino na losambo na ngai; 17 nasengaka Nzambe ya Nkolo na biso Yezu Kristo, Tata ya lokumu nyonso, átondisa bino na mayele, pe álakisa bino ndenge ye azali; 18 ámonisa bino polele bolamu oyo abengeli bino, pe bomengo ya suka té oyo abombelá bato na ye. 19 Boye bokoyeba nguya na ye ya sukisa oyo esalaka po na biso bato tondimelaka ye. Nzambe asalelaki bobele nguya yango ya ndelo té, 20 tango asekwisaki Kristo pe afandisi ye na esika ya lokumu na Likolo, penepene na ye. 21 Milimo nyonso oyo bato bábengaka "Bakonzi ya Likolo na se" ezali na se ya makolo ya Kristo; ata moko té ekoki koleka ye na nguya, ézala na mikolo na biso to na tango ekoya. 22 Nzambe apesá Kristo bokonzi nyonso, pe aponá ye ázala lokola motú ya Eklezya. "Pamba té Eklezya ezali lokola nzoto ya Kristo; na kati na yango Kristo azali mobimba, pe na kati ya Kristo, Nzambe azali mobimba.

Efeze 2

Bomoi ya sika sima ya kosekwa

1 Kala, bino bozalaká lokola bato bakufa, po bobandaká kosala masumu ya ndenge na ndenge; 2 bozalaká kotosa mokonzi ya mokili oyo, molimo mabe oyo etambolaka lokola mopepe, pe ezali kosala na mitema ya bato batosaka Nzambe té. 3 Ezali bobele bino té, biso nyonso pe tozalaká na molongo na bango; tobandaki kolanda baposa na biso nyonso ya bomoto. Ya solo, tozalaká lokola bato nyonso, bomoto na biso ezalaki kobenda etumbu ya Nzambe. 4 Kasi Nzambe ayokelaka bato mawa mingi; alakisaki biso bolingo monene. 5 Pamba té tozalaká lokola bato bakufa, likolo ya masumu na biso; kasi Nzambe apesi biso bomoi, nzela moko ná Kristo. Ya solo, bolamu ya Nzambe nde ebikisi bino. 6 Ye moto asekwisi biso, pe afandisi biso na esika ya lokumu na Likolo, lisanga na Yezu Kristo. 7 Pamba té Nzambe azali kolinga biso na lisanga na Yezu Kristo; asalaki nyonso po bolamu na ye ya ndelo té émonana, tango makambo ya sika ekoya. 8 Ezali bolamu ya Nzambe nde ebikisi bino, po bondimeli ye. Kobika wana euti na bino té, kasi ezali likabo ya Nzambe. 9 Euti na misala na biso té, boye moto moko té akoki kobeta tolo. 10 Pamba té tozali bikelamo ya Nzambe. Ye asalá biso na lisanga na Yezu Kristo, po tókokisa misala ya malamu oyo abongiselaká biso banda kala.

Tokómi moto moko, na lisanga na Yezu Kristo

11 Bókanisa ndenge bozalaká kala. Bayuda bazalaká koloba 'tè bino bozali bato ya Nzambe té, po bokatisá nzoto té. Bobele bango nde bato bazali "ekolo ya Nzambe", po bakatisá nzoto; nzokande ezali nde bato kaka batiaka bango elembo yango na nzoto. 12 Na tango wana boyebaki Kristo té; bozalaki bato ya ekolo ya Israel té. Boyokani ya Nzambe, ná bolamu oyo ye alakaká bato na ye, boyebaki yango té. Bozalaki kotia mitema na yango té, boyebaki kutu Nzambe té. 13 Kasi sik'oyo bosi'bosanganá na Yezu Kristo! Bino bato bozalaká mosika ya Nzambe, sik'oyo bokómi penepene na ye, po na makila ya Kristo. 14 Pamba té ye moto ayeelaki biso boboto. Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, akómisá bango ekolo se moko. Bonguna oyo ezalaki lokola lopango ekaboli bango, ye apanzaki yango tango babomaki ye. 15 Alongolaki mibeko nyonso ya Bayuda, po 'tè átia boboto na kati ya Moyuda ná moto ya ekolo mosusu, pe ákómisa bango moto ya sika se moko, oyo asangani na ye penza. 16 Tango babomaki Kristo na kuruze, ye asilisaki bonguna ya bato; azongisi boyokani na kati na bango ná Nzambe, pe akómisi bango nyonso lokola nzoto se moko. 17 Bongo amemeli bato nyonso Sango Malamu ya boboto, ézala bino bato bozalaki mosika ya Nzambe, pe baoyo bazalaki penepene na ye. 18 Boye po na Kristo, biso Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, tozwi nzela ya kokota epai ya Tata, awa tozwi Molimo se moko. 19 Ya solo, bino bato bozali Bayuda té, botikali lisusu bapaya té; kasi bozali bato yà libota ya Nzambe penza, bokómi bana-mboka esika moko ná bakristo ya liboso. 20 Bino ná bango bozali lokola mabanga oyo Nzambe azali kotóngela Ndako na ye. Bantoma ná baprofete bazali fondasion na yango, pe Yezu Kristo ye moko azali libanga monene oyo esimbi Ndako mobimba. 21 Pamba té mabanga nyonso ekangamá na Nkolo, po ye ákómisa yango Ndako ya bosantu. 22 Na lisanga na ye, bino pe bozali kotóngama esika moko, po bókóma Ndako ya Nzambe, awa bozwi Molimo na ye.

Efeze 3

Sekele ya Kristo

1 Yango wana ngai Polo nazali kobondela Nzambe likolo na bino. Bakangi ngai na boloko po nazali mosali ya Yezu Kristo; pe nandimi bapasi oyo po na bino. 2 Ya solo, bosi'boyoki ndenge Nzambe, na bolamu na ye, apesi ngai mosala po na bino. 3 Ye moko moto alakisaki ngai sekele na ye ndenge nasi'nakómeli bino na mokuse; 4 bongo lokola bozali kotanga mokanda na ngai, bokoki komona 'tè nayebi penza sekele ya Kristo. 5 Nzambe ayebisaká yango na bato ya kala té; kasi sik'oyo Molimo na ye alakisi yango na bato na ye ya bosantu, bantoma pe baprofete na ye. 6 Sekele yango ezali boye: po na Sango Malamu, bato ya bikolo nyonso babandi kozwa bolamu ya Nzambe ndenge moko na Bayuda; bakomi biteni ya nzoto moko; Nzambe akabeli bango nyonso bomengo oyo alakaki, na lisanga na Yezu Kristo. 7 Nakómi mosali ya Sango Malamu po Nzambe asalelaki nguya na ye, na ndenge akabeli ngai bolamu na ye. 8 Atako nazali moto ya suka penza na kati ya bakristo nyonso, Nzambe apesi ngai bolamu oyo: náyebisa bato ya bikolo nyonso 'tè bomengo ya Kristo ezangá ndelo; 9 nálakisa bango polele sango ya Nzambe oyo asalá biloko nyonso: ndenge azali kokokisa sekele oyo abombaká uta na ebandeli. 10 Boye, na ndenge ye asalaka na kati ya Eklezya, milimo ya Likolo oyo bábengaka "Bakonzi ya Likolo na se", yango nyonso ekoki komona sik'oyo 'tè mayele ya Nzambe ezali na suka té. 11 Uta na ebandeli Nzambe akanaká kosala bongo; akokisi mokano wana na mosala ya Nkolo na biso Yezu Kristo. 12 Po na Kristo tosi'tozwi bonsomi, totiki kobanga; boye tokoki kokóma penepene ya Nzambe, po na bondimi na biso. 13 Nasengi bino kaka bólemba té po na bapasi oyo nazali koyokela bino: ezali bobele po na bolamu na bino.

Bolingo ya Kristo

14 Yango wana nafukameli Nzambe, Tata 15 oyo apesaká bomoi na bikelamo nyonso, ézala oyo ezali na Likolo to awa na se. 16 Nasengi ye, ásalela nguya na ye ya suka té, bongo Molimo na ye ápesa bino makasi po bótonda na molende. 17 Nasengi ye ápesa bino bondimi ya solo, po Kristo áfanda libela na mitema na bino, bongo bolingo épesa bino makasi, ndenge misisa esimbaka nzete pe ndenge fondasion esimbaka ndako; 18 boye, lisanga na bakristo nyonso, bokokoka koyeba ndenge bolingo ya Kristo ezangá suka, 19 pe eleki mayele nyonso. Oyo nde eloko nasengeli bino: bótonda na bomengo nyonso ya Nzambe. 20 Nzambe azali na nguya ya kosala makambo nyonso penza, koleka oyo tokoki kosenga to kokanisa; nguya yango nde moto esalaka na mitema na biso. 21 Bákumisa ye na kati ya Eklezya, na lisanga na Yezu Kristo, tango nyonso seko. Amen!

Efeze 4

Nzoto ya Kristo ezali se moko

1 Bongo, lokola nakómi moto ya boloko po na Nkolo, nabondeli bino bozala na bizaleli ya malamu, oyo ebongi na bato Nzambe abengi. 2 Bótikaka lofundu pe bózalaka na boboto; bókangaka mitema pe bolimbisanaka na bolingo nyonso. 3 Bósanganaka na boboto. Molimo ya Nzambe akómisi bino lisanga moko, boye bótiaka molende po na kobatela yango. 4 Bino nyonso bozali moto se moko: Molimo ya Nzambe azali se moko; pamba té Nzambe abengaki bino nyonso po bótia mitema na bomengo se moko oyo ye abombelá bino. 5 Nkolo azali se moko, bondimi moko, batisimo pe moko. 6 Nzambe azali bobele moko; ye nde Tata na biso nyonso, atambwisaka biso nyonso, afandaka pe asalaka na kati ya mitema na biso nyonso. 7 Kasi makabo ya Molimo oyo Kristo akabeli biso, ezali ndenge moko té. Ye apesi moto na moto na kati na biso likabo na ye. 8 Yango wana ekómamá boye: "Tango amataki na Likolo, amemaki banguna oyo akangaki, pe akabelaki bato makabo." 9 "Amataki na Likolo" elakisi nini? Elakisi 'tè Kristo akitaki na se. 10 Moto oyo akitaki, ye pe móto amataki na Likolo, po átondisa Likolo na se na bolamu na ye. 11 Ye nde moto atii bato bantoma, baprofete, bateyi ya Sango Malamu, babokoli ya bakristo pe balakisi. 12 Azali kosala bongo po na kobongisa bakristo, bákokisa misala na bango pe bákóma nzoto ya Kristo. 13 Boye biso nyonso tokozala na bondimi se moko, pe tokoyeba Mwana ya Nzambe malamu penza. Na ndenge wana tokobanda kaka kokola tii tango tokokóma bamikolo, pe tokokokana ná Kristo ye moko. 14 Yango wana, tokozala lisusu lokola bana mike té. Mateya ya ndenge na ndenge ekobenda biso té, ndenge mipepe ebendaka bwatu. Tokolanda bato ya mayele mabe té oyo bakosaka pe bateyaka makambo ya lokuta. 15 Kasi tokozala bato ya solo pe tokolingana; bongo tokokola na ndenge nyonso, tii tokokokana ná Kristo. Ye azali lokola motú; 16 biteni nyonso ya nzoto ekangamá na ye malamu, pe misisa esimbá nzoto mobimba. Eteni moko moko ezali kosala mosala na yango, pe nzoto mobimba ezali kokola pe kokóma makasi na bolingo.

Bomoi ya sika na lisanga na Kristo

17 Bongo, na kombo ya Nkolo Yezu nazali kokebisa bino boye: bótika bizaleli ya bato oyo bayebi Nzambe té pe balandaka makanisi ezanga tina. 18 Mayele na bango ekómá molili, bazangi bomoi oyo Nzambe apesaká, bayebi eloko moko té, po bazali mitú makasi. 19 Bakanisaka makambo ya malonga té, kasi bamipesaka mobimba na makambo ya soni pe ya mobulu ya ndenge nyonso. 20 Kasi bino bozwaki mayele yango té, tango balakisaki bino Kristo! 21 Ya solo boyokaki sango na ye; bateyaki bino mateya na ye, pe boyebi 'tè Yezu azalaki moto ya solo. 22 Bótika bizaleli na binoya liboso, ya "bato ya kala"; pamba té baoyo bazali na bizaleli ya "bato ya kala" bazali kobeba, po balukaka kaka makambo ezangá tina. 23 Kasi bóbongisa mitema pe makanisi na bino, ékóma ya sika: 24 bózwa bizaleli ya "bato ya sika" oyo Nzambe asalá ndenge ye moko azali; boye bokozala ya solo penza bato ya bosembo pe ya bosantu. 25 Yango wana bótika lokuta. Moto na moto álobela moninga na ye makambo ya solo, pamba té biso nyonso tozali biteni ya nzoto moko. 26 Ata moto asiliki, ásala lisumu té. Ata moto ayoki kanda, ábomba yango moi mobimba té. 27 Bókeba, zabolo álonga bino té. 28 Moto oyo azalaki koyiba, áyiba lisusu té, kasi ándima komona pasi na mosala ya maboko na ye moko, boye akozwa biloko ya kokabela bato bakelelá. 29 Bótika songisongi; kasi soki likambo ezali, bóloba nde oyo ekoki kosalisa bato, boye ekomema bolamu na baoyo bakoyoka yango. 30 Bóyokisa Molimo Mosantu ya Nzambe mawa té, pamba té azali elembo oyo Nzambe atieli bino, elakisi 'tè ye akoya kosilisa boumbu na bino, na mokolo ya suka. 31 Bólongola na kati na bino makambo nyonso ya mabe: kanda, koswana, koyinana, kotomboka, kofingana. 32 Kasi bólinganaka, bosalisanaka pe bólimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino po na Kristo.

Efeze 5

Kotambola na moi

1 Bozali bana ya Nzambe oyo ye alingaka, bosalaka lokola ye. 2 Bólinganaka ndenge Kristo alingaki biso; ye amikabaki po na biso, lokola libonza oyo esepelisaka Nzambe. 3 Bozali bato ya Nzambe; yango wana bóboya kindumba, makambo ya soni ezala ya ndenge nini, to lokoso; bótanga kutu ata kombo na yango té. 4 Ebongi té bosolola masolo ya mabe, ya bozoba, to ya soni. Masolo na bino ézala bobele po na kopesa mersi na Nzambe. 5 Bóyeba 'tè ata moto moko té akoki kozwa esika na mboka ya Kristo pe ya Nzambe, soki asalaka kindumba to makambo ya soni, to pe azali moto ya lokoso ya mbongo, pamba té moto wana akamataka mbongo lokola nzambe na ye. 6 Moto moko té ákosa bino na maloba ya pamba. Po na makambo ya ndenge wana, kanda ya Nzambe ekweelaka bato oyo batosaka ye té; 7 boye bókota na molongo na bango té. 8 Liboso bozalaká na molili; kasi sik'oyo bosangani na Nkolo, bokómi kongenga lokola moi. Yango wana, bosalaka kaka lokola bato oyo batambolaka na moi, 9 pamba té bango babimisaka bobele misala ya malamu, ya bosembo pe ya solo. 10 Bóyeba kopona makambo oyo esepelisaka Nkolo. 11 Bósanganaka té ná bato oyo bazali na molili pe basalaka makambo ezangá tina; kasi bóbimisa mabe na bango na miso ya bato nyonso. 12 Makambo bango basalaka na kobombama, ezali soni po na koloba yango. 13 Kasi ebongi bino bato ya moi bóbimisa yango na miso ya bato; 14 boye moi na bino ekomonisa mabe na bango malamu penza. Yango wana toyembaka boye: "Yo moto olali pongi, lamuka! Longwa na kati ya bato bakufa, pe Kristo akongengisa yo." 15 Bókeba malamu na bizaleli na bino. Bozala lokola bazoba té kasi lokola bato ya mayele. 16 Awa tango ezali nanu, bósalela yango malamu, pamba té mikolo oyo ezali mabe. 17 Boye bozala bazoba té. kasi bóyeba malamu makambo oyo Nkolo Yezu alingaka. 18 Bólangwa masanga té, soki té bokokóma bato ya mobulu; kasi bótonda na Molimo ya Nzambe. 19 Bósanganaka po na koyemba; bóyemba banzembo ndenge na ndenge oyo Molimo alakisaka; bókumisa Nkolo. 20 Tango nyonso bapesaka Nzambe Tata mersi po na makambo nyonso, na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo.

Basi pe mibali

21 Bino bato botosaka Kristo, bótosanaka pe bino na bino. 22 Basi, botosaka mibali na bmo ndenge botosaka Nkolo. 23 Pamba té Kristo azali motú, Eklezya nde nzoto na ye; ye moto azali Mobikisi na yango. Se ndenge wana pe, mobali azali mokonzi ya mwasi na ye. 24 Boye basi basengeli kotosa mibali na bango na makambo nyonso, ndenge Eklezya etosaka Kristo. 25 Bino mibali, bólingaka basi na bino, ndenge Kristo alingaka Eklezya pe apesaki bomoi na ye po na yango. 26 Asukoli Eklezya na mai ya batisimo pe na Maloba ya Nzambe, po yango ékóma bosantu, 27 ékóma na miso na ye lokola mwasi ya lokumu pe ya kitoko oyo azangi makwanza to banzelanzela; alingi Eklezya ézala ya bosantu penza, pe ézala na mabe ata moke té. 28 Ndenge wana mibali pe balingaka basi na bango lokola nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye, azali komilmga ye moko. 29 Ata moto moko té amiyinaka, kasi bato nyonso baleisaka nzoto pe babatelaka yango. Kristo asalaka ndenge moko po na Eklezya, 30 pamba té tozali biteni ya nzoto na ye. 31 Ekómamá boye: "Yango wana mobali atikaka tata na ye ná mama na ye, pe asanganaka na mwasi na ye; boye bango mibale bakomaká se moto moko." 32 Maloba oyo ebombá sekele moko ya monene; nalobi yango po na Kristo pe Eklezya. 33 Kasi ezali pe po na bino: mobali nyonso na kati na bino álinga mwasi na ye ndenge ye moko amilingaka; pe mwasi nyonso átosa mobali na ye.

Efeze 6

Bana pe baboti

1 Bana, botosaka baboti na bino po na Nkolo Yezu, pamba té yango ezali malamu. 2 Mobeko ya liboso oyo Nzambe abakisaki elaka, yang'oyo: "Botosaka batata pe bamama na bino, 3 po bozala na esengo pe bóumela mingi awa na mokili." 4 Bino batata, bóyokisaka bana na bino kanda té, kasi bóbokola bango na mateya pe batoli ya Nkolo.

Baumbu pe bakonzi

5 Bino baumbu, botosaka baoyo bazali bakonzi na bino awa na se. Bóbangaka pe bóyokelaka bango na motema moko, lokola nde bozali kosalela Kristo; 6 ézala bobele té tango bazali kotala bino. Bólukaka kosepelisa bato té, kasi bólukaka kosala nyonso oyo Nzambe alingaka, lokola baumbu ya Kristo. 7 Bosalaka mosala na bino ya boumbu na mitema malamu, lokola nde bozali kosalela Kristo, kasi bato té. 8 Pamba té boyebi 'tè moto nyonso, ázala moumbu to moto ya bonsomi, akozwa bolamu epai ya Nkolo, soki mosala na ye ezali malamu. 9 Bino bakonzi, bosalaka ndenge moko pe epai ya baumbu na bino. Bótika kokanela bango, po boyebi 'tè bino ná bango bozali na Mokonzi na Likolo; pe ye aponaká bilongi ya bato té.

Bibundeli ya mokristo

10 Po na kosukisa, bólukaka makasi na bino epai ya Nkolo. Bómilendisaka na nguya na ye ya monene. 11 Ndenge soda amemaka bibundeli na ye, bino pe bókamata bibundeli nyonso oyo Nzambe apesaká po zabolo ákweisa bino té na mayele na ye ya mabe. 12 Pamba té biso bakristo tobundaka ná bato té, kasi ná milimo oyo bábengaka "Bakonzi ya Likolo na se", nzokande yango ezali kaka bakonzi ya mokili oyo ya molili; tobundaka ná milimo mabe oyo etambolaka bipai nyonso lokola mipepe. 13 Yango wana bókamata bibundeli nyonso oyo Nzambe apesaká. Bongo tango mokolo ya mabe ekoya, banguna na bmo bakokoka kokweisa bino té, kasi bokobunda tii na suka, pe bokopika kaka pende! 14 Bongo bómibongisa lokola basoda! Soda alataka mokaba na loketo; mokaba na bmo ezali nde mateya ya solo. Soda alataka kazaka ya bibende po na kobatela nzoto. Kazaka oyo ekoki kobatela bino ezali nde ezaleli na bmo ya malonga. 15 Soda alataka sapatu po na kotambola malamu. Ya bmo ezali: molende ya kopanza Sango Malamu ya boboto. 16 Soda asimbaka baraje po na komibatela. Baraje na bino ezali nde bondimi; tango nyonso yango ekoki kopekisa makonga ya kopela móto, oyo Monguna abwakaka. 17 Soda atiaka motema na ekoti na ye ya ebende. Bino bótia mitema na Nzambe; ye nde moto akobikisa bino. Soda abundaka na mbeli. Mbeli oyo Molimo Mosantu apesi bino ezali nde Maloba ya Nzambe. 18 Na kati ya makambo nyonso básambelaka Nzambe, bósengaka lisalisi epai na ye, ndenge Molimo alakisaka bino. Bófungola miso pe bólemba té. Bóbondela Nzambe po na bakristo nyonso. 19 Bóbondela ye pe po na ngai, àlakisa ngai maloba ya malamu po nákoka kosakola na molende nyonso ba-sekelé ya Sango Malamu. 20 Nazali ntoma na yango, ata nazali na boloko sik'oyo. Yango wana bobondela Nzambe, po ápesa ngai nguya ya kosakola ndenge nasengeli kosala.

Makambo ya suka

21 Ndeko na biso ya bolingo, Tishike, oyo asalelaka Nkolo na motema malamu, akoyebisa bino sango na ngai nyonso, po bóyeba soki nakómi ndenge nini. 22 Natindeli bino ye, po álobela bino ndenge nini tozali, pe ákitisa bino mitema. 23 Nzambe Tata pe Nkolo na biso Yezu Kristo bápesa bandeko nyonso boboto, bolingo pe bondimi. "Bolamu ya Nzambe ézala na bato nyonso oyo balingaka Nkolo na biso Yezu Kristo na bolingo ya solo.

Filipi 1

Mbote

1-2 Mbote na bino nyonso, bato ya Nzambe oyo bozali na lisanga na Yezu Kristo na mboka Filipi, ná batambwisi ya Eklezya pe basalisi na bango. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo pe Timoté, basali ya Yezu Kristo, totindeli bino mokanda oyo.

Losambo ya Polo po na bakristo ya Filipi

3 Mbala nyonso nakanisaka bino, napesaka Nzambe na ngai mersi. 4 Tango nyonso oyo nabondelaka ye po na bino, nakanisaka na esengo monene 5 ndenge bozali kosangana ná ngai na mosala ya Sango Malamu, banda mokolo ya liboso tii lelo. 6 Ya solo, ezali Nzambe moto abandaki mosala oyo ya kitoko na kati na bino; nayebi 'tè ye akolemba té tii akosukisa yango mokolo Yezu Kristo akozonga. 7 Ebongi nakanisaka boye po na bino nyonso, po bokoteli ngai na motema, pamba té bino nyonso bozwi bolamu ya Nzambe, lisanga na ngai; mingi penza lokola batii ngai na boloko po na Sango Malamu. Ndenge wana nazwi nzela ya kolakisa na miso ya bazuzi 'tè yango ezali ya solo. 8 Nzambe ayebi 'tè nalingaka bino nyonso na bolingo ya Yezu Kristo penza. 9 Nabondelaka Nzambe, ásala 'tè bolingo na bino ékola kokola penza, ápesa bino mayele pe áfungola bino miso, 10 po bóyeba kopona makambo ya tina. Boye bokozala bato ya solo, pe bokomema ata ngambo moko té mokolo Kristo akozonga, 11 kasi bokotonda na makambo ya malonga oyo euti na Yezu Kristo. Na ndenge wana lokumu nyonso ekokende epai ya Nzambe.

Nábika to nákufa, nazali lisanga na Kristo

12 Bandeko, nalingi bóyeba 'tè makambo oyo ekweelaki ngai, esukaki kaka malamu; Sango Malamu eyei kutu kopanzana po na yango. 13 Pamba té bato nyonso oyo basalaka epai ya motambwisi ya vile, ná bato mosusu ebele penza, basi'bayebi 'tè nakoti boloko po na Kristo. 14 Pe bandeko mingi bazali kozwa molende po na kotiela Nkolo Yezu mitema, awa bazali komona ngai na boloko. Boye babandi kotia makasi, pe babangaka té po na kosakola maloba ya Nzambe. 15 Ya solo, bato mosusu bazali kosakola sango ya Kristo po bayokelaka ngai zuwa, pe bakomi koluka báleka ngai na mosala; kasi bamosusu bazali kosakola yango na makanisi ya malamu; 16 basalaka na bolingo po bayebi 'tè Nzambe atii ngai na boloko bobele po názwa nzela ya kosakola Sango Malamu na tribinal. 17 Kasi bato mosusu wana basakolaka sango ya Kristo na mitema mibale, po na komilakisa. Bakanisi 'tè bakoki kobakisela ngai bapasi, lokola nazali na boloko. 18 Likambo té! Nasepeli po bango nyonso bazali kaka kosakola sango ya Kristo, ata makanisi na bango ezali ya malamu to ya mabe. Pe nakotika kosepela té, 19 pamba té lokola bino bozali kosambela po na ngai, pe Molimo ya Yezu Kristo azali kosalisa ngai, nayebi 'tè makambo nyonso wana ekosuka malamu, pe nakobika. 20 Natii penza motema 'tè nakoyoka soni ata moke té. Nakoki kotia tembe té; sik'oyo lokola mikolo nyonso, makambo oyo ezali kokweela ngai ekopesa Kristo lokumu, ata soki nabiki to nakufi. 21 Pamba té, awa na mokili nazali lisanga na Kristo. Pe soki nakufi, nazwi penza bomengo koleka! 22 Kasi awa na mokili nakoki kosala mosala ya tina; bongo nayebi té eloko nini nakoki kopona. 23 Makambo oyo mibale esilisi ngai mayele: nákufa po názala esika moko ná Kristo, yango nde eleki malamu; 24 kasi po na bino eleki malamu ná tika la bobele awa na mokili. 25 Yango wana nakoki kotia tembe té; nayebi 'tè nakokufa té, nakotikala epai na bino nyonso, po bondimi na bino ékola pe éyeela bino esengo. 26 Bongo tango nakozongela bino, bokozala na esengo mingi koleka po na ngai, na lisanga na Yezu Kristo. 27 Likambo moko eleki: bozala na bizaleli oyo elakisaka 'tè botosaka Sango Malamu ya Kristo. Boye soki nayei kotala bino, námona yango; pe soki nazwi nzela té, náyoka 'tè bozali kaka na molende, bosangani na makanisi moko, pe bobundaka na motema moko po na bondimi oyo euti na Sango Malamu. 28 Bóbanga banguna na bino ata moke té. Molende na bino ekolakisa bango 'tè bakomi na suka, kasi bino bokobika; nyonso ekosalama na makasi ya Nzambe. 29 Pamba té bolamu na ye ekómisi bino bato ya Kristo: bosengeli kaka kondimela ye té, kasi komona pe pasi po na ye. 30 Bongo bokómi kobunda etumba oyo ngai pe nabundaka, ndenge bomonaki liboso, pe bozali koyoka sik'oyo na mosika.

Filipi 2

Kristo alongaki po awelaki lokumu té

1 Bandeko, nayebi malamu ndenge bondimi na bino epai ya Kristo ezali kopesa bino molende, pe bolingo na ye ezali kolongola bino mawa. Molimo Mosantu akómisá bino lisanga moko, boye bozali koyokela bandeko nyonso mawa. 2 Yango wana bótondisa ngai lisusu na esengo. Bóyokana pe bólingana penza, bozala motema moko pe makanisi moko. 3 Bówela koleka baninga ata moke té, bómikumisa té kasi bótika lofundu, pe moto nyonso ámona baninga lokola nde bango baleki ye. 4 Moto moko té áluka bolamu na ye moko, kasi moto nyonso áluka bolamu ya bandeko. 5 Na kati na bino bózalaka na makanisi moko ná Yezu Kristo. 6 Ye azali ndenge moko na Nzambe, akokani penza na ye. Nzokande atalaki yango lokola eloko ya kowela té, 7 kasi atikaki lokumu na ye; andimaki kozala ndenge moko na moumbu, akómaki lokola bato nyonso. Azalaki komonana na nzoto ya bomoto, 8 bongo amikitisaki penza, atosaki tii na liwa, ata liwa ya kuruze. 9 Yango wana Nzambe atomboli ye koleka, pe apesi ye bokonzi monene, oyo eleki bokonzi nyonso ya Likolo na se. 10 Boye po na bokonzi ya Yezu, baoyo nyonso bazali na Likolo, to awa na se, to pe na mboka ya bato bakufa, esengeli báfukamela ye 11 pe básakola 'tè: Yezu Kristo azali Nkolo; bongo bápesa lokumu na Nzambe Tata.

Kongenga lokola minzoto na kati ya butu

12 Bandeko ya bolingo, tango nyonso boyokelaka ngai. Ézala kaka té tango nazali na kati na bino, kasi sik'oyo pe, ata nazali mosika. Soki bolingi kobika, bosalaka makasi, na kobanga nyonso. 13 Pamba té Nzambe asalaka mikolo nyonso na kati na bino, po bólinga pe bóluka makambo ye alingaka. 14 Bósilika té pe bótia tembe té, na makambo nyonso oyo bosalaka, 15 po bómema ngambo moko té pe bósala mabe ata moko té. Bongo bokokóma bana ya Nzambe; bozala bana ya kokoka, na kati ya bato ya lokuta pe ya mabe ya mokili oyo. Bosengeli kongenga na kati na bango lokola minzoto na Likolo, 16 pamba té bozali na maloba ya bomoi. Soki bosali bongo, nakosepela po na bino, mokolo Kristo akozonga; yango ekolakisa 'tè mosala nyonso nasalaki pe makasi nyonso natiaki, ezalaki ya pamba té. 17 Nakómi lokola nganga-Nzambe; libonza oyo nalingi kopesa na Nzambe, ezali nde bondimi na bino. Pe soki esengeli násopa makila na ngai po na kokokisa libonza na bino, nakozala kaka na esengo, nakosepela esika moko ná bino. 18 Ndenge moko pe, bino bozala na esengo pe bósepela esika moko ná ngai.

Timoté pe Epafrodite

19 Natii motema na Nkolo Yezu 'tè nakotindela bmo Timoté sima ya mwa mikolo, po náyoka sango na bino pe nákitisa motema. 20 Natikali bobele na ye; makanisi na ye ezali lokola oyo ya ngai, pe alukaka penza bolamu na bino na motema moko. 21 Pamba té bato ebele bazali koluka se bolamu na bango moko, kasi makambo ya Yezu Kristo té. 22 Nzokande bino moko boyebi ndenge Timoté asi'alakisi bolamu na ye. Amipesi mobimba po na Sango Malamu, esika moko na ngai, ndenge mwana asalisaka tata na ye. 23 Yango wana nakotindela bino ye noki, tango nakoyeba ndenge makambo na ngai ekosuka. 24 Natii motema na Nkolo Yezu 'tè sima ya mwa mikolo ngai moko nakoya kotala bino. 25 Nakanisi 'tè eleki pe malamu názongisela bmo ndeko na biso Epafrodite, moninga na ngai ya mosala pe ya etumba, oyo botmdaki po na kosalisa ngai tango nazalaki komona pasi. 26 Ye azali na posa mingi ya komona bmo nyonso, pe azali na mawa penza koleka po boyokaki 'tè azalaki na maladi. 27 Ya solo, azalaki na maladi, pe etikalaki moke ákufa. Kasi Nzambe ayokelaki ye mawa; asalisaki kaka ye té kasi ná ngai pe, na ndenge abakiselaki ngai pasi té. 28 Yango wana, nalingi nátmdela bmo ye noki-noki, po tango bokomona ye lisusu bósepela, pe motema na ngai ékita moke. 29 Bongo, bóyamba ye na esengo nyonso lokola ndeko, na lisanga ya Nkolo. Bosengeli kopesa lokumu na bato ya ndenge wana. 30 Pamba té alingaki kokufa po na mosala ya Kristo; andimaki kopesa bomoi na ye po na kosalisa ngai na makambo oyo bino moko bokokaki té.

Filipi 3

Ndenge Nzambe akómisaka bato bosembo

1 Bandeko na ngai, bózalaka tango nyonso na esengo, na lisanga na Nkolo Yezu. Nayebi 'tè nasi'nakómelá bino yango kala. Nalembi té po na kokóma yango lisusu, po ékotela bino tii na mikuwa. 2 Bókebaka na bato oyo baboyá bondeko! Bókeba na basali ya mabe! Bókeba na ba-Israelite ya lokuta! 3 Bato ya Israel ya solo ezali nde biso bato tosambelaka Nzambe na ndenge ya solo, na nguya ya Molimo na ye, pe tobetaka tolo po na Yezu Kristo, kasi po na makambo ya bomoto té. 4 Nzokande soki moto mosusu akanisi 'tè akoki kotia motema na makambo ya bomoto, áyeba 'tè ngai pe nakoki kosala bongo, kutu naleki ye. 5-6 Bakataki ngai nzoto ndenge Mibeko ezali kotinda. Nabotamá moto ya Israel, ya ekolo ya Benjamen. Nazali mo-Ebré; bakoko na ngai nyonso pe bazalaká ba-Ebré. Na makambo etali Mibeko, namipesaki mobimba po na yango; nazalaki Farizé, nabandaki kutu konyokola Eklezya. Nazalaki kotia motema 'tè Mibeko ékómisa ngai bosembo na miso ya Nzambe, na ndenge natikalaki kobuka yango ata moko té. 7 Kasi makambo oyo nazalaki komona 'tè ezali ya tina, sik'oyo namoni yango pamba po na Yezu Kristo. 8 Ya solo, natalaka yango nyonso pamba, po likambo moko kaka moto eleki tina penza: koyeba Yezu Kristo Nkolo na ngai. Likolo na ye nabwaká nyonso, pe namonaka yango lokola salité, po názwa Kristo, 9 pe nákóma penza lisanga na ye. Ya solo, natiká koluka komikómisa bosembo na nzela ya kolanda Mibeko, kasi nakómi bosembo na nzela ya kondimela Kristo; bobele Nzambe moto apesaká bosembo yango, po na bondimi. 10 Makambo nalingi yang'oyo: koyeba Kristo pe nguya ya kosekwa na ye; komona pasi oyo ye amonaki; pe kokufa ndenge ye akufaki. 11 Pamba té natii motema 'tè ngai pe nakosekwa.

Tósala makasi po Nkolo Yezu álongisa biso

12 Nayebi 'tè nanu nalongi té, pe nanu nakoká té; nakómi lokola moto oyo azali komeka mbangu na ye, nazali kosala makasi po názwa bomengo wana, pamba té Yezu Kristo asi'azwá ngai uta kala. 13 Bandeko, nakanisi té 'tè nasi'nazwi yango, kasi nazali koluka likambo moko: natiki kolanda makambo ya kala pe nazali kotala na posa mingi oyo ezali liboso na ngai. 14 Bongo, nazali kokima mbangu tii na suka, po názwa bomengo oyo Nzambe alaki bato ye abengi, na lisanga na Yezu Kristo. 15 Biso nyonso oyo tozali "bato ya kokoka", tosengeli kokanisa boye. Pe soki bokanisi ndenge mosusu, Nzambe akolakisa bino yango kaka. 16 Nzokande tólanda bobele makambo oyo Nzambe asi'alakisi biso. 17 Bandeko, bino nyonso bózwa ndakisa na ngai, pe bólanda bato oyo basalaka lokola ngai. 18 Nayebisaki bino mbala mingi, pe nazali koyebisa bino lisusu sik'oyo na mai na miso: bato mingi bazali banguna ya kuruze ya Kristo, po na bizaleli na bango ya mabe. 19 Suka na bango, liwa; nzambe na bango, bobele libumu; bazali kobeta tolo po na makambo oyo esengeli koyokisa bango soni. Bakanisaka bobele makambo ya mokili oyo. 20 Kasi biso tozali ba-citoyen ya mboka ya Nzambe oyo ezali na Likolo. Tozali kozela Nkolo Yezu Kristo, oyo akouta kuna po na kobikisa biso. 21 Ye akobongola nzoto na biso oyo ya mawa, pe akosala 'tè yango ékóma lokola nzoto oyo ye asekwaki na yango. Azali na nguya ya kosala bongo, pamba té azali Mokonzi ya Likolo na se.

Filipi 4

Batoli

1 Yango wana, bandeko ya bolingo, bókangamaka kaka na Nkolo Yezu, na molende nyonso. Nazali penza na posa ya komona bino lisusu, pamba té nalingi bino mingi; bino bozali esengo na ngai, bozali mbuma ya mosala na ngai. 2 Nasengi na bamama Evodie pe Sentishe báyokana na lisanga na Nkolo Yezu. 3 Yo pe Sizigos, moninga na ngai ya motema, nasengi yo ósalisa bango, pamba té bapesaki ngai maboko po na kopanza Sango Malamu, nzela moko ná Kleman pe baninga na ngai mosusu ya mosala. Nzambe asi'akómá bakombo na bango nyonso na buku ya bomoi. 4 Bózalaka tango nyonso na esengo, na lisanga na Nkolo Yezu! Nalobi lisusu: bózalaka na esengo. 5 Bósala 'tè bato nyonso bámona ndenge bozali mitema boboto. Etikali moke, Yezu áya. 6 Bómitungisaka ata moke té, kasi bóbondelaka Nzambe po na kosenga ye nyonso oyo bozali na yango posa; pe bópesaka ye mersi. 7 Boboto oyo eutaka na Nzambe eleki mayele nyonso; yango nde moto ekobatela mitema pe makanisi na bino, na lisanga na Yezu Kristo. 8 Bandeko, bókanisaka bobele makambo ya solo, ya kitoko, ya bosembo pe ya malonga. Bólukaka makambo ya kokoka, oyo Nzambe andimaka, oyo epesaka moto lokumu. 9 Bosalaka makambo boyekolaki pe bozwaki, ndenge boyokaki pe bomonaki epai na ngai. Boye Nzambe, oyo apesaká boboto, akozala na bino.

Polo apesi bakristo mersi po na makabo na bango

10 Nasepelaki mingi po na ndenge bozwaki lisusu nzela ya kolakisa ngai 'tè bozali kokanisa ngai. Namoni yango lokola likabo ya Nkolo Yezu. Ya solo, bozalaki kokanisa ngai; kasi bozwaki nzela té ya kolakisa yango. 11 Nalobi bongo té po nazali kokelela; pamba té nasi'namesana na makambo nyonso oyo eyeelaka ngai, 12 nákelela to názala na bomengo. Nasi'nazwi mayele ya kokanga motema na makambo nyonso, ata nazali na bilei to na nzala, ata nazali na biloko mingi to nazangi biloko. 13 Nakoki kosala makambo nyonso, pamba té makasi na ngai eutaka na Kristo. 14 Kasi bosalaki malamu lokola bosalisaki ngai tango nazalaki na pasi. 15 Banda kutu tango nalongwaki na mboka na bino Masedwane po nábanda mosala ya Sango Malamu, bozalaki kopesa ngai lisalisi po na kozongisela ngai bolamu oyo nameme-laki bino. Boyebi malamu 'tè nazali kondima yango epai ya eklezya ata moko té, bobele epai na bino, bakristo ya Filipi. 16 Ya solo, banda tango nazalaki na Tesalonike, bino bozalaki kotindela ngai lisalisi mbala na mbala, tango nazalaki kokelela. 17 Bókanisa té 'tè nazali koluka mbongo na bino; kasi nasepeli na ndenge bozali kobota mbuma, boye bokómi bato ya bomengo na miso ya Nzambe. 18 Nasi'nazwi biloko nyonso oyo ekoki na ngai, esi'eleki kutu. Lokola nazwaki makabo oyo botindelaki ngai na maboko ya Epafrodite, sik'oyo natondi na biloko. Makabo na bino ezali lokola libonza ya solo kitoko, esepelisaka Nzambe koleka banyama oyo babomelaka ye. 19 Nzambe na ngai azali na bomengo pe lokumu nyonso; ye nde moto akopesa bino biloko nyonso oyo bozali na yango posa, po na Yezu Kristo. 20 Lokumu ézala na Nzambe, Tata na biso, mikolo nyonso seko. Amen!

Makambo ya suka

21 Bópesa ndeko moko moko mbote, na lisanga na Yezu Kristo. Bandeko oyo bazali ná ngai batindeli bino pe mbote. 28 Bakristo nyonso y a awa batindeli bino mbote, mingi penza baoyo basalaka na Leta. 23 Bolamu ya Nkolo Yezu Kristo ézala na bino nyonso.

Kolose 1

Mbote

1-2 Mbote na bino, bato ya Nzambe, bandeko bakristo ya Kolose. Ngai Polo, moto Nzambe aponá po názala ntoma ya Yezu Kristo, pe ndeko na biso Timoté, totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti epai ya Nzambe, Tata na biso.

Polo apesi Nzambe mersi

3 Mikolo nyonso tosambelaka po na bino, pe topesaka mersi na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo. 4 Pamba té toyokaki ndenge bozali kondimela Yezu Kristo pe kolinga bakristo nyonso, 5 pe ndenge bozali kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá bino na Likolo. Pamba té Sango Malamu oyo boyokaki ezali ya solo. 6 Na mokili mobimba yango ezali kopanzana pe kosala mosala, bobele ndenge emonanaka epai na bino, banda mokolo boyaki koyeba bolamu oyo Nzambe apesaká na bato. 7 Ezali ndeko ya bolingo Epafras, moninga na biso ya mosala, moto ateyaki bino yango. Ye asalelaki Kristo pe ná bino, na motema malamu; 8 ayebisaki biso sango ya bolingo oyo Molimo ya Nzambe apesá bino. 9 Yango wana, banda mokolo toyokaki sango na bino, totiki kosambela té po na bino; tosengaka Nzambe 'tè Molimo átondisaka bino na mayele, po bóbanda koyeba makambo nyonso oyo Nzambe alingaka. 10 Boye, bokozala na bizaleli oyo ebongi na miso ya Nkolo Yezu, pe esepelisaka ye mingi. Bokobanda kosala misala ya malonga ndenge na ndenge, pe bokoyeba Nzambe malamu penza. 11 Ye moko álendisa bino na nguya na ye ya bosantu po bótiaka molende pe bókangaka mitema na makambo nyonso. 12 Bópesa mersi na Tata, na esengo nyonso, pamba té ye atambwisaka bino na moi; abongisá bino po bókoka kozwa bomengo oyo abombelá bato na ye. 13 Asi'alongolá biso na boumbu ya molili, pe akómisá biso bato ya mboka ya Mwana na ye ya bolingo. 14 Ya solo, tozwi bonsomi po na Kristo; ye moto azwelá biso bolimbisi ya masumu. Nzambe atiá Kristo Mokonzi ya bikelamo nyonso 15 Kristo akamatá elongi ya Nzambe oyo amonanaka té; azali Mwana ya liboso, na kati ya biloko nyonso oyo Nzambe asalá. 16 Pamba té, lisanga na ye Nzambe asalá bikelamo nyonso, oyo ya Likolo ná oyo ya se, oyo emonanaka ná oyo emonanaka té, ézala kutu milimo oyo bábengaka " "Bakonzi ya Likolo na se". Nzambe asalá bikelamo nyonso na Kristo, po ézala ya ye; 17 boye ye aleki yango nyonso; yango nyonso ekanganá na ye. 18 Azali pe Mokonzi ya Eklezya; ye azali motú, Eklezya ezali lokola nzoto na ye. Azali moto ya liboso oyo azwá bomoi ya sika, na kati ya bato bakufa; yango wana akómá Mokonzi ya bikelamo nyonso. 19 Pamba té, na bolingo na ye, Nzambe asalaki boye: afandisaki nkembo na ye mobimba na nzoto ya Kristo, 20 pe alimbisaki masumu nyonso po na ye, po bikelamo nyonso ékóma ya Kristo. Ya solo, na liwa na ye na kuruze, Nzambe atiaki boboto na kati ya bikelamo nyonso ya Likolo pe ya se. 21 Bino pe liboso bokabwanaki ná Nzambe; bokómaki banguna na ye po na mabe oyo bozalaki kokanisa pe kosala. 22 Kasi sik'oyo, po na liwa ya Kristo oyo azwaki nzoto ya bomoto, Nzambe alimbisi masumu na bino, po bókóma bato ya bosantu pe ya kokoka penza na miso na ye. 23 Bókangama kaka na bondimi, bótelema makasi. Moto moko té ákosa bino. Na molende nyonso bótia mitema na bomengo oyo Nzambe abombelá biso, ndenge boyokaki na Sango Malamu. Na mokili mobimba basi'bayoká yango, pe Nzambe atii ngai Polo mosakoli na yango.

Mosala ya Polo po na Eklezya

24 Sik'oyo nasepeli na bapasi oyo nazali komona po na bino. Pamba té bapasi na ngai ezali kokokisa bapasi oyo Kristo amonaki. Namemaka yango nyonso po na bolamu ya Eklezya, oyo ezali nzoto na ye. 25 Nzambe atiá ngai mosali ya Eklezya, na ndenge atindaki ngai násakola epai na bino sango na ye nyonso, 26 elingi koloba: sekele oyo ye azalaká kobomba uta na ebandeli. Sik'oyo azali kolakisa yango na bato ye aponá; 27 alingi koyebisa bango bomengo pe lokumu oyo abombelá bikolo nyonso. Sekele wana yang'oyo: Kristo azali na kati na bino; boye bokoki kotia mitema 'tè akokabela bino pe nkembo ya Nzambe. 28 Nazali kosakola sango ya Kristo; nazali kopesa moto nyonso toli pe koteya moto nyonso na mayele oyo ye apesi ngai; nazali koluka kokómisa moto nyonso mokolo na miso ya Nzambe, na lisanga na Kristo. 29 Nazali kobunda na mosala oyo na nguya ya Kristo; ye moto apesaká ngai makasi.

Kolose 2

1 Nalingi bóyeba ndenge nazali kobunda penza po na bino, po na bakristo ya Laodisé, pe po na baoyo nyonso bamoná ngai nanu té. 2 Nasalaka bongo po bózwa molende, bólinganaka na motema moko, pe bozala na mayele ya kokoka po na koyeba malamu penza sekele ya Nzambe: sekele yango nde Kristo ye moko; 3 pamba té ezali epai na ye nde Nzambe abombisá mayele nyonso oyo alingi kopesa biso. 4 Nakómeli bino makambo oyo po moto moko té ákosa bino na maloba y a kitoko. 5 Ata nazali mosika na bino, kasi motema na ngai ezali epai na bino. Nasepeli komona ndenge bopiki pende pe bozali kotia molende, po na kondimela Kristo. Kristo amemeli biso bolamu nyonso 6 Bongo, lokola bosi'bondimi Nkolo Yezu Kristo, bózalaka tango nyonso lisanga na ye. 7 Ye ásimba bino ndenge misisa esimbaka nzete, pe ndenge fondasion esimbaka ndako. Bozala na bondimi ya makasi penza, ndenge bateyaki bino; pe bópesaka Nzambe mersi tango nyonso. 8 Bókeba, moto moko té ákosa bino na mateya ya sekele pe ya lokuta, likolo ya inilimo oyo bato bábengaka "Bakonzi ya Likolo na se". Nyonso wana euti na bato, kasi na Kristo té. 9 Nzokande mobimba ya Nzambe ezali kofanda na nzoto ya Kristo; 10 pe bino bosi'bozwi bolamu nyonso na lisanga na ye. Ye azali Mokonzi ya milimo nyonso oyo ezali na bokonzi pe na nguya. 11 Bokómi bato ya ekolo ya Nzambe, po bosangani na Kristo; ye moto akómisá bino lokola bato bakatá nzoto; atako bakataki bino nzoto penza té. 12 Pamba té tango babatisaki bino, ezalaki lokola bakundaki bino esika moko ná Kristo; pe Nzambe asekwisaki bino esika moko na ye, po botiaki mitema na nguya ya Nzambe, awa bondimaki 'tè ye asekwisaki Kristo. 13 Liboso bozalaki bato bakatá nzoto té, bobandaki koyeba Nzambe té, bozalaki lokola bato bakufa, po na masumu na bino. Kasi sik'oyo Nzambe alimbisi bino masumu nyonso, pe apesi bino bomoi ya sika na lisanga na Kristo. 14 Tokómaki bato ya nyongo po tozalaki kotosa Mibeko té; kasi Nzambe abomaki Mibeko oyo ezalaki kokweisa biso; abambaki yango na kuruze. 15 Pamba té tango Kristo akufaki na kuruze, Nzambe alongisaki ye; bongo asilisaki bokonzi ya milimo oyo bábengaka "Bakonzi ya Likolo na se". Na miso na biso nyonso, milimo yango ezali komonana lokola banguna bakangami na etumba. 16 Yango wana, moto moko té átungisa bino, ézala po na biloko ya kolia to ya komela, ézala po na mikolo ya feti, ya sanza ebimi sika, to pe Mikolo ya Kopema. 17 Nyonso wana ezalaki bobele lokola elili ya bolamu oyo Kristo amemeli biso. 18 Moto moko té ákweisa bino! Bato mosusu babetaka tolo po na ndenge batosaka ba-anjelu pe bakumisaka bango; bakanisaka bobele makambo eyeelaka bango na ndoto, batondá na lofundu ya pamba na makanisi na bango ya bomoto. Bókeba. Moto moko té ákosa bino. 19 Pamba té bato wana bakanganaka na Kristo té; nzokande ye azali lokola Motú oyo epesaka nzoto mobimba bolamu, pe esangisaka misisa na yango nyonso, po nzoto ékola ndenge Nzambe alingi.

Kokufa pe kosekwa ná Kristo

20 Bosi'bokufá ná Kristo; bosi'bolongwá na boumbu ya makambo ya mokili oyo. Bongo po na nini bozali kotosa yango, lokola nde bozali kaka bato ya mokili oyo? Boyebi bikila yango: 21 "Kosimba oyo té". "Kolia wana té". "Liboko na yo étuta eloko ya boye té". 22 Biloko nyonso wana ekoumela té, esalamá kaka po bato basalelaka yango. Mibeko pe mateya ya ndenge wana euti bobele na bato; 23 ezali komonana lokola ya mayele; epesaka bato nzela básambelaka ndenge balingi, bámimonisaka lokola bato ya mawa, pe bámiyokisaka pasi na nzoto. Kasi esalisaka bango penza té; ezali kaka kosepelisa baposa ya bomoto.

Kolose 3

1 Bosi'bosekwá ná Kristo. Yango wana bólukaka makambo ya mboka ya Nzambe oyo ezali na Likolo. Kuna Kristo afandi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. 2 Bótiaka makanisi na bino na makambo ya Likolo, kasi na oyo ezali awa na se té. 3 Pamba té bosi'bokómá lokola bato bakufa! Bomoi na bino ebombamá esika moko ná Kristo, epai ya Nzambe. 4 Kristo azali bomoi na bmo penza. Tango ye akoya komonana, wana bino pe bokomonana esika moko ná ye, na lokumu nyonso oyo Nzambe asi'akabeli bino.

Bizaleli ya kala pe ya sika

5 Yango wana, bókóma lokola bato bakufa, bótika makambo oyo bozalaki kosala awa na mokili: kindumba pe makambo nyonso ya soni, baposa nyonso ya mabe, pe lokoso ya mbongo; pamba té bato mosusu bamonaka mbongo lokola nzambe na bango. 6 Makambo nyonso wana moto ebendaka etumbu ya Nzambe. 7 Liboso bino pe bozalaki kaka kolanda makambo yango. 8 Kasi sik'oyo bótika bizaleli nyonso wana: koyoka kanda, kotomboka, kotóngana, kofingana pe koloba makambo ya soni. 9 Bótika kokosana bino na bino; bóbwaka bizaleli na bino ya kala, 10 pe bózwa bizaleli ya bato ya sika, oyo Nzambe asalá na ndenge na ye moko, po bóyeba ye malamu penza. 11 Bongo biso nyonso tokokani; ózala Moyuda to té, ézala okatisá nzoto to té, ózala moumbu to moto ya bonsomi, ata oyekolá té, ézala kutu ozali mosenzi. Bobele Kristo moto azali na tina; ye asalaka nyonso pe azali na biso nyonso. 12 Nzambe asi'aponá bino pe alingi bino; bozali bato na ye penza. Yango wana bóyokelaka bato mawa na boboto nyonso, bómikumisaka té, bófandaka kimia pe bóyebaka kokanga mitema. 13 Soki moto moko na kati na bino azali na likambo na moninga, ebongi bóyokana pe bolimbisana. Bosalaka lokola Nkolo, pamba té ye pe alimbisaki bino. 14 Na nyonso wana likambo eleki ezali: bólingana. Bolingo nde moto ekotia bino lisanga moko. 15 Boboto ya Kristo ékotela bino na mitema, pamba té Nzambe aponá bino po bozala biteni ya nzoto moko. Pe bópesaka Nzambe mersi. 16 Maloba ya Kristo étonda penza na mitema na bino: bóteyanaka pe bópesanaka toli na mayele nyonso. Bóbetela Nzambe miziki, bókumisa ye pe bóyembela ye banzembo oyo Molimo na ye alakisaka bino. Bópesaka ye mersi na mitema na bino. 17 Makambo nyonso bosalaka to bolobaka, bosalaka yango na kombo ya Nkolo Yezu; na lisanga na ye, bópesaka mersi na Nzambe Tata.

Makambo bosengeli kosala na bizaleli ya sika

18 Basi, botosaka mibali na bino, ndenge ebongi na miso ya Nkolo. 19 Bino mibali, bólingaka basi na bino, pe bókangelaka bango kanda té. 20 Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba té yango esepelisaka Nkolo. 21 Bino batata, bótumolaka bana na bino té po bálemba nzoto té. 22 Bino baumbu, na makambo nyonso botosaka baoyo bazali bakonzi na bino awa na se; ézala bobele té tango bazali kotala bino. Bólukaka kosepelisa bato té. Kasi botosaka bango na motema moko, lokola bato babangaka Nkolo. 23 Misala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato té. 24 Pamba té Nkolo akopesa bino lifuta: bokozwa bomengo oyo Tata abombelá bana na ye. Mokonzi na bino penza ezali Kristo; bósalelaka ye. 25 Moto oyo asalaka makambo ya mabe, mabe yango ekozongela ye moko. Po Nzambe aponaká bilongi ya bato té.

Kolose 4

1 Bino bakonzi, bosalaka makambo ya bosembo pe ya solo epai ya baumbu na bino. Bóyeba 'tè bino pe bozali na Mokonzi, na Likolo.

Toli

2 Bótika losambo té; bólemba té po na kopesa Nzambe mersi. 3 Bóbondelaka Nzambe pe po na biso, ápesa biso nzela ya koyebisa bato sekele ya Kristo. Sik'oyo nazali na boloko po na yango. 4 Bongo bobondela Nzambe, nákoka kosakola yango ndenge nasengeli kosala. 5 Mbala nyonso oyo bozwi libaku ya kokutana na bato oyo bazali bakristo té, bólakisaka bango bizaleli ya kokoka. 6 Maloba na bino ézala tango nyonso ya boboto pe ya elengi; bóyeba kozongisela moto na moto eyano ndenge ebongi.

Makambo ya suka

7 Tishike, ndeko na ngai ya bolingo, akomemela bino sango na ngai nyonso. Ye asalelaka Nkolo na motema malamu, azali moninga na ngai ya mosala. 8 Natindeli bino ye po áyebisa bino ndenge tozali, pe álendisa mitema na bino. 9 Akoya ná Onezime, ndeko ya bolingo pe ya motema malamu. Ye autá epai na bino. Boye bango bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa. 10 Aristarke azali na boloko esika moko ná ngai, atindeli bino mbote; ná Marko ndeko ya Barnabas. Bosi'bozwi motindo po na Marko; soki ayei epai na bino, bóyamba ye malamu. 11 Yezu, oyo bábengaka Yustus, atindeli bino pe mbote. Na kati ya Bayuda oyo bazali bakristo, kaka bato misato wana basalaka ná ngai po na bokonzi ya Nzambe. Bango nde bazalaki kokitisa ngai motema. 12 Epafras atindeli bino lisusu mbote; ye pe autá epai na bino. Azali mosali ya Yezu Kristo; alembaka té na kobondela po na bino, po bozala bato ya kokoka, pe bóndima kosala makambo nyonso oyo Nzambe alingi. 13 Ya solo, nayebi ndenge amipesaka po na bino, pe po na bakristo ya Laodisé ná ya Iyerapolis. 14 Luka, monganga pe moninga na biso ya bolingo, ná Demas batindeli bino mbote. 15 Bópesa mbote na bandeko ya Laodisé, pe na Nimfa ná bakristo oyo basanganaka na ndako na ye. 16 Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bótindela yango bakristo ya Laodisé, bango pe bátanga. Bongo bino pe lisusu botanga mokanda oyo ekouta na Laodisé. 17 Bóloba na Arshipe: "Keba na mosala oyo Nkolo apesi yo, sala yango malamu." 18 Ngai Polo napesi bino mbote. Nakómi maloba oyo na maboko na ngai moko. Bóbosana té 'tè nazali na boloko. Bolamu ya Nzambe ézala na bino.

1 Tesalonike 1

Mbote

1 Mbote na bino, bandeko y a eklezya ya Tesalonike, oyo ezali ya Nzambe Tata pe ya Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, ná Silas pe Timoté, totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu ya Nzambe pe boboto.

Bizaleli pe bondimi ya bakristo ya Tesalonike

2 Tango nyonso topesaka Nzambe mersi pe tobondelaka ye po na bino nyonso. 3 Butu moi tokanisaka bino na miso y a Nzambe Tata na biso, ndenge bondimi na bino ezali kobota mbuma, ndenge bolingo na bino ezali kosala mosala, pe ndenge bozali kotia mitema na molende nyonso 'tè Nkolo Yezu Kristo akoya. 4 Bandeko, toyebi 'tè Nzambe alingi bino, pe aponi bino bozala bato na ye; 5 pamba té toteyaki bino Sango Malamu bobele na maloba té, kasi totondaki penza na nguya ya Molimo Mosantu. Boyebi ndenge bizaleli na biso ezalaki epai na bino, po na bolamu na bino. 6 Yango wana bobandaki kolanda ndakisa na biso pe ya Nkolo; pamba té tango boyambaki maloba ya Nzambe, bomonaki pasi mingi, kasi Molimo Mosantu ayokisaki bino pe esengo mingi. 7 Boye bino pe bokómi ndakisa ya bakristo nyonso ya Masedwane pe ya Grese; 8 pamba té kobanda epai na bino, maloba ya Nkolo ekómi kopanzana tii kuna. Kutu bipai nyonso bazali koyoka ndenge bino bozali kondimela Nzambe; bongo tozali na posa ya kobakisa maloba té. 9 Ya solo, bipai nyonso tozali kokóma, bato bazali kosolola ndenge bino boyambaki biso, ndenge boboyaki banzambe ya bikeko pe bobandaki kosalela Nzambe ya bomoi pe ya solo, 10 pe ndenge bozali kozela Mwana na ye Yezu, oyo akouta na Likolo. Ezali ye nde moto Nzambe asekwisá, po ábikisa biso tango kanda ya Nzambe ekoya.

1 Tesalonike 2

Mosala ya Polo na Tesalonike

1 Bandeko, bino moko boyebi malamu 'tè tango toyaki epai na bino, tosalaki mosala ya punda té. 2 Boyokaki ndenge banyokolaki biso pe bafingaki biso na vile ya Filipi. Nzokande Nzambe na biso apesaki biso kaka molende ya kosakola Sango Malamu na ye epai na bino na Tesalonike, atako mikakatano elekaki mingi. 3 Pamba té tango tozali koteya bato, tobimisaka lokuta té, tolobaka na mitema mibale té, tolukaka pe kokosa bato té, 4 kasi tolandaka kaka ndenge Nzambe alingi. Ye atii biso basakoli ya Sango Malamu, po amoni 'tè tozali bato ya kokoka. Tolobaka na kombo na ye; tolukaka kosepelisa bato té, kasi bobele Nzambe oyo ayebi mitema na biso. 5 Boyebi 'tè mokolo moko té tolobá maloba ya sukali; tozali pe koluka bolamu na biso moko té, Nzambe ayebi yango! 6 Tozali koluka lokumu epai ya bato té, ézala epai na bino to epai ya bato mosusu. 7 Lokola tozali bantoma ya Kristo, tokokaki kosenga bino bámema mokumba na biso; kasi tozalaki na boboto na kati na bino, ndenge mama aleisaka pe abatelaka bana na ye. 8 Tolukaki koyeela bino bobele Sango Malamu ya Nzambe té, kasi tozalaki na posa ya kopesa bomoi na biso po na bino, pamba té tozali kolinga bino mingi penza. 9 Bandeko, bókanisa ndenge tozalaki kotia molende pe komona pasi na mosala. Tango tozalaki kosakola Sango Malamu ya Nzambe, tobandaki kosala butu moi, po moto moko té na kati na bino ázwa mokumba na biso. 10 Bino boyebi, Nzambe pe ye moko ayebi: bizaleli na biso epai na bino bakristo ezalaki ya bosantu pe ya bosembo, na miso ya bato nyonso. 11 Boyebi 'tè tozalaki na moko moko na bino, ndenge tata azalaká na bana na ye. 12 Tango nyonso tozalaki kolendisa bino na mpiko, po 'tè bozala na bizaleli oyo ebongi na miso ya Nzambe; pamba té ye moto abengi bino po bózwa lokumu na mboka na ye. 13 Bandeko, tozali kopesa Nzambe mersi tango nyonso, po na ndenge boyambaki makambo oyo tosakolaki epai na bino. Boyambaki yango lokola maloba ya bato té, kasi na ndenge yango ezali penza, lokola maloba ya Nzambe; boye ezali kosala mosala na mitema na bino bato bondimi. 14 Na yango bokómi kolanda ndakisa ya bakristo ya ba-eklezya oyo ezali na mboka Yuda. Bato ya mboka na bino babandaki konyokola bino kaka ndenge Bayuda banyokolaka bakristo oyo bazali epai na bango. 15 Ezali bango bato babomaki Nkolo Yezu, bobele ndenge babomaká baprofete; banyokolaki biso ndenge moko, basepelisaka Nzambe té, pe bazali banguna ya bato nyonso. 16 Balukaka kopekisa biso tókende epai ya bato ya bikolo mosusu té po tómemela bango Sango Malamu oyo ekobikisa bango. Na ndenge wana masumu na bango ezali kaka kokóma ebele. Kasi kanda ya Nzambe esi'ekweeli bango.

Polo akómi na posa ya kozonga na Tesalonike

17 Bandeko, totikaki bino po na mwa tango, kasi mitema na biso ezali kaka epai na bino. Yango wana, tozalaki na posa na bino mingi, pe tolukaki nzela nyonso po tomonana lisusu. 18 Ya solo tolingaki kozonga epai na bino. Ngai Polo nakanaki kosala bongo mbala na mbala; kasi Satan azalaki kopekisa ngai. 19 Pamba té tina nini tozali kotia mitema epai ya Nzambe? Ezali po na bino té? Bino bozali esengo na biso. Pe tango Nkolo na biso Yezu Kristo akozonga, bino bato bokozala na miso na ye lokola elembo oyo ekolakisa 'tè tolongi. 20 Ya solo, bino bopesi biso lokumu pe esengo!

1 Tesalonike 3

1 Yango wana, tokokaki lisusu kokanga mitema té. Biso ná Silas tozwaki mokano ya kotikala biso moko na Atene, 2 pe totindelaki bino ndeko na biso Timoté, po ápesa bino makasi pe álendisa bondimi na bino; ye pe azali mosali ya Nzambe, asakolaka Sango Malamu ya Kristo esika moko ná biso 3 Tolingaki té moto moko na kati na bino álemba po na minyokoli oyo bozali na yango. Bino moko boyebi malamu 'tè esengeli tómona pasi boye. 4 Tango tozalaki epai na bino, toyebisaki bino 'tè bakonyo-kola biso; pe boyebi 'tè esalamaki se bongo. 5 Yango wana, lokola ngai nakokaki lisusu kokanga motema té, natindelaki bino Timoté po áya kotala ndenge bondimi na bino ekómi. Nabangaki tango mosusu Satan asi'ameki bino, pe mosala na biso ekei pamba. 6 Kasi sik'oyo Timoté auti epai na bino pe ayei kozongela biso. Ayebisi biso sango ya malamu po na bondimi pe bolingo na bino. Alobi bozali kokanisa biso tango nyonso, pe bozali na posa ya komona biso lisusu, bobele ndenge biso pe tozali na posa ya komona bino. 7 Bandeko, na kati ya bapasi nyonso oyo tozali komona, tozwi molende po na bondimi na bino. 8 Sik'oyo mitema na biso ekiti, po bino bokangami kaka na Nkolo Yezu. 9 Ndenge nini tokoki kopesa Nzambe mersi po na bino? Pamba té totondi na esengo na miso na ye po na bino. 10 Butu moi tozali kobondela ye na molende penza, ápesa biso nzela ya komonana lisusu na bino, po tókokisa makambo oyo ezangi na bondimi na bino. 11 Ye moko Nzambe Tata na biso, pe Nkolo na biso Yezu básala 'tè tókoka koya epai na bino. 12 Nkolo álendisa bino pe átondisa bino na bolingo, boye bólingana pe bólinga bato nyonso, kaka ndenge biso tozali kolinga bino. 13 Apesa bino makasi, po bókóma bato ya bosantu pe ya kokoka na miso ya Nzambe Tata na biso, mokolo Nkolo na biso Yezu akoya ná basantu na ye nyonso.

1 Tesalonike 4

Bizaleli oyo Nzambe alingaka

1 Bandeko, tolakisaki bino bizaleli oyo esepelisaka Nzambe; pe ya solo bobandi kolanda yango. Sik'oyo tobondeli bino penza na kombo ya Nkolo Yezu: bósala lisusu malamu koleka. 2 Boyebi batoli topesaki bino na kombo ya Nkolo Yezu. 3 Makambo Nzambe alingi yang'oyo: bozala bato na ye penza, pe bóboya makambo ya soni. 4 Moto na moto na kati na bino áfanda bobele ná mwasi na ye moko, na ndenge ebongi na miso ya Nzambe pe ya bato, 5 kasi alanda baposa ya mabe té, lokola bato ya bikolo mosusu oyo bayebi Nzambe té. 6 Na makambo oyo, moto moko té ákosa ndeko na ye, to ásala ye mabe. Nkolo ye moko akopesa etumbu na bato basalaka makambo ya ndenge wana. Tosi'toyebisaki bino polele 'tè bókeba na yango. 7 Pamba té Nzambe abengi biso té po tókóma bato ya mbindo, kasi po tózala na bizaleli ya bosantu. 8 Yango wana, moto nyonso oyo aboyi toli yango, aboyi moto té kasi aboyi nde Nzambe, oyo apesaká bino Molimo Mosantu na ye. 9 Po na makambo etali bolingo epai ya bandeko, tina ezali té ya kokómela bino yango na mokanda; pamba té Nzambe asi'alakisi bino ndenge bosengeli kolingana. 10 Bosalaka pe bongo na bandeko nyonso ya Masedwane mobimba. Nzokande bandeko, tobondeli bino bósala lisusu malamu koleka. 11 Ndenge tosengaki bino liboso, bósala makasi po bófanda na kimia, moto na moto átala makambo na ye moko, pe ásala mosala po ábikela na yango. 12 Boye bokozwa lokumu epai ya bato bazali bakristo té, pe moto moko té akomema mokumba na bino.

Koya ya Nkolo Yezu

13 Bandeko, tolingi bólongola tembe po na makambo etali bato bakufa; po bozala na mawa té lokola bato mosusu oyo batielaka Nzambe mitema té. 14 Pamba té tondimaka 'tè Yezu akufaki pe asekwaki. Ekozala ndenge moko na bato oyo bakufaki lisanga na Yezu: Nzambe akoyamba bango esika moko ná ye. 15 Ya solo, makambo nalobi na bino euti na Nkolo: biso bato tozali nanu na bomoi pe totikali tii mokolo Nkolo akoya, tokoleka bato bakufa ata moke té. 16 Pamba té mongongo ya mokonzi ya ba-anjelu pe kelelo ya Nzambe ekopesa motindo, bongo ye moko Nkolo akouta na Likolo pe akokita awa na se. Na tango wana bato bàkufá oyo bandimelaki ye bakosekwa liboso. 17 Na sima biso bato tokozala nanu na bomoi, Nzambe akomema biso ná bango na mapata, po tókende kokutana ná Nkolo. Boye tokozala seko esika moko ná Nkolo. 18 Bóyebisana makambo oyo, po bólendisana bino na bino.

1 Tesalonike 5

1 Bandeko, tina ezali té ya kokómela bino na mokanda makambo etali tango to ngonga yango nyonso ekosalama. 2 Pamba té bino moko boyebi malamu penza 'tè mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka na butu. 3 Tango bato bakozala koloba "tofandi na boboto pe kimia", kaka na tango wana nde liwa ekoyeela bango na mbala moko, ndenge pasi ya kobota ezwaka mwasi oyo azali na zemi; pe bakokoka kokima yango ata moke té. 4 Kasi, bandeko, bino bozali na kati ya molili té; yango wana mokolo yango ekoki kokanga bino té lokola moyibi, 5 pamba té bino nyonso bozali bato ya moi. Tozali bato ya butu te to ya molili. 6 Yango wana tólala pongi té lokola bato mosusu, kasi tófungola miso pe tómibatela malamu. 7 Nzokande bato oyo balalaka pongi, balalaka na butu; pe baoyo balangwaka masanga, balangwaka na butu. 8 Kasi biso bato ya moi, tómibatela malamu. Tózala lokola basoda na tango ya etumba. Bango balataka bilamba pe bikoti ya bibende; bilamba na biso ezali: bondimi ná bolingo; ekoti na biso ezali nde kotia mitema na Nzambe po tóbika. 9 Pamba té Nzambe asi'aponá biso. Kanda na ye ekokweela biso té, kasi Nkolo na biso Yezu Kristo akobikisa biso. 10 Ye akufelaki biso po tango akoya, ata akuti biso tozali nanu na bomoi to tosi' tokufi, tózala seko esika moko ná ye. 11 Yango wana, bólendisana pe bópesana mpiko ndenge bomesaná.

Toli pe mbote ya suka

12 Bandeko, tosengi bino botosaka bato oyo bazali komipesa po na kotambwisa bino na nzela ya Nkolo pe koteya bino. 13 Bólingaka bango mingi koleka po na mosala oyo bango basalaka. Bózalaka na boboto na kati na bino. 14 Bandeko, tobondeli bino bóyebisa bato ya goigoi 'tè bákeba, bólendisa bato oyo babangaka, bósalisa baoyo bazangi makasi, pe bókangaka mitema po na bato nyonso. 15 Bozala ekenge po moto moko té ázongisela moninga mabe; kasi bóluka tango nyonso kosalana bolamu bino na bino, pe epai ya bato nyonso. 16 Bósepelaka tango nyonso, 17 bólemba té na kosambela. 18 Bópesaka Nzambe mersi na makambo nyonso. Wana ezali makambo Nzambe alingi po na bino bato bozali lisanga na Yezu Kristo. 19 Bótia mabaku té na mosala ya Molimo Mosantu. 20 Soki moto ayebisi bino makambo euti epai na ye, bózwa yango lokola eloko ya pamba té; 21 kasi botala nyonso soki ezali ya solo. Bóndima oyo ezali malamu, 22 pe bóboya mabe ya ndenge nyonso. 23 Nzambe ya boboto ye moko ákómisa bino bato na ye penza, ábatela mobimba na bino: motema, molimo pe nzoto, po bómema lisumu ata moko té, mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akoya. 24 Moto oyo abengi bino akosala bongo, pamba té ye akokisaka makambo alakaká. 25 Bandeko, bobondela pe Nzambe po na biso. 26 Bópesa mbote na bandeko bakristo nyonso, bóyambana na bolingo penza. 27 Nasengi bino na kombo ya Nkolo Yezu, bótangela bandeko nyonso mokanda oyo. 28 Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino.

2 Tesalonike 1

Mbote

1 Mbote na bino, bandeko ya Eklezya ya Tesalonike, oyo ezali ya Nzambe Tata na biso pe ya Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, ná Silas pe Timotœ, totindeli bino mokanda oyo. 2 Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata pe na Nkolo Yezu Kristo. Nzambe akosambisa bato mokolo Nkolo Yezu akoya 3 Bandeko, tosengeli kopesa Nzambe mersi tango nyonso likolo na bino. Ebongi tósala yango po bondimi na bino ezali kokóma makasi penza, pe bolingo oyo moko moko na bino azali kolakisa epai ya bandeko ezali kokola se kokola. 4 Yango wana tozali kobeta tolo na ba-eklezya ya Nzambe, po na molende ya bondimi na bino, atako bozali komona bapasi mingi po na yango. 5 Nyonso wana elakisi 'tè Nzambe asi'abandi kokata makambo ya mokili na bosembo. Pamba té asi'abongisi bino po bókóma bato ya mboka na ye, na ndenge bozali komona pasi po na yango. 6 Ya solo, makambo Nzambe asalaka ezali bosembo. Akozongisa pasi na baoyo bazali koyokisa bino pasi, 7 pe akopemisa bino bato bozali komona pasi, ná biso lokola. Akosala bongo mokolo Nkolo Yezu akouta na Likolo ná ba-anjelu na ye ya nguya, 8 pe akoya komonana na kati ya móto ya somo, po na kopesa etumbu na bato oyo bayebi Nzambe té, pe baboyi kotosa Sango Malamu ya Nkolo na biso Yezu. 9-10 Mokolo ye akoya, bango bakozwa etumbu; bakokufa libela, bakomona elongi na ye té, ézala lokumu ya nguya na ye. Kasi bato na ye bakokumisa ye, pe baoyo nyonso bandimeli ye bakobetela ye maboko. Bino pe bokozala esika moko ná bango, po bondimaki makambo oyo tosakolaM epai na bino. 11 Yango wana, tozali kobondela tango nyonso po na bino. Lokola Nzambe na biso abengi bino, ábongisa bino pe álendisa bino; ákokisela bino makambo ya malamu pe misala nyonso oyo bondimi na bino ezali kotinda. 12 Na ndenge wana Nkolo na biso Yezu akozwa lokumu epai na bino, pe bino bokozwa lokumu epai na ye, po na bolamu ya Nzambe na biso pe ya Nkolo na biso Yezu Kristo.

2 Tesalonike 2

Mobebisi

1 Bandeko, ezali ya solo, Nkolo na biso Yezu Kristo akoya, pe biso tokosangana na ye esika moko. Kasi tosengi bino: 2 bótambola mitú noki té, pe bóbanga té, soki balobi na bino 'tè mokolo ya Nkolo esi'ekómi; ata soki moto moko asakoli 'tè bayebisi ye yango na Molimo Mosantu; ata kutu balobi 'tè biso bato tót eyaki bongo to tokomaki yango na mokanda. 3 Moto moko té ákosa bino ata na ndenge nini. Pamba té liboso mokolo wana ékóma, bato ebele bakoboya Nzambe, pe Mobebisi akoya komonana. Ye asengeli kobunga seko; 4 akobanda koyina nyonso oyo bato bakumisaka lokola nzambe, akoloba 'tè aleki yango; akokende kutu kofanda na Ndako ya Nzambe na Yeruzalem, pe akomitia lokola Nzambe. 5 Bosi'bobosani 'tè nalobaki na bino bongo, tango nazalaki epai na bino? 6 Kasi eloko moko ezali kopekisa Mobebisi sik'oyo, pe boyebi yango. Ye nde akomonana bobele na tango oyo Nzambe atiá. 7 Pamba té nguya ya Mobebisi oyo ebombamá, esi'ebandi kosala. Kasi ye akoya bobele tango moto oyo azali kopekisa ye akolimwa. 8 Na tango wana Mobebisi akomonana, kasi Nkolo Yezu akoboma ye na pema ya monoko na ye, pe akolimwisa ye na nguya ya koya na ye. 9 Mobebisi wana akoya na nguya ya Satan, akosala makamwisi pe makambo ya lokuta ya ndenge na ndenge. 10 Akosala mabe ya ndenge nyonso, po na kokosa bato oyo basengeli kobunga, po baboyaki kolinga makambo ya solo oyo ekokaki kobikisa bango. 11 Yango wana Nzambe atindeli bango nguya moko oyo ezali kobebisa mitema na bango, pe ezali kosala 'tè bándima makambo ya lokuta. 12 Boye bato nyonso oyo baboyaka kondima makambo ya solo pe balingaka masumu, bakozwa etumbu.

Nzambe aponá biso po tóbika

13 Kasi, bandeko, tosengeli kopesa Nzambe mersi tango nyonso po na bato Nkolo alingaka. Ya solo, Nzambe aponá bino uta ebandeli po bóbika. Pamba té Molimo Mosantu akómisá bino bato ya Nzambe penza; bongo bino pe bokómi kondima makambo ya solo. 14 Tango tomemelaki bino Sango Malamu, ezali Nzambe moto azalaki kobenga bino po bózwa lokumu ya Nkolo na biso Yezu Kristo. 15 Yango wana bandeko, bópika pende pe bósimba makambo oyo tolakisaki bino, ézala na maloba to na mokanda na biso. 16 Nzambe Tata na biso alingaka biso; na bolamu na ye asali nyonso po tósilisa mawa libela, pe tótia penza mitema epai na ye. Tosengi ye, ná Nkolo na biso Yezu Kristo, 17 bálendisa mitema na bino pe bápesa bino makasi ya kosala pe koloba tango nyonso makambo ya malamu.

2 Tesalonike 3

1 Bongo, bandeko, bobondela Nzambe po na biso, po maloba ya Nkolo Yezu épanzana noki pe ézwa lokumu bipai nyonso lokola epai na bino. 2 Lisusu, bobondela po Nzambe ábikisa biso na maboko ya bato mabe pe ya masumu, pamba té bato mosusu bazali na bondimi té. 3 Nkolo akokisaka makambo alakaká. Akolendisa bino pe akobatela bino, po Monguna ásala bino mabe té. 4 Yango wana totii mitema na Nkolo 'tè bokolanda makambo oyo totindi bino, ndenge bozali kosala sik'oyo. 5 Nkolo átambwisa mitema na bino, po bozala na bolingo ya Nzambe pe bókanga mitema lokola Kristo.

Moto nyonso asengeli kosala

6 Bandeko, totindi bino na kombo ya Nkolo Yezu Kristo, bókima bandeko nyonso ya goigoi pe baoyo baboyaka mateya oyo topesaki bino. 7 Bino moko boyebi malamu ndenge nini bosengeli kosala po na kolanda ndakisa na biso; pamba té tozalaki bato ya goigoi té tango tozalaki epai na bino. 8 Tosengaki moto moko té ápesa biso bilei ya ofelé, kasi tozalaki kotia molende pe komona pasi na mosala. Tosalaki butu moi, po moko té na kati na bino ázwa mokumba na biso. 9 Ya solo, tokoki kosenga bino lisalisi; kasi tosalaki yango té, pamba té tolingaki kopesa bino ndakisa, po bosalaka lokola biso. 10 Lisusu, tango tozalaki epai na bino, topesaki bino mobeko boye: "Moto oyo alingi kosala mosala té, ália pe té.' 11 Kasi sik'oyo toyoki 'tè na kati na bino bato mosusu bafandaka pamba, balingi kosala té; mosala na bango kaka kokota na makambo ya bato. 12 Toyebisi bato ya ndenge wana pe totindi bango na kombo ya Nkolo Yezu Kristo 'tè básala mosala ya malonga, po bákoka kolia biloko oyo bango moko bazwi. 13 Po na bino bandeko, bólemba té na kosala bolamu. 14 Soki moto aboyi kotosa mateya oyo topesi bino na mokanda, bótia ye miso, bókima ye po áyoka soni. 15 Nzokande bókamata ye lokola monguna té, kasi bópesa ye toli lokola ndeko. Mapamboli pe mbote ya suka 16 Nkolo ya boboto ye moko ápesa bino boboto tango nyonso pe na ndenge nyonso. Nkolo ázala na bino nyonso. 17 Ngai moko Polo moto nakómi makambo oyo: Mbote mingi na bino. Nasinyaka mikanda na ngai nyonso boye. Botala ndenge nakómaka. 18 Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino nyonso.

1 Timoté 1

Mbote

1-2 Mbote na yo Timoté, mwana na ngai y a solo pe ndeko mokristo. Nzambe Tata pe Nkolo na biso Yezu Kristo báyokela yo mawa, bápesa yo bolamu pe boboto. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali ntoma ya Yezu Kristo po Nzambe Mobikisi na biso pe Yezu Kristo oyo totielaka mitema, batindi ngai.

Keba na balakisi ya lokuta

3 Ndenge nayebisaki yo tango nazalaki kokende na Masedwane, nalingi ótikala na Efeze, po na kopekisa bato oyo bazali koteya mateya ya lokuta. 4 Yebisa bango bátika kolanda bilobaloba pe kotanga bakombo ebele ya bakoko. Makambo ya boye ebimisaka tembe mingi, kasi ezali na tina té po na kokokisa mosala ya Nzambe oyo tokoki koyeba bobele na nzela ya bondimi. 5 Pesa bango motindo wana po bazala na bolingo oyo eutaka na motema ya peto, na makanisi ya malamu pe na bondimi ya solo. 6 Bato mosusu babungá nzela oyo, pe bámipesa na maloba ya pamba. 7 Balingaka kozala balakisi-Mibeko, bateyaka na molende nyonso, nzokande makambo oyo balobaká, bayebaka yango té. 8 Ya solo, Mibeko ezali ya malonga, soki tolandi yango na ndenge ekoki. 9 Ebongi tóyeba malamu likambo oyo: Nzambe apesá Mibeko po na bato ya malamu té, kasi po na bato ya mobulu pe ya mabe. Bango basalaka masumu ya ndenge na ndenge, batosaka Nzambe té to biloko ya bosantu, babomaká bato, ata kutu batata to bamama na bango, 10 basalaka kindumba, balalaka baninga na bango mibali; bamosusu batekaka bato na boumbu, bakosaka, bakataka seleka ya lokuta, pe basalaka makambo nyonso oyo ekoki té na mateya ya solo. 11 Mateya yango nde Sango Malamu oyo Nzambe ya lokumu pe ya esengo apesá ngai po násakola.

Polo apesi Nkolo Yezu mersi

12 Ezali Nkolo na biso Yezu Kristo moto alendisaka ngai. Napesi ye mersi po atielaka ngai motema pe aponaki ngai na mosala na ye, 13 ata nazalaki kotsiola ye, konyokola ye pe kofinga ye. Kasi ayokelaki ngai mawa po nazangaki bondimi pe nayebaki té makambo oyo nazalaki kosala. 14 Nzokande bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo eleki ndelo. Apesi ngai bondimi pe bolingo oyo eutaka na ye. 15 Ya solo, esengeli tóndima na motema moko likambo oyo: Yezu Kristo ayaki awa na se po na kobikisa bato ya masumu. Ngai nalekaki bango nyonso na mabe, 16 yango wana ye ayokelaki ngai mawa koleka, po nákóma ndakisa. Yezu Kristo alakisi bolamu na ye nyonso epai na ngai, po ámonisa polele 'tè bato ya masumu bakoki kondima ye pe kozwa bomoi ya seko. 17 Nzambe, Mokonzi ya bileko nyonso, azali se ye moko; akufaka té pe amonanaka té. Lokumu nyonso ézala na ye, na bileko nyonso seko! Amen. 18 Timoté, mwana na ngai, kanisa maloba oyo baprofete ya Eklezya balobaki likolo na yo; ózwa na yango molende po ólandaka batoli oyo nazali kopesa yo. Bunda etumba na ndenge ekoki. 19 Salela bondimi pe landaka bobele makanisi ya malamu. Bato mosusu baboyaki makanisi ya malamu, bongo bondimi na bango ebebi. 20 Imené ná Alexandre bazali na kati ya bato wana; napesaki bango na maboko ya Satan po báyeba 'tè bakoki kotsiola Nzambe té.

1 Timoté 2

Batoli po na losambo ya lisanga

1 Likambo ya liboso natindi, yang'oyo: bakristo básambelaka losambo ya ndenge na ndenge, bábondelaka Nzambe pe bapesaka ye mersi po na bato nyonso, 2 po na bakonzi ya bikolo pe bato nyonso oyo bazali kotambwisa biso, po tófanda na boboto pe kimia, bongo tokoka kokumisa Nzambe pe kozala bato ya kokoka. 'Yango ezali malamu pe malonga na miso ya Nzambe Mobikisi na biso; 4 ye nde alingi bato nyonso bábika pe bándima makambo ya solo. 5 Pamba té Nzambe azali se moko; pe moto oyo atii boyokani na kati ya Nzambe ná bato azali se moko, ye nde Yezu Kristo. Ye azwaki nzoto ya bomoto, 6 pe amipesaki po na kolongola bato nyonso na boumbu. Asalaki bongo na tango oyo Nzambe atiá, po na kolakisa 'tè Nzambe alingi bato nyonso bábika. 7 Wana nde tina Nzambe aponelá ngai názala mosakoli pe ntoma, po námemela bato ya bikolo nyonso sango ya bondimi pe ya solo. Nazali koloba makambo ya solo penza. 8 Yango wana bisika nyonso bakristo basanganaka, nalingi mibali básambelaka na mitema pembe; bátika kanda pe bátiana tembe té. 9 Basi pe ndenge moko; na tango ya losambo, nalingi bálata na ndenge ya malonga kasi na lofundu té; bálekisa ndelo té na kokangisakangisa suki, bátika kolata biloko ya or to mayaka, to bilamba ya talo mingi. 10 Kasi bápesa nzoto na bango kilo na misala na bango ya malamu, ndenge ebongi na basi oyo balobaká 'tè batosaka Nzambe. 11 Na tango ya mateya, basi báfanda nyee pe bálanda yango na ndenge ekoki. 12 Napesi bango nzela té 'tè báteya to bámitia liboso ya mibali; kasi basengeli kofanda nyee. 13 Pamba té liboso Nzambe asalaka Adamu, bongo sima ayei kosala Eva. 14 Pe moto bakosaká ezali Adamu té, kasi ezali nde mwasi; bongo ezali ye moto ya liboso abukaki mobeko ya Nzambe. 15 Nzokande Nzambe alingi basi bábota bana , bongo bakobika soki bakozala kobatela bondimi ná bolingo, pe komipesa mobimba na Nzambe na ndenge ekoki.

1 Timoté 3

Batambwisi ya Eklezya

1 Ya solo, soki moto alingi kozala motambwisi ya Eklezya, toyebi 'tè azali koluka mosala moko ya kitoko. 2 Motambwisi asengeli kozala moto ya malamu, bámona ye ata na likambo moko té ya mabe, áfanda na mwasi moko kaka, ázala moto ya lokoso té kasi ya lokumu pe ya makanisi malamu; áyeba koyamba bapaya, áyeba pe koteya bato; 3 álangwaka masanga té; átombokaka té; áswanaka té; ázala na lokoso ya mbongo té, kasi ázala nde moto ya boboto. 4 Asengeli kotambwisa libota na ye moko na ndenge ekoki, pe kobokola bana na ye malamu. 5 Pamba té soki moto ayebi kotambwisa libota na ye moko té, ndenge nini akokoka kotambwisa Eklezya ya Nzambe? 6 Moto yango ázala pe mokristo ya sika té, soki té akokóma lofundu pe akozwa etumbu ndenge zabolo azwaka. 7 Kasi ebongi ázala na lokumu na miso ya baoyo bazali bakristo té, po bámonela ye té pe ákweya na motambo ya zabolo té.

Baoyo basalisaka batambwisi

8 Basalisi ya Eklezya pe basengeli kozala bato ya lokumu oyo babalolaka maloba na bango té; bámelaka masanga mingi té, pe balukaka mbongo na mayele mabe té. 9 Bámipesa na motema moko na ba-sekelé oyo bondimi ezali kolakisa biso. 10 Esengeli bámeka bango liboso, bongo soki balongi, bakoki kozwa bango lokola basalisi ya Eklezya. 11 Basi na bango pe basengeli kozala bamama ya lokumu; bátongaka bato té, bazala na lokoso té, kasi bazala bato ya kokoka na makambo nyonso. 12 Basalisi ya Eklezya basengeli kofanda na mwasi moko kaka; bábokolaka bana na bango pe bábatelaka mabota na bango na ndenge ebongi. 13 Baoyo basalaka mosala na bango malamu bafandaka na esika ya lokumu, pe bazwaka mayele ya kosakola bondimi oyo tozali na yango na lisanga na Yezu Kristo.

Sekele monene

14 Nakómeli yo mokanda oyo, po natii motema 'tè nako-zongela yo sima ya mwa mikolo. 15 Kasi soki naumeli, yango ekolakisa yo ndenge nini osengeli kotambola na kati ya libota ya Nzambe, elingi koloba Eklezya ya Nzambe ya bomoi, oyo ezali lokola likonzi pe fondasion ya makambo Nzambe alakisá biso. 16 Ya solo, sekele oyo tondimaka na botosi nyonso, ezali monene penza! Pamba té, Kristo ayaki komonana na nzoto ya bomoto; Molimo ya Nzambe alongisaki ye. Ba-anjelu bamonaki lokumu na ye; bikolo nyonso eyoki sango na ye. Na mokili mobimba bato bandimeli ye, pe Nzambe apesá ye lokumu na Likolo.

1 Timoté 4

Baoyo bateyaka mateya ya lokuta

1 Molimo ya Nzambe alobaki polele boye na baprofete mosusu: na mikolo ya suka, bato mosusu bakotika bondimi na bango, bakobanda kolanda bato ya lokuta pe mateya ya milimo mabe. 2 Baoyo bateyaka ndenge wana bazali na mayele mabe; mitema na bango etondá na masumu. 3 Bapekisaka kobala. Balobaká 'tè bilei mosusu ezali ekila, nzokande Nzambe asalá yango nyonso, po bandimi oyo bayebi makambo ya solo bália yango, pe bápesa ye mersi. 4 Ya solo, nyonso oyo Nzambe asalá ezali malamu. Eloko moko té ezali mabe, soki tozali kopesa Nzambe mersi tango toliaka yango. 5 Pamba té maloba ya Nzambe ná losambo na bino ekómisaka biloko nyonso peto.

Mosali malamu ya Yezu Kristo

6 Soki opesi toli wana na bandeko, okozala mosali malamu ya Yezu Kristo; pe ekomonana 'tè oyekoli malamu maloba ya bondimi ná mateya ya solo oyo olandi. 7 Kima masolo ya kotsiola Nzambe, pe bilobaloba ya pamba; tia molende po ómipesa mobimba na Nzambe. 8 Molende oyo bato batiaka po na kozala nzoto makasi ezali na tina mingi té; kasi kotia molende po na komipesa mobimba na Nzambe, eleki tina na makambo nyonso; pamba té Nzambe alakaki 'tè akopesa bato na ye bolamu, na bomoi ya lelo pe na bomoi oyo ekoya. 9 Ya solo, tokoki kotia mitema na elaka yango. 10 Soki tozali komona pasi na mosala pe kobunda makasi, ezali po tosi'totii mitema na Nzambe ya bomoi, oyo azali Mobikisi ya bato nyonso, mingi penza ya baoyo bandimelaka ye. 11 Wana ezali makambo osengeli koyebisa bato pe koteya. 12 Moto moko té ámonela yo po ozali nanu elenge; kasi zala nde ndakisa ya malamu epai ya bakristo, na maloba pe na misala na yo; zala moto ya bolingo, ya bondimi pe ya motema pembe. 13 Tia molende nyonso po na kotangela bato mikanda ya Nzambe; sakolaka pe teyaka bango tii tango ngai nakoya. 14 Kobosana té 'tè Nzambe apesaki yo nguya na ye, mokolo baprofete ya Eklezya basakolaki po na yo, pe bambuta-muntu batielaki yo maboko. 15 Wana ezali mosala na yo; sala yango po bato nyonso bámona 'tè ozali kokende liboso. 16 Tia kaka molende po obongisa bizaleli na yo ná mateya na yo. Pamba té soki obandi kosala boye okobika, pe okobikisa baoyo bayokaka yo.

1 Timoté 5

1 Kogangela mobange té; kasi pesa ye toli ndenge olobaka na tata na yo. Kamata bilenge mibali lokola bandeko na yo, 2 bamama lokola mama na yo, pe bilenge basi lokola bandeko na yo, na bosembo nyonso.

Makambo etali basi bakufelá mibali

3 Tosa basi bakufelá mibali baoyo bazangá moto ya kosalisa bango. 4 Kasi soki mwasi moko akufelá mobali azali na bana to na bakoko, mokumba na bango ya liboso ezali: kolakisa bolingo na bango ya bakristo epai ya bato na bango, pe kozongisa bolamu na mama to na koko na bango ya mwasi. Wana nde makambo esepelisaka Nzambe. 5 Mwasi oyo akufelá mobali pe azangá moto ya kosalisa ye, amesaná kotia motema epai ya Nzambe; butu moi alembaka té po na kosambela pe kosenga ye lisalisi. 6 Kasi oyo alandaka bisengo ya mokili azali lokola moto akufá kala, atako azali nanu na bomoi. 7 Pesa bango toli ya ndenge wana, po bazala na bizaleli ya malamu na miso ya bato. 8 Soki moto asalisaka bandeko na ye té, pe mingi penza baoyo bafandi na ye ndako moko, abebisi bondimi, pe azali mabe koleka moto oyo andi-melaka Nzambe té. 9 Talaka malamu mokanda bakomelaka bakombo ya basi oyo bakufelá mibali. Soki mwasi akufeli mobali, bakoki kokóma kombo na ye bobele soki akokisi mbula 6 0 soki azalaki mwasi ya makangu té, 10 pe soki ayebani na bato po na misala na ye ya malamu. Bátala pe soki abokolaki bana na ye malamu, soki abandaki koyamba bapaya na ndako na ye, soki azalaki komipesa po na kosalela bakristo mosala, po na kosilisa mawa ya bato bazali na pasi, pe kosala makambo ya malamu ndenge na ndenge. 11-12 Kasi bilenge basi oyo bakufelá mibali, kokóma bakombo na bango té. Pamba té soki basi'bapesi Kristo elaka, bongo na sima batiki ye po bakomi kolanda baposa na bango pe balingi kobala lisusu, bakomema ngambo po batali elaka na bango ya liboso pamba. 13 Lisusu, lokola basalaka eloko moko té, batambolaka pamba-pamba na bandako ya bato, bakómaka kutu bato ya bilobaloba, balingaka kokota na makambo oyo etali bango té, pe babimisaka makambo oyo ebongi té. 14 Yango wana nalingi 'tè bilenge basi oyo bakufelá mibali bábala lisusu, bábota bana pe bábatelaka bandako na bango, po banguna na biso bázwa nzela ya kotónga biso té. 15 Pamba té basi mosusu bakufelá mibali basi'batiká nzela ya malamu po na kolanda Satan. 16 Soki mokristo ya mwasi azali na bandeko ya basi baoyo bakufelá mibali, esengeli ásalisa bango, átikela eklezya mokumba wana té; boye eklezya ekokoka kosalisa baoyo batikalá penza bango moko.

Makambo etali bambuta-muntu ya Eklezya

17 Bambuta-muntu oyo bazali kotambwisa eklezya malamu, bakoki kozwa lifuta mbala mibale; mingi penza baoyo bamonaka pasi na mosala ya kosakola maloba ya Nzambe pe na koteya. 18 Pamba té ekómamá boye: "Kokanga ngombe monoko té, tango ozali kosalela yango po na kobimisa mbuma ya blé"; pe "Moto ya mosala asengeli kozwa lifuta na ye". 19 Soki moto ayei kofunda mbuta-muntu moko, okoki kondimela ye bobele soki batemwen mibale to misato bamonani. 20 Soki mbuta-muntu moko abebisi, bimisa mabe na ye na miso ya bambuta-muntu nyonso, po baoyo batikali bábanga. 21 Na miso ya Nzambe, ya Yezu Kristo, pe ya ba-anjelu oyo Nzambe aponá, nasengi yo ótosa mitindo wana; kopona bilongi ya bato té, kasi sala na bato nyonso ndenge moko. 22 Soki moto alingi komipesa na mosala ya eklezya, kotiela ye maboko noki té; soki té okomema ngambo po na masumu na ye. Luka nde kobatela motema na yo ézala pembe. 23 Tika komela bobele mai, kasi melaka mwa vinu po na libumu, pamba té obelaka mbala mingi. 24 Mabe ya bato mosusu esi'eyebaná, ata basambisi bango nanu té; nzokande oyo ya bato mosusu eyebanaka bobele na sima. 25 Ndenge moko pe po na misala ya malamu: yango emonanaka polele; atako mosusu emonanaka noki té, ekoki kobombama libela té.

1 Timoté 6

Makambo etali baumbu

1 Baoyo nyonso bazali baumbu, basengeli kotosa bakonzi na bango na makambo nyonso, po moto moko té átsiola kombo ya Nzambe to mateya na biso. 2 Soki bakonzi na bango bazali bakristo, báboya kotosa bango té atako bazali kozwa bango lokola bandeko. Nzokande lokola bazali kosalela bandimi ya bolingo, basengeli kosalela bango malamu koleka.

Mateya ya lokuta pe bomengo ya solo

Wana nde makambo osengeli koteya pe kosakola. 3 Kasi ezali na bato oyo bateyaka mateya mosusu, pe balandaka té maloba ya solo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, to mateya ya bato oyo bandimeli Nzambe. 4 Bato yango basi'batondá na lofundu, pe bayebi ata eloko moko té. Babeli maladi ya kotia tembe na makambo nyonso pe ya kolobaloba pamba. Nyonso wana moto ebendaka zuwa, koswana, kofingana, makanisi mabe. 5 Bato yango batondá na tembe, mayele na bango esi'ebebá, bayebi makambo ya solo té; bakanisaka 'tè kotosa Nzambe epesaka bomengo. 6 Tembe té, soki moto alukaka bomengo ya mokili oyo té, kotosa Nzambe epesaka ye bomengo monene. 7 Pamba té toyaki maboko pamba na mokili, tokozonga maboko pamba. 8 Bongo soki tozali na bilei pe bilamba, wana ekoki na biso. 9 Kasi baoyo balukaka kozala na mbongo mingi, bakweyaka na motambo po na baposa na bango ya bozoba pe ya mabe, oyo ebebisaka bato pe ebungisaka bango. 10 Pamba té mabe nyonso eutaka na lokoso ya mbongo. Likolo na yango bato mosusu babungisaki bondimi, pe bamiyokisaki pasi mingi.

Toli

11 Kasi yo moto omipesá na Nzambe, kima makambo nyonso wana. Luka nde makambo ya bosembo, bondimi, bolingo pe boboto; zala moto ya losambo pe yebaka kokanga motema. 12 Bondimi ezali etumba moko ya malonga; tia molende po na yango, bongo okozwa bomoi ya seko oyo Nzambe abengelaki yo, mokolo osakolaki maloba ya kitoko ya bondimi, na miso ya bato ebele. 13 Boye nasengi yo na miso ya Nzambe oyo apesaká bomoi na bikelamo nyonso, pe na miso ya Yezu Kristo oyo asakolaki bondimi na ye na ndenge ya kokoka penza, tango Ponse Pilate azalaki kosambisa ye. 14 Landa makambo oyo batindaki yo; zala moto ya bosembo pe ya motema pembe, tii mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akozonga. 15 Nzambe akotinda ye na mokolo ye moko atiá. Bobele Nzambe moto azali Nkolo ya kokoka, Mokonzi ya bakonzi nyonso pe ya bato minene nyonso. 16 Kaka ye nde moto akoki kokufa té, afandaka na mboka na ye ya moi oyo moto moko té akoki kokóma. Moto moko té asi'amona ye, pe moko té akoki komona ye. Lokumu pe nguya ya seko ézala na ye. Amen. 17 Yebisa baoyo bazali na bomengo ya mokili oyo 'tè bátika lolendo, batiaka mitema na bomengo na bango té, po yango eumelaka té; kasi batiaka mitema nde epai ya Nzambe, oyo apesaká biso bomengo nyonso po tósepelaka na yango. 18 Yebisa bango basalaka makambo ya malonga; misala na bango ya malamu ékómisa bango bato ya bomengo ya solo. Bákabelaka bato biloko na bango na motema moko; 19 na ndenge wana bakonduka bomengo moko ya kitoko oyo ekoumela po na mikolo ekoya; bongo bakozwa bomoi ya solo. 20 Ndeko Timoté, batela makambo nyonso oyo Nzambe atii na maboko na yo; boya bilobaloba ya bato oyo batsiolaka Nzambe, boya pe tembe ya baoyo bamimonaka bato ya mayele. 21 Bato mosusu oyo balandaki mayele yango, bayaki kobungisa bondimi. Bolamu ya Nzambe ézala na bino.

2 Timoté 1

Mbote

1-2 Mbote na yo Timoté, mwana na ngai ya bolingo. Nzambe Tata pe Nkolo na biso Yezu Kristo báyokela yo mawa, bápesa yo bolamu pe boboto. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali ntoma ya Yezu Kristo po Nzambe akanaki boye; pamba té alakaki 'tè akopesa bato bomoi na lisanga na Yezu Kristo.

Polo apesi Nzambe mersi pe alendisi Timoté

3 Na losambo na ngai nakanisaka yo butu moi, pe napesaka mersi na Nzambe oyo nasalelaka na motema pembe, ndenge bakoko na ngai bazalaká kosala. 4 Nazali kaka kokanisa ndenge ozalaki kolela tango natikaki yo. Nazali na posa ya komona yo lisusu; boye nakotonda na esengo. 5 Nazali kokanisa ndenge obandaki kondimela Nzambe na motema moko. Kutu koko na yo ya mwasi Lois ná mama na yo Enise bazalaká pe na bondimi wana; boye natii motema 'tè yo pe ozali na yango. 6 Yango wana nasengi yo: salelaka makabo ya Nzambe oyo ozwaki tango natielaki yo maboko. 7 Tótika kobanga, pamba té tozwi Molimo ya Nzambe; ye apesaká biso nguya, bolingo pe mayele ya kozala ekenge. 8 Koyùka soni té po na kosakola sango ya NKolo na biso, to po na ngai moto nakotá boloko likolo na ye. Pamba té Nzambe apesaká yo makasi po ondima pasi esika moko ná ngai, likolo ya Sango Malamu. 9 Ezali Nzambe moto abikisaki biso, pe aponaki biso tózala bato na ye. Asalaki boye po na misala na biso té, kasi bobele po ye moko, banda kala, akanaká bongo. Asi'apesá biso bolamu na ye na lisanga na Yezu Kristo, liboso 'tè ásala mokili. 10 Bongo sik'oyo nde ayei kolakisa yango polele, awa Mobikisi na biso Yezu Kristo ayei komonana. Ye moto asukisi makasi ya liwa, pe abimiseli biso moi ya sika; yango ezali nde bomoi ezangá suka, oyo tozwi na nzela ya Sango Malamu. 11 Ye pe moto aponaki ngai, názala ntoma pe molakisi ya Sango Malamu yango. 12 Ezali po na yango nde nazali komona bapasi nyonso oyo. Kasi nazali koyokela yango soni té, po nayebi moto oyo natielaka motema; pe nayebi malamu 'tè ye akoki kobatela makambo nyonso oyo Nzambe atii na maboko na ngai, tii mokolo akoya kosambisa bato. 13 Landaka bobele maloba ya solo oyo nayebisaki yo; simba malamu bondimi pe bolingo oyo tozali na yango na lisanga na Yezu Kristo. 14 Makambo Nzambe atii na maboko na yo, bontba yango na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo afandaka na mitema na biso. 15 Oyebi 'tè bato nyonso ya région ya Efeze basundoli ngai. Na kati na bango Fijele ná Ermojene. 16 Nazali kosenga na Nkolo áyokela libota ya Onezifore mawa, pamba té azalaki kolendisa ngai mbala mingi. Ata nazali na boloko, ayokaki soni té po na ngai. 17 Tango akómaki na Rome, alukaki ngai mingi penza tii ayaki komona ngai. 18 Nkolo Yezu ábatela ye po Nzambe áyokela ye mawa, mokolo akosambisa bato. Yo pe oyebi nyonso oyo asalaki po na ngai na Efeze.

2 Timoté 2

Soda malamu ya Yezu Kristo

1 Bongo yo, mwana na ngai, bolamu oyo Yezu Kristo apesaka yo élendisa yo! 2 Makambo wana nayebisaki yo na miso ya bato ebele, yebisa yango na bato ya malonga, baoyo bakoki pe koteya bato mosusu. 3 Ndenge ngai nazali komona pasi, yo pe ndima komona pasi. Zala soda malamu ya Yezu Kristo. 4 Moto oyo amipesi na mosala ya kisoda akipaka makambo mosusu té, kasi alukaka bobele kosepelisa mokonzi na ye. 5 Pe moto oyo asalaka masano ya etumba, balongisaka ye bobele soki alandaki mibeko. 6 Moto oyo amonaka pasi na mosala ya bilanga, ye nde moto ya liboso akoki kolia biloko ya elanga na ye. 7 Yebaka malamu makambo oyo nalobi; Nkolo akopesa yo mayele ya koyeba yango nyonso. 8 Kanisaka Yezu Kristo, mwana ya David; Nzambe asekwisá ye. Wana nde Sango Malamu ngai nasakolaka. 9 Namonaka pasi po na yango; likolo na yango bakangá ngai kutu minyololo, lokola moto ya mobulu; kasi bakoki kokanga maloba ya Nzambe té. 10 Yango wana, nakangaka motema na makambo nyonso, po na baoyo Nzambe aponá, po Yezu Kristo ábikisa bango pe bázwa lokumu ya seko. 11 Ya solo penza, "Soki tokufi ná ye, tokozala pe na bomoi ná ye. 12 Soki tokangi mitema, biso na ye tokozala na bokonzi. Soki toboyi ye, ye pe akoboya biso. 13 Soki tokangani na maloba na ye té, ye akanganaka kaka na yango; pamba té akoki té koboya maloba na ye moko."

Mosali oyo Nzambe andimi

14 Loba na bakristo, bakanisaka makambo wana; yebisa bango na miso ya Nzambe 'tè bátia tembe na maloba ya pamba té, po yango ezangá tina pe ebebisaka bondimi ya baoyo balandaka yango. 15 Sala nyonso po ómonana moto ya kokoka na miso ya Nzambe; sakolaka makambo ya solo na ndenge ebongi, lokola mosali oyo ayokaka soni té likolo ya mosala na ye. 16 Kima bilobaloba ya bato oyo batsiolaka Nzambe; pamba té baoyo basololaka masolo ya ndenge wana bakabwaná penza na Nzambe. 17 Mateya na bango ezali lokola pota oyo ezali kopanzana na nzoto mobimba. Na kati na bango Imené ná Filete; 18 basi'batiká mateya ya solo pe babebisi bondimi ya bato mingi, na ndenge bazali koteya 'tè kosekwa na biso esi'esalamá. 19 Kasi fondasion ya makasi oyo Nzambe atiá epikamá kaka malamu. Likolo na yango ekómamá boye: "Nkolo Nzambe ayebi bato na ye"; pe "Moto nyonso oyo alobaká 'tè azali moto ya Nkolo, aboya makambo ya mabe." 20 Na kati ya ndako monene bazalaká na banzungu ya ndenge na ndenge. Mosusu ezali ya lokumu, esalamá na or to arjan; basalelaka yango na mikolo ya feti. Mosusu esalamá na nzete to mabelé, basalelaka yango mikolo nyonso. 21 Soki moto aboyi makambo wana ya mabe, akokani na nzungu ya lokumu; Nzambe akómisi ye moto ya bosantu, oyo abongi na misala nyonso ya malamu. 22 Yango wana ata ozali elenge, keba na baposa bilenge bazalaká na yango. Landa kaka nzela ya bosembo, bondimi, bolingo pe boboto, lisanga na baoyo babondelaka Nkolo na motema moko. 23 Kotia tembe té na makambo ya pamba pe ya bozoba; yango ebendaka bato báswana. 24 Nzokande mosali ya Nkolo akoki koswana ata moke té, kasi esengeli ázala moto ya malamu epai ya bato nyonso, áyeba koteya na ndenge ekoki, pe kokanga motema. 25 Bato oyo batiaka tembe ná ye, asengeli koteya bango na boboto penza; tango mosusu Nzambe akobongola mitema na bango po bákóma koyeba makambo ya solo; 26 bongo makanisi ya malamu ekozongela bango, pe bakolongwa na motambo ya zabolo oyo akangaki bango po bátosa ye.

2 Timoté 3

Mikolo ya suka

1 Yebaka makambo oyo: mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi, 2 pamba té bato bakokóma miyimi, lokoso ya mbongo, lofundu pe lolendo; bakozala kotsiola Nzambe pe kozanga botosi na biloko ya bosantu; bakobanda kondimela baboti na bango té, bakozala koboya kopesa mersi na bato oyo basalaka bango malamu; 3 bakokóma bato ya nko, bakoyokela bato mawa té, bakokosela baninga makambo, bakotomboka pe bakongala, bakoyina makambo ya malamu; 4 bakoteka bandeko na bango, bakosilika noki pe bakovimba na lofundu. Bakobanda kokangama bobele na bisengo ya mokili, kasi na Nzambe té. 5 Bakomilakisa lokola bato ya Nzambe, kasi bakondima nguya na ye té. Zalaka mosika ya bato ya ndenge wana. 6 Bato mosusu na kati na bango bakotaka na bandako ya bato, pe bakosaka basi ya mitema pete, oyo batondá na masumu ná baposa ya mabe ndenge na ndenge. 7 Basi yango balukaka koyekola tango nyonso, kasi bakokaka koyeba penza makambo ya solo ata moke té. 8 Ndenge banganga-kisi ya Ejipte, Janes ná Jambres bazalaká koboya makamwisi oyo Moize alakisaki bango, se bongo bato wana bazali koboya makambo nyonso ya solo. Mitema na bango ebebá, pe bondimi na bango ekómá ya pamba. 9 Nzokande bakokende mosika té, po bato nyonso bakomona 'tè bazali bazoba, ndenge ba-Ejipsien bamonaka banganga-kisi na bango.

Ndenge Timoté asengeli kosala

10 Kasi yo olandaki ngai na makambo nyonso, ndenge nateyaka, nasalaka, pe nakanaka. Omonaki bondimi ná bolingo na ngai, pe ndenge nakangaka motema pe natiaka molende. 11 Oyebi ndenge banyokolaki ngai pe bamonisaki ngai pasi na Antioshe, na Ikonium pe na Listre; banyokolaki ngai mingi penza, kasi na makama nyonso Nkolo abikisaki ngai na makambo nyonso. 12 Baoyo nyonso balingi komipesa mobimba na Yezu Kristo, bakonyokwama. 13 Kasi bato ya masumu pe ya lokuta, mabe na bango ekokóma mingi koleka; bakozala kokosa bato, nzokande bazali komikosa bango moko. 14 Bongo yo, tiaka molende na makambo oyo oyekolaki pe ondimaki na motema moko; pamba té oyebi banani bato bateyaki yo. 15 Banda bomwana na yo oyebi Mikanda ya Nzambe. Yango ekoki kopesa yo mayele po óndimela Yezu Kristo pe óbika. 16 Mikanda nyonso ya Nzambe ekómamá na nguya na ye, pe ebongi po na koteya bato pe kosukisa ndenge nyonso ya lokuta, po na kobongisa bato pe kolakisa bango nzela ya bosembo. 17 Na ndenge wana moto ya Nzambe akobonga penza, pe akokoka kosala misala nyonso ya malamu.

2 Timoté 4

1 Nakómeli yo makambo oyo na miso ya Nzambe pe ya Yezu Kristo, oyo akoya kosambisa bato nyonso, baoyo bazali na bomoi ná baoyo bakufa. Ya solo, ye akozonga pe akoya kozwa bokonzi; bongo nasengi yo na kombo na ye: 2 Sakola maloba ya Nzambe na molende nyonso, ata bandimi to té. Bimisa polele lokuta ya bato, kebisa bango pe lendisa bango; teya bango na boboto nyonso. 3 Pamba té mikolo ekoya bato bakolinga koyoka mateya ya solo ata moke té, kasi bakolanda baposa na bango moko, pe bakoluka balakisi ebele, po baya koteya bango bobele makambo oyo balingi koyoka. 4 Bakoboya mateya ya solo, pe bakobanda kotia matoi na bilobaloba ezangá tina. 5 Kasi yo, zalaka ekenge tango nyonso, ndima pasi, sakola Sango Malamu, pe kokisa mosala na yo. 6 Po na ngai, tango ya kotika mokili ekoki. Nasi'namipesi na Nzambe lokola libonza po bátangisa makila na ngai. 7 Nazali lokola moto asalaka masano: nabundaki etumba ya makofï na ndenge ekoki; nakimaki mbangu tii na suka ya momekano, nazali kaka kondimela Nkolo na motema moko. 8 Ye azali zuzi ya solo; sik'oyo nazali kozela mokolo akolongisa ngai. Akolongisa kaka ngai moko té, kasi ná baoyo nyonso bazali kozela ye na bolingo, mokolo akozonga na lokumu nyonso.

Basango ndenge na ndenge

9 Sala makasi, oya kokuta ngai awa noki. 10 Pamba té Demas atikaki ngai pe akei na Tesalonike; azali kolinga makambo ya mokili oyo. Kresans akei na Galatie pe Tite na Dalmatie. 11 Bobele Luka moto atikali ná ngai. Kamata Marko, bóya na ye nzela moko; ye moto abongi po na kosalisa ngai. 12 Natindi Tishike na Efeze. 13 Tango okoya, memela ngai nzambala oyo natikaki na Troas na ndako ya Karpos; nazali pe na posa ya mikanda, mingi penza oyo ya Nzambe. 14 Alexandre mosali-bibende, asalaki ngai mabe mingi; Nkolo akozongisela ye mabe yango. 15 Yo pe keba na ye, pamba té aboyaki mateya na biso na makasi nyonso.

Tite 1

Mbote

1-4 Mbote na yo Tite, mwana na ngai ya solo pe ndeko mokristo. Zwa bolamu pe boboto euti na Nzambe Tata pe na Nkolo na biso Yezu Kristo. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali mosali ya Nzambe pe ntoma ya Yezu Kristo epai ya bato oyo Nzambe aponá, po bándima Sango Malamu pe báyeba mateya ya solo, bongo bábanda kosepelisa ye pe kotia mitema na bomoi ya seko, oyo ye alakaká uta na ebandeli ya mokili. Nzambe, Mobikisi na biso, akosaka té. Awa tango ye atiaka ekoki, atindeli bato maloba na ye, pe apesi sango yango na maboko na ngai po násakola yango.

Mosala ya Tite na mboka Krete

5 Natikaki yo na Krete, po óbongisa makambo nyonso oyo etikalaki, pe ótia bambuta-muntu na eklezya ya vile moko moko, ndenge napesaki yo mitindo. 6 Moko moko na bango ázala na bizaleli ya malonga, pe ázala kaka na mwasi moko; bana na ye bazala bakristo pe bámonana té lokola bana ya mobulu to ya mitú makasi. 7 Pamba té batiaka motambwisi ya eklezya po átalaka makambo ya Nzambe; yango wana esengeli ázala na bizaleli ya malonga; ázala moto ya lofundu té, ya kanda té, álangwaka masanga té, áswanaka na bato té, alukaka kozwa mbongo na mayele mabe té. 8 Kasi áyambaka bapaya na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, ázala moto ya mayele, ya bosembo pe ya bosantu, pe áyebaka komibatela. 9 Asengeli kotingama bobele na mateya oyo bapesaki ye, po bato bákoka kotia mitema na maloba na ye. Boye akokoka kolendisa bato na mateya ya solo, pe kokweisa baoyo batiaka tembe. 10 Pamba té bato ebele, mingi penza na kati ya Bayuda oyo bakomi bakristo, batosaka mateya yango té; batondá bilobela, pe bakosaka bato. 11 Sukisa bango, pamba té bakotisaka mobulu na mabota pe babebisaka yango mobimba; bateyaka makambo oyo ebongi té, po bázwa mbongo na mayele mabe. 12 Moto na bango moko ya Krete, oyo bango bamonaka lokola profete, alobaki boye: "Bato ya Krete batondá lokuta; bazali banyama mabe, bagoigoi, pe balingaka kaka se kolia." 13 Nyonso oyo alobaki ezali ya solo. Yango wana kebisa bango penza, po bazala na bondimi ya solo, 14 pe bátika kolanda bilobaloba ya Bayuda, pe mitindo ya bato oyo baboyaka mateya ya solo. 15 Biloko nyonso oyo bato ya mitema peto basalelaka, ezali peto; kasi bato ya mbindo oyo bazangi bondimi, bamonaka biloko nyonso mbindo, po mayele pe mitema na bango etondá na masumu. 16 Balobaká 'tè bayebi Nzambe, kasi makambo oyo bango basalaka elakisaka 'tè bayebi ye té. Batosaka ye té; bazali bato ya mabe penza, pe bakokaka kosala ata mosala moko té ya malonga.

Tite 2

Mateya oyo ebongi na moto nyonso

1 Kasi yo, pesaka bobele batoli oyo eutaka na mateya ya solo. 2 Loba na batata oyo bakomi mibange, bazala bato ya malamu, ya lokumu pe ya mayele; na kati ya makambo nyonso bámilakisa bato ya bondimi, ya bolingo pe ya molende. 3 Loba pe na bamama oyo bakomi mibange, báfanda lokola bato ya bosantu, batangaka bato té, pe bazala baumbu ya masanga té. Báyeba kopesa batoli ya malamu, 4 bálakisa na bilenge basi oyo babalá, ndenge basengeli kolinga mibali pe bana na bango, 5 bámiba-telaka ndenge ebongi, bazala basi ya malamu pe ya mitema pembe, basalaka mosala na bandako na bango, pe batosaka mibali na bango, po moto moko té átsiola maloba ya Nzambe. 6 Ndenge moko pe yebisa na bilenge mibali 'tè bámibatelaka malamu 7 na makambo nyonso. Yo moko osengeli kopesa ndakisa ya misala malamu; teyaka mateya ya solo na ndenge ekoki; 8 salelaka maloba ya malonga pe ya kokoka. Na ndenge wana bato oyo batiaka tembe na mosala na biso bakomona soni, bakokoka koloba ata likambo moko té ya mabe oyo etali biso. 9 Yebisa baumbu batosaka bakonzi na bango pe básepelisaka bango na makambo nyonso. Bátielaka bango tembe té, 10 báyibaka bango na mayele té. Kasi bámilakisaka basali ya malamu pe ya botosi, boye bato nyonso bakokumisa mateya oyo etali Nzambe, Mobikisi na biso. 11 Pamba té Nzambe amonisi bolamu na ye na bato nyonso, po bákoka kobika. 12 Yango moto ezali kolakisa biso 'tè tótika bizaleli ya mabe pe makanisi ya mokili oyo, po tómibatela, tózala bato ya malamu pe ya bosembo na miso na ye awa na se; 13 pamba té esengo oyo ezangá suka ezali kozela biso, mokolo tokomona lokumu ya Yezu Kristo, oyo azali Nzambe monene pe Mobikisi na biso. 14 Ye amipesaki po na biso, na tina 'tè álongola biso na mabe nyonso pe áyeisa biso peto, bongo ákómisa biso bato ya mboka na ye, baoyo batiaka molende po na kokokisa misala ya malamu. 15 Wana ezali ndenge osengeli koloba pe koteya bakristo, po basalaka makambo ya malamu pe bátika oyo ya mabe. Tiaka molende penza; moto moko té ámonela yo.

Tite 3

Bizaleli ya bakristo

1 Lakisa bandeko makambo oyo basi'bayebi: Yebisa bango 'tè báyokelaka bakonzi nyonso, batosaka bango pe balukaka tango nyonso kosala misala ya malamu. 2 Bátsiolaka moto moko té, báswanaka té, bákangaka mitema pe bálakisaka boboto na bato nyonso. 3 Pamba té biso pe liboso tobungaká nzela, tozalaká bato ya nko, bazoba, batomboki, baumbu ya baposa ya mabe pe ya bisengo ya ndenge na ndenge. Tozalaká koyokana zuwa pe koyinana. 4 Kasi Nzambe Mobikisi na biso alakisi biso boboto pe bolingo na ye. 5 Abikisi biso bobele po ayokelaki biso mawa; ezali té po tokokisaki misala ya bosembo. Tango basukolaki biso na mai, tobotamaki mbala ya mibale pe tokómaki bato ya sika, na nguya ya Molimo Mosantu. 6 Ya solo, po na Mobikisi na biso Yezu Kristo, Nzambe atondisá biso na Molimo Mosantu; 7 na nguya ya bolamu na ye, akómisá biso bosembo na miso na ye, pe tozwa bomoi ya seko oyo totielaka mitema. 8 Tokoki kotia mitema na mateya wana, pe nalingi óteyaka yango na molende nyonso, po baoyo bandimaka Nzambe bámipesaka mobimba na misala ya malamu. Oyo nde likambo ya malamu pe ya tina po na bato. 9 Kasi kotia tembe ya bozoba, kotanga bakombo ebele ebele ya bakoko, koswana pe kobunda po na mibeko, boya yango. Wana ezali makambo ya pamba pe ezangá tina. 10 Soki moto ameki kokabola bandeko, pesa ye toli mbala moko to mibale; bongo soki ayokeli yo té, tika ye. 11 Yeba 'tè moto ya ndenge wana abungi nzela pe atondá na masumu; azali komilukela etumbu.

Toli ya suka

12 Nakotindela yo Artemas to Tishike. Bongo tango bango bakoya, tia molende po óya kokuta ngai na Nikopolis, pamba té nalingi náfanda kuna na tango ya malili. 13 Zenas oyo azali avoka, pe Apolos basengeli kolanda mobembo na bango; salisa bango malamu po bázanga eloko moko té. 14 Ebongi bato na biso báyebaka kosepelisa baoyo bazali koluka lisalisi. Boye bakobanda kobimisa misala ya tina. 15 Baoyo nyonso bazali awa ná ngai batindeli yo mbote. Pesa pe mbote na bandeko na biso bakristo. Bolamu ya Nzambe ézala na bino nyonso.

Filemon 1

Mbote

1-3 Mbote na yo, Filemon, ndeko ya bolingo, moninga na biso ya mosala; pe na bato ya Eklezya oyo basanganaka na ndako na yo. Mbote lisusu na Apia, ndeko na biso ya mwasi, pe na Arshipe, moninga na biso ya etumba. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, moto nakotá boloko likolo ya Yezu Kristo, pe ndeko Timoté, totindeli bino mokanda oyo.

Bolingo pe bondimi ya Filemon

4 Ndeko Filemon, mikolo nyonso napesaka Nzambe na ngai mersi po na yo, pe nakanisaka yo na mabondeli na ngai. 5 Pamba té, nayokaka sango ya bolingo na yo pe ya bondimi oyo ozali na yango, ndenge omipesá na Nkolo Yezu pe na bakristo nyonso. 6 Lokola bondimi moto esangisi yo ná bango, nazali kosenga na Nzambe 'tè bondimi yango ébimisa misala; boye óyeba makambo nyonso ya malamu oyo tokoki kosalela Kristo. 7 Ndeko, bolingo na yo epesi ngai esengo pe molende, pamba té osepelisi mitema ya bakristo.

Polo asengi likambo po na Onezime

8 Yango wana, atako Kristo apesá ngai bokonzi ya kotinda yo makambo osengeli kosala, 9 kasi nazali kosenga yo ásala yango bobele na bolingo. Ngai Polo, nasi'nakómá mpaka pe sik'oyo nazali na boloko po na Yezu Kristo; 10 nazali kobondela yo po na mwana na ngai Onezime; akómi lokola mwana oyo naboti awa na boloko. 11 Kombo na ye elakisi "moto ya tina", nzokande liboso azalaki moto ya pamba, kasi sik'oyo akómi moto ya tina po na yo pe po na ngai. 12 Bongo natindeli yo ye; azali lokola motema na ngai. 13 Nalingaki átikala penepene na ngai po asalelaka ngai na esika na yo, tango nyonso nakozala na boloko po na Sango Malamu. 14 Kasi nakokaki kosala yango té, soki yo opesi nanu nzela té: nalingi ósalisa ngai na motema moko; boye émonana 'tè natindi yo na makasi té. 15 Nakanisi Onezime akabwanaki na yo mwa mikolo oyo, po sima ózwa ye libela. 16 Pamba té sik'oyo azali lisusu moumbu na yo té, kasi azali na tina koleka moumbu; akómi ndeko ya bolingo penza po na ngai, kasi po na yo akómi lisusu ndeko ya bolingo koleka, ézala na miso ya bato to na miso ya Nkolo. 17 Soki biso na yo tozali bandeko ya solo, yamba ye lokola nde ozali koyamba ngai. 18 Pe soki asalaki yo mabe to azali na nyongo na yo, tia yango na kombo na ngai. 19 Maloba oyo ngai moko moto nakómi yango: ngai Polo nakofuta nyongo na yo. Kasi yo pe kanisa nanu nyongo na ngai, pamba té nayeelaki yo bomoi. 20 Ya solo, ndeko na ngai, nasengi yo ósalisa ngai na kombo ya Nkolo: lendisa motema na ngai na kombo ya Kristo. 21 Nayebi malamu 'tè okosala ndenge nakómeli yo; okosala kutu mingi koleka oyo nasengi yo. 22 Nasengi yo lisusu óbongisela ngai esika ya kolala, pamba té nazali kotia motema 'tè Nzambe akoyoka losambo na bino pe akozongisa ngai epai na bino. Mbote ya suka 23 Epafras, oyo azali ná ngai na boloko po na Yezu Kristo, atindeli yo mbote mingi. 24 Baninga na ngai ya mosala, Marko, Aristarke, Demas ná Luka, bango pe batindeli yo mbote. 25 Bózwa bolamu oyo euti na Nkolo Yezu Kristo.

Ba-Ebré 1

Nzambe alobelaki biso na monoko ya Mwana na ye

1 Na tango ya kala, Nzambe azalaká koloba na bakoko na biso mbala na mbala pe na bandenge ebele, na minoko ya baprofete. 2 Kasi na mikolo oyo ya suka, ayei koloba na biso na monoko ya Mwana na ye oyo atii mokonzi ya biloko nyonso; ezali ná ye nde Nzambe asalá mokili mobimba. 3 Ye akamati elongi ya Tata na ye; boye moto oyo amoni lokumu ya Mwana, amoni penza lokumu ya Nzambe. Asimbi mokili mobimba na nguya ya maloba na ye. Tango asilisi kolongola masumu ya bato, akei kofanda na Likolo, na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso.

Mwana ya Nzambe aleki ba-anjelu

4 Mwana azali Mokonzi ya ba-anjelu; ya solo, Nzambe apesaki ye lokumu monene koleka ya bango. 5 Pamba té Nzambe nanu alobá ata na anjelu moko té 'tè: "Ozali mwana na ngai; ngai moto naboti yo lelo", To pe lisusu: "Nakozala Tata na ye, bongo ye akozala mwana na ngai." 6 Kasi tango akotinda lisusu Mwana na ye ya liboso awa na mokili, akoloba boye: "Ba-anjelu na ngai nyonso basengeli kofukamela ye." 7 Po na ba-anjelu, ekómamá boye: "Ba-anjelu bazali basali ya Nzambe. Ye akómisaka bango lokola mipepe, to lokola móto ezali kopela." 8 Kasi po na Mwana, ekómamá boye: "E Nzambe, bokonzi na yo ekoumela seko; ozali kotambwisa mboka na yo na ndenge ekoki. 9 Olingi bosembo pe oboyá mabe, yango wana Nzambe na yo ayokisi yo esengo; apakoli bobele yo mafuta, na kati ya bakonzi nyonso." 10 Ekómamá lisusu boye: "Nkolo, na ebandeli yo moto opikaká mabelé; Likolo esalamá na maboko na yo. 11 Nyonso wana ekolimwa, kasi yo okotikala; yango ekolemba lokola elamba enzuluki. 12 Okogumba yango ndenge bagumbaka nzambala; pe okobwaka yango lokola elamba ya kala. Kasi yo okotikala kaka ndenge ozali; bomoi na yo ezali na suka té." 13 Pe mokolo moko té Nzambe asi'alobá boye na anjelu ata nani: "Fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo." 14 Ba-anjelu bazali bobele milimo oyo esalelaka Nzambe; atindaka bango po na kosalisa baoyo ye alingi kobikisa.

Ba-Ebré 2

Yezu moto abikisaka bato

1 Yango wana tosengeli kosimba malamu penza makambo oyo toyokaki; soki té tokobunga. 2 Maloba ba-anjelu bamemelaká bakoko, esengelaki bándima yango. Moto nyonso oyo aboyaki yango to atosaki té, azwaki etumbu na ndenge ekokaki na ye. 3 Bongo awa Nzambe apesi biso nzela ya kobika, ndenge nini tokoki kokima etumbu soki totali yango pamba? Ezali Nkolo Yezu moto asakolaki sango ya kobika wana liboso; sima bato oyo bayokaki ye, bamemelaki biso sango yango; 4 nzokande Nzambe ye moko asalaki makamwisi ya ndenge na ndenge, pe akabelaki biso Molimo Mosantu ndenge ye alingaki. 1Yezu, ndeko ya bato 5 Tozali koloba po na mokili ya sika oyo tozali kozela: Nzambe atiá yango na maboko ya ba-anjelu té. 6 Kasi esika moko na Mikanda ya Nzambe ekómamá boye: "Nzambe, moto azali nani po yo ókanisaka ye? Mwana ya moto azali nani po yo óbatelaka ye? 7 Na mwa tango moke otiaki ye na se ya ba-anjelu; sima opesi ye lokumu monene, 8 otii ye mokonzi ya biloko nyonso." Ekómamá 'tè Nzambe atii Yezu "Mokonzi ya biloko nyonso"; yango elakisi 'tè eloko moko té ekoki koboya kotosa ye. Sik'oyo tomoni nanu té 'tè biloko nyonso ezali kotosa Yezu. 9 Kasi makambo tomoni, yang'oyo: na mwa tango moke ye azalaki na se ya ba-anjelu, bongo ayei kozwa lokumu monene po na pasi oyo ayokaki. Ezali na bolamu ya Nzambe nde Yezu akufaki, po ábikisa moto nyonso. 10 Nzambe moto asalá biloko nyonso, pe ye kaka moto azali Mokolo na yango; alingaki komema bana ebele na mboka na ye va nkembo; atiá Yezu Motambwisi pe Mobikisi na bango. kokoka; 11 pamba té Yezu, ná bato oyoye akómisi bosantu, bango nyonso bazali na tata se moko, Adamu. Yango wana amonaka soni té po ábenga bango bandeko na ye; 12 alobi: "Nakoyebisa bandeko na ngai 'tè ozali Nzambe na biso; na kati ya lisanga ya bato na yo nakoyembela yo." 13 Alobi lisusu: "Nakotia motema na ngai epai ya Nzambe." Pe abakisi: "Nazali awa, ná bana oyo Nzambe apesi ngai."

Nzambe ákómisa ye moto ya

14 Lokola bana wana bazali bato, Yezu pe akómaki moto lokola bango, na tina 'tè na liwa na ye ásukisa zabolo oyo asimbá bokonzi ya liwa, 15 bongo ásilisa boumbu ya baoyo bazali kobanga liwa tango nyonso. 16 Yezu ayaki kosalisa ba-anjelu té kasi ayaki nde kosalisa bana ya Abraham. 17 Yango wana esengelaki ákokana ná bandeko na ye na makambo nyonso, po ákóma Nganga-Nzambe monene ya malamu pe ya boboto, na mosala na ye epai ya Nzambe. Na ndenge wana azweli báto na ye bolimbisi ya masumu na bango. 18 Lokola ye moko amonaki pasi na ndenge bamekaki ye, akoki kosalisa baoyo bazali komona pasi.

Ba-Ebré 3

Yezu aleki Moize

1-2 Bandeko bakristo, lokola Nzambe abengi bino nyonso, bókanisaka Yezu. Pamba té tondimi 'tè Nzambe moto atindaki ye, pe atiá ye Nganga-Nzambe na biso ya monene, bobele ndenge atiaká Moize "motambwisi ya ekolo na ye mobimba ya Israel". 3-4 Nzambe asalá bikolo nyonso. Nzokande na ekolo moko moko, moto moko kaka nde asangisá bato na yango; pe moto wana azwaka lokumu koleka bandeko na ye nyonso. Yango wana Yezu azwi lokumu monene koleka oyo ya Moize; pamba té ezali ye nde moto akómisá biso bato ya ekolo ya Nzambe. 5 Nzambe atiaká Moize "motambwisi ya ekolo na ye mobimba", elingi koloba: Moize azalaki kaka mosali oyo asengelaki koyebisa bato maloba ya Nzambe. 6 Kasi Kristo azali Mwana; ekolo ya Nzambe ezali ya ye penza. Ekolo yango ezali nde biso, soki tozali kaka kotia mitema na bilaka ya Nzambe, na molende pe na esengo nyonso.

Bato ya Nzambe bakopema

7 Yango wana Molimo Mosantu alobá boye: "Lelo soki boyoki maloba na ngai, 8-9 bozala mitú makasi té ndenge bakoko na biso basalaka, mokolo batombokaki pe bamekaki ngai na esobe ya zelo, ata bamonaki makambo nyonso oyo nasalaki, 10 mbula tuku minei mobimba. Yango wana nayokelaká bango kanda pe nalobaka: 'Bato wana bazali kobunga tango nyonso; bazali koyeba banzela na ngai té.' 11 Na kanda nyonso nakataka seleka boye: 'Bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té!' " 12 Bandeko, bókeba! Moto moko té na kati na bino ázala na motema mabe, pe átika kondimela Nzambe ya bomoi to ásundola ye. 13 Kasi awa ekómamá "lelo" bólendisanaka mokolo na mokolo, po moto moko té na kati na bino ákóma motú makasi pe alanda nzela ya masumu. 14 Tokómi bato ya Kristo bobele soki totii mitema epai ya Nzambe tii na suka, ndenge tobandelaki. 15 Ekómamá boye: "Lelo, soki boyoki maloba ya Nzambe, bozala mitú makasi té ndenge bakoko na bino basalaka mokolo batombokaki." 16 Banani bayokaka maloba ya Nzambe pe batombokelaká ye? Ezali nde bato nyonso oyo Moize abimisaki na Ejipte. 17 Banani bayokisaká Nzambe kanda mbula tuku minei mobimba? Ezali baoyo basalaki masumu pe bakufaki na esobe. 18 Banani Nzambe akatelaká seleka 'tè "Bokokota na esika na ngai ya kopema ata moke té"? Ezali nde baoyo baboyaki kotosa ye. 19 Ya solo, bakokaki kokota té, po baboyaki kondima.

Ba-Ebré 4

1 Nzambe atikeli biso elaka 'tè tokokota na esika na ye ya kopema. Yango wana tókeba makasi penza, po moto moko té na kati na bino ákweya likolo ya mabe na ye. 2 Pamba té tosi'toyoki elaka ya Nzambe, bobele ndenge bakoko bayokaka. Nzokande elaka yango ememelaká bango bolamu moko té, po bandimaki yango té. 3 Bobele soki tondimi, wana nde tokokota na esika na ye ya kopema. Nzambe alobaká: "Na kanda nyonso nakataka seleka boye: bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té." Kasi tango Nzambe asalaka mokili, asilisaki misala na ye. 4 Pamba té ekómamá boye po na mokolo ya sambo: "Na mokolo ya sambo Nzambe asilisaki misala na ye nyonso, bongo apemaki." 5 Nzokande na sima alobaká boye: "Bakokota na esika na ngai ya kopema ata moke té." 6 Bakoko bayokaka elaka ya Nzambe kasi bakotaki kuna té po baboyaki kondima; yango elakisi 'tè bato mosusu bakoki kokota. 7 Ya solo, Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, pe abengaki yango "lelo"; pamba té sima ya bambula ebele alobaki boye na nzembo ya David: "Lelo, soki boyoki maloba na ngai, bozala mitú makasi té." 8 Epai Jozué amemaká bakoko, yango té moto ezali "esika ya kopema" oyo Nzambe alobaki; pamba té atiaki mokolo mosusu. 9 Ya solo, Nzambe abongisela bato na ye esika mosusu ya kopema. 10 Yezu nde moto akotaki na esika wana pe apemaki, asilisaki misala na ye ndenge Nzambe asilisaká oyo ya ye. 11 Bongo tósala makasi po tókota na esika wana ya kopema; moto moko té alanda ndakisa ya bakoko oyo baboyaka kotosa. 12 Pamba té maloba ya Nzambe ezali na bomoi pe na nguya. Yango eleki kutu mbeli ya etumba oyo ya mino mibale. Maloba yango ekotaká tii na se ya mitema ya bato, pe elakisaka makambo nyonso oyo ebombamá, bongo ebimisaka baposa pe makanisi ya mitema na bango. 13 Eloko moko té ekoki kobombama Nzambe. Nyonso emonanaka polele penza na miso na ye. Mokolo ezali biso nyonso tokosamba epai na ye.

Yezu azali Nganga-Nzambe monene

14 Makambo oyo tondimi, tósimba yango makasi. Pamba té tozali na Nganga-Nzambe monene koleka, oyo asi'akómá penza epai ya Nzambe, na Likolo; ye nde Yezu, Mwana ya Nzambe. 15 Nganga-Nzambe na biso ya monene ayebi 'tè toyokaka pasi po tozangi makasi. Ye pe ayokaki pasi lokola biso; amekamaki na ndenge nyonso, bobele ndenge bamekaka biso; kasi ye akweyaki na masumu té. 16 Yango wana tótia molende, tópusana penepene ya Kiti ya Nzambe ya bolamu nyonso. Ye akoyokela biso mawa pe akopesa biso bolamu na ye; akosalisa biso na tango ya pasi.

Ba-Ebré 5

1 Nganga-Nzambe monene nyonso azali moto oyo aponami po asalelaka Nzambe na kombo ya bato, pe ápesaka ye mabonza nyonso oyo bamemelaka ye po na kosenga bolimbisi ya masumu. 2 Akoki kolakisa boboto epai ya baoyo bazangi mayele pe babungi nzela, pamba té ye moko azangi makasi. 3 Yango wana, ndenge apesaká Nzambe mabonza po na masumu ya bato, asengeli pe kopesa yango po na masumu na ye moko. 4 Moto moko té akoki komitia na ebonga wana; ezali nde Nzambe moto aponaká ye, ndenge aponaká Aaron. 5 Ndenge moko pe Kristo amipesaki ye moko lokumu ya kozala Nganga-Nzambe monene té, kasi Nzambe moto ayebisaki ye 'tè: "Ozali Mwana na ngai; ngai moto naboti yo lelo." 6 Pe epai mosusu alobaki: "Ozali Nganga-Nzambe ya libela, na molongo ya Melkisedek." 7 Tango azalaki awa na mokili, Yezu abondelaki Nzambe oyo akokaki kobikisa ye na liwa, asambelaki ye na mongongo makasi, pe alelaki mai na miso; bongo Nzambe ayokelaki ye po na botosi na ye. 8 Atako azalaki Mwana ya Nzambe, na bapasi nyonso oyo amonaki ayaki koyeba eloko oyo bábengaka kotosa. 9 Pe lokola asi'akómá moto ya kokoka, akoki kobikisa libela baoyo nyonso batosaka ye; 10 pamba té Nzambe atiá ye Nganga-Nzambe monene na molongo ya Melkisedek.

Kotika bondimi té

11 Likolo ya makambo oyo, tozali na maloba ya kobakisa; kasi ezali pasi po na kolimbola yango, pamba té bosimbaka makambo noki té. 12 Banda kala ebongaki bozala balakisi ya bato mosusu, kasi bozali kaka na posa ya kozwa lisusu mateya ya liboso na makambo etali Nzambe. Bokoki nanu té po na kolia biloko ya makasi, kasi esengeli bobele bápesa bino mabéle. 13 Moto oyo amelaka kaka mabéle azali nanu mwana moke, akoki té koyeba makambo ya bosembo to ya lokuta. 14 Nzokande bobele bakolo bato bakoki kolia biloko ya makasi; bango nde bayebi malamu ná mabe.

Ba-Ebré 6

1 Bongo tóluka kozwa mateya oyo ekoki na bakolo. Tótika mateya oyo bapesaka na bakristo ya sika. Yango ezali: kotika misala oyo ememaka liwa, pe kondimela Nzambe; 2 koyoka mateya po na ndenge nyonso ya kobatisa bato, pe ya kotiela bango maboko; to pe ndenge Nzambe akosekwisa bato pe akokata makambo na bango libela. 3 Tókende liboso, soki Nzambe apesi biso nzela. 4 Pamba té bakristo bazali bato oyo bondimi esi'efungolá bango miso, ekómisá bango bato ya Molimo Mosantu, pe emonisá bango bolamu ya makabo ya Nzambe, 5 ya maloba na ye, pe ya nguya ya bomoi oyo bazali kozela. 6 Bongo soki bakristo bakwei, loba 'tè babomi Mwana ya Nzambe na kuruze mbala ya mibale, pe bayokisi ye soni na miso ya bato; boye nzela moko ezali té ya kobenda bango po bábongola lisusu mitema. 7 Bókanisa ndenge Nzambe abenisaka mabelé. Mai ya mbula ekotelaka yango mbala na mbala, bongo mabelé ebotaka mbuma pe eleisaka bato oyo basalaka bilanga. 8 Kasi soki eboti bobele basende, mabelé yango ezali pamba; etikali moke Nzambe ápesa yango etumbu, bongo bakozikisa yango na móto. 9 Bandeko ya bolingo, ata tolobi bongo, tozali kaka kotia mitema 'tè bozali kolanda nzela ya malamu pe bokobika. 10 Pamba té Nzambe azali bosembo; abosani mosala na bino té to bolingo oyo bolakisaki ye, pe bozali kosalisa bandeko na bino bakristo na kombo na ye tii lelo. 11 Tolingi kaka 'tè moto nyonso na kati na bino átia molende tii na suka, po 'tè makambo oyo botielaka mitema-ésalama. 12 Bákóma bato ya goigoi té, kasi balandaka ndakisa ya baoyo bazwaka bolamu Nzambe alakaki, po bazali kondimela ye na molende nyonso.

Elaka ya Nzambe

13 Tango Nzambe apesaká elaka na Abraham, akataki seleka na kombo na ye moko, pamba té moto mosusu oyo aleki ye na monene azali té. 14 Alobaká boye: "Nakobenisa yo mingi koleka, pe nakopesa yo libota moko ya monene penza." 15 Abraham akangaki motema, yango wana azwaki bolamu oyo Nzambe alakaki ye. 16 Tango bato bakataka seleka, batangaka kombo ya moto oyo aleki bango na monene; pe na ndenge wana tembe nyonso esilaka libela. 17 Nzambe alingaki kolakisa polele 'tè akobongola makanisi na ye ata moke té; yango wana akataki seleka, po tembe moko té ézala epai ya baoyo basengeli kozwa bolamu ye alakaki. 18 Makambo oyo nyonso mibale, elaka pe seleka, ezali ya libela; pamba té Nzambe akoki kokosa té. Yango wana biso tokómi molende penza, totiká nyonso pe totii mitema 'tè tokozwa bolamu wana. 19 Ya solo, elikya yango ezali lokola longo oyo ekangaka masuwa; yango moto esimbá mitema na biso, awa tozali kokende tii na esika Nzambe abombamá, sima ya Ridó, na Ndako na ye ya Likolo. 20 Yezu asi'akotá kuna po na kobongisela biso nzela; akómá Nganga-Nzambe monene ya libela, na molongo ya Melkisedek.

Ba-Ebré 7

Melkisedek, Mokonzi pe Nganga-Nzambe

1 Melkisedek azalaki mokonzi ya mboka Salem pe Nganga-Nzambe; azalaki kosalela Nzambe ya Likolo. Tango Abraham autaki kolonga bakonzi minei na etumba, Melkisedek akendeki kokutana na ye na nzela, pe abenisaki ye; 2 bongo Abraham afutaki ye mpaku ya Nzambe, apesaki ye eteni moko na kati ya biteni zomi ya biloko nyonso oyo abotolaki na etumba. Kombo "Melkisedek" elakisi: Mokonzi ya bosembo; ye azalaki pe mokonzi ya Salem, yango elakisi: Mokonzi ya boboto. 3 Moto moko té ayebi tata na ye to mama to bakoko na ye, ézala kutu ndenge ye abotamaki to ndenge akufaki. Akokani ná Mwana ya Nzambe: azali Nganga-Nzambe ya libela. 4 Bomoni! Azalaki moto monene penza! Abraham, koko na biso afutaki ye mpaku; na kati ya biloko oyo azwaki, apesaki ye ndambo eleki kitoko. 5 Mibeko ya Moize elobá 'tè bato ya libota ya Levi, baoyo bazali banganga-Nzambe, basengeli kofutisa bato ya Israel mpaku ya Nzambe; boye bafutisaka bandeko na bango, atako bango pe bazali bana ya Abraham. 6 Melkisedek azalaki moto ya libota ya Levi té; ata bongo afutisaki Abraham mpaku, pe abenisaki moto oyo Nzambe apesaká elaka. 7 Nzokande tembe ezali té: moto oyo abenisaka, aleki oyo babenisi. 8 Bókanisa lisusu: banganga-Nzambe oyo bafutisaka bato ya Israel mpaku, bazali kaka bato; basengeli kokufa. Kasi po na Melkisedek ekómamá 'tè azali na bomoi. 9 Tokoki kutu koloba 'tè tango Melkisedek afutisaki Abraham mpaku, afutisaki yango Levi pe ná bana na ye oyo bafutisaka bato ya Israel. 10 Pamba té ata Levi abotamaki nanu té, kasi azalaki na kati ya mokongo ya koko na ye Abraham, tango Melkisedek akutanaki na ye.

Nganga-Nzambe ya molongo ya Melkisedek

11 Na kati ya Mibeko ya Moize, kinganga-Nzambe ya bato ya libota ya Levi ezalaki likambo ya tina penza; nzokande kinganga-Nzambe wana ekokaki kobongisa makambo nyonso té. Yango wana Nzambe asi'atiá nganga-Nzambe mosusu; ye azali na molongo ya Aaron té kasi ya Melkisedek. 12 Tembe té, awa Nzambe abongolá kinganga-Nzambe, abongolá pe Mibeko. 13-14 Pamba té maloba wana ya Nzambe ezali po na Nkolo na biso Yezu. Ye azali moto ya ekolo ya Levi té kasi ya Yuda. Na ekolo wana, moto moko té asi'asalá mosala na mesa ya Nzambe; pe tango Moize apesaká mibeko etali banganga-Nzambe, atangaká kombo ya libota wana té. 15 Ya solo tembe esili: kinganga-Nzambe ya libota ya Levi ekómi na suka, awa Nganga-Nzambe mosusu abimi oyo akokani na Melkisedek. 16 Ye azali na nguya ya bomoi oyo esilaka té; aponami té po na mibeko oyo ezalaki kotala ndenge bato bazalaki kobotama. 17 Ekómamá boye: "Ozali Nganga-Nzambe ya libela, na molongo ya Melkisedek." 18 Nzambe alongolá Mibeko ya kala, po yango ezangaki makasi pe ezalaki na tina té. 19 Pamba té Mibeko ya Moize ebongisaki ata eloko moko té. Sik'oyo tokómi kotia mitema na bolamu moko ya koleka, boye tokoki kopusana penepene ya Nzambe. 20 Yango emonani pe na ndenge Nzambe akataki seleka. Tango bato ya libota ya Levi bakomaká banganga-Nzambe, ye akataka seleka té; 21 nzokande akataki yango tango atiaki Nganga-Nzambe ya sika. Alobaki na ye boye: "Nakateli yo seleka, nakowangana yango té: OzaK Nganga-Nzambe ya Kbela." 22 Seleka yango elakisi 'tè Yezu azwi lokumu monene koleka, boye amemeli bato Boyokani oyo eleki malamu. 23 Pe lisusu, banganga-Nzambe wana bazalaki ebele, po bazalaki kokufa, bakokaki koumela té. 24 Kasi Yezu akoumela libela; kinganga-Nzambe na ye ezali po na seko. 25 Yango wana akoki kobikisa libela baoyo balingi kopusana penepene ya Nzambe na lisalisi na ye, pamba té akoumela seko po álobela bango epai ya Nzambe. 26 Ya solo, ebongaki kaka tózala na Nganga-Nzambe monene ya ndenge wana. Ye azali moto ya bosantu pe ya motema pembe; azali na mabe ata moko té. Nzambe alongolá ye na kati ya bato ya masumu, pe atombolá ye na Likolo. 27 Ye azali lokola banganga-Nzambe ya libota ya Levi té; asengeli té kopesaka mabonza mikolo nyonso, liboso po na masumu na ye moko, pe sima po na oyo ya bato. Ye asi'apesá libonza mbala moko libela, tango amipesaki ye moko. 28 Pamba té banganga-Nzambe oyo Mibeko ya Moize ezalaki kotia, bazalaki bato ya kokoka té; nzokande Mibeko ekómi na suka. Seleka oyo Nzambe akatá, etiá Mwana na ye Nganga-Nzambe monene, oyo ye akómisá libela moto ya kokoka.

Ba-Ebré 8

Yezu azali Nganga-Nzambe na biso ya sika

1 Makambo nyonso oyo touti koloba elakisi 'tè tozali na Nganga-Nzambe monene ya ndenge wana. Ye afandi na Likolo na esika ya lokumu, penepene ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe; 2 asalelaka Nzambe na Ndako ya bosantu ya solo, oyo etóngamá na Nzambe kasi na bato té. 3 Nganga-Nzambe nyonso aponamaka po na kopesa Nzambe mabonza. Boye esengeli Yezu pe ázala na eloko moko ya kopesa na Nzambe. 4 Soki azalaki awa na mokili, mbele akokaki kozala Nganga-Nzambe té; pamba té banganga-Nzambe bazali, baoyo bapesaka Nzambe mabonza na ndenge Mibeko ezali kotinda. 5 Nzokande Nzambe azali na Likolo; boye mosala bango basalaka ezali bobele ndakisa ya makambo oyo elekaka kuna. Ezali na tina wana nde Nzambe akebisaká Moize, tango ye alingaki kotónga Ndako ya kapo; alobaká boye: "Tala malamu; sala yango nyonso na ndenge nalakisaki yo na likolo ya ngomba." 6 Kasi mosala oyo Yezu azwi eleki ya banganga-Nzambe ya libota ya Levi, kaka ndenge Boyokani ye amemi eleki oyo ya kala. Pamba té yango euti na bilaka ya Nzambe oyo eleki malamu. 7 Nzambe alingaki kosala Boyokani ya mibale té, soki oyo ya liboso ezalaki ya kokoka. 8 Kasi lokola amonaki yango mabe, alobaki boye: "Mokolo ezali, nakosala Boyokani ya Sika ná ekolo ya Israel pe ya Yuda. 9 Yango ekozala té lokola oyo nasalaka ná bakoko na bango, tango nasimbaki bango na maboko po na kobimisa bango na Ejipte. Oyo wana bango babebisaki yango. Yango wana nasundolaki bango. Ngai Nkolo moto nalobi boye. 10 Kasi Boyokani oyo nakosala ná ekolo ya Israel sima ya mikolo, ekozala boye: nakotia mibeko na ngai na mitú na bango, nakokóma yango na mitema na bango. Ngai nakozala Nzambe na bango, pe bango bakozala ekolo na ngai. 11 Moto moko té akozala lisusu na tina ya koloba na moninga na ye to na ndeko na ye 'tè: 'Yebaka Nkolo!' Pamba té bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na bana mike tii na bamikolo. 12 Nakolimbisa mabe na bango, nakokanisa masumu na bango lisusu té." 13 Awa Nzambe alobaká 'tè akosala Boyokani ya Sika, alakisi 'tè oyo ya liboso ekómi ya kala. Nzokande soki eloko ekómi ya kala pe enuni, etikali moke ékufa.

Ba-Ebré 9

Losambo ya Boyokani ya Kala

1 Boyokani ya liboso ezalaki na mitindo po na ndenge ya kosambela; ezalaki pe na esika ya kosambela oyo bato babongisá. 2 Batóngaki Ndako ya kapo boye: eteni na yango ya liboso bazalaki kobenga yango "esika ya bosantu". Kuna ezalaki na mwinda, mesa, pe mapa ya kopesa na Nzambe. 3 Bongo eteni ya mibale sima ya ridó, bazalaki kobenga yango "esika eleki bosantu". 4 Kuna batiaki mesa ya or po na kotumbela malasi, pe sanduku ya Boyokani oyo bapakolá or. Na kati na yango ezalaki na nzete ya Aaron oyo ebimisaki makasa, pe mabanga oyo bakómá mibeko ya Boyokani, ná elokú moko ya or oyo batiá "mane". 5 Na likolo ya sanduku, ba-Sheriben ezalaki kozipa Kiti ya bolimbisi esika Nzambe azalaki kofanda. Kasi tozali na tina ya kolimbola yango nyonso té. 6 Boye Ndako ya bosantu ezalaki na biteni mibale. Banganga-Nzambe bazalaki kokota mikolo nyonso na eteni ya liboso, po na kokokisa misala na bango. 7 Kasi bobele Nganga-Nzambe monene moto azalaki kokota na eteni ya mibale. Abandaki kosala bongo se mbala moko na mbula mobimba, pe asengelaki komemela Nzambe makila ya banyama, oyo azalaki kopesa ye likolo ya masumu na ye moko pe ya bato. 8 Boye Molimo Mosantu alakisi 'tè tango nyonso oyo basengelaki kokumisa Nzambe na Ndako ya bosantu wana ya kala, nzela ya kokotela na esika ya bosantu ya solo ezalaki kaka ya kokangama. 9 Ndako wana ya kala ezali kolakisa ndenge makambo ya mikolo oyo ezali: mabonza ya ndenge na ndenge oyo bapesaka na Nzambe, yango té moto ekoki kobongisa motema ya moto oyo azali kosalela Nzambe. 10 Nyonso wana etali kaka kolia, komela pe ndenge ya kosukola mai. Ezali bobele makambo bato basalaka; Nzambe atikaki yango kaka tii tango ayei kobimisa ndenge ya sika ya kosambela.

Losambo ya Boyokani ya Sika

11-12 Kasi Kristo asi'ayá, asi'alongolá bato na boumbu libela. Ye azali Nganga-Nzambe monene; ezali nde ye moto azweli bato bolamu oyo Nzambe apesi bango sik'oyo. Asalaka mosala na ye na Ndako ya bosantu ya monene pe ya lokumu koleka oyo ya kala; batóngá yango na bato té; elakisi 'tè ezali ya mokili oyo té. Akotaki na esika eleki bosantu mbala moko libela; apesaki Nzambe makila ya bataba té to ya bangombe, kasi apesaki nde makila na ye moko. 13 Soki moto akómi mbindo, banganga-Nzambe ya libota ya Levi bazalaká kobwakelabwakela ye makila ya taba to ya ngombe, to pe putulu ya ngombe bazikisá; na ndenge wana bazalaká kokómisa nzoto na ye peto na miso ya Nzambe. 14 Tembe ezali té, awa Kristo amipesaki ye moko na nguya ya Molimo ya seko, apesaki Nzambe libonza oyo ebebá ata esika moko té. Boye makila na ye ekómisaka mitema na biso pembe, pe elongolaka biso mbindo ya misala oyo ememaka liwa, po tósalela Nzambe ya bomoi. 15 Wana ezali ndenge Kristo amemelaki bato Boyokani ya Sika. Liwa na ye ezweli bango bolimbisi ya mabe oyo babandaká kosala tango bazalaká kolanda Boyokani ya liboso. Boye baoyo Nzambe abengi bakoki kozwa libela bolamu oyo ye alakaki bango. 16 Soki moto ayokani ná bandeko na ye po átikela bango biloko sima ya liwa na ye, esengeli 'tè ákufa liboso, bongo bandeko wana bakoki kozwa biloko na ye. 17 Boyokani ya ndenge wana ezangaka tina tango moto yango azali nanu na bomoi. Ekómaka ya kokoka bobele soki ye akufi. 18 Yango wana, tango Boyokani ya liboso ebandaká, batangisaki makila. 19 Tango Moize asilisaki kosakola mitindo nyonso ya Mibeko na miso ya bato, akamati makila ya bangombe basangisá na mai, pe abwakelibwakeli mikanda ya Mibeko pe bato. Asaleli mwa-nzete ya izope oyo bakangisá bapwale ya motane. 20 Bongo alobi: "Oyo ezali makila ya Boyokani Nzambe asali ná bino." 21 Sima, Moize akamati ndambo ya makila, pe abwakibwaki na Ndako ya bosantu pe na biloko nyonso oyo bazalaki kosalela po na losambo. 22 Po na kolongola mbindo ata ya ndenge nini, mbala mingi Mibeko ezalaki kotinda basalelaka makila; pe soki batangisi makila té, Nzambe azalaki kolimbisa masumu té.

Kristo amipesaki po na kolongola masumu

23 Makambo ya Boyokani ya Kala ezali ndakisa ya oyo ezali koleka na Likolo. Lokola bapesaka Nzambe mabonza po na kokóma peto, esengeli bápesa ye mabonza ya malonga koleka, po na kokóma peto na Likolo. 24 Pamba té Kristo akotaki té na Ndako ya bosantu oyo batóngá na bato; yango ezalaki bobele ndakisa ya Ndako ya bosantu ya solo. Boye ye akotaki na Likolo penza. Kuna nde epai azali kolobela biso sik'oyo na miso ya Nzambe. 25 Pe lisusu, mbula na mbula nganga-Nzambe monene ya Boyokani ya Kala akotaka na esika ya bosantu po na kopesa Nzambe libonza ya makila ya nyama. Nzokande Kristo amipesaki na Nzambe mbala mingi té. 26 Soki té asengelaki komona pasi mbala ebele banda ebandeli ya mokili. Kasi ayaki bobele mbala moko, amipesaki na Nzambe na eleko oyo ya suka, po na kolongola masumu ya bato. 27 Moto nyonso asengeli kokufa mbala moko libela; bongo na sima Nzambe akosambisa ye. 28 Yango wana pe Kristo amipesaki mbala moko, po álongola masumu ya bato. Ye akomonana mbala ya mibale, kasi ekozala po na kolongola masumu té. Akoya nde po na kobikisa libela baoyo bazali kozela ye.

Ba-Ebré 10

1 Mibeko ya Moize ememelaki bato makambo ya solo té, kasi ezalaki kaka kolakisa elili ya bolamu oyo esengelaki koya. Mibeko ekoki té kobongisa bato oyo balingi kopusana penepene ya Nzambe. Yango wana mbula na mbula bapesaka kaka mabonza ya ndenge moko. 2 Soki bato oyo básambelaka Nzambe ndenge wana bazwaki bolimbisi ya solo, mbele balingaki koyeba 'tè bazali na masumu lisusu té, pe bakokaki kotika libela kopesa mabonza. 3 Kasi mbula na mbula bango basengeli kopesa mabonza wana, po bakanisaka masumu na bango. 4 Pamba té makila ya bangombe to ya bataba ekoki kolongola masumu ata moke té. 5 Yango wana, tango Kristo ayaki awa na se, alobaki na Nzambe boye: "Mabonza nyonso oyo bapesaka yo, olingaka yango té; kasi opesaki ngai nzoto. 6 Osepelaka té na banyama oyo bazikiselaka yo, to oyo bapesaka po na masumu. 7 Bongo nalobi: tala nayei po na kosala makambo oyo yo olingi, ndenge ekómamá po na ngai na Mikanda ya bosantu." 8 Liboso alobi: "Mabonza nyonso oyo bapesaka yo, ézala banyama oyo bazikiselaka yo to oyo bapesaka po na masumu, olingaka yango té"; atako bapesaka yango ndenge Mibeko ezali kotinda. 9 Bongo abakisi: "Tala nayei, po na kosala oyo yo olingi." Yango elakisi 'tè Kristo alongoli ndenge ya kala ya kosambela, pe abandi ndenge ya sika. 10 Ya solo, Yezu Kristo akokisaki makambo oyo Nzambe alingaki; awa amipesaki mbala moko, akómisaki biso bato ya bosantu. 11 Mokolo na mokolo banganga-Nzambe nyonso bakokisaka mosala na bango; tango nyonso bapesaka bobele mabonza ya ndenge moko, oyo ekoki kolongola masumu ya bato ata moke té. 12 Nzokande Kristo apesaki bobele libonza moko, po na kolongola masumu libela. Sik'oyo afandi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe, 13 azali kozela mokolo Nzambe akotia banguna na ye na se ya makolo na ye. 14 Boye, na nguya ya libonza se moko wana, Kristo akómisi bango bato na ye ya bosantu, akómisi bango libela bato ya kokoka. 15 Molimo Mosantu nde moto azali kolakisa biso yango; pamba té alobaká boye: 16 "Boyokani oyo nakosala ná bango sima ya mikolo, ekozala boye: na kotia mibeko na ngai na mitú na bango, nakokóma yango na mitema na bango. 17 Masumu na bango pe mabe na bango nakokanisa yango lisusu té." 18 Bongo soki Nzambe alimbisi masumu ya bato libela, tina ya kopesa mabonza po na masumu ezali lisusu té.

Biso tómipesa na Kristo

19 Yango wana, bandeko, po na makila ya Yezu, toyebi 'tè tokokota na esika oyo eleki bosantu, 20 sima ya Ridó; yango nde bomoto na ye. Ye asi'afungoleli biso nzela ya sika, po tókóma kuna pe tózwa bomoi. 21 Tozali na Nganga-Nzambe monene oyo Nzambe atiá Motambwisi ya ekolo na ye. 22 Boye tópusana penepene ya Nzambe na motema moko, na bondimi nyonso; pamba té Nzambe asi'alongolá masumu na biso; mitema na biso esi'ekómá pembe, pe basukolá biso na mai ya peto. 23 Tolobaka 'tè tozali kotiela Nzambe mitema; tólemba té, tótia kaka molende, pamba té Nzambe akokokisa elaka na ye. 24 Tókanisanaka biso na biso; tólendisanaka po tólingana pe tósalaka misala ya malamu. 25 Bato mosusu na kati na bino babandi koboya kosangana; bósala boye té, kasi bólendisana bino na bino, po bozali komona 'tè mokolo ya Nkolo ebandi kokóma penepene. 26 Pamba té biso bato tosi'tozwi mateya nyonso ya solo, soki tobandi kosala masumu ndenge mitema elingi, libonza moko té ezali oyo ekoki kolongola masumu. 27 Etikali bobele tóbanga ndenge Nzambe akokatela bato etumbu, pe ndenge akongalisa moto oyo ekozikisa banguna na ye. 28 Moto nyonso oyo aboyi kotosa Mibeko ya Moize, basengeli koboma ye ata mawa té, soki batemwen mibale to misato balobi mabe na ye. 29 Tembe té, etumbu monene koleka ezali kozela moto oyo amoni Mwana ya Nzambe pamba, atsioli makila ya Boyokani ya Sika, oyo elongolaki masumu na ye, pe afingi Molimo oyo amemelaki ye bolamu ya Nzambe. 30 Pamba té toyebi Moto oyo alobaká 'tè: "Ngai moto nakozongisela bango mabe; ngai nde moto nakopesa bango etumbu"; pe lisusu: "Nkolo akosambisa bato ya ekolo na ye." 31 Ezali likambo moko ya somo penza soki moto akwei na maboko ya Nzambe ya bomoi. 32 Bókanisa mikolo ya ebandeli, tango Nzambe afungolaki bino miso; bobandaki kobunda na bapasi mingi, pe bozalaki kaka kokanga mitema. 33 Na kati na bino, bamosusu bazalaki kofingama pe konyokwama na miso ya bato; kasi bino nyonso bondimaki kozala lisanga moko ná bango. 34 Bozalaki koyoka pasi ná bato ya boloko; pe tango babotolaki biloko na bino, bozalaki kondima yango na esengo nyonso, po boyebaki 'tè bozali na bomengo oyo eleki malamu pe ekoumela seko. 35 Sik'oyo bótia kaka molende, po yango moto ekozwela bino lifuta moko ya monene. 36 Bobele soki bokangaka mitema nde bokokokisa makambo Nzambe alingi, pe bokozwa bolamu oyo ye alakaki. 37 Pamba té ekómamá boye: "Etikali moke, kutu moke penza, moto oyo asengeli koya, áya, akoumela té. 38 Bongo moto na ngai oyo akómi bosembo po na bondimi, akobika. Kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te." 39 Biso tozali kozonga sima té, tokobunga té; kasi tondimi 'tè Nzambe akobikisa biso.

Ba-Ebré 11

Bondimi

1 Soki moto azali na bondimi, asi'azwi eloko oyo atielaka motema, ayebi makambo oyo emonanaka na miso té. 2 Na tango ya kala, Nzambe andimaka bato mosusu po na bondimi na bango. 3 Po na bondimi na biso, toyebi 'tè Nzambe asalá Likolo na se na maloba na ye. Boye, biloko nyonso oyo emonanaka, eutá na oyo emonanaka té. 4 Abel, po na bondimi na ye, apesaká Nzambe mabonza ya malonga koleka ya Kaina. Po na bondimi na ye Nzambe alakisaki 'tè azali moto ya bosembo, pamba té amonisaki polele 'tè asepelaki na mabonza na ye. Atako Abel akufá kala, ndakisa na ye ezali koteya biso tii lelo. 5 Enok, po na bondimi na ye, akufaká té. Nzambe amemaká ye na Likolo po ázala epai na ye, yango wana azalaki komonana lisusu té. Liboso 'tè átombola ye, Nzambe ayebisaká Enok 'tè azalaki kosepela na ye. 6 Kasi soki moto azali na bondimi té, akoki kosepelisa Nzambe té. Bongo moto nyonso oyo alingi kopusana penepene ya Nzambe, asengeli kondima 'tè Nzambe azali, pe apesaká lifuta na baoyo bazali koluka ye. 7 Noé, po na bondimi na ye, atosaka tango Nzambe alakisaka ye makambo oyo ekoya, pe atongaká masuwa po na kobikisa libota na ye. Na ndenge wana amonisaki mabe ya bato, pe akómaki moto ya bosembo po na bondimi na ye. 8 Abraham, po na bondimi na ye, atosaka tango Nzambe abengaki ye. Akendeki na mboka oyo Nzambe alakaká ye 'tè akozwa yango. Atikaki mboka na ye po na kokende na esika ayebaki té. 9 Po na bondimi na ye, akómaki kofanda lokola mopaya na mabelé oyo Nzambe alakaká ye. Azalaki kolala na ndako ya kapo, esika moko ná Izaak pe Jakob, pamba té bango pe bazwaká elaka wana. 10 Abraham azalaki kozela vile oyo ekoumela, oyo Nzambe akanaká kosala; bobele ye pe moto atóngá yango. 11 Sara pe, po na bondimi na ye, azwaka nguya ya kobota mwana, atako akómaki penza mobange; atiaki kaka motema 'tè Nzambe oyo apesaki ye elaka akokokisa yango. 12 Na ndenge wana moto se moko, Abraham, atako akómaki mpaka penepene ya kokufa, abotaki bana ebele. Bazali mingi koleka minzoto ya Likolo pe zelo oyo ezalaká penepene ya ebale. 13 Bato nyonso wana bakufaká ná bondimi na bango. Na esengo nyonso bazalaki komona na mosika bomengo oyo Nzambe alakaká bango, kasi bazwaki yango té. Bongo babandaki koloba: "Awa na mokili, tozali bapaya pe bato ya mobembo." 14 Nzokande bato oyo balobaká ndenge wana, balakisaka polele 'tè bazali koluka mboka ya bango moko penza. 15 Soki bazalaki kokanisa mboka oyo bautaki, mbele bakokaki kozonga. 16 Kasi bazalaki koluka mboka moko ya malamu koleka, elingi koloba: mboka ya Likolo. Yango wana Nzambe ayokaka soni té soki báto bazali kobenga ye "Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob", pamba té asi'abongiselá bango mboka ya seko. 17 Abraham, po na bondimi na ye, tango Nzambe amekaki ye, andimaki kobomela Nzambe mwana na ye se moko Izaak, atako azwaka elaka ya Nzambe, 18 tango Nzambe alobaká na ye 'tè: "Ezali nde Izaak moto akopesa yo bakoko." 19 Abraham andimaki 'tè Nzambe akoki kosekwisa Izaak; ya solo, tokoki koloba 'tè azwaki ye lisusu lokola moto asekwi. 20 Izaak, po na bondimi na ye, abenisaki Jakob ná Ezau po na makambo oyo ekoya. 21 Jakob, po na bondimi na ye, abenisaki bana ya Jozef moko moko tango alingaki kokufa; bongo "agumbamelaki Nzambe na nzete na ye ya kotambola." 22 Jozef, po na bondimi na ye, tango akómaká penepene ya kokufa, asakolaka po na mokolo oyo bana ya Israel bakolongwa na Ejipte, pe alakisaka ndenge bakosala po na mikuwa na ye. 23 Baboti ya Moize, po na bondimi na bango, babombaká ye banda tango abotamaki tii akokisaki sanza misato, po bamonaki 'tè mwana azalaki kitoko, pe babangaki kutu té ata motindo ya mokonzi ya Ejipte. 24 Moize, po na bondimi na ye, tango akómaki mokolo, aboyaki 'tè bábenga ye mwana ya mwana ya Faraon. 25 Nzokande andimaki komona pasi ná bato ya ekolo ya Nzambe, esika 'tè ákende kosepela mwa tango moke po na bisengo ya masumu. 26 Ndenge Kristo andimaki báyina ye, Moize pe amonaki 'tè eleki malamu báyina ye, esika 'tè áluka bomengo ya Ejipte; pamba té miso na ye ezalaki bobele na lifuta oyo ezalaki kozela ye. 27 Moize, po na bondimi na ye, alongwaká na Ejipte, abangaki kanda ya Faraon té. Atiaki molende lokola nde azalaki komona Nzambe oyo amonanaka té. 28 Bobele po na bondimi na ye, atindaká bato ya Israel básala feti ya "Pake pe bápakola makila na baporte ya bandako, po anjelu-mobomi ásimba bana na bango té, tango akoya koboma bana mibali ya liboso nyonso. 29 Bato ya Israel, po na bondimi na bango, bakatisaká Ebale ya Motane lokola nde ezalaki ya kokauka. Kasi tango ba-Ejipsien bamekaki kokatisa, bango nyonso bakufaki na mai. 30 Bobele po na bondimi ya bato ya Israel, ba-mir ya lopango ya Jeriko ekweyaká, tango bazalaki kobalukabaluka na bapembe-ni ya vile mikolo sambo. 31 Rahab, mwasi ya ndumba, po na bondimi na ye, akufaki té esika moko ná baoyo baboyaki kotosa Nzambe, po ye ayambaki na boboto ba-Israelite oyo bayaki po na kotala mboka na mayele. 32 Náloba lisusu nini? Nazali na tango té po na koloba makambo ya Jedeon, Barak, Samson, Jefte, David, Samuel, to ya baprofete. 33 Po na bondimi na bango, babotolaki mabelé ya bikolo mosusu, bakómaki kotambwisa mboka na bosembo, bazwaki bolamu oyo Nzambe alakaká bango; bakangisaki minoko ya batambo, 34 babomaki móto ya makasi, babikaki na liwa ya mbeli; baoyo bazalaki na maladi, nzoto na bango akómaki kolongono; bamosusu balakisaki makasi na bango na bitumba pe balongaki banguna ebele; 35 bamama mosusu bamonaki bana na bango oyo bakufaki bazongi na bomoi. Nzokande bato mosusu, banyokolaki bango makasi. Ata bango baboyaki kosala mabe po bábika; bazalaki kotia mitema 'tè Nzambe akosekwisa bango. 36 Banguna bazalaki koseka pe kobeta bango fimbu, kokanga bango minyololo pe kobwaka bango na boloko. 37 Bamosusu, babomaki bango na mabanga to na mbeli, bakati bamosusu biteni mibale. Bazalaki kotelengana pe kolata baposo ya méme to ya taba; bazalaki kokelela, konyokwama pe komona pasi. 38 Ebongaki té 'tè báfanda na kati ya bato ya mokili oyo; yango wana bazalaki kotelengana na esobe to na bangomba, pe kofanda na mabulu oyo ezalaká na kati ya mabanga to na se ya mabelé. 39 Po na bondimi na bango, Nzambe alakisaki 'tè azali kolinga bango nyonso; kasi akokiselaki bango bilaka na ye té. 40 Nzambe azelisaki bango likolo na biso, pamba té abombelaki biso bolamu ya koleka; boye esengelaki ákómisa bango bato ya kokoka bobele nzela moko ná biso.

Ba-Ebré 12

Nzambe, Tata na biso

1 Bato nyonso wana bazali kozinga biso, bazali kolakisa biso ndenge tosengeli kosala. Yango wana biso pe tótia molende. Tósala lokola bato ya masano. Bongo tótika makambo nyonso oyo epekisaka 'tè tótambola malamu té; tókima mbangu, tobwaka mikumba oyo ezali kotia biso kaká, elingi koloba: tóboya masumu oyo ezali kokangama na biso. 2 Tótia miso bobele epai ya Yezu; ye nde moto ayeelá biso bondimi, kaka ye moto akokokisa yango. Akangaki motema tango babomaki ye na kuruze, pe amonaki soni ya liwa yango lokola eloko pamba, po azalaki kokanisa bobele esengo oyo Nzambe abombelaki ye. Pe sik'oyo azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. 3 Bókanisaka ndenge ye akangaki motema na nyonso oyo bato ya masumu basalaki ye. Boye bózonga sima té, pe bólemba té. 4 Bosengeli kobunda ná masumu; nzokande moto moko té abundá tii makila étanga. 5 Bosi'bobosani toli oyo bazali kopesa bino lokola na bana ya Nzambe: "Mwana na ngai, koboya té soki Nkolo apesi yo etumbu; kolemba té tango alakisi mabe na yo. 6 Pamba té Nkolo apesaká etumbu na moto oyo ye alingaka; abetaka moto nyonso oyo ye ayambaka lokola mwana na ye." 7 Bókanga mitema. Nzambe akamati bino lokola bana na ye; azali kopesa bino etumbu po ábongisa bino. Mwana nini azwaka etumbu ya tata té? 8 Ya solo, bana nyonso ya Nzambe bazwaka etumbu; boye soki bino bozwaka yango té, bozali penza bana na ye té, bozali bana bazangá tata. 9 Batata oyo babotá biso bazalaki kopesa biso etumbu, pe tozalaki kotosa bango; esengeli totosa mingi koleka Tata na biso ya Likolo, po tóbika. 10 Batata na biso bazalaki kopesa etumbu na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga; kasi Tata na biso ya Likolo apesaká biso etumbu po na bolamu na biso, po tókóma bato ya bosantu lokola ye. 11 Tango bato bazali kozwa etumbu, bamonaka yango lokola eloko ya esengo té kasi ya pasi. Nzokande soki etumbu esi'ebongisi bango, ememelaka bango boboto pe bizaleli ya bosembo.

Bizaleli oyo ekoki na bato Nzambe aponá

12 Soki maboko na bino elembi pe mabolongo esili makasi, bózwa lisusu molende. 13 Bósala banzela ya malamu, po 'tè ata bato ya tengu-tengu bábeta libaku té, kasi bátambola na ndenge ekoki. 14 Bóluka kofanda na boboto ná bato nyonso, pe kozala na bomoi ya bosantu; po moto moko té akoki komona Nkolo, soki azangi bosantu. 15 Bókeba! Moto moko té ábungisa bolamu ya Nzambe. Moto moko té ákóma lokola lititi ya bololo oyo ekoki kobomisa bato ebele na kati na bino. 16 Moto moko té ásala kindumba to átsiola bolamu ya Nzambe, ndenge Ezau asalaka: atekisaki ki-mokóló na ye likolo ya bilei ya mokolo moko. 17 Bongo na sima, lokola boyebi, alingaki 'tè tata ábenisa ye po ázwa bolamu oyo Nzambe alakaká. Kasi akokaki kozwa yango té; azwaki nzela té ya kobongola makanisi ya tata na ye, atako abimisaki mai na miso. 18 Bókanisa nanu ndenge bakoko ya Israel bapusanaká penepene ya ngomba ya Sinai, oyo emonanaka na miso. Kuna móto ezalaká kongala, molili ezalaká makasi, pe mopepe ya somo ezalaká kopepa. 19 Bayokaka mongongo moko ezalaki koloba na kati ya makelele ya kelelo. Tango bayokaki mongongo yango, baboyi bábakisela bango maloba mosusu. 20 Pamba té bazalaki kobanga motindo oyo: "Soki moto amati na ngomba oyo, ézala kutu ata nyama, esengeli báboma ye na mabanga." 21 Makambo bango bamonaka ezalaká somo penza. Moize kutu ye moko alobaká 'tè: "Nazali koyoka somo pe kolenga." 22 Kasi bino bakristo bosi'bopusani penepene ya mboka ya Nzambe ya bomoi, na ngomba ya Sion pe Yeruzalem ya Likolo. Kuna nde esika ba-anjelu nkoto na nkoto bazali kosala feti; 23 pe bana ya liboso ya Nzambe basangani na esengo, baoyo bakombo na bango esi'ekómamá na likolo. Bopusani penepene ya Nzambe, Zuzi ya bato nyonso; pe epai ya milimo ya bato ya bosembo oyo Nzambe akómisá bato ya kokoka. 24 Bopusani penepene ya Yezu oyo asalá Boyokani ya Sika; makila na ye elongolá masumu nyonso pe esalá likambo moko monene koleka makila ya Abel. 25 Tango Nzambe akitaká awa na se po na kokebisa bakoko ya Israel, bango baboyaki koyoka, bongo bango nyonso bazwaki etumbu. Yango wana bókeba! Pamba té ndenge nini tokokima etumbu soki toboyi koyokela Nzambe, awa azali koloba uta na likolo? 26 Tango azalaká koloba na ngomba Sinai, mongongo na ye eningisaká mokili; kasi sik'oyo alaki biso boye: "Nakosala yángo lisusu mbala moko; nakoningisa bobele mokili té kasi nakoningisa pe Likolo." 27 Maloba wana: "lisusu mbala moko" elakisi 'tè biloko ye asalá awa na se ekoningana pe ekolimwa, po 'tè biloko oyo eninganaka té étikala seko. 28 Lokola tosi'tozwi mboka oyo ekoningana té, tósimba bolamu ya Nzambe na motema moko. Tózala bato ya malamu, tósalelaka Nzambe ndenge ye alingaka, tótosaka ye pe tóbangaka ye. 29 Pamba té Nzambe na biso azali lokola móto oyo ezikisaka nyonso.

Ba-Ebré 13

Ndenge tokoki kosepelisa Nzambe

1 Bólinganaka lokola bandeko. 2 Bólemba koyamba bapaya té na bandako na bino; pamba té kala, bato oyo basalaka yango bayambaká ba-anjelu, kasi bayebaki bango té. 3 Bókanisaka bandeko oyo bazali na boloko, lokola nde bino pe bozali esika moko ná bango. Bakanisaka lisusu bato nyonso oyo bazali konyokwama, lokola nde bino pe bozali konyokwama ndenge moko ná bango. 4 Bato nyonso batosaka libala. Mobali nyonso ázala bobele po na mwasi na ye; mwasi nyonso ázala bobele po na mobali na ye. Pamba té Nzambe akopesa etumbu na bato oyo basalaka kindumba, pe na baoyo batambolaka ná mwasi to mobali ya bato. 5 Bozala na lokoso ya mbongo té. Basalelaka kaka biloko oyo bozali na yango, bówela biloko mosusu té. Pamba té Nzambe ye moko asi'alobá 'tè: "Nakotika bino ata moke té, nakobosana bino ata moke té." 6 Yango wana tokoki koloba na esengo: "Nkolo azali na biso, tokoki kobanga eloko té; bato bakoki kosala biso nini?" 7 Bókanisa batambwisi na bino ya kala, baoyo bateyaki bino maloba ya Nzambe. Bókanisa bizaleli na bango, pe ndenge bakufaki; bongo bólanda bondimi na bango. 8 Yezu Kristo azali se ndenge moko; lelo, lobi, pe seko. 9 Bato bákosa bino té na mateya ya lokuta ndenge na ndenge. Bóluka 'tè bolamu ya Nzambe épesa bino molende. Bótia mitema té na mibeko oyo etali bilei. Baoyo batosaka mibeko yango bazwaka lisalisi ata moke té. 10 Biso bakristo tozali na mesa na biso ya kopesela mabonza, pamba té Yezu amipesá na Nzambe lokola libonza. Baoyo bazali kosalela Nzambe na Ndako na ye ya kala bakoki kobikela na libonza yango té. 11 Bókanisa ndenge nganga-Nzambe na bango ya monene asengaka bolimbisi ya masumu. Ye amemaka makila ya banyama na esika eleki bosantu; nzokande babimaka na libanda ya mboka po na kozikisa nyama oyo babomelaki Nzambe. 12 Yango wana, tango Yezu alingaki kopesa makila na ye moko po álongola masumu ya bato, akendeki kokufa na libanda ya mboka. 13 Bongo ebongi tókende epai na ye, na libanda ya mboka; tóndima básambwisa biso ndenge basambwisaki ye. 14 Pamba té mboka na biso ya libela ezali awa na se té; kasi tozali nde kozela mboka oyo ekoya. 15 Bongo na lisanga na Yezu, tómemela Nzambe tango nyonso mabonza oyo epesaka ye lokumu; yango ezali nde banzembo oyo toyembelaka Nzambe na biso. 16 Kasi bólemba pe té na kosala misala ya malamu pe kosalisana. Pamba té yango nyonso ezali nde mabonza oyo esepelisaka Nzambe. 17 Botosaka batambwisi na bino pe bóyokelaka bango, po bango bato babatelaka bino. Mokolo ezali Nzambe akotuna bango ndenge bazalaki kosala mosala wana. Esengeli bákokisa yango na esengo-, pamba té soki boyokisaka bango mawa, yango ekomemela bino bolamu ata moko té. 18 Bóbondelaka Nzambe tango nyonso po na ngai. Nakanisi solo 'tè nazali na motema pembe; nalingaka kosala bobele malamu tango nyonso. 19 Nasengi bino mingi bobondela Nzambe po ápesa ngai nzela ya kozongela bino noki penza.

Losambo pe mbote ya suka

20 Nzambe ya boboto asekwisá Nkolo na biso Yezu; akómisá ye Mobokoli monene ya bameme, po asalaki Boyokani ya seko na makila na ye. 21 Boye Nzambe ápesa bino nguya po bókoka kosala makambo nyonso ya malamu oyo ye alingaka. Ye moko ákokisela biso makambo oyo esepelisaka ye, na nguya ya Yezu Kristo. Lokumu ézala na ye tango nyonso seko! Amen. 22 Bandeko, nakómeli bino makambo oyo po na kolendisa bino. Nasengi bino bókanga mitema na yango; ezali kutu pe mingi té. 23 Bóyeba 'tè ndeko na biso Timoté asi'abimi na boloko. Soki akómi awa noki, tokoya nzela moko ná ye epai na bino. 24 Bópesa mbote na batambwisi na bino nyonso pe bakristo nyonso. Bandeko ya Italie batindeli bino mbote. 25 Bolamu ya Nzambe ézala na bino nyonso.

Jake 1

Mbote

1 Mbote na bino bato ya ekolo ya Nzambe oyo epanzaná na mokili mobimba. Ngai Jake, mosali ya Nzambe pe ya Nkolo Yezu Kristo, natindeli bino mokanda oyo.

Bondimi pe mayele

2 Bandeko na ngai, soki bapasi ya ndenge na ndenge ezali kokweela bino, bósepela kaka; 3 pamba té boyebi 'tè soki na tango ya pasi bosimbi bondimi na molende nyonso, nde bokokoka kokanga mitema. 4 Bobele soki boyebi kokanga mitema, bokozala bato ya kokoka na makambo nyonso, pe bokozanga ata eloko moko té. 5 Nzokande soki moto moko na kati na bino azangi mayele, ásenga yango epai ya Nzambe, pe Nzambe akopesa ye yango; pamba té ye apesaká bolamu na ye na bato nyonso, na motema malamu pe boboto. 6 Kasi ásenga na bondimi nyonso pe átia tembe té; po moto oyo atiaká tembe azali lokola mbonge ya mai oyo mopepe ezali komema epai na epai. 7 Moto ya ndenge wana atiaká motema té 'tè akozwa ata eloko moko epai ya Nkolo; 8 azali moto ya mitema mibale, pe abongolaka bizaleli na ye tango nyonso.

Bato bakelelá pe bato ya bomengo

9 Ebongi ndeko oyo azali na biloko mingi té, ábeta tolo po akómi moto ya lokumu; 10 pe ndeko oyo azali na bomengo, ábeta tolo po lokumu na ye ekómi eloko ya pamba. Pamba té moto ya bomengo akokufa kaka lokola fiere ya zamba. 11 Moi ebimi pe ekómi makasi, bongo matiti ekauki; flere na yango ekwei pe kitoko na yango esili. Wana ezali ndenge moto ya bomengo akokufa na kati ya misala na ye.

Nani amekaka bato?

12 Esengo na moto oyo akangaka motema tango azali kokutana na bapasi. Ye azali lokola moto oyo alongi na lisano; Nzambe akopesa ye bomoi oyo alakaki na bato balingaka ye. 13 Tango moto azali komekama, áloba té 'tè: "Ezali Nzambe moto azali komeka ngai." Pamba té Nzambe alingaka makambo ya mabe ata moke té, pe ye amekaka bato té. 14 Ezali baposa ya bato nde emekaka bango; yango moto ekosaka bango, pe etindaka bango básala mabe. 15 Soki moto alandi baposa wana, yango ebimisaka masumu; pe soki masumu ekómi mingi, ememaka liwa. 16 Bandeko na ngai ya bolingo, bómikosa té. 17 Bolamu nyonso pe makabo nyonso ya kitoko oyo ekoká, eutaka na Likolo epai ya Nzambe, oyo asalá moi, sanza pe minzoto. Nzambe azali bobele ndenge moko, abongwanaka té; epai na ye molili ezali ata moke té. 18 Asi'apesá biso bomoi ya sika, awa ayebisi biso maloba na ye ya solo. Ye moko moto alingaki bongo po tózwa esika ya liboso, na kati ya bikelamo na ye nyonso.

Koyoka pe kosala

19 Bandeko na ngai ya bolingo, bókanisa makambo oyo: moto nyonso átiaka molende po na koyoka, kasi akanisaka malamu liboso ya koloba; pe ásilikaka noki té. 20 Pamba té moto oyo asilikaka, akokisaka makambo ya bosembo té na miso ya Nzambe. 21 Yango wana bótika bizaleli nyonso oyo ebebisaka mitema, pe makambo nyonso ya nko. Bólongola lofundu nyonso, pe bóndima maloba oyo ye akómá na mitema na bino; yango nde moto ekoki kobikisa bino. 22 Bómikosa té! Bosalaka ndenge maloba ya Nzambe ezali kotinda; bóyoka yango biyokela té. 23 Pamba té oyo ayokaka maloba ya Nzambe biyokela, pe asalaka té ndenge yango ezali kotinda, akokani na moto oyo amitali na talatala: amoni ndenge elongi na ye ezali; 24 soki akei, abosani ndenge yango ezalaki. 25 Bobele Mibeko ya Nzambe ezali ya kokoka pe epesaka bato bonsomi. Soki moto atalaka yango malamu pe alandaka yango, soki abosanaka yango té kasi ayokaka pe atosaka yango, moto wana akozala na esengo na makambo oyo asalaka. 26 Soki moto amimoni 'tè asambelaka, nzokande ayebi kobatela monoko na ye té, azali komikosa ye moko: kosambela na ye ezali pamba. "Kosambela ya solo pe ya bosembo na miso ya Nzambe Tata ezali: kosalisa bana bakufelá baboti ná basi bakufelá mibali, tango bazali komona pasi; pe komibatela na makambo nyonso ya mabe ya mokili oyo.

Jake 2

Kopona bilongi ya bato té

1 Bandeko na ngai, bino bato bondimaka 'tè Nkolo na biso Yezu Kristo azali na lokumu ya Nzambe, bóponaka bilongi ya bato té. 2 Ndakisa: na tango ya losambo, bato mibale bayei kokota: moto moko ya bomengo alati pete ya or ná bilamba ya kitoko penza; pe moto mosusu ya kokelela, alati bilamba ya kopasuka. 3 Bongo na botosi nyonso bolobi na moto oyo alati bilamba ya kitoko: "Mbuta-muntu, yaka kofanda na esika ya malamu." Bongo boyebisi moto akelelá: "Yo, telema kuna." To: "Fanda awa, na se ya makolo na ngai." 4 Soki bosali ndenge wana, bozali nde kopona bilongi ya bato oyo bayei kosambela; bokómi lokola bazuzi oyo bakataka makambo na ndenge ya mabe. 5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka malamu: Nzambe aponá banani? Aponá bobele bato bakelelá na mokili oyo, po bondimi éyeela bango bomengo, pe ékómisa bango bato ya mboka na ye, ndenge alakaki baoyo balingaka ye. 6 Kasi bino bozali komonela bato bakelelá. Nzokande bato oyo banyokolaka bino, ezali bato ya bomengo té? Bango té bato bafundaka bino na ba-tribinal? 7 Bango pe té bato batsiolaka kombo ya lokumu ya Nkolo, oyo batangaki mokolo babatisaki bino? 8 Mobeko oyo eleki mibeko nyonso, elobá boye: "Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka." Soki bokokisi yango, nde bosali malamu. 9 Kasi soki bóponaka bilongi ya bato, bozali kosala masumu; pe Mibeko elakisi 'tè botosaka Nzambe té. 10 Ya solo, ata otosaka mibeko nyonso, soki obosani kaka mobeko moko, obuki nde mibeko nyonso. 11 Pamba té Nzambe alobá "Kosala kindumba té"; alobá pe "Koboma moto té". Yango wana, ata osali kindumba té kasi obomi moto, yeba 'tè obuki Mibeko. 12 Bókanisa malamu. Mibeko ya Nzambe epesi bino bonsomi. Yango wana bósalelaka Mibeko yango, na makambo nyonso oyo bolobaka pe bosalaka. Pamba té mokolo Nzambe akosambisa bino, akotala Mibeko wana. 13 Moto oyo aboyi koyokela baninga mawa, Nzambe pe akoyokela ye mawa té; kasi oyo ayokelaka baninga mawa, akoki kobanga té mokolo Nzambe akosambisa bato.

Bondimi pe misala ya malamu

14 Bandeko na ngai, soki moto asalaka misala ya bondimi té, tina nini akoki koloba 'tè: "Ngai nazali na bondimi"? Bondimi ya ndenge wana ekoki kobikisa ye? 15 Ndakisa: ndeko moko azangi bilamba ná biloko ya kolia, 16 pe moto moko na kati na bino alobi na ye: "Lata bilamba ya malili, pe kende kolia malamu." Soki bolobi bongo, kasi bopesi ye té biloko oyo azali na yango posa, maloba wana ezali na tina? 17 Ndenge moko pe po na bondimi: soki moto asalaka misala ya bondimi té, bondimi na ye ezali ya kokufa. 18 Kasi moto moko akoki koloba boye: "Bato mosusu bami-pesaka mingi na bondimi, pe bamosusu na misala." Soki moto alobi boye, nakozongisela ye: Lakisa ngai ndenge moto akoki kondimela Nzambe, soki asalaka misala ya bondimi té; bongo na misala na ngai nakolakisa yo ndenge nandimelaka Nzambe. 19 Yo ondimaka 'tè Nzambe azali kaka moko? Olobi penza malamu! Milimo mabe pe endimaka boye, na kobanga nyonso. 20 Yo ozali mayele té. Olingi nálakisa yo 'tè bondimi ezangá misala ezali pamba? 21 Ndenge nini koko na biso Abraham akómaká bosembo na miso ya Nzambe? Ezali po na misala na ye té? Pamba té asalaka mesa ya mabonza po ábomela Nzambe mwana na ye Izaak. 22 Omoni! Misala na ye ezalaki kokokisa bondimi na ye; yango nyonso ezalaki kokende nzela moko. 23 Yango wana ekómamá boye: "Abraham andimelaki Nzambe, bongo Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo po na bondimi na ye." Na boye nde bakómaki kobenga ye moninga ya Nzambe. 24 Bomoni 'tè bato bakomaká bosembo na miso ya Nzambe po na misala na bango; kasi bobele po na bondimi té. 25 Ndenge moko pe po na Rahab, mwasi ya ndumba ya Jeriko. Ezali po na misala na ye té nde akómaká bosembo na miso ya Nzambe? Pamba té ayambaki bato oyo bayaki kotala mboka na mayele, pe akimisaki bango na nzela mosusu. 26 Ya solo, soki moto azali kopema lisusu té, asi'akufi; se ndenge wana bondimi oyo ebimisaka misala té ezali ya kokufa.

Jake 3

Tóbatelaka minoko na biso

1 Bandeko na ngai, na kati na bino bato nyonso báluka kokóma balakisi té. Pamba té biso balakisi, Nzambe akosambisa biso na ndenge moko ya koleka. 2 Biso nyonso tobosanaka mbala mingi. Soki moto azali oyo abosanaka té na maloba, azali penza moto ya kokoka; akoki komibatela malamu. 3 Ndakisa: totiaka bibende na minoko ya bapunda po yango étosa biso. Na ndenge wana tokoki kotambwisa yango. 4 Ezali pe ndenge moko po na masuwa: ata yango ezali monene, ata mopepe ya makasi epusi yango, kasi motambwisi asalelaka yenda moko ya moke po na kobalola masuwa epai nyonso ye alingi. 5 Se bongo pe monoko ya moto ezali eloko moko ya moke penza na kati ya nzoto, kasi esalaka makambo ya minene. Bókanisa nanu ndenge mwa móto ya moke ekoki kozikisa zamba monene. 6 Monoko ya moto ezali eteni ya nzoto, emonanaka lokola móto. Yango ebebisaka makambo nyonso ya mokili; epelaka na móto ya lifelo; ezikisaka moto kobanda na mbotama na ye tii na liwa. 7 Bato bazali na mayele ya kosala 'tè banyama ya ndenge na ndenge ébanda kotosa bango; ézala banyama ya zamba, bandeke, banyoka, to bambisi. 8 Kasi moto moko té asi'asalá 'tè monoko na ye étosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe etondá na pwazon pe elembaka té. 9 Tosalelaka yango po na kokumisa Nzambe, Nkolo pe Tata na biso; kasi tofingelaka yango pe lisusu baninga oyo ye asalá na ndenge na ye. 10 Kaka na monoko topesaka mersi pe tofingaka bato. Bandeko na ngai, boye ezali malamu té. 11 Mai ya elengi ná ya bololo ebimaka esika moko? 12 Bandeko na ngai, nzete ya figi esi'ebotá mbuma ya olive? pe oyo ya vinu esi'ebotá mbuma ya figi? Ndenge moko pe mai ya komela ebimaka esika moko té ná mai ya mungwa.

Mayele oyo eutaka na Nzambe

13 Na kati na bino nani azali na mayele? Pe nani ayebaka makambo? Amilakisa moto ya bizaleli ya malamu, pe ákokisaka misala na ye nyonso na boboto pe na mayele. 14 Kasi soki mitema na bino etondá na lofundu pe zuwa ya mabe, bóbanda kotombola mapeka té pe kowangana makambo ya solo. 15 Mayele ya ndenge wana eutaka na Nzambe té, kasi ezali kaka ya bato ya mokili oyo; yango eutaka na milimo mabe. 16 Pamba té zuwa pe koswana ebimisaka mobulu pe mabe ya ndenge na ndenge. 17 Kasi moto azali na mayele oyo euti na Nzambe, azali moto ya motema pembe, aswanaka té, afandaka na boboto pe na kimia, ayokelaka bato mawa, asalaka makambo ya solo pe ya malamu, pe akosaka bato ata moke té. 18 Bato oyo basalaka makambo ya boboto bazali lokola baoyo bakonaka bilanga. Mbuma oyo bakonaka ebotelaka bango bolamu.

Jake 4

Kolinga makambo ya mokili ezali koyina Nzambe

1 Po na nini boswanaka pe bobùndaka? Ezali té po bólukaka bobele bisengo? 2 Bolulaka biloko oyo bozali na yango té. Botondá na zuwa po na makambo ebele, kasi lokola bolongaka kaka té, bokómá koluka bitumba. Bozangaka biloko oyo bólukaka, po bosengaka Nzambe té. 3 Ata bosengi yango na Nzambe, bozwaka té, po bozali kosenga na makanisi mabe; pamba té bólingaka kaka kobebisa bomengo nyonso po na bisengo na bino. 4 Bosundoli Nzambe, bokómi lokola basi baboyi libala. Boyebi té 'tè kolinga makambo ya mokili oyo ezali koyina Nzambe? Moto alingaka makambo ya mokili, akómi monguna ya Nzambe. 5 Ekómamá boye: "Nzambe azalaká na zuwa mingi po na pema oyo afulá biso." Bokanisi 'tè makambo oyo ekómamá pamba? 6 Nzokande, Nzambe asi'apesá biso bolamu moko eleki monene; yango wana ekómamá lisusu: "Nzambe ayinaka bato ya lofundu; kasi apesaká bolamu na baoyo bamikitisaka." 7 Bongo botosaka Nzambe; bóboya makambo ya zabolo, boye ye akokima bino penza mosika. 8 Bópusanaka penepene ya Nzambe, bongo ye akoya penepene na bino. Bino bato ya masumu, bóbongisa bizaleli na bino; bino bato ya mitema mibale, bozala na motema moko kaka. 9 Bóndima 'tè bozali bato ya mawa; bólata pili pe bóbimisa mai na miso; bótika koseka, kasi bólela; bótika kosepela, kasi bóyoka mawa. 10 Bómikitisa na miso ya Nkolo, bongo ye akotombola bino.

Tika koloba mabe ya ndeko na yo

11 Bandeko, bótónganaka té. Moto oyo atóngi ndeko na ye azali kotónga Mibeko ya Nzambe. Oyo alobi 'tè ndeko na ye azali moto mabe, azali koloba 'tè Mibeko ya Nzambe ezali mabe. Esika 'tè átosa yango, ye amitii zuzi na yango. 12 Nzokande Nzambe moto apesá Mibeko; ye pe kaka moto azali zuzi. Bobele ye nde moto akoki kobikisa to kokata etumbu ya liwa. Bongo yo ozali nani, po óloba 'tè ndeko na yo azali moto mabe?

Tótika lofundu

13 Bato mosusu na kati na bino balobaká: "Lelo to lobi tokokende na mboka boye, tokofanda kuna mbula moko pe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi." 14 Nzokande boyebi té ndenge nini bokozala lobi. Ya solo, bozali lokola londende oyo ezali komonana po na mwa tango moke, pe na sima elimwe. 15 Ebongi bolobaka boye: "Soki Nkolo alingi, na mikolo ekoya tokosala makambo boye to boye." 16 Kasi bozali kobeta tolo na lofundu penza. Lofundu nyonso ya ndenge wana ezali mabe. 17 Moto oyo ayebi ndenge asengeli kosala kasi aboyi kosala yango, azali nde kosala masumu.

Jake 5

Mawa na bino, bato ya bomengo!

1 Bino, bato ya bomengo, bólela pe bozala na mawa po na bapasi oyo ezali kozela bino. 2 Bomengo na bino esi'ebebi, pe bampese esi'elei bilamba na bino. 3 Mbongo na bino nyonso ekómi eloko ya pamba penza. Yango elakisi 'tè nzoto na bino moko pe ekobeba lokola nde eziki na móto. Suka ya mokili ekómi penepene, nzokande bino bozali konduka mbongo! 4 Boboyi kofuta bato oyo balongolaka mbuma na bilanga na bino. Bóyoka ndenge bazali kolela! Nkolo ya nguya nyonso asi'ayoki kolela na bango. 5 Awa na se bokoká na biloko nyonso pe botondá na bisengo. Boliaka mingi, bokómi mafuta penza, lokola banyama oyo ezali kozela mokolo bakoboma yango. 6 Bokatelaka bato ya malamu etumbu pe bobomaka bango, nzokande bango basalelaka bino mitú makasi té.

Bokangaka mitema pe bósambelaka Nzambe

7 Yango wana, bandeko, bokangaka mitema tii mokolo Nkolo Yezu akoya. Bókanisa nanu ndenge mosali-bilanga akangaka motema pe azelaka mbuma ya elanga na ye, banda tango mbula ya liboso enokaka tii na tango ya mbula ya suka. 8 Bino pe bókanga mitema pe bozala na molende, pamba té mokolo Nkolo akoya ekómi penepene. 9 Bandeko, moto na moto átika komilelalela na makambo bandeko na ye bazali kosala ye, po Nzambe ákatela bino etumbu té. Pamba té zuzi azali kozela bino. 10 Bandeko, bólanda ndakisa ya baprofete oyo bazalaká koloba na kombo na ye: ndenge babandaki kokanga mitema na bapasi oyo bazalaki komona. 11 Tobengaka bango bato ya esengo, po na molende na bango. Bosi'boyoká ndenge Job akangaká motema na kati ya bapasi, pe ndenge Nkolo asukisaki makambo na ye; pamba té Nkolo alingaka bato na ye pe ayokelaka bango mawa. 12 Bandeko na ngai, bókeba, bókata seleka té, ézala ata ya ndenge nini. Kasi bóloba kaka "Ezali bongo" to "Ezali bongo té", po Nzambe ákatela bino etumbu té. 13 Soki moto moko na kati na bino azali na mawa, ásambela. Soki azali na esengo, áyembela Nzambe. 14 Soki moto moko na kati na bino azali na maladi, ábenga bambuta-muntu ya Eklezya, básambela po na ye pe bápakola ye "mafuta na kombo ya Nkolo Yezu. 15 Soki losambo yango esalami na bondimi penza, yango ekobikisa moto ya maladi, bongo Nkolo akokómisa ye nzoto kolongono, pe akolimbisa ye soki asalaki masumu. 16 Yango wana moto azali na maladi esengeli ándima masumu na ye na miso ya bandeko, pe bango básambela po na ye po ábika. Pamba té losambo ya moto ya bosembo ezali na nguya penza. 17 Ndakisa: Eliya azalaká moto lokola biso. Asengaki Nzambe na molende nyonso 'tè mbula énoka té; bongo mbula enokaki té na mboka mobimba, mbula misato na ndambo. 18 Na sima asambeli lisusu, bongo Likolo efungwani, mbula enoki pe mabelé eboti mbuma. 19 Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino abungi nzela ya solo, bongo ndeko moko azongisi ye na nzela ya malamu, 20 bóyeba 'tè oyo alongoli moto ya masumu na nzela ya mabe, abikisi ndeko na ye; pe Nzambe akolimbisa ye masumu, atako ezali ebele.

1 Piere 1

Mbote

1-2 Mbote na bino bato bozali kofanda lokola bapaya na bisika nyonso oyo ekolo ya Nzambe epanzaná: na région ya Pon, Galatie, Kapadose, Efeze pe Bitinie. Nzambe Tata ayebá bino banda kala; ye moto aponá bino, pe Molimo na ye akómisá bino bosantu, po bótosa Yezu Kristo, oyo asukoli bino na makila na ye. Ngai Piere, ntoma ya Yezu Kristo, natindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto mingi penza.

Tótia mitema bobele na Nzambe

3 Mersi na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo! Ye ayokelaki biso mawa mingi penza; bongo apesi biso bomoi ya sika po tótia mitema bobele na ye. Pamba té ye moto asekwisá Yezu Kristo, 4 pe abombelá biso bomengo na Likolo. Kuna ekoki kobeba te to kobunga. 5 Soki botii penza mitema epai ya Nzambe, ye akobatela bino na nguya na ye; boye bokobika pe bokozwa bomoi ya seko, na mokolo ya suka. 6 Yango wana botondi na esengo, atako na mwa mikolo oyo esengeli bozala na mawa, po bozali komona bapasi ya ndenge na ndenge. 7 Esengeli bameka bondimi na bino, ndenge bamekaka or na móto; nzokande bondimi na bino eleki or na tina, pamba té or ezali eloko ya koumela té. Bongo soki bosimbi bondimi na molende nyonso, bokozwa lokumu penza, mokolo Yezu Kristo akomonana. 8 Ata bomonaká Yezu na miso té, bozali kolinga ye; ata bomonaka ye té, bozali kondima ye. Yango wana bozwi lokumu, pe botondi na esengo; 9 pamba té bondimi na bino ezali kobikisa bino. 10-11 Baprofete balobaká po na kobika yango, oyo Nzambe azalaká kobombela bino na bolamu na ye. Pamba té Molimo ya Kristo azalaká na bango, pe ayebisaká bango 'tè Kristo akomona pasi, bongo na sima akozwa lokumu. Bango bazalaká komituna pe koluka koyeba tango nini pe ndenge nini makambo yango ekosalama. 12 Nzambe ayebisaká bango 'tè makambo oyo bazalaki kosakola ezalaki po na bango té, kasi po na bino. Ya solo, makambo minene boye, ba-anjelu bazali na posa ya komona yango; sik'oyo basakoli ya Sango Malamu bayebisi bino yango, na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindi uta na Likolo.

Bózala bato ya bosantu

13 Yango wana bóbongisa mitema na bino po na mosala, bófungola miso! Bótia mitema bobele na bolamu oyo Nzambe akopesa bino, mokolo Yezu Kristo akomonana. 14 Botosaka Nzambe, ndenge bana batosaka baboti na bango; bótika kolanda baposa oyo bozalaki na yango, tango boyebaki Nzambe té. 15 Kasi lokola Nzambe oyo abengi bino azali mosantu, bino pe bosengeli kozala bato ya bosantu, na bizaleli na bino nyonso. 16 Pamba té ekómamá boye: "Bozala bato ya bosantu, po ngai pe nazali mosantu." 17 Tango bozali kosambela, bobengaka Nzambe "Tata"; yango wana botosaka ye na bomoi na bino mobimba, pamba té ye asambisaka bato nyonso ndenge moko, moto na moto ná ya ye makambo. 18 Boyebi eloko nini Nzambe afutaki po na kolongola bino na bizaleli ya pamba-pamba oyo bakoko batikelá bino. Ezali mbongo té to eloko mosusu oyo ebebaka; 19 kasi ezali eloko ya talo penza, yango nde makila ya Kristo. Ye azali lokola mwana-meme oyo ebebá ata esika moko té. 20 Nzambe aponá ye liboso 'tè ásala mokili, bongo atindeli bino ye na mikolo oyo ya suka. 21 Po na Kristo nde bozali kondimela Nzambe oyo asekwisá ye pe apesá ye lokumu. Boye bozali kotia mitema bobele epai ya Nzambe. 22 Bosi'bokómi bato ya peto, na ndenge bobandi kotosa maloba oyo euti na Nzambe. Yango ezali kotinda bino bozala na bolingo ya solo; boye bótikana té, bólinganaka penza na motema moko. 23 Pamba té bokómi bato ya sika; nzokande oyo aboti bino mbala ya mibale ezali té moto oyo asengeli kokufa, kasi ezali nde Maloba ya Nzambe oyo ezali na bomoi pe ekoumela seko. 24 Ekómamá boye: "Bato nyonso bazali lokola matiti, kitoko na bango ezali lokola flere ya bilanga; matiti ekaukaka, pe flere ekufaka. 25 Kasi Maloba ya Nkolo ekotikala seko." Maloba yango nde Sango Malamu oyo bamemelaki bino.

1 Piere 2

Yezu, fondasion ya Eklezya 1 Yango wana bólongola mabe nyonso, lokuta nyonso, pe zuwa; bótika kotónga baninga. 2 Bozala lokola bana babotami sika. Bango balukaka bobele komela mabéle; mabéle oyo bino bosengeli koluka ezali nde Maloba ya solo, po bókola pe bóbika. 3 Bosi'bomeki bolamu ya Nkolo Yezu; boyoki elengi na yango. 4 Bópusana penepene na ye; ye azali na bomoi, azali libanga oyo bato babwakaki; kasi Nzambe aponá yango, amoni 'tè ezali libanga ya lokumu penza. 5 Bino pe bozali na bomoi na miso ya Nzambe, bozali lokola mabanga oyo ye atóngelá"Ndako" ya Molimo Mosantu. Asi'akómisá bino lisanga ya banganga-Nzambe na ye, po bópesaka ye mabonza oyo ekoki na ye pe esepelisaka ye, po na Yezu Kristo. 6 Pamba té ekómamá boye: "Nasi'naponá libanga moko ya monene pe ya lokumu. Natiá yango na Yeruzalem, lokola libanga oyo esimbaka ba-mir na yango makasi. Moto oyo akotiela ye motema, akomona soni ata moke té." 7 Libanga wana ekómisá bino bakristo bato ya lokumu; kasi po na baoyo bandimaka té, "Libanga ba-mason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba." 8 "Bato babetaka mabaku na libanga oyo; yango ekweisaka bango." Babetaka mabaku po baboyi kondima Maloba ya Nzambe; yango nde makambo esengeli kokweela bango. 9 Kasi bino bozali ekolo oyo Nzambe aponá, bozali lisanga ya banganga-Nzambe ya Mokonzi monene, bozali ekolo ya bosantu oyo Nzambe akómisá ya ye penza, po bósakolaka sango ya misala na ye ya minene. Ye moto abengi bino po bólongwa na molili pe bómona moi na ye ya kokamwa. 10 Liboso bozalaki ekolo na ye té, kasi sik'oyo bokómi ekolo ya Nzambe. Liboso Nzambe azalaki koyokela bino mawa té, kasi sik'oyo ayokeli bino mawa.

Basali ya Nzambe

11 Bandeko ya bolingo, bozali lokola bapaya awa na mokili, bongo nasengi bino: bókeba na baposa ya bomoto oyo eyeelaka bino na mitema. 12 Bozala na bizaleli ya malamu na miso ya bato bayebi Nzambe té. Boye, ata bafundi bino 'tè bozali bato mabe, bakomona misala na bino ya malamu, bongo bakokumisa Nzambe, mokolo ye akomilakisa na bango. 13 Po na Nkolo Yezu, botosaka bakonzi ya mokili, ézala mokonzi monene ya Rome oyo aleki bango nyonso, 14 to batambwisi oyo ye atindaka po na kopesa etumbu na bato basalaka mabe, pe kokumisa baoyo basalaka malamu. 15 Pamba té, Nzambe alingi boye: bókokisa misala ya malamu, po bókangisa minoko ya bazoba oyo bayebi Nzambe té. 16 Bozali bato ya bonsomi. Nzokande bonsomi yango ekoki kopesa bino nzela té ya kosalaka mabe na kobombama; kasi bómikómisa baumbu ya Nzambe. 17 Botosaka bato nyonso, bólinganaka, bóbangaka Nzambe, pe botosaka mokonzi monene ya Rome.

Ndakisa ya Kristo oyo amonaki pasi

18 Bino baumbu, bósalelaka bakonzi na bino na botosi nyonso, ézala baoyo bazali malamu pe boboto, ézala kutu baoyo bazali matata. 19 Ya solo, tango mosusu bakoki konyokola bino na nko po bomipesi na Nzambe; bongo soki boyebi kokanga mitema, wana ezali bolamu oyo euti na Nzambe. 20 Soki bokangi mitema tango bazali kobeta bino po bosalaki mabe, eloko nini bokozwa? Kasi soki bokangi mitema tango bazali kobeta bino po bosali kaka malamu, yango ezali bolamu euti na Nzambe. 21 Wana ezali makambo Nzambe abengeli bino, pamba té Kristo amonaki pasi po na bino, bongo apesi bino ndakisa po bólanda nzela na ye. 22 Ye asalaki lisumu ata moko té; ata mbala moko té alobaki lokuta. 23 Tango bafingaki ye, azongisaki maloba ya mabe té; tango banyokolaki ye, akanelaki moto moko té, kasi amitikaki na maboko ya Nzambe, oyo akataka makambo na bosembo. 24 Tango babomaki ye na kuruze, amemaki mokumba ya masumu na biso, po tókóma lokola bato bakufa na oyo etali masumu, kasi tózala na bomoi po na kosala malamu. Bobiki po na bapota ye azokaki. 25 Pamba té, bozalaká lokola bameme oyo ebungi, kasi sik'oyo bosi'bozongi epai ya Mobokoli oyo azali kobatela bino po bóbika.

1 Piere 3

Basi pe mibali

1 Ndenge moko pe bino basi botosaka mibali na bino. Bongo soki bamosusu bazali kondima té atako bayoki maloba ya Nzambe, bándima po na maloba té kasi po na bizaleli na bino, 2 awa bazali komona 'tè bozali na bizaleli ya malonga pe ya botosi. 3 Bóluka komikomisa kitoko té na biloko oyo emonanaka na miso: lokola kokanga suki, kolata biloko ya or to bilamba ya kitoko. 4 Kasi bozala nde bato ya mitema boboto pe kimia. Wana ezali kitoko ya kobombama; yango esilaka té, pe ezali na tina monene na miso ya Nzambe. 5 Na tango ya kala basi ya bosantu bazalaká komikomisa kitoko bobele ndenge wana. Bazalaki kotia mitema epai ya Nzambe, pe kotosa mibali na bango. 6 Bókanisa ndenge Sara abandaká kotosa Abraham; azalaki kobenga ye "mokonzi na ngai". Bino bokómi bana na ye soki bosalaka makambo ya malamu, pe soki bobangaka ata eloko moko té. 7 Ndenge moko pe bino mibali, bafandaka malamu ná basi na bino. Bóyeba 'tè bazali na makasi té lokola bino. Botosaka bango, pamba té ban^o pe bakozwa bomoi oyo Nzambe alakaki. Bosalaka bongo po 'te eloko moko té ébebisa losambo na bino.

Ebongi tómona pasi po na makambo ya malamu

8 Bózalaka na motema moko, bóyokanaka pe bólinganaka lokola bandeko, bozala bato ya boboto pe bótika lofundu na kati na bino. 9 Soki moto asali yo mabe, kozongisela ye mabe té; soki moto afingi yo, kofinga ye té, kasi senga Nzambe ásala ye bolamu, pamba té Nzambe abengi bino po bózwa bolamu na ye nyonso. 10 Ekómamá boye: "Moto oyo alingi kozala malamu pe komona esengo na bomoi na ye, ábimisa maloba ya mabe té pe átika lokuta; 11 aboya makambo ya mabe pe asalaka oyo ya malamu, alukaka boboto tango nyonso. 12 Pamba té miso ya Nkolo ezali epai ya bato ya bosembo, pe matoi na ye na losambo na bango; kasi apesaká bato ya mabe mokongo." 13 Nani akosala bino mabe soki bomipesi na misala ya malamu? 14 Ata bato bazali konyokola bino po bosalaka malamu, bózalá na esengo! Bobangaka bango ata moke té, pe bózalaka mitema likolo té, 15 kasi bóndima na motema moko 'tè Kristo azali Nkolo. Soki bato batuni bino bolamu nini bozali kozela, bóyeba tango nyonso kopesa bango eyano ya malonga; 16 kasi bózongisela bango bobele na boboto, na botosi pe na motema moko. Boye soki bozali na bizaleli ya malamu ndenge ebongi na bakristo, baoyo batóngaka bino pe balobaká 'tè bozali bato mabe, bakoti-kala na soni. 17 Kasi soki Nzambe moto alingi bómona pasi, ebongi bámona pasi po na makambo ya malamu oyo bosalaka, esika 'tè bámona pasi po bosalaki makambo ya mabe. 18 Pamba té Kristo pe akufaki mbala moko likolo ya masumu ya bato; ye moto ya malamu akufaki na esika ya bato ya mabe, po ámema bino epai ya Nzambe. Akufaki po azalaki moto lokola bato nyonso, kasi asekwaki po azali na nguya ya Molimo. 19 Na nguya na ye ya Molimo, akitaki epai ya milimo ya bato oyo bazwaká etumbu, po na koteya bango. 20 Kala bato wana baboyaka kotosa Nzambe, nzokande ye azalaki kokanga motema tango Noé abandaki kotónga masuwa. Bato kaka mwambe nde bakotaki na masuwa yango; bongo Nzambe atindaki mai po na kobikisa bango. 21 Mai yango ezali kolakisa ndenge batisimo ebikisi bino sik'oyo. Moto oyo azwi batisimo alongoli mbindo na nzoto té, kasi asengi Nzambe ákómisa motema na ye pembe, po na Yezu Kristo oyo asi'asekwá. 22 Ye asi'amatá na Likolo, pe azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. Ba-anjelu pe milimo nyonso oyo bato bábengaka "Bakonzi" bakomi kotosa ye.

1 Piere 4

Ebongi bóbongola bizaleli

1 Awa Kristo andimaki komona pasi, bino pe bóndima komona pasi na molende nyonso. Pamba té bobele moto oyo asi'ayoki pasi, ye nde moto aboya masumu libela. 2 Boye na tango oyo bokotikala awa na mokili, bótika kolanda baposa ya bomoto, kasi bózalaka na bizaleli oyo Nzambe alingaka. 3 Pamba té, bosi'bobebisi tango mingi po na kolandaka makambo esepelisaka bato oyo bayebi Nzambe té. Bozalaki kosala kindumba, kondima baposa ya mabe, kolangwa masanga, kolia pe komela na lokoso mingi koleka, pe kobebisa lokumu na bino na ndenge bozalaki kosambela banzambe ya lokuta. 4 Kasi sik'oyo bato oyo bayebi Nzambe té bakomi kokamwa pe kofinga bino, lokola bozali kosangana ná bango lisusu té po na kosala makambo wana ya mobulu. 5 Nzokande mokolo ezali bakosamba po na yango nyonso, pamba té etikali moke Nzambe áya kokata makambo ya bato nyonso, baoyo bazali na bomoi, ná baoyo bakufa. 6 Po na yango, Kristo asakolaki Sango Malamu na bato bakufa, oyo biso tolobaka 'tè Nzambe àkatelaki bango etumbu, tango bazalaki nanu na mokili. Kristo asalaki boye po bákoka kozwa bomoi ya seko.

Ndenge ya kosalela makabo ya Nzambe

7 Suka ya makambo nyonso ekómi penepene. Yango wana, bozala bato ya mayele pe ya ekenge, po 'tè bókoka kobondela Nzambe. 8 Likambo eleki tina, yang'oyo: bólinganaka mingi penza; pamba té, bato oyo bazali kolingana, Nzambe alimbisaka bango masumu atako ezali ebele. 9 Bóyambaka bandeko na bandako na bino, bóyimayimaka té. 10 Bolamu oyo Nzambe apesaká ezali ya ndenge na ndenge; bósalelaka yango na ndenge ekoki. Pamba té, Nzambe apesaká moto na moto ya ye likabo; bósalelaka yango po na bolamu ya baninga. 11 Moto oyo asakolaka, ásakola bobele maloba ya Nzambe. Moto oyo asalisaka bandeko, ásalela bobele nguya oyo Nzambe apesi ye. Boye na makambo nyonso oyo bosalaka, Nzambe akozwa lokumu po na Yezu Kristo. Pamba té, lokumu pe nguya nyonso ezali ya ye seko! Amen.

Ndenge ya komona pasi lisanga na Kristo

12 Bandeko ya bolingo, bókamwa té po bozali komona bapasi mingi; bókanisa té 'tè bozali kaka bino moko, 13 kasi bósepela po bozali komona pasi ná Kristo. Na ndenge wana bokosepela mingi koleka, tango ye akomonana na lokumu. 14 Esengo na bino, soki bafingaka bino po na kombo ya Kristo, pamba té Molimo ya Nzambe oyo akoteli bino na mitema, azali Molimo ya Lokumu. 15 Bókeba po moto moko té na kati na bino ázwa etumbu po asali makambo ya mabe, lokola koboma moto, koyiba biloko, to kokota na makambo oyo etali yo té. 16 Nzokande soki moto amoni pasi po azali mokristo, áyoka soni té, kasi ápesa Nzambe mersi, po kombo wana ya mokristo ezali kombo ya lokumu. 17 Tango ekoki, po Nzambe ábanda kokata makambo ya bato; akosambisa liboso bato na ye. Bongo soki biso tosambi liboso, bato oyo baboyi kondima Sango Malamu ya Nzambe bakosuka ndenge nini? 18 "Soki bato ya malamu babiki na pasi penza, ekozala ndenge nini po na bato ya mabe pe ya masumu?" 19 Yango wana baoyo bazali komona pasi po Nzambe alingi boye, basalaka se makambo ya malamu pe bámipesa mobimba na Nzambe oyo asalá biloko nyonso. Ye akobosana bango té.

1 Piere 5

Ndenge ya kotambwisa Eklezya

1 Sik'oyo nalingi kopesa toli na bambuta-muntu ya eklezya na bino. Ngai pe nazali mbuta-muntu, nazali komona pasi ndenge Kristo amonaki, pe nakozwa lokumu, mokolo lokumu na ye ekomonana. 2 Bótambwisaka malamu bameme oyo Nzambe apesi na maboko na bino. Basalaka mosala na bino na matata té, na lokoso ya mbongo pe té, kasi na esengo nyonso pe na motema moko, ndenge Nzambe alingi. 3 Bozala ndakisa ya malamu epai ya bameme ya Nzambe; bómilakisa bakonzi té na kati ya bato oyo Nzambe apesi bino. 4 Bongo mokolo Mobokoli monene akomonana, nde bozwi lokumu oyo esilaka té. 5 Ndenge moko nasengi na bino bilenge, botosaka bambuta-muntu. Pe bino nyonso, bóyokanaka, bótika lofundu. Pamba té "Nzambe aboyaka bato ya monoko, kasi apesaká bolamu na ye na bato oyo bamikitisaka." 6 Yango wana bómikitisaka, po Nzambe ya nguya nyonso ábatela bino, pe átombola bino mokolo ye moko alingi. 7 Bólongola makanisi nyonso oyo etungisaka bino; bópesa yango na Nzambe, pamba té ye moto asalisaka bino. 8 Bófungola miso, bozala ekenge! Pamba té monguna na bino zabolo azali kotambolatambola, lokola tambo oyo ezali koganga pe koluka moto ya kolia. 9 Bóboya ye, bóndimela kaka Nzambe, po boyebi 'tè bandeko na bino oyo bapanzaná na mokili mobimba bamonaka pasi se ndenge moko. 10 Nzambe ya bolamu nyonso abengi bino po bózwa lokumu na ye ya seko, na lisanga ya Kristo. Sik'oyo bozali komona pasi po na mwa tango moke, kasi ye nde moto akozongisela bino kimia, akopesa bino molende penza, pe akotelemisa bino makasi. 11 Ye azali Mokonzi seko! Amen.

Mbote ya suka

12 Silas ndeko na ngai ya motema, asalisi ngai po na kokómela bino mwa mokanda oyo, po nálendisa bino pe ná lakisa bino ndenge bolamu ya Nzambe ezali. Bótia molende bobele po na yango. 13 Lingomba ya bato oyo Nzambe aponá na vile ya Babilone, etindeli bino mbote. Mwana na ngai Marko pe atindeli bino mbote. 14 Bino nyonso bópesana mbote na bolingo nyonso. Bandeko bakristo, boboto ézala na bino nyonso.

2 Piere 1

Mbote

1 Mbote na bino bato bozali na bondimi ya talo penza, ndenge moko lokola biso. Yango ezali likabo ya tina koleka; bozwi yango po na bolingo ya Nzambe pe Yezu Kristo, Mobikisi na biso. Ngai Simon Piere, mosali pe ntoma ya Yezu Kristo, moto natindeli bino mokanda oyo. 2 Awa boyebi Nzambe pe Yezu, Nkolo na biso, bózwa bolamu pe boboto mingi.

Nzambe abengi pe aponi biso

3 Na makasi na ye ya Nzambe, Yezu apesi biso nyonso oyo ekoki po tósepelisa Nzambe na bomoi na biso mobimba. Ye moto abengi biso pe asali 'tè tóyeba ye; alakisi biso lokumu pe nguya na ye, 4 pe apesi biso bilaka ya tina penza. Ya solo, apesi bino nzela po bósangana na bomoi na ye ya Nzambe, pe bóbika na liwa oyo ekweelaka bato nyonso po na baposa na bango ya mabe. 5 Lokola bosi'bondimeli Nzambe, bozala pe na bizaleli ya malonga, bókóma bato ya mayele, 6 bóyeba komibatela pe kokanga mitema, bómipesa na Nzambe, 7 bosalisanaka pe bólinganaka. 8 Soki bokómi kokokisa makambo wana nyonso, bokoyeba Nkolo na biso Yezu Kristo malamu; bokozala kobimisa misala pe kobota mbuma. 9 Kasi moto oyo azangá makambo wana azali lokola moto akufá miso; abosani 'tè Nzambe asi'alongolá masumu na ye ya kala. 10 Boye bandeko, bótia lisusu molende penza po na kondimela Nzambe oyo abengaki pe aponaki bino. Soki bosali ndenge wana, bokokweya na mabe ata moke té, 11 pe Nzambe akokómisa bino bato ya mboka ya seko, ya Yezu Kristo oyo azali Nkolo pe Mobikisi na biso. 12 Yango wana, nakolemba té po na kozongela makambo oyo bosi'boyeba, ata bolandaka malamu makambo ya solo oyo bosi'bozwá. 13 Kasi namoni 'tè ebongi nálamusaka bino pe nákebisaka bino tii liwa na ngai. 14 Pamba té etikali moke nákufa, ndenge Nkolo na biso Yezu Kristo ayebisaki ngai. 15 Bongo nakosala nyonso 'tè sima ya liwa na ngai bókoka kobatela makambo oyo.

Tólanda bobele maloba ya Bantoma pe ya Baprofete

16 Tango nayebisaká bino 'tè Nkolo na biso Yezu Kristo akoya na nguya na ye, nalandaki masolo ya pamba té oyo eutaka na mayele ya bato; kasi ngai moko namonaki nkembo na ye na miso, 17 tango Nzambe Tata ya nkembo nyonso akumisaki ye pe alobaki boye: "Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi po na ye." 18 Ngai moko nayokaki mongongo oyo eutaki na Likolo tango nazalaki na ye, na ngomba ya bosantu. 19 Tokoki pe kotia mitema penza na maloba oyo baprofete basakolaká. Ebongi bókamata yango lokola mwinda oyo ezali kopela na esika ya molili, tii tongo ekotana na mitema na bino. 20 Mama ya likambo yang'oyo: moto moko té akoki kolimbola na makanisi na ye moko maloba oyo baprofete bakomaká. 21 Pamba té profete moko té asi'asakolá na makanisi na ye moko; soki bato bazalaki koloba na kombo ya Nzambe, ezalaki bobele na lisalisi ya Molimo Mosantu. 2

Balakisi ya lokuta

1 Baprofete ya lokuta bazalaká na kati ya bato ya Israel; ndenge moko pe balakisi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisela bino mateya oyo ememaka liwa; bakoboya kutu ata Mokonzi oyo alongolaki bango na boumbu; boye bakomilukela liwa ya mbalakaka. 2 Bato ebele bakolanda makambo na bango ya kindumba, pe likolo na bango mingi bakotsiola nzela ya solo. 3 Lokola bakotonda na lokoso ya mbongo, bakobanda kokosa bino po bázwa biloko na bino. Kasi Nzambe alalaka té; asi'akatelá bango etumbu ya liwa ya seko. 4 Pamba té ata kutu ba-anjelu oyo basalaka masumu, Nzambe ayokelaka bango mawa té, kasi abwakaki bango na lifelo esika akangisá bango na kati ya molili, tii mokolo akokatela bango etumbu libela. 5 Ndenge moko pe adindisaká mokili ya kala na mai, ayokelaki bato ya mabe mawa té; kasi abikisaki bobele Noé oyo azalaki kosakola makambo ya bosembo, ná bato na ye sambo. 6 Pe lisusu akatelaká mboka Sodome ná Gomore etumbu pe azikisaki yango na móto, apesaki ndakisa na bato nyonso ya mobulu oyo bakoya sima. 7 Kasi abikisaki Lot, moto ya bosembo, oyo azalaki komona pasi po na bizaleli ya bato wana ya mobulu. 8 Pamba té moto yango ya bosembo azalaki kofanda na kati na bango, boye abandaki komona pe koyoka mikolo nyonso makambo ya mabe oyo bazalaki kosala; bongo akómaki komona motema pasi mingi po na yango. 9 Nyonso wana ezali kolakisa ndenge Nzambe abikisaka bato naye na tango ya pasi, pe ndenge azali kobatela bato ya mabe po apesa bango etumbu mokolo akokata makambo ya bato nyonso. 10 Akopesa etumbu ya makasi koleka na bato oyo balandaka baposa ya mabe ya nzoto, pe batsiolaka bokonzi ya Nzambe. Balakisi wana ya lokuta batondá na lofundu pe lolendo, batsiolaka milimo ya Likolo oyo esalaká masumu. 11 Nzokande ata ba-anjelu oyobaleki bango na makasi pe na nguya, batsiolaka milimo wana té; bafundaka yango té epai ya Nzambe. 12 Bato wana bazali lokola banyama ya zamba oyo ebotamaka po bákanga yango pe báboma yango; bazangá mayele, batsiolaka makambo oyo bayebi té; bakosuka kaka lokola banyama. 13 Bakomona pasi po na mabe oyo bazali kosala; basepelaka bobele po na kokokisa baposa na bango ya mabe na miso ya bato Bazali bato ya mbindo, babebá kala. Tango basanganaka ná bmo po na kolia, basalaka nyonso po na kopanza makambo na bango ya lokuta. 14 Balukaka bobele basi ya ndumba, balembaka té po na kosala masumu, bakosaka bato oyo bazangi makasi, batondá na lokoso ya mbongo. Etumbu ya Nzambe ezali kozela bango. 15 Basi'batiká nzela ya malamu pe babungi, ndenge balandi nzela ya Balam, mwana ya Beor; ye azalaki kosala mabe likolo ya mbongo. 16 Kasi punda na ye ebimisaki mongongo ya moto-ata bapunda elobaka té-epekisaki Balam átika kosala makambo ya bozoba. 17 Bato yango bazali lokola bisika oyo bato balukaka mai, nzokande eloko moko té ebimaka wana; bakokani pe na mapata oyo ekitisaka mbula té po mopepe ezali komema yango. Nzambe asi'abombelá bango esika moko ya mouli penza. 18 Na masolo na bango ya lofundu pe ya bozoba, bakosaka bato oyo basi'balongwe na kati ya baninga na bango ya bizaleli ya mabe; babendaka bango po bálanda baposa ya soni; 19 balakaka bango 'tè bakokóma bato ya bonsomi, nzokande bango moko bazali baumbu ya makambo oyo ememaka liwa; pamba té soki moto akangani na likambo, akómi moumbu na yango. 20 Bato wana bandimelaki Yezu Kristo, Nkolo pe Mobikisi na biso; po na ye balongwaki na makambo ya mabe ya mokili; bongo lokola bazongeli yango pe bakomi lisusu kokangana na yango, suka na bango ekozala mabe penza koleka ya liboso. 21 Ebongaki malamu kutu báyeba nzela ya bosembo té; nzokande bayebaki yango, kasi na sima bayei kobwaka mibeko ya Nzambe. 22 Makambo oyo ekweelaki bango ezali kolakisa 'tè balobaká ya solo: "Mbwa ezongelaka lisusu biloko ye moko asanzi", pe "Ngulu ata basukoli yango, ezongaka noki na potopoto".

2 Piere 3

Elaka po na koya ya Nkolo

1 Bandeko, oyo ezali mokanda ya mibale nakómeli bino likolo ya makambo oyo bosi'boyebá. Nasali boye po nálamusa bino, bongo bózalaka na makanisi ya malamu. 2 Bokanisaka maloba oyo baprofete bazalaká kosakola, pe lisusu mibeko ya Yezu, Nkolo pe Mobikisi na biso, ndenge bantoma na bino balakisaki bino. 3 Bóyeba malamu 'tè na mikolo ya suka bato bakomonana oyo bakobanda kolanda bobele baposa na bango moko. Bakozala kotia tembe po na maloba ya Nkolo pe bakoseka yango, 4 bakoloba boye: "Moto yango alakaki 'tè akozonga. Bongo wapi ye? Bakristo ya liboso basi'bakufá, kasi makambo nyonso ezali koleka kaka ndenge moko uta ebandeli ya mokili!" 5 Babosanaka na nko makambo oyo: na ebandeli Nzambe asalaka Likolo na se na maloba na ye; abimisaka yango na mai, pe apiki yango na likolo ya mai. 6 Se bongo pe mai eyaká kobebisa yango, na ndenge edindisaki mokili. 7 Bobele ndenge wana, Likolo na se ya lelo ezali koumela kaka po na maloba oyo Nzambe alobá, tii mokolo akoboma yango na móto. Azali kobatela yango tii mokolo akokatela bato ya mabe etumbu ya liwa ya seko. 8 Kasi bandeko, bóbosana té 'tè Nkolo amonaka mokolo moko lokola bambula nkoto; pe bambula nkoto, lokola mokolo moko. 9 Bato mosusu bazali koloba 'tè Nkolo aumeli po na kokokisa elaka na ye. Ezali bongo té; azali kutu kokanga motema po na bino, pamba té alingi té ata moto moko ábunga; alingi bato nyonso bábongola mitema. 10 Kasi mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka. Mokolo yango, Likolo ekolimwa pe makelele moko ya somo ekoyokana; biloko nyonso ya Likolo ekokufa na móto; mokili ná makambo nyonso bato bazali kosala, ekomonana lisusu té. 11 Lokola nyonso wana ekokufa boye, bosengeli kozala bato ya bosantu pe ya losambo. 12 Bózela mokolo ya Nzambe na motema moko, pe bótia molende po yango éya noki. Mokolo yango Likolo ekozika, pe biloko nyonso oyo ezali kuna ekokufa na móto ya makasi. 13 Kasi biso tozali kozela Likolo ya sika pe mokili ya sika oyo Nzambe alakaká bato na ye. Kuna ekozala bobele bosembo. 14 Yango wana, bandeko, awa bozali kozela mokolo yango, bótia molende po Nzambe áya kokuta bino bato ya mitema pembe, ya boboto, pe ya malonga penza. 15 Bóyeba malamu 'tè soki Nkolo na biso azali kokanga motema, ezali bobele po bókoka kobika. Wana ezali makambo ndeko na biso ya bolingo Polo akómelaki bino, na mayele oyo Nzambe apesaki ye. 16 Azalaki kozongela yango mbala mingi na mikanda na ye nyonso. Makambo mosusu kutu ezali pasi po bato báyeba tina na yango; yango wana bato oyo bazangá mayele bazali kolimbola yango na ndenge ekoki té, po bayebi makanisi ya Nzambe té. Basalaka se ndenge wana na Mikanda mosusu; bazali komilukela liwa ya seko. 17 Boye bandeko, nasi'nakebisi bino. Bozali kondima na motema moko, bozala ekenge, po bato ya mabe bákosa bino té pe bákweisa bino té. 18 Kasi lokola bosi'boyebi Yezu Kristo, Nkolo pe Mobikisi na biso, pe bosi'bozwi bolamu na ye, bótia molende po bókóma bato ya kokoka. Lokumu ézala na ye sik'oyo pe seko! Amen.

1 Yoane 1

Maloba oyo epesaka bomoi

1-2 Nazali koyebisa bino makambo etali Moto oyo azalaká uta na ebandeli ya makambo nyonso. Toyokaki ye pe tomonaki ye na miso na biso moko; totalaki ye malamu pe tosimbaki ye na maboko. Ye azali penza Maloba oyo epesaka bomoi ya solo. Bomoi yango eyaki komimonisa epai ya bato; tomonaki yango pe tozali kosakola sango na yango. Moto oyo apesaká bomoi ya seko azalaká epai ya Tata pe ayaki komilakisa na biso. 3 Biso tosi'tosanganá ná Tata pe na Mwana na ye Yezu Kristo; bongo nazali koyebisa bino makambo oyo tomonaki pe toyokaki, po bino pe bozala ná biso lisanga moko. 4 Nazali kokómela bino makambo oyo po esengo na biso ézala ya kokoka.

Nzambe azali lokola moi

5 Sango oyo toyokaki epai ya Yezu pe nazali koyebisa bino, yang'oyo: Nzambe azali lokola moi, pe epai na ye molili ezali ata moke té. 6 Soki tolobi 'tè tozali ná ye lisanga, nzokande tozali kotambola na molili, tozali kobuka lokuta, pe tolandaka té makambo Nzambe alakisá biso. 7 Kasi soki tozali kotambola na moi ndenge Nzambe ye moko azalaká na moi, biso nyonso tokómi lisanga moko, pe makila ya Yezu, Mwana ya Nzambe, esi'elongolá biso mbindo nyonso ya masumu. 8 Soki tolobi 'tè tozali na masumu té, tozali komikosa pe koboya makambo Nzambe alakisá biso. 9 Nzokande, soki tondimi 'tè t osali masumu, Nzambe azali bosembo, akokisaka maloba na ye; akolimbisa biso masumu nyonso pe akokómisa biso peto. 10 Soki tolobi 'tè nanu tosalá masumu té, tokómisi Nzambe moto ya lokuta, pe maloba na ye ekoteli biso té.

1 Yoane 2

Kristo asalisaka biso

1 Bana na ngai, nazali kokómela bino makambo oyo po bósala masumu té. Nzokande soki moto asali masumu, Yezu Kristo moto ya bosembo, azali avoka na biso epai ya Tata. 2 Ye nde moto amipesaki na Nzambe lokola libonza po na masumu na biso; ezali kaka po na masumu na biso té, kasi po na oyo ya bato nyonso. 3 Tokoki koloba 'tè toyebi Nzambe bobele soki totosaka mibeko na ye. 4 Moto oyo alobaká 'tè ayebi Nzambe, nzokande atosaka mibeko na ye té, azali moto ya lokuta pe aboyi makambo Nzambe alakisá ye. 5 Kasi moto oyo atosaka maloba ya Nzambe, motema na ye etondá na bolingo ya Nzambe. Na ndenge wana toyebaka 'tè tozali lisanga ná Nzambe. 6 Moto oyo alobaká 'tè azali lisanga ná Nzambe, asengeli kozala na bizaleli oyo Yezu azalaki na yango.

Mobeko ya sika

7 Bandeko na ngai ya bolingo, nazali kokómela bino mobeko ya sika té, kasi bobele oyo ya kala. Bosi'bozwá yango, pamba té ezali nde maloba oyo boyokaki na ebandeli 8 Nzokande ezali kaka mobeko ya sika. Yezu akokisaki yango, bino pe bozali kokokisa yango Pamba té molili ekómi kolimwa, pe moi ya solo ebandi kongenga. 9 Moto oyo alobaká 'tè atambolaka na moi, nzokande ayinaka ndeko na ye, azali kaka na molili tii sik'oyo. 10 Oyo alingaka ndeko na ye azali na moi; pe eloko moko té ezali na motema na ye oyo ekoki kokweisa ye na masumu. 11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali na molili pe atambolaka na molili; ayebaka té epai wapi azali kokende, pamba té molili esi'ezipá miso na ye. 12 Bana, nazali koyebisa bino: masumu na bino esi'elongwá po bondimeli Yezu. 13 Batata, nazali koyebisa bino: boyebi Moto oyo azalaká uta na ebandeli. Bilenge, nazali koyebisa bino: bosi'bolongi Monguna. 14 Bana, nazali koyebisa bino ya solo: boyebi Tata. Batata, nazali koyebisa bino ya solo: boyebi Moto oyo azalaká uta na ebandeli. Bilenge, nazali koyebisa bino ya solo: bozali bilombe; maloba ya Nzambe esi'ekotelá bino, pe bosi'bolongi Monguna. 15-16 Makambo ya mokili etondisaka mitema ya bato na baposa ya ndenge na ndenge; balukaka kozwa biloko nyonso oyo bamonaka; bakomaká kosala lofundu po na bomengo na bango. Nyonso wana eutaka na Tata té; yango wana bólingaka yango té. Pamba té moto alingaka yango azali na bolingo ya Tata té. 17 Makambo ya mokili ná baposa ya bato ezali kolimwa; kasi moto oyo asalaka makambo Nzambe alingaka, azali na bomoi ya seko.

Monguna ya Kristo

18 Bana na ngai, tokómi na tango ya suka. Boyokaki 'tè Monguna ya Kristo azali koya; sik'oyo banguna ebele ya Kristo basi'babimi. Yango wana toyebi 'tè tokómi na tango ya suka. 19 Bato yango bazalaki bandeko na biso té; yango wana batiki biso. Soki bazalaki penza bandeko na biso, mbele batikalaki na kati na biso. Kasi batiki biso po émonana polele 'tè moko té na kati na bango azalaki ndeko na biso. 20-21 Nzokande bino bosi'bozwá Molimo oyo auti na Kristo; boye bino nyonso boyebi makambo Nzambe alakisá bino. Soki nakómeli bino mokanda oyo, elakisi té 'tè boyebi makambo wana té, kasi boyebi yango. Epai ya bato oyo balandaka yango, likambo moko té ya lokuta ezalaká. 22 Nani azali moto ya lokuta pe monguna ya Kristo? Ezali moto oyo awanganaka 'tè Yezu azali Mesia té. Moto yango awangani Tata pe Mwana 23 Pamba té moto oyo awangani Mwana, awangani pe Tata. Moto oyo andimeli Mwana, andimeli pe Tata. 24 Yango wana, makambo oyo bosi'boyoká uta na ebandeli, bóbatela yango na mitema. Soki bobateli makambo oyo bosi'boyoká uta na ebandeli, bino pe bokozala libela lisanga ná Mwana pe Tata. 25 Elaka Kristo apesaki biso, yang'oyo: Tokozwa bomoi ya seko. 26 Nakómeli bino makambo wana po na bato oyo balukaka nzela ya kokosa bmo. 27 Kasi bmo, Kristo asi'apesá bmo Molimo, oyo azali ná bmo libela; boye bozali na posa ya mateya ya bato té, pamba té Molimo ya Kristo alakisaka bino makambo nyonso; alobaká makambo ya solo, akosaka té. Yango wana, bósangana libela ná Kristo ndenge Molimo na ye azali kolakisa bino. 28 Ya solo, bana na ngai, bósangana ná Kristo libela, bongo mokolo ye akomonana tokozala na molende; tokoyoka soni té na miso na ye mokolo ye akoya. 29 Boyebi 'tè Kristo azali moto ya bosembo; boye bosengeli koyeba 'tè moto nyonso oyo asalaka makambo ya bosembo azali mwana ya Nzambe.

1 Yoane 3

Bana ya Nzambe

1 Botala ndenge Tata alingi biso mingi koleka; abengaka biso bana na ye. Ya solo, tozali bana ya Nzambe. Yango wana bato ya mokili bayebi biso té, po bayebi Nzambe té. 2 Bandeko na ngai ya bolingo, sik'oyo tosi'tokómá bana ya Nzambe, kasi nanu emonani té soki tokozala ndenge nini. Nzokande toyebi 'tè tango Kristo akomonana tokozala lokola ye, pamba té tokomona ye ndenge azali. 3 Moto nyonso oyo azali kotia motema 'tè Kristo akoyeela ye bolamu wana, akómisi motema na ye pembe ndenge Kristo azali na motema pembe. 4 Moto nyonso oyo asalaka masumu, azali koboya Nzambe, pamba té kosala masumu ezali koboya Nzambe. 5 Kasi boyebi 'tè Kristo ayaki awa na se po na kolongola masumu ya bato, pe ye atikalaki kosala masumu ata moke té. 6 Bongo moto nyonso oyo asangani na Kristo, asalaka lisusu masumu té. Kasi moto nyonso oyo azali kaka kosala masumu, atikalaki komona ye té pe ayebi ye ata moke té. 7 Bana na ngai, moto moko té ákosa bmo. Moto oyo asalaka makambo ya bosembo azali bosembo na miso ya Nzambe, lokola Kristo. 8 Moto oyo asalaka masumu azali moto ya zabolo, pamba té zabolo abandá kosala masumu uta na ebandeli. Mwana ya Nzambe ayaki awa na se bobele po na koboma misala ya zabolo. 9 Moto nyonso oyo azali mwana ya Nzambe asalaka lisusu masumu té po azali na bomoi oyo euti na Nzambe. Boye akoki kosala masumu té, po Nzambe azali Tata na ye. 10 Tala ndenge tokoki koyeba banani bazali bana ya Nzambe pe banani bana ya zabolo: moto nyonso oyo aboyaka kosala makambo ya bosembo pe alingaka ndeko na ye té, azali mwana ya Nzambe té.

Kolingana

11 Makambo bosi'boyoká uta ebandeli yang'oyo: tosengeli kolingana. 12 Tózala lokola Kaina té: ye azalaká moto ya zabolo, yango wana abomaki ndeko na ye. Po na nini abomaki ye? Ezali po ye azalaki kosala mabe, nzokande ndeko na ye azalaki kosala malamu. 13 Bandeko, bókamwa té soki bato ya mokili oyo bazali koyina bino. 14 Biso toyebi 'tè tolongwe na liwa pe tokómi na bomoi, pamba té tozali kolingana. Nzokande moto oyo alingaka bandeko na ye té, atikali moto akufá. 15 Moto oyo ayinaka ndeko na ye azali lokola mobomi. Boyebi 'tè mobomi akoki kozala na bomoi ya seko té. 16 Kristo alakisaki biso eloko bábengaka bolingo, na ndenge apesaki bomoi na ye po na biso. Bongo biso pe tosengeli kopesa bomoi na biso po na bandeko na biso. 17 Soki moto ya bomengo amoni 'tè ndeko na ye azali kokelela, kasi aboyi kosalisa ye, ndenge nini akoki koloba 'tè alingaka Nzambe? 18 Bana na ngai, bolingo na biso ézala bobele ya maloba té; kasi tósala nde misala, tólinganaka na ndenge ya solo.

Kotia motema na Nzambe

19 Soki tozali kolingana ndenge wana, tokoyeba 'tè tolandaka makambo oyo Nzambe alingaka; boye tokoki kokitisa mitema na miso na ye, 20 ata soki toyebi 'tè tosalaki masumu. Pamba té Nzambe aleki biso na ndenge alingaka bato pe ayebi makambo nyonso. 21 Boye bandeko ya bolingo, lokola toyebi 'tè tozali lisusu na masumu té, tokoki kotia mitema epai ya Nzambe. 22 Tozwaka makambo nyonso tosengaka epai na ye, po totosaka mibeko na ye pe tósalaka oyo esepelisaka ye. 23 Mobeko Nzambe apesá biso, yang'oyo: tóndima Mwana na ye Yezu Kristo, pe tólinganaka ndenge Kristo atindaki biso. 24 Moto oyo atosaka mibeko ya Nzambe azali ná ye lisanga libela. Toyebi 'tè Nzambe azali ná biso lisanga, po na Molimo oyo apesá biso.

1 Yoane 4

Molimo ya Nzambe pe molimo ya lokuta

1 Bandeko ya bolingo, baprofete mingi ya lokuta basi'bapanzani na mokili. Bóndimela baprofete nyonso té kasi bómeka bango liboso, po na koyeba soki molimo oyo bazali na yango euti na Nzambe. 2 Tala ndenge bokoyeba Molimo ya Nzambe: profete nyonso oyo andimaka 'tè Yezu Kristo akómaki penza moto lokola biso, ye nde azali na Molimo oyo auti na Nzambe. 3 Kasi profete nyonso oyo akamati Yezu na ndenge wana té, azali na Molimo ya Nzambe té. Azali na molimo oyo euti na Monguna ya Kristo. Boyokaki 'tè molimo yango elingaki koya, pe sik'oyo esi'ekómi awa na mokili. 4 Kasi bino, bana na ngai, bozali lisanga ná Nzambe, pe bosi'bolongi baprofete wana ya lokuta; pamba té Molimo oyo azali na bino aleki milimo oyo ezali na bato ya mokili. 5 Baprofete ya lokuta bazali bato ya mokili; yango wana basakolaka makambo ya mokili pe bato ya mokili bayokelaka bango. 6 Kasi biso tozali lisanga ná Nzambe. Moto oyo ayebi Nzambe ayokelaka biso, kasi oyo azali moto ya Nzambe té, ayokelaka biso té. Wana ezali ndenge toyebelaka Molimo oyo alakisaka makambo Nzambe alingaka, ná molimo oyo ekosaka.

Nzambe azali bolingo

7 Bandeko ya bolingo, tólinganaka, pamba té bolingo eutaka na Nzambe. Moto azali na bolingo azali mwana ya Nzambe pe ayebi Nzambe. 8 Oyo azangá bolingo ayebi Nzambe té. Pamba té Nzambe azali bolingo. 9 Tala ndenge Nzambe alakisaki biso bolingo na ye: atindaki Mwana na ye se moko awa na mokili, na tina 'tè tózala na bomoi ya solo po na ye. 10 Ya solo, bolingo ya Nzambe eleki monene: ezali biso té bato tozalaki kolinga ye, kasi ye nde moto azalaki kolinga biso, bongo atindaki Mwana na ye, oyo amipesaki lokola libonza po na kolongola masumu na biso. 11 Bandeko ya bolingo, lokola Nzambe azalaki kolinga biso mingi boye, biso pe tosengeli kolingana. 12 Moto moko té asi'amoná Nzambe; kasi soki tozali kolingana, wana elakisi 'tè Nzambe azali ná biso lisanga, bongo bolingo na ye eboti mbuma ya kokoka na mitema na biso. 13 Toyebi 'tè tozali ná Nzambe lisanga, po asi'apesi biso Molimo na ye. 14 Ya solo Tata atindaki Mwana na ye po na kobikisa bato ya mokili. Tozali kosakola bongo, po tomonaki ye na miso. 15 Moto nyonso oyo andimi 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe, azali ná Nzambe lisanga. 16 Biso toyebi pe tondimaka 'tè Nzambe alingaka biso. Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo, azali ná Nzambe lisanga. 17 Soki bolingo ya Nzambe eboti mbuma ya kokoka na mitema na biso, wana bizaleli na biso awa na mokili ekokani ná oyo Yezu Kristo azalaki na yango; boye tokozala na molende mokolo Nzambe akosambisa bato. 18 Moto oyo azali na bolingo abangaka té, po bolingo ya solo elongolaka kobanga. Nzokande moto abangaka soki azali kozela etumbu; na boye emonani 'tè bolingo na ye ezali ya kokoka té. 19 Biso tozali na bolingo, po Nzambe azalaki kolinga biso liboso. 20 Soki moto alobi 'tè alingaka Nzambe nzokande ayinaka ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba té ndeko oyo ye azali komona na miso, alingaka ye té; ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amoná nanu té? 21 Mobeko Kristo apesaki biso, yang'oyo: moto alingaka Nzambe, asengeli pe kolinga ndeko na ye.

1 Yoane 5

Tosi'tolongi mabe ya mokili

1 Moto nyonso oyo andimi 'tè Yezu azali Mesia, azali mwana ya Nzambe. Moto nyonso oyo alingi Tata, alingi pe bana na ye. 2 Toyebaka 'tè tozali kolinga bana ya Nzambe bobele soki tozali kolinga Nzambe pe kotosa mibeko na ye. 3 Pamba té kolinga Nzambe ezali kotosa mibeko na ye. Mibeko na ye ezali penza pasi mingi té po na biso; 4 mwana nyonso ya Nzambe alongaka mabe ya mokili. Biso, na bondimi na biso tosi'tolongi. 5 Bobele moto oyo andimaka 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe, ye nde moto alongaka mabe ya mokili.

Makambo Nzambe alakisaki po na Kristo

6 Toyebi Yezu Kristo po na mai pe makila na ye. Ezalaki kaka mai té, kasi mai na makila. Molimo nde moto azali koyebisa yango; pe toyebi 'tè Molimo ayebisaká makambo Nzambe asalaka. 7-8 Boye ekómi lokola likambo bato misato balobi: Molimo, mai, pe makila; bango nyonso bazali koloba bobele ndenge moko. 9 Soki bato misato balobi ndenge moko, tondimaka maloba na bango; kasi maloba ya Nzambe eleki na tina, pamba té Nzambe ye moko moto alobaki po na Mwana na ye. 10 Bongo moto oyo andimeli Mwana ya Nzambe, azali kobomba maloba ya Nzambe na motema na ye. Kasi oyo andimi Nzambe té, akómisi ye moto ya lokuta, na ndenge azali koboya makambo Nzambe alobaki po na Mwana na ye. 11 Maloba wana ya Nzambe elakisi 'tè ye asi'apesá biso bomoi ya seko; tozwaka yango po na Mwana na ye. 12 Moto oyo azali lisanga na Mwana, azali na bomoi; oyo asangani na Mwana ya Nzambe té, azali na bomoi té.

Bomoi ya seko

13 Bino bato bondimelaka Mwana ya Nzambe, nakómeli bino makambo oyo po bóyeba malamu 'tè bozali na bomoi ya seko. 14 Tokoki kotia mitema na Nzambe; toyebi 'tè ayokelaka biso soki tosengi makambo oyo ye alingi. 15 Lokola toyebi 'tè ayokelaka biso tango nyonso tosengaka ye, toyebi pe 'tè tosi'tozwi nyonso oyo tosengaki ye. 16 Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala masumu oyo ememaka liwa ya seko té, ebongi moto wana ábondela Nzambe, bongo Nzambe akopesa ndeko na ye bomoi. Yango ekoki kosalama po na bato bazali kosala masumu oyo ememaka liwa té. Nzokande lisumu moko ezali oyo ememaka liwa ya sekoe; pe nalobi té 'tè bobondela Nzambe po na bato basalaka lisumu ya ndenge wana. 17 Mabe nyonso oyo bato basalaka ezali masumu, kasi lisumu moko ezali oyo ememaka liwa. 18 Toyebi 'tè moto nyonso oyo azali mwana ya Nzambe asalaka masumu té, pamba té Yezu, Mwana ya Nzambe, abate-laka ye; boye Monguna akoki kosala ye eloko moko té. 19 Toyebi malamu 'tè tozali bato ya Nzambe, pe mokili mobimba ezali na maboko ya Monguna. 20 Toyebi pe 'tè Mwana ya Nzambe ayaki awa na mokili pe apesaki biso mayele po tókoka koyeba Nzambe ya solo. Tosangani na Nzambe ya solo na lisanga ya Mwana na ye Yezu Kristo. Ye moto azali Nzambe ya solo pe apesaká bomoi ya seko. 21 Bana na ngai, bóboya banzambe ya bikeko.

2 Yoane 1

Mbote

1-2 Bandeko oyo Nzambe aponá, bino nyonso bóyamba mbote euti na ngai, mbuta-muntu ya Eklezya. Ya solo, nalingaka bino penza; ezali bobele ngai té, kasi bato nyonso oyo bayebi makambo Nzambe alingaka. Pamba té makambo yango etikalaka na kati ya mitema na biso pe ekozala na biso seko. 3 Nzambe Tata pe Yezu Kristo, Mwana ya Tata, bápesa biso bolamu ná boboto, pe báyokela biso mawa, po tózala bato ya solo pe ya bolingo.

Bolingo pe mateya ya solo

4 Nazali na esengo mingi penza ya koyoka 'tè bandeko mosusu na kati na bino bazali kolanda makambo oyo Nzambe Tata alingaka, ndenge ye atindaki biso. 5 Bandeko, nazali kokómela bino mobeko ya sika té, kasi bobele oyo toyokaki uta ebandeli. Nasengi bino sik'oyo: tólingana. 6 Bolingo ezali nini? Ezali bobele kotosa mibeko ya Nzambe. Mobeko oyo bozwaki uta ebandeli, yang'oyo: bosengeli kolingana tango nyonso. 7 Bato mingi ya lokuta bapanzani awa na mokili. Baboyi kondima 'tè Yezu Kristo akómaki moto pe ayaki awa na mokili. Moto aboyi kondima boye azali moto ya lokuta pe monguna ya Kristo. 8 Bókebaka po misala oyo bosi'bokokisi ébeba té; kasi bózwa na yango lifuta oyo ekoki. 9 Moto nyonso oyo akangami na mateya ya Kristo té kasi alandi makambo mosusu, azali lisanga ná Nzambe té. Kasi oyo akangamaka na mateya ya Kristo, ye nde moto azali lisanga ná Tata pe Mwana. 10 Soki moto ayeeli bino mateya mosusu, bóyamba ye na bandako na bino té; bópesa ye kutu ata mbote té. 11 Pamba té moto nyonso oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.

Makambo ya suka

12 Nazali na makambo mosusu mingi ya koyebisa bino, kasi nalingi kokómela bino yango na mokanda té. Natii motema 'tè nakoya kuna kolobela bino yango ngai moko, boye biso nyonso tokotonda na esengo. 13 Bandeko na bino ya awa baoyo Nzambe aponá, bango pe batindeli bino mbote.

3 Yoane 1

Mbote

1 Gayus ya bolingo, yamba mbote euti na ngai, mbuta-muntu ya Eklezya. Ya solo, nalingaka yo mingi. 2 Ndeko ya bolingo, nasengi Nzambe 'tè ózalaka malamu penza pe nzoto makasi, ndenge bondimi na yo ezali makasi. 3 Nazalaki na esengo mingi, tango bandeko mosusu bayaki koyebisa ngai 'tè omipesá mobimba na Nzambe pe ozali kaka kolanda makambo ye alingaka. 4 Soki nayoki 'tè bana na ngai balandaka makambo Nzambe alingaka, yango esepelisaka ngai mingi koleka.

Gayus mokristo ya solo

5 Ndeko ya bolingo, omipesaka na motema moko po na kosalisa bandeko bakristo, ézala kutu bapaya. 6 Bango bayebisaki bakristo ya awa, ndenge olakisaki bango bolingo. Salisaka bango kaka na ndenge esepelisaka Nzambe, po básilisa mobembo na bango malamu. 7 Pamba té bazali kosala mobembo yango po na kosakola sango ya Kristo, pe bazwaka lisalisi moko té epai ya bato oyo bayebi Nzambe té. 8 Yango wana biso tosengeli kosalisa bandeko yango, boye tokozala kosalela Nzambe, po maloba na ye épanzana.

Diotrefes ná Demetrius

9 Nakómelaki eklezya na bino mwa mokanda, kasi Diotrefes aboyaka maloba na ngai; ye alingaka komitia liboso ya bato nyonso. 10 Yango wana, tango nakoya nakobimisa nyonso oyo ye asalaka: tango nyonso akoselaka biso makambo; kasi lisusu soki bandeko bayei kotala bino, ayambaka bango té; kutu soki moto alingi koyamba bango, apekisaka ye pe abenganaka ye na eklezya. 11 Ndeko ya bolingo, kolanda makambo ya mabe té, kasi landa makambo ya malamu. Moto oyo asalaka malamu azali moto ya Nzambe; oyo asalaka mabe, nanu amoná Nzambe té. 12 Bato nyonso bazali kokumisa Demetrius; pe maloba ya Nzambe oyo ye asakolaka ezali kosala ndenge moko. Ngai pe nazali kokumisa ye, pe oyebi 'tè nalobaka kaka makambo ya solo.

Makambo ya suka

13 Nazali na makambo mosusu mingi ya koyebisa yo, kasi nalingi kokóma yango na mokanda té. 14 Natii motema 'tè sima ya mwa tango moke nakoya kotala yo po tósolola. 15 Tikala malamu! Baninga na yo batindeli yo mbote. Pesa pe mbote na baninga na biso moko moko.

Yuda 1

Mbote

1-2 Mbote na bino bato Nzambe aponá na bolingo nyonso, pe Yezu Kristo abatelaka. Nzambe áyokela bino mawa; átondisa bino na boboto pe na bolingo. Ngai Yuda mosali ya Yezu Kristo pe ndeko ya Jake moto natindeli bino mokanda oyo.

Balakisi ya lokuta

3 Bandeko ya bolingo, lokola biso nyonso tozali kotia mitema 'tè Nzambe akobikisa biso, banda kala nazalaka na posa ya kokómela bino mokanda. Namoni 'tè esengeli násala bongo po nálendisa bino, na tina 'tè bóbunda likolo ya bondimi, pamba té makambo balakisá bato ya Nzambe ekoki kobongwana té. 4 Nzokande bato mosusu ya mabe basi'bakoteli bino; bazali kobebisa bolamu ya Nzambe na biso; bazali kokanisa 'tè yango epesaka bango nzela ya kosala kindumba. Baboyaka Yezu Kristo, oyo azali Mokonzi se moko pe Nkolo na biso. Banda kala etangamá 'tè bakozwa etumbu. 5 Nalingi náyebisa bino lisusu makambo oyo bosi'boyebá; tango Nkolo alongolaka bato ya Israel na boumbu ya Ejipte, na sima abomaká baoyo baboyaki kondimela ye. 6 Na kati ya ba-anjelu, bamosusu babebisaka lokumu na bango pe batikaká bisika oyo Nzambe apesaki bango. Bongo Nzambe akangisá bango seko na minyololo pe azali kobomba bango na esika moko ya molili, tii na mokolo monene oyo akokata makambo ya bikelamo na ye nyonso. 7 Bókanisa pe Sodome ná Gomore, pe ba-vile ya pembeni. Bato ya kuna basalaka mabe kaka lokola ya ba-anjelu wana, na ndenge balukaki koyeba nzoto ya ba-anjelu oyo Nzambe atindaki. Bongo bamboka yango ekómá ndakisa po na biso; ezwaká etumbu ya móto oyo esilaka té. 8 Bato oyo bakoteli bino basalaka makambo ya liboma ya ndenge wana. Babebisaka nzoto na bango na kindumba, baboyaka bokonzi ya Nkolo, pe batsiolaka milimo ya Likolo oyo esalaká masumu. 9 Nzokande Mishel, mokonzi ya ba-anjelu, asalaka boye té. Tango bazalaká kotiana tembe ná zabolo pe kowela ebembe ya Moize, amekaki kotsiola zabolo té, kasi alobaki na ye boye: "Nkolo ye moko ápesa yo etumbu!" 10 Bato yango batsiolaka makambo oyo bayebi te. Bakokani ná banyama oyo ezangá mayele; bayebaka bobele baposa na bango ya nzoto; yango pe moto ekobungisa bango libela. 11 Mawa na bango, na ndenge balandi nzela ya Kaina, bakomi lokuta likolo ya lokoso ya mbongo lokola Balam; pe basi'babebi po bazali kotomboka lokola Kore. 12 Ezali bango nde bato babebisaka masanga na bino, tango bósanganaka po na kolia ná bandeko; basilá soni na ndenge badundaka biloko. Bakokani ná mapata oyo ekitisaka mbula té po mopepe ezali komema yango; bazali lokola banzete oyo ebotaka mbuma té ata eleko na yango ekoki; to lokola banzete oyo basi'bapikolá po ekufá libela. 13 Bakokani ná mbonge ya makasi ya ebale; babimisaka makambo ya soni ndenge mbonge ebimisaka fulufulu. Bakokani lisusu ná minzoto oyo ezali kotelengana. Nzambe asi'abombelá bango esika moko ya molili penza, po na seko. 14 Enok, koko ya sambo na molongo ya Adamu, asakolaka boye likolo na bango: "Nkolo azali koya ná ba-anjelu na ye nkoto na nkoto. 15 Akokata makambo ya bato nyonso; akobimisa mabe nyonso oyo bato ya mobulu basalaki, ná maloba nyonso ya lofundu oyo bato ya masumu balobaki po na kotsiola ye." 16 Bato wana bamilelaka tango nyonso pe bamonaka Nzambe mabe soki bakomi na pasi. Balandaka kaka baposa na bango moko, babimisaka maloba ya lolendo, pe balingaka bobele bato oyo bakoki kosepelisa bango.

Toli

17 Kasi bino, bandeko, bókanisa nanu makambo oyo bantoma ya Nkolo na biso Yezu Kristo bayebisaki bino. 18 Balobaki na bino boye: "Na mikolo ya suka, bato mosusu bakobanda kotsiola Nzambe, pe bakozala kolanda bobele baposa na bango ya mobulu." 19 Bango nde bato bakabolaka bandeko; Molimo ya Nzambe akotelá bango na mitema té, kasi balandaka makanisi na bango ya bomoto. 20 Nzokande bino bandeko oyo bondimeli Nzambe, bózwa molende bobele na bondimi yango. Bósambelaka na nguya ya Molimo Mosantu. 21 Bóbatela bolingo ya Nzambe na mitema, awa bozali kozela 'tè Nkolo na biso Yezu Kristo áyokela bino mawa pe ápesa bino bomoi ya seko. 22 Bandeko oyo bazangá makasi, bóyokela bango mawa; 23 bakokani ná bato bazali kozika na móto; bóbikisa bango. Bato mosusu wana, bóyokela bango pe mawa, kasi bókeba na bango; bósimba ata bilamba na bango té, pamba té esi'ebebi po na misala na bango ya mabe.

Lokumu ya suka

24 Nzambe azali na nguya ya kobatela bino po bókweya té pe bozala ata na mabe moko té. Ye nde moto akoki komema bino epai na ye, pcvbómona ye pe bótonda na esengo. 25 Azali Nzambe se moko pe Mobikisi na biso, po na Nkolo na biso Yezu Kristo. Lokumu, monene, nguya pe bokonzi ezali na ye, uta na ebandeli, sik'oyo pe tii seko. Amen!

Koyebisa Ba-Sekelé 1

Ebandeli

1 Na mokanda oyo nakómi ba-sekelé Nzambe alakisaki Yezu Kristo, po áyebisa basali na ye makambo oyo esengeli koya na mwa mikolo. Kristo atindaki anjelu na ye epai na ngai Yoane, mosali na ye, po áya kolakisa ngai yango nyonso. 2 Bongo nazali koyebisa maloba ya Nzambe pe makambo nyonso oyo Yezu Kristo alakisaki ngai lokola na ndoto. 3 Esengo na moto azali kotangela bato maloba oyo euti na Molimo Mosantu; esengo na baoyo bazali koyoka yango pe kondima nyonso oyo ekómamá awa. Pamba té tango esi'ekómi penepene.

Mbote na ba-eklezya sambo

4 Ngai Yoane, natindi mbote na ba-eklezya sambo ya région ya Efeze. Bózwa bolamu pè boboto euti na Nzambe, oyo azali, azalaká, pe akoya; euti pe na milimo sambo oyo ezali liboso ya Kiti na ye ya bokonzi; 5 euti lisusu na Yezu Kristo oyo ayebisi biso makambo amoná epai ya Nzambe; azali Mwana na ye ya liboso, na ndenge asekwaki liboso ya bato nyonso oyo bakufa; azali Mokonzi ya bakonzi ya mokili. Ye alingaka biso; na makila na ye alongoli biso na boumbu ya masumu; 6 akómisi biso ekolo ya bakonzi, banganga-Nzambe oyo basalelaka Nzambe, Tata na ye. Lokumu pe nguya ezali na Yezu Kristo seko! Amen. 7 Ye wana azali koya na kati ya mapata. Bato nyonso bakomona ye, ata baoyo batobolaki ye mopanzi. Bato ya bikolo nyonso awa na se bakolela pe bakobanga ye. Ya solo, ekozala bongo! 8 Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, oyo azali, azalaká, pe akoya, alobi boye: "Ngai nazali Ebandeli pe Suka."

Yoane amonaki Kristo lokola na ndoto

9 Ngai ndeko na bino Yoane; na lisanga na Yezu, biso nyonso tozali komona pasi, tosi'tozwi bokonzi, pe tozali kokanga mitema ndenge moko. Bakangaki ngai pe batindi ngai na esanga Patmos, po nazalaki koteya maloba ya Nzambe oyo Yezu Kristo ayeelá bato. 10 Na Mokolo ya Nkolo, Molimo akotelaki ngai, bongo nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi ezali koyokana lokola kelelo, elobi: 11 "Makambo ozali komona, kèma yango na mokanda pe tinda yango na ba-eklezya oyo sambo: Efeze, Smirne, Pergame, Tiatire, Sarde, Filadelfie pe Laodisé." 12 Nabaluki po nátala soki nani azalaki koloba na ngai, bongo namoni bamwinda sambo ya or. 13 Na kati na yango namoni lokola moto moko atelemi, alati nzambala ná mokaba moko ya or na tolo. 14 Suki na ye ezalaki pembe makasi penza, pe miso na ye ezalaki kongenga lokola móto. 15 Makolo na ye ezalaki kongenga lokola nde basalá yango na ebende ya talo oyo bakómisá peto na móto. Pe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale monene. 16 Na liboko na ye ya mobali asimbaki minzoto sambo, na monoko na ye mbeli mokoya mino mibale ezalaki kobima. Elongi na ye ezalaki kongenga lokola moi ya midi. 17 Tango namoni ye, nakwei na makolo na ye lokola moto akufi. Atieli ngai liboko na ye ya mobali pe alobi: "Kobanga té! Nazali moto ya liboso pe ya suka; 18 nazali na bomoi. Nakufaki, kasi sik'oyo nazali na bomoi ya seko. Liwa pe mboka ya bato bakufa ezali na maboko na ngai. 19 Bongo, kóma makambo nyonso yo omoni: oyo ezali koleka sik'oyo pe oyo esengeli koya. 20 Omoni 'tè nasimbi minzoto sambo na liboko na ngai ya mobali; omoni pe bamwinda sambo ya or; sekele na yango ezali boye: minzoto wana sambo elakisi ba-anjelu ya ba-eklezya sambo; bamwinda sambo ya or elakisi ba-eklezya wana sambo."

Koyebisa Ba-Sekelé 2

Toli po na eklezya ya Efeze

1 Kòmela anjelu ya eklezya ya Efeze boye: Yoka maloba ya Moto oyo asimbi minzoto sambo na liboko na ye ya mobali pe azali kotambola na kati ya bamwinda sambo ya or: 2 "Nayebi makambo nyonso bosalaka, pasi oyo bomonaka na mosala, pe ndenge bokangaka mitema. Nayebi 'tè bokoki kofanda esika moko té ná bato ya mabe; bosi'bomeki baoyo balobaká 'tè bazali bantoma na ngai, nzokande ezali boye té, bomoni 'tè bazali bato ya lokuta. 3 Bozalaki kokanga mitema pe bolembaki té, tango bozalaki komona pasi po na ngai. 4 Kasi mabe moko namonaka epai na bino, yang'oyo: bólingaka ngai lisusu té lokola na ebandeli. 5 Bókanisa nanu esika bozalaká, liboso 'tè bókweya. Bóbongola mitema, bongo bózongela misala na bino ya kala. Soki bobongoli mitema té, nakoya epai na bino pe na kolongola mwinda na bino. 6 Kasi malamu moko namoni epai na bino, yang'oyo: boyinaka makambo bato ya Nikola basalaka, bobele ndenge ngai nayinaka yango. 7 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya! "Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi oyo ezali epai ya Nzambe, na mboka na ye ya bisengo."

Toli po na eklezya ya Smirne

8 Kòmela anjelu ya eklezya ya Smirne boye: Yoka maloba ya moto ya liboso pe ya suka, oyo akufaki pe asekwaki: 9 "Nayebi ndenge bozali komona pasi pe kokelela, kasi bozali penza na bomengo. Nayebi ndenge bazali kotónga bino na baoyo balobaká 'tè bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda té, kasi bazali lingomba ya Satan. 10 Bóbanga té po na pasi oyo ezali kozela bino. Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko, po na komeka bino; bokonyokwama mikolo zomi. Bópika pende tii na liwa, bongo nakolongisa bino pe nakopesa bino bomoi ya seko. 11 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya! "Oyo akolonga, liwa ya mibale ekolia ye té."

Toli po na eklezya ya Pergame

12 Kòmela anjelu ya eklezya ya Pergame boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali na mbeli ya mino mibale: 13 "Nayebi esika bino bolandaka; Satan atii kiti na ye ya bokonzi kuna. Kasi bino bosi'bondimeli ngai libela. Botikaki bondimi na bino té, ata tango babomaki mosakoli na ngai ya solo Antipas, na mboka na bino esika Satan afandi. 14 Kasi mwa mabe namonaka epai na bino, yang'oyo: Na kati na bino ezali na bato mosusu balandaka mateya ya Balam. Ye azalaká kopesa Balak batoli ya kokweisa bato ya Israel na masumu, na ndenge azalaki kotinda bango baliaka nyama oyo bapesaki mabonza na banzambe ya bikeko, pe básala kindumba. 15 Pe u'susu na kati na bino bamosusu balandaka mateya ya bato ya Nikola. 16 Yango wana bóbongola mitema; soki té etikali moke náya kobundisa bato wana na mbeli oyo ezali kobima na monoko na ngai. 17 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya! "Oyo akolonga, nakopesa ye mane oyo nabombelá ye. Pe nakopesa ye libanga moko ya pembe oyo bakómá kombo ya sika. Moto moko té akoyeba kombo wana, bobele moto oyo azwi yango."

Toli po na eklezya ya Tiatire

18 Kòmela anjelu ya eklezya ya Tiatire boye: Yoka maloba ya Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso engengaka lokola móto, pe makolo lokola nde basalá yango na ebende ya talo: 19 "Nayebi bizaleli, bolingo, bondimi ná misala na bino, pe ndenge bokangaka mitema. Misala bozali kosala sik'oyo eleki kutu oyo ya liboso. 20 Kasi mabe namonaka epai na bino, yang'oyo: bozali kondima Jezabel áfanda na kati na bino. Mwasi yango alobaká 'tè azali mosakoli ya Nzambe; ateyaka pe akosaka basali na ngai po básala kindumba pe bália nyama ya mabonza oyo bapesaki banzambe ya bikeko. 21 Napesaki ye tango po ábongola motema, kasi alingi kotika kindumba na ye té. 22 Yango wana nakosala 'tè maladi élalisa ye; bato oyo bazalaki kotambola ná ye, nakonyokola bango mingi soki baboyi makambo na ye té. 23 Pe bato oyo balandaka ye, nakosilisa bango na koboma; boye ba-eklezya nyonso ekoyeba 'tè ngai nazali moto oyo atalaka na se ya mitema, pe ayebi makanisi ya bato. Bongo nakopesa moto na moto oyo ekoki na misala na ye. 24 "Kasi bino bakristo ya Tiatire, baoyo bolandaki mateya wana té, pe boboyi koyeba makambo oyo bábengaka 'ba-sekelé ya Satan', nakomemisa bino mokumba mosusu té. 25 Eloko moko: bósimba makasi bomengo oyo bozali na yango, tii mokolo ngai nakoya. 26 Bato oyo bakolonga pe bakozala kosalela mateya na ngai tii na suka, nakopesa bango bokonzi ya bikolo nyonso. 27 Bakotambwisa yango na makasi penza; bakopanza yango lokola bilokú ya mabelé! 28 Wana nde bokonzi ngai nazwá na Tata na ngai. Nakopesa bango monzoto oyo etanisaka tongo. 29 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya."

Koyebisa Ba-Sekelé 3

Toli po na eklezya ya Sarde

1 Kòmela anjelu ya eklezya ya Sarde boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali na milimo sambo ya Nzambe pe minzoto sambo: "Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; balobaká 'tè bozali na bomoi, nzokande bosi'bokufá. 2 Bófungola miso! Botikali bobele na mwa bondimi moke; bólendisa yango liboso 'tè ékufa libela. Pamba té misala na bino ezali malamu té na miso ya Nzambe na ngai. 3 Yango wana bókanisa maloba oyo bozwaki pe boyokaki; bóbatela yango pe bóbongola mitema. Bókeba; soki bofungoli miso té, nakoya epai na bino lokola moyibi, pe bokoyeba ata moke té tango nini nakoya. 4 Kasi epai na bino na Sarde, mwa ndambo ya bakristo nanu babebisi bilamba na bango té. Bongo bakolata bilamba ya pembe pe bakotambola ná ngai, pamba té bazali bato ya kokoka. 5 Ya solo, bato oyo bakolonga, bakolata pembe. Bakombo na bango ekolongwa na buku ya bomoi ata mokolo moko té. Na miso ya Tata na ngai pe ya ba-anjelu na ye, nakondima 'tè bazali bato na ngai. 6 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya!"

Toli po na eklezya ya Filadelfíe

7 Kòmela anjelu ya eklezya ya Filadelfie boye: Yoka maloba ya Mosantu oyo auti na Nzambe. Ye asimbi fungola ya David; soki afungoli porte, moto moko té akoki kokanga yango; soki akangi, moto moko té akoki kofungola yango: 8 "Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; ata bozali na makasi mingi té, kasi bozali kotosa maloba na ngai pe bowangani ngai té. Bongo nafungoleli bino porte oyo moto moko té akoki kokanga. 9 Bato ya lingomba ya Satan oyo bakosaka 'tè bazali Bayuda, nakosala 'tè baya kofukama na makolo na bino; boye bakoyeba 'tè ngai nalingaka bino. 10 Lokola bobatelaka mobeko na ngai ya kokanga motema, ngai pe nakobatela bino na tango ya pasi oyo ekokweela bato nyonso ya mokili po na komeka bango. 11 Etikali moke náya. Bósimba makasi bomengo oyo bozali na yango po bólonga, pe moto moko té ákweisa bino. 12 Baoyo bakolonga, nakotia bango lokola makonzi na kati ya Ndako ya Nzambe na ngai, po bátikala kuna libela. Nakokoma likolo na bango kombo ya Nzambe na ngai pe kombo ya mboka ya Nzambe na ngai; yango ezali Yeruzalem ya sika, oyo ekouta na Likolo, esika Nzambe na ngai azali. Nakokoma pe likolo na bango kombo na ngai ya sika. 13 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya!"

Toli po na eklezya ya Laodisé

14 Kòmela anjelu ya eklezya ya Laodisé boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali "Amen". Ye auti epai ya Nzambe, ayebisi bato makambo oyo amoná epai na ye; Nzambe asalá biloko nyonso na ye: 15 "Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; bozali lokola mai oyo ezangá malili to móto. Nalingaki bozala malili to móto. 16 Kasi bozali móto penza té, pe malili penza té; yango wana nalingi kosanza bino. 17 Bino bolobaka 'tè: 'Tozali na bomengo, tozwi biloko mingi, tozangi eloko moko té.' Kasi boyebi té 'tè bozali penza bato ya mawa pe ya pasi; bozali kokelela, bosi'bokufá miso pe bozali bolumbu. 18 Yango wana napesi bino toli boye: bósomba epai na ngai or oyo basukolá na móto, bongo bokozala bato ya bomengo ya solo; bósomba pe bilamba ya pembe, bólata yango po bozala bolumbu té. Bósomba pe kisi oyo bokoki kotia na miso po bómona lisusu. 19 Ngai napesaka etumbu na bato nyonso oyo nalingaka. Bongo bótia molende pe bóbongola mitema. 20 Ngai oyo natelemi liboso ya porte na bino pe nazali kobeta. Soki moto ayoki mongongo na ngai pe afungoli porte, nakokota na ndako na ye, bongo ngai ná ye tokolia esika moko. 21 Baoyo bakolonga nakopesa bango nzela ya kofanda penepene na ngai na Kiti na ngai ya bokonzi, ndenge ngai nalongi pe nafandi penepene ya Tata na ngai na Kiti na ye ya bokonzi. 22 "Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-eklezya!"

Koyebisa Ba-Sekelé 4

Ndenge bazali kokumisa Nzambe na Likolo

1 Sima ya makambo wana, namoni lisusu lokola na ndoto: porte moko efungwani na Likolo. Pe nayoki mongongo oyo nayokaki liboso, ezalaki koyokana lokola kelelo: "Mata awa; nakolakisa yo makambo nyonso oyo esengeli koya sima." 2 Na mbala moko Molimo akoteli ngai, pe namoni Kiti moko ya bokonzi ezali kuna na Likolo. Moto moko afandi na yango, 3 elongi na ye ezali kongenga lokola mabanga ya talo. Arc-en-ciel moko ezingi Kiti ya bokonzi yango; pe ezali kongenga lokola libanga moko ya talo. 4 Bakiti mosusu tuku mibale na minei ezingi Kiti ya bokonzi. Bambuta-muntu tuku mibale na minei bafandi na bakiti yango; balati bilamba ya pembe pe bikoti ya or. 5 Kake ná ba-moto na yango, pe mingongo ezali kouta epai ya Kiti. Bamwinda sambo ezali kopela liboso ya Kiti; yango ezali nde milimo sambo ya Nzambe. 6 Liboso ya Kiti, namoni lokola ebale; yango ezali kongenga lokola talatala oyo bábengaka Kristal. Ba-Sheriben minei batelemi epai na epai ya Kiti ya bokonzi: nzoto na bango etondá na miso ebele, na liboso pe na sima 7 Sheriben ya liboso azali lokola tambo, ya mibale lokola ngombe ya mobali, ya misato azali na elongi lokola moto, pe ya minei lokola ndeke moko monene oyo ezali kopumbwa. 8 Pe ba-Sheriben wana minei, moko moko azali na mapapu motoba; yango nyonso pe etondá na miso, na kati pe na libanda. Butu moi ata kopema té, bazali bobele koyemba boye: "Mosantu, Mosantu, Mosantu! Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso azali Mosantu! Ye azalaká, azali, pe akoya." 9 Ndenge wana ba-Sheriben bazali kokumisa Moto afandi na Kiti ya bokonzi, oyo azali na bomoi mikolo nyonso seko, pe bazali kopesa ye mersi. Mbala nyonso basalaka boye, 10 Bambuta-muntu wana tuku mibale na minei bafukamaka bilongi na se, liboso ya Moto afandi na Kiti ya bokonzi, oyo azali na bomoi mikolo nyonso seko; pe batiaka bikoti na bango ya or liboso ya Kiti na ye; bazali koyemba boye: 11 "Nkolo, Nzambe na biso ebongi ozwa lokumu nyonso pe nguya. Pamba té yo moto osalá biloko nyonso; olingaka ézala, bongo osalaki yango."

Koyebisa Ba-Sekelé 5

Buku pe Mwana-Meme

1 Na liboko ya mobali ya Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi, namoni buku moko etondá banda na ebandeli tii na suka, bongo bakangá yango na basinga sambo oyo babetá kashé moko moko. 2 Pe namoni anjelu moko ya nguya, azali koganga makasi penza: "Nani azali moto ya kokoka, po na kolongola ba-kashé pe kofungola buku yango?" 3 Kasi na Likolo, na mokili, to na se ya mabelé, ata moto moko té akokaki kofungola buku wana to kotala yango na kati. 4 Nalelaki mingi po moto moko té amonanaki oyo akokaki kofungola buku pe kotala yango na kati. 5 Kasi moko na kati ya Bambuta-muntu alobi na ngai boye: "Kolela té. Tala, 'tambo ya Yuda' asi'alongá; azali moto ya libota ya David. Ye nde azali moto ya kokoka po na kolongola ba-kashé sambo pe kofungola buku." 6 Bongo namoni Mwana-Meme moko atelemi na kati ya Kiti ya bokonzi, pe ba-Sheriben wana minei ná Bambuta-muntu bazali epai na epai. Azalaki komonana lokola nde babomaki ye. Azalaki na maseke sambo pe miso sambo; yango ezali nde milimo sambo ya Nzambe oyo ye atindaka na mokili mobimba. 7 Mwana-Meme apusani pe akamati buku oyo ezalaki na liboko ya mobali ya Moto afandi na Kiti. 8 Tango akamati buku yango, ba-Sheriben wana minei pe Bambuta-muntu tuku mibale na minei bafukami liboso ya Mwana-Meme. Moko moko na kati na bango azalaki na lindanda moko, pe sani ya or etondá na malasi; yango ezali losambo ya bato ya bosantu. 9 Bazalaki koyemba nzembo moko ya sika: "Yo ozali motp ya kokoka po na kozwa buku oyo, pe kolongola ba-kashé oyo ezali kokanga yango. Pamba té babomaki yo, bongo na makila na yo osombelaki Nzambe bato ebele, ya mabota nyonso, ya minoko nyonso pe ya bamboka nyonso. 10 Okómisi bango ekolo ya bakonzi, banganga-Nzambe oyo basaleleka Nzambe na biso. Bango nde bakozala kotambwisa mokili." 11 Natali lisusu pe nayoki mingongo ya ba-anjelu ebele; bazalaki bankoto na bankoto; batelemi epai na epai ya Kiti ya bokonzi. Bongo ba-Sheriben wana minei pe Bambuta-muntu 12 bazalaki koyemba na mingongo makasi: "Mwana-Meme oyo babomaki, ye nde azali moto ya kokoka po na kozwa nguya pe bomengo, mayele, makasi, pe lokumu nyonso." 13 Nayoki pe makelele ya biloko nyonso oyo Nzambe asalá, na Likolo, na mokili, na se ya mabelé pe na kati ya ebale monene; yango nyonso ezalaki koyemba boye: "Nguya ná lokumu nyonso ézala na Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi pe na Mwana-Meme, mikolo nyonso seko!" 14 Ba-Sheriben minei bazongisi: "Amen!" Pe Bambuta-muntu bafukami bilongi na se.

Koyebisa Ba-Sekelé 6

Ba-kashé motoba

1 Namoni Mwana-Meme abandi kofungola buku. Tango alongoli kashé ya liboso, nayoki Sheriben ya liboso abeleli lokola kake: "Yaka!" 2 Natali, bongo namoni punda moko ya pembe. Moto oyo amati yango asimbi ba-fleshe; bakumisi ye po alongi etumba, pe abimi po akende kolonga lisusu. 3 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya mibale, nayoki Sheriben ya mibale abeleli: "Yaka!" 4 Punda mosusu ebimi, ezalaki ya motane penza. Moto oyo amati yango bapesi ye mbeli moko ya monene, po ákende kobimisa bitumba na mokili, na ndenge 'tè bato bábomana bango na bango. 5 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya misato, nayoki Sheriben ya misato abeleli: "Yaka!" Natali, pe namoni punda ya mwindu. Moto oyo amati yango asimbi eloko ya komekela kilo. 6 Nayoki lokola mongongo moko euti na kati ya ba-Sheriben minei, elobi: "Lifuta ya mokolo moko ya mosala ekozala bobele po na bakopo mibale ya blé, to ya orje. Kobebisa bilanga ya olive to ya vinu té." 7 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya minei, nayoki Sheriben ya minei abeleli: "Yaka!" 8 Natali, pe namoni punda moko, poso na yango ezalaki lokola mai ya salité. Moto oyo amati yango, kombo na ye Liwa. Mokonzi ya mboka ya bato bakufa nde alandi ye. Bapesi bango bokonzi ya koboma ndambo moko ya mokili, ézala na bitumba, na nzala, na maladi to na banyama ya mabe. 9 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya mitano, namoni na se ya mesa ya mabonza milimo ya bato oyo babomaki po bazalaki kondima maloba ya Nzambe, pe kopanza sango na ye. 10 Bango bazalaki koganga na mingongo makasi: "Mokonzi mosantu, yo outi na Nzambe. Kozelisa biso lisusu té. Sambisa bato ya mokili, pe pesa bango etumbu po babomaki biso." 11 Bongo bapesi moko moko na kati na bango nzambala ya pembe, pe bayebisi bango boye: "Bózela mwa moke, pamba té nanu bokoki té. Ndenge babomaki bino, esengeli pe báboma lisusu bato ebele na kati ya baninga na bino ya mosala pe bandeko na bino." 12 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya motoba, namoni mabelé eningani makasi, moi eyindi penza, pe sanza yango nyonso ekómi motane lokola makila. 13 Minzoto eyei kokweya na se ndenge bambuma ya figi ekweyaka tango mopepe ya makasi eningisi nzete. 14 Likolo elimwe ndenge balingaka papié ya molai; pe bangomba nyonso ná bisanga nyonso elongwe na bisika na yango. 15 Bakonzi ya mokili, bato minene, ba-shef ya basoda, bato ya bomengo, bato ya makasi, bato nyonso ézala baumbu to bansomi, babombanaki na mabulu oyo ezali na kati ya mabanga ya bangomba. 16 Babandi koloba na bangomba pe mabanga: "Bókweela biso pe bóbomba biso, po Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi ámona biso té, pe kanda ya Mwana-Meme ényokola biso té. 17 Pamba té mokolo ya monene ya kanda na bango esi'ekoki; pe moto nini akoki kobika?"

Koyebisa Ba-Sekelé 7

Ekolo ya sika ya Nzambe

1 Sima ya makambo wana natali lisusu, namoni ba-anjelu minei batelemi bipai nyonso minei ya mokili; bakangi mipepe nyonso minei po moko té éleka na mokili to na ebale monene to pe na banzete. 2 Bongo namoni anjelu mosusu auti na epai moi ebimaka; asimbi kashé ya Nzambe ya bomoi. Abeleli na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo bazwaki nguya ya kosala mabe na mokili pe na ebale, 3 alobi: "Bósala mabe té na mokili to na ebale to na banzete, tii tango tokosilisa kotia kashé na bilongi ya basali nyonso ya Nzambe na biso." 4 Pe bayebisi ngai talo ya bato oyo bazwaki kashé na bilongi na bango. Bazali 144.000, ya mabota nyonso ya Israel, 5-8 elingi koloba 12.000 na libota moko moko: Yuda, Ruben, Gad, Asher, Neftali, Manasé, Simeon, Levi, Isakar, Zebulon, Jozef pe Benjamen.

Lisanga ya bato oyo Nzambe aponá

9 Sima ya makambo wana natali lisusu, namoni bato ebele penza, ata moto moko té akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya bamboka nyonso pe ya minoko nyonso. Batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi pe na miso ya Mwana-Meme; balati banzambala ya pembe; moto na moto asimbi mandalala na maboko. 10 Bazalaki koganga na mingongo makasi: "Nzambe na biso oyo afandi na Kiti ya bokonzi abikisi biso, ye ná Mwana-Meme." 11 Ba-anjelu nyonso oyo bazingi Kiti ya bokonzi, ná Bambuta-muntu pe ba-Sheriben minei, bakwei bilongi na se liboso ya Kiti ya bokonzi pe bakumisi Nzambe. 12 Balobi: "Amen! Lokumu pe mersi ézala na Nzambe na biso! Ye azali na mayele, nguya pe makasi, mikolo nyonso seko! Amen!" 13 Moko na kati ya Bambuta-muntu atuni ngai: "Bato wana balati banzambala ya pembe, bazali banani? Pe bauti wapi?" 14 Nazongiseli ye: "Mokonzi, yo moko oyebi." Bongo alobi na ngai: "Bango bauti kobika na monyokoli monene. Banzambala na bango ekómi pembe pamba té basukoli yango na makila ya Mwana-Meme. 15 Yango wana batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe pe bazali kosalela ye butu moi na Ndako na ye. Moto oyo afandi na Kiti ya boEonzi akobomba bango na Ndako na ye. 16 Ata mokolo moko té bakoyoka lisusu posa ya kolia to ya komela; bakomona pasi lisusu té na moi to na molunge, 17 pamba té Mwana-Meme oyo azali na Kiti ya bokonzi akozala na bango lokola mobokoli ya bameme, akomema bango na bisika mai ya bomoi ebimelaka. Bongo Nzambe akopangusa mai nyonso oyo ezali kobima na miso na bango."

Koyebisa Ba-Sekelé 8

Kashé ya sambo; bakelelo sambo

1 Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya sambo, Likolo efandi kimia penza soki ndambo ya ngonga moko. 2 Bongo namoni ba-anjelu sambo batelemi na miso ya Nzambe; bapesi bango bakelelo sambo. 3 Anjelu mosusu ayei kotelema penepene ya mesa ya or ya mabonza oyo ezali liboso ya Kiti ya bokonzi. Asimbi sani moko ya or oyo batumbelaka malasi, pe bapesi ye malasi ebele átumba yango likolo ya mesa, po milinga émata na miso ya Nzambe, nzela moko ná losambo ya bato nyonso ya bosantu. 4 Boye milinga ya malasi elongwe na liboko ya anjelu, pe emati na Likolo na miso ya Nzambe, nzela moko ná losambo ya bato ya bosantu. 5 Sima, anjelu akamati sani wana ya or, atondisi yango na moto oyo ezali na mesa ya mabonza, pe abwaki yango na se. Kake ná ba-móto na yango, pe mingongo ebimaki, pe mokili eninganaki.

Bakelelo motoba ya liboso

6 Ba-anjelu wana sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo, bamibongisi po na kobeta yango. 7 Anjelu ya liboso abéti kelelo; mbula ya mabanga ná moto esangani na makila eyei kokweya na mokili. Ndambo moko ya mokili eziki; ndambo moko ya banzete eziki, ná matiti nyonso ya mobesu. 8 Anjelu ya mibale abéti kelelo. Moto moko ya somo, oyo emonanaki lokola ngomba monene, eyei kokweya na ebale ya "lamer". Ndambo moko ya mai ebongwani makila; 9 ndambo moko ya biloko nyonso ya bomoi oyo ezali na ebale ekufi; pe ndambo ya bamasuwa nyonso epanzani. 10 Bongo anjelu ya misato abéti kelelo. Monzoto moko ya monene oyo ezali kopela moto euti na Likolo pe eyei kokweya na ndambo ya ba-ebale pe ya bisika mai ebimelaka. 11 Kombo ya monzoto yango ezali "Bololo". Ndambo moko ya mai ekómi bololo, pe bato mingi bakufaki po na mai wana ya bololo.' 12 Anjelu ya minei abéti kelelo. Ndambo moko ya moi ná ya sanza pe ya minzoto eyei koningana pe eyindi. Moi ezalaki kongenga té, bangonga minei mobimba; pe sanza ná minzoto ezalaki kongenga té, bangonga minei mobimba. 13 Natali lisusu, pe namoni ndeke moko monene ezalaki kopumbwa na likolo penza, ezalaki koganga boye na mongongo ya makasi: "Mawa! Mawa! Mawa! Bato nyonso ya mokili bakozala na mawa koleka, tango ba-anjelu misato mosusu bakobeta bakelelo!"

Koyebisa Ba-Sekelé 9

1 Bongo anjelu ya mitano abéti kelelo. Namoni monzoto moko euti na Likolo, eyei kokweya na mokili. Bapesi monzoto wana fungola ya libulu oyo bakangá milimo mabe. 2 Monzoto efungoli libulu yango; milinga ebimi na kati, ezali lokola oyo ebimaka na fulu ya monene, bongo moi pe Likolo eyindi po na milinga wana. 3 Makonko ebimi na milinga pe epanzani na mokili. Bapesi makonko yango nguya lokola ya ba-skorpion. 4 Bapekisi makonko 'tè ésala mabe té na matiti to na banzete, ézala ya minene to ya mike; kasi ésala mabe bobele na bato oyo bazangi kashé ya Nzambe na bilongi. 5 Bapesi yango nzela ya koboma bato té, kasi bobele ya konyokola bango sanza mitano mobimba. Pasi oyo makonko ekobanda komonisa bato ezali lokola oyo moto amonaka soki skorpion eswi ye. 6 Na kati ya basanza mitano wana bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango té; bakolinga kokufa, kasi liwa ekokima bango. 7 Makonko yango ezali lokola bapunda oyo babongisi po na bitumba: na mitú ezali na biloko lokola bikoti ya or; bilongi na yango ekokani ná oyo ya bato; 8 ezali na suki lokola ya basi, pe mino lokola ya batambo. 9 Makonko yango elati bakazaka ya bibende lokola ya basoda; mapapu na yango ezali kobimisa makelele lokola ya ba-shareti ebele oyo bapunda ebendaka soki ezali kokende na etumba. 10 Makonko yango ezali na nguya ya konyokola bato basanza mitano mobimba, pamba té mikila na yango ezali lokola ya ba-skorpion, pe ezali na basende. 11 Mokonzi na yango ezali nde Anjelu oyo akengelaka libulu bakangá milimo mabe. Kombo na ye na ebré "Abadon" pe na grek "Apolion", elingi koloba "Mobebisi". 12 Mawa ya liboso eleki; makambo mibale ya mawa mosusu ezali koya. 13 Bongo anjelu ya motoba abéti kelelo; nayoki mongongo moko euti na basonge nyonso minei ya mesa ya or ya mabonza oyo ezali liboso ya Nzambe. 14 Mongongo yango elobi boye na anjelu ya motoba oyo asimbi kelelo: "Fungola ba-anjelu minei oyo bákangama penepene ya ebale ya Ufrate." 15 Bongo afungoli ba-anjelu minei yango, po bákende koboma bato ebele; pamba té banda kala bango bazalaki kozela bobele ngonga wana, mokolo wana, sanza wana pe mbula wana. 16 Bayebisi ngai talo ya basoda oyo bamati bapunda po na kokende na etumba; bazali ba-milion kama mibale. 17 Namoni bango lokola na ndoto. Mitú ya bapunda ekokani ná oyo ya batambo; bapunda ezalaki kosanza móto, milinga ná fofolo. Basoda balati bakazaka ya bibende; kulere na yango ezalaki lokola ya móto, ya milinga pe ya fofolo. 18 Ndambo monene ya bato nyonso bakufi likolo ya bapasi misato oyo: móto, milinga pe fofolo oyo ezalaki kobima na minoko ya bapunda wana. 19 Pamba té makasi ya bapunda po na konyokola bato ezali na minoko na yango; kasi ezali pe na mikila na yango, po mikila wana ezali lokola banyoka oyo eswaka bato. 20 Nzokande bato oyo babikaki na bapasi yango babongolaki mitema té, pe baboyaki misala na bango ya mabe té. Batingamaki kaka na kosambela milimo mabe pe banzambe ya bikeko oyo eyokaka té, emonaka té pe etambolaka té, oyo esalamá na or, na arjan, na bronze, na mabanga, to pe na banzete. 21 Bayokaki mawa té po na ndenge bazalaká koboma bato, kosala kindumba pe koyiba; batikaki pe makambo na bango ya kindoki té.

Koyebisa Ba-Sekelé 10

Anjelu pe buku ya moke

1 Namoni pe anjelu mosusu ya nguya auti na Likolo, alati lipata moko lokola elamba, pe arc-en-ciel moko ezingi motú na ye. Elongi na ye ezali lokola moi, pe makolo na ye lokola makonzi ya móto. 2 Asimbi mwa buku moko ya kofungwana. Atii likolo ya mobali na ebale, pe likolo ya mwasi na mokili. 3 Agangi na mongongo makasi lokola tambo; pe tango asilisi koganga, kake ebeti mbala sambo. 4 Tango makelele wana sambo esili, nalingaki kokóma na mokanda makambo oyo nayokaki, kasi mongongo moko euti na Likolo elobi na ngai: "Bomba sekele oyo makelele sambo ya kake euti koyebisa yo; kokóma yango té." 5 Bongo anjelu oyo namoni atelemi na ebale pe na mokili atomboli liboko ya mobali na Likolo. 6 Akati seleka na kombo ya Nzambe oyo azali seko na seko, asalá Likolo ná biloko nyonso ezali kuna, mabelé ná biloko nyonso ezali kuna, pe ebale ná biloko nyonso ezali kuna; alobi boye: "Tango esi'ekoki! 7 Mokolo anjelu ya sambo akobeta kelelo, Nzambe akokokisa sekele na ye, akosala ndenge ayebisaká baprofete oyo bazalaká kosalela ye." 8 Bongo mongongo oyo nayokaki na Likolo, elobi na ngai lisusu: "Kende epai ya anjelu oyo atelemi na ebale pe na mokili; kamata mwa buku ya kofungwana oyo ye asimbi." 9 Napusani penepene na ye, bongo nasengi ye yango. Alobi na ngai: "Kamata pe lia yango. Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko ekozala sukali lokola mafuta ya nzoi." 10 Nakamati mwa buku yango epai ya anjelu pe nalei yango. Na monoko na ngai ezalaki lokola mafuta ya nzoi, kasi tango nameli yango, ekómi bololo na kati ya libumu. 11 Bongo balobi na ngai: "Esengeli lisusu kosakola maloba Molimo apesi yo, oyo etali bato ya bamboka pe minoko ebele, ná bakonzi na bango."

Koyebisa Ba-Sekelé 11

Basakoli mibale

1 Sima bapesi ngai mwa nzete moko ya molai lokola oyo bamekelaka bilanga; pe balobi na ngai: "Kende komeka Ndako ya Nzambe ná mesa ya mabonza; bongo tanga bato oyo bazali kosambela Nzambe kuna. 2 Kasi tika lopango oyo ezali libanda ya Ndako ya Nzambe; komeka yango té. Pamba té basi'bapesi yango na bato oyo bayebi Nzambe té; bango bakonyata mboka ya bosantu, mbula misato na ndambo. 3 Nakotinda basakoli na ngai mibale, mbula misato na ndambo bálata pili pe básakola maloba Molimo apesi bango." 4 Basakoli wana bazali lokola banzete mibale ya olive pe lokola bamwinda mibale oyo ezali liboso ya Nkolo ya mokili. 5 Soki moto ameki konyokola bango, móto ekobima na minoko na bango pe ekoboma banguna na bango; ya solo, moto nyonso oyo akomeka konyokola bango akokufa na ndenge wana. 6 Bango bazali na bokonzi ya kokanga Likolo po 'tè mbula énoka té tango bazali kosakola maloba euti na Molimo; bazali- pe na bokonzi ya kobongola mai ékóma makila, pe ya kotinda bapasi ya ndenge na ndenge awa na mokili, tango nyonso oyo bango balingi. 7 Tango bakosilisa kosakola, nyama oyo ekobima na libulu bakangá milimo mabe ekoya kobundisa bango, ekolonga pe ekoboma bango. 8 Bibembe na bango ekotikala na libanda, na miso ya bato nyonso, na mboka monene esika babomaki Nkolo na bango na kuruze. Bakoki kobenga mboka wana "Sodome" to "Ejipte". 9 Bakopesa nzela té ya kokunda bango. Bato ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso, pe minoko nyonso, bakoya kotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo. 10 Bato ya mokili bakosepela po na liwa ya baprofete wana mibale; bakotonda na esengo pe bakopesana makabo, pamba té mateya na bango emonisaki bato ya mokili pasi mingi. 11 Kasi sima ya mikolo wana misato na ndambo, pema ya bomoi euti na Nzambe pe eyei kokotela bango, bongo batelemi. Bato nyonso oyo bamoni bango, bakomi koyoka somo penza. 12 Basakoli wana bayoki mongongo moko makasi euti na Likolo pe elobi: "Bómata awa." Bamati na Likolo na kati ya mapata, na miso ya banguna na bango. 13 Kaka na tango wana mokili eninganaki makasi penza. Mwa eteni moko ya mboka ebukani, pe bato 7.000 bakufi. Baoyo batikali batondi na somo pe bakomi kokumisa Nzambe ya Likolo. 14 Mawa ya mibale eleki; etikali moke mawa ya misato éya.

Kelelo ya sambo

15 Bongo anjelu ya sambo abéti kelelo. Mongongo moko ya makasi eyokani na Likolo, elobi: "Bokonzi ya mokili mobimba esi'ekómi na maboko ya Nkolo na biso pe Kristo na ye. Ye akozala Mokonzi mikolo nyonso seko." 16 Bambuta-muntu tuku mibale na minei oyo bafandi na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe, bakwei bilongi na se pe bakumisi Nzambe, 17 balobi: "Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso, yo ozalaká pe ozali. Topesi yo mersi po okamati bokonzi; osaleli nguya na yo monene! 18 Bato ya bikolo nyonso basilikaki, kasi yo olakisi bango kanda na yo. Tango ekoki po ósilisa baoyo babebisaka mokili, pe ólongisa bato oyo bakufa. Pesa lifuta na bato na yo ya bosantu, na baprofete oyo bazalaki kosalela yo, pe na bato nyonso oyo bazalaki kotosa yo, ézala bato minene to bato pamba." 19 Bongo Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo efungwani, pe Sanduku ya Boyokani emonani na Ndako yango. Kake, ba-móto na yango pe mingongo ebimi, mokili eningani, pe mbula ya mabanga ebeti.

Koyebisa Ba-Sekelé 12

Mwasi pe Elima

1 Likambo moko ya monene pe ya kokamwa ebimi na Likolo: Mwasi moko alati moi lokola elamba, anyati sanza na makolo, pe alati ekoti ya bokonzi ya minzoto zomi na mibale na motú. 2 Azalaki na zemi, pe abandi kolela makasi po na pasi ya kobota. 3 Pe likambo mosusu ya kokamwa ebimi na Likolo: Elima moko ya somo ya motane, lokola ngando; ezalaki na mitú sambo pe maseke zomi; motú moko moko ezalaki na ekoti ya bokonzi. 4 Mokila na yango ezalaki kokombola ndambo monene ya minzoto, pe kobwaka yango na mokili. Elima wana eyei kotelema liboso ya Mwasi oyo alingi kobota, po élia mwana na ye. 5 Bongo Mwasi aboti mwana mobali; ezali ye nde moto akozwa bokonzi ya bikolo nyonso, pe akotambwisa yango na makasi penza. Nzambe ato-mboli mwana wana na Likolo, pe atii ye penepene ya Kiti na ye ya bokonzi; 6 nzokande Mwasi akimi na esobe; kuna Nzambe abongiselá ye esika bakoleisa ye mbula misato na ndambo. 7 Etumba ebimi na Likolo. Mishel ná ba-anjelu na ye babundisi Elima; Elima pe ná ba-anjelu na yango babundi makasi. 8 Kasi Elima elongaki té. Yango wana ezwaki lisusu esika té po éfanda na Likolo ná ba-anjelu na yango. 9 Babengani Elima monene wana: yango nde ezali "Nyoka ya Kala" oyo ekosaka bato ya mokili mobimba; bábengaka yango Zabolo to Satan. Babwaki yango na mokili, ná ba-anjelu na yango. 10 Bongo nayoki mongongo moko ya makasi euti na Likolo, elobi: "Sik'oyo Nzambe na biso alongi, alakisi nguya pe bokonzi na ye; Kristo na ye alakisi pe bokonzi na ye. Babengani monguna ya bandeko na biso, oyo azalaká kofunda bango butu moi, na miso ya Nzambe na biso. 11 Bango balongi ye po na makila ya Mwana-Meme, pe po na maloba ya Nzambe oyo bazalaki kosakola. Bandimaki kopesa bomoi na bango, babangaki liwa té. 12 Yango wana yo, Likolo, sepela! Bino nyonso bato bozali kuna, bosepela! Kasi mawa mingi na yo mokili pe ebale, pamba té zabolo ayei kokita epai na bino; atondi na kanda penza, po ayebi 'tè tango na ye etikali moke." 13 Tango Elima emoni 'tè babengani yango pe babwaki yango na mokili, ebandi kolanda Mwasi oyo abotaki mwana mobali. 14 Kasi Mwasi azwi mapapu mibale lokola ya ndeke moko monene, po ápumbwa tii na esobe, na esika oyo babongiselá ye. Boye akozala mosika ya Nyoka, pe bakobanda koleisa ye kuna bileko misato na ndambo. 15 Nzokande Nyoka ebandi kosanza mai lokola ebale, po élanda Mwasi pe émema ye. 16 Kasi mokili eyei kosalisa Mwasi; mabelé efungwani pe emeli bamai oyo Elima ebandaki kosanza. 17 Elima esilikeli Mwasi makasi penza, bongo ekei kobundisa bana na ye mosusu; ezali baoyo nyonso batosaka mibeko ya Nzambe, pe balandaka maloba ya Yezu.

Banyama mibale

18 Sima Elima ekei kotelema na libongo ya ebale ya "lamer".

Koyebisa Ba-Sekelé 13

1 Bongo namoni Nyama moko, ebimi na ebale; ezalaki na maseke zomi pe mitú sambo. Na liseke moko moko elati ekoti ya bokonzi; pe na likolo ya mitú na yango bakómá bakombo ya kotsiola Nzambe. 2 Nyama oyo nazalaki komona ekokani na nkoi; makolo na yango ezali lokola ya mokomboso: pe monoko lokola ya tambo. Elima epesi yango bokonzi pe makasi nyonso, pe efandisi yango na kiti oyo yango moko ezalaki kofanda. 3 Motú moko ya Nyama wana ezalaki na pota ya somo oyo elingaki koboma yango; kasi Nyama ebikaki kaka, boye bato nyonso ya mokili bakamwe penza pe balandi Nyama. 4 Bango nyonso babandi kofukamela Elima, po epesaki bokonzi na Nyama. Bafukameli pe Nyama, balobi: "Nani akokani na Nyama? Nani akoki kobundisa yango?" 5 Nyama ezwi nzela ya koloba makambo ya lofundu pe ya kotsiola Nzambe; ezwi bokonzi ya kosala mosala na yango bambula misato na ndambo; 6 ebandi kotsiola Nzambe pe bokonzi na ye, ná Ndako ye afandaka, pe baoyo bazalaká epai na ye na Likolo. 7 Bapesi yango nzela ya kobundisa bato ya bosantu pe ya kolonga bango; boye ezwi bokonzi ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso pe minoko nyonso. 8 Na mokili mobimba bato ebele babandi kofukamela yango, pamba té uta na ebandeli ya mokili bakombo na bango ekómamá té na buku ya bomoi ya Mwana-Meme oyo babomaki. 9 Moto oyo azali na matoi, áyoka! 10 Oyo atangamá kokangama, bakokanga ye; oyo atangamá kokufa na mbeli, akokufa na mbeli. Yango wana esengeli bato ya bosantu bákanga mitema pe bazala na bondimi. 11 Bongo namoni nyama ya mibale ebimi na mokili; ezalaki na maseke mibale ekokani ná oyo ya Mwana-Meme, pe ezalaki koloba lokola Elima. 12 Ezalaki na makasi nyonso ya Nyama ya liboso; pe ebandi kosala ndenge moko, na miso na yango. Ezalaki kosala 'tè bato nyonso ya mokili báfukamela Nyama ya liboso, oyo ebikaki na pota wana ya somo. 13 Ezalaki kosala makamwisi minene; esali kutu 'tè móto élongwa na Likolo pe éya kokweya na mokili, na miso ya bato nyonso. 14 Lokola bapesi yango nguya ya kosala makamwisi nyonso wana na miso ya Nyama ya liboso, ezwi nzela ya kokosa bato ya mokili; etindi bango kutu básala ekeko po na kokumisa Nyama ya liboso, oyo bazokisaki na mbeli kasi ekufaki té. 15 Na sima ezwi nzela ya kopesa bomoi na ekeko wana, bongo yango ebandi koloba pe kobomisa baoyo nyonso baboyi kofukamela yango. 16 Boye nyama oyo etindi bato nyonso na makasi 'tè bázwa elembo na liboko ya mobali to na elongi; 17 ézala bato minene to bato pamba, bato ya bomengo to baoyo bakelelá, baumbu to bansomi. Ata moto moko té akokaki kosomba to kotekisa eloko, soki azangi elembo yango, to kombo ya Nyama to pe talo oyo ekokani na kombo na yango. 18 Makambo oyo ezali kosenga mayele. Moto nyonso oyo azali na mayele akoki koyeba tina ya talo ya Nyama. Pamba té talo yango elakisi moto. Talo na ye ezali 666.

Koyebisa Ba-Sekelé 14

Mwana-Meme ná bato na ye

1 Natali lisusu, pe namoni Mwana-Meme atelemi na ngomba ya Sion, pe bato 144.000 bazalaki na ye. Kombo ya Mwana-Meme pe ya Tata na ye ekómamá na bilongi na bango. 2 Nayoki mingongo euti na Likolo, ezalaki lokola nde bato bazali kobeta mandanda; ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale monene pe lokola kake ya makasi. 3 Bato yango batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi, ya ba-Sheriben minei pe ya Bambuta-muntu; bazalaki koyemba nzembo moko ya sika; moto moko té akoki koyeba yango, bobele bato wana 144.000 ya mokili oyo Mwana-Meme asombelaki Nzambe. 4 Bango babebisaki nzoto na bango té na kindumba, bazali lokola bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali té, balandaka Mwana-Meme na bisika nyonso ye akendeke. Bobele bango nde bato balongwá na boumbu, na kati ya bato nyonso ya mokili; boye na miso ya Nzambe pe ya Mwana-Meme bakomi lokola mbuma ya liboso ya bilanga. 5 Mbala moko té basi'balobá makambo ya lokuta; basalá mabe ata moko té.

Tango ekoki, Nzambe akokata makambo ya bato

6 Bongo namoni anjelu mosusu azali kopumbwa na likolo penza. Azalaki na Sango Malamu ya seko, po ásakola yango epai ya bato bafandaka na mokili, bato ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso pe minoko nyonso. 7 Azalaki koloba na mongongo makasi: "Bóbanga Nzambe pe bókumisa ye! pamba té tango na ye ya kosambisa bato esi'ekoki. Bófukamela Nzambe oyo asalá Likolo, mokili, ebale pe bisika mai ebimelaka na mabelé!" 8 Anjelu ya mibale alandi ye pe alobi: "Vile monene ya Babilone esi'ekwei! Esili! Yango nde moto ezalaki komelisa bato ya bikolo nyonso lotoko ya kindumba na yango !" 9 Anjelu ya misato alandi lisusu, pe alobi na mongongo makasi: "Soki moto afukameli Nyama ná ekeko na yango, pe azwi elembo na elongi to na liboko na ye, 10 Nzambe akomelisa ye kopo ya lotoko ya kanda na ye, oyo esanganá na mai té; boye moto yango akomona pasi na móto pe fofolo, na miso ya ba-anjelu ya bosantu pe na miso ya Mwana-Meme. 11 Bato nyonso oyo bafukamelaki Nyama ná ekeko na yango, pe bazwaki elembo ya kombo na yango, bakopema té butu moi. Milinga ya moto oyo ezali konyokola bango ekozala komata na likolo po na seko." 12 Yango wana bato ya bosantu oyo batosaka mibeko ya Nzambe pe bandimelaka Yezu, basengeli kokanga mitema. 13 Bongo nayoki mongongo moko euti na Likolo, elobi "Kóma boye: esengo na bato oyo bakufaki na lisanga na Nkolo Yezu. Molimo alobi: Ya solo, mosala na bango esili, sik'oyo bakoki kopema; pamba té bolamu oyo basalaki ezali kolanda bango."

Nzambe akopesa mokili etumbu

14 Natali lisusu; lipata ya pembe eyei kobima, pe namoni lokola nde moto moko afandi na kiti, na likolo na yango. Alati ekoti ya or ya bokonzi, pe asimbi mbeli moko ya kolongolela bambuma na bilanga, ezalaki na mino makasi. 15 Anjelu mosusu abimi na Ndako ya Nzambe, abeleli na mongongo makasi, alobi na moto oyo afandi na likolo ya lipata: "Salela mbeli na yo pe longola mbuma ya bilanga, pamba té tango ekoki! Mbuma ya mokili esi'eteli!" 16 Bongo moto oyo afandi na likolo ya lipata abwaki mbeli na ye na mokili, pe balongoli mbuma na yango. 17 Sima, namoni anjelu mosusu abimi na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo; ye pe asimbi mbeli moko ya mino makasi. 18 Bongo anjelu mosusu, oyo azali mokonzi ya móto, alongwe epai ya mesa ya mabonza, abeleli anjelu oyo asimbi mbeli ya mino makasi, alobi: "Salela mbeli na yo pe buka bambuma ya vinu oyo ezali na mokili, pamba té esi'eteli." 19 Anjelu wana asaleli mbeli na ye, abuki bambuma ya vinu oyo ezali na mokili, pe abwaki yango na libulu monene ya kokamola vinu, oyo Nzambe atimolaki na kanda na ye. 20 Esika bazalaki kokamola mbuma yango ezalaki na libanda ya vile. Makila mingi ebimi na libulu wana, eyei kotonda na elanga mobimba, pe ekómi tii na minoko ya bapunda; elanga yango ezalaki ya ba-stade 1.600.

Koyebisa Ba-Sekelé 15

Ba-anjelu pe bapasi sambo ya suka

1 Bongo namoni na Likolo likambo mosusu ya monene pe ya kokamwa: ba-anjelu sambo basimbi bapasi sambo. Yango nde bapasi ya suka oyo ekokokisa kanda ya Nzambe. 2 Pe namoni lokola ebale; yango emonani lokola talatala oyo ezali kopela móto. Baoyo balongi Nyama ná ekeko na yango pe talo ya kombo na yango, batelemi penepene ya ebale ya talatala, pe basimbi mandanda oyo Nzambe apesaki bango. 3 Bazali koyemba nzembo ya Moize mosali ya Nzambe, pe nzembo ya Mwana-Meme: "Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, misala na yo ezali ya minene pe ya kokamwa! Mokonzi monene ya bikolo nyonso, banzela na yo ezali ya bosembo pe ya solo! 4 Nkolo, moto nini akoki kobanga yo té? nani akoki koboya kokumisa yo? Pamba té kaka yo moto ozali Mosantu. Bato ya bikolo nyonso bakoya pe bakofukamela yo, po misala na yo ya bosembo esi'emonani polele." 5 Sima, namoni na Likolo, Ndako ya Nzambe efungwani; kuna nde esika Nzambe amilakisaka na bato. 6 Ba-anjelu sambo oyo basimbi bapasi sambo, babimi na Ndako ya Nzambe; balati bilamba ya talo pe ya pembe penza, ná mikaba ya or na loketo. 7 Moko na kati ya ba-Sheriben minei apesi ba-anjelu basani sambo ya or, etondá na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko. 8 Ndako ya Nzambe eyei kotonda na milinga, po na lokumu ya Nzambe pe nguya na ye. Bongo ata moto moko té akoki kokota na Ndako ya Nzambe, tii tango ba-anjelu sambo bakosilisa bapasi wana sambo.

Koyebisa Ba-Sekelé 16

Basani ya kanda ya Nzambe

1 Bongo nayoki mongongo moko ya makasi euti na Ndako ya Nzambe; elobi na ba-anjelu sambo boye: "Bókende na basani sambo oyo etondá na kanda ya Nzambe, bósopa yango na mokili." 2 Anjelu ya liboso akei kosopa sani na ye na mokili; bongo bapota ya mabe pe ya pasi ebimi na nzoto ya bato oyo bazwaki elembo ya Nyama pe babandaki kofukamela ekeko na yango. 3 Anjelu ya mibale akei kosopa sani na ye na ebale monene ya "lamer", bongo ebale ekómi makila lokola nde babomi moto, pe bambisi nyonso oyo ezalaki na mai wana ekufi. 4 Anjelu ya misato akei kosopa sani na ye na ba-ebale pe bisika mai ebimelaka na mabelé: bongo mai nyonso ekómi makila. 5 Pe nayoki anjelu oyo azali mokonzi ya bamai alobi: "Nzambe Mosantu, yo moto ozalaká pe ozali, olakisi 'tè ozali bosembo na ndenge okati makambo. 6 Pamba té bango batangisaki makila ya bato ya bosantu pe ya baprofete; lokola omelisi bango makila, bazwi etumbu oyo ekoki na bango!" 7 Bongo nayoki mongongo moko euti na mesa ya mabonza, elobi: "Ee, Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo pe ya bosembo!" 8 Anjelu ya minei akei kosopa sani na ye natnoi, bongo moi ezwi nzela ya kozikisa bato na móto na yango. 9 Bato ya mokili bazikaki makasi penza; babandi kotsiola kombo ya Nzambe oyo atindaki bapasi wana Kasi baboyi kobongda mitema pe kokumisa Nzambe. 10 Anjelu ya mitano akei kosopa sani na ye na kiti ya bokonzi ya Nyama; bongo mboka na yango ekómi molili, pe bato babandi kolia lolemo po na pasi. 11 Batsioli Nzambe ya Likolo po na bapasi pe bapota na bango; kasi baboyaki makambo na bango ya mabe té. 12 Anjelu ya motoba akei kosopa sani na ye na ebale Ufrate; bongo ebale ekauki po na kopesa nzela na bakonzi oyo bakouta na epai moi ebimaka. 13 Sima namoni milimo misato ya mabe lokola magorodo ebimi na monoko ya Elima, ya Nyama, pe ya profete ya lokuta. 14 Ezali milimo ya bazabolo; yango ebandi kosala makamwisi, ekei epai ya bakonzi ya mokili mobimba; ezali kosangisa bango esika moko po na kobunda bitumba, na mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso. 15 "Yoka! nakoya lokola moyibi! Esengo na moto oyo azali ekenge pe abatelaka bilamba na ye; boye akotambola bolumbu té pe akomona soni té na miso ya bato." 16 Milimo wana esangisi bakonzi ya mokili na esika oyo bábengaka na monoko ya ebré "Armagedon". 17 Anjelu ya sambo akei kosopa sani na ye na mapata; bongo mongongo moko ya makasi euti na Kiti ya bokonzi na kati na Ndako ya Nzambe; elobi: "Esili!" 18 Kake ná ba-móto na yango pe mingongo ebimi, pe mokili eningani makasi penza. Banda mokolo Nzambe asalá bato, mokili eninganá nanu ndenge wana té. 19 Nzambe ayei kokanisa vile monene ya Babilone, pe amelisi yango kopo etondá na vinu ya kanda na ye. Mabelé ya vile wana ya monene epasuki na biteni misato; pe ba-vile nyonso ya mokili epanzani. 20 Bisanga nyonso elimwe, pe bangomba emonanaki lisusu té. 21 Mabanga minene ya mbula eyei kokweela bato; moko moko ezalaki na kilo soki tuku mitano. Bato babandi kotsiola Nzambe po na pasi ya mbula wana ya mabanga, pamba té yango ezalaki pasi moko ya somo penza.

Koyebisa Ba-Sekelé 17

Babilone, mwasi ya ndumba

1 Bongo moko ya ba-anjelu sambo, baoyo basimbaki basani sambo, alobi na ngai boye: "Yaka! Nakolakisa yo ndenge Nzambe akopesa etumbu na mwasi ya ndumba monene oyo afandaka penepene ya ba-ebale. 2 Bakonzi ya mokili bazalaki kotambola na ye, pe bato ya mokili mobimba bazalaki kolangwa vinu ya kindumba na ye." 3 Molimo ya Nzambe akoteli ngai, pe anjelu amemi ngai na esobe. Kuna namoni mwasi moko afandi likolo ya nyama ya motane ngwa; nzoto na yango mobimba bakómá bakombo ya kotsiola Nzambe. Nyama yango ezalaki na mitú sambo, pe maseke zomi. 4 Mwasi wana alati bilamba ya lokumu, ya motane ngwa, ná biloko ya or, mabanga ya talo pe mayaka. Na liboko na ye asimbi kopo moko ya or, etondá na makambo ya kindumba na ye, ezali ya lisumá pe ya mbindo. 5 Na elongi na ye bakómá kombo moko ya sekele, elingi koloba: "Vile monene ya Babilone, mama ya basi ya ndumba pe ya makambo ya mbindo ya mokili." 6 Pe namoni 'té mwasi yango alangwe makila ya bato ya bosantu ná ya bato bazalaki kosakola sango ya Yezu. Nakamwe mingi penza tango namoni ye. 7 Bongo anjelu atuni ngai: "Po na nini okamwe? Nakoyebisa yo sekele ya mwasi wana, ná ya nyama ya mitú sambo pe maseke zomi oyo ezali komema ye. 8 Nyama yo omonaki ezalaki na bomoi, kasi sik'oyo ezali lisusu té. Etikali moke ébima na libulu oyo bakangá milimo mabe, bongo ekobunga libela. Bato ya mokili bakokamwa, baoyo bakombo na bango ekómamá na buku ya bomoi té uta na ebandeli ya mokili. Bakokamwa tango bakomona nyama wana, pamba té yango ezalaki na bomoi kasi ezali lisusu té; pe ekoya komonana lisusu. 9 "Po na koyeba makambo oyo, esengeli ózala na mayele penza. Mitú wana sambo elakisi bangomba sambo esika mwasi yango afandaka; nzokande ezali kolakisa lisusu bakonzi sambo. 10 Na kati na bango bakonzi mitano basi'bakufá, moko azali, pe mosusu ayei nanu té. Soki ayei, asengeli kotikala mwa tango moke. 11 Nyama oyo ezalaki na bomoi kasi ezali lisusu té, elakisi mokonzi ya mwambe; ye azali moko na kati ya bakonzi sambo, pe akokende kobunga libela. 12 "Maseke zomi oyo omonaki elakisi bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi té; bakozwa bokonzi esika moko ná nyama wana, ngonga moko pamba. 13 Bango nyonso zomi bazali na makanisi se moko: ya kopesa nguya pe bokonzi na bango na maboko ya nyama wana. 14 Bakobundisa Mwana-Meme, kasi Mwana-Meme akolonga bango; pamba té ye azali Motambwisi ya batambwisi nyonso, pe Mokonzi ya bakonzi nyonso. Akoya kobunda, ye ná bato oyo bamipesá na ye, baoyo Nzambe abengá pe aponá." 15 Anjelu alobi na ngai lisusu boye: "Ba-ebale yo omonaki esika mwasi ya ndumba afandaka elakisi bato ya bamboka, mabota, pe minoko ebele. 16 Nyama ná maseke na yango zomi oyo omonaki, ekobanda koyina mwasi wana ya ndumba. Bakonzi yango nyonso bakobotola ye bomengo oyo azali na yango, bakotika ye bolumbu, bakolia misuni na ye, pe bakotumba ye na móto. 17 Pamba té Nzambe atii na mitema na bango makanisi ya kosala makambo oyo ye alingi. Bakopesa bokonzi na bango na maboko ya nyama wana, tii tango Nzambe akokokisa maloba na ye. 18 "Pe mwasi yo omonaki elakisi vile monene oyo ezali kotambwisa bakonzi nyonso ya mokili."

Koyebisa Ba-Sekelé 18

Babilone ekufi

1 Na sima ya makambo oyo, namoni anjelu mosusu auti na Likolo. Azalaki na nguya mingi, pe lokumu na ye engengisi mokili mobimba. 2 Agangi na mongongo makasi: "Vile monene ya Babilone esi'ekwei! Esili! Ekómi mboka ya bazabolo pe ya milimo nyonso ya mbindo; etondi na bandeke ya bosoto pe ya mabe. 3 Pamba té mwasi wana ya ndumba amelisi bato ya bikolo nyonso lotoko ya kindumba na ye. Bakonzi ya mokili batambolaki ná ye; pe lokola atondaki na bomengo, bato nyonso ya mombongo bazwaki mbongo mingi likolo na ye." 4 Bongo nayoki mongongo mosusu euti na Likolo pe elobi: "Bino, bato na ngai, bólongwa epai na ye, po bámema masumu na ye té pe bózwa etumbu té esika moko ná ye. 5 Pamba té masumu na ye esi'emati tii na Likolo, pe Nzambe ayei kokanisa misala na ye ya mabe. 6 Bózongisela ye pasi nyonso oyo ye amonisaki bino. Makambo nyonso ye asalaki bino, bózongisela ye yango mbala mibale. Amelisaki bino kopo ya vinu ya bololo; bótondisela ye yango mbala mibale. 7 Azalaki kotombola mapeka pe atondaki na bomengo; sik'oyo bótondisa ye na pasi pe mawa, pamba té azalaki koloba boye na se ya motema: 'Nafandi awa lokola mokonzi, nakufelá mobali té pe nakolata pili ata mokolo moko té.' 8 Yango wana bapasi oyo nyonso ekokweela ye na mokolo moko: liwa, mawa, pe nzala. Bakozikisa ye na móto, pamba té Nzambe asi'akatelá ye etumbu; ye azali Nkolo ya nguya nyonso." 9 Bakonzi ya mokili oyo bazalaki kotambola ná ye pe bazwaki bomengo epai na ye, bakoyoka pasi pe bakolela po na ye, tango bakomona milinga ya móto oyo ezali kozikisa ye. 10 Bakoyoka somo po na pasi oyo ekokweela ye, bongo bakotelema mosika pe bakoloba boye: "Mawa! Mawa penza na yo, Babilone, vile monene pe ya makasi! Ozwi etumbu na ngonga moko pamba!" 11 Bato ya mombongo ya mokili mobimba bazali komona pasi pe basali matanga po na mboka yango, pamba té ata moto moko té asombaka lisusu biloko na bango: 12 or, arjan, mabanga ya talo pe mayaka; bilamba ya lokumu ya ndenge na ndenge; banzete nyonso ya kitoko pe ya solo malamu, biloko esalamá na pembe ya nzoko, na bronze to na bibende mosusu to pe na mabanga ya marbre; 13 biloko ekómisaka bilei elengi; ndenge nyonso ya malasi; vinu, mafuta, farine, blé; bangombe, bameme, bapunda pe ba-sltareti, ná pe baumbu, ézala bato oyo bakangi to baoyo babotamá baumbu. 14 Bato ya mombongo bazali koloba boye na Babilone: "Biloko nyonso oyo ezalaki kosepelisa yo esi'elimwe epai na yo; bomengo na yo pe biloko ya kitoko nyonso ebebi; ekomonana lisusu epai na yo ata mokolo moko té." 15 Bato nyonso oyo bazwaki bomengo na mombongo oyo bazalaki kosala na Babilone, bakoyoka somo pe mawa po na pasi oyo ekokweela yango. Bakotelema mosika, pe bakobanda kolela boye: 16 "Mawa! Mawa penza na vile oyo ya monene! Bato na yango bazalaká kolata bilamba ya lokumu ya ndenge nyonso; biloko ya or, mabanga ya talo pe mayaka. 17 Bomengo wana nyonso ebebi na ngonga moko pamba!" Bakapiteni nyonso ya masuwa pe bato na bango ya mosala ná bato ya mobembo, ná baoyo nyonso babikelaka na ebale monene, batelemi mosika 18 pe bazali kotala milinga ya moto oyo ezali kozikisa vile, babandi koganga na mingongo makasi: "Ata vile moko té ekokanaki na vile oyo ya monene!" 19 Bongo bapakoli putulu na mitú; na mawa nyonso babandi kolela boye: "Mawa! Mawa penza na vile oyo ya monene! Bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa bandukaki mbongo po na bomengo na yango! Kasi eyei kopanzana na ngonga moko pamba!" 20 Yo Likolo, sepela po Babilone ekufi! Bino bato ya bosantu, bantoma pe baprofete, bósepela! Pamba té Nzambe alongisi bino, na ndenge apesi yango etumbu! 21 Bongo anjelu mosusu ya nguya atomboli libanga moko monene pe abwaki yango na ebale, alobi: "Oyo ezali ndenge bakobwaka vile monene ya Babilone; ekomonana ata moke lisusu té. 22 Bato oyo babetaka miziki, ézala lindanda, banzembo, piololo to kelelo, bakoyoka lisusu té epai na yo. Bato oyo basalaka misala ya kitoko bakomonana lisusu té epai na yo. Makelele ya konika blé, bakoyoka yango lisusu té epai na yo. 23 Mwinda moko té ekobanda kopela lisusu epai na yo. Mingongo ya bilenge oyo bauti kobalana, bakoyoka yango lisusu té epai na yo. Bato na yo ya mombongo balekaki bato nyonso ya mokili. Yo moko ozalaki kokosa bato ya bikolo nyonso na kindoki na yo. 24 Sik'oyo ozwi etumbu likolo ya makila ya baprofete, ya bato ya bosantu, pe ya bato nyonso oyo babomá awa na mokili."

Koyebisa Ba-Sekelé 19

1 Na sima ya makambo wana, nayoki lokola mingongo makasi ya bato ebele penza, bazali koloba na Likolo: "Aleluya! Nzambe na biso azali Mobikisi; lokumu pe nguya ezali na ye! 2 Ye akataka makambo nyonso na ndenge ya solo pe ya bosembo. Akati likambo ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na kindumba na ye; apesi ye etumbu po abomaki basali na ye." 3 Bongo nayoki lisusu balobi: "Aleluya! Móto ezali kozikisa vile oyo ya monene; milinga na yango ezali komata mikolo nyonso seko!" 4 Bambuta-muntu tuku mibale na minei pe ba-Sheriben minei bafukameli Nzambe oyo afandi na Kiti ya bokonzi, pe balobi: "Amen! Aleluya!"

Feti ya libala ya Mwana-Meme

5 Mongongo moko euti epai ya Kiti ya bokonzi, elobi: "Bókumisa Nzambe na biso, bino nyonso basali na ye, bino nyonso bato botosaka ye, ézala bato minene to bato pamba." 6 Bongo nayoki mingongo ya bato ebele penza, ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale, pe lokola kake ya makasi, balobi: "Aleluya! Nkolo akamati bokonzi! Ye azali Nzambe na biso ya nguya nyonso; 7 tósepela, tózala na esengo, tókumisa ye. Oyo ezali feti ya libala ya Mwana-Meme; mwasi na ye asi'amibongisi. 8 Balatisi ye bilamba ya lokumu, ya peto pe ya pembe penza; ezali nde misala ya bosembo ya bato ya bosantu." 9 Anjelu moko alobi na ngai: "Kóma boye: Esengo na baoyo Nzambe abengisi na feti ya libala ya Mwana-Meme!" Pe abakisi: "Nzambe ye moko moto alobi yango." 10 Bongo nafukameli anjelu, kasi ye alobi na ngai: "Kosala boye té! Ngai nazali kaka mosali lokola yo, pe lokola bandeko na yo oyo babatelaka sango Yezu ayeelaki bato! Fukamela bobele Nzambe. Pamba té maloba oyo Yezu ayeelaki bato, Molimo moto apesaká yango na baprofete."

Mesia alongi

11 Bongo namoni Likolo efungwani. Punda moko ya pembe emonani; oyo amati yango bábengaka ye "Moto ya solo oyo auti na Nzambe"; ye asambisaka bato pe abundaka na bosembo nyonso. 12 Miso na ye ezali kongala lokola móto; alati bikoti mingi ya bokonzi na motú. Na nzoto na ye bakómá kombo oyo bobele ye moko ayebi. 13 Alati nzambala moko epoli na makila. Kombo na ye "Maloba ya Nzambe". 14 Basoda ya Likolo bazalaki kolanda ye, bamati na bapunda ya pembe pe balati bilamba ya lokumu, ya peto pe ya pembe. 15 Mbeli moko ya etumba, ya mino makasi, ebimi na monoko na ye, po ábundisa na yango bato ya bikolo nyonso. Akotambwisa yango na makasi penza. Ye moto akoka-mola mbuma ya vinu na libulu oyo Nzambe ya nguya nyonso atimolá na kanda na ye ya somo. 16 Na nzambala na ye pe na likolo na ye bakómá kombo oyo: "Motambwisi ya batambwisi pe Mokonzi ya bakonzi." 17 Bongo namoni anjelu moko atelemi na kati ya moi, abeleli na mongongo makasi epai ya bandeke oyo bazalaki kopumbwa na kati ya likolo: "Boya kosangana esika moko na feti monene ya Nzambe! 18 Boya kolia misuni ya bakonzi ya bikolo, ya basoda ná ba-shef na bango, misuni ya bapunda ná bato oyo bamataka yango, misuni ya bato nyonso, ézala baumbu to bansomi, ézala bato minene to bato pamba!" 19 Bongo namoni Nyama ná bakonzi ya mokili pe basoda na bango, basangani esika moko po na kobundisa Moto oyo amati na punda, pe basoda na ye. 20 Bakangi Nyama ná profete ya lokuta oyo azalaki kosala makamwisi na miso na yango; ezali na makamwisi yango nde akosaki bato oyo bazwaki elembo ya Nyama pe bazalaki kofukamela ekeko na yango. Nyama ná profete ya lokuta, babomi bango té kasi babwaki bango mibale na lak ya moto esika fofolo ezali kopela. 21 Nzokande bakonzi ya mokili ná basoda na bango, basilisi bango na mbeli oyo ezali kobima na monoko ya Moto oyo amati na punda; bongo bandeke nyonso eyei kolia misuni na bango.

Koyebisa Ba-Sekelé 20

Mbula nkoto moko

1 Bongo namoni anjelu moko auti na Likolo, asimbi fungola ya libulu oyo bakangá milimo mabe, na pe monyololo moko monene. 2-3 Akangi Elima, Nyoka ya Kala; yango ezali Zabolo to Satan; atii ye monyololo pe abwaki ye na libulu ya milimo mabe, bongo akangi yango na fungola pe atii yango elembo. Boye Satan akokoka lisusu kokosa bato ya bikolo nyonso té tii akokokisa mbula nkoto moko. Na sima esengeli bábimisa ye po na mwa tango moke. 4 Bongo namoni bakiti ya bokonzi; baoyo bafandi na yango bazwi bokonzi ya kokata makambo ya bato nyonso. Namoni pe nulimo ya bato oyo babomaki po bazalaki kosalela maloba ya Nzambe oyo Yezu ayeelaki bato. Namoni lisusu bato oyo baboyaki kofukamela Nyama to ekeko na yango; bazwaki pe elembo na yango na elongi té to na maboko. Bango nyonso bazongi na bomoi, pe bazwi bokonzi esika moko na Kristo, mbula nkoto moko. 5 Yango nde ezali kosekwa ya liboso. Nzokande bato mosusu oyo bakufa bazongi na bomoi té, tii bakokisi mbula nkoto moko. 6 Esengo na bato oyo bakozala na molongo ya baoyo bakosekwa liboso. Bango bazali bato ya bosembo penza; liwa ya mibale ekoki kolia bango té. Bakozala banganga-Nzambe oyo bakobanda kosalela Nzambe ná Kristo; pe bakozwa bokonzi esika moko na ye, mbula nkoto moko.

Nzambe alongi pe akati makambo libela

7 Soki mbula oyo nkoto ekoki, bakotika Satan pe bakobimisa ye na boloko, 8 po ákende kokosa lisusu bato ya bikolo nyonso ya mokili ezali Gog ná Magog. Ye akosangisa bango esika moko po na kobunda bitumba; bakozala ebele penza lokola mbuma ya zelo pembeni ya ebale. 9 Bongo bapanzani na mokili mobimba pe bazingi basoda ya Nzambe, pe vile oyo ye alingaka. Kasi móto euti na Likolo, pe eyei koboma bango. 10 Bongo zabolo oyo azalaki kokosa bàngo, babwaki ye na lak ya móto pe ya fofolo, esika babwakaki Nyama pe profete ya lokuta. Kuna bakozala komona pasi butu moi, seko na seko. 11 Bongo namoni Kiti monene ya bokonzi, ezalaki ya pembe. Namoni pe moto afandi wana; Likolo na se ekimi na miso na ye, pe ebungi libela. 12 Na sima namoni bato nyonso oyo bakufa, ézala bato minene to bato pamba, batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi. Babuku efungwani; bafungoli pe buku mosusu, yango ezali buku ya bomoi. Bongo babandi kosambisa bato bakufa, moto na moto ná makambo oyo ye asalaki, pamba té nyonso esi'ekómamá na babuku wana. 13 Ebale ezongisi bato oyo babungaki na mai; liwa pe mboka ya bato bakufa ezongisi bato na yango. Bongo basambisi bango, moto na moto na makambo oyo ye asalaki. 14 Liwa pe mboka ya bato bakufa, babwaki yango na lak ya móto. Lak oyo ya móto ezali nde liwa ya mibale. 15 Pe moto nyonso oyo kombo na ye ekómamá na Buku ya bomoi té, babwaki ye na lak ya móto.

Koyebisa Ba-Sekelé 21

Likolo ya sika pe Mokili ya sika

1 Bongo namoni Likolo ya sika pe Mokili ya sika. Pamba té Likolo ya liboso ná mokili ya liboso elimwaki, pe ebale ya "lamer" ezali lisusu téy 2 Pe namoni Mboka ya bosantu, Yeruzalem ya sika, euti na Likolo epai ya Nzambe; yango emikómisaki kitoko, ndenge elenge mwasi amibongisaka po na kokutana ná mobali na ye. 3 Nayoki mongongo makasi euti epai ya Kiti ya bokonzi, elobi: "Tala Nzambe ayei kotónga na kati ya bato; ayei kofanda epai na bango. Bango bakozala bato na ye, pe Nzambe ye moko akozala ná bango. 4 Akopangusa bango mai nyonso na miso; liwa ekozala lisusu té, ata matanga, ézala mawa to pe pasi. Pamba té makambo ya kala esili." 5 Bongo Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi alobi: "Sik'oyo nazali kosala biloko nyonso ya sika." Na sima alobi na ngai: "Kóma maloba yango, pamba té ezali ya solo, pe bato bakoki kotiela yango mitema." 6 Pe abakisi: "Esili! Nazali Ebandeli pe Suka! Moto oyo azali na posa ya mai, nakomelisa ye mai ofele; akozwa yango na esika mai ya bomoi ebimelaka. 7 Moto alongi akozwa bolamu wana; nakozala Nzambe na ye, pe ye akozala mwana na ngai. 8 Kasi bato oyo babangaka pe basundolá bondimi, bato ya bizaleli mabe, bandoki, baoyo babomaká bato, basalaka kindumba, básambelaka banzambe ya bikeko, pe bato nyonso ya lokuta, esika na bango ezali na lak oyo epelaka móto ná fofolo; yango nde liwa ya mibale."

Yeruzalem ya sika

9 Anjelu ayei epai na ngai; ye azalaki moko ya baoyo bazalaki kosimba basani sambo etondá na bapasi sambo ya suka. Alobi na ngai: "Yaka; nakolakisa yo mwasi oyo Mwana-Meme akobala." 10 Molimo ya Nzambe akoteli ngai, bongo anjelu amemi ngai na likolo ya ngomba moko ya molai koleka. Alakisi ngai Yeruzalem, vile ya bosantu oyo euti na Likolo epai ya Nzambe. 11 Ezalaki kongenga na lokumu ya Nzambe, lokola mabanga ya talo ya kitoko penza. 12-13 Vile yango ezali na lopango moko ya molai pe ya makasi. Lopango wana ezali na baporte zomi na mibale: misato na epai moi ebimaka, misato na epai moi elalaka, misato na epai ya likolo, pe misato na epai ya se. Ba-anjelu zomi na mibale bazali kokengela yango. Likolo ya baporte wana bakómá bakombo ya mabota zomi na mibale ya Israel. 14 Lopango ya vile etóngamá na likolo ya ba-fondasion zomi na mibale; na yango bakómá bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mwana-Meme. 15 Anjelu oyo azalaki koloba na ngai asimbi mwa nzete ya or po na komeka vile ná baporte, pe lopango na yango. 16-17 Ameki yango; molai ya vile na bipai nyonso minei, ná molai na yango banda na se tii na likolo, ezali ndenge moko: ya "ba-stade" 12.000. Sima ameki pe lopango: molai na yango banda na se tii na likolo ezali ya "maboko" 144. Anjelu amekaki yango ndenge bato bamekaka. 18 Batóngá lopango yango na mabanga ya yaspe; pe vile mobimba esalamá na or ya peto oyo ezali komonana lokola talatala ya peto. 19 Na ba-fondasion ya lopango ya vile, batiá mabanga ya talo ya ndenge zomi na mibale: yaspe, safïr, agate, emerode, 20 oniks, sardwane, krizolite, beril, topaze, krizopaze, yasente, pe ametiste. 21 Baporte wana zomi na mibale esalamá na mayaka zomi na mibale. Porte moko moko ezali liyaka moko. Balabala monene ya vile batandá yango na or ya peto oyo ezali polele lokola talatala. 22 Na kati ya vile, natikalaki komona Ndako ya bosantu té. Pamba té Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso azali esika na yango ya bosantu, ye ná Mwana-Meme. 23 Vile yango ezali na posa ya moi té to sanza po na kongengela yango, pamba té lokumu ya Nzambe moto engengisaka yango, pe Mwana-Meme azali lokola mwinda na yango. 24 Vile ekozala kongengela bato ya bikolo nyonso. Bango nyonso bakobanda koya epai na yango, pe bakonzi ya mokili bakomemela yango bomengo na bango. 25 Bakokanga baporte na yango ata mokolo moko té, po kuna butu ekozala té. 26 Vile yango ekozwa lokumu pe bomengo ya bikolo nyonso. 27 Eloko moko té ya mbindo ekoki kokota kuna, ézala baoyo basalaka makambo ya soni to baoyo balobaká lokuta; kasi bato oyo bakokota kuna, ezali bobele baoyo bakombo na bango esi'ekómamá na buku ya Mwana-Meme.

Koyebisa Ba-Sekelé 22

1 Na sima anjelu alakisi ngai ebale ya mai ya bomoi, euti epai ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe ná ya Mwana-Meme, ezali kongenga lokola kristal. 2 Ebale yango ekabwaná; ezali koleka epai na epai ya balabala monene ya vile. Kuna na kati ezali na nzete ya bomoi oyo ebotaka mbuma mbala zomi na mibale na mbula moko, elingi koloba 'tè mbala moko na sanza moko. Makasa na yango ebikisaka bato ya bikolo nyonso. 3 Ata eloko moko té ya lisumá ekomonana na vile wana. Kiti ya bokonzi ya Nzambe ná ya Mwana-Meme ekozala kuna, pe basali ya Nzambe bakobanda kosambela ye. 4 Bakomona ye na miso, pe kombo na ye ekozala komonana na bilongi na bango. 5 Butu ekozala lisusu té, pe bakozala na posa ya mwinda té to ya moi, po Nkolo Nzambe akozala kongengela basali na ye; bango bakozala bakonzi seko na seko.

Yezu akoya

6 Na sima anjelu alobi na ngai boye: "Maloba oyo ezali ya solo, pe bato bakoki kotiela yango mitema. Nkolo Nzambe oyo apesaká Molimo na ye na baprofete, atindaki anjelu po álakisa na basali na ye makambo oyo esengeli koya na mwa mikolo." 7 Bongo Yezu alobi: "Tala, etikali moke náya! Esengo na baoyo babatelaka maloba euti na Molimo, ndenge ekómamá na buku oyo." 8 Ngai Yoane nayokaki pe namonaki makambo wana. Bongo tango nasilisaki koyoka pe komona, nafukameli anjelu oyo alakisaki ngai yango. 9 Kasi ye alobi na ngai: "Kosala boye té! Fukamela bobele Nzambe. Ngai nazali kaka mosali lokola yo, pe lokola bandeko na yo baprofete, ná bato nyonso oyo batosaka maloba ekómamá na buku oyo." 10 Bongo alobi na ngai lisusu boye: "Maloba euti na Molimo, ndenge ekómamá na buku oyo, kobomba yango té! Pamba té tango elingi ékoka. 11 Moto nyonso oyo asalaka mabe, alanda kaka makambo ya mabe; moto nyonso oyo asalaka makambo ya mbindo, alanda kaka makambo ya mbindo. Moto nyonso oyo asalaka malamu, alanda kaka makambo ya malamu; moto nyonso oyo azali moto ya Nzambe, ámipesa mobimba na Nzambe." 12 Bongo Yezu alobi: "Tala, etikali moke náya! Nakoyeela moto na moto lifuta ya mosala na ye. 13 Ngai nazali Moto ya liboso pe ya suka, ngai moto nabandaki mokili pe nasukisi yango; nazali penza Ebandeli pe suka." 14 Esengo na baoyo basukoli bilamba na bango, po bázwa nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, pe bákoka kokota na baporte ya Yeruzalem ya sika. 15 Kasi bato oyo basalaka makambo ya mbindo, bandoki, baoyo basalaka kindumba, babomaká bato, básambelaka banzambe ya bikeko, pe bato nyonso ya lokuta, bango nyonso bakotikala na libanda. 16 "Ngai Yezu, natindi anjelu na ngai po na kolakisa bino makambo etali ba-eklezya. Ngai nazali mwana oyo Nzambe alakaká na David. Nazali monzoto oyo etanisaka tongo." 17 Molimo ná mwasi oyo Mwana-Meme akobala, balobi: "Yaka!" Moto oyo ayoki yango áloba pe: "Yaka!" Oyo ayoki posa ya mai áya; oyo alingi komela, ázwa mai ya bomoi ya ofele.

Makambo ya suka

18 Moto nyonso oyo azali koyoka maloba euti na Molimo, ndenge bakómá na buku oyo, ngai Yoane nazali koyebisa ye ákeba. Soki moto abakisi maloba mosusu, Nzambe akobakisela ye bapasi nyonso ekómamá na buku oyo. 19 Pe soki moto alongoli maloba mosusu, Nzambe akolongola ye na molongo ya bato oyo bakobanda kolia mbuma ya nzete ya bomoi, akopesa ye pe esika té na vile ya bosantu; ye akozanga nyonso ekómamá na buku oyo. 20 Yezu moto ayebisi yango, alobi: "Ee, etikali moke náya!" Ézala se bongo! Nkolo Yezu, yaka! 21 Bolamu ya Nkolo Yezu ézala na bato nyonso.